Oyo ezali bakombo ya bankoko ya Yesu Kristo, mwana ya David, mwana ya Abraham: Abraham abotaki Izaki; Izaki abotaki Zakobi; mpe Zakobi abotaki Yudana bandeko na ye. Yuda na mwasi na ye Tamare babotaki Farezi mpe Zara; Fareziabotaki Esromi; mpe Esromi abotaki Arami. Arami abotaki Aminadabi; Aminadabi abotaki Nasoni; mpe Nasoni abotaki Salmon; Salmon na mwasi na ye Rabi babotaki Bowazi; mpe Bowasi na mwasi na ye Ruti babotaki Obedi. Obedi abotaki Isayi; Isayi abotaki Mokonzi David; mpe Mokonzi David na mwasi oyo Uri atikaki, babotaki Salomon. Salomon abotaki Robowami; Robowami abotaki Abia; mpe Abia abotaki Asa; Asa abotaki Zozafati; Zozafati abotaki Zorami; mpe Zorami abotaki Oziasi. Oziasi abotaki Zowatami; Zowatami abotaki Akazi; mpe Akazi abotaki Ezekiasi. Ezekiasi abotaki Manase; Manase abotaki Amoni; mpe Amoni abotaki Zoziasi. Zoziasi abotaki Zakoniasi na bandeko na ye; bango babotamaki tango bamemaki bato ya Isayele na bowumbu na ekolo ya Babilone. Sima ya komema bato ya Isayele na Babilone; Zekoniasi abotaki Salatiele; mpe Salatiele abotaki Zorobabele; Zorobabele abotaki Abiyudi; Abiyudi abotaki Eliyakimi; mpe Eliyakimi abotaki Azori. Azori abotaki Sadoki; Sadoki abotaki Akimi; mpe Akimi abotaki Eliyudi. Eliyudi abotaki Eleyazari; Eleyazari abotaki Matani; mpe Matani abotaki Zakobi. Zakobi abotaki Zozefi, oyo azalaki mobali ya Mariya, mama ya Yesu oyo babengaka Kristo. Bango nyonso, banda na Abraham kino na David, ezalaki na mabota zomi na minei; banda David kino na tango bamemaki bato ya Isayele na bowumbu na Babilone, ezalaki na mabota zomi na minei; mpe kobanda tango bamemaki bato ya Isayele na bowumbu kino na Kristo, ezalaki na mabota zomi na minei. Tala ndenge Yesu Kristo abotamaki: mama na ye Mariya, azalaki elenge mwasi oyo Zozefi andimaki kobala. Kasi liboso ete bavanda esika moko, Mariya azwaki zemi na nguya ya Molimo Mosantu. Zozefi, mobali na ye, azalaki moto na sembo mpe alingaki te koyokisa ye soni na miso ya bato; yango wana akanaki aboya ye na sekele. Awa azalaki kokanisa mpo na makambo yango, anzelu ya Nkolo abimelaki ye na ndoto, mpe alobaki na ye: —Zozefi mwana ya David, kobanga te mpo na kozwa Mariya mwasi na yo, pamba te zemi oyo azali na yango ewuti na Molimo Mosantu. Akobota mwana mobali, bongo okopesa ye kombo Yesu, pamba teye moto akobikisa bato na ye na masumu na bango! Nyonso oyo esalamaki mpo ete maloba oyo Nkolo alobaki na monoko ya moprofeta ekokisama: Boyoka, elenge mwasi oyo ayebi naino mobali te, akozwa zemi. Akobota mwana mobali, mpe bakopesa ye kombo Emanuele; yango elingi koloba: Nzambe azali elongo na biso! Tango Zozefi alamukaki, asalaki ndenge anzelu ya Nkolo atindaki ye, mpe azwaki Mariya mwasi na ye. Kasi Zozefi ayebaki nzoto na ye te kino tango abotaki mwana mobali; mpe apesaki ye kombo Yesu. Yesu abotamaki na Betelemi ya Yudea, tango Erode azalaki mokonzi; sima na yango, bato ya mayele oyo bayekolaka minzoto, bawutaki na mokili ya Este, bakomaki na Yeruzalem. Batunaki: —Mokonzi ya Bayuda oyo awuti kobotama azali wapi? Pamba te, tomonaki monzoto na ye na mokili ya Este, yango wana toye kokumbamela ye! Tango mokonzi Erode ayokaki sango yango, ye na bato nyonso ya Yeruzalem bamitungisaki mingi. Abengisaki bakonzi nyonso ya banganga-Nzambe mpe balakisi ya Mibeko, mpe atunaki bango soki Kristo asengeli kobotama wapi. Bazongiselaki ye: —Na Betelemi ya Yudea, pamba te moprofeta akomaki boye: E e yo Betelemi, kati na mokili ya Yudea, ozali moke te kati ya bakonzi ya Yudea, pamba te, Mokonzi akobima epai na yo, oyo akozala mobateli ya bato na ngai Isayele! Bongo Erode abengisaki na sekele bato ya mayele oyo batalaka minzoto mpe atunaki bango bayebisa ye tango penza oyo monzoto ebimaki. Atindaki bango na Betelemi na maloba oyo: —Bokende kuna mpe botuna malamu makambo ya mwana wana. Tango bokomona ye, boyebisa ngai, mpo ngai mpe nakende kokumbamela ye! Sima ya koyoka maloba ya mokonzi, bakendaki. Mpe monzoto oyo bamonaki na Este ezalaki kokende liboso na bango kino tango etelemaki likolo ya esika mwana azalaki. Tango bamonaki monzoto, bayokaki esengo mingi penza. Bakotaki na ndako, bamonaki mwana na mama na ye Mariya; bafukamaki mpe bakumbamelaki ye. Bongo bafungolaki basaki na bango, mpe bapesaki ye makabo oyo: wolo, ansa mpe mafuta ya solo kitoko. Awa Nzambe akebisaki bango na ndoto, ete bazonga te epai ya Erode, bazongaki na mokili na bango na nzela mosusu. Tango bakendaki, anzelu ya Nkolo abimelaki Zozefi na ndoto mpe alobaki na ye: —Telema, kamata mwana na mama na ye, mpe kina na Ezipito. Vanda kuna kino tango nakoyebisa yo pamba te Erode akoluka mwana, mpo na koboma ye. Kaka na butu wana, Zozefi atelemaki, akamataki mwana na mama na ye, mpe akendaki na Ezipito. Avandaki kuna kino tango Erode akufaki. Na bongo nde maloba ya Nkolo, oyo alobaki na monoko ya moprofeta ekokisamaki: Nabengaki mwana na ngai abima na Ezipito. Tango Erode amonaki ete bato ya mayele oyo batalaka minzoto batosaki ye te, atondaki na kanda. Yango wana atindaki ete baboma, na Betelemi mpe na bamboka ya pembeni-pembeni na yango, bana nyonso ya mibali oyo bazalaki na bambula mibale kino na nse; pamba te alandaki malamu penza tango oyo bato ya mayele baoyo batalaka minzoto bayebisaki ye. Na ndenge wana nde, maloba ya moprofeta Jeremiya ekokisamaki: Mongongo eyokani na Rama; kolela mpe mawa monene. Ezali Rashele, azali kolela bana na ye; aboyi bakitisa ye motema, pamba te bana na ye bakufi. Sima ya liwa ya Erode, anzelu ya Nkolo abimelaki Zozefi na ndoto na Ezipito, mpe alobaki na ye: —Telema, kamata mwana na mama na ye mpe zonga na mokili ya Isayele, pamba te baoyo bazalaki koluka koboma mwana basiʼbakufi. Zozefi atelemaki, akamataki mwana na mama na ye, mpe azongaki na mokili ya Isayele. Kasi tango ayokaki ete Arkelawusi akomaki mokonzi ya Yudea na esika ya tata na ye Erode, abangaki kokende kuna. Awa bakebisaki ye na ndoto, akendaki kovanda na ekolo ya Galileya, kuna afandaki na vile ya Nazareti. Na bongo nde maloba ya baprofeta ekokisamaki: Bakobenga ye moto ya Nazareti. Na mikolo wana, Jean-Batiste ayaki mpe abandaki koteya na esobe ya Yudea. Azalaki koloba boye: —Bobongola mitema, pamba te Bokonzi ya likolo ekomi pene-pene! Ezali ye nde moprofeta ezayi alobelaki: Mongongo ya moto ezali kobelela na esobe: Bobongisa bala-bala ya Nkolo, bosalela ye banzela oyo etengama te! Jean azalaki kolata bilamba oyo basala na bapuale ya shamo, mpe mokaba ya mposo ya nyama na loketo. Azalaki kolia mabanki na mafuta ya nzoyi. Bato bazalaki kowuta na Yeruzalem, na Yudea mobimba mpe na bapembeni ya mayi ya Yordani, bazalaki kokende epai na ye. Bazalaki koyambola masumu na bango, bongo Jean azalaki kobatisa bango na mayi ya Yordani. Kasi tango amonaki ete bafarizeo mingi na Basaduseoo bazalaki koya kozwa libatisi, alobaki na bango: —Bino libota ya banioka! Nani akebisi bino ete bokima kandaoyo ezali koya? Bobota mbuma oyo ebongi mpo na bato oyo babongoli mitema. Bokanisa te ete bokoki komiloba: “Abraham azali tata na biso!” Pamba te nalobi na bino ete Nzambe akoki kobimisela Abraham bana wuta na mabanga oyo. Epasola komi esiʼebongisami mpo na kokata misisa ya nzete. Nzete nyonso oyo ebotaka mbuma ye malamu te, bakokata yango mpe bakobwaka yango na moto. —Ngai nazali kobatisa bino na mayi mpo na kolakisa ete bosiʼbobongoli mitema. Kasi moto oyo akoya sima na ngai, aleki ngai na nguya mpe nakoki kutu te komema basapato na ye; ye moto akobatisabino na Molimo Mosantu mpe na moto. Asimbi kiyungulu na maboko na ye, mpe akopetola esika na ye oyo batutelaka mbuma; mpe akobomba ble na ebombelo na ye; kasi akotumba matiti na moto moko oyo ekufaka te! Yesu awutaki na Galileya mpe ayaki na Yordani. Ayaki epai ya Jean mpo na kozwa libatisi. Kasi Jean alingaki kopekisa ye, mpe alobaki na ye: —E e! ezali ngai moto nalingaki koya kozwa libatisi epai na yo, kasi yo oye epai na ngai! Kasi Yesu azongisaki: —Tika ete ezala bongo sikʼoyo! Pamba te, ezali na lolenge oyo nde ekoki na biso kokokisa bosembo nyonso. Bongo Jean andimaki. Tango Yesu azuaki libatisi, abimaki na mayi, likolo efungwamaki, mpe amonaki Molimo na Nzambe azalaki kokita lokola pijon, mpe ayaki likolo na ye. Mpe mongongo ewutaki na likolo elobaki: —Oyo azali Mwana na ngai ya bolingo, asepelisaka ngai mingi! Bongo Molimo amemaki Yesu na esobe mpo zabolo ameka ye. Sima ya koboya kolia bilei mpo na mabondeli mikolo ntuku minei: moi mpe butu, Yesu ayokaki nzala. Momeki ayaki epai na ye mpe alobaki: —Soki ozali Mwana ya Nzambe, loba na mabanga oyo ebongwana mampa! Kasi Yesu azongisaki: —Ekomama: Moto akozala na bomoi kaka mpo na limpa te, kasi mpe mpo na maloba nyonso oyo ebimaka na monoko ya Nzambe! Bongo Zabolo amemaki ye na vile ya bosantu, atiaki ye na esika oyo eleki likolo, oyo ya Ndako ya Nzambe, mpe alobaki na ye: —Soki ozali Mwana ya Nzambe, mibwaka na nse. Pamba te ekomama: Akotinda baanzelu na ye mpo na yo. Bakomema yo na maboko na bango, mpo ete lokolo na yo etuta libanga te! Yesu azongisaki: —Ekomama lisusu: Komeka Nkolo Nzambe na yo te! Zabolo amemaki ye lisusu likolo ya ngomba moko ya molayi penzampe alakisaki ye bokonzi ya mikili nyonso, na lokumu na yango. Bongo alobaki na ye: —Soki ofukameli ngai mpe okumbameli ngai, nakopesa yo nyonso oyo! Kasi yesu alobaki na ye: —Longwa Satana! Pamba te ekomama: Kumbamela Nkolo Nzambe na yo mpe salela kaka ye moko! Bongo zabolo atikaki ye, mpe baanzelu bayaki kosalela ye. Tango yesu ayokaki ete batiaki Jean na boloko, azongaki na Galileya; tango atikaki Nazareti, akendaki kovanda na Kapenawumi, oyo ezali pembeni ya ebale, na mikili ya zabumoni mpe ya Neftali, mpo ete maloba ya moprofeta Ezayi ekokisama: Mokili ya zabuloni mpe mokili ya Neftali, nzela ya ebale, na ngambo ya Yordani, e e yo Galileya ya bapakano: Bato oyo bazalaki na molili, bamonaki mwinda monene; bazalaki kovanda na mboka ya molili ya kufa, moi ebimeli bango. Banda tango wana, Yesu abandaki koteya boye: —Bobongola mitema, pamba te Bokonzi ya likolo ekomi pene-pene! Awa Yesu azalaki kotambola pembeni-pembeni ya ebale monene ya Galileya, amonaki bandeko mibale: Simon oyo bazalaki kobenga lisusu Piere na ndeko na ye Andele; bazalaki kobwaka monyama na ebale, pamba te bazalaki baluki mbisi. Yesu alobaki na bango: —Bolanda ngai, mpe nakokomisa bino baluki ya bato! Kaka na tango wana, batikaki minyama na bango; mpe balandaki ye. Tango apusanaki mwa liboso, amonaki lisusu bandeko mibale: Zaki mwana ya Zebede na ndeko na ye Jean; bazalaki kobongisa minyama na bango na kati ya bwato elongo na tata na bango Zebede. Bongo Yesu abengaki bango. Mpe kaka na tango wana, basundolaki bwato na bango, batikaki tatana bango, mpe balandaki ye. Yesu atambolaki na Galileya mobimba, azalaki koteya na bandakona bango ya mayangani, azalaki kosakola Sango Malamu ya Bokonzi, mpe azalaki kobikisa bamaladi ya ndenge nyonso mpe bapasi ya ndenge na ndengekati na bato. Sango na ye epanzanaki na ekolo ya Siriya mobimba, mpe bamemelaki ye bato nyonso oyo bazalaki na maladi, baoyo bazalaki koyoka bapasi ya ndenge na ndenge, mpe minyoko ya ndenge na ndenge, baoyo bazalaki na milimo mabe, baoyo bazalaki na maladi ya ndeke, mpe baoyo bazalaki na maladi ya buka-buka. Bongo yesu azalaki kobikisa bango. Bato ebele penza bazalaki kolanda ye; ezalaki: bato ya Galileya, ya “Bavile zomi”, ya Yeruzalem na yo Yudea, mpe ya mokili oyo ezalaki na ngambo ya Yordani. Tango Yesu amonaki bato ebele, amataki likolo ya ngomba mpeavandaki; bongo bayekoli na ye bayaki epai ye azalaki. Mpe abandaki koteya bango: —Esengo na baoyo bazali babola na molimo, pamba te Bokonzi ya Likolo ezali ya bango. Esengo na baoyo bazali kolela, pamba te bakobondisa bango! Esengo na bato ya boboto, pamba te bakozwa mokili ndenge Nzambe alakaki bango! Esengo na baoyo bazali na nzala mpe posa ya bosembo, pamba te bakotondisa bango. Esengo na bato ya mitema mawa, pamba te bakoyokela bango mpe mawa. Esengo na bato ya mitema peto, pamba te bakomona Nzambe. Esengo na bato oyo balukaka kotia kimia, pamba te bakobenga bango bana ya Nzambe. Esengo na baoyo baniokwamaka mpo na bosembo, pamba te Bokonzi ya Likolo ezali ya bango. Esengo na bino soki bakofinga bino, soki bakonyokola bino, mpe soki bakokosela bino makambo ya mabe ya ndenge na ndenge mpo na ngai. Ya solo, bosepela mpe botonda na esengo, mpo lifuti monene ezali kozela bino na Likolo, pamba te baprofeta oyo bazalaki liboso na bino, baniokolaki bango mpe bongo. —Bino bozali mungwa ya mokili. Soki mungwa ebungisi elengi na yango, bakozongisa yango lisusu elengi na nini? Mungwa yango ekozala lisusu malamu mpo na eloko moko te; bakobwaka yango libanda mpe bato bakoniata-niata yango. Bino bozali mwinda ya mokili, mboka oyo ezali likolo ya ngomba, yango ekoki kobombama te. Mpe bapelisaka mwinda te mpo na kotia yango na nse ya katini, kasi na likolo ya eloko oyo batiela muinda mpo engengisa bato nyonso oyo bazali na kati ya ndako. Yango wana, mwinda na bino esengeli engenga ndenge wana liboso ya bato, mpo bamona misala na bino ya malamu mpe bakumisa Tata na bino oyo azali na Likolo. Bokanisa te ete ngai naye mpo na kolongola Mibeko to mpe mateya ya baprofeta; naye mpo na kolongola yango te, kasi mpo na kokokisa yango. Nalobi na bino ya solo, kino likolo mpe nse ekoleka, ata likomi moko te ya moke, ata oyo ya moke penza ekolongwa na Mibeko kino tangomakambo nyonso ekokisama. Yango wana, moto oyo akoboya kotosa moko ya Mibeko oyo, ata oyoeleki moke, mpe akolakisa bato mosusu basala bongo, akobengama moto moke na Bokonzi ya Likolo. Kasi moto oyo akolakisa Mibeko yango na bato mosusu mpe akotosa yango, akobengama moto monene na Bokonzi ya Likolo! Pamba te nayebisi bino, soki bosembo na bino eleki ya bafalizeompe balakisi ya Mibeko te, bokokota te na Bokonzi ya Likolo. Boyokaki ete balobaki na bakoko na biso: “Koboma moto te”. Mpe moto oyo akoboma moto, akosamba liboso ya bazuzi. Kasi ngai nalobi na bino: moto nyonso oyo akokangela ndeko na ye kanda, ekoki asamba liboso ya bazuzi. Moto oyo akofinga ndeko na ye: “Zoba”; ekoki bamema ye liboso ya likita ya banganga-Nzambe mpo asamba. Mpe oyo akofinga ndeko na ye; “Liboma!” ebongi babwaka ye na moto ye lifelo. Lisusu, soki otelemi liboso ya mesa ya makabo mpo na kopesa makabo, mpe okanisi na mbala moko ete ndeko na yo azali na likambo na yo, tika makabo na yo wana, liboso ya mesa, mpe kende naino koyokanana ndeko na yo; bongo yaka kopesa makambo na yo. Soki moto azwi yo likambo, yokana na ye noki tango bozali naino na nzela, soki te akopesa yo na maboko ya zuzi, bongo zuzi akotinda yo epai ya polisi mpo atia yo na boloko. Nalobi na yo ya solo: okobima te, kino tango okosilisa kofuta likuta ya suka. —Boyokaki balobaki ete: “Kosala ekobo te!” Kasi ngai nalobi na bino, soki moto atali mwasi na miso oyo etonda na baposa ya mabe asiʼasali ekobo na ye na motema. Yango wana, soki liso na yo ya mobali ezali kokweyisa yo na masumu, longola yango mpe bwaka yango mosika! Pamba te, malamu ozanga eteni moko ya nzoto kasi nzoto na yo mobimba ebwakama na lifelo te. Soki mpe loboko na yo ya mobali ezali kokweyisa yo na masumu, katayango mpe bwaka yango mosika. Pamba te, malamu ozanga eteni moko ya nzoto, kasi nzoto na yo mobimba ebwakama na lifelo te. —Balobaki lisusu ete: “Soki moto akabwani na mwasi na ye, esengeli apesa ye mokanda ya koboma libala.” Kasi ngai nalobi na bino: mobali oyo akabwani na mwasi na ye, longola kaka mpo na likambo ya ekobo, ezali ye moto afungoleli mwasi yango nzela ya kosala kindumba. Oyo mpe abali mwasi balongola na libala, asali ekobo. —Boyokaki lisusu balobaki na bakoko na biso: “Kobebisa te ndayi oyo olapaki; bilaka oyo opesaki tango olapaki ndayi liboso ya Nkolo, esengeli okokisa yango.” Kasi ngai nalobi na bino: bolapaka ndayi te; ezala na kombo ya Likolo, pamba te Likolo ezali Kiti ya Nzambe; ezala na kombo ya mokili, pamba te mokili ezali esika Nzambe atiaka makolo na ye; ezala na kombo ya Yeruzalem, pamba te yango ezali mboka ya Mokonzi monene. Kolapa mpe te na kombo ya motu na yo pamba te okoki kokomisaata suki moko te ya motu na yo pembe to mwindu. Kasi tika kaka ete “Ee!” na bino, ezala “Ee!” mpe “Te!” na bino, ezala kaka “Te!” Pamba te nyonso oyo ebakisamaka na likolo, ewutaka na molimo mabe. —Boyokaki balobaki ete: “Soki moto atoboli liso ya moninga, ye mpe bakotobola oyo ya ye. Soki moto abuki lino ya moninga, ye mpe bakobuka oyo ya ye”. Kasi ngai nalobi na bino: botia tembe te na moto oyo alingi kosala bino mabe; kutu soki moto abeti yo mbata na litama ya mobali, pesa ye mpe oyo mosusu. Soki moto alingi kofunda yo mpe kozwa simisi na yo, pesa ye mpe kazaka na yo. Soki moto atindi yo na makasi otambola kilometele moko, yotambola na ye bakilometele mibale. Pesa na moto asengi yo, mpe koboya te kodefisa moto oyo alingi kodefa epai na yo. Bayokaki balobaki ete: “linga moninga na yo mpe yina monguna na yo”. Kasi ngai nalobi na bino: bolinga banguna na bino mpe bosambela mpo na baoyo banyokolaka bino! Na ndenge wana nde, bokozala bana ya Tata na bino oyo azali na likolo. Pamba te, ye angengisaka moi na ye likolo ya bato ya malamu mpe likolo ya batu mabe; anokisaka mbula na ye likolo ya bato na sembo mpe likolo ya bato oyo bazali sembo te. Soki bolingaka kaka bato oyo balingaka bino, lifuti nini bokozwa? Boni, bafutisi mpaku basalaka mpe bongo te? Soki bopesaka mbote kaka na bandeko na bino, likambo nini ya kokamwa bosalaka? Boni, bapakano basalaka mpe bongo te? Yango wana, bozala bato ya kokoka ndenge Tata na bino ya Likolo azali ya kokoka. —Bokeba ete bosala bolamu te na miso ya bato, mpo ete bango bamona bino; soki te bokozanga lifuti oyo Tata na bino ya Likolo abomopanga bino. Tango ozali kopesa likabo na mobola, kobeta kelelo te liboso na yo ndenge bato ya lokuta basalaka na bandako ya mayangani mpe na babala-bala, mpo ete bato bakumisa bango. Ya solo nalobi na bino; basiʼbazwi lifuti na bango. Kasi tango yo ozali kopesa eloko na mobola, sala yango na ndenge ete loboko na yo ya mwasi eyeba te likambo loboko ya mobali ezali kosala; mpo ete likabo na yo epesama na sekele; bongo Tata na yo oyo amonaka makambo oyo esalamaka na sekele akopesa yo lifuti. Tango bozali kobondela, bolanda te bizaleli ya bato ya lokuta, bango balingaka kobondela ya kotelema na bandako ya losambo mpe na bisika oyo babala-bala ekutanaka, mpo ete bato bamona bango. Ya solo nalobi na bino: basiʼbazwi lifuti na bango. Kasi yo, soki olingi kobondela, kota na ndako na yo, kanga porte mpe bondela Tata na yo oyo azali na esika ya sekele; bongo Tatana yo oyo amonaka makambo oyo esalamaka na sekele, akopesa yo lifuti. Tango bozali kobondela, bozongela-zongela maloba te ndenge bapakano basalaka. Pamba te, bakanisaka ete Nzambe akoyoka bango soki balobi mingi. Bosalaka lokola bango te. Pamba te, Tata na bino ayebi soki bozali na posa ya eloko nini, liboso ete bosenga ye yango! Bobondelaka boye: Tata na biso ozali na Likolo, tika ete kombo na yo ekumisama, tika ete Bokonzi na yo eya, tika ete mokano na yo esalama, awa na nse mpe kuna na likolo. Pesa biso lelo bilei na biso ya mokolo na mokolo, limbisa mabe na biso ndenge biso mpe tolibisaka baoyo basalaka biso mabe. Batela biso mpo tokweya na komekama te, kasi kangola biso na mabe. [Pamba te, bokonzi, nguya mpe kembo ezali ya yo mpo na libela na libela.] Pamba te soki bolimbisi bato mabe na bango, Tata na bino ya Likolo akolimbisa bino mpe. Kasi soki boboyi kolimbisa bato mabe na bango, Tata na bino mpe akolimbisa bino te. Tango bozali koboya kolia mpo na mabondeli, bokoma mawa-mawa tendenge bato ya lokuta basalaka. Pamba te, bakomisaka bilongi mawa-mawa mpo na kolakisa bato ete bazali koboya kolia. Nalobi na bino ya solo, basiʼbazwi lifuti na bango. Kasi tango yo ozali koboya kolia mpo na mabondeli, sukola elongi na yo mpe pakola malasi na motu, mpo moto ata moko te ayeba ete oboyi kolia mpo na mabondeli; longola kaka Tata na bino oyo avandaka na sekele. Bongo Tata na yo, oyoamonaka makambo oyo esalamaka na sekele, akopesa yo lifuti. — Bobomba bomengo na mokili oyo te; epai mpese ekoki kolia yango mpe ekoki kobeba, mpe epai miyibi bakoki kotobola mpe koyiba. Kasi bobomba bomengo na likolo; epai mpese ekoki kolia yango te mpe ekoki kobeba te, mpe epai miyibi bakoki kotobola te mpe koyiba te. Pamba te, epai bomengo na yo ezali, motema na yo mpe ekozala kuna. Liso ezali mwinda ya nzoto; soki liso na yo ezali malamu, nzoto na yo mobimba ekozala moi. Kasi soki liso na yo ezali mabe, nzoto na yo mobimba ekozala molili. Bongo soki moi oyo ezali na yo ekomi molili, molili yango ekokoma makasi penza. —Moto moko te akoki kosalela bakonzi mibale. Pamba te, akoyina moko mpe akolinga mosusu, to akokangama na moko mpe akoboya oyo mosusu: bokoki kosalela Nzambe na mbongo te. Yango wana nalobi na bino, bomitungisa te mpo na bomoi na bino: soki bokolia nini mpe soki bokomela nini. To mpo na nzoto na bino, soki bokolata nini. Boni, bomoi eleki biloko ya kolia te? Bongo nzoto, eleki bilamba te? Botala bandeke ya likolo elonaka te, ebukaka te, mpe ebombaka bilei na bibomopanga te, kasi Tata na bino ya Likolo aleyisaka yango. Boni, boleki yango na tina te? Nani kati na bino, mpo na mitungisi na ye, akoki kobakisa molayi ya bomoi na ye, ata mpo na ngonga moko. Bongo mpo na nini bomitungisaka mpo na bilamba ya kolata? Botala bafololo ya bilanga ndenge ekolaka; yango esalaka te mpe etongaka bilamba te. Nzokande nayebisi bino, ata mokonzi Salomon, kati na nkembo na ye mobimba, alataki te lokola moko na yango. Bongo soki Nzambe azali kolatisa na ndenge wana matiti ya bilanga, oyo ezali na bomoi lelo mpe lobi ekobwakama na moto; akoki kolatisabino koleka yango te? A a! bato ya kondima moke! Yango wana, bomitungisa te mpe boloba te: “Tokolia nini?” to “Tokomela nini?” to “Tokolata nini?” Biloko wana nyonso, ezali bapakano nde baluka-lukaka yango. Kasi mpo na bino, Tata na bino ya Likolo ayebi ete bozali na yango posa. Boluka liboso Bokonzi ya Nzambe mpe bosembo na ye, bongo biloko wana nyonso bakobakisela bino yango. Yango wana, bomitungisa te mpo na mokolo ya lobi; pamba te, mokolo ya lobi ekomitungisa na makambo na yango, yango moko. Mokolo na mokolo ezali na pasi oyo ekoki na yango! —Bosambisa te, mpo basambisa bino mpe te. Pamba te, bakosambisa bino ndenge bino mpe bosambisaka baninga; mpe bakozongisela bino ndenge bino mpe bozongiselaka baninga. Bongo mpo na nini ozali komona mwa lititi oyo ezali na liso ya ndeko na yo, kasi ozali komona te eteni ya nzete oyo ezali na liso na yo? Ndenge nini okoki koloba na ndeko na yo: “nalongola mwa lititi oyo ezali na liso na yo”, nzokande, oyo ya yo moko ezali na eteni ya nzete? Moto ya kokosana! Longola liboso mwa eteni ya nzete oyo ezali na liso na yo, bongo okomona malamu mpo na kolongola mwa lititi oyoezali na liso ya ndeko na yo. —Bopesa te biloko ya bosantu na bambwa; mpe babwakela bangulu bapawuni na bino te; nakobanga ete eniata-niata yango mpe ezongela bino mpo na kopasola bino mike-mike. —Bosenga, mpe bakopesa bino; boluka, mpe bokozwa; bobeta, mpe bakofungolela bino. Pamba te oyo asengaka, bapesaka ye. Oyo alukaka, azwaka. Mpe oyo abetaka, bafungolelaka ye porte. Nani kati na bino akoki kopesa mwana na ye libanga soki asengi ye limpa? To soki asengi ye mbisi, akopesa ye nioka? Soki bino bato mabe, boyebi kopesa biloko ya malamu na bana na bino, bongo mpo na nini te, Tata na bino oyo azali na Likolo, akopesabiloko ya kitoko na baoyo basengaka ye yango? —Makambo nyonso oyo bolingaka ete bato mosusu basalela bino, bosala yango mpe ndenge moko mpo na baninga. Pamba te, oyo nde mateya ya Mibeko mpe ya baprofeta. —Bokota na porte ya moke! Pamba te porte ezali monene, mpe nzela oyo ememaka na libebi ezali monene. Mpe bato mingi penza bazali kokota na yango. Kasi Porte ezali moke, mpe nzela oyo ememaka na bomoi ezali moke. Mpe bato moke kaka nde bazali komona yango. —Bokeba na baprofeta ya lokuta. Bayelaka bino na loposo ya bameme, kasi na solo bazali penza bambwa ya zamba. Bokoyeba bango na misala na bango. Boni, bokoki kobuka mbuma ya vinona nzete ya sende? To mpe mbuma ya figi na nzete ya nzube? Ndenge moko mpe, nzete nyonso ya malamu ebotaka bambuma ya malamu; kasi nzete ya mabe ebotaka bambuma ya mabe. Nzete ya malamu ekoki kobota te bambuma ya mabe. Ndenge moko mpe, nzete ya mabe ekoki kobota te bambuma ya malamu. Nzete nyonso oyo ebotaka bambuma ya malamu te, bapikolaka yango mpe babwakaka yango na moto. Yango wana, bokoyeba bango na misala na bango. —Ezali te bato nyonso oyo balobaka na ngai: “Nkolo! Nkolo!”, nde bakokota na Bokonzi ya Likolo; kasi kaka oyo asalaka mokano ya Tata na ngai oyo azali na Likolo. Na mokolo wana, bato mingi bakoloba na ngai: “Nkolo! Nkolo!”, tosakolaki makambo na kombo na yo te? Tobenganaki milimo mabe mpe tosalaki makambo mingi ya kokamwa na kombo na yo te? Bongo ngai nakozongisela bango: “Bolongwa! Nayebi bino te! Bino bozalaki kosala mabe!” —Yango wana, moto oyo azali koyoka maloba na ngai mpe azali kosalela yango, akokani na moto ya mayele oyo atongaki ndako na ye likolo ya libanga. Mbula ebetaki mingi penza, mayi etondaki koleka, mipepe ya makasi eyaki mpe ebetaki na ndako yango. Kasi atako bongo, ndako yangoekweyaki te pamba te yango etongamaki likolo ya libanga. Kasi moto oyo ayokaka maloba na ngai mpe asalelaka yango te, akokani na zoba oyo atongaki ndako na ye likolo ya zelo. Mbula ebetaki mingi penza, mayi etondaki koleka, mipepe ya makasi eyaki mpe ebetaki na ndako yango. Kasi ndako yango ekweyaki mpe ebebaki nyonso. Tango yesu asilisaki koloba makambo wana, ebele ya bato bakamwaki mingi penza mpo mateya na ye. Pamba te, azalaki koteya na bokonzi nyonso, kasi lokola balakisi ya Mibeko na bango te. Tango Yesu akitaki na ngomba, bato ebele penza balandaki ye. Bongo moto moko ya maladi ya maba ayaki, afukamaki liboso na ye, mpe alobaki: —Nkolo, soki olingi, okoki kokomisa ngai peto. Yesu atombolaki loboko, asimbaki ye, mpe alobaki: —Nalingi yango; koma peto. Kaka na tango wana apetolamaki na maba na ye. Bongo yesu alobaki na ye: —Yoka! koyebisa likambo oyo na moto te; kasi kende komilakisa epai ya nganga-Nzambe mpe pesa likabo oyo Moyize atinda. Yango ekozala litatoli epai na bango. Tango yesu azalaki kokota na Kapenawumi, mokonzi moko ya basodaayaki epai na ye mpe asengaki ye lisalisi; alobaki: —Nkolo, mosali na ngai alali na ndako, azali na maladi ya buka-buka, mpe azali koyoka pasi mingi penza! Yesu azongiselaki ye: —Nakokende kobikisa ye! Mokonzi ya basoda alobaki: —Nkolo, nazali ya kokoka te mpo ete okota na ndako na ngai; kasi loba kaka liloba moko mpe mosali na ngai akobika. Pamba te ngai moko mpe nazali na nse ya bokonzi ya bakonzi, mpe nazali na basoda oyo bazali na nse ya bokonzi na ngai. Soki nalobi na moko: “Kende”, akokende. Mpe na mosusu; “Yaka”, akoya. Mpe na mosali na ngai: “Sala boye”; akosala yango. Yesu akamwaki mingi tango ayokaki bongo. Bongo alobaki na bato oyo bazalaki kolanda ye: —Nalobi na bino ya solo, naino namoni kondima monene ya boye te na Isayele. Nalobi na bino: bato mingi bakowuta na mikili ya Este mpe ya Weste bakovanda elongo na Abraham, Izaki mpe Zakobi kati na Bokonzi ya Likolo. Kasi bato oyo basengelaki kozala bato ya Bokonzi, bakobwaka bango libanda, kati na molili; epai ekozala kolela mpe koswa mino. Bongo Yesu alobaki na mokonzi ya basoda: —Kende, esalama se bongo ndenge ondimeli! Mpe, kaka na tango wana, mosali na ye abikaki. Tango Yesu akomaki na ndako ya Piere, akutaki bokilo ya pierealali na mbeto mpo azalaki na fievre. Yesu asimbaki loboko na ye, mpe fievre esilaki. Bongo atelemaki, mpe abandaki kobongisela ye biloko ya kolia! Tango pokwa ekomaki, bamemelaki Yesu bato ebele oyo bazalaki ya kokangama na milimo mabe. Na liloba moko, azalaki kobengana milimo wana ya mabe; mpe azalaki kobikisa bato nyonso ya maladi. Na yango nde maloba ya moprofeta Ezayi ekokisamaki: Azwaki bapasi na biso, mpe amemaki bamaladi na biso! Tango Yesu amonaki bato ebele penza bazingaki ye, atindaki bayekoli na ye bakatisa na ngambo mosusu ya ebale. Molakisi moko ya Mibeko ayaki epai na ye, mpe alobaki: —Moteyi, nakolanda yo epai nyonso okokende! Kasi yesu azongisaki: —Banyama ya zamba bazali na mabulu na bango, mpe bandeke bazali na bazala na bango; kasi Mwana ya Moto azali na esika oyo akoki kopemisa motu te! Moto mosusu, moko na kati ya bayekoli na ye, alobaki na ye: —Nkolo, pesa ngai nzela nakende liboso kokunda tata na ngai. Kasi Yesu azongiselaki ye: —Landa ngai, mpe tika baoyo bakufa bakunda bakufi na bango. Bongo Yesu amataki na bwato mpe bayekoli na ye balandaki ye. Na mbala moko, mopepe ya makasi ebandaki koleka na ebale, na ndenge ete mbonge ezalaki komata likolo koleka bwato. Kasi Yesu azalaki kolala pongi. Bayekoli bapusanaki pene-pene na ye mpe balamusaki ye; balobaki: —Nkolo, bikisa biso, tolingi kokufa! Kasi yesu azongisaki: —Bato ya kondima moke! Mpo na nini bozali kobanga? Atelemaki, agangelaki mopepe na ebale, mpe kimia ezongaki. Bato bakamwaki mpe batunaki: —Yango moto oyo azali nani, mpo ete mopepe na ebale etosa ye? Tango bakomaki na ngambo mosusu ya ebale, na mokili ya Gadara, bato mibale bazalaki na milimo mabe, babimaki na simetiele mpe bayaki kokutana na Yesu. Bazalaki na kanda mingi penza, yango wana moto ata moko te azalaki komeka koleka na nzela wana. Babandaki koganga: —Mwana ya Nzambe, olingi kosala biso nini? Boni, oye kotungisa bisoliboso ete tango ekoka? Mwa mosika moke, etonga monene ya bangulu ezalaki kolia. Milimo mabe ebondelaki Yesu: —Soki obengani biso, tinda biso tokota na bangulu wana! Bongo Yesu alobaki: —Bokende! Milimo mabe ebimakina na bato wana mibale mpe ekotaki na bangulu. Kaka na tango wana, bangulu yango nyonso elongwaki mbangu na ngomba, edindaki na ebale mpe ekufaki na mayi. Bato oyo bakengelaka bangulu bakimaki; bakendaki na vile, mpe bayebisaki makambo nyonso na oyo esalamaki na bato oyo bazalaki na milimo mabe. Bato nyonso ya vile babimaki mpo na kokutana na Yesu; tangu bamonaki ye, babondelaki ye alongwa na mokili na bango. Yesu amataki na bwato, akatisaki ebale mpe akendaki na vile na ye. Bamemelaki ye moto moko akufa makolo, oyo azalaki ya kolala na mbeto. Tango Yesu amonaki kondima na bango, alobaki na moto oyo akufa makolo: —Mwana na ngai, yika mpiko, masumu na yo elimbisami! Mpo na yango, balakisi mosusu ya Mibeko babandaki koloba-loba na nse ya mitema: “A a, moto oyo azali kotiola Nzambe!” Yesu ayebaki makanisi na bango mpe atunaki bango: —Mpo na nini bozali na makanisi ya mabe na mitema na bino? Eloko nini ezangi pasi mpo na koloba: “Masumu na yo elimbisami”, to koloba: “Telema mpe tambola?” Kasi mpo boyeba ete Mwana ya Moto azali na bokonzi, na mokili, ya kolimbisa masumu… Bongo alobaki na moto oyo akufa makolo: —Telema, kamata mbeto na yo, mpe zonga na ndako na yo. Moto yango atelemaki mpe akendaki na ndako na ye. Tango ebele ya bato bamonaki bongo, kobanga ezwaki bango, mpe babandaki kokumisa Nzambe oyo apesaki bokonzi ya ndenge wana na bato. Bongo Yesu akendaki. Tango azalaki koleka, amonaki moto moko kombo na ye Matie, avandaki na biro oyo bafutiselaka mpaku. Bongo yesu alobaki na ye: —Landa ngai! Matie atelemaki mpe alandaki ye. Tango yesu azalaki kolia na ndako ya Matie, bafutisi mpaku ebele, na bato ya masumu, bayaki mpe baliaki elongo na Yesu, na bayekoli na ye. Tango bafarizeo bamonaki bongo, batunaki bayekoli na ye: —Mpo na nini moteyi na bino azali kolia elongo na bafutisi mpaku mpe bato ya masumu? Tango yesu ayokaki yango, alobaki: —Bato ya nzoto malamu bazalaka na posa ya monganga te, kasi ezali bato ya maladi nde bazalaka na posa ya monganga Kasi bokende koyekola tina ya maloba oyo: Nalingi bozala bato ya mitema mawa, kasi naboyi mbeka. Pamba te; nayaki mpo na kobengabato na sembo te, kasi bato ya masumu. Bongo bayekoli ya Jean bayaki mpe batunaki ye: —Mpo na nini, biso na bafarizeo toboyaka kolia mpo na mabondeli, kasi bayekoli na yo baboyaka kolia te mpo na mabondeli? Yesu azongiselaki bango: —Ndenge nini, bato oyo babengami na mobali oyo abali, bakoki kozala na mawa na tango ye azali elongo na bango? Kasi tango ekoya, tango bakolongola mobali oyo abali na kati na bango; bongo nde bakoboya kolia. Moto moko te akoki kokamata kitendi ya sika mpona abamba elambaya kala, mpo ete kitendi wana ekopasola elamba ya kala mpe lidusu ekokoma monene. Ndenge moko mpe batiaka te vino ya sika na basaki ya kala; soki te basaki ekopasuka, vino ekosopana mpe basaki ekobeba. Kasi batiaka vino ya sika na basaki mpe ya sika, bongo vino na basaki ekobombama malamu! Tango Yesu azalaki naino koloba makambo wana, mokonzi moko ayaki, afukamaki liboso na ye mpe alobaki: —Mwana na ngai ya mwasi akufi kaka sikʼoyo, kasi yaka kotiela ye loboko na yo mpe akozala lisusu na bomoi! Yesu atelemaki mpe alandaki ye elongo na bayekoli na ye. Mwasi moko azalaki na maladi ya kotanga makila, mpe maladi yango ewumelaki bambula zomi na mibale; ayaki na sima mpe asimbaki songeya elamba na Yesu. Pamba te, akanisaki ete: “Soki nasimbi kaka elamba na ye, nakobika!” Yesu atalaki na sima, amonaki ye mpe alobaki: —Mwana na ngai, yika mpiko; kondima na yo ebikisi yo! Mpe mwasi abikaki kaka na tango wana. Tango yesu akomaki na ndako ya mokonzi, amonaki babeti miziki na batoebele bazalaki kotia makelele; bongo alobaki: —Bobima, mwana akufi te kasi alali pongi. Kasi bato babandaki koseka ye. Sima ya kobimisa bato libanda, akotaki, asimbaki elenge mwasina loboko, bongo elenge mwasi atelemaki! Sango yango epanzanaki na ekolo wana mobimba. Tango Yesu alongwaki wana, bato mibale bakufa miso bazalaki kolanda ye na koganga: —Mwana ya David, yokela biso mawa! Tango akotaki na ndako, bakufi miso bayaki epai na ye; mpe atunaki bango: —Bondimi ete nakoki kosala yango? Bango bazongisaki: —E e nkolo! Bongo asimbaki miso na bango, mpe alobaki: —Esalemela bino ndenge bondimeli! Bongo miso na bango efungwamaki. Yesu akebisaki bango: —Boyoka, moto moko te ayeba likambo oyo. Kasi bango tango bakendaki, bapanzaki Sango na ye na ekolowana mobimba. Tango bazalaki kobima, bamemelaki ye moto moko azalaki na molimomabe mpe azalaki koloba te. Tango Yesu abenganaki molimo wana ya mabe, moto oyo azalaki kolobate, abandaki koloba. Bato bakamwaki mpe balobaki: —Naino tomoni likambo ya boye te na Isayele! Kasi bafarizeo balobaki: —Azali kobengana milimo mabe na nguya ya mokonzi ya milimo mabe. Yesu azalaki kotambola na bamboka nyonso mpe na bavile nyonso; azalaki koteya na bandako na bango ya mayangani, mpe azalaki kosakola Sango Malamu ya Bokonzi; azalaki kobikisa bamaladi nyonso mpe bapasi ya ndenge na ndenge. Tango amonaki ebele ya bato, ayokaki mawa mingi penza mpo na bango, pamba te bazalaki komitungisa mpe bazalaki ya kolemba lokola bameme oyo ezangi mobateli. Bongo Yesu alobaki na bayekoli na ye: —Bambuma ya kobuka ezali mingi na elanga, kasi basali bazali moke! Yango wana bosenga nkolo ya elanga atinda basali na elanga na ye! Yesu abengaki bayekoli na ye zomi na mibale, mpe apesaki bango bokonzi mpo na kobengana milimo mabe, mpe mpo na kobikisa maladi nyonso mpe bapasinyonso. Tala bakombo ya bapostolo zomi na mibale: ya liboso, Simon oyo babengaka Piere, Andele ndeko ya Piere, Zaki mwana ya Zebede, Jean ndeko ya Zaki; Filipi mpe Batelemi; Toma mpe Matie mofutisi mpaku; Zaki mwana ya Alfe mpe Tade; Simon oyo azalaki moto ya lisanga ya Bazelote, mpe Yuda Iskariote oyo atekaki Yesu. Ezali bato oyo zomi na mibale nde Yesu atindaki, sima ya kopesabango mitindo oyo: —Bokende te epai ya bato ya bikolo mosusu, mpe bokota te na bavile ya bato ya Samariya. Kasi bokende epai ya bameme ebunga oyo ya libota ya Isayele. Tango bokokende, boteya ete Bokonzi ya Likolo ekomi pene-pene. Bobikisa bato ya maladi, basekwisa bato bakufa, bopetola bato ya maladi ya maba, mpe bobengana milimo mabe. Bopesa ofele, mpo bino mpe bozwaki ofele. Bomema wolo te, palata te, ata mpe mbongo te na baposi na bino. Bomema sakosi te, elamba mosusu te, sapato mosusu te, ata mpe nzete te, mamba te “mosali asengeli kozwa bilei na ye na mosala na ye”. Tango bokokota na vile to mboka moko, boluka moto oyo azali ya kokoka mpo na koyamba bino, mpe bovanda na ndako wana kino tango bokokende. Tango bokoti na ndako moko, bopesa bato ya ndako yango mbote. Mpe soki ndako yango ezali ya kokoka, tika ete kimia na bino ezala likolo na yango; kasi soki ezali ya kokoka te, tika ete kimia na bino ezonga epai na bino. Soki baboyi koyamba bino na vile moko to na ndako moko, to koyoka maloba na bino, bobima na ndako wana to na vile wana, mpe bopupola makolo na bino. Ya solo nalobi na bino: na mokolo ya kosambisama, vile wana ekozwa etumbu monene koleka etumbu ya mokili ya Sodomo mpe Gomore. —Boyoka, natindi bino lokola bameme na kati ya bambwa ya zamba; bozala na bokebi lokola banyoka, mpe bozala kimia lokola bapijon. Kasi bokeba, pamba te bakofunda bino na tribunale ya Bayuda; mpe bakobeta bino bafimbo na bandako na bango ya mayangani. Ya solo, bakomema bino liboso ya bayangeli mpe liboso ya mikonzi minene mpo na ngai; na bongo nde, bokozwa nzela ya kotatola kombo na ngai epai na bango mpe epai ya bato ya bikolo mosusu. Tango bakokanga bino, bomitungisa te mpo na makambo oyo bokoloba, pamba te, maloba ya koloba ekobima kaka na tango wana. Mpo ekozala bino te bato bokoloba, kasi ekozala nde Molimo ya Tata na bino nde akoloba na minoko na bino. Ndeko moko akoteka ndeko na ye mpo abomisa ye; tata akoteka mwana na ye; bana bakotombokela baboti na bango mpe bakobomisa bango. Bato nyonso bakoyina bino mpo na ngai. Kasi moto oyo akotia molende kino na suka, akobika. Soki banyokoli bino na vile moko, bokima na oyo mosusu. Nalobi na bino ya solo: bokosilisa te kokimakima na bavile nyonso ya Isayele liboso ete Mwana ya moto aya. Mwana ya kelasi aleki molakisi na ye te, moto ya mosala aleki mpe mokonzi na ye te. Ekoki na mwana kelasi akoma lokola molakisi na ye, mpe moto ya mosala akoma lokola mokonzi na ye. Soki babengaki nkolo ya ndako Belzebule, bongo bakoloba nini na bato ya ndako na ye? —Yango wana bobanga bango te; pamba te makambo nyonso oyo ebombama ekomonana polele, mpe makambo nyonso ya sekele ekoyebana. Makambo oyo nayebisi bino sikʼoyo na molili, boloba yango na moi; mpe oyo bazali koloba na bino na litoyi, bosakola yango na likolo ya ndako. —Bobanga te bato oyo bakoki koboma nzoto, kasi bakoki te koboma elimo na bino. Kasi bobanga kaka ye oyo akoki koboma nzoto na elimo, na lifelo. Boni, batekaka bandeke ya mike-mike mibale na likuta moko te? Nzokande, ata moko na yango te ekoki kokweya na nse soki Tata na binoya Likolo ayebi te. Mpe mpo na bino, boyeba malamu ete, ata basuki ya motu na bino ezali ya kotangama. Yango wana, bobanga te pamba te bino boleki bandeke ebele na motuya. Moto oyo akondima ngai na miso ya bato, ngai mpe nakondima ye liboso ya Tata na ngai oyo azali na Likolo. Kasi oyo akowangana ngai na miso ya bato, ngai mpe nakowangana ye liboso ya Tata na ngai oyo azali na Likolo. —Bokanisa te ete nayaki mpo na komemela bino kimia na mokili; namemeli bino kimia te, kasi mopanga ya etumba. Naye mpo na kokabola mwana mobali na tata na ye, mwana mwasi na mama na ye, mpe mwasi ya libala na bokilo na ye ya mwasi. Banguna ya moto, bakozala kaka bato ya libota na ye moko. —Moto oyo akolinga tata na ye mpe mama na ye koleka ngai, azali ya kokoka te mpo azala moto na ngai. Moto oyo akolinga mwana na ye ya mobali to ya mwasi koleka ngai, azali ya kokoka te mpo azala moto na ngai. Moto oyo akomema ekulusu na ye te mpe alandi ngai te, azali ya kokoka te mpo azala moto na ngai. Moto oyo akoluka kobikisa bomoi na ye akobungisa yango; kasi oyo akobungisa bomoi na ye mpo na ngai akozwa yango. —Moto oyo ayambi bino ayambi ngai; mpe oyo ayambi ngai, ayambi mpe Moto oyo atindaki ngai. Moto oyo ayambi moprofeta mpo azali moprofeta, akozwa lifuti ndengemoko lokola oyo ya moprofeta. Mpe moto oyo ayambi moto na sembo mpo azali moto na sembo, akozwa lifuti ndenge moko lokola oyo ya moto na sembo. Moto oyo akopesa ata kopo moko kaka ya mayi ya malili epai ya moko ya bana mike oyo mpo azali moyekoli na ngai, nalobi na bino ya solo, akozwa lifuti na ye. Tango yesu asilisaki kopesa mitindo wana na bayekoli na ye zomi na mibale, akendaki koteya mpe kolakisa na bavile na bango. Tango Jean Batiste azalaki na boloko, ayokaki sango ya misala oyo Kristo azalaki kosala; bongo atindaki bayekoli na ye mpo batuna Yesu: —Boni, ozali moto oyo asengeli koya, to esengeli tozela mosusu? Yesu azongiselaki bango: —Bozonga mpe boyebisa Jean makambo nyonso oyo boyoki mpe bomoni: bato bakufa miso bazali komona, bato bakufa makolo bazali kotambola, bato ya maba bazali kopetolama, bato bayokaka te bazali koyoka, mpe bato bakufa bazali kosekwa, mpe Sango Malamu ezali kosakolama na babola. Esengo na moto oyo akokweyisa kondima na ye te mpo na ngai. Tngo bayekoli ya Jean bakendaki, Yesu abandaki koloba na ebele ya bato mpo na Jean: —Eloko nini bokendaki kotala na esobe? Mwa nzete oyo mopepe ezalaki koningisa bipai na bipai? Bokendaki kotala nani? Moto moko alataki bilamba ya kitoko? Ezali bongo te, mpo bato oyo balataka bilamba ya kitoko bavandaka na bandako ya mikonzi. Bongo bokendaki kotala nini? Moprofeta? E e! Nalobi na bino, ye aleki kutu moprofeta. Pamba te, ye azali moto oyo ekomama boye mpo na ye: Natindi ntoma na ngai liboso na yo; oyo akobongisela yo nzela! Nalobi na bino ya solo: na kati ya bato nyonso oyo babotama na basi, moto ata moko te aleki Jean Batiste. Nzokande, moto oyo azali moto moke na Bokonzi ya Likolo, ye nde aleki ye! Banda na mikolo ya Jean Batiste kino sikʼoyo, Bokonzi ya Likoloezali kozwama na makasi penza, mpe bilombe nde bato bazali kobotola yango. Pamba te baprofeta nyonso mpe Mibeko basakolaki kino na tango ya Jean. Mpe soki bolingi kondima yango, boyeba ete ye azali Eliya oyo asengeli koya. Oyo azali na matoyi mpo na koyoka, ayoka! —Bongo bato ya tango oyo bakokani na banani? Bakokani na bana mike oyo bafandi na zando, mpe bazali koloba na baninga na bango: Tobetelaki bino flute, kasi bobinaki te. Toyembaki banzembo ya ebembe, kasi boyokaki mawa te. Pamba te, Jean ayaki, azalaki kolia te mpe komela te, kasi bolobaki: “Azali na milimo mabe!” Bongo Mwana ya Moto aye, azali kolia mpe komela, kasi bolobi: “Azali lokoso mpe molangwi masanga, moninga ya bafutisi mpaku mpe ya bato ya masumu”. Kasi bwanya ezali komonana sembo na nzela ya misala na yango. Bongo Yesu abandaki kopamela bavile epai ye asalaki makamwisi mingi; pamba te, bato yango babongolaki mitema na bango te. —Mawa na yo Korazini! Mawa na yo Betsaida! Pamba te, soki makamwisi oyo esalamaki kati na bino, esalamaka na Tire mpe Sidon, mbele banda kala, bato ya bavile wana balingaki kobongola mitema, mpe kolakisa yango na kolata saki mpe komipakola putulu. Yango wana nalobi na bino, na mokolo ya kosambisama, etumbu na bino ekoleka oyo ya Tire mpe Sidon. Bongo yo Kapenawumi, okanisi ete bokotombola yo kino na likolo? Te! Bakokitisa yo kino na mboka ya bakufi. Pamba te, soki makamwisi oyoesalamaki kati na yo, esalamaka na Sodomo, mbele vile wana ezali kowumela kino lelo oyo. Yango wana nalobi na bino, na mokolo ya kosambisama, etumbu na yo ekoleka oyo ya Sodomo! Na tango wana, Yesu alobaki: —Tata, Nkolo ya Likolo mpe ya nse, nakumisi yo mpo obombi makambo oyo na bato ya bwania mpe ya mayele, mpe olakisi yango na bana mike. E e Tata, yo moko olingaki ete esalama bongo! Tata apesaki makambo nyonso na maboko na ngai. Moto moko te ayebi Mwana, kaka Tata nde ayebi ye. Moto moko te ayebi Tata, kaka Mwana nde ayebi ye na moto oyo Mwana alingi kolakisa ye. Boya epai na ngai bino nyonso oyo bolembi mpe bomemi mikumba, bongo ngai nakopesa bino kopema. Bozala basali na ngai, mpe boyekola epai na ngai; pamba te nazalimoto ya boboto mpe ya komikitisa; mpe bokozwa kopema na milimo na bino. Pamba te, kosalela ngai ezali pasi te, mpe mokumba na ngai ezali pepele. Na mikolo wana, yesu alekaki na bilanga ya ble; ezalaki mokolo ya saba. Bayekoli na ye bazalaki na nzala; bongo babandaki kobuka ble mpe kolia yango. Tango bafarizeo bamonaki bango, balobaki na Yesu: —Tala bayekoli na yo, bazali kosala likambo oyo epekisami kosala na mokolo ya saba! Kasi Yesu azongiselaki bango: —Naino botangi te likambo David asalaki, tango ye na baninga na ye bazalaki na nzala? Akotaki na Ndako ya Nzambe mpe aliaki elongo na baninga na yemampa oyo bapesaki makabo na Nzambe. Nzokande ezala ye, ezala baningana ye, bazalaki na ndingisa te ya kolia yango; kaka banganga-Nzambende bakokaki kolia yango. To, naino botangi te na Mobeko, ete na mokolo ya saba, banganga-Nzambe oyo basalaka na Ndako ya Nzambe babuka mobeko ya saba; bongo yango ezalaka mabe te mpo na bango? Ya solo nalobi na bino, moto moko azali awa aleki ndako ya Nzambe! A a! soki bososolaki tina ya maloba oyo: Nasepelaka na bato ya mitema mawa, kasi naboyi mbeka, ya solo, mbele bokokaki te koloba na bato oyo basali mabe te, ete basali mabe. Pamba te Mwana ya Moto azali Mokonzi ya mokolo ya Saba. Tango alongwaki kuna, akendaki na ndako na bango ya mayangani. Moto moko azalaki wana, azalaki na loboko ya kokufa. Bongo batunaki ye: —Boni, nzela epesami mpo na kobikisa moto mokolo ya saba? Batunaki bongo mpo bazwa nzela ya kofunda ye. Kasi Yesu alobaki na bango: —Nani kati na bino soki azali na meme moko kaka, mpe soki yango ekweyi na libulu mokolo ya saba, akokita na libulu te mpo na kobimisa yango? Ya solo, moto aleki meme na motuya. Yango wana, nzela ezali mpo nakosala likambo ya malamu na mokolo ya saba! Bongo alobaki na moto yango: —Tanda loboko! Atandaki yango, mpe yango ekomaki malamu lokola oyo mosusu. Kasi bafarizeo babimaki mpe basanganaki mpo na koluka nzela ya kobomisa Yesu. Tango yesu ayebaki yango, alongwaki wana. Bato ebele balandaki ye, mpe abikisaki bango nyonso. Kasi apekisaki bango mpo baloba te soki ye azali nani. Na bongo nde maloba ya moprofeta Ezayi ekokisamaki: Tala mosali na ngai oyo napona, ye azali moto oyo ngai nalingaka, mpe asepelisaka ngai mingi. Nakotia Molimo na ngai likolo na ye mpe akosakola bosembo na bikolo ya bapaya. Akoswana te, mpe akoganga te. Bakoyoka mongongo na ye na babala-bala te. Mwa nzete oyo egumbami, akobuka yango te, mpe mwinda oyo elingi kokufa, akoboma yango te; kino tango akolongisa bosembo. Bongo bato ya bikolo ya bapaya bakotia elikya na kombo na ye. Bongo bamemelaki ye moto moko azalaki na milimo mabe, azalaki moto ya kokufa miso mpe azalaki koloba te. Yesu abikisaki ye, bongo moto yango akomaki koloba mpe komona. Bato nyonso bakamwaki mpe balobaki: —Moto oyo azali mwana ya David te? Kasi tango bafarizeo bayokaki bongo, balobaki: —Moto oyo azali kobengana milimo mabe na nguya ya Belezebule: mokonzi ya milimo mabe! Yesu ayebaki makanisi na bango, mpe alobaki: —Bokonzi nyonso oyo ezali ya kokabwana kati na yango moko, ekopanzana; mpe vile nyonso to ndako nyonso oyo ezali ya kokabwana kati na yango moko, ekoki kowumela te. Soki Satana abengani Satana, wana amikaboli kaka ye moko; bongo bokonzi na ye ekowumela ndenge nini? Soki ngai nabenganaka milimo mabe na nguya ya Belezebule, bongo bato na bino babenganaka bango na nguya ya nani? Yango wana, bango moko bakozala bazuzi na bino. Kasi soki nabenganaka milimo mabe na nguya ya Molimo na Nzambe, wana bosengeli boyeba ete Bokonzi ya Nzambe esiʼekomi epai na bino. To mpe, ndenge nini moto akoki kokota na ndako ya elombe mpekoyiba biloko na ye, soki naino akangisi ye na bansinga te? Kasi soki akangisi ye na bansinga, nde akoki koyiba biloko ya ndako na ye. Moto oyo azali elongo na ngai te, azali monguna na ngai; mpe oyo asangisaka elongo na ngai te, azali kopanza. Yango wana nalobi na bino boye: lisumu nyonso mpe kotiola Nzambeekolimbisama; kasi kotiola Molimo Mosantu ekolimbisama te. Moto oyo alobi maloba ya mabe mpo na Mwana ya moto, akolimbisama; kasi oyo akoloba maloba ya mabe mpo na Molimo Mosantu, akolimbisama te, ezala na tango oyo to mpe na tango oyo ezali koya. Soki nzete ezali malamu, ekobota mpe mbuma ya malamu; soki nzete ezali mabe, ekobota mpe mbuma ya mabe. Pamba te, nzete eyebanaka na mbuma na yango. Bino mabota ya banioka! Ndenge nini bino bato ya mabe bokoki kolobamakambo ya malamu? Pamba te, makambo oyo moto alobaka ewutaka na oyoetondi na kati ya motema na ye. Moto malamu alobaka makambo ya malamu oyo ezali na ebombeloya malamu, oyo ezali kati na ye. Moto mabe mpe alobaka makambo ya mabeoyo ezali na ebombelo ya mabe, oyo ezali kati na ye. Nalobi na bino, na mokolo ya kosambisama, bato bakosamba mpo na maloba ezanga tina oyo balobaka. Pamba te, bakolongisa yo mpo na maloba na yo, mpe bakopesa yo etumbu mpo na maloba na yo. Bongo ndambo ya balakisi ya Mibeko mpe bafarizeo balobaki na ye: —Moteyi tolingi olakisa biso elembo! Yesu azongisaki: —Libota ya bato mabe mpe ezangi botosi na Nzambe nde ezali kosenga elembo. Bakopesa ye elembo mosusu te longola kaka oyo esalamaki na moprofeta Jonasi. Pamba te, ndenge Jonasi afandaki na libumu ya mbisi mikolo misato mpe butu misato, ndenge moko mpe Mwana ya Moto akofanda na nseya mabele mikolo misato mpe butu misato. Na mokolo ya kosambisama, bato ya Ninive bakotelema na bato ya tango oyo mpe bakokatela bango etumbu. Pamba te, bango babongolaki mitemana bango tango bayokaki mateya ya Jonasi. Nzokande, moto moko azali awa aleki Jonasi. Na mokolo ya kosambisama, mokonzi mwasi ya Sude akotelema na bato ya tango oyo mpe akokatela bango etumbu. Pamba te, ye awutaki na mboka moko ya mosika mpe ayaki koyoka maloba ya bwania ya Salomon. Nzokande, moto moko azali awa aleki Salomon. —Soki molimo mabe ebimi na moto, ekokende koyenga-yenga na bisikaekawuka mpo na koluka esika ya kopema. Soki ezwi yango te, ekoloba: Malamu nazonga na ndako wana epai nabimaki. Tango ekozonga, mpe ekokuta ndako polele, bakombi yango, mpe babongisi yango malamu; bongo molimo yango ya mabe ekokende, mpe ekozwa milimo mosusu sambo oyo eleki yango na mabe, ekoya kokota mpe kovanda kuna. Bongo lolenge ya moto oyo ekokoma mabe mingi koleka ndenge azalaki liboso. Ekozala mpe bongo mpo na bato mabe ya tango oyo. Tango yesu azalaki naino koloba na bato, mama na ye mpe bandeko na ye ya mibali batelemaki libanda, mpe balingaki koloba na ye. Bongo moto moko ayebisaki ye: —Mama na yo mpe bandeko na yo ya mibali batelemi na libanda, balingi koloba na yo! Kasi Yesu azongiselaki ye: —Nani azali mama na ngai? Banani bazali bandeko na ngai? Bongo alakisaki bayekoli na loboko, mpe alobaki: Mama na ngai mpe bandeko na ngai ya mibali, bango oyo. Pamba te, moto oyo asalaka mokano ya Tata na ngai ya Likolo ye nde azali ndeko na ngai ya mobali, ndeko na ngai ya mwasi, mpe mama na ngai! Kaka mokolo wana, Yesu abimaki na ndako mpe akendaki pembeni ya ebale. Bato ebele penza bayaki kotondela ye bipai na bipai; yango wana amataki na bwato mpe avandaki. Bongo ebele ya bato batelemaki na mokili. Mpe ateyaki bango makambo mingi na masapo. Alobaki na bango: —Moloni moko akendaki kolona mbuma na elanga. Tango azalaki kobwaka bambuma, ndambo ekweyaki pembeni-pembeniya nzela; bandeke bayaki mpe baliaki yango. Ndambo ekweyaki na esika ya mabanga, epai mabele ezalaki mingi te. Bambuma yango ebimaki noki mpo mabele ezalaki na mozindo te. Kasi tango moi ya makasi ebimaki, mwa banzete yango ezikaki mpe ekawukaki mpo ezalaki na misisa te. Mosusu ekweyaki kati ya banzube; banzube ekolaki mpe efinaki mwabanzete yango. Kasi mosusu ekweyaki na mabele ya malamu, mpe ebotaki bambuma: moko, nkama moko; mosusu, ntuku motoba; mpe mosusu, ntuku misato. Oyo azali na matoyi, ayoka! Bayekoli bapusanaki pene-pene na ye mpe batunaki ye: —Mpo na nini ozali kolobela bango na masapo? Bongo ye azongiselaki bango: —Bino bozwi nzela ya koyeba basekele ya Bokonzi ya Likolo, kasi bango bazwi yango te. Pamba te, moto nyonso oyo azali na eloko, bakopesa ye mpeakotonda na yango; kasi moto oyo azali na eloko te, bakobotola ye ata oyo azali na yango. Tala tina nazali kosalela masapo mpo na kolobela bango; mpo ata bazali kotala, kasi bazali komona te; ata bazali kotia matoyi, kasi bazali koyoka te mpe kososola te. Ezali mpo na bango nde maloba ya moprofeta Ezayi ekokisami, oyo ezali koloba: Bokoyoka, kasi bokososola te; bokotala, kasi bokomona te! Pamba te mitema ya bato oyo ekomi libanga, bazipi matoyi mpe bakangi miso na bango; na kobanga ete miso na bango emona, matoyi na bango eyoka, mitema na bango esosola, babongola mitema mpe nakoka kobikisa bango. Nzokande, bino bozali bato ya esengo, pamba te miso na binoezali komona mpe matoyi na bino ezali koyoka. Ya solo nalobi na bino: baprofeta mingi mpe bato mingi ya bosembo bazalaki na posa ya komona makambo oyo bozali komona, kasi bamonaki yango te; bazalaki na posa ya koyoka makambo oyo bozali koyoka, kasi bayokaki yango te. Boyoka ndimbola ya lisapo ya moloni mbuma: Mbala nyonso soki moto ayoki Liloba ya Bokonzi kasi asosoli yango te, monguna akoya mpe akopikola mbuma oyo elonamaki na motema na ye; oyo nde mbuma ekweyaki pembeni-pembeni ya nzela. Oyo ekweyaki na esika ya mabanga, ezali moto oyo ayoki lilobampe ayambi yango mbala moko na esengo. Kasi lokola ezangaki misisa, ewumelaki kaka mwa tango moke. Pamba te, tango bapasi to tango minyoko ekoya mpo na Liloba, akokweya noki penza. Oyo ekweyaki na kati ya banzube, ezali moto oyo ayoki Liloba kasi makanisi ya bomoi oyo mpe bomengo oyo ekosaka, efinaka yango, mpe epesaka yango nzela te mpo na kobota. Kasi oyo ekweyaki na mabele ya malamu, ezali moto oyo ayoki Liloba mpe asosoli yango. Abotaka mbuma: nkama, ntuku motoba, mpe ntuku misato. Yesu alobelaki bango lisapo mosusu: —Bokonzi ya Likolo ekokani na moto moko alonaki mbuma ya malamu na elanga na ye. Tango bato bazalaki kolala, monguna na ye ayaki mpe alonaki matitiya mabe na kati ya ble, bongo akendaki. Tango ble ebimaki mpe ebandaki kobimisa mwa mitu ya mbuma, matiti ya mabe mpe ebimaki. Basali ya nkolo ya elanga bayaki mpe balobaki: —Mokonzi, olonaki mbuma ya malamu na elanga na yo te? Bongo matiti oyo ya mabe ewuti wapi? Ye azongisaki: —Monguna moto asali bongo! Basali batunaki: —Olingi tokende mpe topikola yango? Ye azongisaki: —Te! Mpo tango bokobanda kolongola matiti ya mabe, bokoki mpe kopikola ble elongo na yango. Botika yango mibale ekola esika moko kino na tango ya kobuka mbuma. Na tango wana nde, nakoloba na bato oyo balongolaka mbuma: “Bolongola liboso matiti ya mabe, bokanga yango maboke mpe botumba yango; kasi bobuka ble mpe botia yango na ebombelo na ngai ya mbuma”. Yesu ayebisaki bango lisapo mosusu: —Bokonzi ya Likolo ekokani na mbuma ya mutarde; moto moko azwaki mpe alonaki yango na elanga na ye. Mbuma yango eleki bambuma nyonso na moke; kasi soki ebimi, elekaka biloko nyonso oyo balonaka na elanga mpe ekomaka mwa nzeteepai bandeke bayaka kosala bandako na bango na bitapi na yango! Yesu ayebisaki bango lisapo mosusu: —Bokonzi ya Likolo ekokani na kisi oyo evimbisaka mampa oyo mwasi akamati mpeasangisi yango na kopo misato ya farine, kino tango farine nyonso ekovimba. Yesu alobaki na ebele ya bato makambo nyonso wana na masapo, mpe ata mbala moko te azalaki kolobela bango bongo azangisa lisapo. Na bongo nde maloba ya moprofeta ekokisamaki: Nakolobela bango na masapo. Nakoyebisa bango makambo oyo ebombama banda mokili esalama! Bongo atikaki ebele ya bato mpe akotaki na ndako. Bayekoli na ye bayaki epai na ye mpe balobaki: —Limbolela biso lisapo ya matiti ya mabe kati na elanga. Yesu azongisaki: —Moto oyo alonaki mbuma ya malamu, ezali Mwana ya moto. Elanga ezali mokili; mbuma ya malamu ezali bana ya Bokonzi. Matiti ya mabe ezali nde bato ya satana. Monguna oyo alonaki matiti ya mabe, ezali Zabolo; tango ya kobuka mbuma ezali suka ya mokili. Bongo bato oyo balongolaka mbuma, ezali baanzelu. Ndenge moko lokola bapikolaka matiti ya mabe mpe batumbaka yango na moto, ekozala mpe bongo na suka ya mokili. Mwana ya Moto akotinda baanzelu na ye, mpe bango bakolongola na Bokonzi na ye makambo nyonso oyo ekweyisaka na masumu elongo na bato oyo basalaka mabe. Bakobwaka bango na fulu ya moto; epai ekozala kolela mpe koswa mino. Bongo bato na sembo bakongenga lokola moi na kati ya Bokonzi ya Tata na bango. Oyo azali na matoyi mpo na koyoka, ayoka! —Bokonzi ya Likolo ekokani na eloko ya talo oyo babomba na elanga; soki moto moko amoni yango, akobomba yango lisusu. Na esengo wana, akokende koteka biloko na ye nyonso oyo azali na yango mpe akosomba elanga wana! Bokonzi ya Likolo ekokani lisusu na moto ya mombongo oyo alukaka bapawuni ya kitoko. Soki amoni pawuni moko ya ntalo mingi, akokende koteka biloko nyonso oyo azali na yango mpe akosomba yango! —Bokonzi ya Likolo ekokani lisusu na monyama oyo babwaki na ebale, mpe ekangi bambisi ya ndenge na ndenge. Soki etondi, bato oyo bakangaka mbisi bakobimisa yango na mokili, bakofanda, mpe bakotia oyo ya malamu na bitunga bongo bakobwaka oyo ya mabe. Ekozala mpe bongo na suka ya mokili; baanzelu bakoya kokabola batomabe na kati ya bato na sembo. Bongo bakobwaka bato mabe na fulu ya moto epai ekozala kolela mpe koswa mino. —Bososoli makambo oyo nyonso? Bazongisaki: —E e! Bongo Yesu alobaki na bango: —Yango wana molakisi nyonso ya Mibeko oyo akomi moyekoli ya makambo ya Bokonzi ya Likolo, akokani na nkolo ndako oyo azali kobenda kati na bomengo na ye: biloko ya sika mpe biloko ya kala. Tango Yesu asilisaki koloba masapo wana, alongwaki kuna mpe azongaki na vile na ye. Abandaki koteya bato na ndako nabango ya mayangani, mpe bango bazalaki kokamwa. Batunaki: —Bwania mpe nguya ya kosala makamwisi oyo azwi yango wapi? Ezali ye te mwana ya salampatie? Mama na ye kombo na ye Mariya te? Bongo Zaki, Zozefi, Simon mpe Zude bazali bandeko na ye ya mibali te? Bongo bandeko na ye ya basi, bango nyonso bazali na biso awa te? Yango azwi makambo oyo nyonso wapi? Bongo ye azalaki libaku mpo na kondima na bango. Kasi yesu alobaki na bango: —Moprofeta azangaka lokumu kaka na mboka na ye mpe na ndako na ye. Bongo asalaki makamwisi mingi kuna te, mpo bazangaki kondima. Na tango wana, mokonzi Erode ayokaki sango ya Yesu. Bongo alobaki na basali na ye: —Ezali Jean Batiste asekwi kati na bakufi, yango wana azali na nguya ya kosala makamwisi. Pamba te, Erode atindaki bakanga Jean, batia ye na minyololo mpe na boloko, mpo na likambo ya Erodiade: mwasi ya ndeko na ye Filipo. Mpo Jean azalaki koloba na ye: —Ozali na ndingisa te mpo na kobala ye. Erode azalaki koluka kobomisa ye kasi azalaki kobanga bato, mpo bazalaki komona Jean lokola moprofeta. Na mokolo ya kokanisa mbotama ya Erode, mwana ya mwasi ya Erodiade abinaki liboso na bango mpe asepelisaki Erode mingi penza. Yango wana Erode apesaki ye elaka ya kolapa ndayi ete, akopesa ye eloko nyonso oyo akosenga. Bongo ye, lokola mama na ye atindikaki ye mpo na koloba; alobaki: —Pesa ngai motu ya Jean Batiste na sani! Mokonzi ayokaki mawa mingi penza; kasi mpo na ndayi oyo alapaki mpe mpo na bato oyo bavandaki na ye na mesa, yango wana atindaki bapesa ye yango. Bongo atindaki bakata motu ya Jean na kati ya boloko. Bamemaki motu ya Jean na sani, mpe bapesaki yango na elenge mwasi. Bongo ye, amemaki yango na mama na ye. Bayekoli ya Jean bayaki, bazwaki nzoto na ye mpe bakundaki yango. Bongo bakendaki mpe bayebisaki Yesu likambo yango. Tango yesu ayokaki sango yango, alongwaki wana na bwatompe akendaki ye moko kaka, na esika ezangi bato. Kasi tango bato bayokaki yango, babimaki na bavile na bango mpe balandaki ye na makolo. Tango Yesu akitaki na bwato, amonaki bato ebele penza; ayokelaki bango mawa mingi. Bongo abikisaki bamaladi na bango. Tango pokwa ekomaki, bayekoli bayaki epai na ye, mpe balobaki: —Tozali na esika ezangi bato, mpe tango esiʼeleki; zongisabato oyo na bamboka mpo bakende kosomba bango moko biloko ya kolia! Kasi Yesu alobaki na bango: —Tina ezali te mpo bakende. Bopesa bango bino moko biloko ya kolia! Bongo bayekoli bazongisaki: —Tozali awa na mampa mitano mpe bambisi mibale kaka. Yesu alobaki: —Bomemela ngai yango awa. Sima atindaki bato bavanda na matiti. Akamataki mampa mitano wana mpe bambisi mibale, atombolaki miso na likolo mpe azongisaki matondi. Akataki mampa yango mpe apesaki yango na bayekoli na ye. Bongo bayekoli bapesaki yango na bato. Bango nyonso baliaki mpe batondaki. Balokotaki biteni oyo etikalaki mpe etondisaki bitunga zomi na mibale. Baoyo baliaka bazalaki pene-pene mibali nkoto mitano, kotangabasi na bana te. Sima Yesu atindaki bayekoli na ye bamata na bwato mpe bakatisa na ngambo mosusu liboso na ye, ye atikalaki mpo na kozongisa bato. Tango asilisaki kozongisa bato, amataki na ngomba na esika na ye moko kaka, mpo na kobondela. Tango butu ekomaki, azalaki kaka ye moko. Nzokande bwato ekomaki na kati-kati ya ebale mpe mbonge ezalaki kobeta yango; pamba te mopepe ezalaki kotutana na yango. Na ngonga ya minei ya butu, Yesu akendaki epai na bango mpe azalaki kotambola likolo ya ebale. Tango bayekoli bamonaki ye azalaki kotambola likolo ya ebale, batondaki na kobanga mpe balobaki: —Elima! Bongo babandaki koganga mpo na somo. Kasi Yesu alobaki na bango: —Boyika mpiko, bobanga te, ezali ngai! Bongo Piere azongisaki: —Nkolo, soki ezali yo, loba na ngai naya epai na yo, likolo ya mayi. Yesu alobaki na ye: —Yaka! Piere akitaki na bwato, mpe abandakikotambola likolo ya mayi mpo nakokende epai ya Yesu. Kasi tango amonaki mopepe ezalaki makasi, abangaki, mpe abandaki kodinda; agangaki: —Nkolo, bikisa ngai! Na mbala moko Yesu apesaki ye loboko, asimbaki ye, mpe alobaki na ye: —Moto ya kondima moke, mpo na nini otiaki tembe? Tango bamataki na bwato, mopepe mpe esilaki. Baoyo bazalaki na bwato bafukamaki liboso na ye, mpe balobaki: —Ya solo, ozali Mwana na Nzambe! Awa basilisaki kokatisa ebale, bakomaki na mokili ya Genezareti. Tango bato ya esika wana bayebaki ete ezali ye, bapanzaki sango pembeni-pembeni nyonso ya mokili wana. Bongo bamemelaki ye bato na bango nyonso ya maladi. Babondelaki ye ete atika bango basimba kaka songe ya zambala na ye. Bongo baoyo nyonso basimbaki ye, babikaki. Bongo bafarizeo mpe balakisi ya Mibeko bawutaki na Yeruzalem, bayaki epai ya Yesu mpe batunaki ye: —Mpo na nini bayekoli na yo batosaka te bonkoko na biso? Pamba te basokolaka maboko na bango te liboso ya kolia. Yesu azongiselaki bango: —Bongo bino, mpo na nini botosaka te Mibeko ya Nzambe te? Kasi botosaka kakabonkoko na bino? Pamba te Nzambe alobaki: “Tosa tata mpe mama na yo”, mpo oyoakolakela tata to mama na ye mabe, esengeli baboma ye. Kasi bino bolobaka ete: soki moto alobi na tata na ye to na mama na ye: “Biloko oyo nalingaki kopesa yo, nakopesa yango likabo na Nzambe”; mpe moto oyo asali bongo azali na mabe te epai ya tata na ye to mpe mama na ye, mpo na biloko oyo alingaki kopesa ye. Ya solo, na ndengewana, bozali penza koboma Liloba ya Nzambe mpo na bonkoko na bino. Bato ya kokosana! Ezayi asakolaki malamu mpo na bino: Bato oyo bazali kokumisa ngai kaka na bibebo, kasi mitema na bango ezali mosika na ngai. Bazali kosambela ngai kaka pamba, pamba te mateya na bango ezali kaka mibeko oyo esalami na bato. Bongo Yesu abengaki ebele ya bato mpe alobaki: —Boyoka mpe bososola: Oyo ekotaka na monoko ya moto ekomisaka ye mbindo te, kasi oyo ebimaka na monoko na ye yango nde ekomisaka ye mbindo. Bongo bayekoli bapusanaki pene-pene na ye mpe bayebisaki ye: —Oyebi te ete Bafarizeo babeti mabaku tango bayoki maloba na yo? Yesu azongisaki: —Eloko nyonso oyo Tata na ngai ya Likolo alona te, bakopikola yango. Botika bango! Bazali bato bakufa miso oyo bazali kotambusa bato mosusu oyo bakufa miso. Soki moto akufa miso azali kotambusa moto mosusuoyo akufa miso, bango mibale bakokweya na libulu! Piere alobaki na ye: —Limbolela biso lisapo oyo. Bongo Yesu atunaki bango: —Bino mpe bozali naino kososola te? Boyebi te ete oyo nyonso ekotaka na monoko ekendaka na libumu, bongo na sima, ebimaka na libanda? Kasi oyo ebimaka na monoko, ewutaka na motema mpe yango nde ekomisaka moto mbindo. Pamba te, makanisi ya mabe, koboma, kosala kindumba, makambo ya soni, koyiba, litatoli ya lokuta mpe kofinga ewutaka na motema. Makambo oyo nde ekomisaka moto mbindo. Kasi, kolia na maboko oyoesokolami te, ekomisaka moto mbindo te. Yesu alongwaki wana mpe akendaki na mokili ya Tire mpe Sidon. Bongo mwasi moko ya Kanana oyo azalaki kovanda na mokiliwana, ayaki epai na ye mpe agangaki: —Nkolo, Mwana ya David, yokela ngai mawa! Mwana na ngai ya mwasi azali konyokwama mingi penza na molimo ya mabe! Kasi Yesu azongiselaki ye ata liloba te. Bayekoli bapusanaki pene-pene ya Yesu, mpe babondelaki ye: —Bengana ye, Pamba te azali koganga na sima na biso. Yesu azongisaki: —Batindaki ngai kaka mpo na bameme ya Isayele oyo ebunga! Kasi mwasi wana ayaki mpe afukamaki liboso na ye mpe alobaki: —Nkolo, salisa ngai! Yesu azongisaki: —Ezali malamu te mpo na kokamata limpa ya bana mpe kobwakela yango bambwa! Mwasi alobaki: —E e Nkolo, kasi bambwa baliaka ata bandambo oyo ekweyaka na mesa ya bakonzi na bango! Bongo Yesu azongiselaki ye: —Mwasi, kondima na yo ezali monene. Esalama mpo na yo ndenge olingi! Mpe kaka na tango wana, mwana na ye ya mwasi abikaki. Yesu alongwaki wana mpe akendaki pembeni ya ebale ya Galileya. Amataki na ngomba mpe afandaki wana. Bato ebele penza bayaki epai na ye. Bamemaki bato oyo batambolaka tengu-tengu, bato bakufa miso, bababa, bato oyo bakufa makolo to maboko, mpe bato mosusu koleka. Batiaki bango liboso ya Yesu, bongo abikisaki bango. Bato bakamwaki mingi tango bamonaki bababa bakomaki koloba, bato bakufa makolo to maboko babikaki, bato oyo batambolaka tengu-tengubabandaki kotambola malamu, mpe bato oyo bakufa miso babandaki komona. Bongo bakumisaki Nzambe ya Isayele. Yesu abengaki bayekoli na ye mpe alobaki: —Nazali koyokela ebele ya bato oyo mawa mingi, pamba te basali na ngai mikolo misato mpe bazali na eloko ye kolia te. Nalingi kozongisa bango na nzala te, soki te bakoki kokweya na nzela! Bongo bayekoli na ye bazongisaki: —Epai wapi tokoki kozwa mampa ya kokoka, na esika oyo ezangi bato mpo na koleyisa bato ebele boye? Yesu atunaki bango: —Bozali na mampa boni? Bango bazongisaki: —Sambo na mwa bambisi ya mike-mike. Yesu alobaki na ebele ya bato bavanda na mabele. Bongo azwaki mampa sambo wana na bambisi, azongisaki matondi, abukaki yango mpe apesaki yango na bayekoli na ye. Bongo bango bapesaki yango na bato. Bango nyonso baliaki mpe batondaki. Bongo balokotaki biteni oyo etikalaki, mpe yango etondisaki bitunga sambo. Bato oyo baliaki bazalaki mibali nkoto minei, kotanga basi na bana te. Tango Yesu asilisaki kozongisa bato, amataki na bwato mpe akendaki na mokili ya Magadani. Bafarizeo na Basaduseo bayaki epai ya Yesu mpo na komeka ye, mpe basengaki ye alakisa bango elembo moko oyo ekowuta na Likolo. Yesu azongiselaki bango: —Na pokwa, bolobaka ete: “Lobi ekozala malamu penza, pamba telikolo ezali motane!” Mpe na tongo, bolobaka: “Lelo mbula ya makasi ekobeta, pamba te, likolo ezali motane mpe eyindi”. Boyebi kolimbola bilembo ya likolo, kasi bokoki te kolimbola bilembo ya batango. Libota ya bato mabe mpe oyo ezangi botosi nde ezali kosengaelembo ya kokamwisa. Bakopesa ye elembo mosusu te longola kakaoyo esalamaki na Jonasi. Bongo atikaki bango mpe akendaki na ye. Tango bayekoli bakatisaki na ngambo mosusu ya ebale, babosanaki komema mampa. Yesu alobaki na bango: —Bokeba mpe bokengela mpo na kisi oyo evimbisaka ya mampa ya bafarizeo mpe ya Basaduseoo! Bayekoli babandaki kotunana bango na bango, mpe balobaki: —Ezali mpo tomemi mampa te! Kasi Yesu ayebaki makanisi na bango mpe alobaki: —Mpo na nini bozali kotunana bino na bino, mpo bomemi mampa te? Bato ya kondima moke! Naino bososoli te? Bozali kokanisa te mampa mitano oyo bato nkoto mitano baliaki? Bongo botondisaki bitunga boni na oyo etikalaki? To mampa sambo oyo bato nkoto minei baliaki? Bongo botondisaki bitunga boni na oyo etikalaki. Ndenge nini bozali kososola te ete nalobaki mpo na mampa te? Kasi bokeba mpo na kisi oyo evimbisaka mampa ya bafarizeo mpe ya Basaduseo? Bongo basosolaki ete alobaki na bango mpo bakeba na kisi oyo evimbisakamampa te, kasi mpo na mateya ya bafarizeo mpe Basaduseo. Tango Yesu ayaki na mokili ya Sezareya ya Filipo, atunaki bayekoli na ye: —Bato balobaka ete Mwana ya moto azali nani? Bazongisaki: —Basusu balobaka: Jean Batiste; Basusu: Eliya; mpe basusu: Jeremiya to moko ya baprofeta. Yesu atunaki bango: —Bongo bino, bolobaka ete ngai nazali nani? Simon Piere azongisaki: —Yo ozali Kristo, Mwana na Nzambe ya bomoi! Bongo Yesu alobaki na ye: —Esengo mingi ezali na yo Simon mwana ya Jonasi! Pamba te moto te ayebisi yo makambo oyo, kasi ezali Tata na ngai oyo ya Likolo. Bongo ngai nalobi na yo ete: yo ozali Piere, mpe na likolo ya libanga oyo nakotonga Lingomba na ngai. Mpe baporte ya lifelo ekoki kolonga yango te. Nakopesa yo bafungola ya Bokonzi ya Likolo. Nyonso oyo okokangaawa na mokili, ekokangama mpe na Likolo; mpe oyo yo okofungola awa na mokili, ekofungwama mpe na Likolo! Bongo Yesu apekisaki bayekoli na ye mpo ete baloba na moto moko te ete ye azali Kristo. Banda tango wana, Yesu abandaki kolimbola na bayekoli na yeete asengeli akende na Yeruzalem; kuna bankolo, bakonzi ya banganga-Nzambe, mpe balakisi ya Mibeko bakonyokola ye, bakoboma ye; mpe akosekwa na mokolo ya misato. Bongo Piere amemaki ye pembeni mpe abandaki kolobela ye: —Nkolo, tika Nzambe abatela yo! Makambo wana eyela yo te! Yesu abalukaki epai ya Piere, mpe alobaki na ye: —Longwa mosika na ngai Satana! Ozali libaku mpo na ngai, pamba te makanisi na yo ezali oyo ya Nzambe te, kasi ya bato. Bongo Yesu alobaki na bayekoli na ye: —Soki moto alingi kolanda ngai, esengeli amiboya ye moko, amema ekulusu na ye, mpe alanda ngai. Pamba te, oyo alingi kobikisa bomoi na ye, akobungisa yango; kasi oyo akobungisa bomoi na ye mpo na ngai, akozwa yango lisusu. Soki moto azwi mokili mobimba mpe abungisi elimo na ye, litombanini akozwa? To eloko nini moto akoki kopesa mpo ete asomba elimo na ye? Pamba te Mwana ya Moto akoya na kembo ya Tata na yeelongo na baanzelu na ye mpe akopesa na moto na moto lifuti oyo ekoki na mosala na ye. Nalobi na bino ya solo: bato mosusu bazali awa liboso ete bakufa, bakomona Mwana ya Moko koya kati na Bokonzi na ye. Sima ya mikolo motoba, Yesu akamataki Piere, Zaki mpe Jean ndeko ya Zaki, amemaki bango likolo ya ngomba moko ya molayi penza, epai bazalaki kaka bango moko. Bongo nzoto na ye ebongwanaki liboso na bango; elongi na ye ekomaki kongengalokola moi mpe bilamba na ye ekomaki pembe makasi penza. Na mbala moko, Moyize na Eliya babimelaki bango mpe babandaki kosolola na Yesu. Bongo Piere alobaki na Yesu: —Nkolo, ezali malamu tozala na biso awa; soki ondimi, nakotonga bandako misato ya kapo, moko mpo na yo, moko mpo na Moyize, mpe moko mpo na Eliya! Na tango azalaki naino koloba, lipata moko ezalaki kongengaezipaki bango, mpe mongongo ewutaki na lipata elobaki: —Oyo azali Mwana na ngai ya bolingo, asepelisaka ngai mingi; boyokelaka ye! Tango bayekoli bayokaki mongongo yango, bakweyaki bilongi na nse, mpe kobanga ekotelaki bango. Kasi Yesu ayaki, asimbaki bango mpe alobaki: —Botelema, bobanga te! Mpe tango batombolaki miso, bamonaki moto mosusu te, kaka Yesu ye moko. Awa bazalaki kokita na ngomba, Yesu apesaki bango motindo oyo: —Makambo oyo bomoni boloba yango na moto te, kino tango Mwanaya moto akosekwa kati na bakufi. Bongo bayekoli batunaki ye: —Mpo na nini balakisi ya Mibeko balobaki ete esengeli Eliya aya liboso? Yesu azongisaki: —Solo, Eliya akoya, mpe akobongisa makambo nyono. Kasi ngai nalobi na bino: Eliya asiʼayaki mpe bayebaki ye te; kasi basalaki ye makambo nyonso ndenge bango moko balingaki. Ndenge moko mpe ndenge bakoyiokola Mwana ya moto. Bongo bayekoli basosolaki ete alobelaki bango mpo na Jean Batiste. Tango bakomaki epai ebele ya bato bazalaki; moto moko apusanaki pene-pene ya Yesu, afukamaki liboso na ye, mpe alobaki: —Nkolo, yokela mwana na ngai ya mobali mawa! Azali na maladi ya ndeke mpe azali konyokwama mingi penza. Mbala mingi akweyaka na moto to na mayi. Namemaki ye epai ya bayekoli na yo; kasi bango bakoki te kobikisa ye! Yesu azongisaki: —Libota ya bato mabe mpe ezangi kondima! kino tango nini nakozala na bino elongo? Kino tango nini nakokanga lisusu motema mpo na bino? Bomemela ngai ye awa! Yesu agangelaki molimo mabe, mpe yango ebimaki na mwana. Kaka na tango wana, mwana abikaki. Sima bayekoli bayaki epai ya Yesu bango moko kaka, mpe batunaki ye: —Mpo na nini tokokaki te kobengana molimo wana? Yesu azongiselaki bango: —Mpo bozali na kondima moke. Nalobi na bino ya solo, soki kondima na bino ezalaki lokola mbuma ya mutarde, mbele bokoki koloba na ngombaoyo: “Longwa awa, kende kuna!” Yango ekolongwa; mpe eloko moko tebokokaki kolemba kosala. [Kasi molimo ya ndenge oyo, ebimaka kaka na mabondeli mpe na koboya kolia mpo na mabondeli.] Tango bayaki elongo na Galileya, Yesu alobaki na bango: —Bakoteka Mwana ya moto na maboko ya bato, mpe bakoboma ye. Kasi akosekwa na mokolo ya misato. Bongo bayekoli bayokaki mawa mingi penza. Tango bakomaki na Kapenawumi, bato oyo bafutisaka mpako ya Ndako ya Nzambe bayaki epai ya Piere, mpe batunaki: —Boni, Moteyi na bino afutaka mpako ya Ndako ya Nzambe te? Piere azongisaki: —E e, afutaka! Tango Piere akotaki na Ndako, Yesu azwaki maloba liboso mpe atunaki ye: —Simon okanisi nini? Bakonzi ya mokili bafutisaka bampako na banani? Na bana na bango to na bato mosusu? Piere azongisaki: —Na bato mosusu! Bongo Yesu alobaki na ye: —Soki boye, bana-mboka basengeli kofuta te. Kasi mpo tobetisa bango mabaku te, kende na ebale, bwaka ndobo na mayi, mpe kamata mbisi ya liboso oyo okokanga; fungola monoko na yango mpe okomona mbongo ya ebende. Kamata yango, mpe pesa bango yango mpo na kofuta mpako na ngai na oyo ya yo. Na tango wana, bayekoli bayaki epai ya Yesu mpe batunaki ye: —Nani aleki monene na Bokonzi ya Likolo? Yesu abengaki mwana moko ya moke, atiaki ye na kati-kati na bango, mpe alobaki: —Nalobi na bino ya solo, soki bobongwani te mpe bokomi lokolabana mike te, bokokota te na Bokonzi ya Likolo. Yango wana, moto nyonso oyo akomikitisa lokola mwana oyo, ye nde azali moto monene na Bokonzi ya Likolo. Mpe moto nyonso oyo akoyamba mwana ya ndenge oyo na kombo na ngai, ayambi ngai moko. Kasi oyo akokweyisa na masumu mwana moko na kati ya bana mike oyo bazali kondima ngai, ekozala malamu mpo na ye ete bakanga ye libanga moko ya monene na kingo, mpe badindisa ye na nse penza ya ebale! Mawa mingi na mokili mpo na makambo oyo ekweyisaka bato na masumu! Makambo yango esengeli koya, kasi mawa mingi na moto oyo akozala nzela oyo makambo yango ekoyela. Soki ozali kokweya na masumu mpo na loboko to mpo na lokolo na yo, kata yango mpe bwaka yango mosika. Pamba te, ezali malamu mpo na yo okota na Bomoi na loboko moko to na lokolo moko; ete obwakama na moto oyo ekufaka te na maboko mibale to makolo mibale. Soki ozali kokweya na masumu mpo na liso na yo, longola yango mpe bwaka yango mosika. Pamba te ezali malamu mpo na yo okota na Bomoina liso moko; ete obwakama na moto ya lifelo na miso na yo nyonso mibale! Bokeba ete botiola ata mwana moko te na kati ya bana oyo pamba te, nalobi na bino: baanzelu na bango na Likolo, bamonaka tango nyonso elongi ya Tata na ngai oyo azali na Likolo. [Pamba te Mwana ya moto ayaki mpo na kobikisa baoyo babunga.] Bokanisi nini? Soki moto moko azali na bameme nkama bongo moko ebungi, akotika te bameme na ye ntuku libwa na libwa mosusu likolo ya ngomba, mpo akende koluka moko oyo ebungi? Mpe soki amoni yango, nalobi na bino ya solo, akoyoka esengo mingi penza mpo na meme wana moko, koleka esengo ya bameme ntuku libwa na libwa oyo ebungaki te. Ndenge moko mpe, Tata na bino ya Likolo, alingi te ete ata mwanamoko na kati ya bana oyo abunga. Soki ndeko na yo asali yo mabe, kende mpe lakisa ye mabe na yempe bozala kaka bino mibale. Soki ayokeli yo, wana ozongisi ndeko na yo na nzela ya malamu. Kasi soki ayokeli yo te, mema moto mosusu to bato mibale, mpo ete makambo nyonso oyo bokoloba endimama na nzela ya litatoli yabatemwe mibale to misato. Soki aboyi koyoka bango, yebisa likambo yango na Lingomba; soki aboyi koyokela Lingomba, zwa ye lokola mopakano mpe lokola mofutisi mpako. Nalobi na bino ya solo; makambo nyonso oyo bino bokokanga awa na nse, ekokangama mpe na Likolo; mpe nyonso oyo bino bokofungola awa na nse, ekofungwama mpe na Likolo. Nalobi na bino lisusu: soki bato mibale na kati na bino, awa na mokili, bayokani mpo basenga ata eloko nini, Tata na ngai oyo azalina Likolo akopesa bango yango. Pamba te esika bato mibale to misato basangani na kombo na ngai, ngai mpe nazali na kati na bango. Bongo Piere ayaki epai ya Yesu mpe atunaki: —Nkolo, mbala boni nasengeli kolimbisa ndeko na ngai oyo asalaka ngai mabe? Ekoki kozala mbala sambo? Yesu azongisaki: —Nalobi na yo te kino mbala sambo, kasi kino mbala tuku sambombala sambo! Yango wana, Bokonzi ya Likolo ekokani na mokonzi moko oyo alingaki kotanga mbongo na ye na basali na ye. Tango abandaki kotanga, bamemelaki ye mosali moko oyo azalaki na nyongo na ye ya bamili zomi na batalenta. Lokola azalaki na eloko moko te mpo na kofuta, mokonzi na ye atindaki ete bateka ye na mwasi na ye; na bana na ye, na biloko na ye nyonso, mpo nyongo na ye efutama. Kasi mosali oyo afukamaki liboso ya mokonzi, mpe abondelaki ye: —Kanga motema mpo na ngai, nakofuta yo nyongo nyonso! Mokonzi ayokelaki ye mawa, alimbisaki nyongo na ye mpe atikaki yeakende. Kasi tango mosali wana abimaki, akutanaki na moninga na ye ya mosala, oyo adefaki badeni na ye kama. Akangaki ye mpe afinaki na kingo. Bongo alobaki na ye: —Futa nyongo na ngai nyonso. Moninga na ye ya mosala afukamaki mpe abondelaki ye: —Kanga motema mpo na ngai, nakofuta yo nyonso na yo. Kasi ye aboyaki. Akendaki mpe atiesaki ye na boloko kino tangoasilisaki kofuta niongo nyonso. Tango basali mosusu bamonaki ndenge makambo elekaki, bayokaki mawa mingi penza, mpe bakendaki koyebisa nyonso epai ya mokonzi na bango. Bongo mokonzi abengaki mosali wana mpe alobaki na ye: —Mosali mabe! Nalimbisaki yo nyongo nyonso oyo ozalaki na yango, mpo obondelaki ngai. Boni, okokaki te koyokela moninga na yo mawa ndenge ngai mpe nayokelaki yo mawa. Lokola mokonzi na ye azalaki na kanda, apesaki ye na maboko ya bato oyo baniokolaka bato kino tango afutaki niongo nyonso. Na ndenge wana nde, Tata na ngai ya Likolo, akosala moto na moto na kati na bino, oyo akoboya kolimbis ndeko na ye na motema mobimba! Tango Yesu asilisaki koloba, atikaki Galileya mpe akendaki na mokili ya Yudea, na ngambo mosusu ya Yordani. Bato ebele penza balandaki ye mpe abikisaki bango wana. Bafarizeo bayaki epai ya Yesu mpo na komeka ye, mpe batunaki ye: —Boni, nzela epesami na mobali mpo alongola mwasi na ye na libala mpo na likambo moko boye? Yesu azongisaki: —Botangi naino te ete, na ebandeli Mokeli asalaki bango mobali mpe mwasi, mpe alobaki: yango wana mobali akotika tata na mama na ye, mpe akosangana na mwasi na ye, bongo bango mibale bakokoma moto se moko. Yango wana, bazali lisusu bato mibale te, kasi moto moko. Bongo, oyo Nzambe asangisi, moto akabola yango te! Bafarizeo balobaki na ye: —Bongo mpo na nini Moyize atindaki ete mobali akoma mokandaya koboma libala na mwasi na ye, mpe abengana ye na libala? Yesu azongiselaki bango: —Moyize apesaki bino nzela ya koboma mabala na basi na bino, mpo mitema na bino ezalaki mabanga. Kasi na ebandeli ezalaki bongo te. Nalobi na bino ete, oyo akokabwana na mwasi na ye, longola kaka mpo na likambo ye kindumba, mpe abali mwasi mosusu, asali ekobo. Bayekoli balobaki na ye: —Soki mobali asengeli kozala bongo liboso ya mwasi na ye, malamu kutu kobala te. Yesu azongisaki: —Bato nyonso te bakoki kondima mateya oyo, kasi kaka baoyo bazwi likabo yango. Pamba te, basusu babalaka te mpo bakufa mokongo banda babotama, basusu mpo bato balongola bango mapumbu, mpe basusu mpo na kosalela Bokonzi ya Likolo. Oyo akoki kondima makambo oyo, tika andimayango. Bongo bamemelaki Yesu bana mike mpo atiela bango maboko mpe abondela mpo na bango. Kasi bayekoli bagangelaki bango. Bongo Yesu alobaki: —Botika bana mike baya epai na ngai, bopekisa bango te; pambate Bokonzi ya Likolo ezali mpo na bato oyo bakokani na bango. Atielaki bango maboko, bongo alongwaki wana. Moto moko ayaki pene-pene ya Yesu, mpe atunaki: —Moteyi, likambo nini ya malamu esengeli nasala mpo nazwa Bomoi ya seko? Yesu azongiselaki ye: —Mpo na nini otuni ngai mpo na likambo oyo ezali malamu? Moto moko kaka azali malamu. Soki olingi kokota na Bomoi, tosa Mibeko! Moto yango atunaki: —Mibeko nini yango? Yesu azongisaki: — Koboma te, kosala kindumba te, koyiba te, koloba litatoli ya lokuta te, tosa tata mpe mama na yo, mpe linga moninga na yo lokolo omilingaka yo moko! Elenge mobali alobaki: —Natosaka mibeko wana nyonso. Bongo nazangi lisusu nini? Yesu alobaki na ye: —Soki olingi kozala moto ya kokoka, kende, teka biloko na yo, mpe pesa na babola, bongo okozwa bomengo na Likolo. Sima yaka, mpe landa ngai! Tango elenge mobali ayokaki bongo, akendaki na mawa, pambate azalaki na bozwi mingi penza. Bongo Yesu alobaki na bayekoli na ye: —Nalobi na bino ya solo: ezali pasi mpo moto ya mbongo akotana Bokonzi ya Likolo. Nalobi na bino lisusu ete: ezali pasi te mpo Shamo aleka na lidusu ya tonga, kasi ezali pasi mingi mpo moto ya mbongo akota na Bokonzi ya Nzambe. Tango bayekoli bayokaki bongo, bakamwaki mingi mpe batunaki: —Bongo nani akoki kobika? Yesu atalaki bango mpe alobaki: —Epai ya bato, yango ekoki kosalama te; kasi mpo na Nzambe, nyonso ekoki kosalama! Piere atunaki ye: —Tala, totiki nyonso mpo na kolanda yo, bongo ekozala bomi mpo na biso? Yesu azongiselaki bango: —Nalobi na bino ya solo: tango makambo nyonso ekokoma ya sikampe Mwana ya moto akovanda na Kiti na ye ya kembo, bino baoyo bolandaki ngai bokovanda mpe na bakiti zomi na mibale mpo na kosambisamabota zomi na mibale ya Isayele. Mpe moto oyo atika bandako na ye, bandeko na ye ya mibali, bandeko na ye ya basi, tata na ye, mama na ye, bana na ye, to bilanga na ye mpo na ngai, akozwa yango mbala nkama koleka, mpe akozwa lisusu bomoi ya seko. Kasi bato mingi oyo bazali bato ya liboso, bakokoma bato ya suka; mpe bato mingi oyo bazali bato ya suka bakokoma bato ya liboso! —Pamba te Bokonzi ya likolo ekokani na nkolo ya elanga, oyo abimaki na tongo-tongo mpo na kokende koluka bato oyo bakosalana elanga na ye ya vino. Ayokanaki na bango ete bakozwa deni moko mpo na mokolo moko, bongo atindaki bango na elanga na ye ya vino. Abimaki lisusu na ngonga ya libwa ya tongo, amonaki bato mosusu oyo bazalaki basomele, batelemaki na zando, mpe bazalaki kosala eloko moko te. Alobaki na bango: —Bino mpe bokende kosala na elanga na ngai ya vino, nakofuta bino lifuti oyo ekoka. Bango mpe bakendaki. Abimaki lisusu na ngonga ya midi, mpe na ngonga ya misato ya pokwa; asalaki mpe kaka ndenge moko. Abimaki lisusu na ngonga ya mitano ya pokwa, mpe amonaki lisusu bato batelemaki wana. Bongo atunaki bango: —Mpo na nini botelemi awa mokolo mobimba mpe bozali kosala eloko te? Bazongisaki: —Mpo moto moko te azwi biso na mosala. Bongo alobaki na bango mpe: —Bino mpe, bokende kosala na elanga na ngai ya vino. Tango pokwa ekomaki, nkolo ya elanga alobaki na kapita: —Benga basali mpe futa bango. Banda na bato oyo nazwaki na suka mpe sukisa na baoyo nazwaki liboso! Bato oyo babandaki mosala na ngonga ya mitano ya pokwa bayaki mpe bazwaki deni moko-moko na moto. Tango bato oyo nkolo ya elanga azwaki liboso na mosala, bayaki, bakanisaki ete bakozwa mbongo mingi koleka. Kasi bango mpe bazwaki kakadeni moko moko na moto. Tango bazwaki yango, basilikelaki kolo ya elanga; mpe balobaki: —Bato oyo ozwaki sima mpe basali kaka ngonga moko, ofuti bango ndenge moko na biso; nzokande biso tosali mosala ya makasi mokolomobimba mpe na nse ya moi makasi. Kasi nkolo ya elanga azongiselaki moko na bango: —Moninga na ngai, nasali yo mabe te. Toyokanaki te ete osala mpo na deni moko? Kamata lifuti na yo mpe kende. Ngai moko moto nasepeli kopesa moto oyo abandaki sima lifuti moko lokola oyo napesi yo. Boni, nazali na ndingisa te ya kosala ndenge ngai moko nalingi kosala na mbongo na ngai? To oyoki zuwa mpo nazali moto malamu? Yango wana, bato ya suka bakokoma bato ya liboso, mpe bato ya liboso bakokoma bato ya suka! Tango Yesu azalaki kokende na Yeruzalem, na nzela, akamataki bayekoli na ye zomi na mibale na esika ya bango moko kaka, mpe alobaki na bango: —Tala, tozali kokende na Yeruzalem, kuna bakokaba Mwana ya moto na maboko ya bakonzi ya banganga-Nzambe mpe ya balakisi ya Mibeko. Bakokatela ye etumbu ya liwa, mpe bakopesa ye na maboko ya bapakano, mpo baseka ye, babeta ye fimbo, mpe babaka ye na ekulusu. Bongo akosekwa na mokolo ya misato! Bongo mama ya bana ya Zebede ayaki epai ya Yesu elongo na bana na ye, afukamaki liboso na ye mpe asengaki ye likambo moko. Yesu atunaki ye: —Olingi nini? Azongisaki: —Ndima ete, kati na Bokonzi na yo, bana na ngai oyo mibale ya mibali, bavanda: moko na loboko na yo ya mobali, mpe mosusu na loboko na yo ya mwasi! Kasi Yesu alobaki na bango: —Boyebi te oyo bozali kosenga! Bokokoka komela kopo oyo ngai nakomela? Bazongisaki: —E e, tokokoka. Bongo Yesu alobaki na bango: —Ya solo, bokomela kopo oyo ngai nakomela; kasi kovanda na loboko na ngai ya mobali to na loboko na ngai ya mwasi, wana ezali nandingisa na ngai te. Bisika wana ekozala mpo na bato oyo Tata na ngai abongisa mpo na bango. Tango bayekoli zomi bayokaki makambo wana, basilikelakibandeko wana mibale. Yesu abengaki bango nyonso lisanga mpe alobaki: —Boyebi ete bakonzi ya bikolo bayangelaka bato na bango na makasi, mpe bato minene balakisaka bokonzi na bango likolo na bango. Kasi mpo na bino ekoki kozala bongo te. Nzokande, oyo alingi kozala moto monene kati na bino, esengeli azala mosali na bino. Mpe oyo alingi kozala liboso kati na bino; esengeli azala mowumbuna bino. Pamba te, Mwana ya moto ayaki te mpo bato basalela ye, kasi mpo na kosalela bato, mpe kopesa bomoi na ye mpo na kokangola bato ebelepenza! Tango Yesu na bayekoli na ye bazalaki kobima na Jeriko, bato ebele penza bazalaki kolanda ye. Bato mibale bakufa miso bavandaki pembeni ya nzela. Tango bayokaki ete Yesu azalaki koleka wana, bagangaki: —Nkolo, Mwana ya David yokela biso mawa! Bato bagangelaki bango, mpe balobaki na bango bavanda nyee; kasi bango bagangaki lisusu makasi: —Nkolo, mwana ya David yokela biso mawa! Yesu atelemaki, abengaki bango mpe atunaki bango: —Bolingi nasala nini mpo na bino? Bazongiselaki ye: —Nkolo, tolingi ete miso na biso efungwama! Yesu ayokelaki bango mawa mpe asimbaki miso na bango. Kaka na tango wana, babandaki komona mpe balandaki ye. Tango bapusanaki pene-pene ya Yeruzalem, mpe bakomaki na Betfaze, likolo ya ngomba ya banzete ya Olive, Yesu atindaki bayekoli mibale mpe alobaki na bango: —Bokende na mboka oyo ezali liboso na bino. Tango bokokomakaka na ebandeli ya mboka yango, bokomona mpunda ya mwasi oyo ezali ya kokangama, na mwana na yango pembeni. Bofungola yango, mpe bomemela ngai yango. Soki moto atuni bino likambo, bozongisa: “Nkolo azali na posa na yango”, mpe akotika yango noki. Makambo oyo esalamaki mpo ete maloba ya moprofeta ekokisama: Boloba na elenge mwasi ya Siona: Tala, Mokonzi na yo azali koya epai na yo; azali ya komikitisa mpe avandi likolo ya mpunda ya mwasi, likolo ya mwana ya mpunda, mwana ya mpunda ya mwasi. Bayekoli bakendaki mpe basalaki ndenge Yesu atindaki bango. Bamemaki mpunda ya mwasi na mwana mpunda, batiaki bilamba na bango likolo na yango, bongo Yesu avandelaki yango. Bato ebele penza batandaki bilamba na bango na nzela, basusu bakataki bitape ya nzete mpe batiaki yango na nzela. Bato oyo bazalaki kokende liboso na ye, na baoyo bazalaki kolanda na sima, bazalaki koganga: Ozana na Mwana ya David! Mapamboli na moto oyo aye na kombo ya Nkolo! Ozana na bisika oyo eleki likolo! Tango Yesu akotaki na Yeruzalem, vile mobimba eninganaki, mpe bazalaki kotuna: —Nani yango, Bongo bato bazalaki kozongisa: —Ezali Yesu, moprofeta ya Nazareti oyo ya Galileya! Yesu akotaki na lopango ya Ndako ya Nzambe, abenganaki bato nyonso oyo bazalaki koteka mpe kosomba biloko. Abalolaki bamesa ya bato oyo bazalaki kosanze mbongo, na bakiti ya baoyo bazalaki koteka bapijon. Bongo alobaki na bango: —Ekomama: Ndako na ngai bakobenga yango ndako ya mabondeli; kasi bino bokomisi yango nganda ya miyibi! Bato oyo bakufa miso, na bato oyo batambolaki tengu-tengu bayaki epai na ye, na lopango ya Ndako ya Nzambe, bongo ye abikisaki bango. Bakonzi ya banganga-Nzambe mpe balakisi ya Mibeko bayokaki kanda mingi penza tango bamonaki makamwisi oyo Yesu asalaki, mpe ndenge bana bazalaki koganga na kati ya lopango ya Ndako ya Nzambe: “Ozana na Mwana na David!” Bongo batunaki ye: —Ozali koyoka makambo bana oyo bazali koloba? Yesu azongiselaki bango: —E e! Naino botangi maloba oyo te: Ozwaki lokumu na monoko ya bana mpe ya baoyo bamelaka mabele. Sima atikaki bango, abimaki na vile mpe akendaki na Betaniya, epai alalaki. Na tongo-tongo, tango azalaki kozonga na vile, ayokaki nzala. Tango amonaki nzete moko ya figi pembeni ya nzela, apusanaki pembeni na yango, kasi amonaki ata eloko moko te, kaka makasa. Bongo alobaki na nzete yango: —Okobota lisusu mbuma te! Mpe kaka na tango wana nzete ya figi ekawukaki. Tango bayekoli bamonaki bongo, bakamwaki mingi, mpe batunaki: —Ndenge nini nzete ya figi ekawuki na mbala moko boye? Yesu azongisaki: —Nalobi na bino ya solo: soki bozali na kondima mpe botie tembe te, bokoki kosala kaka makambo oyo ngai nasali na nzete ya figite, kasi bokoki mpe koloba na ngomba oyo: “Longwa mpe mibwaka na ebale”, yango ekosalama. Nyonso oyo bokosenga na libondeli, bokozwa yango soki bondimi. Yesu akotaki na Ndako ya Nzambe; mpe tango azalaki koteya, bakonzi ya banganga-Nzambe na bampaka bayaki epai na ye, mpe batunaki ye: —Ozali kosala makambo oyo na bokonzi nini? Nani apesaki yo bokonzi yango? Yesu azongisaki: —Ngai mpe nakotuna bino motuna moko. Soki bozongiseli ngai eyano, bongo ngai mpe nakoyebisa bino soki na bokonzi nini nazali kosalela makambo oyo. Nani apesaki Jean ndingisa mpo na kobatisa, Nzambe to bato? Batianaki tembe bango na bango, mpe balobaki: —Soki tolobi: “Nzambe”, ye akotuna biso: “Bongo mpo na nini bondimelaki ye te?” Soki mpe tolobi: “Bato”, tozali kobanga bato pamba te batonyonso bayebi ete Jean azalaki moprofeta. Bongo bazongiselaki Yesu: —Toyebi te! Bongo Yesu mpe alobaki na bango: —Ngai mpe nakoyebisa bino te soki na bokonzi nini nazali kosalela makambo oyo. —Bokanisi nini? Moto moko azalaki na bana mibale ya mibali. Akendaki epai ya oyo ya liboso mpe alobaki na ye: “Mwana na ngai, kendekosala lelo na elanga ya vino”. Azongisaki: “Nalingi te” Kasi sima, abongolaki makanisi mpe akendaki. Bongo tata akendaki epai ya mwana mosusu mpe alobaki na ye kaka ndenge moko. Azongisaki: “Nakei, tata!” Kasi akendaki te. Nani na kati na bango mibale asalaki likambo tata na ye alingaki? —Mwana ya liboso. Bongo Yesu alobaki na bango: —Nalobi na bino ya solo: bafutisi mpako na basi ya ndumba, bakokota na Bokonzi ya Nzambe liboso na bino. Pamba te Jean ayaki epai na bino mpo na kolakisa bino nzelaya bosembo, kasi bondimelaki ye te. Nzokande bafutisi mpako na basi ya ndumba bandimelaki ye. Kasi bino, ata bomonaki bongo, bobongolakimitema te mpe bondimelaki ye te! —Boyoka lisapo mosusu. Moto moko azalaki na elanga: akonaki banzete ya vino, asalelaki yango lopango, mpe atimolaki libulu moko mpo na kokamola mbuma. Bongo atongaki ndako moko ya molayi mpo na mokengeli. Sima, apesaki elanga na maboko ya basali ya elanga mpo bafutelaka, mpe akendaki na mobembo. Tango elaka ya kobuka mbuma ekomaki pene-pene, atindaki basali na ye epai ya bato oyo bazalaki kofutela elanga, mpo na kozwa ndambo na ye ya mbuma. Bafuteli ya elanga bakangaki basali na ye; babetaki moko, babomaki mosusu, mpe babambaki oyo ya misato mabanga. Atindaki lisusu basali mosusu mingi koleka baoyo ya liboso; kasi bafuteli ya elanga, basalaki bango kaka ndenge moko. Bongo suka na yango, atindelaki bango mwana na ye, mpe alobaki: “Bakotosa mwana na ngai!” Kasi tango bafuteli ya elanga bamonaki mwana, balobanaki: “Tala moto akokoma nkolo ya elanga. Boya, toboma ye mpe tozwa elanga na ye!” Bakangaki ye, babendaki ye na libanda ya elanga ya vino, mpe babomaki ye. Bongo, tango nkolo ya elanga ya vino akoya, akosala bafuteli wana nini? Bazongiselaki ye: —Akoboma bato wana ya mabe na liwa moko ya nsomo penza; akopesa elanga ya vino epai ya bato mosusu, mpe bango bakobanda kopesaye ndambo na ye ya mbuma, na tango oyo babukaka! Sima Yesu alobaki na bango: —Botangi naino na Makomi te: Libanga oyo batongi na ndako babwakaki, ekomi libanga ya songe ya ndako; oyo ezali mosala ya Nkolo, mpe likambo ya kokamwa na miso na biso! Yango wana nalobi na bino: Bakolongola Bokonzi ya Nzambe na maboko na binompe bakopesa yango epai ya bato oyo bakobotela yango mbuma. [ Kasi moto oyo akokweya likolo ya libanga yango, akokweya likolo ya libanga yango akobukana biteni-biteni; mpe moto oyo libanga yango ekokweyila ye, akonikama.] Sima ya koyoka masapo oyo, bakonzi ya banganga-Nzambe na bafarizeo bayebakiete Yesu azalaki koloba mpo na bango. Balukaki mwaye ya kokanga ye, kasi babangaki bato. Pamba te bato bazalaki komona ye ete azali moprofeta. Yesu alobaki na bango lisusu na masapo. Alobaki: —Bokonzi ya Likolo ekokani na mokonzi moko oyo asalaki feti mpo na libala ya mwana na ye ya mobali. Bongo atindaki basali na ye mpo babenga bato oyo babengamaki nafeti; kasi bato yango balingaki koya te. Atindaki lisusu basali mosusu, mpe alobaki na bango: “Boloba na bato oyo babengamaki na feti ete nasiʼnabongisi biloko ya kolia. Nabomisi bangombe mpe banyama ya mafuta, mpe biloko nyonso esiʼebongisami malamu. Boya na feti ya libala.” Kasi bato oyo babengamaki bamonaki makambo wana pamba, mpe moto na moto akendaki: moko na elanga na ye, mpe mosusu na mombongo na ye. Bongo baoyo batikalaki, bakangaki basali na ye, baniokolaki bangompe babomaki bango. Mokonzi ayokaki kanda mingi; atindaki basoda na ye mpo baboma babomi wana, mpe batumba vile na bango. Bongo alobaki na basali na ye: “Biloko ya feti esiʼebongisami, kasi bato oyo babengamaki bakoki te mpo na kolia yango. Bokende na bisika oyo babalabala ekutana, mpe bobenga bato nyonsooyo bokomona mpo baya na feti ya libala.” Basali bakendaki na babalabala mpe basangisaki bato nyonso oyobamonaki: bato mabe mpe bato malamu, mpe ndako ya feti etondaki na bato. Kasi tango mokonzi akotaki, mpo na kotala bato oyo babengamaki na feti, amonaki moto moko alataki te elamba ya feti ya libala. Atunaki ye: “Moninga na ngai, ndenge nini okoti awa, mpe ozangi elamba ya feti?” Kasi moto yango azangaki maloba ya kozongisa. Bongo mokonzi alobaki na basali na ye: “Bokanga ye makolo na maboko, mpe bobwaka ye libanda, na molili, epai ekozala kolela mpe koswa mino.” Pamba te, babengami bazali mingi, kasi baponami bazali moke! Bafarizeo bakendaki mpe bayokanaki mpo na koluka nzela ya kokanga Yesu na maloba na ye moko. Bongo batindaki bayekoli na bango epai na ye, elongo na bato ya lisanga ya Erode. Mpe balobaki: —Moteyi, toyebi malamu ete yo ozali solo, oteyaka nzela ya Nzambe na bosolo nyonso, mpe obangaka moto te, pamba te otalaka bilongi ya bato te. Lobela biso, okanisi nini mpo na likambo oyo: Ndingisa ezali mpo na kofuta mpako epai ya Sezare to te? Kasi Yesu ayebaki makanisi na bango ya mabe, mpe alobaki: —Bato ya kokosana! Mpo na nini bozali komeka ngai? Bolakisa ngai mbongo oyo bofutelaka mpako! Bamemelaki ye deni moko. Bongo atunaki bango: —Elongi oyo, na makomi oyo bakomi awa, ezali ya nani? Bazongisaki: —Ya Sezare! Bongo Yesu alobaki na bango: —Bopesa na Sezare oyo ezali ya Sezare, mpe na Nzambe oyo ezali ya Nzambe! Bakamwaki mingi penza tango bayokaki bongo; batikaki ye mpe bakendaki. Kaka na mokolo wana, Basaduseo, baoyo balobaka ete lisekwa ezali tebayaki epai na ye mpe batunaki ye motuna oyo: —Moteyi, Moyize alobaki: Soki mobali akufi mpe aboti bana te, ndeko na ye akobala mwasi oyo ye atiki mpo abotela ye bana. Nzokande na kati na biso, ezalaki na bandeko sambo ya mibali. Oyo ya liboso abalaki mwasi, bongo akufaki; lokola babotaki bana te, atikaki mwasi na ye epai ya ndeko na ye ya mobali. Mpe esalamaki kaka ndenge moko mpo na ndeko ya mibale, yamisato, kino na oyo ya sambo. Na sima, mwasi mpe akufaki. Bongo na mokolo ya lisekwa, mwasi yango akozala mwasi ya nani na kati na bango sambo? Pamba te, bango nyonso babalaki ye! Yesu azongiselaki bango: —Bozali komikosa, mpo boyebi Makomi te, to mpe nguya ya Nzambe. Pamba te, sima ya lisekwa, mibali na basi bakobala te, mpe bakobalisa te, kasi bakozala lokola baanzelu na Likolo. Kasi mpo na likambo ya lisekwa ya bato bakufa, naino botangi te oyo Nzambe alobaki na bino: Nazali Nzambe ya Abraham, Nzambe ya Izaki mpe Nzambe ya Zakobi? Nzambe, azali Nzambe ya bato bakufa te, kasi ya bato ya bomoi! Tango ebele ya bato bayokaki bongo, bakamwaki mingi penza mpo na mateya na ye. Tango bafarizeo bayokaki ete Yesu akangisaki Basaduseo monoko, bango mpe basanganaki esika moko. Bongo moko na kati na bango azalaki molakisi ya Mibeko, ayaki komeka Yesu na motuna oyo: —Moteyi, Mobeko nini eleki monene na kati ya Mibeko nyonso? Yesu azongiselaki ye: —Linga Nkolo Nzambe na yo na motema na yo mobimba, na elimo na yo mobimba, mpe na makanisi na yo nyonso! Oyo nde mobeko ya liboso mpe oyo eleki monene. Mobeko ya mibale, oyo ekokani na yango, yangʼoyo: Linga moninga na yo lokola omilingaka yo moko. Mibeko nyonso mpe mateya ya baprofeta ezali na kati ya mibeko oyo mibale! Tango bafarizeo basanganaki esika moko, Yesu atunaki bango: —Bokanisi nini mpo na Kristo? Azali Mwana ya nani? Bongo bazongiselaki ye: —Azali mwana ya David! Alobaki na bango: —Bongo ndenge nini David, na kotindama ya Molimo, abengaki ye Nkolo? Pamba te alobaki: Nkolo alobaki na Nkolo na ngai: Vanda na loboko na ngai ya mobali, kino tango nakotia banguna na yo, na nse ya makolo na yo! Soki David abengi ye “Nkolo”, bongo ndenge nini akoki kozalalisusu mwana na ye? Moto moko te akokaki kozongisela ye ata liloba. Mpe banda mokolo wana, moto ata moko te amekaki lisusu kotuna ye mituna. Bongo Yesu alobaki na ebele ya bato mpe na bayekoli na ye: —Balakisi ya Mibeko mpe bafarizeo mosala na bango kaka kolimbolela bato Mibeko ya Moyize. Esengeli botosa bango mpe bosala makambo nyonso oyo bakoloba na bino. Kasi bosala te oyo bango basalaka, pamba te oyo bateyaka, basalaka yango te. Bakangaka maboke ya kilo penza mpe batiaka yango na mapeka ya bato; kasi bango moko basimbaka yango te ata na songe ya mosapi. Misala nyonso basalaka, basalaka yango kaka mpo bato bamona bango. Pamba te, bayeyisaka mwa basanduku na bango oyo ekomama mibeko minene, mpe bakomisaka basonge ya banzambala na bango milayi. Na bafeti, balingaka kaka bisika ya kitoko, mpe na Ndako ya mayangani bisika ya lokumu. Balingaka bapesa bango mbote na bazando mpe bato babenga bango: “Moteyi”. Kasi bino, bondima te ete babenga bino: “Moteyi”. Pamba te, bozali na Moteyi kaka moko, mpe bino nyonso bozali bandeko. Mpe bobenga moto moko te awa na mokili: “Tata”, pamba te bozali na Tata kaka moko, oyo azali na Likolo. Bolinga te ete babenga bino: “Bakonzi”. Pamba te, bozali na Mokonzi kaka moko: Kristo. Moto oyo aleki monene kati na bino akozala mosali na bino. Pamba te moto oyo akomimatisa bakokitisa ye, mpe oyo akomikitisa bakomatisa ye. —Mawa na bino, balakisi ya Mibeko mpe bafarizeo! Bato ya kokosana! Bokangelaka bato nzela ya Bokonzi ya Likolo, pamba te, bino moko mpe bokotaka te, mpe botikaka nzela te na baoyo balingi kokotampo bakota. [Mawa na bino, balakisi ya Mibeko mpe bafarizeo! Bato ya kokosaka! Bobotolaka biloko ya basi oyo bakufela mibali; mpe mpo na kokosana, bosalaka mabondeli ya milayi-milayi. Yango wana, bokozwa etumbu oyo eleki monene!] Mawa na bino, balakisi ya Mibeko mpe bafarizeo! Bato ya kokosana! Bosalaka mibembo na ebale mpe na mokili mpo na koluka kozwa ata mopaya moko oyo akondima kokota na lisanga na bino; mpe soki bozwi ye, bokomisaka yemoto ya lifelo mbala mibale koleka kutu bino moko. Mawa na bino, batambusi bakufa miso! Bino bolobaka ete: Soki moto alapi ndayi na kombo ya Ndako ya Nzambe, wana ezali likambo te. Kasi soki moto alapi ndayi na kombo ya wolo ya Ndako ya Nzambe, moto wana asengeli kotosa ndayi na ye. Bazoba! Bato bakufa miso! Eloko nini eleki na tina, wolo to Ndako ya Nzambe oyo ekomisaka wolo bosantu? Bolobaka lisusu ete: soki moto alapi ndayi na kombo ya mesa oyobatumbelaka Nzambe makabo, wana ezali likambo te. Kasi soki moto alapi ndayi na kombo ya likabo oyo ezali likolo ya mesa oyo batumbelaka Nzambe makabo, moto wana asengeli kotosa ndayi na ye! Bato bakufa miso! Eloko nini eleki na tina, likabo to mesa oyo ekomisi likabo bosantu? Pamba te, moto oyo alapi ndayi na kombo ya mesa oyo batumbelaka Nzambe makabo, alapi yango na kombo ya mesa mpe na kombo ya biloko nyonso oyo ezali likolo na yango. Moto oyo mpe alapi ndayi na kombo ya Ndako ya Nzambe, alapi yango na kombo ya Ndako ya Nzambe mpe na kombo ya moto oyo afandaka kuna. Mpe oyo alapi ndayi na kombo ya Likolo, alapi yango na kombo ya Kiti ya Nzambe mpe na kombo ya Nzambe oyo afandi likolo na yango. Mawa na bino balakisi ya Mibeko mpe bafarizeo! Bato ya kokosana! Bopesaka makabo ya eteni moko ya zomi ata ya biloko ya mike-mike oyo bolonaka na bilanga na bino, kasi botiolaka makambo oyo eleki tina oyo ya Mibeko; lokola: bosembo, mawa, mpe bosolo. Esengeli bokokisakamakambo oyo, kasi bobosanaka mpe te oyo wana. Batambusi bakufa miso! Bolongolaka mwa ngungi oyo ekotaka na mayi oyo bomelaka, kasi bodundaka shamo. Mawa na bino balakisi ya Mibeko mpe bafarizeo! Bato ya kokosana! Bosukolaka na malamu penza libanda ya bakopo mpe ya basani na bino, kasi na kati na yango, etondi na bosoto ya misala na bino ya moyibi mpe na posa ya mabe. Bafarizeo bakufa miso! Bosukola liboso kati ya kopo mpe ya sani, bongo ekokoma peto kino na libanda. Mawa na bino balakisi ya Mibeko mpe bafarizeo! Bato ya kokosana! Pamba te, bozali lokola malita oyo bapakola kulele ya pembe, na libanda ezali komonana kitoko, kasi na kati etondi na mikuwa ya bato bakufa mpe na biloko ya kopola ya ndenge na ndenge. Bino mpe ndenge moko, na libanda bozali komonana bato malamu, kasi na kati botondi na makambo ya lokuta mpe ya mabe! Mawa na bino balakisi ya Mibeko mpe bafarizeo! Bato ya kokosana! Botongaka malita ya kitoko mpo na baprofeta mpe bobongisaka malita ya bato na sembo; mpe bolobaka: “Soki tozalaki na tango ya bakoko na biso, mbele tokokaki kosangana na bango te mpo na koboma baprofeta!” Na maloba na bino moko, bondimaka ete bozali bana ya bato oyobabomaki baprofeta! Bosilisa mosala oyo batata na bino babandaki. Bino banioka! Bana ya banioka! Bokokima ndenge nini etumbu ya lifelo? Yango wana, nakotindela bino baprofeta, bato ya mayele mpe balakisi ya Mibeko: bokoboma basusu, bokobaka basusu na ba-ekulusu, bokobeta basusu fimbo na bandako na bino ya mayangani, mpe bokonyokola bango na vile moko na moko. Yango wana, makila ya bato na sembo nyonso oyo baboma, ekokweya likolo na bino: banda na Abele moto na sembo, kino na Zakaria mwana ya Baraki oyo bobomaki kati na Ndako ya Nzambe mpe esika oyo batumbelaka Nzambe makabo. Nalobi na bino ya solo: etumbu ya makambo nyonso wana ekokweyila bato ya tango oyo! —A a Yeruzalem! Yeruzalem! yo moto obomaka baprofeta mpe obomaka na mabanga bato oyo batindelaka yo! Mbala boni nalingaki kosangisa bana na yo ndenge soso asangisaka bana na ye na nse ya mapapu na ye, kasi olingaki te. Tala, ndako na yo ekotikala pamba. Yango wana nalobi na bino: bokomona ngai lisusu te kino tangobokoloba: Mapamboli na moto oyo aye na kombo ya Nkolo! Tango Yesu azalaki kobima na lopango ya Ndako ya Nzambe, bayekoli bayaki pene-pene na ye mpo na kolakisa ye ndenge batongaki Ndako yango. Kasi Yesu alobaki na bango: —Bomoni nyonso oyo! Nalobi na bino ya solo, libanga ata mokote ekotikala likolo ya libanga mosusu. Nyonso ekopanzana! Tango Yesu avandaki na ngomba ya banzete ya Olive, bayekoli na ye bayaki kaka bango moko mpo na kotuna ye: —Yebisa biso, tango nini makambo wana ekosalama; elembo nini ekolakisa koya na yo mpe suka ya mokili! Yesu azongiselaki bango: —Bokeba ete moto moko te akosa bino. Pamba te, bato mingi bakoya na kombo na ngai mpe bakoloba: “Nazali Kristo” mpe bakokosa bato mingi penza. Bokoyoka basango ya bitumba mpe makelele ya bitumba; bokeba, bobanga te, pamba te, makambo yango esengeli kosalama, kasi wana ekozala naino suka ya mokili te. Ekolo moko ekobunda na ekolo mosusu, bokonzi moko ekobunda na oyo mosusu. Nzala ekozala makasi penza mpe mabele ekoningana na bisika mingi. Makambo nyonso wana ekozala kaka ebandeli ya bapasi oyo mwasi ayokaka soki alingi kobota. Bongo, bakokaba bino mpo na konyokola bino mpe bakoboma bino. Bikolo nyonso ekoyina bino mpo na kombo na ngai. Na tango wana, bato mingi bakotika kondima, bakotekana mpe bakoyinana. Baprofeta mingi ya lokuta bakobima mpe bakokosa bato ebele. Lokola mabe ekobakisama, bolingo ya bato mingi ekokita. Kasi moto oyo akokanga motema kino na suka, akobika. Sango malamu ya Bokonzi ekoteyama na mokili mobimba mpo ezalalitatoli na bikolo nyonso. Bongo na tango wana nde, suka ya mokili ekoya! —Yango wana tango bokomona eloko ya somo, oyo ebebisaka, oyo moprofeta Daniele alobaki, etelemi na Esika ya bosantu—moto oyo azali kotanga ayeba malamu tina ya makambo oyo— bato oyo bakozala na Yudea bakima na bangomba. Moto oyo akozala likolo ya ndako, akita te mpo na kokende kozwabiloko oyo ezali na ndako na ye. Moto oyo akozala na bilanga, azonga te na ndako mpo na kokamataelamba na ye. Mawa mingi penza na mikolo wana, mpo na basi oyo bakozala na bazemi mpe baoyo bakozala komelisa bana mabele! Bobondela mpo ete mokolo oyo bokokima ezala na tango ya malili makasi te to na mokolo ya saba. Pamba te, pasi ekozala ya somo, na ndenge ete pasi ya ndenge wanaemonana naino te banda mokili ebanda kino sikʼoyo; mpe pasi ya ndengewana ekozala lisusu te. Mpe soki ayeyisaki mikolo yango mokuse te, mbele ata moto moko te akokaki kobika; kasi ayeyisaki yango mokuse mpo na bato oyo ye apona. —Na tango wana, soki moto alobi na bino: “Boyoka! Kristo azali awa” to “Azali kuna!”, bondimela ye te. Pamba te, ba-Kristo ya lokuta na baprofeta ya lokuta bakobima. Bakosala bilembo ya minene mpe makamwisi mpo na koluka nzela ya kokosa ata bato oyo Nzambe apona, soki yango ekokaki kosalama. Nasiʼnakebisi bino liboso! Soki moto alobi na bino: “Botala, azali na esobe”, bokende te. To “Azali awa, na esika ya kobombama”, bondima yango te. Pamba te, koya ya Mwana ya Moto ekozala ndenge kongenga ya nkake ebimaka na Este mpe engengaka kino na Weste. Esika ebembe ezali, bandeke oyo eliaka ebembe esanganaka wana. Mbala moko, sima ya pasi ya mikolo wana, Moyi ekokoma molili, sanza ekongenga lisusu te, minzoto ekokweya wuta likolo, mpe banguya ya likolo ekoningana. Bongo elembo ya Mwana ya moto ekomonana na Likolo; mpe bato ya bikolo nyonso ya mokili bakolela, mpe bakomona Mwana ya moto akoya na likolo ya mapata, na nguya nyonso mpe na kembo monene. Mpe akotinda baanzelu na ye elongo na lokito monene ya kelelo; bongo bango bakosangisa bato nyonso oyo ye apona na bipai nyonso minei ya mokili, banda na suka moko ya likolo kino na oyo mosusu. Bolanda mateya ya nzete ya figi. Soki bitape na yango ekomi pete-pete, mpe makasa na yango ebandi kobima, wana boyebi ete tango ya mbula ekomi pene-pene. Bino mpe ndenge moko, tango bokomona makambo wana nyonso, boyeba ete Mwana ya moto akomi pene-pene na porte. Nalobi na bino ya solo: bato ya tango oyo, bakoleka te, liboso ete makambo wana esalama. Likolo mpe nse ekolela, kasi maloba na ngai ekoleka te! —Mpo na likambo ya ngonga to mokolo makambo wana ekosalama, moto ata moko te ayebi yango; ata baanzelu na Likolo, ata Mwana, kaka Tata. Makambo oyo esalamaki na tango ya Nowa, ekosalama mpe ndengemoko na tango ya koya ya Mwana ya moto. Pamba te, liboso ete mpela eya, bato bazalaki kolia mpe komela, bazalaki kobala mpe kobalisa, kino mokolo Nowa akotaki na masuwa. Kasi bayebaki eloko moko te na oyo elingaki koyela bango, kino mokolo mpela eyaki mpe ebomaki bango nyonso. Ekozala mpe ndenge moko tango Mwana ya moto akoya. Mibali mibale bakozala na elanga: bakomema moko mpe mosusuakotikala. Basi mibale bakobanda konika mbuma na libanga, bakokamata moko mpe mosusu akotikala. Yango wana bokengela malamu; pamba te boyebi te mokolo Nkolona bino akoya! Boyeba malamu Sete, soki kolo ya ndako ayebi tango moyibi akoya na butu, akolala pongi te, mpo atika te moyibi akota na ndako na ye. Yango wana bino mpe, bomibongisa, pamba te Mwana ya moto akoya na ngonga oyo bino bokokanisa te! Nani azali mosali ya sembo mpe ya mayele, oyo mokonzi na ye atie ye kapita ya basali mosusu mpo na kopesa bango bilei na tango oyo ekoki? Esengo ekozala mingi na mosali wana, soki tango mokonzi akozonga, akuti ye azali kosala mosala ndenge basengaki ye. Nalobi na bino ya solo, mokonzi akotia ye moyangeli ya bilokona ye nyonso. Kasi soki azali mosali mabe; akomiloba: “Mokonzi na ngaiazali koya noki te”, mpe soki abandi konyokola baninga na ye ya mosala, kolia mpe komela esika moko na bato oyo balangwaka masanga; bongo mokonzi akozonga na mokolo oyo ye azali kozela te, mpe na ngonga ye ayebi te. Akopesa ye etumbu, mpe akotia ye esika moko na bato ya kokosana; epai ekozala kolela mpe koswa mino. —Na mokolo wana, Bokonzi ya Likolo ekozala lokola bilenge basi zomi oyo bakamataki minda na bango mpo na kokende kokutana na mobali oyo akobala. Na kati na bango, mitano bazalaki bazoba mpe mitano bazalaki mayele. Baoyo ya zoba bakamataki minda na bango, kasi bamemaki mafuta te. Kasi baoyo ya mayele bakamataki minda mpe mafuta mosusu na milangi. Lokola mobali oyo azalaki kobala ayaki noki te, bango nyonso bayokaki pongi mpe balalaki. Na midi ya butu, mongongo moko egangaki: “Mobali aye! Bokende kokutana na ye!” Bongo, bilenge basi balamukaki mpe babandaki kobongisa mindana bango. Bilenge basi oyo ya zoba balobaki na baoyo ya mayele: “Bopesa biso ndambo ya mafuta na bino, pamba te minda na biso elingikokufa!” Kasi baoyo ya mayele bazongisaki: “Ekokoka te mpo na biso na bino. Bokende epai ya baoyo batekaka mafuta mpe bosomba oyo ya bino.” Tango bakendaki kosomba mafuta, mobali ayaki. Bongo baoyo bamilengelaki, bakotaki na ye na esika ya feti ya libala, mpe bakangaki porte. Na sima, baoyo mosusu mpe bayaki. Balobaki: “Nkolo, nkolo, fungolela biso!” Kasi azongisaki: “Nalobi na bino ya solo, nayebi bino te.” Yango wana bokengela, Pamba te boyebi mokolo te mpe ngonga te. —Ekozala lisusu lokola moto moko azalaki kokende mobembo. Abengaki basali na ye mpe apesaki bango biloko na ye. Apesaki na moko batalenta mitano, na oyo mosusu batalentamibale, mpe na oyo mosusu talenta moko; moto na moto na ndenge oyo ekoki na makoki na ye. Bongo akendaki na mobembo. Moto oyo azwaki batalenta mitano, akendaki noki kosala na yango mombongo, bongo azwaki benefisi ya batalenta mitano mosusu na likolo na yango. Moto oyo azwaki batalenta mibale asalaki mpe ndenge moko. Mpeazwaki benefisi ya batalenta mibale mosusu. Kasi moto oyo azwaki kaka talenta moko, atimolaki libulu na mabele, mpe abombaki mbongo ya mokonzi na ye. Sima ya mikolo ebele, mokonzi ya basali wana azongaki, mpe atunaki bango bayebisa ye ndenge basalelaki mbongo na ye. Moto oyo azwaki batalenta mitano amemaki batalenta mitano mosusu. Alobaki: “Mokonzi, opesaki ngai batalenta mitano; tala, nazwi benefisi ya batalenta mitano mosusu!” Mokonzi na ye azongisaki: “Malamu, ozali mosali malamu mpe ya sembo; olakisi bosembo na biloko ya moke. Bongo nakopesa yo mokumba ya kotala biloko ebele. Yaka kosepela elongo na mokonzi na yo!” Oyo azwaki batalenta mibale, ayaki mpe alobaki: “Mokonzi, opesaki ngai batalenta mibale; tala, nazwi benefisi ya batalenta mibale mosusu!” Mokonzi azongisaki: “Malamu, mosali malamu mpe ya sembo; olakisi bosembo na biloko ya moke. Bongo nakopesa yo mokumba ya kotalabiloko ebele. Yaka kosepela elongo na mokonzi na yo!” Bongo, oyo azwaki talenta moko ayaki mpe alobaki: “Mokonzi, nayebaki ete ozali moto ya motema makasi, mpo obukaka mbuma na elanga oyo olonaka te, mpe olongolaka epai yo obwakaka mbuma te. Nabangaki mingi penza, yango wana nakendaki mpe nabombakibalenta na yo na nse ya mabele. Tala, kamata oyo ezali yo yo!” Mokonzi na ye azongisaki: “Mosali mabe mpe ya goigoi! Oyebaki ete nabukaka mbuma na elangaoyo nalonaka te, mpe nalongolaka epai ngai nabwakaka mbuma te; ebongaki malamu opesa mbongo na ngai epai ya babombi-mosolo, mpe tango nalingaki kozonga, nalingaki kozwa oyo ezali ya ngai, elongo na benefisi likolo. Bobotola ye talenta wana mpe bopesa yango na moto oyo azali na batalenta zomi.” Pamba te, moto oyo azali na biloko, bakopesa ye, mpe akotonda na yango; kasi moto oyo azali na eloko te, bakobotola ye ata oyo azali na yango. Bongo bobwaka mosali oyo azangi tina na molili ya libanda; epai ekozala kolela mpe koswa mino. —Tango Mwana ya moto akoya kati na nkembo na ye, elongo na baanzelu nyonso, akovanda na Kiti na ye ya nkembo. Bato nyonso ya mokili bakosangana liboso na ye. Akokabola bangondenge mobokoli akabolaka bameme na bantaba; akotia bameme na loboko na ye ya mobali, mpe bantaba na loboko na ye ya mwasi. Bongo mokonzi akoloba na bato oyo bakozala na loboko na ye ya mobali: “Boya, bino bato Tata na ngai apambola, bozwa Bokonzi oyo babongisela bino, banda mokili esalama. Pamba te, nanyokwamaki na nzala, mpe bopesaki ngai biloko ya kolia; nazalaki na posa ya mayi, mpe bopesaki ngai mayi ya komela; nazalaki mopaya, mpe boyambaki ngai; nazangaki bilamba ya kolata, mpe bopesaki ngai; nazalaki malade, mpe boyaki kotala ngai; nakotaki na boloko, mpe boyaki kotala ngai!” Bongo bato na sembo bakozongisela ye: “Nkolo, tango nini tomonaki yo ozalaki na nzala, mpe topesaki yo biloko ya kolia? To ozalaki na posa ya mayi, mpe topesaki yo mayi ya komela? Tango nini tomonaki yo ozalaki mopaya mpe toyambaki yo, to ozangaki bilamba, mpe tolatisaki yo? Tango nini tomonaki yo ozalaki na maladi to na boloko, mpe toyakikotala yo?” Kasi Mokonzi akozongisela bango: “Nalobi na bino ya solo, mbala nyonso bosalaki yango ata na motomoko na kati ya bandeko na ngai oyo ya mike, boyeba ete bosalaki yango na ngai.” Bongo akoloba na bato oyo bakozala na loboko na ye ya mwasi: “Bolongwa na miso na ngai, bino bato bolakelama mabe. Bokende na moto oyo ekufaka te, oyo ebongisama mpo na zabolo mpe mpo na baanzelu na ye. Pamba te, nazalaki na nzala, kasi bopesaki ngai biloko ya kolia te; nazalaki na posa ya mayi, kasi bopesaki ngai mayi ya komela te; nazalaki mopaya, kasi boyambaki ngai te; nazangaki bilamba, kasi bolatisaki ngai te; nazalaki maladi mpe nakotaki boloko, kasi boyaki kotala ngai te!” Bongo, bango bakozongisela ye: “Nkolo, tango nini tomonaki yo ozalaki konyokwama na nzala, to na posa ya mayi, to ozalaki mopaya, to ozangaki bilamba, to ozalaki maladi mpe okotaki boloko, bongo tosalisaki yo te?” Bongo ye akozongisela bango: “Nalobi na bino ya solo, mbala nyonso bosalaki yango te ata na moto moko na kati ya bato oyo ya mike, boyeba ete bosalaki yango te epai na ngai.” Bongo bakozwa etumbu ya seko, kasi bato sembo bakozwa bomoi ya seko. Tango Yesu asilisaki koloba makambo wana nyonso, alobaki na bayekoli na ye: —Boyebi ete feti ya Paki etikali mikolo mibale mpo ebanda, mpe Mwana ya moto bakoteka ye mpo babaka ye na ekulusu. Bongo bakonzi ya banganga-Nzambe na bankolo basanganaki na ndako ya Kayifa, mokonzi ya banganga-Nzambe; bayokanaki mpo na kokanga Yesu na mayele, mpe baboma ye. Kasi balobaki: —Tosala yango na tango ya feti te, mpo bato batomboka te. Tango Yesu azalaki na Betaniya, na ndako ya Simon oyo azalaki na maladi ya maba, mwasi moko azalaki na molangi ya Albatre, oyo ezalaki ya kotonda na malasi ya motuya mingi, ayaki epai na ye, mpe asopaki yango na motu na ye, na tango azalaki na mesa. Kasi bayekoli basilikaki tango bamonaki bongo, mpe balobaki: —Mpo na nini kosala peleti ya boye? Pamba te, malasi yango ekokaki kotekama na ntalo mingi penzampe kopesa mbongo na babola. Tango Yesu ayebaki yango, alobaki na bango: —Mpo na nini bozali kotungisa mwasi oyo? Pamba te, asaleli ngailikambo moko ya malamu. Babola, bokozala na bango elongo tango nyonso, kasi ngai, bokozala na ngai tango nyonso te. Pamba te, tango asopaki malasi oyo na nzoto na ngai, asali yango mpo na kobongisa kokundama na ngai. Nalobi na bino ya solo: na mokili mobimba, esika nyonso oyo Sango Malamu oyo ekoteyama, bato bakobanda kolobela likambo mwasi oyo asali mpo na kokanisa ye! Bongo moko na kati ya bapostolo zomi na mibale, oyo bazalaki kobenga Yuda Iskariote, akendaki epai ya bakonzi ya banganga-Nzambe, mpe atunaki: —Bokopesa ngai nini, soki natekeli bino Yesu? Bongo batangelaki ye bibende ntuku misato ya mbongo. Banda tango wana, Yuda azalaki koluka mwaye ya malamu mpo na koteka Yesu. Na mokolo ya liboso ya feti ya mampa oyo ezangi kisi oyo evimbisaka mampa, bayekoli bayaki epai ya Yesu mpe batunaki: —Epai wapi olingi tobongisela yo mpo na kolia bilei ya Pake? Azongisaki: —Bokende na vile, epai ya moto boye, mpe boloba ne ye: “Moteyi alobi: Tango na ngai ekomi pene; nakolia bilei ya Pake na bayekoli na ngai epai na yo.” Bayekoli basalaki ndenge Yesu atindaki bango mpe babongisaki bilei ya Pake. Tango pokwa ekomaki, Yesu avandaki na mesa na bapostolo na yezomi na mibale. Awa bazalaki kolia, Yesu alobaki: —Ya solo nalobi na bino: moto moko na kati na bino akoteka ngai. Bayokaki mawa mingi, mpe babandaki kotuna ye moko sima ya mosusu: —Nkolo ezali ngai? Yezu azongisaki: —Moto oyo akoteka ngai, ezali oyo atie loboko na ye na sani elongo na ngai. Mwana ya moto akokufa ndenge ekomama mpo na ye. Kasi mawa mingi na moto oyo ateki Mwana ya moto. Elingaki kozala malamu mpo na ye soki abotamaki te. Bongo Yuda oyo atekaki ye, atunaki mpe: —Moteyi, ezali ngai? Yezu azongiselaki ye: —E e, osili koloba yango. Tango bazalaki kolia, Yezu akamataki limpa, azongisaki matondi, akataki yango mpe apesaki yango na bayekoli na ye; mpe alobaki: —Bokamata mpe bolia; oyo ezali nzoto na ngai. Bongo akamataki kopo, azongisaki matondi, mpe apesaki bango yango; mpe alobaki: —Bomela yango bino nyonso; oyo ezali makila na ngai, makila ya Boyokani, oyo esopana mpo nabato ebele, mpo ete bazwa bolimbisi ya masumu. Nalobi na bino, nakomela lisusu vino oyo te, banda sikʼoyo kinomokolo nakomela yango na lolenge mosusu elongo na bino, na Bokonzi ya Tata na ngai. Sima ya koyemba banzembo, bakendaki na ngomba ya banzete ya olive. Bongo Yezu alobaki na bango: —Na butu ya lelo, bino nyonso bokokweyisa kondima na bino mpo na ngai. Pamba te ekomama: Nakobeta mobateli, mpe bameme ya etongo bakopalangana. Kasi sima ya kosekwa na ngai, nakokende liboso na bino na Galileya! Piere alobaki: —Ata soki bango nyonso bakweyisi kondima na bango mpo na yo kasi ngai nakokweyisa yango te. Yezu azongiselaki ye: —Nalobi na yo ya solo: na butu ya lelo, liboso ete soso elela, okowanganaa ngai mbala misato. Kasi Piere alobaki na ye: —Atako soki nasengeli kokufa na yo elongo, nakowangana yo te. Bongo bayekoli nyonso balobaki kaka ndenge moko. Bongo Yesu akendaki elongo na bayekoli na ye na esika moko babengaka Getesemane; mpe alobaki na bango: —Bovanda awa, na tango ngai nakei kobondela kuna. Akamataki Piere na bana mibale ya Zebede, mpe abandaki koyokamawa mingi penza mpe pasi na motema. Bongo alobaki na bango: —Elimo na ngai etondi na mawa mingi penza pene ya liwa. Botikalaawa, bokengela elongo na ngai. Akendaki mwa moke liboso, akweyaki elongi na nse, mpe abondelaki: —Tata, soki ekoki kosalama, tika ete kopo oyo eleka mosika na ngai! Esalama ndenge ngai nalingi te, kasi ndenge yo olingi. Bongo azongaki epai ya bayekoli na ye mpe akutaki bango balali. Alobaki na Piere: —Boni, bokokaki kokengela elongo na ngai ata ngonga moko te? Bokengela mpe bobondela mpo bokweya na komekama te. Molimo ezalina mokano ya malamu kasi nzoto ezali na bolembu. Akendaki lisusu mbala ya mibale mpe abondelaki: —E e! Tata na ngai, soki ekoki kosalama te ete kopo oyo elekamosika na ngai, kasi esengeli kaka namela yango… tika ete mokano nayo esalama. Tango azongaki, akutaki bango balali lisusu, pamba te miso na bango ekomaki kilo mpo na pongi. Bongo atikaki bango mpe akendaki lisusu kobondela mpo na mbalaya misato; mpe alobaki kaka maloba moko. Bongo azongaki epai ya bayekoli mpe alobaki na bango: —Bozali naino kalala mpe kopema? Botala, ngonga ekomi pene mpe Mwana ya moto bakabi ye na maboko ya batu ya masumu. Botelema, tokende. Moto oyo ateki ngai, akomi. Tango azalaki naino koloba; Yuda, moko na kati ya bapostolo zomina mibale, ayaki elongo na bato ebele, bamemaki mipanga na banzete. Bakonzi ya banganga-Nzambe na bankolo ya Bayuda nde bato batindaki bango. Moto oyo atekaki Yesu alakisaki bango elembo; alobaki: —Moto oyo ngai nakopesa beze, ye wana, bokanga ye. Na mbala moko, apusanaki pene-pene ya Yesu mpe alobaki na ye: —Mbote Moteyi! Bongo apesaki ye beze. Yesu alobaki na ye: —Moninga na ngai, sala likambo oyo oyeli. Bongo basusu bayaki pene-pene na ye, basimbaki Yesu, mpe bakangaki ye. Moko na kati ya bato oyo bazalaki na Yesu asembolaki loboko, abimisaki mopanga na ye, abetaki mosali ya mokonzi ya banganga-Nzaambempe akataki ye litoyi. Kasi Yesu alobaki na ye: —Zongisa mopanga na yo na esika na yango; pamba te bato nyonsooyo bakamataka mopanga, bakokufa mpe na mopanga. Okanisi ete nakoki kobenga Tata na ngai te, mpe ye akokikotindela ngai na mbala moko te mapinga ya baanzelu koleka zomi namibale? Bongo ndenge nini Makomi ekokokisama, oyo ezali koloba eteesengeli makambo yango esalama bongo? Na tango wana, Yesu alobaki na ebele ya bato: —Boni, nakomi moyibi, mpo boya kokanga ngai na mipanga mpe banzetena maboko? Nazalaki kovanda mikolo nyonso na lopango ya Ndako ya Nzambempo na koteya, mpe bokangaki ngai te! Kasi nyonso oyo esalami, mpo ete Makomi ya baprofeta ekokisama! Bongo bayekoli nyonso batikaki ye mpe bakimaki. Bato oyo bakangaki Yesu bamemaki ye epai ya Kayifa, mokonzi ya banganga Nzambe, epai balakisi ya Mibeko mpe bampaka basanganaki. Kasi Piere azalaki kolanda ye na mosika kino na lopango ya mokonzi ya banganga-Nzambe. Akotaki na lopango, mpe avandaki elongona bakengeli mpo na kotala soki makambo yango ekosuka ndenge nini. Bakonzi ya banganga-Nzambe mpe bato nyonso ya likita moneneya Bayuda, bazalaki koluka litatoli ya lokuta mpo na Yesu, mpo etebakoka koboma ye. Atako batemwe ya lokuta bayaki mingi, kasi bazwaki ata moko te. Na sima, bato mibale bayaki, mpe balobaki: —Moto oyo alobaki: “Nakoki koboma Ndako ya Nzambe mpe kotongayango lisusu na mikolo misato” Bongo mokonzi ya banganga-Nzambe atelemaki mpe atunaki Yesu: —Ozali na likambo ya kozongisa te? Litatoli nini bato oyobazali koloba mpo na yo? Kasi Yesu azongisaki eloko moto te. Bongo mokonzi ya banganga-Nzambe alobaki na ye: —Nazali kolapisa yo ndayi na kombo ya Nzambe ya bomoi: yebisabiso soki ozali Kristo, Mwana ya Nzambe! Yesu azongisaki: —E e, ezali bongo ndenge olobi. Kasi nalobi na bino: Bandasikʼoyo, bokomona Mwana na Moto akovanda na loboko ya oyo aleki na nguya mpeakoya na mapata ya likolo! Bongo mokonzi ya banganga-Nzambe, apasolaki bilamba na ye, mpealobaki: —Atioli Nzambe! Tina nini toluka lisusu batemwe? Boyoki bino moko ndenge atioli Nzambe! Bongo bokanisi nini? Bazongisaki: —Akoki na liwa! Bongo, babwakelaki ye soyi na elongi mpe babetaki ye makofi. Basusu babetaki ye bambata mpe balokabi: —Kristo, sakolele biso, nani abeti yo? Na tango wana, Piere avandaki libanda, na kati ya lopango. Mosali moko ya mwasi ayaki epai na ye, mpe alobaki: —Yo mpe ozalaki na Yesu ya Galileya. Kasi Piere awanganaki na miso ya bato nyonso: —Nayebi kutu te makambo ozali koloba! Tango azalaki kokende epai porte ezalaki, mosali mosusu ya mwasiamonaki ye, mpe alobaki na bato oyo bazalaki wana: —Moto oyo azalaki na Yesu ya Nazareti. Piere awanganaki lisusu mpe alapaki ndayi: —Nayebi moto wana te! Sima ya mwa tango moke, bato oyo batelamaki wana, bayaki pene-pene ya Piere mpe balobaki na ye: —Ya solo, yo mpe ozali moko ya bato wana, pamba te elobeli nayo ezali kofunda yo! Bongo abandaki komilakela mabe mpe kolapa ndayi: —Nayebi moto wana te. Kaka na tango wana, soso elelaki. Bongo Piere akanisaki maloba oyo Yesu alobaki: “Liboso ete soso elela, okowangana ngai mbala misato.” Abimaki libanda mpe alelaki mingi. Tango tongo etanaki, bakonzi ya banganga-Nzambe nyonso nabankolo ya bayuda basanganaki mpo na kobomisa Yesu. Bakangaki ye basinga, bamemami ye mpe bapesaki ye na mabokoya guvelenele Pilato. Yuda oyo atekaki Yesu, tango amonaki ete bakateli Yesu etumbu, ayokaki pasi mingi na motema, mpe akendaki kozongisa mbongo ya bibendentuku misato wana na bakonzi ya banganga-Nzambe mpe na bampaka. Bongo alobaki na bango: —Nasali lisumu mpo nateki moto oyo azangi likambo! Kasi bango bazongisaki: —Etali biso te! Etali yo moko! Yuda abwakaki mbongo yango na Ndako ya Nzambe, mpe alongwaki wana; akendaki mpe amidiembikaki. Bakonzi ya banganga-Nzambe balokotaki mbongo yango mpe balobaki: —Mibeko epesi nzela te mpo na kotia yango na kesi ya makabo, pamba te yango ezali mbongo ya makila! Sima ya kosala likita, basombaki na mbongo yango “elanga ya mosaliya bazungu ya mabele” mpo na bakomisa yango simitiele ya kokunda bapaya. Yango wana kino lelo oyo, elanga yango babengaka yango: “Elanga ya makila!” Na ndenge wana nde maloba ya moprofeta Jeremi ekokisamaki: Bakamataki mbongo ya bibende ntuku misato, talo oyo bato ya Isayele bakataki mpo na ye; mpe basombaki na yango elanga ya moto oyo asalaka banzungu ya mabele, ndenge Nkolo atindaki ngai! Yesu atelemaki liboso ya guvelenele; mpe guvelenele atunaki ye: —Ozali mokonzi ya Bayuda? Yesu azongisaki: —E e, ezali bongo, ndenge olobi! Kasi tango bakonzi ya banganga-Nzambe mpe bankolo ya Bayuda bazalaki kofunda ye, ye azongisaki ata liloba moko te. Bongo Pilato atunaki ye: —Ozali koyoka te makambo bango bazali kofundela yo? Kasi Yesu azongisaki ata liloba moko te. Yango wana, guveleneleakamwaki mingi penza. Guvelenele azalaki na momesano, ete na tango ya Feti azalakikobimisa moto moko ya boloko oyo bato bango moko bazalaki kopona. Na tango wana, moto moko azalaki na boloko, ayebanaki mingi, kombo na ye Barnabas. Tango ebele ya bato basanganaki, Pilato atunaki bango: —Bolingi natikela bino nani? Barnabas to Yesu oyo babengaka Kristo? Pamba te, ayebaki ete batekaki Yesu epai na ye kaka mpo nalikunia. Tango avandaki na kiti na ye oyo azalaki kokatela makambo, mwasi na ye atindelaki ye maloba oyo: —Kokota te na makambo ya moto na sembo wana. Pamba te na butu ya lelo, namoni pasi mingi na ndoto mpo na ye. Kasi bakonzi ya banganga-Nzambe mpe bankolo, bandimisaki ebeleya bato mpo basenga Barnabas mpe baboma Yesu. Guvelenele atunaki bango lisusu: —Na kati na bango mibale, bolingi natikela bino nani? Bango bazongisaki: —Baranabas. Pilato atunaki bango: —Bongo Yesu oyo babengaka Kristo, nasala ye nini? Bango nyonso bazongisaki: —Baka ye na ekulusu! Pilato atunaki: —Mabe nini ye asali? Kasi bagangaki lisusu makasi penza: —Baka ye na ekulusu! Tango Pilato amonaki ete akokoka lisusu kosala eloko te, mpemobulu ebandaki kobima, akamataki mayi, asukolaki maboko liboso ya ebele ya bato mpe alobaki: —Ngambo ya makila ya moto oyo etali ngai te, kasi etali bino! Bato nyonso, bazongisaki: —Tika ete ngambo ya makila na ye ezala likolo na biso mpe ya bana na biso! Bongo Pilato atikelaki bango Barnabas. Kasi mpo na Yesu, sima yakobetisa ye bafimbo, akabaki ye na maboko na bango mpo babaka ye naekulusu. Basoda ya Guvelenele bamemaki Yesu na ndako ya Guvelenele, mpebatiaki ye na kati-kati na bongo nyonso. Balongolaki ye bilamba mpe balatisaki ye nzambala ya motane. Sima, balatisaki ye ekoti moko ya bokonzi, kasi basalaki yango na nzuba. Basimbisaki ye nzete na loboko na ye ya mobali, babandaki kofukamela ye mpe kosakana na ye; bazalaki koloba: —Mbote, mokonzi ya Bayuda! Bazalaki kobwakela ye soyi; bakamataki nzete mpe bazalaki kobeta ye yango na motu. Sima ya kosilisa kosakana na ye, balongolaki ye nzambala mpe balatisaki ye bilamba na ye, bongo bamemaki ye mpo na kobaka ye na ekulusu. Tango babimaki na vile, bakutanaki na moto moko ya mboka Sirene, kombo na ye Simon, mpe batindaki ye na makasi amema ekulusu ya Yesu. Bakomaki na esika moko babengaka Golgota (elingi koloba: “Esikaya mokuwa ya motu”). Mpe kuna, bapesaki Yesu vino oyo basangisa na makasa ya bololo. Kasi tango amekaki, aboyaki komela yango. Tango basilisaki kobaka Yesu na ekulusu, bakabolaki bilamba naye sima ya kobetela yango zeke. Bongo bavandaki wana mpo na kokengela ye. Babambaki na ekulusu, na likolo na motu na ye, mwa libaya mokompo na kolakisa tina oyo babomelaki ye; bakomaki boye: “Oyo Yesu, mokonzi ya Bayuda!” Babakaki mpe miyibi mibale na ba-ekulusu elongo na ye: moko naloboko ya mobali mpe mosusu na loboko ya mwasi. Bato oyo bazalaki koleka wana, bazalaki kofinga ye, koningisa mitu mpe koloba: —Yo moto obomaka Ndako ya Nzambe mpe atongaka yango na mikolo misato, mibikisa yo moko. Soki ozali Mwana ya Nzambe, kita na ekulusu! Ndenge moko mpe bakonzi ya banganga-Nzambe, balakisi ya Mibeko mpebankolo ya Bayuda bazalaki kosakana na ye, mpe koloba: —Abikisaki bato mosusu, akoki komibikisa te! Soki azali mokonziya Isayele akita sikʼoyo na ekulusu, bongo tokondima ye. Atiaka elikya na ye na Nzambe; Nzambe akangola ye sikʼoyo, soki alinga ye. Pamba te, azalaki koloba: “Nazali Mwana ya Nzambe!” Ndenge moko mpe, miyibi oyo babakaki na ba-ekulusu elongo na ye, bazalaki mpe kofinga ye. Mokili mobimba ekomaki molili, banda na ngonga ya midi kino nangonga misato ya pokwa. Pene-Pene na ngonga ya misato, Yesu agangaki na mongongo makasi: —Eli, Eli, lama sabakatani? Elingi koloba: Nzambe na ngai, Nzambena ngai, Nzambe na ngai, mpo na nini otiki ngai? Bato mosusu oyo batelemaki wana, tango bayokaki bongo, balobaki: —Azali kobenga Eliya! Bongo moko na kati na bango akimaki mbango, akamataki eponze, atondisaki yango na vino ya ngayi, atiaki yango na songe ya nzete, mpeapesaki Yesu mpo amela. Kasi basusu bazalaki koloba: —Tika totala, soki Eliya akoya kobikisa ye! Bongo Yesu agangaki lisusu makasi mpe azongisaki molimo na ye. Kaka na tango wana, rido ya ndako ya Nzambe epasukaki na bitenimibale, kobanda na likolo kino na nse. Mokili eninganaki, mabanga epasukaki, malita efungwamaki; mpe basantu mingi oyo bakufa, basekwaki; babimaki na malita, mpe sima ya kosekwa ya Yesu, bakotakina vile ya bosantu mpe bato mingi bamonaki bango. Mokonzi ya basoda ya Roma, na baoyo bazalaki na ye elongo, baoyobazalaki kokengela Yesu, tango bamonaki ndenge mokili eninganaki namakambo nyonso oyo esalamaki, bayokaki somo mingi penza mpe balobaki: —Ya solo, azalaki Mwana ya Nzambe! Basi mingi mpe bazalaki wana, bazalaki kotala na mosika; ezalibaoyo balandaki Yesu banda na Galileya mpo na kosalela ye. Na kati na basi yango, ezalaki: Mariya ya Magadala, Mariya mama ya Zaki mpe Zozefi, mpe mama ya bana ya Zebede. Tango pokwa ekomaki, moto moko ya mbongo mingi kombo na ye Zozefiayaki. Ye azalaki moto ya mboka Arimate mpe azalaki moyekoli ya Yesu. Akendaki epai ya Pilato mpe asengaki nzoto ya Yesu. Bongo Pilatoatindaki bapesa ye yango. Zozefi azwaki nzoto, alingaki yango na elamba ya peto, mpe akotisaki yango na lilita na ye ya sika oyo atobolaki na katiya libanga. Bongo apusaki libanga moko ya monene liboso ya porte ya lilita, bongo azongaki na ye. Mariya ya Magadala mpe Mariya oyo mosusu bavandaki wana, liboso yalilita. Mokolo oyo elandaki, sima ya mokolo ya komilengela, bakonzi yabanganga-Nzambe mpe bafarizeo bakendaki epai ya Pilato. Balobaki: —Mokonzi, tozali koyeba ete tango moto wana ya lokuta azalaki nabomoi, alobaki: “Nakosekwa sima ya mikolo misato!” Yango wana, tinda bato bakengela lilita yango malamu kino na mokoloya misato; soki te bayekoli na ye bakoya koyiba nzoto na ye, bongo na sima bakoloba na bato ete asekwi kati na bakufi. Ya solo, lokuta wana ekoleka oyo ya liboso na mabe! Pilato azongisaki: —Bozwa bakengeli; bokende kokengela lilita na ndenge bolingi! Bongo bakendaki, bakangaki lilita malamu, batiaki elembo na libangampe batikaki bakengeli. Na tongo ya mokolo ya liboso ya poso, sima ya mokolo ya Saba, Mariya ya Magadala mpe Mariya oyo mosusu, bakendaki kotala lilita. Mokili eninganaki makasi penza, pamba te anzelu ya Nkolo awutakina likolo, ayaki, alongolaki libanga mpe avandaki likolo na yango. Lolenge na ye ezalaki lokola kongenga ya kake, mpe bilamba na yeezalaki pembe makasi penza. Somo monene ekotelaki bakengeli: babandaki kolenga mpe bakomakilokola bato bakufi. Bongo anzelu alobaki na basi: —Bobanga te, nayebi ete bozali koluka Yesu oyo babakaki na ekulusu. Azali awa te, asiʼasekwi ndenge alobaki. Boya kotala esika ye alalaki. Bongo bokende noki koyebisa bayekoli na ye ete asiʼasekwi kati na bakufi. Mpe akeyi liboso na bino na Galileya. Bokomona ye kuna! Sikʼoyonayebisi bino! Batikaki lilita noki penza, na kobanga mpe na esengo monene. Mpebakendaki mbango koyebisa sango yango na bayekoli na ye. Na mbala moko, Yesu akutanaki na bango. Alobaki: —Mbote na bino! Bayaki epai na ye, basimbaki makolo na ye, mpe bakumisaki ye. Bongo Yesu alobaki na bango: —Bobanga te! Bokende mpe boyebisa bandeko na ngai bakende na Galileya; bakomona ngai kuna! Tango basi bazalaki kokende, bakengeli mosusu bakendaki na vilempe bayebisaki na bakonzi ya banganga-Nzambe makambo nyonso ndenge yangoesalamaki. Tango bakonzi ya banganga-Nzambe bakutanaki na bankolo ya Bayuda, babongisaki mwango moko. Bapesaki basoda mbongo ebele, mpe balobaki na bango boye: —Boloba boye: tango biso tozalaki kolala pongi, bayekoli na yebayaki na butu koyiba nzoto na ye. Soki guvelenele ayoki likambo yango, tokokitisa ye motema, mpe bokozwa matata te! Basoda bazwaki mbongo mpe basalaki ndenge batindaki bango. Mpesango oyo epanzana na kati ya Bayuda kino lelo oyo. Bongo bayekoli zomi na moko bakendaki na Galileya, na ngomba oyo Yesu ayebisa bango bakende. Tango bamonaki ye, bakumisaki ye; kasi basusu kati na bangobazalaki na tembe. Yesu ayaki epai na bango mpe alobaki: —Bokonzi nyonso, na Likolo mpe awa na nse epesami na maboko na ngai. Yango wana bokende mpe bokomisa bato ya bikolo nyonso bayekoli nangai, bobatisa bango na kombo ya Tata, ya Mwana, mpe ya Molimo Mosantu. Boteya bango batosa nyonso oyo natindaki bino. Boyeba ete nazali na bino mikolo nyonso, kino na suka ya mokili. Ebandeli ya Sango Malamu ya Yesu Kristo, Mwana ya Nzambe. Na mokanda ya moprofeta Ezayi ekomama boye: Tala, nakotinda ntoma na ngai liboso na yo, oyo akobongisela yo nzela. Mongongo ya moto ezali kobelela na esobe: Bobongisa nzela ya Nkolo, Bosembola banzela na ye! Jean ayaki, azalaki kobatisa na esobe mpe azalaki koloba: “Bozwa libatisi, mpo na kolakisa ete bobongoli mitema; bongo Nzambe akolimbisa masumu na bino!” Bato nyonso ya mokili ya Yudea mpe ya Yeruzalem bazalaki kokendeepai na ye. Bazalaki koyambola masumu na bango, mpe azalaki kobatisabango na mayi ya Yordani. Jean azalaki kolata elamba oyo esalami na bapwale ya shamo, mpe mokaba ya poso ya nyama na loketo; azalaki kolia makonko na mafuta ya nzoi. Azalaki koteya na bato boye: —Moto moko akoya sima na ngai, ye aleki ngai na nguya; nakoki kutu te kogumbama liboso na ye mpo na kofungola basinga ya sandale na ye. Ngai nazali kobatisa bino na mayi, kasi ye akobatisa bino na Molimo Mosantu! Na tango wana, Yesu ayaki wuta na Nazareti na Galileya, mpe azwaki libatisi epai ya Jean na mayi ya Yordani. Tango azalaki kobima na mayi, amonaki likolo efungwamaki mpe Molimo akitelaki ye lokola pijon. Mongongo moko ewutaki na Likolo: —Yo ozali Mwana na ngai ya bolingo, osepelisaka ngai mingi! Kaka na tango wana, Molimo atindaki Yesu na esobe. Avandaki kuna mikolo ntuku minei elongo na banyama ya zamba. Kuna Satana amekaki ye mpe baanzelu bayaki kosalela ye. Tango bakangaki Jean, Yesu akendaki na Galileya. Ateyaki Sango Malamu ya Nzambe. Azalaki koloba: —Tango esiʼekoki; Bokonzi ya Nzambe ekomi pene-pene! Bobongola mitema mpe bondima Sango Malamu. Mokolo moko, Yesu azalaki koleka pembeni ya ebale ya Galileya, amonaki Simon na ndeko na ye Andele. Bazalaki kobwaka monyama na ebalepamba te bazalaki baluki mbisi. Yesu alobaki na bango: —Boya, bolanda ngai, mpe nakokomisa bino baluki ya bato! Kaka na tango wana, batikaki minyama na bango mpe balandaki ye. Tango apusanaki mwa liboso, amonaki Zaki mwana ya Zebedeo na ndeko na ye Jean, bazalaki na kati ya bwato mpe bazalaki kobongisa minyamana bango. Kaka na tango wana, abengaki bango; batikaki tata na bango Zebedeo na kati ya bwato, elongo na basali na ye, mpe balandaki Yesu. Bakendaki na Kapenawumi. Mokolo ya saba, Yesu akotaki na ndako ya mayangani mpe abandaki koteya. Bato bakamwaki mingi penza mpo na mateya na ye; pamba te azalaki koteya te lokola balakisi ya Mibeko, kasi azalaki koteyabango na nguya nyonso. Kaka na tango wana, moto moko azalaki na nse ya bokonzi yamolimo mabe, azalaki mpe na ndako na bango ya mayangani. Abandakikoganga: —Yesu ya Nazareti, olingi kosala biso nini? Oyei mpo na koboma biso? Nayebi yo ozali nani: ozali Mosantu ya Nzambe! Bongo Yesu agangelaki molimo yango: —Vanda nyee mpe bima na moto oyo! Molimo mabe eningisaki moto yango makasi penza mpe ebimaki na koganga. Bato nyonso bakamwaki mingi penza mpe bazalaki kotunana moko na moko: —Likambo nini oyo? Oyo ezali mateya ya sika! Azali kogangela milimo mabe na bokonzi nyonso, mpe yango ezali kotosa ye! Bongo basango na ye epanzanaki noki na mokili mobimba ya Galileya. Kaka na tango wana, tango abimaki na ndako ya mayangani akendaki na ndako ya Simon mpe Andele, elongo na Zaki mpe Jean. Bokilo ya Simon alalaki na mbeto mpe azalaki na fievre. Bongobayebisaki yango na Yesu kaka na tango wana. Apusanaki, akamataki ye na loboko mpe atelemisaki ye. Fievele esilaki, mpe abandaki kosalela bango. Tango pokwa ekomaki, moi esilaki kokita, bamemelaki Yesu bato nyonso ya maladi na baoyo bazalaki na milimo mabe. Bato nyonso ya vile wana, bayaki kosangana liboso ya porte ya ndako. Yesu abikisaki bato ebele oyo bazalaki na bapasi ya ndenge na ndenge. Abenganaki mpe milimo ebele ya mabe mpe apesaki milimo mabe nzela te mpo na koloba; pamba te, yango eyebaki ye soki azalaki nani. Na tongo penza, tango molili ezalaki naino, Yesu alamukaki, abimaki na ndako, akendaki na esika ya ye moko kaka, mpe abondelaki wana. Simon na baninga na ye bakendaki koluka ye. Tango bamonaki ye, balobaki na ye: —Bato nyonso bazali koluka yo. Kasi ye azongiselaki bango: —Tokende epai mosusu, na bamboka oyo ezali pembeni-pembeni, mpo nateya mpe kuna. Pamba te, nayaki mpo na yango. Atambolaki na Galileya mobimba, azalaki koteya na bandako na bangoya mayangani mpe azalaki kobengana milimo mabe. Moto moko ya maladi ya maba, ayaki epai na ye, afukamaki libosona ye, mpe abondelaki ye: —Soki olingi, okoki kokomisa ngai peto. Yesu ayokelaki ye mawa, atandaki loboko, asimbaki ye mpe alobaki: —Nalingi yango, koma peto! Kaka na tango wana, maba yango esilaki mpe akomaki peto. Yesu azongisaki ye sima ya kopesa ye likebisi oyo: —Yoka malamu, koyebisa likambo oyo na moto te! Kasi kende komilakisa na nganga-Nzambe, mpe pesa likabo oyo Moyize atindaki mpo na kopetolama na yo. Mpo yango ezala litatoli epai na bango ete yo obiki. Kasi ye, tango abimaki kaka, abandaki koloba na bonsomi nyonso mpe kopanza sango yango. Yango wana, Yesu akokaki te kokota na vile na ndenge ya polele; kasi azalaki kovanda na libanda ya vile, na bisika ya ye moko kaka. Bongo bato bazalaki kowuta bipai na bipai bazalakikoya epai na ye. Sima ya mwa mikolo, tango Yesu azongaki lisusu na Kapernawumi, bato bayokaki ete azalaki na ndako. Bongo bato ebele bayaki kosangana kuna, na ndenge ete, esika ezalaki lisusu te ata liboso ya porte; bongo ateyaki bango Liloba. Bato bayaki, bayelaki ye moto moko akufa makolo, oyo amemamakina bato minei. Lokola bakokaki te komema ye kino bisika Yesu azalaki, mpo bato bazalaki ebele penza, batobolaki lidusu likolo ya ndako; na bisika Yesu azalaki, bongo na lidusu wana, bakitisaki moto ya maladi na mbeto oyo bamemelaka bato ya maladi. Tango Yesu amonaki kondima na bango, alobaki na moto oyo akufa makolo: —Mwana na ngai, masumu na yo elimbisami! Kasi balakisi mosusu ya Mibeko oyo bavandaki wana, babandaki kokanisa na nse ya mitema na bango: —Mpo na nini moto oyo azali koloba boye? Azali kotiola Nzambe. Nani akoki kolimbisa masumu soki bobele Nzambe te? Kaka na tango wana Yesu ayebaki na molimo na ye ete bazalakikokanisa bongo kati na mitema na bango: —Mpo na nini bozali kokanisa bongo na mitema na bino? Likambo nini ezali pete mpo na koloba na moto oyo akufa makolo: “Masumu na yo elimbisami”, to “Telema, kamata mbeto na yo mpetambola?” Kasi mpo boyeba ete Mwana na moto azali na bokonzi na mokili mpo na kolimbisa masumu… Bongo alobaki na moto akufa makolo: —Nalobi na yo, telema, kamata mbeto na yo, mpe zonga na ndako na yo! Kaka na tango wana, atelemaki, akamataki mbeto na ye, mpe abimaki na miso ya bato nyonso. Bato nyonso bakamwaki mingi mpe bakumisaki Nzambe boye: —Naino tomoni likambo ya ndenge oyo te! Yesu abimaki lisusu mpe akendaki pembeni-pembeni ya ebale. Bato ebele penza bayaki epai na ye mpe azalaki koteya bango. Tango azalaki koleka, amonaki Levi, mwana ya Alfeo, avandaki na biro oyo bafutelaka pako. Yesu alobaki na ye: —Landa ngai! Levi atelemaki, mpe alandaki ye. Tango yesu azalaki kolia na ndako ya Levi, bafutisi pakoebele na bato ya masumu, bazalaki mpe kolia elongo na ye na bayekoli na ye pamba te bato oyo bazalaki kolanda ye bazalaki mingi. Tango balakisi ya Mibeko ya lisanga ya bafarizeo bamonaki ete Yesu azalaki kolia na bato ya masumu mpe na bafutisi pako, batunaki bayekoli na ye: —Mpo na nini azali kolia na bafutisi mpaku mpe bato ya masumu? Tango Yesu ayokaki yango, alobaki na bango: —Bato oyo bazangi maladi bazalaka na posa ya monganga te, kasibato ya maladi. Nayaki te mpo na kobenga bato na sembo, kasi bato ya masumu. Bayekoli ya Jean na oyo ya bafarizeo bazalaki koboya kolia mpo na mabondeli. Bongo bayaki kotuna Yesu: —Mpo na nini bayekoli ya Jean na oyo ya bafarizeo baboyaka kolia mpo na mabondeli, kasi oyo ya yo basalaka bongo te? Yesu azongiselaki bango: —Ndenge nini bato oyo babengisi na feti ya libala bakoki koboya kolia na tango mobali oyo abali azali na bango elongo? Tango nyonso oyo mobali azali na bango elongo, bakoki koboya kolia te mpo na mabondeli. Kasi tango ekoya, tango bakolongola mobali na kati na bango, mokolo wana nde bakoboya kolia mpo na mabondeli. Moto moko te akoki kobamba elamba ya kala na eteni ya elamba ya sika; soki asali bongo, eteni ya elamba ya sika ekopasola elamba ya kala; mpe kopasuka wana ekokoma monene koleka. Moto moko te akoki kotia vino ya sika na kati ya basaki ya kala oyo ya poso ya nyama; soki asali bongo, vino ekopasola basaki, bongovino ekosopana mpe basaki ekobeba. Vino ya sika batiaka yango na kati ya basaki ya sika. Mokolo moko ya saba, Yesu azalaki koleka na kati ya elanga ya ble. Tango bazalaki kotambola, bayekoli na ye babandaki kobuka bambuma ya ble. Bafarizeo balobaki na ye: —Tala, mpo na nini bazali kosala likambo oyo epekisami kosala na mokolo ya Saba? Yesu azongiselaki bango: —Naino botangi te likambo oyo Davidi asalaki, tango ye na baningana ye bayokaki nzala mpe bazangaki eloko ya kolia? Akotaki na Ndako ya Nzambe mpe aliaki mampa oyo bapesaki makabona Nzambe. Na tango wana, Abiatare moto azalaki mokonzi ya banganga-Nzambe. Nzokande, kaka banganga-Nzambe nde bazalaki na ndingisampo na kolia yango; kasi David apesaki yango mpe na bato na ye. Bongo alobaki na bango lisusu: —Mokolo ya saba esalama mpo na moto; kasi moto asalama mpo na mokolo ya saba te. Yango wana, Mwana na Moto azali Mokonzi ya mokolo ya saba! Yesu akotaki lisusu na ndako ya mayangani. Moto moko azalaki kuna, azalaki na loboko ya kokufa. Bazalaki kotala ye soki akobikisa ye na mokolo ya saba, mpo bazwa likambo ya kofundela ye. Bongo Yesu alobaki na moto oyo azalaki na loboko ekufa: —Telema awa liboso ya bato nyonso. Mpe atunaki bango: —Ndingisa ezali mpo na kosala likambo ya malamu mokolo ya Sabato kosala mabe? Kobikisa bomoi to koboma yango? Kasi bavandaki nyee. Yesu atalaki bango na kanda, mpe ayokaki mawa mingi mpo motema na bango ezalaki libanga. Bongo alobaki na moto wana: —Sembola loboko na yo! Asembolaki yango, mpe loboko na ye ekomaki malamu. Kaka na tango wana, bafarizeo babimaki mpe babandaki koyokana na bato ya lisanga ya Erode mpo na koluka nzela ya kobomisa Yesu. Yesu alongwaki wana elongo na bayekoli na ye mpe akendaki na ebale monene; bongo bato ebele penza balandaki ye: bawutaki na Galileya, na Yudea, na Yeruzalem, na Idumeya, mpe na ngambo ya Yordani. Mpe baoyo ya bapembeni ya Tire na Sidoni bayaki ebele penza tango bayokaki sango ya makambo nyonso oyo azalaki kosala. Atindaki bayekoli ete babongisela ye bwato ya moke, mpo ebeleya bato bafina-fina ye te. Pamba te, lokola azalaki kobikisa bato ebele, yango wana bato oyo bazalaki na bapasi, bazalaki kowelela koya epai na ye, mpo na kosimba ye. Tango milimo mabe ezalaki komona ye, ezalaki kokweya liboso na ye mpe koganga: —Yo ozali Mwana ya Nzambe! Kasi Yesu azalaki kopekisa milimo yango mpo eloba te soki ye azalaki nani. Bongo Yesu amataki likolo ya ngomba, abengaki bato oyo ye moko alingaki; mpe bakendaki epai ye azalaki. Aponaki bango zomi na mibale mpe apesaki bango kombo: bapostolo, mpo bazala na ye elongo, mpo atinda bango bakende koteya mpe bazala na bokonzi ya kobengana milimo mabe. Tala bakombo ya bato zomi na mibale oyo ye aponaki: Simon oyo Yesu apesaki ye kombo Piere; Zaki mwana ya Zebede na ndeko na ye Jean, baoyo Yesu apesaki bango kombo “Boanerges”, elingi koloba “Bana ya kake”; Andele; Filipo; Bartelemi; Matie; Toma; Zaki mwana ya Alfeo; Tade; Simon oyo azalaki moto ya lisanga: “Zelote”; na mpe Yuda Isakariote, oyo atekaki Yesu. Tango Yesu akotaki na ndako, bato ebele bayaki lisusu kosangana, na ndenge ete ye na bayekoli na ye bakokaki kutu kolia te. Tango bato ya libota na ye bayokaki yango, bayaki mpo na kozwa ye na makasi pamba te bazalaki koloba: “Akomi na liboma”. Balakisi ya Mibeko oyo bawutaki na Yeruzalem balobaki: —Azali na Belzebula kati na ye; mpe ezali na bokonzi yamokonzi ya milimo mabe nde azali kobengana milimo mabe. Bongo Yesu abengaki bango, mpe alobaki na bango na masapo: —Ndenge nini Satana akoki kobengana satana? Soki bokonzi moko ekabwani kati na yango, bokonzi yango ekoki kowumela te. Soki ndako moko ekabwani kati na yango, ndako yango ekoki kowumela te. Mpe soki Satana amibundisi ye moko, mpe azali ya kokabwana, akowumela te mpe suka na ye emonani. Pamba te, moto moko te akoki kokota na ndako ya elombempo na kobotola biloko na ye, soki liboso akangi ye na basinga te. Bongo nde akoki kobotola biloko ya ndako na ye. Nalobi na bino ya solo, masumu nyonso mpe makambo nyonso oyo batobakoki koloba mpo na kofinga Nzambe, bakolimbisa bango yango. Kasi oyo afingi Molimo Mosantu bakolimbisa ye ata moke te; akomema libela na libela mokumba ya lisumu wana. Yesu alobaki bongo, mpo bango bazalaki koloba: “Azali na molimomabe”. Mama na bandeko ya Yesu bayaki. Batelemaki libanda mpe batindaki moto moko mpo na kobenga ye. Bato ebele penza bavandaki pembeni-pembeni na ye. Bongo balobaki na ye: —Mama na yo mpe bandeko na yo bazali libanda, bazali koluka yo. Yesu azongisaki: —Nani azali mama na ngai, mpe banani bazali bandeko na ngai ya mibali? Bongo atalaki bato oyo bavandaki pembeni-pembeni na ye, mpealobaki: —Botala mama na ngai na bandeko na ngai. Pamba te, oyo asalaka mokano ya Nzambe, ye nde azali ndeko na ngai yamobali, ndeko na ngai ya mwasi mpe mama na ngai. Yesu abandaki lisusu koteya pembeni ya ebale monene. Bato ebele penza bayaki kosangana epai na ye; yango wana amataki na bwato mpe avandaki kati na yango, bongo bato nyonso bazalaki na mokili, pembeni ya ebale. Ateyaki bango makambo mingi na masapo; mpe na mateya na ye alobaki: —Boyoka! Moloni moko abimaki mpo na kolona mbuma. Tango azalaki kobwaka bambuma, ndambo ekweyaki pembeni ya nzela; bongo bandeke bayaki mpe baliaki yango. Ndambo mosusu ekweyaki na esika ya mabanga, esika mabele ezalaki mingite; ebimaki noki, mpo mabele yango ezalaki mozindo te. Tango moi ebimaki, mwa banzete yango ezikaki mpo ezalaki na misisa te. Mosusu ekweyaki na kati ya banzube. Banzube ekolaki mpe efinaki yango; yango wana ebotaki bambuma te. Mosusu ekweyaki na mabele ya malamu. Ebimaki, ekolaki, mpe ebotaki bambuma: moko ntuku misato, mosusu ntuku motoba, mpe mosusu nkama. Bongo Yesu alobaki: —Oyo azali na matoyi mpo na koyoka, ayoka! Tango azalaki kaka ye moko, bapostolo zomi na mibale elongo na bato oyo bazalaki kozinga ye batunaki ye mpo na masapo. Yesu alobaki na bango: —Sekele ya Bokonzi ya Nzambe epesameli bino. Kasi mpo na baoyo bazali na libanda, makambo nyonso ezali kolobama na masapo, mpo ete: Tango bazali kotala, bakotala na bango, kasi bazali komona te, Tango bazali koyoka, bakoyoka na bango, kasi bazali kososola te; nakobanga ete babongola mitema mpe masumu na bango elimbisama. Bongo Yesu alobaki na bango: —Bososoli lisapo oyo te? Bongo ndenge nini bokososola masapo nyonso? —Moloni ezali oyo alonaka Liloba. Bato mosusu bazali lokola mbuma oyo ezali pembeni ya nzela, epai Liloba elonamaki. Tango bayokaka yango, Satana ayaka noki mpe abotolaka Liloba oyo elonamaka kati na bango. Basusu bazali lokola mbuma oyo elonamaki na esika ya mabanga, bayokaka Liloba mpe bandimaka yango mbala moko na esengo. Kasi lokola bazalaka na misisa te, bawumelaka kaka mwa tangomoke. Tango pasi to minyoko eyaka mpo na Liloba, bakweyaka noki penza. Basusu bazali lokola mbuma oyo elonamaki na kati ya banzube, bayokaka Liloba; kasi mitungisi ya bomoi oyo, lokuta ya bomengo, mpe baposa mpo na makambo mosusu ekotaka mpe efinaka Liloba, mpe epesaka yango nzela te mpo ebota. Bongo basusu bazali lokola mbuma oyo elonamaki na mabele ya kitoko, bayokaka Liloba, bandimaka yango, mpe babotaka mbuma: moko ntuku misato, mosusu ntuku motoba mpe mosusu nkama. Bongo Yesu alobaki na bango: —Bomemaka mwinda mpo na kotia yango na nse ya katini to na nse ya mbeto? Boni, ezali te mpo etiama likolo ya eloko oyo batielaka mwinda? Pamba te, makambo nyonso oyo ezali ya kobombana ekobima na polele, mpe makambo nyonso ya sekele ekoyebana. Soki moto azali na matoyi mpo na koyoka, ayoka. Bongo alobaki lisusu: Bokeba na makambo oyo bozali koyoka. Ndenge bino bopesaka, bakopesa bino mpe ndenge moko, mpe bakobakisela bino. Pamba te, moto oyo azali na eloko, bakopesa ye mosusu; kasi moto oyo azangi eloko, bakobotola ye ata oyo azali na yango. Yesu alobaki lisusu: —Bokonzi ya Likolo ekokani na moto moko abwakaki mbuma na mabele. Butu mpe moi, alala to alamuka, mbuma ebimaki mpe ekolaki yango moko, mpe ayebaki te ndenge nini yango ezalaki kokola. Pamba te, mabele yango moko ebotaki mbuma: liboso matiti, sima mitu oyo esimbaka ble, bongo ble etondaki na mitu yango. Tango mbuma ekomelaki, azwaki mopanga oyo babukelaka mbuma, pamba te tango ya kobuka mbuma ekokaki. Yesu alobaki lisusu: —Bokonzi ya Nzambe ekokani na nini? Tokoki kosalela lisapo nini mpo na kolakisa yango? Ekokani na mbuma ya mutarde: tango balonaka yango, ezalaka mbuma oyo elekaka moke na bambuma nyonso ya mokili. Kasi soki baloni yango, ekokola mpe ekokoma molayi koleka biloko nyonso oyo elonamaka; mpe ebimisaka bitape ya minene, na ndenge ete bandeke bakoki koya kosala bandako na yango na nse ya malili na yango. Azalaki koloba eloko moko te epai na bango bongo azangisa lisapo. Kasi tango azalaki kotikala ye moko elongo na bayekoli na ye, azalaki kolimbola makambo nyonso. Mokolo wana, tango pokwa ekomaki, Yesu alobaki na bayekoli na ye: —Tokatisa na ngambo mosusu. Batikaki bato, bakamataki ye ndenge azalaki, kati na bwato. Babwato mosusu mpe ezalaki na ye elongo. Bongo mopepe moko ya makasi penza ebandaki koleka, bambonge ebandaki kobeta na bwato; bongo bwato ebandaki kotonda na mayi. Yesu azalaki na suka ya bwato, alalaki mpe atiaki motu likolo ya kuse. Bayekoli balamusaki ye mpe balobaki na ye: —Moteyi, tolingi kokufa! Ozali komitungisa te? Alamukaki, agangelaki mopepe mpe alobaki na ebale: —Tika makelele! Vanda kimia! Mopepe esilaki mpe kimia monene ezongaki. Bongo alobaki na bayekoli na ye: —Mpo na nini bozali kobanga? Ndenge nini bozangi kondima? Kobanga monene ekotelaki bango mpe babandaki kotunana moko na moko: —Yango moto oyo azali nani, mpo ete mopepe mpe ebale etosa ye? Bongo bakomaki na ngambo mosusu ya ebale, na mokili ya bato ya Gereza. Tango Yesu akitaki na bwato, moto moko azalaki na molimo mabe awutaki na simetiele, ayaki kokutana na ye. Moto yango azalaki kovanda na simetiele; mpe moto ata moko te azalaki kokoka kokanga ye, ata mpe na minyololo. Pamba te, mbala mingi bazalaki kokanga ye na minyololo mpebazalaki kotia ye mabende na makolo, kasi azalaki kokata minyololo mpe kobuka mabende yango; mpe moto ata moko te azalaki na makasi ya kokoka mpo na kolembisa ye. Tango nyonso, butu mpe moi, azalaki koyenga-yenga na simetiele mpe na bangomba, azalaki koganga na mongongo makasi mpe komizokisa na mabanga. Tango amonaki Yesu na mosika, akimaki mbangu mpe afukamaki liboso na ye; mpe agangaki na makasi nyonso: —Olingi nini na ngai, Yesu Mwana na Nzambe oyo aleki Likolo? Nabondeli yo na kombo ya Nzambe, kotungisa ngai te! Pamba te, Yesu azalaki koloba na molimo yango: —Molimo mabe, bima na moto oyo! Bongo Yesu atunaki ye: —Kombo na yo nani? Ye azongisaki: —Kombo na ngai: “Legion”, pamba te tozali ebele! Bongo molimo mabe ezalaki kobondela Yesu mpo abengana bango te na mokili wana. Nzokande, lisanga monene ya bangulu ezalaki kolia pembeni ya ngomba. Milimo mabe ebondelaki Yesu: —Tinda biso na bangulu, mpo tokota kati na bango! Yesu apesaki bango nzela. Bongo milimo mabe ebimaki mpe ekendaki kokota na bangulu. Bangulu yango nyonso ezalaki pene-pene na nkoto mibale; ekitaki mbangu na ngomba, ekendaki kokweya na kati ya mayi, mpe ekufaki. Bakengeli ya bangulu yango, bakimaki mbangu mpe bamemaki SANGO na ba-vile mpe na bamboka. Bongo bato bayaki mpo na kotala likambo oyo ewutaki kosalama. Tango bakomaki epai ya Yesu, bamonaki moto oyo azalaki na milimoebele ya mabe avandaki wana, alataki bilamba mpe mayele na ye ezongaki malamu. Bongo somo ekangaki bango. Baoyo bamonaki likambo yango, bayebisaki bato likambo oyo esalamakina moto oyo azalaki na milimo mabe mpe na bangulu. Bongo bato yango babandaki kobondela Yesu mpo alongwa na mokili na bango. Tango Yesu amataki na bwato, moto oyo azalaki na milimo mabe abondelaki ye mpo akende na ye. Kasi Yesu aboyaki mpe alobaki na ye: —Kende na ndako na yo, epai ya bandeko na yo, mpe yebisa bango makambo oyo Nkolo asaleli yo, mpe ndenge ayokeli yo mawa. Bongo moto yango akendaki mpe abandaki kopanza na “Bavile zomi” sango ya makambo oyo Yesu asalelaki ye. Mpe bato nyonso bakamwaki. Tango Yesu akatisaki lisusu na ngambo ya ebale, na bwato, bato ebele bayaki kosangana epai na ye; mpe azalaki pembeni ya ebale monene. Bongo moko na kati ya bakonzi ya Ndako ya mayangani, kombo Yayirusi, ayaki wana. Tango amonaki Yesu, afukamaki liboso na ye, mpe abondelaki ye mingi: —Mwana na ngai ya mwasi alingi kokufa. Nabondeli yo, yaka mpe tiela ye maboko, mpo ete abika mpe azala na bomoi. Bongo Yesu akendaki na ye elongo. Bato ebele penza bazalaki kolanda ye mpe kofina-fina ye bipai nyonso. Mpe mwasi moko azalaki wana, azalaki na maladi ya kotanga makila bambula zomi na mibale. Amonaki pasi mingi penza mpo na kokendeke epai ya minganga ebele; mpe asilisaki mbongo na ye nyonso pamba kasi mbongwana ezalaki te. Kutu pasi ezalaki kaka komata. Tango ayokaki sango ya Yesu, ayaki na sima-sima, na kati ya ebeleya bato, mpe asimbaki elamba na ye. Pamba te azalaki kokanisa: —Soki nasimbi ata bilamba na ye, nakobika! Kaka na tango wana makila etikaki kotanga, mpe ayokaki na nzoto na ye ete abikaki na pasi na ye. Kaka na tango wana Yesu ayebaki ete nguya ebimaki kati na ye. Abalukaki epai ya ebele ya bato mpe atunaki: —Nani asimbi bilamba na ngai? Bayekoli na ye bazongisaki: —Boni, omoni ndenge bato bazali kofina-fina yo bipai nyonso, bongo ozali lisusu kotuna: “Nani asimbi ngai?” Kasi Yesu azalaki kotala epai na epai mpo amona soki nani asalaki yango. Mwasi abandaki kobanga mpe kolenga mpo ayebaki likambo oyo esalamaki epai na ye; bongo ayaki afukamaki liboso ya Yesu mpe ayebisaki ye solo nyonso. Yesu alobaki na ye: —Mwana na ngai, kondima na yo ebikisi yo; kende na kimia mpe bika na pasi na yo! Tango Yesu azalaki naino koloba, ndambo ya bato bayaki wuta na ndako ya mokonzi ya ndako ya mayangani, mpo na koloba na ye: —Mwana na yo ya mwasi akufi; mpo na nini ozali lisusu kotungisa moteyi? Kasi Yesu ayokaki maloba yango; mpe alobaki na mokonzi ya ndako ya mayangani: —Kobanga te; Ndima kaka! Apesaki nzela na moto ata moko te mpo alanda ye; longola kaka Piere, Zaki, mpe Jean ndeko ya Zaki. Tango bakomaki na ndako ya mokonzi ya ndako ya mayangani, Yesu amonaki yiki-yiki, na baoyo bazalaki kolela mpe koganga makasi. Akotaki mpe alobaki na bango: —Mpo na nini yiki-yiki oyo nyonso? mpo na nini bozali kolela? Mwana akufi te, kasi alali pongi! Kasi basekaki ye. Sima ya kobimisa bango nyonso libanda, akamataki tata na mama ya mwana, na bayekoli oyo bazalaki na ye elongo, bongo bakendaki epai mwana azalaki. Akamataki ye na loboko mpe alobaki na ye: —Talita koumi (yango elingi koloba: Elenge mwasi: nalobi na yo, telema). Kaka na tango wana, elenge mwasi atelemaki mpe abandaki kotambola. Azalaki na bambula zomi na mibale. Bango nyonso bakamwaki mingi penza. Kasi Yesu apekisaki bango mpo bayebisa likambo yango ata na motomoko te. Mpe alobaki na bango bapesa ye eloko ya kolia. Yesu alongwaki wana mpe akendaki na vile na ye, bongo bayekoli na yebalandaki ye. Tango saba ekomaki, abandaki koteya na ndako ya mayangani, mpe bato mingi oyo bayokaki ye, bakamwaki mingi penza. Bazalaki kotuna: —Moto oyo azwi makambo oyo wapi? Bwania ya ndenge nini bapesi yena ndenge ete asala makamwisi! Ye azali salapantie te? Azali Mwana ya Mariya te mpe ndeko ya Zaki, Zoze, Zude mpe Simon te? Mpe bandeko na ye ya basi bazalaka na biso awa te? Mpe ye azalaki libaku mpo na kondima na bango. Bongo Yesu alobaki na bango: —Moprofeta azalaka na lokumu te na ekolo na ye, na kati ya libota na ye, mpe na ndako na ye! Akokaki te kosala wana ata likamwisi moko, longola kaka mwa ndamboya bato ya maladi oyo atielaki maboko mpe abikisaki bango. Mpe akamwaki mingi penza mpo na kozanga kondima na bango. Bongo Yesu atambolaki na bamboka ye pembeni-pembeni mpo na koteya kuna. Abengaki bapostolo na ye zomi na mibale mpe atindaki bango mibale-mibale; apesaki bango mpe bokonzi likolo ya milimo mabe; mpe atindaki bango ete: bamema eloko moko te mpo na mobembo, longola kaka nzete; sakosi te, limpa te mpe mbongo te na baposi na bango. Bolata basandale na makolo na bino, kasi elamba ya likolo te. Alobaki na bango lisusu: —Na ndako oyo bakoyamba bino, bovanda kuna kino tango bokolongwa wana. Kasi soki na esika moko baboyi koyamba bino mpe baboyi koyoka bino, tango bozali kolongwa wana, bopupola makolo na bino: yango ekozala litatoli mpo na bango. Bakendaki mpe bateyaki bato ete babongola mitema. Babenganaki milimo ebele ya mabe, bapakolaki mafuta na bato mingi ya maladi mpe babikisaki bango. Mokonzi Erode ayokaki sango ya Yesu, pamba te kombo na ye epanzanaki mingi penza. Bato bazalaki koloba: —Jean Batiste asekwi kati na bakufi! Yango wana azali na nguya ya kosala makamwisi. Kasi basusu bazalaki koloba: —Ezali Eliya! Bato mosusu mpe bazalaki koloba: —Azali moprofeta lokola moko ya baprofeta. Kasi tango Erode ayokaki yango, alobaki: —Ezali Jean, oyo nakatisaki motu, nde asekwi kati na bakufi! Pamba te, Erode ye moko moto apesaki mitindo mpo bakanga Jean mpe batia ye na boloko. Asalaki bongo mpo na Erodiade, mwasi ya ndeko na ye Filipi, oyo ye abalaki. Pamba te, Jean azalaki koloba na Erode: —Ozali na ndingisa te mpo obala mwasi ya ndeko na yo! Yango wana Erodiade abombaki kanda na motema mpo na Jean, mpe azalaki kolinga kobomisa ye. Kasi azalaki kokoka te, pamba te Erode azalaki kobanga Jean. Ayebaki ete Jean azalaki moto nasembo mpe mosantu; yango wana azalaki kobatela ye. Tango nyonso, oyo azalaki koyoka Jean, azalaki komitungisa mingi penza; nzokande azalaki kaka kolinga koyoka ye. Bongo tango ya malamu ekomaki. Ezalaki mokolo oyo Erode azalaki kosepela mokolo ya mbotama na ye. Tango asalaki feti moko ya kafu-kafu mpo na bato na ye ya minene, na bankozi minene ya basoda, mpe na bato ya lokumu ya Galileya. Tango mwana ya mwasi ya Erodiade akotaki mpe abinaki, asepelisaki Erode na bato oy Erode abengaki na feti. Bongo mokonzi alobaki na elenge mwasi: —Senga ngai eloko nyonso olingi, mpe nakopesa yo yango! Bongo alapaki ndayi epai na ye: Eloko nyonso okosenga ngai, nakopesa yo yango, ata ndambo ya bokonzi na ngai! Bongo elenge mwasi abimaki mpe alobaki na mama na ye: —Nasenga nini? Mama azongisaki: —Motu ya Jean Batiste! Kaka na tango wana, elenge mwasi azongaki mbangu epai ya mokonzi mpe asengaki ye: —Nalingi opesa ngai, sikʼoyo, motu ya Jean Batiste na sani! Mokonzi ayokaki mawa mingi penza; kasi alingaki te koboya kopesa ye yango, mpo na bandayi oyo alapaki mpe mpo na bato oyo ye abengisaki na feti. Bongo mokonzi atindaki noki penza moko ya basoda oyo bazalaki kokengela ye, na etinda ete aya na motu ya Jean. Moto yango akendaki na boloko, akataki motu ya Jean, mpe amemaki motu na ye na sani. Apesaki yango na elenge mwasi, bongo ye apesaki yango na mama na ye. Tango bayekoli ya Jean bayokaki sango yango, bayaki, bakamatakinzoto na ye, mpe bakundaki yango na lilita. Bapostolo basanganaki pembeni-pembeni ya Yesu, mpe babandaki koyebisa ye makambo nyonso oyo basalaki mpe nyonso oyo bateyaki. Bongo alobaki na bango: —Boya elongo na ngai, bino moko kaka, na esika ezangi bato, mpe bopema mwa moke. Pamba te, bato mingi penza bazalaki koya mpe kozonga, mpe bazalaki kozwa ata mwa tango te mpo na kolia. Bongo bakendaki bango moko kaka, na bwato, na esika ezangi bato. Kasi tango bato mingi bamonaki bango ete bazalaki kokende, bayebaki bango mpe bakimaki mbangu na makolo wuta na bavile nyonso, mpe bakomaki kuna liboso na bango. Tango Yesu akitaki na bwatu mpe amonaki bato ebele penza, motemana ye etondaki na mawa mingi mpo na bango, pamba te bazalaki lokolabameme oyo ezangi mobateli. Bongo abandaki koteya bango makambo ebele. Lokola tango epusanaki mingi penza, bayekoli na ye bayaki epai na ye, mpe balobaki: —Tango esiʼepusani, mpe esika oyo tozali, ezali na bato te. Zongisa bato mpo bakende na bamboka mpe na bilanga ya pembeni-pembeni, basomba biloko ya kolia. Kasi Yesu azongiseli bango: —Bino moko bopesa bango biloko ya kolia. Bayekoli balobaki na ye: —Olingi tokende kosomba mampa ya badeni nkama mibale mpo topesa bango balia? Bongo Yesu atunaki bango: —Bozali na mampa boni? Bokende mpe botala. Tango bayebaki yango, balobaki: —Ezali mitano, na bambisi mibale. Yesu atindaki bango bavandisa bato nyonso na maboke, likolo ya matiti ya mobesu. Bongo bavandaki na maboke ya bato nkama moko, mpe ya bato ntuku mitano. Yesu akamataki mampa wana mitano na bambisi wana mibale, atalaki likolo, azongisaki matondi, mpe akataki mampa yango. Bongo apesaki yango na bayekoli na ye mpo bakabola yango na bato. Akabolaki mpe bambisi wana mibale, na bango nyonso. Bato nyonso baliaki mpe batondaki. Bongo balokotaki bitunga zomi na mibale oyo ezalaki yakotonda na biteni ya mampa na bambisi oyo etikalaki. Baoyo baliaki mampa bazalaki mibali nkoto mitano. Kaka na tango wana, Yesu atindaki bayekoli na ye bamata na bwato, mpo bakende liboso na ye, na ngambo mosusu ya ebale, epai ya Betsaida, na tango ye azalaki kozongisa bato. Sima ya kozongisa bango, akendaki na ngomba mpo na kobondela. Tango pokwa ekomaki, bwato ekomaki na kati-kati ya ebale, bongo Yesu atikalaki ye moko na mokili. Amonaki ete bayekoli na ye bazalaki na nkokoso mingi mpo na koluka kai, pamba te mopepe ezalaki kozongisa bango na sima. Na pene-pene ya ngonga minei ya tongo, Yesu abandaki koya epai na bango, azalaki kotambola likolo ya ebale. Alingaki koleka pembeni na bango, kasi tango bamonaki ye azalaki kotambola likolo ya ebale, bakanisaki ete ezali elima. Babandaki koganga, pamba te, bango nyonso bamonaki ye, mpe batondaki na somo. Kaka na tango wana, Yesu alobaki na bango: —Boyika mpiko, bobanga te, ezali ngai! Bongo amataki na bwato elongo na bango, mpe mopepe esilaki. Bakamwaki mingi penza pamba te basosolaki te tina ya likamwisi ya mampa. Mpo mayelena bango ezalaki ya kozipama. Tango basilisaki kokatisa ebale, bakomaki na mokili ya Genezareti, mpe bakangaki bwato na bango na libongo. Tango bazalaki kokita na bwato, bato bayebaki Yesu noki penza. Bango bakimaki mbango na bipai nyonso ya mokili wana, mpe bamemaki bato ya maladi na bitoko, na bisika nyonso oyo bazalaki koyoka ete Yesu azalaki kuna. Bipai nyonso oyo Yesu azalaki kokende: na bamboka, na vile, to na bilanga, bato bazalaki kotia bato ya maladi na bazando, mpe bazalaki kobondela ye ete apesa bango ndingisa ya kosimba ata songeya elamba na ye. Bongo baoyo nyonso bazalaki kosimba yango, bazalaki kobika. Bafarizeo na ndambo ya balakisi ya Mibeko, oyo bawutaki na Yeruzalem, bayaki kosangana epai Yesu azalaki. Bamonaki ete bayekoli mosusu ya Yesu bazalaki kolia limpa na mabokoya mbindo; elingi koloba: maboko oyo basukola te. Pamba te, bafarizeo na bayuda nyonso bazalaki kolia te sokibasukoli maboko malamu penza te; na bongo nde, bazalaki kotosa bonkoko ya bakoko. Mpe soki bawuti na zando, baliaka te soki naino basukoli te. Bazalaki lisusu na mibeko mingi ya bonkoko oyo bazalaki kotosa, lokola: kosukola bakopo, biluku, na banzungu ya mabende. Yango wana bafarizeo na balakisi ya Mibeko batunaki Yesu: —Mpo na nini bayekoli na yo batosaka te mibeko ya bakoko, kasi baliaka na maboko ya mbindo? Yesu azongiselaki bango: —Bino baiporite! Ezali asakolaki malamu mpo na bino; lokola ekomama: Bato oyo bakumisaka ngai na bambebo, kasi mitema na bango ezali mosika na ngai! Bakumbamelaka ngai kaka pamba; mateya na bango ezali kaka mibeko oyo esamaki na bato. Pamba te, bobwakaka Mibeko ya Nzambe, mpe botosaka bonkoko ya bato. Bongo alobaki na bango: —Botiaka Mibeko ya Nzambe na pembeni mpo na kotosa bonkoko na bino. Pamba te, Moyize alobaki: —Tosa tata mpe mama na yo, mpe oyo akolakela tata to mama na ye mabe, esengeli baboma ye. Kasi bino bolobaka, soki moto alobi na tata to mama na ye: “Lisalisi oyo olingaki kozwa epai na ngai ezali ‘Korban’ ”, (elingikoloba likabo esengeli kaka mpo na Nzambe), bongo bopesaka moto yango nzela mpo asala eloko moko te na tata na ye to mpe mama na ye. Tala ndenge bobomaka Liloba ya Nzambe na nzela ya bonkoko na bino, oyo boteyanaka bino na bino. Bosalaka mpe makambo mingi ya ndenge wana! Bongo Yesu abengaki lisusu ebele ya bato, mpe alobaki na bango: —Bino nyonso boyoka ngai, mpe bososola malamu likambo oyo: Eloko moko te ezali libanda ya moto, oyo ekotaka na kati na yempe ekoki kokomisa ye mbindo. Kasi oyo ebimaka kati na ye yangonde ekomisaka ye mbindo. [Soki moto azali na matoyi mpo na koyoka tika ye ayoka.] Tango Yesu atikaki ebele ya bato mpe akotaki na ndako, bayekoli na ye batunaki ye mpo na lisapo wana. Bongo alobaki na bango: —Bino mpe bozali na mayele te? Boyebi te ete eloko moko te oyo ekotaka na moto, wuta libanda, ekoki kokomisa ye mbindo? Pamba te yango ekotaka na motema na ye te, kasi na libumu na ye, bongo ebimaka libanda ya nzoto na ye (Na maloba oyo, Yesu alakisaki ete bilei nyonso ezali peto). Bongo alobaki lisusu: —Oyo ebimaka na moto, yango nde ekomisaka ye mbindo. Pamba te, wuta na kati, na motema ya moto nde ebimaka: makanisi ya mabe, ekobo, kindumba, koboma, koyiba, lokoso ya mbongo, makambo ya mabe, makambo ya lokuta, pite, kofinga, lofundu, bozoba. Makambo nyonso wana ya mabe, ebimaka na kati mpe yango ekomisaka moto mbindo. Yesu alongwaki wana mpe akendaki na mikili ya Tire. Akotaki na ndako moko mpe alingaki te ete moto ata moko ayeba yango. Kasi akokaki kobombama te. Mwasi moko azalaki na mwana ya mwasi oyo azalaki kotungisama na molimo mabe; tango ayokaki sango ya Yesu, ayaki mpe afukamaki liboso na ye. Mwasi yango azalaki Mogreki, abotamaki na Fenisia ya Siriya. Abondelaki Yesu mpo abengana molimo mabe na mwana na ye ya mwasi. Kasi Yesu alobaki na ye: —Tika naino bana batonda, pamba te ezali malamu te mpo na kokamatamampa ya bana mpe kobwakela yango bambwa. Mwasi azongiselaki ye: —Nkolo, pamba te ata bambwa, na nse ya mesa baliaka bandambooyo bana bakweyisaka. Bongo Yesu alobaki na ye: —Mpo na eyano oyo ozongisi, kende, molimo mabe esiʼebimi na mwanana yo ya mwasi. Mpe tango akendaki na ndako, akutaki mwana na ye alali na mbeto, mpe molimo mabe ebimaki. Bongo Yesu alongwaki na mikili ya Tire, alekaki na Sidoni, mpe akendaki na ebale ya Galileya na kolekela na mokili ya Dekapoli. Bamemelaki ye moto moko ayokaka te mpe azalaki koloba na pasi. Bongo babondelaki ye mpo atiela ye maboko. Yesu alongolaki ye na kati ya ebele ya bato, amemaki ye na pembeni, mpe atiaki ye misapi na matoyi; abwakaki nsoyi mpe asimbaki lolemo ya moto yango. Atalaki na likolo, apemaki moke mpe alobaki na ye: —Efata (elingi koloba: fungwama). Kaka na tango wana matoyi na ye efungwamaki mpe lolemo na ye ekangwamaki, mpe abandaki koloba malamu. Yesu apekisaki bango ete baloba yango na moto moko te. Awa azalaki kopekisa bango sango yango mingi, bango bazalaki kopanza yango mingi penza koleka. Bato bakamwaki mingi penza, mpe bazalaki koloba: —Azali kosala makambo nyonso malamu; azali koyokisa bato bakufa matoyi mpe kolobisa bato oyo balobaka te. Na mikolo wana, bato mingi penza basanganaki lisusu. Lokola bazalaki na eloko moko te po na kolia, Yesu abengaki bayekoli na yempe alobaki na bango: —Nazali koyokela bato oyo mawa, pamba te basiʼbasali mikolomisato elongo na ngai, mpe bazali na eloko moko te mpo na kolia. Soki nazongisi bango na bandako na bango na nzala, bakokweya na nzela; pamba te basusu kati na bango bawuti mosika. Bayekoli na ye bazongiselaki ye: —Esika nini tokozwa, awa na esika oyo ezangi bato, mampa ya kokoka mpo na koleyisa bango? Yesu atunaki bango: —Bozali na mampa boni? Bazongisaki: —Sambo. Bongo alobaki na ebele ya bato bavanda na mabele. Akamataki mampa yango sambo, azongisaki matondi, akataki yango, bongo apesaki yango na bayekoli na ye mpo bakabola yango na bato; mpe basalaki bongo. Bazalaki mpe na mwa ndambo ya bambisi ya mike; apambolaki yango mpe alobaki na bayekoli bakabola yango. Bato baliaki mpe batondaki. Bongo balokotaki bitunga sambo ya biteni oyo etikalaki. Bato bazalaki pene-pene ya nkoto minei. Bongo Yesu azongisaki bango. Kaka na tango wana, amataki na bwato elongo na bayekoli na ye, mpe akendaki na mokili ya Dalmanuta. Bongo Bafarizeo bayaki mpe babandaki kotuna Yesu mituna. Basengaki ye likamwisi moko oyo ekowuta na Likolo, mpo na komeka ye. Yesu ayokaki mawa mingi mpe alobaki: —Mpo na nini bato ya tango oyo bazali kosenga elembo? Nalobi na bino ya solo: bakopesa bango ata elembo moko te! Atikaki bango, amataki lisusu na bwato mpe akendaki na ngambomosusu ya ebale. Bayekoli babosanaki komema mampa; bazalaki kaka na limpa moko na kati ya bwato. Yesu akebisaki bango: —Bofungola miso mpe bokeba na nkisi oyo evembisaka mampa ya Bafarizeo na oyo ya Erode. Bayekoli babandaki kotiana tembe bango na bango: —Ezali mpo tozali na mampa te. Tango Yesu ayebaki yango, atunaki bango: —Mpo na nini bozali kotia tembe mpo bozangi mampa? Boyebi naino te? Bososoli naino te? Mitema na bino ezali kaka mabanga? Bozali na miso, kasi bozali komona te? Bozali na matoyi, kasi bozali koyoka te? Boni, bozali kokanisa te? Tango nakataki mampa mitano mpo na kokabola na bato nkoto mitano, bitunga boni bolokotaki ezalaki ya kotonda na biteni? Bazongisaki: —Zomi na mibale. —Bongo tango nakataki mampa sambo mpo na kokabola na bato nkoto minei, bitunga boni bolokotaki oyo ezalaki ya kotonda na biteni ya mampa? Bazongisaki: —Sambo. Bongo alobaki na bango: —Bozali kaka kososola te? Bakomaki na Betsaida. Bamemelaki Yesu moto moko akufa misompe babondelaki ye mpo asimba ye. Yesu akamataki moto akufa miso na loboko, mpe amemaki ye nalibanda ya mboka; bongo abwakelaki ye soyi na miso, atielaki yemaboko, mpe atunaki ye: —Boni, ozali komona eloko? Moto yango atalaki mpe alobaki: —Nazali komona bato lokola banzete ezali kotambola. Bongo Yesu atiaki maboko na ye na miso ya moto yango. Moto yango atalaki malamu, abikaki mpe abandaki komona biloko nyonso polele penza. Yesu azongisaki ye na ndako na ye, mpe alobaki na ye: —Kokota na mboka te. Yesu na bayekoli na ye bakendaki na bamboka ya Sezarea na Filipo. Na nzela, atunaki bango: —Bato balobaka ete ngai nazali nani? Bazongisaki: —Basusu balobaka: Jean Batiste; basusu balobaka: Eliya, mpe basusu balobaka: ozali moko ya baprofeta. Yesu atunaki bango: —Bongo bino, bolobaka ete ngai nazali nani? Piere azongiselaki ye: —Ozali Kristo! Bongo akebisaki bango baloba na moto moko te mpo na ye. Bongo Yesu abandaki koteya bango ete: —Mwana na moto esengeli amona pasi mingi, mpe baboya ye na bankolo, bakonzi ya banganga-Nzambe, na balakisi ya Mibeko, mpe esengeli baboma ye. Kasi sima ya mikolo misato akosekwa! Azalaki koloba makambo yango polele penza. Bongo Piere abendaki ye na pembeni, mpe abandaki kopamela ye. Kasi Yesu abalukaki mpe atalaki bayekoli na ye, apamelaki Piere: —Longwa liboso na ngai, Satana! Pamba te makanisi na yo ezali ya Nzambe te, kasi ezali ya bato. Bongo abengaki ebele ya bato elongo na bayekoli na ye, mpe alobaki na bango: —Soki moto alingi kolanda ngai, esengeli amiboya ye moko, amema ekulusu na ye, mpe alanda ngai. Pamba te, moto oyo akolinga kobikisa bomoi na ye, akobungisayango; kasi oyo akobungisa bomoi na ye mpo na ngai mpe mpo na Sango Malamu, akobikisa yango. Litomba nini moto akozwa soki azwi mokili mobimba, bongo abungisi elimo na ye? Eloko nini moto akoki kopesa na esika ya elimo na ye? Pamba te, moto nyonso oyo akoyoka soni mpo na ngai mpe mpo na Liloba na ngai, na kati ya bato ya tango oyo batosaka Nzambe te mpe batondi masumu, Mwana na moto akoyokela ye mpe soni, tango akoya na kati ya kembo ya Tata na ye, elongo na baanzelu basantu! Bongo Yesu alobaki na bango: —Nalobi na bino ya solo, bato mosusu batelemi awa bakokufa tekino bamona Bokonzi ya Nzambe koya na nguya. Sima ya mikolo motoba, Yesu akamataki Piere, Zaki mpe Jean, amemaki bango likolo ya ngomba moko ya molayi, epai bazalaki kaka bango moko. Bongo Yesu abongwanaki na miso na bango; Bilamba na ye ekomaki kongenga mpe ekomaki pembe makasi, na ndenge ete moto moko te na mokili akoki kokomisa yango pembe ya ndenge wana. Bongo Eliya na Moyize babimelaki bango; mpe babandaki kosolola na Yesu. Piere alobaki na Yesu: —Moteyi, ezali malamu mpo na biso ete tozala awa. Tosala bandako misato ya kapo: moko mpo na yo, moko mpo na Moyize, mpe moko na Eliya. Ayebaki te soki aloba nini, pamba te batondaki na kobanga. Bongo lipata moko ebimaki mpe ezipaki bango. Mpe mongongo moko ewutaki na lipata: —Oyo azali Mwana na ngai ya bolingo, boyokela ye! Kaka na tango wana, tango batalaki epayi na epayi, bamonaki moto moko te, kaka Yesu ye moko elongo na bango. Awa bazalaki kokita ngomba, Yesu apekisaki bango ete makambo oyo bamonaki baloba yango na moto ata moko te, kino Mwana na Moto akosekwa kati na bakufi. Babombaki likambo yango na motema, mpe bazalaki kotia tembe bango na bango soki “kosekwa kati na bakufi” elingi koloba nini. Bongo batunaki Yesu: —Mpo na nini balakisi ya Mibeko balobaka ete Eliya asengeli koya liboso? Yesu azongiselaki bango: —Ya solo, Eliya asengeli koya liboso mpe kobongisa makambo nyonso. Mpo na nini ekomama ete Mwana na Moto asengeli komona pasi mingi mpe kotiolama? Kasi nazali koloba na bino, Eliya asiʼaya, mpe basalaki ye nyonso oyo bango balingaki, ndenge ekomama mpo na ye. Tango bakomaki epai ya bayekoli mosusu, bamonaki bato ebele bazingaki bango, mpe balakisi ya mibeko bazalaki kotia tembe na bango. Noki penza tango bato nyonso bamonaki Yesu, bakamwaki mingi, mpe bakimaki mbango mpo na kopesa ye mbote. Yesu atunaki bango: —Likambo nini yango bozali kotiana tembe na bango? Moto moko na kati ya ebele ya bato azongiselaki ye: —Moteyi, namemelaki yo mwana na ngai ya mobali oyo azali na molimo oyo ekomisa ye baba. Epai nyonso molimo yango ekangaka ye, ebwakaka ye na mabele, mwana abandaka kobimisa fulu-fulu na monoko, kolia mino, mpe nzoto na ye ekangamaka. Nasengaki bayekoli na yo babengana molimo yango, kasi bakoki te. Bongo Yesu alobaki na bango: —Bato bazangi kondima! Nakovanda na bino kino tango nini? Nakokanga motema mpo na bino kino tango nini? Bomemela ngai ye! Bongo bamemelaki ye mwana yango. Tango molimo emonaki Yesu, kaka na tango wana eningisaki mwana makasi penza. Mwana akweyaki na mabele, azalaki kobaluka-baluka mpe monoko na ye etondaki na fulu-fulu. Yesu atunaki tata ya mwana: Banda tango boni pasi oyo ekomeli ye? Azongisaki: —Banda bomwana na ye. Mpe mbala mingi molimo yango ebwakaka ye na moto to na mayi mpo na koboma ye. Kasi soki okoki kosala eloko moko, yokela biso mawa mpe salisa biso! Yesu alobaki na ye: —Soki okoki! Eloko nyonso ekoki kosalama mpo na moto oyo andimi. Kaka na tango wana, tata ya mwana alobaki na mongongo makasi: —Nandimi; salisa ngai na kozanga kondima na ngai! Tango Yesu amonaki ete ebele ya bato bazalaki koya mbangu epai likambo yango ezalaki kosalama, agangelaki molimo mabe, alobaki: —Molimo oyo ekomisaka baba mpe ebomaka matoyi, napesi yo motindo: o bima na mwana oyo mpe kozongela ye te! Molimo mabe egangaki, eningisaki mwana makasi penza, bongo ebimaki. Mwana akomaki lokola akufi, na ndenge ete bato mingi bazalaki koloba: “Akufi”. Kasi Yesu akamataki ye na loboko mpe atelemisaki ye, bongo mwana atelemaki. Tango Yesu akotaki na ndako, bayekoli na ye batunaki ye na esika ya bango moko kaka: —Mpo na nini tokokaki te kobengana molimo wana? Bongo Yesu azongisaki: —Molimo ya ndenge oyo ekoki kobima kaka na mabondeli. Balongwaki esika wana mpe bakatisaki mokili ya Galileya. Mpe Yesu alingaki te ete moto ata moko ayeba esika bazalaki. Pamba te azalaki koteya bayekoli na ye. Azalaki koloba na bango: —Bakoteka Mwana na Moto na maboko ya bato. Bakoboma ye, mpe akosekwa sima ya mikolo misato. Kasi bazalaki kososola te tina ya maloba wana, mpe bazalaki kobanga mpo na kotuna ye yango. Bongo bakomaki na Kapernawumi. Tango Yesu azalaki na kati ya ndako, atunaki bango: —Likambo nini yango bozalaki kotiana tembe na nzela? Kasi bavandaki nyee, mpo na nzela bazalaki kotiana tembe bango na bango mpo na koyeba soki nani na kati na bango aleki monene. Yesu avandaki, abengaki bapostolo zomi na mibale mpe alobaki: —Soki moto alingi kozala moto ya liboso, esengeli azala moto ya suka penza, mpe azala mosali ya bato nyonso. Bongo akamataki mwana moke mpe atelemisaki ye na kati-kati na bango. Akamataki ye na maboko na ye, mpe alobaki na bango: —Moto nyonso oyo akoyamba, moko ya bana mike oyo na kombo na ngai, ayambi ngai; mpe moto nyonso oyo ayambi ngai, ayambi ngai te, kasi ayambi moto oyo atindaki ngai. Bongo Jean alobaki: —Moteyi, tomonaki moto moko azalaki kobengana milimo mabe na kombo na yo, mpe tolobaki na ye atika, mpo azali na biso elongo te. Kasi Yesu alobaki: —Bopekisa ye te, pamba te moto moko te oyo asali likamwisi na kombo na ngai, bongo akoki sima ya mwa tango moke koloba likambo ya mabe mpo na ngai. Pamba te, oyo ayinaka biso te azali mpo na biso. Nalobi na bino ya solo, moto oyo apesi bino kopo ya mayi na kombo na ngai, mpo bozali bato ya Kristo, akobungisa lifuti na ye te. Soki moto akweyisi na masumu mwana moko na kati ya bana mike oyo bandimaka ngai, ezali malamu mpo na ye, bakanga ye na kingo libanga moko ya monene, mpe babwaka ye na ebale. Soki loboko na yo ekweyisaka yo na masumu, kata yango. Ezali malamu mpo na yo okota na bomoi na loboko moko, na esika ya kozala na maboko mibale, mpe kokende na lifelo, epai moto ekufaka te. [Kuna, misopi na bango ekokufa te mpe moto ekokufa te.] Soki lokolo na yo ekweyisaka yo na masumu, kata yango. Ezali malamu mpo na yo okota na bomoi na lokolo moko, na esika ya kozala na makolo mibale mpe kobwakama na lifelo, na moto oyo ekufaka te. Kuna, misopi na bango ekokufa te mpe moto ekokufa te. Soki liso na yo ekweyisaka yo na masumu, longola yango. Ezali malamu mpo na yo okota na Bokonzi ya Nzambe na liso moko, na esika ya kozala na miso mibale, mpe kobwakama na lifelo, Kuna misopi na bango ekokufa te mpe moto ekokufa te. Pamba te moto ekokomisa moto nyonso elengi lokola mungwa ekomisaka biloko elengi. Mungwa ezali malamu; kasi soki ebungisi elengi na yango, ndenge nini bokoki kokomisa yango lisusu elengi? Yango wana, bozala na mungwa kati na bino, mpe bozala na kimia moko na moko. Bongo Yesu alongwaki na esika wana, akendaki na mokili ya Yudea, mpe na ngambo ya Yordani. Bato ebele bayaki lisusu kosangana epai na ye; bongo abandaki koteya bango lokola amesanaki. Bafarizeo bayaki, mpe mpo na komeka ye, batunaki: —Boni, nzela epesami na mobali mpo na kolongola mwasi na ye na libala? Yesu azongiselaki bango: —Moyize apesaki bino mobeko nini? Bango balobaki: —Moyize apesaki nzela na mobali ete akoma mokanda ya koboma libala, mpe alongola ye na libala. Bongo Yesu azongisaki: —Moyize akomelaki bino mobeko wana mpo mitema na bino ezali makasi. Kasi na ebandeli ya mokili, Nzambe asalaki bango mobali mpe mwasi. Yango wana mobali akotika tata mpe mama na ye mpe akosangana na mwasi na ye, Mpe bango mibale bakokoma mosuni moko. Bongo bakozala lisusu mibale te, kasi mosuni moko. Yango wana moto moko te akabola oyo Nzambe asangisi! Tango bazalaki lisusu na kati ya ndako, bayekoli batunaki Yesu mpo na likambo yango. Ye azongisaki: —Moto oyo alongoli mwasi na ye na libala mpe abali mwasi mosusu, asali ekobo epai ya mwasi na ye ya liboso. Mpe soki mwasi akabwani na mobali na ye mpe abalani na mobali mosusu, asali ekobo! Bayelaki Yesu bana mike mpo asimba bango, kasi bayekoli bapamelaki baoyo bayaki na bango. Tango Yesu amonaki bongo, asilikaki mpe alobaki na bango: —Botika bana mike baya epai na ngai, bopekisa bango te, pamba te Bokonzi ya Nzambe ezali mpo na ba oyo bazali lokola bango. Nalobi na bino ya solo: moto oyo akoyamba Bokonzi ya Nzambe lokola mwana moke te, akokota te na Bokonzi yango. Bongo akamataki bana na maboko na ye, atielaki bango maboko mpe apambolaki bango. Tango Yesu azalaki kokende, moto moko ayaki mbangu epai na ye, afukamaki liboso na ye mpe atunaki ye: —Moteyi malamu, esengeli nasali nini mpo nazwa bomoi ya seko? Yesu azongisaki: —Mpo na nini ozali kobenga ngai moto malamu? Moto moko te azali malamu, longola kaka Nzambe ye moko. Oyebi Mibeko: Kosala ekobo te, koboma te, koyiba te, koloba litatoli ya lokuta te, kokosa moninga te, tosa tata na yo mpe mama na yo. Moto yango alobaki: —Moteyi, natosaka nyonso wana banda bolenge na ngai! Yesu atalaki ye mpe alingaki ye. Alobaki na ye: —Ozangi eloko moko; kende, teka biloko nyonso oyo ozali na yango, pesa na babola, mpe okozala na bomengo na likolo; bongo yaka mpe landa ngai! Tango ayokaki maloba wana, elongi na ye ekomaki mawa-mawa, akendaki na mawa, pamba te azalaki na bomengo mingi penza. Bongo Yesu atalaki epai na epai, mpe alobaki na bayekoli na ye: —Ezali pasi mingi penza na bato ya bomengo mpo na kokota na Bokonzi ya Nzambe! Bayekoli bakamwaki mingi penza mpo na maloba na ye. Kasi Yesu alobaki lisusu: —Bana, ezali pasi mingi penza. Ezali pasi te na shamo mpo na koleka na lidusu ya tonga, kasi ezali pasi mingi na moto ya bomengo mpo na kokota na Bokonzi ya Nzambe. Bayekoli bakamwaki mingi penza, mpe bazalaki koloba bango na bango: —Bongo nani akoki kobika? Yesu atalaki bango mpe alobaki: —Na bato ekoki kosalama te, kasi na Nzambe te; pamba te, Nzambe akoki kosala nyonso. Piere alobaki na Yesu: —Tala, totiki biloko nyonso mpo na kolanda yo! Yesu azongisaki: —Nalobi na bino ya solo, moto moko te oyo atiki ndako na ye, bandeko na ye ya mibali, bandeko na ye ya basi, mama na ye, tata na ye, bana na ye, to bilanga na ye, mpo na ngai mpe mpo na Sango Malamu; Bongo azanga kozwa sikʼoyo mbala nkama koleka, na tango oyo tozali: Bandako, bandeko ya mibali, bandeko ya basi, bamama, bana, mpe bilanga, elongo na minyoko; mpe na tango oyo ekoya: bomoi ya seko. Kasi bato mingi oyo bazali bato ya liboso, bakokoma bato ya suka, mpe bato ya suka bakokoma bato ya liboso! Tango bazalaki na nzela mpo na komata na Yeruzalem; Yesu azalaki kotambola lisoso na bango. Bayekoli bazalaki kokamwa, mpe ba oyo bazalaki kolanda bango bazalaki kobanga. Bongo Yesu akamataki lisusu bapostolo na ye zomi na mibale na pembeni, mpe abandaki koyebisa bango makambo oyo ekokweyila ye. Alobaki na bango: —Tala, tozali kokende na Yeruzalem, mpe bakoteka Mwana ya Moto na maboko ya bakonzi ya banganga-Nzambe mpe ya balakisi ya Mibeko. Bakokatela ye etumbu ya liwa mpe bakokaba ye na maboko ya bapakano. Bongo bakoseka ye, bakobwakela ye soyi, bakobeta ye bamfimbo, mpe bakoboma ye; kasi akosekwa sima ya mikolo misato! Bongo Zaki mpe Jean, bana ya Zebedeo, bayaki epai ya Yesu mpe balobaki na ye: —Moteyi tolingi osalela biso likambo oyo tokosenga yo. Yesu atunaki bango: —Bolingi nasala nini mpo na bino? Bazongiselaki ye: —Tika ete moko na biso avanda na loboko na yo ya mobali, mpe mosusu na loboko na yo ya mwasi, kati na kembo na yo. Kasi Yesu alobaki na bango: —Boyebi te oyo bozali kosenga; boni, bokokoka komela kopo oyo ngai nakomela? To mpe bokoka kozwa libatisi oyo ngai nakozwa? Bazongisaki: —Tokokoka! Bongo Yesu alobaki na bango: —Bokomela kopo oyo ngai nakomela mpe bokozwa libatisi oyo ngai nakozwa. Kasi mpo na kovanda na loboko na ngai ya mobali to na loboko na ngai ya mwasi, ezali ngai te moto nakopesa yango. Bisika wana ekozala mpo na bato oyo ba bongisama mpo na yango. Tango bapostolo zomi mosusu bayokaki likambo yango, basilikelaki Zaki mpe Jean. Bongo Yesu abengaki bango nyonso epai na ye mpe alobaki: —Boyebi ete ba oyo bamonanaka lokola bakonzi ya bapakano balakisaka bokonzi likolo na bango, mpe bato na bango ya minene batindaka bango na makasi. Kasi na kati na bino, ekoki kozala bongo te. Nzoka nde, soki moto moko alingi kokoma moto monene na kati na bino, esengeli azala mosali na bino. Mpe oyo alingi kozala mosali ya liboso, esengeli azala mowumbu ya bato nyonso. Pamba te ata Mwana ya moto ayaki te mpo bato basalela ye, kasi mpo na kosalela bato, mpe kokaba bomoi na ye mpo na kobikisa bato ebele! Bongo bakomaki na Zeriko. Awa yesu na bayekoli na ye? Elongo na ebele ya bato? Bazalaki kobima na Zeriko, moto moko akufa miso, Bartime, mwana ya Time, azalaki ya kovanda na pembeni ya nzela mpe azalaki kosenga-senga mbongo. Tango ayokaki ete ezali Yesu ya Nazareti, abandaki koganga: —Yesu Mwana ya Davidi, yokela ngai mawa! Bato ebele bangangelaki ye mpe balobaki na ye avanda nyee. Kasi agangaki lisusu makasi koleka: —Mwana ya Davidi, yokela ngai mawa! Yesu atelemaki mpe alobaki: —Bobenga ye! Bongo babengaki moto akufa miso mpe balobaki na ye: —Yika mpiko, telema, azali kobenga yo! Abwakaki elamba na ye, atelemaki noki, mpe akendaki epai ya Yesu. Yesu atunaki ye: —Olingi nasala nini mpo na yo? Mokufi miso azongisaki: —Moteyi, nalingi namona! Bongo Yesu alobaki na ye: —Kende, kondima na yo ebikisi yo! Na mbala moko, abandaki komona mpe alandaki Yesu na nzela. Awa bazalaki kopusana pene-pene ya Yeruzalem, epai ya Betfaze mpe Betani, pene-pene na ngomba ya banzete ya olive, Yesu atindaki bayekoli na ye mibale, mpe alobaki na bango: —Bokende na mboka oyo ezali liboso na bino; tango kaka bakokota na mboka yango, bakomona mwana ya mpunda ekangama, mpe moto ata moko te naino amatela yango. Bofungola yango, mpe boya na yango. Soki moto atuni bino: “Mpo na nini bozali kosala bongo?”, boloba na ye: “Nkolo azali na posa na yango, mpe akozongisa yango awa noki.” Bakendaki mpe bakutaki mwana ya mpunda ezalaki ya kokangama na porte, libanda, na nzela mpe bafungolaki yango? Ndambo ya bato oyo bazalaki wana, batunaki: —Bozali kosala nini, awa bazali kofungola mwana mpunda? Bazongisaki eyano kaka ndenge Yesu atindaki bango, mpe batikaki bango bakende. Tango bamemelaki Yesu mwana mpunda mpe batiaki bilamba na bango likolo na yango, avandaki likolo na yango. Bato ebele batandaki bilamba na bango na nzela; basusu batandaki bitape ya nzete oyo bakataki na bilanga. Ba oyo bazalaki kokende liboso, na ba oyo bazalaki kolanda, bazalaki koganga: Ozana Mapamboli na moto oyo aye na kombo ya Nkolo! Mapamboli na Bakonzi ya Tata na biso ya Tata na biso Davidi, oyo ezali koya! Ozana na bisika oyo eleki likolo! Bongo Yesu akotaki na Yeruzalem mpe akendaki na ndako ya Nzambe. Atalaki biloko nyonso epai na epai, kasi lokola tango elekaki, abimaki, mpe akendaki na Betani elongo na Bapostolo na ye zomi na mibale. Mokolo oyo elandaki, awa bazalaki kotika Betani, Yesu ayokaki nzala. Na mosika, amonaki nzete moko ya figi ezalaki na makasa, bongo akendaki kotala soki ezalaki na mbuma. Kasi tango akomaki, amonaki eloko moko te, kaka makasa, mpo ezalaki eleko ya mbuma ya figi te. Bongo Yesu alobaki na nzete yango: —Tika ete moto ata moko te alia lisusu mbuma oyo ekowuta epai na yo! Bayekoli na ye bayokaki ye koloba maloba yango. Bongo bakomaki na Yeruzalem. Yesu akotaki na lopango ya ndako ya Nzambe mpe abandaki kobengana bato oyo bazalaki koteka mpe ba oyo bazalaki kosomba na kati ya lopango ya Ndako na Nzambe. Abalolaki bamesa ya bato oyo bazalaki kosanze mbongo, bongo na bakiti ya ba oyo bazalaki koteka, bapijon; mpe apesaki nzela te na bato oyo bazalaki kokatisa lopango ya Ndako ya Nzambe ete bamema biloko. Bongo abandaki koteya bango mpe alobaki: —Ekomama te ete: Ndako na ngai ekobengama ndako ya mabondeli mpo na bato ya bikolo nyonso? Kasi bino, bikomisi yango nganda ya miyibi. Bongo bakonzi ya banganga-Nzambe na balakisi ya Mibeko bayokaki yango mpe babandaki koluka nzela ya kobomisa Yesu pamba te bazalaki kobanga ye, mpo ebele ya bato nyonso bazalaki kokamwa mateya na ye. Tango pokwa ekomaki, Yesu na bayekoli na ye babimaki na vile. Na tango, awa bazalaki koleka, bamonaki nzete ya figi ekawukaki wuta na misisa. Piere akanisaki likambo oyo esalamaki mpe alobaki na Yesu: —Moteyi, tala! Nzete ya figi oyo olakelaki mabe, ekawuki. Bongo Yesu azongisaki: —Bozala na kondima na Nzambe. Nalobi na bino ya solo, soki moto alobi na ngomba oyo: “Longwa wana mpe mibwaka na kati ya ebale”, mpe atie tembe na motema na ye te, kasi andimi ete makambo oyo alobi ekosalama, yango ekosalama mpo na ye. Yango wana nalobi: eloko nyonso oyo bokosenga na libondeli, bondima ete bosili kozwa yango, mpe yango ekosalama mpo na bino. Mpe tango botelemi mpo na kobondela, soki bozali na likambo na moto mosusu, bolimbisa ye, mpo ete Tata na bino oyo azali na Likolo, alimbisa masumu na bino. [Kasi soki bolimbisi te, Tata na bino oyo azali na Likolo, akolimbisa mpe masumu na bino te.] Bongo bakomaki lisusu na Yeruzalem. Tango Yesu azalaki kotambola na kati ya lopango ya Ndako ya Nzambe, bakonzi ya banganga-Nzambe, balakisi ya Mibeko, na bankolo, bayaki epai na ye mpe batunaki ye: —Ozali kosala makambo oyo na bokonzi nini? Mpe nani apesi yo bokonzi ya kosala yango? Yesu azongisaki: —Nakotuna bino motuna moko. Bozongisela ngai eyano, bongo nakoyebisa bino soki na bokonzi nini nazali kosala makambo oyo. Jean azwaki ndingisa ya kobatisa epai ya nani? Na Nzambe to na bato? Boyebisa ngai! Babandaki kotiana tembe bango na bango mpe balobaki: —Soki tolobi: “Na Nzambe”, ye akotuna biso: “Bongo mpo na nini bondimelaki ye te?” Soki mpe tolobi “Na bato”… Bazalaki kobanga bato, pamba te bato nyonso bazalaki kondima ete Jean azalaki penza moprofeta. Bongo bazongiselaki Yesi: —Toyebi te! Yesu mpe alobaki na bango: —Ngai mpe nakoyebisa bino te soki na bokonzi nini nazali kosala makambo oyo. Bongo Yesu abandaki koloba na bango na masapo: —Moto moko alonaki elanga ya vino. A salelaki yango lopango pembeni-pembeni, atimolaki libulu moko mpo na kokamola mbula, mpe atongaki ndako moko ya molayi mpo na mokengeli. Bongo apesaki elanga na maboko ya basali mpo bafutelaka, mpe akendaki na mobembo. Tango eleko ya kobuka mbuma ekokaki, atindaki mosali moko epai ya bafuteli ya elanga mpo azwa epai na bango ya mbuma ya vino. Kasi bafuteli ya elanga bakangaki ye, babetaki ye mpe bazongisaki ye maboko pamba. Bongo atindelaki bango mosali mosusu; bazokisaki moto yango na motu mpe bafingaki-fingaki ye. Atindaki lisusu moto mosusu, ye nde babomaki ye. A tindaki bato mosusu mingi; babetaki basusu mpe babomaki basusu. Nkolo ya elanga atikalaki kaka na moto moko mpo na kotinda: Mwana na ye ya bolingo. Atindaki ye na suka na bango nyonso, mpe alobaki: “Bakotosa mwana na ngai” Kasi bafuteli ya elanga balobanaki: “Tata oyo akokoma nkolo ya elanga. Boya, toboma ye, bongo elanga ekokoma ya biso”. Bongo bakangaki ye babomaki ye, mpe babwakaki ye na libanda ya elanga ya vino. Bongo nkolo ya elanga ya vino akosala nini? Akoya mpe akoboma bafuteli wana ya elanga, mpe akopesa elanga ya vino na bato mosusu mpo bafutela. Naino botanga Makomi oyo te: Libanga oyo batongi ya ndako babwaka ekomi libanga ya songe oyo esimbaka ndako mobimba. Yango ezali mosala ya Nkolo, mpe likambo ya kokamwa na miso na biso! Bongo bazalaki koluka nzela ya kokanga ye, mpo bayebaki ete alobaki lisapo wana mpo na bango. Kasi bazalaki kobanga bato; yango wana batikaki ye mpe bakendaki na bango. Sima batindaki bafarizeo ndambo na bato ya Erode epai ya Yesu mpo bakweyisa ye na maloba na ye moko. Bayaki epai na ye mpe balobaki: —Moteyi, toyebi ete ozali moto ya bosolo, mpe obangaka bato te, pamba te otalaka bilongi ya bato te, kasi oteyaka nzela ya Nzambe na solo nyonso. Boni, ndingisa ezali mpo na kofuta mpaku ya Sezare to te? Esengeli tofuta to tofuta te? Kasi Yesu ayebaki kokosana na bango, bongo atunaki: —Mpo na nini bozali komeka ngai? Boyela ngai deni moko, mpo natala yango. Bayelaki ye yango, mpe atunaki bango: —Elongi oyo, na makomi oyo, ezali ya nani? —Ya Sezare! Bongo Yesu alobaki na bango: —Bopesa na Sezare oyo ezali ya Sezare, mpe na Nzambe oyo ezali ya Nzambe! Bongo bakamwaki ye mingi penza. Bongo Basaduseoo, ba oyo balobaka ete lisekwa ezali te, bayaki epai na ye, mpe batunaki ye: —Moteyi! Moyize akomelaki biso ete soki ndeko ya moto moko akufi mpe atiki mwasi, kasi aboti na ye bana te, ndeko na ye asengeli kobala mwasi, mpo abotela ndeko na ye oyo akufi bana. Nzoka nde, ezalaki na bandeko sambo. Oyo ya liboso abalaki mpe akufaki, kasi atikaki bana te. Oyo ya mibale abalaki mpe mwasi oyo ndeko na ye atikaki, kasi ye mpe akufaki mpe atikaki bana te. Esalamaki mpe ndenge moko na oyo ya misato. Bango nyonso sambo babalaki mwasi yango, mpe batikaka bana te. Sima na bango nyonso, mwasi mpe akufaki. Bongo na mokolo ya lisekwa, mwasi yango akozala ya nani? Pamba te bango nyonso sambo babalaki ye! Yesu azongisaki: Bozali na libunga; pamba te boyebi Makomi te to mpe nguya ya Nzambe te. Tango bato bakufa bakosekwa, bakobala lisusu te, mpe bakobalisa lisusu te; bakozala lokola baanzelu oyo bazali na Likolo. Mpe mpo na lisekwa ya bato bakufa, naino botangi te na buku ya Moyize, mpo na oyo etali nzete ya moke, ndenge Nzambe alobaki na ye: “Nazali Nzambe ya Abraham, Nzambe ya Izaki, mpe Nzambe ya Yakobo”? Nzambe azali Nzambe ya bato bakufa te, kasi azali Nzambe ya bato ya bomoi. Bozali penza na libunga monene. Molakisi moko ya Mibeko ayokaki bango tango bazalaki kotiana tembe. Mpe awa amonaki ete Yesu azongiselaki bango biyano malamu; apusanaki mpe atunaki ye: —Na kati ya mibeko nyonso, mobeko nini eleki na tina? Yesu azongisaki: —Mobeko eleki na tina yangʼoyo: Boyoka bato ya Isayele; Nkolo Nzambe na biso azali kaka Nkolo moko. Linga Nkolo Nzambe na yo na motema na yo mobimba, na elimo na yo mobimba, na makanisi na yo nyonso mpe na makasi na yo nyonso! Ya mibale yangʼoyo: Linga moninga na yo lokola yo moko. Mobeko mosusu oyo eleki oyo wana mibale ezali te. Bongo Molakisi ya Mibeko alobaki na ye: —Olobi malamu Moteyi, olobi solo ete Nzambe azali kaka moko, mpe mosusu lokola ye azali te. Kolinga ye na motema na yo mobimba, na mayele na yo nyonso mpe na makasi na yo nyonso, mpe na makasi na yo nyonso, mpe kolinga moninga na yo lokola yo moko, yango ezali na tina mingi koleka kotumbela Nzambe mpe kopesa ye makabo. Tango Yesu amonaki ete Molakisi ya Mibeko azongisaki eyano na ndenge ya mayele, alobaki na ye: —Ozali mosika te na Bokonzi ya Nzambe! Bongo moto ata moko te amekaki lisusu kotuna ye motuna. Awa Yesu azalaki koteya na lopango ya Ndako ya Nzambe, atunaki: —Ndenge nini balakisi ya Mibeko balobaka ete Kristo azali Mwana ya Davidi? Pamba te, Davidi ye moko alobaki boye na nzela ya Molimo-Mosantu: Nkolo alobaki na Nkolo na ngai: vanda na loboko na ngai ya mobali, kino tango nakotia banguna na yo na nse ya makolo na yo. Davidi ye moko abengaki ye “Nkolo”, bongo ndenge nini akoki kozala lisusu mwana na ye? Ebele ya bato ba zalaki koyoka ye na esengo. Na mateya na ye alobaki: —Bokeba na balakisi ya Mibeko. Balingaka kotambola na banzambala ya milayi, mpe bapesaka bango bambote na bazando, mpe kovanda na bakiti ya liboso na bandako ya mayangani mpe bisika ya lokumu na bafeti. Babotolaka biloko ya basi oyo bakufela mibali, mpe mpo na kokosana, basalaka mabondeli ya milayi-milayi. Bato ya ndenge wana bakozwa etumbu ya makasi penza. Yesu avandaki liboso ya sanduku ya makabo, mpe azalaki kotala ndenge bato bazalaki kotia mbongo na sanduku ya makabo. Bato mingi ya bomengo bazalaki kotia mbongo mingi. Kasi mwasi moko azalaki mobola mpe akufela mobali, ayaki, mpe atiaki bibende mibale, oyo ezalaki na motuya moke penza. Bongo Yesu abengaki bayekoli na ye mpe alobaki na bango: —Nalobi na bino ya solo, mwasi oyo mobola, oyo akufela mobali, atie na sanduku ya makabo, mbongo oyo eleki ya bato nyonso mosusu. Pamba te, bato nyonso bapesi mbongo oyo bazalaki na yango tina te; kasi ye, kati na kokelela na ye, apesi nyonso oyo azalaki na yango, oyo azalaki na yango mpo na kosunga bomoi na ye. Awa azalaki kobima na Ndako ya Nzambe, moyekoli na ye moko alobaki na ye: —Moteyi, tala, mabanga kitoko boye! Ndako kitoko boye! Yesu azongiselaki ye: —Omoni Ndako monene-monene oyo? Libanga moko te ekotikala likolo ya libanga mosusu; nyonso ekobwakama na nse. Awa Yesu avandaki na ngomba ya banzete ya Olive, esika oyo etalani na Ndako ya Nzambe, Piere, Zaki Jean mpe Andele batunaki ye motuna na esika ya bango moko: Yebisa biso, makambo wana ekosalama tango oyo makambo nyonso wana esengeli kosalamaekoki? Bongo Yesu alobaki na bango: —Bokeba mpo ete moto ata moko te akosa bino. Bato mingi bakoya na kombo na ngai, mpe bakoloba: “Ezali nga”, mpe bakokosa bato ebele. Tango bokoyoka makelele ya bitumba mpe sango ya bitumba, bomitungisa te, pamba te esengeli ete makambo wana esalama; kasi wana ekozala naino suka te. Ekolo moko ekobundisa ekolo mosusu, bokonzi moko ekobundisa bokonzi mosusu, mabele ekoningana na bisika mingi ya mokili, mpe nzala ekongala. Makambo wana ekozala kaka ebandeli ya bapasi oyo mwasi ayokaka soki alingi kobota. Kasi bino, bomikebisa! Pamba te, bakokaba bino na batibinale ya Bayuda mpe bakobeta bino na bandako ya mayangani, bakofunda bino liboso ya bayangeli mpe ya bakonzi minene mpo na ngai, mpo ezala litatoli epai na bango. Kasi esengeli ete Sango Malamu eteyama na bikolo nyonso. Tango bakomema bino mpo na koteka bino, bomitungisa liboso te mpo na makambo oyo bokoloba. Kasi boloba maloba nyonso oyo bakopesa bino na tango wana. Pamba te, ezali bino te bato bokoloba, kasi Molimo-Mosantu. Ndeko akokaba ndeko na ye mpo baboma ye, mpe tata akokaba mwana na ye, mpe bana bakotombokela baboti na bango mpe bakobomisa bango. Bato nyonso bakoyina bino mpo na kombo na ngai. Kasi moto oyo akoyika mpiko kino na suka, akobika! Tango bokomona eloko ya somo, oyo ebebisaka, etelemi na esika yango ekoki kozala te—moto oyo azali kotanga asosola malamu likambo oyo!—bongo ba oyo bakozala na Yudea bakima na bangomba. Moto oyo akozala na likolo ya ndako akita te, mpe akota te na ndako mpo na kobimisa ata eloko nini. Moto oyo akozala na bilanga, azonga sima te mpo na kozwa elamba na ye. Mawa mingi penza na basi oyo bakozala na zemi, mpe ba oyo bakozala komelisa bana mabele na mikolo wana. Bobondela mpo ete makambo wana esalama te na tango ya malili makasi. Pamba te, yango ekozala mikolo ya pasi mingi, na ndenge ete mikolo ya ndenge wana ekoma naino te banda na ebandeli, tango Nzambe asalaki mokili, kino sikʼoyo. Mpe bapasi ya ndenge wana ekozala lisusu te. Mpe soki Nkolo atiaki mikolo yango mokuse te, mbele moto ata moko te akokaki kobika. Kasi mpo na baponami, ba oyo ye apona, yango wana atiaki yango mokuse. Na tango wana soki moto alobi na bino: “Tala Kristo azali awa”, to “Tala, azali kuna!” bondimela ye te. Pamba te, Ba-Kristo ya lokuta mpe baprofeta ya lokuta bakobima. Bakosala makamwisi mpe bilembo mpo na kokosa, soki yango ekokaki kosalama, ata baponami. Kasi bino, bokengela! Nasi nayebisi bino makambo nyonso liboso. Kasi na mikolo wana, sima ya bapasi wana, Moyi ekoyinda Sanza ekongenga lisusu te; Minzoto ya likolo ekokweya, mpe banguya oyo ezali na likolo ekoningana. Bongo bakomona Mwana ya moto akoya na kati ya mapata, na nguya monene mpe na nkembo. Akotinda baanzelu na ye, mpe akosangisa baponami na ye nabipai nyonso minei ya mokili, banda na suka ya mokili tii na suka ya likolo. Boyekola liteya oyo nzete ya figi epesaka bino: soki bitape na yango ekomi pete-pete mpe ebandi kobimisa makasa, boyebaka ete eleko ya mbula ekomi pene-pene. Ndenge moko mpe mpo na bino, tango bokomona makambo wana ekosalama, boyeba ete ye akomi pene-pene, na porte. Nalobi na bino ya solo, bato ya tango oyo koleka te, kino tango makambo wana nyonso ekosalama. Likolo mpe mokili ekoleka, kasi Maloba na ngai ekoleka te! Mpo na likambo etali mokolo wana to ngonga, moto moko te ayebi yango, ata baanzelu na likolo, ata Mwana, kasi kaka Tata nde ayebi yango. Bokeba! Bokengela! Pamba te boyebi te tango nini yango ekoya. Ekozala lokola moto akeyi mobembo, atiki ndako na ye, mpe apesi mokumba na basali na ye. Apesi mosali moko na moko mosala na ye, mpe atindi mokengeli ya porte akengela malamu. Yango wana bokengela, pamba te boyebi te tango nini nkolo ya ndako akozonga, na pokwa, to na midi ya butu, to tango soso elelaka, to na tongo. Pamba te soki aye na mbalakaka, esengeli te akuta bino bokufa na pongi. Makambo oyo nalobi na bino, nazali koloba yango mpe na bato nyonso: “Bokengela!” Etikalaki mikolo mibale mpo feti ya Paki mpe ya Mampa oyo ezangi kisi ya mampa, ebanda. Bongo bakonzi ya banganga-Nzambe mpe balakisi ya Mibeko bazalaki koluka motindo nini ba koki kokanga Yesu na ndenge ya mayele mpe baboma ye. Pamba te, bazalaki koloba: Tosala yango na mokolo ya feti te, soki te bato bakotomboka! Yesu azalaki na Betaniya, na ndako ya Simon oyo azalaki na maladi ya maba. Tangu azalaki na mesa, mwasi moko ayaki na molangi ya Albatre, etonda na malasi ya nar oyo basangisa te mpe ya motuya mingi. Afungolaki yango mpe asopaki malasi na moto ya Yesu. Bato mosusu na kati ya bato oyo bazalaki wana, basilikaki na nse ya mitema mpe balobaki: —Mpo na nini kobebisa malasi oyo? Pamba te malasi oyo bakokaki koteka yango na badeni koleka nkama misato mpe kopesa mbongo na babola! Bazalaki kopamela mwasi yango makasi penza. Kasi Yesu alobaki: —Botika ye kimia! Mpo na nini bozali kotungisa ye? Asali likambo moko ya malamu mpo na ngai. Pamba te, babola bakozala na bino tango nyonso, mpe bokoki kosalela bango makambo ya malamu tango nyonso oyo bokolinga; kasi ngai, bokozala na ngai tango nyonso te. Asali oyo ye akoki. Asi apakoli nzoto na ngai malasi, mpo kobongisa kokundama na ngai. Nalobi na bino ya solo, epai nyonso oyo bakoteya Sango Malamu na mokili mobimba, bakoloba mpe likambo mwasi oyo asali, mpo na kokanisa ye. Bongo Yuda Iskariote, moko na kati ya bapostolo zomi na mibale, akendaki epai ya bakonzi ya banganga-Nzambe mpo na koteka Yesu epai na bango. Tango bayokaki bongo, basepelaki elaka ya kopesa ye mbongo. Bongo abandaki koluka motindo ya malamu mpo ateka Yesu epai na bango. Mokolo ya liboso ya feti ya mampa oyo ezangi kisi ya mampa, mokolo oyo bazalaki koboma mwana meme ya Paki, bayekoli batunaki ye: —Epai nini olingi tokende kobongisela yo mpo olia Paki? Bongo Yesu atindaki bayekoli mibale na kati ya bayekoli na ye mpe alobaki na bango: —Bokende na vile, moto moko amemi eloko ya mayi akoya kokutana na bino. Bolanda ye. Mpe esika ye akokota, boloba na nkolo na ndako wana: “Moteyi atuni: suku na ngai ezali wapi, epai nakolia Paki elongo na bayekoli na ngai?” Bongo ye akolakisa bino suku moko ya monene na etaze, oyo babongisa malamu mpe ezali ya kobongama. Kuna nde bokobongisela biso. Bayekoli bakendaki, bakotaki na vile mpe bakutaki makambo nyonso ndenge Yesu ayebisaki bango. Bongo babongisaki Paki. Tango pokwa ekomaki, Yesu ayaki na bapostolo zomi na mibale. Awa bazalaki na mesa mpe bazalaki kolia, Yesu alobaki: —Nalobi na bino ya solo, moto moko na kati na bino, oyo azali kolia elongo na ngai, akoteka ngai! Bayokaki mawa mpe batunaki na ye moko sima ya mosusu: —Boni, ezali ngai? Yesu azongiselaki bango: —Ezali moto moko na kati ya bapostolo zomi na mibale, oyo azali kotia eteni ya limpa na sani elongo na ngai. Mwana ya Moto azali kokende ndenge ekomama mpo na ye. Kasi mawa mingi na moto oyo ateki Mwana ya Moto! Elingaki kozala malamu mpo na ye, soki abotamaki te. Awa bazalaki kolia, Yesu akamataki limpa, azongisaki matondi, mpe akataki yango. Apesaki yango na bayekoli na ye, mpe alobaki: —Bokamata, oyo ezali nzoto na ngai! Bongo akamataki kopo, azongisaki matondi, mpe apesaki bango yango; mpe bamelaki yango bango nyonso. Alobaki na bango: —Oyo ezali makila na ngai, makila ya Boyokani, oyo esopana mpo na bato mingi. Nalobi na bino ya solo, nakomela lisusu vino te, kino mokolo wana, oyo nakomela yango na lolenge mosusu na Bokonzi ya Nzambe! Sima ya koyemba nzembo, babimaki mpe bakendaki na ngomba ya banzete ya Olive. Yesu alobaki na bango: —Bino nyonso bokokweyisa kondima pamba te ekomama: Nakobeta mobateli ya bameme bongo bameme bakopalangana! Kasi sima ya kosekwa na ngai, nakokende liboso na bino na Galileya! Piere alobaki na ye: —Ata soki bango nyonso bakweyisi kondima, kasi ngai te. Yesu azongiselaki ye: —Nalobi na yo ya solo: lelo, na butu oyo liboso ete soso elela mbala mibale, okowangana ngai mbala misato! Kasi Piere alobaki na molende nyonso: —Atako nasengeli kokufa elongo na yo, nakowangana yo te! Bongo nyonso mpe balobaki kaka ndenge moko. Bongo bakomaki na esika moko babengaka Getesemane. Yesu alobaki na bayekoli na ye: —Bovanda awa, awa nazali kobondela. Akamataki Piere, Zaki na Jean, elongo na ye. Abandaki koyoka mawa mpe motema pasi; bongo alobaki na bango: —Elimo na ngai etondi na mawa kino liwa Botikala awa mpe bokengela! Akendaki mwa liboso, akweyaki na mabele mpe abondelaki, soki ekokaki kosalama, ete ngonga wana eleka mosika na ye. Bongo alobaki: —Tata, yo okoki kosala makambo nyonso. Lekisa kopo oyo mosika na ngai, kasi oyo ngai nalingi te, kasi oyo yo olingi. Bongo azongaki epai ya bayekoli na ye mpe akutaki bango na pongi. Alobaki na Piere: —Simon ozali kolala? Okoki te kokengela ngonga moko? Bokengela mpe bobondela, mpo ete bokweya te na komekama; molimo ezali na mokano ya malamu, kasi nzoto ezali na bolembu. Akendaki lisusu, mpe abondelaki kaka ndenge moko. Tango azongaki, akutaki bango lisusu balaki, mpo miso na bango ekomaki kilo; mpe bayebaki te likambo nini bayebisa ye. Azongaki mpo na mbala ya misato mpe alobaki na bango: —Bozali naino kolala mpe kopema? Ekoki! Ngonga esi ekoki. Botala, Mwana ya Moto bateki ye na maboko ya bato ya masumu. Botelema, tokende; moto oyo ateki ngai akomi pene-pene. Awa azalaki naino koloba, Yuda, moko na kati ya bapostolo zomi na mibale, akomaki. Ayaki elongo na bato ebele, oyo basimbaki mipanga mpe banzete; batindaki bango na bakonzi ya banganga Nzambe, balakisi ya Mibeko mpe bankolo. Moto oyo atekaki Yesu, apesaki bango elembo moko: —Moto oyo ngai nakopesa besi, ye wana; bokanga ye, mpe bomema ye na bokengeli malamu! Tango Yuda akomaki, akendaki na mbala moko epai ya Yesu, mpe alobaki na ye: “Moteyi”, bongo apesaki ye besi. Bakamataki Yesu mpe bakangaki ye. Bongo moto moko na kati ya ba oyo bazalaki wana, abimisaki mopanga na ye, abetaki mosali ya mokonzi ya banganga-Nzambe, mpe akataki ye litoyi. Yesu alobaki na bango: —Boni, nakomi motomboki mpo boya na mipanga mpe na banzete mpo na kokanga ngai? Mikolo nyonso nazalaki elongo na bino, nazalaki koteya na lopango ya Ndako ya Nzambe, mpe bokangaki ngai te, kasi makambo oyo esalami boye mpo ete makomi ekokisama. Bongo bango nyonso batikaki ye mpe bakimaki. Elenge mobali moko, alataki kaka liputa, azalaki kolanda Yesu. Tango bakangaki ye, atikaki liputa na ye mpe akimaki bolumbu. Bongo bamemaki Yesu epai ya mokonzi monene ya banganga-Nzambe, epai bakonzi ya banganga-Nzambe nyonso, bankolo, mpe balakisi ya Mibeko bayaki kosangana. Piere azalaki kolanda Yesu na mosika, kino na kati ya lopango ya mokonzi monene ya banganga-Nzambe; bongo avandaki elongo na bakengeli, mpe azalaki koyotela moto. Bongo bakonzi ya banganga-Nzambe mpe bato nyonso ya likita monene ya Bayuda bazalaki koluka litatoli mpo na Yesu, mpo bazwa nzela ya kobomisa ye. Kasi bazwaki yango te. Pamba te bato mingi bazalaki koloba matatoli ya lokuta mpo na ye, kasi matatoli yango ezalaki kokokana te. Bongo ndambo ya bato batelemaki mpe balobaki litatoli oyo ya lokuta mpo na ye: Toyokaki ye azalaki koloba: “Nakoboma Ndako ya Nzambe oyo esalami na maboko ya bato, mpe na mikolo misato, nakotonga mosusu, oyo ekosalama na maboko ya bato te”. Kasi ata bongo, litatoli na bango ezalaki kaka kokokana te. Bongo mokonzi ya banganga-Nzambe atelemaki na bango mpe atunaki Yesu: —Boni, okozongisa eloko moko te? Litatoli nini bato oyo bazali koloba mpo na yo? Kasi Yesu avandaki nyee mpe azongisaki ata eyano moko te. Mokonzi ya banganga-Nzambe atunaki ye lisusu: —Ozali Kristo, Mwana ya Mopambolami? Yesu alobaki: —Ee, nazali bongo! Mpe bokomona Mwana ya Moto akovanda na loboko ya mobali ya ye oyo Aleki na nguya, mpe akoya likolo ya mapata ya likolo. Bongo mokonzi ya banganga-Nzambe apasolaki bilamba na ye, mpe alobaki: —Mpo na nini tozali lisusu na posa ya batemwe? Bino moko boyoki ndenge afingi Nzambe. Bokanisi nini? Bongo bango nyonso bakataki ete akoki mpo na kokufa. Basusu babandaki kobwakela ye nsoyi, kozipa ye elongi, kobeta ye makofi, mpe koloba na ye: —Sakola! Bongo bakengeli bakamataki ye mpe babetaki ye. Awa Piere azalaki na nse, na kati ya lopango, mosali moko ya mwasi ya mokonzi ya banganga-Nzambe ayaki; tango amonaki Piere azalaki koyotela moto, atalaki ye, mpe alobaki na ye: —Yo mpe ozalaki elongo na Yesu Moto ya Nazareti! Kasi Piere awanganaki, mpe alobaki: —Nayebi te, to nazali kososola kutu te makambo oyo ozali koloba. Bongo abimaki, mpe akendaki kotelema pene-pene na porte ya lopango; [mpe soso elelaki.] Tango mosali ya mwasi amonaki ye wana, alobaki lisusu na bato oyo bazalaki wana: —Moto oyo azali moko ya bato wana! Kasi Piere awanganaki yango lisusu. Sima ya mwa tango moke, bato oyo bazalaki wana balobaki na Piere: —Ya solo, yo ozali moko na bango; pamba te yo mpe ozali moto ya Galileya! Bongo Piere abandaki komilakela mabe mpe kolapa ndaye: —Nayebi moto wana te oyo bozali kolobela! Kaka na tango wana, soso elelaki mpo na mbala ya mibale. Bongo Piere akanisaki maloba oyo Yesu alobaki na ye: “liboso ete soso elela mbala mibale, okowangana ngai mbala misato”. Tango akanisaki yango, alelaki. Na tongo, bakonzi ya banganga-Nzambe, elongo na bankolo, balakisi ya Mibeko, mpe bato nyonso ya likita monene ya Bayuda, basanganaki mpo na kokata likambo. Bongo bakangaki Yesu na basinga, bamemaki ye mpe bapesaki ye na maboko ya Pilato. Pilato atunaki ye: —Ozali mokonzi ya Bayuda? Yesu azongisaki: —Ee, ezali bongo ndenge olobi. Bakonzi ya banganga-Nzambe bazalaki kofunda ye na makambo ebele. Bongo Pilato atunaki ye lisusu: —Boni, okozongisa eloko moko te? Yoka ebele ya makambo oyo bazali kofundela yo! Kasi Yesu azongisaki lisusu ata eloko moko te; bongo Pilato akamwaki mingi penza. Na tango ya feti, Pilato azalaki kobimisa moto moko ya boloko, oyo bato bango moko bazalaki kosenga. Nzoka nde, moto moko kombo na ye Barabasi, azalaki na boloko elongo na batomboki mosusu, ba oyo babomaki moto na tango mobulu ebimaki. Ebele ya bato bayaki mpe basengaki Pilato asala mpo na bango oyo azalaki kosalela bango mbala na mbala. Pilato atunaki: —Bolingi natikela bino Mokonzi ya Bayuda? Pamba te Pilate ayebaki ete bakonzi ya banganga-Nzambe batekaki Yesu apayi na ye, kaka mpo na likunia. Kasi bakonzi ya banganga-Nzambe batindikaki ebele ya bato mpo basenga Pilato atikela bango Barabasi. Pilato atunaki bango: —Bolingi nasala nini na moto oyo babengaka Mokonzi ya Bayuda? Bango bagangaki: —Baka ye na ekulusu! Pilato atunaki bango: —Likambo nini ya mabe ye asali? Kasi bagangaki lisusu makasi penza: —Baka ye na ekulusu! Pilato alingaki kosepelisa ebele ya bato, yango wana atikelaki bango Barabasi. Sima ya kobetisa Yesu bafimbo, apesaki ye na maboko na bango mpo babaka ye na ekulusu. Basoda bamemaki Yesu na esika oyo moyangali akatelaka makambo, bango basangisaki basoda nyonso. Balatisaki ye nzambala moko ya motane; mpe sima ya kosala ekoti moko ya lokumu, ya nzube, balatisaki ye yango na motu. Bongo babandaki kopesa ye mbote: —Mbote, Mokonzi ya Bayuda! Bazalaki kobeta ye nzete na motu mpe kobwakela ye nsoyi. Bafukamaki mpe bazalaki kopesa ye lokumu. Tango basilisaki kosakana na ye, balongolaki ye nzambala ya motane, bongo balatisaki ye bilamba na ye. Bongo bamemaki ye ne libanda mpo na kobaka ye na ekulusu. Moto moko ya mboka Sirene, kombo na ye Simon, tata ya Alekizandre mpe Rufusi, awutaki na bilanga mpe azalaki koleka na nzela wana, batindaki ye na makasi amema ekulusu ya Yesu. Bongo bamemaki Yesu na esika babengaka Golgota, (yango elingi koloba: “Esika ya mokuwa ya motu”). Bapesaki ye vino basangisa na mire mpo amela, kasi amelaki yango te. Bongo babakaki ye na ekulusu. Bakabolaki bilamba na ye: babetelaki yango zeke mpo na koyeba oyo moto na moto akozwa. Tango babakaki ye na ekulusu, ezalaki na ngonga ya libwa ya tongo. Libaya ya moke oyo bakomaki tina oyo bafundelaki ye, ezalaki koloba boye: “Mokonzi ya Bayuda”. Babakaki mpe miyibi mibale na ba-ekulusu elongo na Yesu. Moto na loboko na ye ya mobali, mosusu na loboko na ye ya mwasi. [Mpe Makomi ekokisamaki, oyo ezali koloba: “Batiaki ye na molongo ya bato oyo basalaka mabe.”] Bato oyo bazalaki koleka esika wana, bazalaki kofinga ye, koningisa mitu mpe koloba: —Ee! yo moto obomaka Ndako ya Nzambe mpe otongaka yango lisusu na mikolo misato, mibikisa yo moko, mpe kita na ekulusu! Ndenge moko mpe, bakonzi ya banganga-Nzambe mpe balakisi ya Mibeko bazalaki koseka bango na bango; mpe bazalaki koloba: —Abikisaki bato mosusu, akoki komibikisa ye moko te! Tika ete Kristo, Mokonzi ya Isayele, akita sikʼoyo na ekulusu, mpo ete tomona mpe tondima! Bato oyo babakaki na ba-ekulusu elongo na ye, bango mpe bazalaki kofinga ye. Na ngonga ya midi, molili ezalaki na ekolo mobimba kino na ngonga ya misato ya pokwa. Bongo na ngonga ya misato ya pokwa, Yesu agangaki na mongongo makasi: —Eli; Eli, lama sabakatani? Elingi koloba: Nzambe na ngai, Nzambe na ngai, mpo na nini otiki ngai? Tango ndambo ya bato oyo bazalaki wana bayokaki bango, balobaki: —Yoka, azali kobenga Eliya! Bongo moto moko akimaki mbangu, atondisaki eponze na vino ya ngayi, atiaki yango na songe ya mwa nzete, mpe apesaki yango Yesu mpo amela; mpe alobaki: —Tozela mpe totala, soki Eliya akoya kokitisa ye. Kasi Yesu agangaki makasi peza mpe akataki motema! Rido ya Ndako na Nzambe epasukaki na biteni mibale, banda na likolo kino na nse. Bongo tango mokonzi ya basoda ya Roma oyo atelemaki wana liboso ya Yesu, ayokaki koganga na ye mpe amonaki ndenge akufaki, alobaki: —Ya solo, moto oyo azalaki Mwana ya Nzambe. Basi mosusu bazalaki kotala na mosika. Na kati na bango ezalaki: Mariya ya mboka Magadala; Mariya mama ya Zaki ya leki, ya Zoze, mpe ya Salome. Bango nde bazalaki kolanda Yesu mpe kosalela ye tango azalaki na Galileya. Basi mosusu mingi ba oyo bayaki elongo na Yesu kino na Yeruzalem, bazalaki mpe wana. Ezalaki Mokolo ya komilengela, mokolo oyo ezalaki liboso ya mokolo ya Saba. Lokola pokwa ekomaki, Zozefi ya Arimateo, moto ya lokumu ya likita monene ya Bayuda, ye oyo, ye moko mpe azalaki kozela Bokonzi ya Nzambe, akendaki na molende nyonso epai ya Pilato mpe asengaki nzoto ya Yesu. Pilato akamwaki tango ayokaki ete Yesu akufaki banda kala. Tangu ayokaki yango na mokonzi ya basoda ete ezalaki bongo, apesaki nzoto ya Yesu na Zozefi. Zozefi asombaki elamba ya talo penza, akitisaki nzoto ya Yesu na ekulusu, alingaki yango na elamba wana, mpe akotisaki yango na lilita oyo batimolaki na kati ya libanga. Bongo apusaki libanga liboso ya porte ya lilita. Mariya ya mboka Magadala, mpe Mariya mama ya Zoze, bazalaki kotala epai batiaki ye. Tango mokolo ya Saba elekaki, Mariya ya mboka Magadala, Mariya mama ya Zaki, mpe Salome basombaki malasi mpo na kokende kopakolo nzoto ya Yesu. Na mokolo ya liboso ya poso, na tongo-tongo, tango moyi ebandaki kobima, bakendaki na lilita. Bazalaki kotunana bango na bango: —Nani akolongolela biso libanga oyo ezali na liboso ya porte ya lilita? Kasi tango batalaki, bamonaki ete libanga oyo ezalaki monene penza, bapusaki yango na pembeni. Awa bakotaki na kati ya lilita, bamonaki elenge mobali moko alataki nzambala ya pembe, avandaki na loboko ya mobali mpe kobanga ekangaki bango. Kasi elenge mobali alobaki na bango: —Bobanga te! Bozali koluka Yesu ya Nazareti, oyo babakaki na ekulusu? Azali awa te, asiʼasekwi! Botala esika batiaki ye. Kasi bokende, boloba na bayekoli na ye mpe na Piere: “Yesu akeyi liboso na bino na Galileya. Bokomona ye kuna, ndenge ayebisaki bino.” Basi babimaki na lilita mpe bakimaki. Kolenga ekangaki bango mpe makanisi na bango epalanganaki; balobaki eloko moko te na moto, pamba te bazalaki kobanga. Tango Yesu asekwaki na tongo, na mokolo ya liboso ya poso, abimelaki liboso Mariya ya mboka Magadala, oyo ye abimisa milimo sambo ya mabe. Mariya ya Magadala akendaki koyebisa yango na ba oyo bazalaki elongo na ye, ba oyo batondaki na mawa mpe bazalaki kolela. Tango bayokaki ete Yesu azali na bomoyi mpe amonaki na ye, bandimaki yango te. Sima na yango, Yesu abimelaki bato mibale na kati na bango na lolenge mosusu, tango bazalaki kokende na mboka. Bazongaki mpe bayebisaki yango na basusu; kasi bandima mpe bango te. Bango na sima, abimelaki mpe bapostolo zomi na moko tango bazalaki kolia; apamelaki bango mpo bazangaki kondima mpe mpo bazalaki mitema mabanga, pamba te bandimelaki te bato oyo bamonaki ye sima ya kosekwa na ye. Bongo alobaki na bango: —Bokende na mokili mobimba, mpe boteya Sango-Malamu na bato nyonso. Moto oyo akondima mpe akozwa libatisi akobika, kasi oyo akondima te akozwa etumbu. Tala bilembo oyo ekolanda bato oyo bakondima: na kombo na ngai, bakobengana milimo mabe, bakoloba minoko ya sika, bakolokota banioka na maboko na bango, mpe tango bakomela pwazo, yango ekosala bango ata mabe moko te, bakotiela bato ya maladi maboko, mpe bakobika. Tango Nkolo Yesu asilisaki koloba na bango, amemamaki na likolo, mpe avandi na loboko ya mobali ya Nzambe. Bongo bayekoli bakendaki, mpe bateyaki na bisika nyonso. Nkolo azalaki kosala elongo na bango, mpe azalaki kolakisa ete liloba na ye ezali ya solo, na nzela ya bilembo oyo ezalaki kolanda mateya na bango. Bato mingi babandaki kokoma makambo oyo elekaki na kati na biso, ndenge penza bayebisaki biso yango na baoyo bamonaki makambo yango na miso banda na ebandeli mpe bakoma basali ya Liloba ya Nzambe. Teyofili wa lokumu, lokola ngai moko nalukaki malamu penza koyeba makambo yango nyonso banda na ebandeli, yango wana namoni malamu ete nakomela yo yango ndenge yango elandanaki, mpo oyeba bosolo ya makambo oyo bateyaki yo. Na tango Erode azalaki mokonzi ya Yudea, ezalaki mpe na nganga-Nzambe moko kombo na ye Zakariya, ye azalaki moto ya molongo ya Abia; mwasi na ye Elizabeti azalaki na libota ya Aroni. Bango mibale bazalaki sembo liboso ya Nzambe, bazalaki kotosa mitindo nyonso mpe mibeko nyonso ya Nkolo, na ndenge ekoki. Bazalaki na mwana te, pamba te Elizabeti azalaki kobota te; mpe bango nyonso mibale bakomaki mibange. Mokolo moko, Zakariya azalaki kosala mosala na ye ya kinganga-Nzambe liboso ya Nzambe, mpo yango ezalaki ngala ya molongo na ye. Pamba te, tango babetaki zeke lokola banganga-Nzambe bamesanaki kosala, ye moto aponamaki mpo akota na Esika ya bosantu ya Nkolo mpo na kotumba ansa. Mpe, na tango ya kotumba ansa, ebele ya bato nyonso bazalaki kosambela na libanda. Bongo Anzelu ya Nkolo abimelaki ye, mpe atelemaki na loboko ya mobali ya mesa oyo batumbelaka ansa. Tango Zakariya amonaki ye, alengaki mpe kobanga monene ekangaki ye. Kasi Anzelu alobaki na ye: —Kobanga te Zakariya, pamba te Nzambe ayokaki mabondeli na yo; mwasi na yo Elizabeti akobotela yo mwana mobali, mpe okopesa ye kombo Jean. Ye akozala likambo ya esengo mpe oyo ekosepelisa yo, mpe bato mingi bakosepela mpo na kobotama na ye, pamba te akozala moto monene na miso ya Nkolo. Akomela vino te to mpe masanga ya makasi te. Mpe akozala ya kotonda na Molimo-Mosantu wuta na libumu ya mama na ye. Akozongisa bato mingi ya Isayele epai ya Nkolo Nzambe na bango. Mpe akokende liboso ya Nkolo, na molimo mpe na nguya ya Eliya mpo na kozongisa boyokani kati na batata na bana na bango, mpe batomboki bakokoma na makanisi ya bato na sembo, mpo na kobongisela Nkolo bato oyo babongisami malamu penza. Zakariya atunaki Anzelu: —Nakoyeba yango ndenge nini? Pamba te ngai nasi nakomi mobange penza, mpe bambula ya mwasi na ngai esiʼepusani mingi. Anzelu azongiselaki ye: —Ngai nazali Gabriel. Natelemaka liboso ya Nzambe, batindi ngai mpo na koloba na yo mpe koyebisa yo basango oyo ya malamu. Lokola oboyi kondima maloba na ngai, oyo ekokokisama na tango na yango, okokoma baba, okokoka koloba lisusu te kino mokolo makambo yango ekosalama. Na tango wana, bato bazalaki kozela Zakariya mpe bazalaki kokamwa na ndenge bamonaki ye awumelaki na kati ya Esika ya bosantu. Tango abimaki, akokaki koloba na bango te. Bongo bato basosolaki ete amonaki emoniseli na kati ya Esika ya Bosantu. Kasi ye azalaki koloba na bango na bilembo mpe atikalaki baba. Tango mikolo na ye ya kosala mosala ekokaki, azongaki na ndako na ye. Sima na yango, mwasi na ye Elizabeti akomaki na zemi, mpe amibombaki sanza mitano. Alobaki: —Tala likambo Nkolo asali mpo na ngai! Alakisi ngai bolamu na ye na mikolo oyo mpe alongoli soni na ngai na kati ya bato. Na sanza ya motoba, Nzambe atindaki Anzelu Gabriel na vile moko ya Galileya, kombo na yango Nazareti, epai ya elenge mwasi moko kombo na ye Mariya, oyo ayebaki naino nzoto ya mobali te, mpe azalaki mwasi oyo mobali moko kombo na ye Zozefi andimaki kobala. Zozefi azalaki moto ya libota ya David. Anzelu akotaki epai na ye mpe alobaki: —Mbote na yo, yo moto Nzambe apesi bolamu na ye! Nkolo azali elongo na yo! Tango Mariya ayokaki maloba ya Anzelu, abangaki mingi penza, mpe abandaki komituna-tuna soki mbote yango elingaki koloba nini. Kasi anzelu alobaki na ye: —Mariya kobanga te, pamba te ozwi bolamu ya Nzambe. Okozwa zemi, okobota mwana mobali, mpe okopesa ye kombo Yesu. Akozala moto monene mpe bakobenga ye: Mwana na Ye oyo Aleki Likolo. Nkolo Nzambe akopesa ye bokonzi ya koko na ye David. Akozala mokonzi ya libota ya Zakobi libela na libela, mpe bokonzi na ye ekozala na suka te! Mariya atunaki anzelu: —Yango ekosalama ndenge nini, pamba te nayebi naino nzoto ya mobali te? Anzelu azongiselaki ye: —Molimo Mosantu akokitela yo, mpe nguya ya Ye oyo Eleki Likolo ekozipa yo na elilingi na yango. Yango wana Mosantu oyo akobotama, bakobenga ye: Mwana na Nzambe. Tala, ndeko na yo Elizabeti mpe, azwi zemi ya mwana mobali kati na kimobange na ye. Ye moto bazalaki kobenga: ekomba; kasi sikʼoyo akomi na zemi ya sanza motoba Pamba te, Nzambe akoki kolemba kosala eloko ata moko te. Mariya azongiselaki ye: —Nazali mosali ya Nkolo; tika ete yango esalama na ngai ndenge olobi Bongo anzelu atikaki ye. Na mikolo wana, Mariya atelemaki mpe akendaki mbango na vile moko oyo ezali na mokili ya bangomba, oyo ya Yudea. Akotaki na ndako ya Zakariya mpe apesaki Elizabeti mbote. Tango Elizabeti ayokaki mbote ya Mariya, mwana aninganaki na libumu na ye. Bongo Elizabeti atondaki na Molimo-Mosantu, mpe agangaki na mongongo makasi: —Yo opambolami na kati ya basi, mpe mwana oyo azali na libumu na yo azali ya kopambolama! Bolamu oyo ewuti wapi ete mama ya Nkolo na ngai aya epai na ngai? Pamba te tala, tango nayoki mbote na yo, mwana aninganaki na esengo na kati ya libumu na ngai. Esengo mingi na mwasi oyo andimaki pamba te makambo oyo Nkolo alobaki na ye, ekokokisama! Bongo Mariya alobaki: Elimo na ngai kumisa Nkolo, mpe molimo na ngai ezali kosepela kati na Nzambe, Mobikisi na ngai. Pamba te atali kozanga lokumu ya mosali na ye. Yango wana banda lelo, bato ya batango nyonso bakobenga ngai mwasi ya esengo, pamba te, Nzambe na Nguya nyonso asali makambo minene mpo na ngai; kombo na ye ezali mosantu. Mpe mawa na ye ekozala tango nyonso, likolo ya baoyo babangaka ye. Asali misala ya nguya na loboko na ye; apanzi baoyo bazali na lofundu na motema. Akweyisi bakonzi wuta na bakiti na bango ya bokonzi, kasi atomboli bato oyo bamikitisa. Atondisi baoyo bazali na nzala na biloko ya malamu, kasi abengani bato ya bomengo maboko pamba. Asalisi mosali na ye Isayele, akanisi kolakisa mawa na ye na Abraham mpe na bana na ye, mpo na libela na libela, ndenge alobaki na bakoko na biso. Mariya avandaki elongo na Elizabeti pene-pene na basanza misato, bongo azongaki na ndako na ye. Tango eleko ya Elizabeti ya kobota ekokaki, abotaki mwana mobali. Bongo baninga ya Elizabeti mpe bandeko na ye, tango bayokaki ete Nkolo ayokeli ye mawa monene, basepelaki elongo na ye. Na mokolo ya mwambe, sima ya mbotama ya mwana, baboti ya mwana bayaki mpo na kokatisa mwana; balingaki kopesa ye kombo ya tata na ye: Zakariya. Kasi mama na ye alobaki: —Te! Bakobenga ye Jean. Bongo balobaki na ye: —Moto moko te na kati ya bandeko na yo azali na kombo oyo! Bongo batunaki tata ya mwana na bilembo, mpo bayeba soki kombo nini alingi kopesa mwana; Zakariya asengaki mwa libaya mpe akomaki: —Kombo na ye Jean. Bongo bango nyonso bakamwaki. Na mbala moko, monoko na ye efungwamaki mpe lolemo na ye ekangolamaki; abandaki koloba mpe kokumisa Nzambe. Baninga na bango nyonso ya pembeni batondaki na kobanga; mpe bazalaki kosolola-solola mpo na makambo yango nyonso, na kati ya mokili ya bangomba, oyo ya Yudea. Bato nyonso oyo bayokaki sango yango bazalaki kobomba yango na mitema na bango mpe komituna: Yango mwana oyo akozala nani? Pamba te, loboko ya Nkolo ezalaki elongo na ye. Tata na ye, Zakariya, atondaki na Molimo Mosantu mpe asakolaki boye: Lokumu na Nkolo, Nzambe ya Isayele, pamba te aye kotala mpe kokangola bato na ye, mpe abimeseli biso Mobikisi-ya nguya, kati na libota ya David mosali na ye, ndenge alobaki yango kala penza na minoko ya baprofeta na ye ya bosantu, ete akobikisa biso na maboko ya banguna na biso, mpe na maboko ya baoyo bayinaka biso, mpo na kolakisa mawa na ye na bakoko na biso, mpe mpo na kokanisa Boyokani na ye ya bosantu, ndayi oyo alapaki na koko na biso, Abraham: ete sima ya kokangola biso na maboko ya banguna na biso, apesa biso nzela ya kosalela ye na kobanga te, kati na bosantu mpe bosembo liboso na ye, na mikolo nyonso ya bomoi na biso. Bongo yo, mwana na ngai, bakobenga yo moprofeta ya Ye oyo Aleki Likolo; pamba te, okokende liboso na ye mpo na kobongisela ye nzela, mpo na kolakisa na bato na ye, ete Nzambe apesi bango lobiko na nzela ya bolimbisi ya masumu na bango, mpo na mawa monene ya Nzambe na biso; na nzela na yango monzoto ya tongo ekoyela biso wuta na likolo, mpo na kongengisa baoyo bavandi na molili mpe na butu na liwa, mpe mpo na kotambolisa makolo na biso na nzela ya kimia. Mwana azalaki kokola mpe akomaki makasi kati na molimo; bongo avandaki na esobe kino mokolo amimonisaki epai ya bato ya Isayele. Na mikola wana, Sezare-Oguste apesaki mobeko ya kotanga talo ya bato nyonso oyo bavandaka na mikili oyo ezalaki na nse ya bokonzi ya Roma. Kotanga yango ezalaki ya liboso, oyo esalamaki tango Kiriniusi azalaki moyangeli ya Siriya. Bongo moto na moto azalaki kokende komikomisa na vile na ye. Lokola Zozefi azalaki na libota ya David, yango wana alongwaki na vile ya Nazareti, na mokili ya Galileya mpo na kokende na mokili ya Yudea, na vile ya Betelemi, vile ya David. Akendaki kuna mpo na kokomisa kombo elongo na Mariya mwasi oyo ye andimaki kobala; mpe Mariya azalaki na zemi. Tango bazalaki na Betelemi, mokolo na ye ya kobota ekokaki. Mariya abotaki mwana mobali, mwana na ye ya liboso. Alingaki ye na bilamba mpe alalisaki ye na elielo ya banyama, pamba te esika ezalaki te mpo na bango na ndako ya bapaya. Mpe babateli ya bameme bazalaki na bilanga ya pembeni wana, bazalaki kokengela etonga ya bameme na bango na butu. Anzelu ya Nkolo abimelaki bango, mpe nkembo ya Nkolo engengaki pembeni na bango, bongo bayokaki somo mingi. Kasi anzelu alobaki na bango: —Bobanga te; nayeli bino sango moko ya malamu oyo ekosepelisa bato nyonso: Mobikisi abotami mpo na bino lelo, na vile ya David. Ye azali Kristo, Nkolo. Oyo nde ekozala elembo mpo na bino: mwana moke balingi na bilamba mpe balalisi ye na elielo ya banyama! Na mbala moko, baanzelu ebele ya mapinga ya likolo, bayaki kosangana na anzelu oyo ya liboso, bazalaki kokumisa Nzambe: Nkembo na Nzambe na Bisika Bileki Likolo! Mpe kimia na mokili, epai ya bato oyo bolamu na ye ezali likolo na bango. Tango baanzelu batikaki bango mpe bazongaki na Likolo, babeteli ya bameme balobanaki moko na moko: —Tika tokende na Betelemi mpe totala likambo oyo esalami kuna, oyo Nkolo ayebisi biso! Bakendeki noki mpe bakutaki Mariya na Zozefi na mwana alali na elielo ya banyama. Sima ya komona mwana, balobaki makambo oyo bayebisaki bango mpo na mwana. Bato nyonso oyo bayokaki yango, bakamwaki mingi mpo na makambo oyo babateli bayebisaki bango. Kasi Mariya azalaki kobomba makambo wana nyonso na motema, mpe azalaki kokanisa yango mbala mingi. Bongo babateli ya bameme bazongaki; bazalaki kokumisa mpe kosanzola Nzambe, mpo na nyonso oyo bayokaki mpe bamonaki; mpe yango ezalaki kaka ndenge bayebisaki bango yango. Na mokolo ya mwambe, wana tango ya kokatisa ye ekokaki, bapesaki ye kombo Yesu; kombo oyo anzelu apesaki liboso ete mama na ye azwa zemi na ye. Tango mikolo na bango ya komipetola ekokaki, ndenge ekomama na Mobeko ya Moyize, Zozefi mpe Mariya bamemaki ye na Yeruzalem mpo na kolakisa ye na Nkolo, ndenge yango ekomama na Mobeko ya Nkolo: Mwana nyonso ya mobali ya liboso, bakopesa ye likabo na Nkolo. Bayaki mpe mpo na kopesa mbeka, mpo na kotosa oyo elobama na Mobeko ya Nkolo: “Bapijon mibale ya zamba to bana mibale ya bapijon”. Moto moko azalaki na Yeruzalem, kombo na ye Simeon; azalaki moto na sembo mpe azalaki kotosa makambo ya Nzambe, azalaki kozela Mobondisi ya Isayele, mpe Molimo Mosantu azalaki likolo na ye. Molimo Mosantu alakisaki ye ete liboso akufa, akomona Kristo ya Nkolo. Simeon ayaki na lopangu ya Ndako ya Nzambe, na kotindama ya Molimo. Tango baboti bayaki na mwana Yesu mpo na kosala mpo na ye, oyo ezaleli ya Mobeko ezalaki kotinda, Simeon akamataki mwana na maboko na ye mpe akumisaki Nzambe na maloba oyo: Nkolo tika ete mosali na yo akende na kimia, ndenge olakaki. Pamba te, miso na ngai emoni Lobiko na yo, Oyo obongisaki mpo na bato nyonso: Yango ezali mwinda mpo na kongengisa bikolo, mpe nkembo ya bato na yo Isayele. Bongo tata mpe mama ya Yesu bakamwaki mingi mpo na maloba oyo Simeon alobaki mpo na Yesu. Simeon apambolaki bango mpe alobaki na Mariya, mama ya Yesu: —Yoka: mwana oyo atindami mpo na kokweyisa mpe kotelemisa bato mingi na kati na Isayele, mpe akozala elembo oyo bato bakotia na yango tembe, mpo ete makanisi ya mitema ya bato mingi emonana polele. Mpe mpo na yo, mopanga ekotobola elimo na yo. Moprofeta moko ya mwasi azalaki wana kombo na ye Ana. Azalaki mwana ya Fanwele, ya libota ya Asere. Akomaki mobange penza. Na bolenge na ye, awumelaki na mobali na ye kaka bambula sambo, bongo akomaki mwasi akufela mobali kino na bambula ntuku mwambe na minei. Azalaki kolongwa na Ndako ya Nzambe te mpe azalaki kosalela Nzambe butu na moyi, na koboya kolia mpo na mabondeli. Ye mpe ayaki na tango wana, azongisaki matondi na Nzambe mpe alobaki mpo na mwana, na bato nyonso oyo bazalaki kozela ete Nzambe akangola Yeruzalem. Tango Mariya mpe Zozefi basilaki kokokisa nyonso oyo Mobeko ya Nkolo ezalaki kotinda, bazongaki na Galileya, na vile na bango Nazareti. Mwana azalaki kokola mpe akomaki makasi; atondaki na bwanya, mpe ngolu ya Nzambe ezalaki likolo na ye. Baboti ya Yesu bazalaki kokende mbula nyonso na Yeruzalem na feti ya Pake. Tango Yesu akokisaki bambula zomi na mibale, bakendaki na feti, lokola momesano. Tango feti esilaki, bazwaki nzela mpo na kozonga; kasi mwana na bango Yesu atikalaki na Yeruzalem. Mpe baboti na ye bayebaki yango te. Bakanisaki ete azalaki na baninga na ye ya mobembo, bongo basalaki mokolo mobimba na nzela. Sima babandaki koluka ye epai ya bandeko mpe baninga na bango. Kasi lokola bamonaki ye te, bazongaki na Yeruzalem mpo na koluka ye. Sima ya mikolo misato, bayaki komona ye na lopango ya Ndako ya Nzambe, avandaki na kati ya balakisi ya Mibeko, azalaki koyoka bango mpe kotuna bango mituna. Bato nyonso oyo bazalaki koyoka ye, bazalaki kokamwa mingi penza mayele na ye mpe biyano na ye. Tango baboti na ye bamonaki ye, bakamwaki mingi penza; bongo mama na ye alobaki na ye: —Mwana na ngai, mpo na nini osali biso boye? Tata na yo na ngai, tozalaki motema likolo mpe toluki-luki yo! Bongo Yesu azongiselaki bango: —Mpo na nini bozali koluka ngai? Boyebi te ete esengeli nazala na Ndako ya Tata na ngai? Kasi basosolaki te maloba oyo alobaki na bango. Bongo azongaki na baboti na ye na Nazareti, mpe azalaki kotosa bango. Kasi mama na ye azalaki kobomba makambo wana nyonso na motema. Bongo Yesu azalaki kokola na bwania mpe na nzoto. Mpe, Nzambe mpe bato bazalaki kosepela na ye. Tango Tibere Sezare akokisaki bambula zomi na mitano na bokonzi na ye, Ponse Pilato azalaki moyangeli ya Yudea, Erode azalaki mokonzi ya Galileya mpe ndeko na ye Filipi azalaki mokonzi ya Itureya mpe Trakonite, mpe Lisaniasi azalaki mokonzi ya Abilene. Bongo Ana mpe Kayifa bazalaki bakonzi ya banganga-Nzambe. Liloba ya Nzambe eyaki epai Jean mwana ya Zakariya, kati na esobe. Jean akendaki na ekolo mobimba oyo ezalaki pembeni na mayi ya Yordani; azalaki koteya: “Bozwa libatisi mpo na kolakisa ete bobongoli mitema; bongo Nzambe akolimbisa masumu na bino!” Ndenge ekomama na buku ya maloba ya moprofeta Ezayi: Mongongo ya moto ezali koganga na esobe: Bobongisa nzela ya Nkolo, bosalela ye banzela oyo etengama te! lubwaku nyonso ekotondisama, Ngomba nyonso ya monene mpe oyo ya moke ekolalisama, babala-bala ya kotengama bakokomisa yango alima mpe banzela ya mabanga-mabanga bakokomisa yango malamu. Bongo bato nyonso bakomona lobiko ya Nzambe! Jean azalaki koloba na bato oyo bazalaki koya mpo na kozwa libatisi epai na ye: —Bino mabota ya banyoka! Nani akebisi bino ete bokima kanda oyo ezali koya? Bobota mbuma oyo ebongi mpo na bato oyo bobongoli mitema. Mpe botika koloba na nse ya mitema na bino: “Abraham azali tata na biso!” Pamba te, nalobi na bino ete Nzambe akoki kobimisela Abraham bana wuta na mabanga oyo! Epasola koni esiʼebongisami mpo na kokata misisa ya nzete; nzete nyonso oyo ebotaka mbuma ya malamu te, bakokata yango mpe bakobwaka yango na moto! Ebela ya bato batunaki ye: —Esengeli tosala nini? Jean azongisaki: —Moto oyo azali na kazaka mibale, apesa moko na oyo azangi yango. Moto oyo azali na biloko ya kolia asala mpe ndenge moko. Bafutisi mpako bayaki mpe mpo na kozwa libatisi; bongo batunaki Jean: —Moteyi, tosengeli kosala nini? Azongiselaki bango: —Tango bofutisaka mpako bobakisa mbongo mosusu te likolo ya oyo batindaka bino! Basoda mpe batunaki ye: —Bongo biso, tosengeli kosala nini? Jean azongiselaki bango: —Bobotola bato mbongo te mpe bofunda bato na ndenge ya lokuta te; kasi botalela kaka lifuti na bino. Bato bazalaki kozela na elikya monene mpe bango nyonso bazalaki komituna-tuna na nse ya mitema, soki Jean azali Kristo. Jean azongiselaki bango nyonso: —Ngai nazali kobatisa bino na mayi, kasi moto moko azali koya, aleki ngai na nguya, mpe nazali ya kokoka kutu te mpo na kofungola basinga ya ba sandale na ye. Ye moto akobatisa bino na Molimo Mosantu mpe na moto. Asimbi kiyungulu na maboko na ye, akopetola esika na ye oyo batutelaka mbuma; mpe akobomba ble na ebombelo na ye; kasi akotumba matiti na moto moko oyo ekufaka te! Jean azalaki kolendisa bato mpe azalaki koteya bango Sango-Malamu na maloba mosusu mingi. Kasi Jean apamelaki mokonzi Erode mpo na Erodiade, mwasi ya ndeko na ye, mpe mpo asalaki lisusu makambo mingi ya mabe. Erode abakisaki lisusu mabe oyo, likolo ya mabe na ye nyonso: Atiaki Jean na boloko. Tango bato nyonso bazwaki libatisi, Yesu mpe azwaki libatisi. Awa azalaki kobondela, likolo efungwamaki mpe Molimo Mosantu akitaki likolo na ye, na lolenge ya pijon. Bongo mongongo moko ewutaki na Likolo: —Ozali mwana na ngai ya bolingo; osepelisaka ngai mingi penza! Yesu akomaki pene-pene na bambula ntuku misato tango abandaki mosala na ye. Bato bazalaki kokanisa ete azalaki mwana ya Zozefi, mwana ya Eli, mwana ya Matati, mwana ya Levi, mwana ya Melki, mwana ya Zanai, mwana ya Zozefi, mwana ya Matatiasi, mwana ya Amosi, mwana ya Nahumi, mwana ya Esli, mwana ya Nagai, mwana ya Maati, mwana ya Matatiasi, mwana ya Semeini, mwana ya Zoseki, mwana ya Zoda, mwana ya Zoanani, mwana ya Reza, mwana ya Zorobabele, mwana ya Sabatiele, mwana ya Neri, mwana ya Melki, mwana ya Adi, mwana ya Kosami, mwana ya Elmadami, mwana ya Eri, mwana ya Zosue, mwana Eliezeri, mwana ya Zorimi, mwana ya Matati, mwana ya Levi, mwana ya Simeon, mwana ya Yuda, mwana ya Zozefi, mwana ya Zonami, mwana ya Eliakim, mwana ya Meleya, mwana ya Mena, mwana ya Matata, mwana ya Natan mwana ya David, mwana ya Isayi, mwana ya Obedi, mwana ya Boazi, mwana ya Salmon, mwana ya Nason, mwana ya Aminadab, mwana ya Admina, mwana ya Arni, mwana ya Esromi, mwana ya Farezi, mwana ya Yuda, mwana ya Zakobi, mwana Izaki, mwana ya Abraham, mwana ya Tera, mwana ya Nakor, mwana ya Serusi, mwana ya Ragau, mwana ya Faleki, mwana ya Eber, mwana ya Sala, mwana ya Kayinami, mwana ya Arfazadi, mwana na Semi, mwana ya Nowa, mwana ya Lemeki, mwana ya Matusala, mwana ya Enoki, mwana ya Zaredi, mwana ya Maleleel, mwana ya Kayinami, mwana ya Enosi, mwana ya Seti, mwana na Adam, mwana ya Nzambe. Yesu atondaki na Molimo Mosantu, alongwaki na Yordani mpe Molimo amemaki ye na esobe. Kuna Zabolo amekaki ye mikolo ntuku minei. Azalaki kolia eloko moko te na kati ya mikolo wana; bongo tango mikolo yango ekokaki, ayokaki nzala. Zabolo alobaki na ye: —Soki ozali Mwana ya Nzambe, loba na libanga oyo ekoma limpa! Kasi Yesu azongisaki: —Ekomama: Moto akozala na bomoi kaka mpo na limpa te! Bongo Zabolo amemaki ye na esika moko ya likolo penza mpe alakisaki ye na mbala moko babokonzi nyonso ya mokili; mpe alobaki na ye: —Nakopesa yo bokonzi na yango nyonso mpe nkembo na yango, pamba te yango epesama na maboko na ngai, mpe nakoki kopesa yango na moto nyonso oyo ngai moko nalingi. Soki ofukameli ngai, nyonso ekokoma ya yo. Yesu azongisaki: —Ekomama: Okokumbamela Nkolo Nzambe na yo, mpe okosalela kaka ye moko! Bongo Zabolo amemaki ye na Yeruzalem, atiaki ye na esika oyo eleki likolo oyo ya Ndako na Nzambe, mpe alobaki na ye: —Soki ozali Mwana ya Nzambe, mibwaka na nse pamba te ekomama: Akotinda baanzelu na ye mpo na yo, mpo babatela yo; mpe bakomema yo na maboko na bango mpo ete lokolo na yo etuta libanga te! Yesu azongisaki: —Elobama boye: Komeka Nkolo Nzambe na yo te! Awa Zabolo asilisaki komeka Yesu na ndenge nyonso, atikaki ye kino na tango mosusu. Bongo Yesu azongaki na Galileya, mpe nguya ya Molimo ezalaki na ye. Basango na ye epanzanaki bipai nyonso ya mokili wana. Azalaki koteya na bandako na bango ya mayangani, mpe bato nyonso bazalaki kokumisa ye. Akendaki na Nazareti, epai ye akolaki, akotaki na ndako ya mayangani na mokolo ya Saba, lokola amesanaki kosala. Bapesaki ye Buku ya moprofeta Ezayi; afungolaki yango mpe amonaki esika oyo ekomama boye: Molimo ya Nkolo azali likolo na ngai, mpo aponi ngai nasakola Sango-Malamu na babola; atindi ngai nayebisa bakangami ete bakokangolama, mpe na bato bakufa miso ete bakomona lisusu; mpo na kokangola bato oyo bazali konyokolama, mpe kosakola mbula ya bolamu ya Nkolo. Bongo akangaki Buku yango, azongisaki yango na mosali ya ndako ya mayangani, mpe avandaki. Miso ya bato nyonso oyo bazalaki na ndako ya mayangani ezalaki kotala ye. Bongo alobaki na bango: —Lelo nde Makomi oyo bowuti koyoka, ekokisami! Bato nyonso balobaki makambo ya malamu mpo na ye mpe bakamwaki mingi penza mpo na maloba ya ngolu oyo ebimaki na monoko na ye. Bongo bazalaki kotuna: —Boni, ye azali mwana ya Zozefi te? Yesu alobaki na bango: —Nayebi malamu ete bokoloba na ngai lisese oyo: “Monganga, mibikisa yo moko! Sala awa na vile na yo, makambo nyonso oyo toyokaki esalamaki na Kapenawumi”. Bongo alobaki lisusu: Ya solo nalobi na bino: moprofeta ata moko te bandimaka ye na vile na ye. Nalobi na bino ya solo: na tango ya Eliya, tango mbula enokaki te mbula misato na ndambo mpe nzala monene ezalaki na ekolo mobimba, basi bakufela mibali bazalaki mingi na kati ya Isayele. Nzokande, Eliya atindamaki epai ya moko na bango te, kasi kaka epai ya mwasi akufela mobali ya Sarepeta, na ekolo ya Sidoni. Na tango mpe ya moprofeta Elize, bato ya maladi ya maba bazalaki mpe mingi na Isayele; kasi ata moko te na kati na bango akomaki peto, longola kaka Namani moto ya Siria. Bato nyonso oyo bazalaki na ndako ya mayangani, tango bayokaki bongo, batondaki na kanda, batelemaki, bamemaki Yesu na libanda ya vile tii na songe ya ngomba, epai batongaki vile na bango mpo babwaka ye na nse. Kasi Yesu alekaki na kati-kati na bango mpe akendeki. Bongo Yesu akendaki na Kapenawumi, vile moko ya Galileya; mpe azalaki koteya bango na mokolo ya saba. Bazalaki kokamwa mingi mpo na mateya na ye, pamba te maloba na ye ezalaki na bokonzi. Moto moko azalaki na ndako ya mayangani, azalaki na molimo moko ya mabe penza. Agangaki na mongongo makasi: —A! Yesu ya Nazareti, likambo nini biso na yo? Oye mpo na koboma biso? Nayebi yo soki ozali nani: ozali Mosantu ya Nzambe. Yesu agangelaki molimo mabe: —Kanga monoko na yo, mpe bima kati na ye. Molimo mabe ebwakaki moto yango na mabele, liboso na bango nyonso, ebimaki kati na ye, mpe esalaki ye ata mabe moko te. Bato nyonso bakamwaki mpe bazalaki kolobana bango na bango: —E e! maloba ya ndenge nini oyo? Pamba te azali kotinda milimo mabe na bokonzi mpe na nguya, mpe yango ezali kobima! Bongo basango ya Yesu epanzanaki na bamboka nyonso ya pembeni wana. Yesu abimaki na ndako ya mayangani mpe akotaki na ndako ya Simon. Bokilo ya Simon ya mwasi azalaki na fievre makasi. Bongo basengaki Yesu abikisa ye. Yesu agunzamaki likolo na ye, apamelaki fievre, mpe fievre etikaki ye. Kaka na tango wana, atelemaki mpe abandaki kobongisela bango biloko ya kolia. Bongo na pokwa, bato oyo bazalaki na bato na bango oyo bazalaki na maladi ya ndenge na ndenge, bamemaki bango epai ya Yesu; atielaki bango maboko moko na moko mpe abikisaki bango! Milimo mabe mpe ezalaki kobima na bato mingi; ezalaki koganga: —Ozali Mwana na Nzambe! Kasi Yesu apamelaki bango mpe apesaki bango nzela te mpo na koloba, pamba te bango bayebaki ete ye azali Kristo. Tongo tango etanaki, Yesu abimaki mpe akendaki na esika na ye moko. Bato bazalaki koluka ye mpe tango bakomaki epai ye azalaki, balingaki kosimba ye ete azala kaka wana, mpo atika bango te. Kasi Yesu alobaki na bango: —Esengeli nateya Sango Malamu ya Bokonzi ya Nzambe na bavile mosusu; pamba te Nzambe atindaki ngai mpo na yango. Bongo Yesu azalaki koteya na bandako ya mayangani ya Yudea. Mokolo moko, Yesu azalaki pembeni ya laki ya Genezareti; bongo bato mingi bayaki kotonda pembeni na ye mpo na koyoka Liloba ya Nzambe. Amonaki babwato mibale pembeni ya laki. Bato oyo balukaka bambisi bakitaki na babwato yango mpe bazalaki kosukola minyama na bango. Yesu amataki na bwato moko, oyo ezalaki ya Simon, mpe asengaki Simon apusa yango mwa moke na mayi. Bongo avandaki mpe azalaki koteya bato wuta na bwato. Tango asilisaki koloba, alobaki na Simon: —Pusa bwato epai mayi ezali penza modindo, mpe bobwaka minyama na mayi mpo na kokanga mbisi. Simon azongisaki: —Nkolo, tosali butu mobimba, mpe tozwi ata eloko moko te kasi lokola olobi yango, nakobwaka monyama! Tango babwakaki yango, bazwaki bambisi ebele, kutu minyama na bango ebandaki kopasuka. Bongo babengaki baninga na bango oyo bazalaki na bwato mosusu mpo baya kosalisa bango. Bayaki, batondisaki babwato nyonso mibale mpe ebandaki kodinda. Tango Simon-Piere amonaki bongo, afukamaki liboso ya Yesu mpe alobaki: —Nkolo, kozala pene-pene na ngai, mpo nazali moto ya masumu! Pamba te, somo monene ekangaki ye na baninga na ye nyonso, mpo na komona talo ya bambisi oyo bazwaki. Ndenge moko mpe mpo na Zaki mpe Jean, bana ya Zebede, baoyo bazalaki kosala na Simon. Bongo Yesu alobaki na Simon: —Kobanga te! Banda lelo, okomi moluki ya bato! Tango bamemaki babwato na libongo, batikaki biloko na bango nyonso mpe balandaki Yesu. Tango Yesu azalaki na moko ya bavile wana, moto moko azalaki ya kotonda na maba na nzoto, azalaki mpe na vile wana. Tango amonaki Yesu, afukamaki elongi na nse mpe abondelaki ye: —Nkolo, soki olingi, okoki kokomisa ngai peto! Yesu asembolaki loboko, asimbaki ye mpe alobaki: —Nalingi yango, koma peto! Kaka na tango wana, maba etikaki ye; Bongo Yesu apesaki ye mitindo boye: —Koyebisa yango na moto te, kasi kende komilakisa epai ya nganga-Nzambe, mpe pesa likabo oyo Moyize atindaki lokola okomi peto mpo yango ezala litatoli mpo na bango. Basango ya Yesu ezalaki kaka kopanzana; mpe bato mingi penza basanganaki mpo na koyoka ye mpe mpo babika na bamaladi na bango. Kasi Yesu azalaki kokende na bisika ya ye moko kaka mpe azalaki kobondela. Mokolo moko tango Yesu azalaki koteya, bafarizeo mpe balakisi ya Mibeko, bango bawutaki na bamboka nyonso ya Galileya, ya Yudea, mpe na Yeruzalem, bayaki kovanda wana. Bongo nguya ya Nkolo ezalaki elongo na ye mpo na kobikisa bato ya maladi. Bato moko bamemaki moto moko akufa makolo na mbeto. Bazalaki koluka nzela ya kokotisa ye na ndako mpe kotia ye liboso ya Yesu. Lokola bamonaki nzela te ya kokotisa ye na ndako, mpo bato bazalaki ebele, bamataki likolo ya ndako, mpe bakitisaki ye na mbeto, na lidusu oyo batobolaki na matolo, na kati-kati ya ebele ya bato, liboso ya Yesu. Tango Yesu amonaki kondima na bango, alobaki: —Mobali, masumu na yo elimbisami! Bafarizeo mpe balakisi ya Mibeko babandaki kokanisa na nse ya mitema: —Moto oyo azali nani oyo azali kobimisa maloba ya kotiola Nzambe? Nani akoki kolimbisa masumu, soki ezali kaka ye moko Nzambe te? Kasi Yesu ayebaki makanisi na bango mpe atunaki bango: —Mpo na nini bozali kokanisa ndenge wana na mitema na bino? Eloko nini ezangi pasi, koloba: “Masumu na yo elimbisami”, to koloba: “Telema mpe tambola?” Kasi mpo boyeba ete Mwana ya Moto azali na bokonzi awa na mokili ya kolimbisa masumu… Alobaki na moto oyo akufa makolo: —Nalobi na yo: telema, kamata mbeto na yo, mpe zonga na ndako na yo! Kaka na tango wana, atelemaki liboso na bango, akamataki mbeto oyo alalelaki, mpe azongaki na ndako na ye; bongo azalaki kokumisa Nzambe. Bato nyonso bakamwaki, mpe bazalaki kokumisa Nzambe; batondaki na somo, mpe bazalaki koloba: —Lelo oyo tomoni makambo ya kokamwa! Sima na yango, Yesu abimaki mpe amonaki mofutisi mpako moko, kombo na ye Levi, avandaki na biro oyo azalaki kofutisela mpako. Yesu alobaki na ye: —Landa ngai! Levi atelemaki, atikaki biloko na ye nyonso, mpe alandaki Yesu. Bongo Levi asalelaki Yesu feti moko ya kafu-kafu na ndako na ye. Bafutisi mpako mingi mpe bato mosusu bazalaki kolia elongo na bango. Kasi bafarizeo mpe balakisi ya Mibeko oyo bazalaki ya lisanga na bango bayima-yimaki na bayekoli ya Yesu: —Mpo na nini bozali kolia mpe komela elongo na bafutisi mpako mpe bato ya masumu? Yesu azongiselaki bango: —Bato oyo bazali na nzoto malamu bazalaka na posa ya monganga te, kasi ezali bato ya maladi. Nayaki kobenga bato na sembo te, kasi nayaki kobenga bato ya masumu mpo babongola mitema! Bongo balobaki na Yesu: —Mpo na nini bayekoli ya Jean baboyaka mbala na mbala kolia mpo na mabondeli mpe bamipesaka na mabondeli, ndenge moko mpe baoyo ya bafarizeo, kasi oyo ya yo baliaka mpe bamelaka? Yesu azongiselaki bango: —Boni, bokoki koboyisa bato oyo babengami na feti ya libala kolia, na tango mobali oyo abali azali na bango elongo? Kasi tango ekoya, oyo moto oyo abali bakolongola ye na kati na bango, na tango wana nde bakoboya kolia mpo na kobondela. Bongo Yesu alobaki na bango lisapo oyo: —Moto moko te akoki kokamata kitendi ya elamba ya sika mpo abamba elamba ya kala. Moto moko te akoki kotia vino ya sika na basaki ya kala. Soki asali bongo, vino ya sika ekopasola basaki, mpe ekosopana, mpe basaki ekobeba. Kasi vino ya sika esengeli batia yango na basaki ya sika. Mpe moto moko te sima ya komela vino ya kala akoki kolinga oyo ya sika. Pamba te akoloba: Vino ya kala eleki kitoko. Mokolo moko ya saba, Yesu azalaki koleka na kati ya elanga ya ble. Bayekoli na ye babandaki kobuka ble, kolongola yango baposo, mpe kolia. Bafarizeo mosusu batunaki: —Mpo na nini bozali kosala likambo oyo epekisami kosala na mokolo ya saba? Yesu azongiselaki bango: —Naino botangi te likambo David asalaki ye na baninga na ye tango bazalaki na nzala? Akotaki na Ndako ya Nzambe, akamataki mampa oyo bapesaki makabo na Nzambe, aliaki yango, mpe apesaki bato oyo bazalaki na ye. Nzokande kaka banganga-Nzambe nde bazalaki na ndingisa mpo na kolia yango. Yesu alobaki lisusu: —Mwana ya Moto azali mokonzi ya mokolo ya saba! Mokolo mosusu ya saba, Yesu akotaki na ndako ya mayangani mpe azalaki koteya. Moto moko azalaki wana azalaki na loboko ya mobali ekufa. Balakisi ya Mibeko mpe bafarizeo bazalaki kotala Yesu malamu-malamu mpo bamona soki akobikisa moto na mokolo ya saba, mpo ete bazwa likambo ya kofundela ye. Kasi Yesu ayebaki makambo oyo bazalaki kokanisa. Bongo alobaki na moto oyo akufa loboko: —Telema, mpe yaka awa liboso ya bato nyonso! Moto yango atelemaki mpe ayaki wana. Bongo Yesu alobaki na bango: —Nazali kotuna bino, likambo nini epesami ndingisa kosala na mokolo ya saba: kosala malamu to kosala mabe, kobikisa bomoi ya moto to koboma yango? Yesu atalaki bango nyonso moko na moko mpe alobaki na moto oyo akufa loboko: —Sembola loboko na yo! Moto yango asalaki bongo, mpe loboko na ye ekomaki malamu. Kasi balakisi ya Mibeko mpe bafarizieo batondaki na kanda mpe babandaki koyokana mpo na koluka likambo oyo bakokaki kosala Yesu. Kaka na mikolo wana, Yesu akendaki na ngomba mpo na kobondela, mpe abondelaki Nzambe butu mobimba. Tango tongo etanaki, abengaki bayekoli na ye. Bongo aponaki zomi na mibale kati na bango; baoyo apesaki bango kombo bapostolo: Simon, oyo apesaki kombo: Piere, mpe Andele ndeko na ye; Zaki mpe Jean; Filipo mpe Batelemi; Matayo mpe Toma; Zaki mwana ya Alfeo mpe Simon oyo azalaki na lisanga: Zelote; Yude mwana ya Zaki mpe Yuda Iskariote oyo atekaki Yesu. Yesu akitaki ngomba elongo na bango, mpe atelemaki esika moko ya polele. Bayekoli na ye ebele penza bazalaki wana elongo na bato mingi penza oyo bawutaki na Yudea mobimba, Yeruzalem, mpe na bamboka ya Tire mpe Sidon oyo ezalaki pembeni-pembeni ya ebale monene. Bayaki mpo na koyoka ye mpe koluka kobika na maladi na bango. Bato oyo mpe bazalaki kotungisama na milimo mabe, babikaki. Bato nyonso bazalaki koluka kosimba ye, pamba te nguya moko ezalaki kobima na ye, mpe ezalaki kobikisa bango nyonso. Bongo atalaki bayekoli na ye mpe alobaki: —Esengo na bino baoyo bozali babola, pamba te Bokonzi ya Nzambe ezali ya bino! Esengo na bino baoyo bozali na nzala sikʼoyo, pamba te, bokotonda. Esengo na bino baoyo bozali kolela sikʼoyo, pamba te bokoseka. Esengo na bino tango bato bakoyina bino, tango bakobengana bino, tango bakofinga bino, mpe tango bokoboya kombo na bino lokola kombo moko ya mabe, mpo na Mwana ya Moto. Na mokolo yango bosepela mpe botonda na esengo, mpo lifuti na bino ezali monene penza na Likolo. Pamba te bakoko na bango basalaki mpe baprofeta kaka bongo. Kasi mawa na bino bato ya bomengo, pamba te bosi bozwi libondisi na bino. Mawa na bino baoyo bozali ya kotonda sikʼoyo, pamba te bokozala na nzala! Mawa na bino baoyo bozali koseka sikʼoyo, pamba te bokosala matanga mpe bokolela! Mawa na bino tango bato nyonso bakoloba malamu mpo na bino, pamba te bakoko na bango mpe basalaki bongo epai ya baprofeta ya lokuta! —Kasi nalobi boye na bino baoyo bozali koyoka ngai: Bolinga banguna na bino, bosala makambo ya malamu na bato oyo bayinaka bino. Bopambola bato oyo balakelaka bino mabe, mpe bobondelaka mpo na baoyo banyokolaka bino. Soki moto abeti yo mbata na litama moko, pesa ye mpe oyo mosusu. Soki moto abotoli kazaka na yo, koboya te mpo azwa mpe simisi na yo. Pesa na moto nyonso oyo asengi yo; mpe soki moto akamati eloko na yo na makasi, kosenga ye azongisela yo yango te. Makambo oyo bolingi ete bato basala mpo na bino, bosala yango mpe ndenge moko na bato mosusu. Soki bozali kolinga kaka baoyo balingaka bino, lokumu nini bokozwa? Pamba te bato ya masumu mpe balingaka bato oyo balingaka bango. Soki bozali kosala malamu kaka na baoyo basalelaka bino bolamu, lokumu nini bokozwa? Pamba te bato ya masumu mpe basalaka bongo. Soki bodefisaka kaka na baoyo bozali na elikya ete bakoki kozongisela bino, lokumu nini bokozwa? Pamba te bato ya masumu mpe badefisaka baninga na bango bato ya masumu, mpo bafuta bango nyongo yango. Kasi bino, bolinga banguna na bino, bosalela bango bolamu, bodefisa mpe bomituna te soki bakofuta bino nyongo yango; bongo lifuti na bino ekozala monene penza, mpe bokozala bana ya Ye oyo Aleki likolo; pamba te Ye azali malamu epai ya bato oyo bazongisaka matondi te, mpe epai ya bato mabe. Bozala bato ya mitema mawa, ndenge mpe Tata na bino azali moto ya motema mawa. Bosambisa te, mpe bakosambisa bino te. Bokatela bato etumbu te, mpe bakokatela bino etumbu te. Bolimbisa baninga na bino, mpe bakolimbisa bino. Bopesa, mpe bakopesa bino: bakotia na basaki na bino biloko oyo ekoki penza, oyo bafini malamu, baningisi malamu, mpe oyo ebandi kosopana; pamba te bakozongisela bino, kaka ndenge bino mpe bopesaka baninga. Yesu alobaki na bango lisusu lisapo oyo: —Boni, moto akufa miso akoki kotambolisa moto mosusu akufa miso? Bango mibale bakokweya na libulu te? Mwana ya kelasi aleki molakisi na ye te, kasi moto nyonso oyo bateyi malamu penza, akokoma lokola molakisi na ye. Mpo na nini ozali kotala mwa lititi moke oyo ezali na liso ya ndeko na yo, mpe ozali komona te nzete oyo ezali na liso na yo? Ndenge nini okoki koloba na ndeko na yo: “Ndeko na ngai, tika nalongola mwa lititi oyo ezali na liso na yo”, na tango yo moko ozali komona te nzete oyo ezali na liso na yo. Moto ya kokosana! longola liboso nzete oyo ezali na liso na yo, bongo nde okomona polele mpo na kolongola mwa lititi oyo ezali na liso ya ndeko na yo. Nzete moko te ya malamu ebotaka bambuma ya mabe, mpe nzete moko te ya mabe ebotaka bambuma ya malamu. Mpe nzete nyonso eyebanaka na mbuma na yango. Pamba te babukaka bambuma ya figi na banzete ya nzube te, mpe balongolaka bambuma ya vino na banzete ya basende te. Moto malamu abimisaka makambo ya malamu oyo ewutaka na bomengo ya malamu ya motema na ye; mpe moto mabe abimisaka makambo ya mabe oyo ewutaka na bomengo ya mabe ya motema na ye. Pamba te, monoko ya moto elobaka wuta na makambo oyo etondi na motema na ye. Mpo na nini bobengaka ngai “Nkolo! Nkolo!”, mpe bosalaka te makambo oyo nalobaka? Nakolakisa bino soki moto oyo akoya epai na ngai, oyo akoyoka maloba na ngai mpe akosalela yango, akokani na nani: akokani na moto oyo atongaki ndako, mpe atimolaki, atimolaki penza tii na nse, mpe atongaki fondasio likolo ya libanga. Tango mpela eyaki, mayi emibwakaki na makasi nyonso na ndako, kasi ekokaki te kokweyisa yango pamba te etongamaki malamu penza. Kasi moto oyo azali koyoka maloba na ngai mpe azali kosalela yango te, akokani na moto oyo atongaki ndako likolo ya mabele, mpe atiaki fondasio te. Tango mayi emibwakaki na makasi nyonso na ndako yango, ekweyaki kaka na tango wana, mpe kobeba na yango ezalaki monene penza. Tango Yesu asilisaki koloba makambo wana nyonso na bato, akendaki na Kapenawumi. Mokonzi moko ya basoda ya Roma, azalaki na mosali na ye moko oyo azalaki kolinga mingi; mosali yango azalaki maladi mpe alingaki kokufa. Tango ayokaki sango ya Yesu, atindelaki ye ndambo ya bampaka ya Bayuda, mpo na kobondela ye ete aya kobikisa mosali na ye. Tango bakomaki epai ya Yesu, babondelaki ye mingi penza: —Moto oyo akoki penza mpo osalela ye bongo; pamba te alingaka ekolo na biso mpe atongela biso ndako ya mayangani. Bongo Yesu akendaki elongo na bango. Kasi tango akomaki pene-pene ya ndako, mokonzi ya basoda ya Roma atindaki baninga na ye mpo baloba na Yesu: —Nkolo komitungisa te, pamba te nazali ya kokoka te mpo okota na ndako na ngai. Yango wana, namonaki ete nazali ya kokoka te mpo naya epai na yo. Kasi loba liloba moko mpe mosali na ngai akobika. Pamba te ngai moko mpe, nazali na bakonzi liboso na ngai, mpe basoda na nse ya bokonzi na ngai. Soki nalobi na moko: “Kende!”, akendaka; mpe na mosusu: “Yaka!”, ayaka. Mpe soki nalobi na mosali na ngai: “Sala mosala oyo”, asalaka yango. Tango Yesu ayokaka maloba oyo, akamwaki mingi penza mpo na ye, abalukaki epai ya ebele ya bato oyo bazalaki kolanda ye, mpe alobaki: —Nalobi na bino, naino namoni kondima ya monene boye te ata na Isayele! Tango bato oyo mokonzi ya basoda ya Roma atindaki bazongaki na ndako, bakutaki mosali yango asilaki kobika. Mokolo oyo elandaki, Yesu akendaki na vile moko kombo na yango: Nayina. Bongo bayekoli na ye mpe bato ebele penza bakendaki na ye elongo. Awa akomaki pene-pene na porte ya vile, akutani na bato bazalaki kokende kokunda elenge mobali moko; Ye azalaki mwana se moko kaka ya mama na ye, mpe mama yango azalaki mwasi akufela mobali. Bato mingi penza ya vile wana bazalaki elongo na ye. Tango Nkolo amonaki mwasi oyo akufela mobali, ayokelaki ye mawa mingi penza; mpe alobaki na ye: —Kolela te! Apusanaki mpe asimbaki sanduku, bongo bato oyo bazalaki komema yango batelemaki; Yesu alobaki: —Elenge mobali, nalobi na yo, telema! Mokufi alamukaki, afandaki mpe abandaki koloba. Bongo Yesu azongisaki ye na mama na ye. Bato nyonso batondaki na kobanga, babandaki kokumisa Nzambe, mpe koloba: —Moprofeta monene abimi kati na biso, mpe Nzambe aye kosalisa bato na ye! Sango oyo mpo na Yesu epanzanaki na mokili ya Yudea mobimba, mpe na bamboka ya pembeni. Bayekoli ya Jean bayebisaki Jean makambo wana nyonso. Bongo abengaki bayekoli na ye mibale, mpe atindaki bango epai ya Nkolo mpo batuna ye: —Ozali moto oyo asengeli koya, to tosengeli kozela moto mosusu? Tango bakomaki epai ya Yesu, balobaki na ye: —Jean Batiste moto atindi biso epai na yo mpo totuna yo: “Ozali moto oyo asengeli koya to tosengeli kozela moto mosusu?” Kaka na tango wana, Yesu abikisaki bato mingi oyo bazalaki na bapasi, maladi, mpe baoyo bazalaki ya kokangama na milimo mabe; mpe afungolaki miso ya bato mingi oyo bazalaki bakufi miso. Bongo Yesu azongisaki eyano oyo na bayekoli oyo Jean atindaki: —Bokende mpe boyebisa Jean makambo oyo bomoni mpe boyoki: bato bakufa miso bazali komona, bato bakufa matoyi bazali koyoka, bato batambolaka tengu-tengu bazali kobika, bato ya maladi ya maba bazali kokoma peto, bato bakufa bazali kosekwa, mpe Sango Malamu ezali koteyama epai ya babola. Esengo na moto oyo akokweyisa kondima na ye te mpo na ngai! Tango bato oyo Jean atindaki bakendaki, Yesu abandaki koloba na bato mpo na Jean: —Eloko nini bokendaki kotala na esobe? Mwa nzete oyo mopepe ezalaki koningisa epai na epai? Bongo bokendaki kotala nani? Moto moko alati bilamba ya kitoko? Te, bato oyo balataka bilamba ya kitoko mpe bazali na bomengo, bavandaka na bandako ya bakonzi minene, Bongo bokendaki kotala nani? Moprofeta? Ya solo nalobi na bino, ye aleki kutu moprofeta. Jean azali moto oyo ekomama boye mpo na ye: Nakotinda ntoma na ngai liboso na yo, Oyo akobongisa nzela na yo liboso na yo. Pamba te nalobi na bino, na kati ya bato oyo babotama na mwasi, moto aleki Jean na bonene azali te. Nzokande moto ya suka na kati ya Bokonzi ya Nzambe aleki ye na bonene. Bato nyonso, ata bafutisi mpako, tango bayokaka maloba ya Yesu, bandimaki ete nzela ya Nzambe ezali sembo, mpo bazwaki libatisi epai ya Jean. Kasi bafarizeo mpe balakisi ya Mibeko baboyaki makambo oyo Nzambe alingaki kosala mpo na bango, pamba te bazwaki te libatisi epai ya Jean. Bato ya tango oyo bakokani na banani? Bazali lokola banani? Bakokani na bana mike oyo bavandi na zando monene, mpe bazali ko lobana moko na moko: Tobetelaki bino flute kasi bobini te; toyembelaki bino banzembo ya ebembe kasi bolelaki te! Pamba te, Jean Batiste ayaki, azalaki kolia limpa te, mpe komela vino te; bolobaki: “Azali na molimo mabe!” Bongo Mwana ya Moto aye, azali kolia mpe komela, kasi bolobi: “Azali lokoso mpe momeli ble, moninga ya bafutisi mpako mpe ya bato ya masumu.” Kasi bwania ezali komonana ete ezali sembo na nzela ya bana na ye nyonso. Mofarizeo moko abengaki Yesu mpo alia na ye elongo. Bongo Yesu akendaki na ndako ya Mofarizeo mpe avandaki na mesa mpo na kolia. Tango mwasi moko oyo ayebanaki na vile mpo na bomoi na ye ya mabe, ayokaki ete Yesu azalaki kolia na ndako ya Mofarizeo, ayaki na molangi moko ya albatre oyo ezalaki ya kotonda na malasi, pene-pene na makolo ya Yesu, azalaki kolela, mpe kopolisa yango na mayi ya miso na ye, bongo abandaki kopangusa yango na suki na ye. Azalaki mpe kopesa yango beze mpe kosopela yango malasi. Tango mofarizeo oyo abengisaki Yesu amonaki bongo, alobaki na nse ya motema: Soki moto oyo azalaki moprofeta, mbele alingaki koyeba soki nani azali kosimba ye mpe soki azali mwasi ya ndenge nini; pamba te azali moto ya masumu! Yesu azongiselaki ye: —Simon, nazali na likambo ya koyebisa yo. Ye alobaki: —Moteyi, loba yango. —Bato mibale bazalaki na nyongo ya moto moko: oyo ya liboso asengelaki kozongisa: badeni nkama mitano, mpe oyo ya mibale: badeni ntuku mitano, Kasi lokola bango mibale bazangaki mbongo ya kozongisa, moto oyo adefisaki bango mbongo alimbisaki bango mpo bafuta nyonso yango te. Yo okanisi nini, na kati na bango mibale nani akolinga ye mingi? Simon azongisaki: —Nakanisi, oyo balimbisi nyongo mingi Bongo Yesu alobaki: Okati likambo malamu! Sima, abalukaki epai ya mwasi, mpe alobaki na Simon: —Omoni mwasi oyo? Tango nakotaki na ndako na yo, opesaki ngai mayi te mpo na makolo na ngai; kasi ye, apolisi yango na mayi na ye ya miso, mpe apangusi yango na suki na ye. Opesaki ngai beze te, kasi ye banda nakotaki awa, atiki te kopesa makolo na ngai beze. Osopelaki motu na ngai mafuta te, kasi ye, asopeli makolo na ngai malasi. Yango wana nalobi na yo, masumu na ye mingi oyo azalaki na yango elimbisami, pamba te alakisi bolingo monene. Kasi moto oyo balimbisi moke, akolakisa mpe bolingo moke! Bongo Yesu alobaki na ye: —Masumu na yo elimbisami! Bato oyo bazalaki na ye na mesa babandaki koloba na nse ya mitema: —Yango ye azali nani mpo alimisa ata masumu? Bongo Yesu alobaki na mwasi yango: —Kondima na yo ebikisi yo, kende na kimya! Sima na yango, Yesu abandaki koleka na bavile mpe na bamboka mpo na koteya mpe kosakola Sango Malamu ya Bokonzi ya Nzambe. Azalaki elongo na bapostolo na ye zomi na mibale, mpe, na basi oyo ye abikisaki na milimo mabe mpe na bapasi ya ndenge na ndenge: Mariya oyo babengaka Madelene, oyo Yesu abimisaki milimo sambo ya mabe; Jeane: mwasi ya Kuza, oyo azalaki kobatela biloko nyonso ya Erode; Suzana mpe basi mosusu mingi, baoyo bazalaki kosalisa ye na biloko na bango. Awa bato ebele penza basanganaki, mpe bayaki epai ya Yesu wuta na vile moko na moko, alobaki lisapo oyo: —Moloni moko abimaki mpo na kolona mbuma. Tango azalaki kobwaka, ndambo ekweyaki na nzela. Baleki nzela banyataki-nyataki yango, mpe bandeke baliaki yango. Mosusu ekweyaki likolo ya libanga, tango ebimaki, mwa milona yango ekawukaki, pamba te esika yango ezalaki na mayi te. Mosusu ekweyaki na kati ya nzube; bongo nzube ekolaki elongo na mwa milona wana, mpe efinaki yango. Kasi mosusu ekweyaki na mabele ya malamu: ebimaki mpe ebotaki na moko-moko, bambuma nkama-nkama. Tango alobaki bongo, agangaki: —Moto oyo azala na matoyi mpo na koyoka, ayoka! Bongo bayekoli na ye batunaki ye soki lisapo wana elakisi nini. Yesu alobaki na bango: —Bino bozwi bolamu ya koyeba basekele ya Bokonzi ya Nzambe; kasi mpo na bato mosusu, bazali koyebisa bango yango na masapo. Mpo ete, ata batali, bamona te; ata bayoki, basosola te. —Boyaka ndimbola ya lisapo yango: mbuma, ezali Liloba ya Nzambe. Baoyo bazali na nzela, ezali bato oyo bayokaka Liloba ya Nzambe, kasi Satana ayaka kolongola yango na mitema na bango, mpo ete bakoka kondima te mpe babika te. Baoyo bazali likolo ya libanga, ezali bato oyo bayokaka Liloba mpe bayambaka yango na esengo, kasi bazalaka na misisa te. Bandimaka kaka mpo na mwa tango, kasi na tango komekama eyaka, bamibendaka. Mbuma oyo ekweyaki na kati ya nzube, ezali bato oyo bayokaka Liloba, kasi tango bakendaka na nzela na bango mitungisi, bomengo mpe bisengo ya mokili efinaka bango mpe bakolaka te. Kasi “mbuma oyo ezali likolo ya mabele ya kitoko”, ezali bato oyo bayokaka Liloba mpe babombaka yango na mitema ya bosolo mpe ya malamu, mpe ebotaka mbuma na kokanga motema! —Moto moko te soki apelisi mwinda abombaka yango na nse ya nzungu to atiaka yango na nse ya mbeto. Kasi atiaka yango likolo ya eloko oyo batielaka mwinda mpo ete bato oyo bazali kokota bamona moi na yango. Pamba te eloko moko te ya sekele ekozanga koyebana, to mpe eloko moko te ya kobombama ekozanga komonana mpe kobima na polele. Bokeba malamu na ndenge oyo bozali koyoka, pamba te, oyo azali na eloko, bakopesa ye mpe oyo azangi, bakobotola ye ata oyo azali kokanisa ete azali na yango. Mama ya Yesu mpe bandeko na ye bayaki epai na ye; kasi bakokaki te kokoma esika ye azalaki, mpo bato bazalaki ebele. Bongo bayebisaki ye: —Mama na yo mpe bandeko na yo bazali libanda, balingi komona yo. Kasi Yesu azongiselaki bango: —Mama na ngai mpe bandeko na ngai, ezali baoyo bayokaka Liloba ya Nzambe mpe basalelaka yango! Mokolo moko, Yesu amataki na bwato elongo na bayekoli na ye, mpe alobaki na bango: —Tokatisa na ngambo mosusu ya laki. Bongo bakendaki. Tango bazalaki koluka nkai, Yesu alalaki pongi. Mopepe moko ya makasi ebandaki koleka na laki, bongo bwato ebandaki kotonda na mayi mpe balingaki kodinda. Bayekoli bayaki epai ya Yesu mpe balamusaki ye na koganga: —Moteyi, moteyi, tokufi! Alamukaki, apamelaki mopepe mpe mbonge; mopepe na mbonge esilaki, mpe kimia ezongaki. Sima atunaki bayekoli na ye: —Kondima na bino ezali wapi? Kasi kobanga ya makasi ezwaki bango mpe batondaki na kokamwa; bongo balobanaki bango na bango: —Moto oyo azali nani? Azali kotinda ata mopepe mpe mayi, mpe yango ezali kotosa ye. Bongo bakomaki na mokili ya Geraza, oyo etalani na Galileya. Tango Yesu akitaki na mokili, moto moko ya vile wana, oyo azalaki na milimo mabe ayaki kokutana na ye. Banda kala, azalaki kolata bilamba te mpe azalaki kovanda na ndako te, kasi azalaki kovanda na simetiele. Tango amonaki Yesu, abandaki konganga, mpe amibwakaki liboso na ye. Bongo alobaki na mongongo makasi: —Ngai na yo likambo nini, Yesu, Mwana ya Nzambe oyo Aleki Likolo? Nabondeli yo, kotungisa ngai te! Pamba te Yesu azalaki kotinda molimo mabe ebima na moto wana. Mbala mingi molimo mabe ezalaki kokanga ye; bongo bazalaki kokanga ye na basinga, kobatela ye na minyololo mpe kotia ye mabende na makolo. Kasi azalaki kokata yango, mpe molimo mabe ezalaki kotinda ye na esika ya ye moko kaka. Bongo Yesu atunaki ye: —Kombo na yo nani? Molimo mabe ezongisaki: —Legion. Pamba te, milimo mabe ebele ekotaki kati na ye. Bongo milimo mabe ebondelaki Yesu mpo atinda bango na libulu te. Nzokande, etonga monene ya bangulu ezalaki kolia wana likolo ya ngomba. Bongo milimo mabe ebondelaki Yesu mpo apesa bango ndingisa ya kokota na bangulu wana. Mpe Yesu apesaki yango ndingisa. Milimo mabe ebimaki na moto yango, ekotaki na bangulu mpe etonga ya bangulu wana nyonso, ekitaki mbango na ngomba, emibwakaki na laki, mpe ekufaki. Tango bato oyo bazalaki kokengela bangulu yango bamonaki likambo oyo esalamaki bakimaki, mpe bakendaki koyebisa likambo oyo esalamaki, na vile mpe na bilanga. Bongo bato bayaki mpo na kotala likambo oyo esalamaki. Tango bakomaki na esika oyo Yesu azalaki, bamonaki moto oyo milimo mabe ebimaki kati na ye, avandaki na makolo ya Yesu; alataki bilamba mpe mayele na ye ezongaki malamu. Mpe bango nyonso babangaki. Baoyo bamonaki likambo yango ndenge esalamaki, bazalaki koyebisa bango ndenge moto oyo azalaki na milimo mabe akangolamaki. Bongo bato nyonso ya mokili ya Geraza basengaki Yesu alongwa na mokili na bango, pamba te kobanga monene ekangaki bango. Bongo amataki na bwato mpe azongaki. Moto oyo milimo mabe ebimaki kati na ye asengaki mpo akende na Yesu elongo, kasi Yesu azongisaki ye mpe alobaki na ye: —Zonga na ndako na yo, mpe yebisa makambo nyonso oyo Nzambe asali mpo na yo! Bongo moto yango akendaki koyebisa na vile mobimba likambo oyo Yesu asalaki mpo na ye. Tango Yesu azongaki, bato ebele penza bayambaki ye, pamba te bango nyonso bazalaki kozela ye. Moto moko kombo na ye Yayiro ayaki, mpe azalaki mokonzi ya ndako ya mayangani. Afukamaki liboso ya Yesu, mpe abondelaki ye mpo akende na ndako na ye: pamba te, mwana na ye moko kaka ya mwasi, ya bambula pene-pene na zomi na mibale, alingaki kokufa. Tango azalaki kokende, ebele ya bato bazalaki kofina-fina ye. Mwasi moko azalaki wana, azalaki na maladi ya kotanga makila, mpe maladi yango ewumelaki bambula zomi na mibale. Asilisaki biloko na ye nyonso epai ya minganga, kasi ata moto moko te akoki kobikisa ye. Apusanaki na sima ya Yesu mpe asimbaki songe ya elamba na ye. Kaka na tango wana, makila etikaki kotanga. Yesu atunaki: —Nani asimbi ngai? Bato nyonso bawanganaki. Bongo Piere alobaki na ye: —Moteyi, bato ebele penza bazali kofina-fina yo mpe kotuta-tuta yo. Kasi Yesu azongisaki: —Moto moko asimbaki ngai; pamba te nayoki ete nguya ebimi kati na ngai. Mwasi yango lokola ayebaki ete akoki kobatama te, ayaki na kolenga nyonso, afukamaki liboso ya Yesu, mpe alobaki na miso ya bato nyonso, soki mpo na nini asimbaki ye mpe ndenge abikaka na mbala moko. Bongo Yesu alobaki na ye: —Mwana na ngai ya mwasi, kondima na yo ebikisi yo! Kende na kimia! Tango Yesu azalaki naino koloba, moto moko awutaki na ndako ya Yayiro, mokonzi ya ndako ya mayangani, ayaki mpe alobaki na ye: —Mwana na yo ya mwasi asiʼakufi, kotungisa lisusu Moteyi te; Kasi tango Yesu ayokaki bongo, alobaki na Yayiro: —Kobanga te, ndima kaka, mpe akobika! Tango Yesu akomaki na ndako, apesaki ndingisa na moto moko te mpo na kokota, longola kaka Piere, Jean, Zaki, tata mpe mama ya elenge mwasi. Bato nyonso bazalaki kolela mpe komitungisa mingi mpo na ye. Kasi Yesu alobaki na bango: —Botika kolela; akufi te, kasi alali pongi! Basekaki ye, pamba te bayebaki ete mwana asilaki kokufa. Kasi Yesu akamataki ye na loboko mpe alobaki na mongongo makasi: —Mwana na ngai, telema! Molimo na ye ezongaki, mpe kaka na tango wana atelemaki. Bongo Yesu alobaki na bango bapesa ye eloko ya kolia. Baboti ya mwana bakamwaki mingi penza; kasi Yesu apekisaki bango ete baloba na moto moko te likambo oyo ewutaki kosalama. Yesu asangisaki bapostolo na ye zomi na mibale, mpe apesaki bango nguya mpe bokonzi ya kobengana milimo mabe nyonso mpe ya kobikisa bamaladi. Atindaki bango bakende koteya Bokonzi ya Nzambe mpe babikisa bato ya maladi. Bongo alobaki na bango: —Bomema eloko moko te mpo na mobembo: nzete te, sakosi te, eloko ya kolia te, mbongo te, elamba mosusu te. Na ndako nyonso oyo bokokota, bovanda wana kino tango bokolongwa na vile wana. Soki bayambi bino te, tango bokobima na vile wana, bopupola makolo na bino mpo yango ezala litatoli mpo na bango. Bongo bakendaki mpe batambolaki na mboka moko na moko: bazalaki koteya Sango Malamu mpe kobikisa bato ya maladi na bisika nyonso. Mokonzi Erode ayokaki sango ya makambo nyonso oyo ezalaki kosalama. Amitungisamaki mingi penza, pamba te bato mosusu bazalaki koloba ete Jean asekwi kati na bakufi; basusu ete Eliya abimi, mpe basusu, moprofeta moko ya kala asekwi! Kasi Erode alobaki: —Ngai moko nakatisaki motu ya Jean; bongo moto oyo nazali koyoka makambo ya ndenge oyo mpo na ye azali nani? Bongo Erode azalaki koluka komona ye. Tango bapostolo bazongaki, bayebisaki Yesu makambo nyonso oyo bawutaki kosala. Akamataki bango elongo na ye, mpe bakendaki na esika ya bango moko kaka, na vile moko kombo na yango Betsayida. Kasi tango ebele ya bato bayebaki yango, balandaki ye. Yesu ayambaki bango, ateyaki bango makambo ya Bokonzi ya Nzambe mpe abikisaki baoyo bazalaki na posa ya kobika. Tango pokwa ebandaki kokoma, bapostolo zomi na mibale bayaki pene-pene ya Yesu, mpe balobaki na ye: —Zongisa ebele ya bato oyo mpo bakende na bamboka mpe na bilanga ya pembeni awa, mpo baluka biloko ya kolia mpe bisika ya kolala, pamba te tozali na esika ezangi bato. Kasi Yesu azongisaki: —Bino moko bopesa bango biloko ya kolia! Bongo bazongisaki: —Tozali kaka na mampa mitano mpe mbisi mibale. Soki te, malamu tokende kosomba biloko ya kolia mpo na ebele ya bato oyo nyonso! Pamba te, mibali nyonso oyo bazalaki wana, bazalaki pene-pene na nkoto mitano. Bongo Yesu alobaki na bayekoli na ye: —Bovandisa bango na maboke ya bato ntuku mitano-ntuku mitano. Basalaki bongo, mpe bavandisaki bango nyonso. Bongo Yesu akamataki mampa mitano mpe bambisi mibale, atombolaki miso likolo, azongisaki matondi mpe akataki yango; bongo apesaki yango na bayekoli na ye mpo bakabola na bato. Bango nyonso baliaki mpe batondaki. Mpe balokotaki bitunga zomi na mibale ya biteni oyo etikalaki. Mokolo moko tango Yesu azalaki kobondela na esika ya ye moko, mpe bayekoli na ye bazalaki elongo na ye, atunaki bango: —Bato balobaka ete ngai nazali nani? Bango bazongisaki: —Bato mosusu balobaka ete yo ozali Jean-Batiste; basusu Eliya; mpe basusu balobaka ete yo ozali moprofeta ya kala oyo asili kosekwa. Bongo atunaki bango: —Kasi bino, bolobaka ete ngai nazali nani? Piere azongisaki: —Yo ozali Kristo ya Nzambe! Bongo Yesu akebisaki bango makasi mpo ete baloba yango na moto moko te. Bongo Yesu alobaki: —Esengeli ete Mwana ya Moto ayoka pasi mingi, mpe baboya ye na bankolo, na bakonzi ya banganga-Nzambe mpe na balakisi ya Mibeko; bakoboma ye mpe akosekwa na mokolo ya misato! Mpe alobaki na bango nyonso: —Soki moto alingi kolanda ngai, esengeli amiboya ye moko, amema ekulusu na ye mikolo nyonso mpe alanda ngai! Pamba te, oyo akoluka kobikisa bomoi na ye, akobungisa yango; mpe oyo akobungisa bomoi na ye mpo na ngai, akobikisa yango. Litomba nini moto akozwa soki azwi mokili mobimba, kasi amibebisi ye moko to amibungisi ye moko? Pamba te, moto nyonso oyo akoyokela ngai soni, mpe akoyokela Maloba na ngai soni, Mwana ya Moto mpe akoyokela ye soni tango akoya kati na nkembo na ye, mpe kati na nkembo ya Tata mpe ya baanzelu basantu. Nalobi na bino ya solo, bato mosusu bazali awa, liboso ete bakufa, bakomona Bokonzi ya Nzambe. Sima ya mikolo pene-pene mwambe ya maloba wana, Yesu akamataki Piere, Jean mpe Zaki, mpe amataki na ngomba mpo na kobondela. Tango azalaki kobondela, elongi na ye ebongwanaki, bilamba na ye ekomaki pembe mpe ezalaki kongenga lokola kongenga na kake. Bato mibale, Moyize mpe Eliya, bamonanaki kati na nkembo mpe bazalaki kosolola na Yesu. Bazalaki koloba mpo na liwa na ye, oyo azalaki kokende kokokisa na Yeruzalem. Bongo Piere mpe baninga na ye balalaki pongi makasi. Tango balamukaki na pongi, bamonaki nkembo ya Yesu mpe bato mibale oyo bazalaki na ye elongo. Tango balingaki kokabwana na Yesu, Piere alobaki na Yesu: —Moteyi, malamu totikala na biso awa! Tosala bandako misato ya kapo: moko mpo na yo, moko mpo na Moyize, mpe moko mpo na Eliya! Pamba te, ayebaki te oyo azalaki koloba. Tango azalaki koloba, lipata ebimaki mpe ezipaki bango. Bayekoli babangaki tango bakotaki na lipata. Mongongo moko ewutaki na mapata, elobaki: —Oyo azali Mwana na ngai, oyo napona. Boyokela ye! Tango mongongo esilaki koyokana, bamonaki Yesu atikalaki kaka ye moko. Bayekoli babombaki likambo yango, mpe na mikolo wana bayebisaki na moto moko te makambo oyo bamonaki. Mokolo oyo elandaki, tango bakitaki na ngomba, bato ebele penza bayaki kokutana na Yesu. Bongo moto moko na kati ya ebele ya bato wana agangaki: —Moteyi, na bondeli yo, tala mwana na ngai ya mobali! Nazali na ye kaka moko. Molimo mabe ekangaka ye; mpe agangaka na mbala moko; molimo yango eningisaka ye makasi penza mpe ebimisaka ye fulu-fulu na monoko. Etikaka ye na pasi penza sima ya kolembisa ye mingi penza. Nabondeli bayekoli na yo mpo babengana molimo yango, kasi bakoki te! Yesu alobaki: —O! bato bazangi kondima mpe bato mabe! Nakozala na bino kino tango nini? Mpe nakokanga motema mpo na bino kino tango nini? Bongo alobaki na moto wana: —Yaka na mwana na yo awa! Tango mwana azalaki kopusana pene-pene ya Yesu, molimo mabe ebwakaki ye na mabele mpe ebandaki koningisa ye makasi penza; kasi Yesu apamelaki molimo mabe, mpe abikisaki elenge mobali; bongo azongisaki ye na tata na ye. Bongo bato nyonso bakamwaki mingi penza monene ya Nzambe. Awa bato nyonso bazalaki kokamwa mpo na makambo nyonso oyo Yesu azalaki kosala, alobaki na bayekoli na ye: —Bobomba malamu maloba oyo boyokaki, pamba te bakoteka Mwana ya Moto na maboko ya bato. Kasi bayekoli basosolaki maloba wana te, pamba te maloba yango ezalaki ya kobombama mpo na bango, mpo ete basosola yango te. Mpe bazalaki kobanga kotuna Yesu mpo na maloba yango. Motuna moko ebimaki na kati ya bayekoli mpo na koyeba soki nani kati na bango aleki monene. Kasi Yesu ayebaki makanisi ya mitema na bango, akamataki mwana moko ya moke, mpe atiaki ye pembeni na ye, bongo alobaki na bango: —Moto nyonso oyo ayambi mwana oyo na kombo na ngai, ayambi ngai moko, mpe moto nyonso oyo ayambi ngai, ayambi mpe moto oyo atindaki ngai. Pamba te, moto oyo azali moto moke na kati na bino nyonso, ye nde azali moto monene. Bongo Jean alobaki: —Moteyi, tomonaki moto moko azalaki kobengana milimo mabe na kombo na yo. Mpe tolobaki na ye atika, pamba te azali a biso elongo te! Kasi Yesu alobaki na ye: —Bopekisa ye te pamba te moto oyo ayinaki bino te azali mpo na bino. Awa tango ya Yesu ya komemama na Likolo ekomaki pene-pene, azwaki mokano ya kokende na Yeruzalem. Bongo atindaki bantoma liboso na ye. Tango bazalaki kokende, bakotaki na mboka moko ya Samariya mpo na kobongisela ye esika ya kolala. Kasi bato ya mboka Samariya baboyaki koyamba Yesu, mpo azalaki kokende na Yeruzalem Tango bayekoli na ye, Zaki mpe Jean bayebaki yango, balobaki: —Nkolo, olingi tobenga moto ekitela bango wuta na likolo mpe ezikisa bango? Kasi Yesu abalukaki mpe apamelaki bango. Bongo bakendaki na mboka mosusu. Tango bazalaki kokende na nzela, moto moko alobaki na Yesu: —Nakolanda bipai nyonso okokende. Kasi Yesu azongiselaki Ye: —Yeba malamu ete banyama ya zamba bazali na mabulu na bango, mpe bandeke bazali na bazala na bango; kasi Mwana ya Moto azali na esika te oyo akoki kolala. Yesu alobaki na moto mosusu: —Landa ngai! Kasi moto wana alobaki na ye: —Nkolo, pesa ngai ndingisa nakende liboso kokunda tata na ngai. Yesu azongiselaki ye: —Tika bakufi bakunda bakufi na bango; kasi yo, kende mpe sakola Bokonzi ya Nzambe. Moto mosusu lisusu alobaki na ye: —Nakolanda yo; kasi pesa ngai ndingisa napesa liboso mbote ya bokabwani na bato ya libota na ngai. Kasi Yesu azongiselaki ye: —Moto moko te oyo asimbi kongo mpo na kosala elanga mpe atali na sima, azali ya kokoka mpo na Bokonzi ya Nzambe. Sima na yango, Nkolo aponaki lisusu bayekoli ntuku sambo na mibale, mpe atindaki bango mibale-mibale liboso na ye, na bavile nyonso mpe na bisika nyonso oyo ye moko asengelaki kokende. Alobaki na bango: —Bambuma ezali mingi na elanga, kasi basali bazali moke! Yango wana bosenga Nkolo ya elanga mpo atinda basali na elanga na ye. Bokende; natindi bino lokola bana ya meme na kati ya bambwa ya zamba. Bomema libenga te, sakasi te, basandale te; mpe bopesa moto moko te mbote na nzela. Tango bokokota na ndako moko, boloba liboso: “Kimia ezala na ndako oyo!” Soki moto ya kimia azali wana, kimia na bino ekovanda likolo na ye. Soki te, kimia yango ekozongela bino. Bovanda na ndako wana, bolia mpe bomela nyonso oyo bakopesa bino, pamba te “mosali asengeli kozwa lifuti na ye.” Mpe bokota na ndako moko na moko te. Soki bokoti na vile moko mpe bayambi bino, bolia oyo bakopesa bino, bobikisa bato ya maladi oyo bokokuta kuna, mpe boloba na bango: “Bokonzi ya Nzambe ekomi pene-pene na bino.” Kasi na vile nyonso oyo bokokota mpe bakoboya koyamba bino, bokende na bala-bala na yango mpe boloba: “Ata pusiele ya vile na bino, oyo ekangamaki na makolo na biso, topupoli yango mpo na bino. Kasi boyeba malamu ete Bokonzi ya Nzambe ekomi pene.” —Nalobi na bino, na Mokolo wana, etumbu ya vile wana ekoleka oyo ya Sodomo. Mawa na yo Korazini! Mawa na yo Betsayida! Pamba te, soki makamwisi oyo esalamaki epai na bino esalamaka na Tire mpe Sidoni, mbele kala penza balingaki kobongola mitema, mpe kolakisa yango, na kolata saki mpe na komipakola putulu. Kasi na mokolo ya kosambisama, etumbu na bino ekolela oyo ya Tire mpe Sidoni. Bongo yo Kapenawumi, okanisi ete bakotombola yo kino na likolo? Te, bakobwaka yo tii na mboka ya bakufi. Moto oyo akoyokela bino, ayokeli ngai; moto oyo akoboya bino, aboyi ngai; mpe moto oyo aboyi ngai, aboyi Oyo atindaki ngai. Bayekoli ntuku sambo na mibale bazongaki na esengo, mpe balobaki: —Nkolo, ata milimo mabe batosaki biso na kombo na yo! Bongo Yesu azongiselaki bango: —Namonaki Satana kokweya wuta na likolo lokola kongenga ya kake! Boyoka: napesaki bino bokonzi ya konyata banyoka, bankoto mpe bokonzi likolo ya nguya nyonso ya monguna; mpe eloko ata moko te ekokoka kosala bino mabe. Nzokande, bosepela te mpo milimo etosaki bino, kasi bosepela mpo bakombo na bino ekomama na Likolo. Kaka na tango wana, Yesu atondaki na esengo na nzela ya Molimo Mosantu, mpe alobaki: —E e Tata, Nkolo ya likolo mpe ya nse, nakumisi yo pamba te obombi makambo oyo na bato ya bwania mpe na bato ya mayele, mpe olakisi yango na bana mike. E e Tata, pamba te olingaki bongo. Tata na ngai apesaki ngai makambo nyonso. Moto moko te ayebi soki Mwana azali nani, longola kaka Tata. Mpe moto moko te ayebi soki Tata azali nani, longola kaka Mwana, mpe moto oyo Mwana alingi kolakisa ye Tata. Sima abalukaki epai ya bayekoli na ye mpe alobaki kaka na bango moko: —Esengo mingi na bato oyo bazali komona makambo oyo bino bozali komona! Pamba te nalobi na bino: baprofeta mingi mpe bakonzi mingi balukaki komona makambo oyo bino bozali komona, kasi bamonaki yango te; balingaki koyoka makambo oyo bino bozali koyoka, kasi bayokaki yango te. Molakisi moko ya Mibeko atelemaki mpo na komeka Yesu; bongo atunaki: —Moteyi, esengeli nasala nini mpo nazwa bomoi ya seko? Yesu atunaki ye: —Bokoma nini na Mibeko na biso? Makambo nini otangaka kuna? Molakisi ya Mibeko azongisaki: —Linga Nkolo Nzambe na yo, na motema na yo mobimba, na elimo na yo mobimba, na makasi na yo nyonso, mpe na makanisi na yo nyonso; mpe linga moninga na yo lokola yo moko. Yesu alobaki na ye: —Opesi eyano malamu; sala bongo mpe okozala na bomoi. Kasi molakisi ya Mibeko alingaki kaka komilongisa, bongo atunaki Yesu: —Nani azali moninga na ngai? Yesu azongisaki: —Moto moko awutaki na Yeruzalem mpe azalaki kokende na Zeriko, kasi na nzela miyibi bakangaki ye, babotolaki ye bilamba na ye, babetaki ye, mpe bakendaki na bango; bongo batikaki ye pene ya liwa. Nganga-Nzambe moko azalaki koleka na nzela wana. Tango amonaki moto yango, akatisaki na ngambo mosusu ya nzela mpe akendaki na ye. Ndenge moko mpe, molevi moko akomaki na esika yango, amonaki ye, akatisaki na ngambo mosusu ya nzela mpe akendaki na ye. Kasi moto moko ya Samariya azalaki na mobembo, akomaki epai ya moto wana azalaki; tango amonaki ye, ayokelaki ye mawa, apusanaki pene-pene na ye, atiaki mafuta mpe vino na bapota na ye, mpe akangaki yango. Sima amatisaki ye likolo ya mpunda na ye, amemaki ye na ndako ya bapaya, mpe asalisaki ye malamu penza. Mokolo oyo elandaki, abimisaki badeni mibale mpe apesaki yango na nkolo ndako ya bapaya, mpe alobaki na ye: “Salisa moto oyo malamu; mbongo nyonso mosusu oyo okobimisa mpo na kosalisa ye, nakozongisela yo yango tango nakozonga!” Bongo Yesu atunaki: —Mpo na yo, nani kati na bango misato amilakisaki ete azali moninga ya moto oyo akweyaki na maboko ya miyibi. Molakisi ya Mibeko azongisaki: —Oyo ayokelaki ye mawa. Bongo Yesu alobaki na ye: —Kende mpe sala bongo! Tango bazalaki kokende, Yesu akotaki na mboka moko. Kuna, mwasi moko kombo na ye Marta ayambaki ye na ndako na ye. Azalaki na ndeko moko ya mwasi kombo na ye Mariya. Ye ayaki kovanda pembeni ya Yesu mpe azalaki koyoka oyo Yesu azalaki koloba. Kasi Marta amipesaki mobimba na misala ebele. Bongo ayaki epai ya Yesu mpe alobaki na ye: —Nkolo, ozali komona mabe te awa ndeko na ngai atiki ngai moko nasala misala nyonso? Loba na ye aya kosalisa ngai! Kasi Nkolo azongiselaki ye: —Marta, Marta, ozali komitungisa mpe komiyokisa pasi mpo na makambo ebele; kasi likambo moko kaka nde ezali na tina monene. Mariya aponi likabo oyo eleki malamu, bakobotola ye yango te! Mokolo moko, Yesu azalaki kobondela na esika moko boye. Tango asilisaki, moko ya bayekoli na ye alobaki na ye: —Nkolo, lakisa biso kobondela ndenge Jean alakisaki bayekoli na ye! Bongo Yesu alobaki na bango: —Tango bozali kobondela, boloba: Tata tika ete kombo na yo ekumisama, tika ete Bokonzi na yo eya. Pesa biso mokolo na mokolo bilei oyo ekoki na biso. Limbisa masumu na biso, pamba te biso mpe tolimbisaka baoyo basalaka biso mabe. Mpe batela biso mpo tokweya na komekama te! Bongo alobaki na bango: —Soki moto moko na kati na bino azali na moninga na ye, bongo akei epai na ye na butu, mpe alobi na ye: “Moninga na ngai defisa ngai mampa misato, pamba te moninga na ngai moko awuti mobembo mpe akomeli ngai, kasi nazali na eloko moko te ya kopesa ye mpo alia.” Bongo oyo azali na kati ya ndako azongisi: “Kotungisa ngai te, porte, esiʼekangami mpe ngai na bana na ngai tosiʼtolali; nakoki kolamuka te mpo na kopesa yo yango.” Nalobi na bino, ata soki atelemi te mpo na kopesa ye yango mpo azali moninga na ye, kasi akotelema mpo moto wana azali kotungisa ye, mpe akopesa ye nyonso oyo akozala na yango posa. Bongo ngai nalobi na bino: Bosenga mpe bakopesa bino; boluka mpe bokomona; bobeta mpe bakofungolela bino porte. Pamba te, moto nyonso oyo asengaka, azwaka: oyo alukaka, amonaka; mpe oyo abetaka, bafungolelaka ye porte. Tata nini kati na bino soki mwana na ye asengi ye mbisi, bongo akopesa ye nioka? To soki asengi ye liki, akopesa ye nkoto? Bongo soki bino, baoyo bozali bato mabe boyebi kopesa biloko ya malamu na bana na bino, bongo Tata oyo azali na Likolo akoleka kopesa Molimo-Mosantu te na baoyo basengaka ye? Yesu abenganaki molimo moko ya mabe oyo ezalaki baba. Tango molimo yango ya mabe ebimaki, moto oyo azalaki baba abandaki koloba. Bongo ebele ya bato bakamwaki mingi penza. Kasi bato mosusu kati na bango balobaki: —Azali kobengana milimo mabe na nguya ya Belezebule, mokonzi ya milimo mabe! Bongo bato mosusu basengaki ye elembo oyo ekowuta na likolo, mpo na komeka ye. Kasi Yesu ayebaki makanisi na bango; bongo alobaki na bango: —Bokonzi nyonso oyo ezali ya kokabwana kati na yango moko, ekobeba; mpe ndako oyo ezali ya kokabwana kati na yango moko, ekopanzana. Soki Satana akabuani kati na ye moko, ndenge nini bokonzi na ye ekoki kowumela? Nalobi boye, pamba te bolobi ete nazali kobengana milimo mabe na nguya ya Belezebule. Soki ngai nabenganaki milimo mabe na nguya ya Belezebule, bongo bana na bino babenganaki yango na nguya ya nani? Yango wana bana na bino, bakozala bazuzi na bino. Kasi soki nabenganaka milimo mabe na nguya ya Nzambe, wana Bokonzi ya Nzambe esiʼekomi kino epai na bino. Soki elombe azali na bibundeli na ye, mpe azali kokengela ndako na ye, biloko na ye nyonso ekozala na kimia. Kasi soki moto mosusu oyo aleki ye na makasi abundisi ye mpe alongi ye, akobotola ye bibundeli na ye nyonso oyo azalaki kotiela motema, mpe akokabola biloko na ye. Moto oyo azali elongo na ngai te, alingaka ngai te; mpe oyo asangisaka te elongo na ngai, apanzaka. —Soki molimo mabe ebimi na moto, ekokende koyenga-yenga na bisika ya kokawuka koluka kopema. Soki ezwi esika te, ekoloba: “Nakozonga na ndako oyo nabimaki!” Tango ekokoma, ekuti ndako bakombi mpe babongisi yango malamu; ekokende mpe ekozwa milimo mosusu sambo oyo eleki yango na mabe; bongo ekokota mpe bakovanda kuna. Bongo lolenge ya suka ya moto oyo ekokoma mabe mingi penza koleka kutu oyo ya liboso! Awa Yesu azalaki koloba makambo oyo, mwasi moko azalaki na kati ya ebele ya bato alobaki: —Esengo mingi na mama oyo abotaki yo, mpe amelisa yo mabele! Kasi Yesu azongisaki: —Nzokande, esengo koleka na bato oyo bayokaka Maloba ya Nzambe mpe batosaka yango! Lokola bato mingi bayaki kotonda pembeni na ye, alobaki: —Bato ya tango oyo bazali bato mabe! Bazali kosenga likamwisi. Likamwisi… bakopesa yango mosusu te, longola kaka oyo esalamaki na Jonasi. Pamba te, ndenge Jonasi azalaki elembo mpo na bato ya Ninive, ndenge moko mpe Mwana ya Moto akozala elembo mpo na bato ya tango oyo. Na mokolo ya kosambisama Mokonzi-mwasi ya Sude elongo na bato ya tango oyo mpe akokatela bango etumbu. Pamba te, ye awutaki na suka ya mokili mpe ayaki mpo na koyoka bwania ya Salomo. Nzokade, moto moko azali awa aleki Salomo. Na mokolo ya kosambisama, bato ya Ninive bakotelema elongo na bato ya tango mpe bakokatela bango etumbu. Pamba te bango babongolaki mitema tango bayokaki mateya ya Jonasi. Nzokande, moto moko azali awa aleki Jonasi! Moto moko te soki apelisi mwinda atiaka yango na esika ya kobombama, to na nse ya katini; kasi atiaka yango likolo ya eloko oyo batielaka mwinda mpo ete bato oyo bazali kokota na ndako bamona kongenga na yango. Liso na yo ezali mwinda ya nzoto na yo. Soki miso na yo ezali malamu, nzoto na yo mobimba mpe ekotonda na mwinda; kasi soki yango ezali mabe, nzoto na yo mobimba mpe ekotonda na molili. Yango wana keba, mpo ete mwinda oyo ezali kati na yo ekoma molili te. Soki nzoto na yo mobimba etondi na mwinda, mpe ezali na eteni moko te ya molili, nzoto na yo mobimba ekotonda na mwinda, lokola tango mwinda engengisaka yo na kongenga na yango. Tango Yesu asilisaki koloba, Mofarizeo moko abengisaki ye akende kolia elongo na ye. Yesu akotaki na ndako, mpe avandaki na mesa. Kasi Mofarizeo akamwaki mingi tango amonaki ete Yesu asukolaki maboko te liboso ya kolia. Bongo Nkolo alobaki na ye: —Bino bafarizeo bosukolaka libanda ya kopo mpe ya sani, kasi na kati, botondi na posa ya koyiba mpe makambo ya mabe. Bazoba! Boni, moto oyo asalaki libanda, asalaki mpe kati te? Kasi bopesa oyo ezali na epai kati na mobola, bongo biloko nyonso ekozala peto mpo na bino. Kasi mawa na bino bafarizeo! Pamba te bofutaka eteni moko ya zomi ata ya biloko ya mike-mike oyo bolonaka na bilanga na bino, kasi bobwakaka bosembo mpe bolingo ya Nzambe. Esengeli bokokisaka makambo oyo, kasi bobosanaka mpe te oyo wana. Mawa na bino Bafarizeo! Bolingaka kovanda na bisika ya lokumu na bandako ya mayangani; mpe bolingaka bapesaka bino bambote na bisika ya bato ebele. Mawa na bino! Pamba te bozali lokola malita oyo emonanaka te; mpe bato batambolaka likolo na yango mpo bayebi yango te. Bongo molakisi moko ya Mibeko alobaki na Yesu: —Moteyi, na maloba oyo olobi, ofingi biso mpe! Yesu azongiselaki ye: —Bino mpe balakisi ya Mibeko, mawa na bino; pamba te bomemisaka bato mikumba ya kilo penza, kasi bino moko bosimbaka yango ata na mosapi moko te. Mawa na bino! Pamba te botongaka malita mpo na baprofeta, mpe bakoko na bino nde babomaki bango. Na ndenge wana, bozali kotatola ete bozali kondima makambo oyo bakoko na bino basalaki; pamba te bango, babomaki baprofeta, bongo bino bozali kotongela baprofeta malita. Yango wana, Nzambe kati na bwania na ye alobaki: “Nakotindela bango baprofeta mpe bapostolo, bakoboma basusu, mpe bakonyokola bamosusu.” Yango wana, bato ya tango oyo bakomema mokumba mpo na makila ya baprofeta nyonso oyo baboma banda mokili ebanda, banda na makila ya Abel, kino na oyo ya Zakariya, oyo babomaki na kati ya mesa ya makabo mpe Ndako ya Nzambe. Ya solo nalobi na bino, bato ya tango oyo bakomema mokumba ya mabe wana nyonso. Mawa na bino Balakisi ya Mibeko! Pamba te, bolongola fungola ya boyebi. Bino moko bokotaka te, mpe bokangisaka nzela na baoyo balingaka kokota! Tango Yesu abimaki na ndako, bafarizeo mpe balakisi ya Mibeko babandaki kotiela ye tembe makasi penza mpe kotuna ye mituna oyo etali makambo ya ndenge na ndenge: Bazalaki kotiela ye motambo mpo bayoka na kati na maloba na ye likambo oyo bakokaki kofundela ye. Na tango wana, ebele ya bato bankoto na bankoto bayaki kosangana wana mpe bazalaki konyatana moko na moko. Bongo Yesu abandaki liboso koloba na bayekoli na ye: —Bokeba na nkisi oyo evimbisaka mampa ya Bafarizeo: yango nde kokosana na bango. Pamba te eloko moko te oyo ezali ya kobombama mpe ekozanga komonana, mpe eloko moko te ya sekele ekozanga koyebana. Yango wana, makambo nyonso oyo bokoloba na molili ekoyokana na moi; mpe nyonso oyo bokoloba na matoyi, na kati ya basambele bakosakola yango likolo ya bandako. Nalobi na bino baninga na ngai, bobanga te baoyo babomaka nzoto, mpe na sima bakoka te kosala likambo mosusu. Kasi nakolakisa bino soki nani bosengeli kobanga: bobanga Ye oyo, sima ya koboma, azali na bokonzi ya kobwaka na lifelo. Ya solo nalobi na bino, bobanga ye. Boni, batekaka bandeke mitano ya mike-mike na makuta mibale te? Nzokande, Nzambe abosanaka ata moko na yango te. Mpe, ata suki ya motu na bino ezali ya kotangama. Yango wana bobanga te; pamba te, bozali na motuya mingi koleka bandeke mike-mike ebele. Nalobi na bino, moto nyonso oyo akondima ngai na miso ya bato, Mwana na Moto mpe akondima ye liboso ya baanzelu ya Nzambe. Kasi moto oyo akowangana ngai liboso ya bato, bakowangana ye mpe liboso ya baanzelu ya Nzambe. Moto oyo akoloba maloba ya mabe mpo na Mwana ya Moto, akolimbisama; kasi moto oyo akofinga Molimo-Mosantu, akolimbisama te. Tango bakomema bino mpo na kosamba liboso ya bandako ya mayangani, liboso ya bayangeli, mpe liboso ya bakonzi, bomitungisa te mpo na koyeba soki ndenge nini bokomilongisa to mpe maloba nini bokoloba; pamba te, Molimo-Mosantu akolakisa bino kaka na tango wana maloba oyo bokoloba. Moto moko na kati ya ebele ya bato alobaki na Yesu: —Moteyi, loba na ndeko na ngai, akabola na ngai, biloko oyo tata atikelaki biso. Yesu azongiselaki ye: —Mobali, nani atie ngai zuzi to mokaboli ya biloko oyo batikela bino? Bongo alobaki na bango: —Bokeba mpe bomibatela na lokoso ya lolenge nyonso; pamba te ata moto atondi na bomengo, bomoi na ye ezali na kati ya biloko na ye te. Bongo alobaki na bango lisapo oyo: —Moto moko ya bomengo azalaki na bilanga oyo ebotaki biloko mingi penza. Bongo akanisaki na nse ya motema na ye: “Nasala nini? Nazali na esika te mpo na kobomba biloko oyo nazwi na bilanga”; bongo alobaki; “Nakosala boye: nakoboma bandako oyo nabombelaka biloko na ngai mpe nakotonga misusu oyo eleki minene, bongo nakotia bambuma na ngai mpe biloko na ngai kuna.” Bongo nakoloba na elimo na ngai: “Otondi na biloko ya malamu mpo na bambula ebele. Pema na yo, lia, mela, mpe sepela!” Kasi Nzambe alobaki na ye: “Zoba! Na butu ya lelo, bomoi na yo bakosenga yo yango. Bongo biloko nyonso oyo obomba mpo na yo moko, nani akozwa yango?” Ekozala bongo na moto oyo akongolaka bomengo mpo na ye moko, kasi azali moto ya bomengo te na miso ya Nzambe. Bongo Yesu alobaki na bayekoli na ye: —Yango wana nalobi na bino: bomitungisa te mpo na bomoi na bino, soki bokolia nini; to mpo na nzoto na bino, soki bokolata nini? Pamba te, bomoi eleki bilei, mpe nzoto eleki bilamba. Botala bandeke oyo babengaka korbo, yango elonaka te mpe ebukaka te, ezali mpe na ndako te mpo na kobombela mbuma, ata mpe esika ya kobomba biloko te, kasi Nzambe aleyisaka yango. Nzokande bino boleki bandeke na motuya! Kutu, nani kati na bino mpo na komitungisa na ye, akoki kobakisa ata ngonga moko na bomoi na ye? Soki bokoka te kosala mwa likambo wana ya moke, bongo mpo na nini komitungisa na makambo oyo mosusu? Botala bafololo ndenge ekolaka, esalaka te mpe etongaka bilamba te; kasi nalobi na bino, ata Salomo, kati na nkembo na ye mobimba, alataki te lokola moko na yango. Soki Nzambe alatisaka na ndenge wana, matiti oyo ezali lelo na elanga, mpe lobi ekobwakama na moto; boni, akolatisa bino koleka yango te? A! bato ya kondima moke. Kasi bino, boluka te eloko oyo bokolia to oyo bokomela, mpe bomitungisa te mpo na yango. Pamba te, bapakano ya mokili oyo nde baluka-lukaka biloko wana nyonso, kasi Tata na bino ayebi ete bozali na posa ya biloko wana; kasi boluka Bokonzi na ye, bongo biloko wana bakobakisela bino yango. Etonga moke ya bameme, bobanga te; pamba te, Tata na bino asepelaki mpo na kopesa bino Bokonzi. Boteka biloko oyo bozali na yango mpe bopesa mbongo oyo bokozwa na babola. Bomisalela basakosi ya mbongo oyo ebebaka te, bomengo oyo esilaka te kuna na Likolo, epai moyibi akoki koyiba te, mpe epai bampese bakoki kobebisa yango te. Pamba te, epai bomengo na yo ezali, motema na yo mpe ekozala kuna! Botikala kaka na bilamba na bino ya mosala, mpe bobatela minda na bino etikala kaka ya kopela. Bozala lokola bato oyo bazali kozela mokonzi na bango azonga wuta na feti ya libala, mpo ete tango akoya mpe akobeta porte, bakoka kofungolela ye yango noki penza. Esengo mingi na basali oyo mokonzi na bango akokuta bango bazali kokengela tango ye akoya. Ya solo nalobi na bino: akolata bilamba na ye ya mosala, akovandisa bango na mesa, akoya mpe akopesa bango biloko ya kolia. Ata aye na midi ya butu, to na ngonga misato ya tongo: soki akuti bango bazali kokengela, basali yango bakosepela. Kasi bososola malamu likambo oyo: soki nkolo ya ndako ayebi tango moyibi asengeli akoya, akotika te ete ndako na ye batobola yango. Yango wana, bino mpe bomibongisa; pamba te Mwana ya Moto akoya na ngonga oyo bozali kozela te. Bongo Piere atunaki ye: —Nkolo, olobi lisapo oyo mpo na biso, to mpo na bato nyonso? Nkolo azongisaki: —Nani azali kapita ya sembo mpe ya mayele oyo mokonzi na ye apesi ye mokumba ya kobatela basali ya ndako na ye, mpo apesaka bango lifuti na bango ya ble na tango oyo ekoki? Esengo mingi na mosali wana soki mokonzi na ye azongi, mpe akuti ye azali kosala bongo. Ya solo nalobi na bino, mokonzi na ye akopesa ye mokumba ya kobatela biloko na ye nyonso. Kasi soki mosali wana alobi na nse ya motema: “Mokonzi na ngai awumeli mpo na koya”, bongo soki abandi konyokola basali mosusu ya mibali mpe ya basi, kolia, komela mpe kolangwa masanga; mokonzi na ye akoya na mokolo oyo ye azali kozela te, mpe na ngonga oyo ye ayebi te. Ya solo, mokonzi na ye akokata ye biteni-teni, mpe akotia ye na molongo ya bato oyo bazangi kondima. Nzokande mosali oyo ayebaki mokano ya mokonzi na ye, kasi amibongisaki te mpe asalaki mokano ya mokonzi na ye te, bakoteta ye bafimbo mingi penza. Kasi mosali oyo ayebaki te mokano ya mokonzi na ye, mpe asalaki makambo oyo asengelaki kozwela etumbu, bakobeta ye bafimbo mingi te; pamba te moto oyo bapesaki ye mingi bakosenga ye mpe mingi; mpe oyo bapesaki ye mokumba monene, bakotuna ye mpe mingi. Nayei kobwaka moto na mokili mpe nalingi ete moto yango epela. Kasi ezali na libatisi moko oyo nasengeli kozwa: mpe nazali motema likolo kino yango ekokokisama! Bino bokanisi ete nayaki mpo na komema kimia na mokili? Te, kasi bokabwani. Pamba te, banda sikʼoyo soki batu mitano bazali libota moko, bakokabwana: misato bakoyina mibale mpe mibale bakoyina misato. Tata akoyina mwana na ye ya mobali, mpe mwana mobali akoyina tata na ye; mama akoyina mwana na ye ya mwasi, mpe mwana mwasi akoyina mama na ye; bokilo ya mwasi akoyina mwasi ya mwana na ye, mpe mwasi ya mwana akoyina bokilo na ye ya mwasi. Bongo Yesu alobaki lisusu na ebele ya bato: —Tango bomonaka mapata ebimaka na weste, bolobaka nbula moko: “Mbula elingi kobeta”, mpe yango esalamaka bongo. Tango mopepe ya sude eyaka, bolobaka: “Molunge ekozala makasi penza”, mpe yango ezalaka bongo. Bato ya kokosana! Boyebi kolimbola makambo oyo bomonaka na mokili mpe na likolo; bongo mpo na nini bozali kososola te tango oyo? Mpo na nini bososolaka te na bino moko oyo ezali sembo? Yango wana, tango ozali kokende na tribinale elongo na moto oyo afundi yo, sala nyonso mpo boyokana tango bozali naino na nzela; soki te akomema yo epai ya zuzi, bongo zuzi akopesa yo na maboko ya polisi, mpe polisi akobwaka yo na boloko. Nalobi na yo, okobima kuna te kino tango okofuta likuta oyo ya suka. Bato moko bazalaki wana na tango wana, oyo bayebisaki Yesu makambo oyo esalamaki na bato ya Galileya, baoyo Pilato asangisaki makila na bango elongo na mbeka na bango. Yesu azongiselaki bango: —Boni, bokanisi ete bato ya Galileya wana bazwi pasi wana mpo bazalaki bato ya masumu koleka bato ya Galileya nyonso? Ezali bongo te! Pamba e, bino mpe soki bobongwani te, bokokufa bino nyonso. To bokanisi ete bato zomi na mwambe oyo bakufaki tango ndako ya molayi ya Silowe ekweyilaki bango, baleki bato mosusu nyonso ya Yeruzalem na masumu? Ezali bongo te! Pamba te, bino mpe soki bobongwani te, bokokufa bino nyonso. Bongo alobaki lisapo oyo: —Moto moko azalaki na nzete ya figi oyo ezalaki ya kolonama na elanga na ye ya banzete ya vino; bongo akendaki koluka bambuma, kasi amonaki ata moko te. Bongo alobaki na mosali ya elanga ya vino: “Tala, oyo ekomi mbula misato nayaka koluka bambuma na nzete oyo ya figi, kasi namonaka ata mbuma moko te. Kata yango; mpo na nini ezali kokanga mabele pamba?” Mosali ya elanga azongiselaki ye: “Mokonzi, tika yango lisusu mbula oyo! Nakotimola mabele pembeni na yango mpe nakotia matiti ya kopola; soki eboti mbuma na mbula oyo ezali koya, a! a! wana malamu! Kasi soki eboti te, bongo okata yango.” Mokolo moko ya saba, Yesu azalaki koteya na moko ya bandako ya mayangani. Mwasi moko azalaki wana, azalaki na molimo ya mabe, bambula zomi na mwambe. Mokongo na ye ezalaki ya kogumbama mpe azalaki kokoka kotelema malamu te. Tango Yesu amonaki ye, abengaki ye mpe alobaki na ye: —Mwasi, okangolami na pasi na yo! Bongo atielaki ye maboko, mpe kaka na tango wana atelemaki malamu, mpe abandaki kokumisa Nzambe. Kasi mokonzi ya ndako ya mayangani asilikaki mpo Yesu abikisaki moto na mokolo ya saba. Bongo alobaki boye na ebele ya bato: —Mikolo ezali motoba mpo na kosala mosala; boya, mpe babikisa bino na mikolo wana! Kasi na mokolo ya saba te! Nkolo azongiselaki ye: —Ipokrite! Boni, moko-moko na kati na bino afungolaka ngombe to mpunda na ye te na elielo ya banyama mpo na kokende komelisa yango mayi na mokolo ya saba? Bongo mwasi oyo, oyo azali mwana ya Abraham, oyo satana akangaki na nse ya bokonzi na ye bambula zomi na mwambe, ekokaki te akangolama na minyololo wana, na mokolo ya saba? Tango alobaki bongo, bayini na ye nyonso batondaki na soni. Bongo bato nyonso batondaki na esengo mpo na makambo nyonso ya kokamwa ye azalaki kosala. Bongo Yesu atunaki: —Bokonzi ya Nzambe ekokani na nini? Nakoki komeka yango na nini? Bokonzi ya Nzambe ekokani na mbuma ya mutarde oyo moto moko azwaki mpe alonaki yango na elanga na ye; ebima mpe ekoma nzete monene, bongo bandeke bayaki kovanda na bitape na yango. Yesu alobaki lisusu: —Bokonzi ya Nzambe ekokani lisusu na nini? Bokonzi ya Nzambe ekokani na kisi ya mampa oyo mwasi moko akamataki mpe asangisaki yango na kopo misato na farine, kino tango farine nyonso evimbaki. Bongo Yesu azalaki koleka na bavile mpe na bamboka, mpe azalaki koteya awa azalaki kokende na Yeruzalem. Moto moko atunaki ye: —Nkolo, bato oyo bakobika bazali mingi te? Azongiselaki bango: —Bosala makasi mpo na kokota na porte ya moke; pamba te, bato mingi bakoluka kokota kasi bakokoka te. —Tango nkolo ya ndako akotelema, mpe akokanga porte, bino baoyo bokozala na libanda, bokobanda kobeta porte, mpe kobondela: “Nkolo, fungolela biso!” Bongo ye akozongisela bino: “Nayebi esika bowuti te!” —Bongo bokoloba: “Toliaki mpe tomelaki na yo, mpe oteyaki na babala-bala na biso!” Kasi ye akozongisa: “Nalobi na bino: Nayebi esika bowuti te! Bolongwa liboso na ngai, bino nyonso bato bosalaka mabe!” —Kolela mpe koswa mino ekozala kuna, tango bokomona Abraham, Izaki, Zakobi mpe baprofeta nyonso na kati ya Bokonzi ya Nzambe; nzokande bino, bokobwakama na libanda. Bato bakowuta na bipai ya Este mpe Weste, na bipai ya Norde mpe Sude, bakovanda na kati ya Bokonzi ya Nzambe. Bongo, bato mosusu na kati ya baoyo bazali sikʼoyo bato ya suka, bakokoma bato ya liboso; mpe bato mosusu na kati ya baoyo bazali sikʼoyo bato ya liboso, bakokoma bato ya suka. Kaka na tango wana, bafarizeo bayaki epai ya Yesu mpe balobaki na ye: —Longwa awa, mpe kende na yo, pamba te Erode alingi koboma yo! Kasi Yesu azongiselaki bango: —Bokende, boloba na renar wana: “Nazali kobengana milimo mabe mpe nazali kobikisa bato ya maladi lelo mpe lobi, mpe na mokolo ya misato nakosilisa mosala na ngai. Kasi esengeli ete nakoba mobembo na ngai lelo, lobi, mpe lobi oyo ekolanda, pamba te, ekoki kosalama te ete moprofeta baboma ye na libanda ya Yeruzalem!” —Yeruzalem! Yeruzalem! Yo moto obomaka baprofeta mpe obomaka na mabanga bato oyo Nzambe atindelaka yo! Mbala boni nalingaki kosangisa bana na yo, ndenge soso esangisaka bana na yango na nse ya mapapu, kasi olingaki yango te! Yoka, ndako na yo bakosundola yango; mpe nalobi na yo: okomona ngai lisusu te kino tango okoloba: Mapamboli ezala na Moto oyo aye na kombo na Nkolo! Mokolo moko ya saba, tango Yesu akendaki kolia na ndako ya mokonzi moko ya bafarizeo, bato bazalaki kotala ye na mayele. Moto moko azalaki wana liboso na ye, azalaki na maladi ya kovimba nzoto. Yesu atunaki bafarizeo mpe balakisi ya Mibeko: —Boni, ndingisa ezali mpo na kobikisa moto na mokolo ya saba? Bavandaki nye Bongo Yesu akamataki moto yango, abikisaki ye, mpe alobaki na ye azonga. Sima atunaki bango: —Nani kati na bino, ata ezali mokolo ya saba, soki mwana na ye to ngomba na ye ekweyi na libulu, abimisaka yango noki te? Kasi bakokaki kozongisela ye eyano te. Tango Yesu amonaki ndenge bato oyo babengamaki bazalaki kopona bisika ya lokumu na mesa, alobaki na bango lisapo oyo: —Soki moto abengisi yo na feti ya libala, kopona kovanda te na esika ya lokumu, nakobanga ete moto oyo abengisaki yo abengisa mpe moto mosusu oyo aleki yo na lokumu; bongo ye oyo abengisaki bino, yo na ye, akoya mpe akoloba na yo: “Pesa esika na yo na moto oyo!” Bongo na soni nyonso, okokende kozwa esika oyo ezali na lokumu moke. Kasi, soki babengisi yo na feti, kende kovanda na esika ya suka. Mpo ete tango moto oyo abengisaki yo akoya, akoloba na yo: “Moninga na ngai, yaka kovanda awa na esika ya kitoko”. Yango ekopesa yo lokumu na miso ya bato nyonso oyo babengami na feti. Pamba te, moto oyo amimatisaki bakokitisa ye, mpe moto oyo amikitisaka bakomatisa ye. Bongo Yesu alobaki na moto oyo abengisaki ye: —Soki obengi moto aya kolia epai na yo na midi to na pokwa, kobenga baninga na yo te, to mpe bandeko na yo te, to mpe baboti na yo te, to mpe bato ya mbongo oyo bazalaka na yo pene-pene te. Soki te, bango mpe bakobengisa yo mokolo mosusu, mpe bakozongisela yo bolamu nyonso oyo osalaki mpo na bango. Nzokande soki osali feti, bengisa: babola, bato bakufa miso, bato bakufa makolo to maboko, mpe bato oyo batambolaka tengu-tengu. Soki osali bongo, okotonda na esengo monene pamba te bango bazali na makoki te ya kozongisela yo bolamu oyo osalelaki bango. Bongo Nzambe akofuta yo na mokolo oyo bato na sembo bakosekwa! Bongo moto moko na kati ya bato oyo bavandaki na mesa, tango ayokaki bongo, alobaki na ye: —Esengo mingi na moto oyo akolia na feti na Bokonzi ya Nzambe! Kasi Yesu azongiselaki ye: —Moto moko asalisaki feti moko ya monene mpe abengisaki bato ebele. Tango ngonga ya kolia ekokaki, atindaki mosali na ye akende koyebisa na bato oyo abengisaki: “Boya, pamba te biloko nyonso esiʼebongisami.” Kasi bango nyonso babandaki kosenga bolimbisi. Moto ya liboso alobaki: “Nasombi elanga, esengeli nakende kotala yango. Nabondeli yo, limbisa ngai.” Mosusu mpe alobaki: “Nawuti kobala mwasi, yango wana nakokoka koya te.” Mosali azongaki mpe ayebisaki yango na mokonzi na ye. Bongo nkolo ndako asilikaki mpe alobaki na mosali na ye: “Kende noki na banzela mpe na babala-bala ya vile mpe mema awa: babola, bato bakufa makolo to maboko, bato batambolaka tengu-tengu mpe baoyo bakufa miso.” Bongo mosali ayaki koloba: “Mokonzi, nasali ndenge otindaki ngai, kasi bisika ezali naino.” Bongo mokonzi alobaki na mosali na ye: “Kende na banzela mpe na libanda ya vile, mpe sala nyonso mpo ete bato bakota, mpo ndako na ngai etonda. Pamba te nalobi na bino, moto ata moko te na kati ya bato oyo nabengaki liboso, akolia biloko ya feti na ngai.” Bato ebele penza bazalaki kokende elongo na Yesu, bongo abalukaki epai na bango mpe alobaki: —Soki moto aye epai na ngai, bongo aboyi tata na ye te, mama na ye te, mwasi na ye te, bandeko na ye ya mibali te mpe bandeko na ye ya basi te, ata kutu bomoi na ye moko, akoki kozala moyekoli na ngai te. Mpe moto oyo amemi ekulusu na ye te mpe alandi ngai te, akoki kozala moyekoli na ngai te. Nani kati na bino soki alingi kotonga ndako ya etaze, liboso akovanda te mpo na koluka koyeba soki ndako yango ekosenga ye mbongo boni, mpe akotala te soki azali na mbongo oyo ekokoka kosilisa misala nyonso? Pamba te, sima ya kotia fondasio, soki alongi te kosilisa kotonga ndako yango, bato nyonso oyo bakomona ye bakobanda koseka ye: “Botala moto oyo, abandaki kotonga ndako kasi akoki te kosilisa yango!” To mokonzi nini soki alingi kokende kobunda etumba na mokonzi mosusu, avandaka te liboso mpo na kotala, soki elongo na basoda na ye nkoto zomi akoki kobunda etumba na mokonzi oyo azali na basoda nkoto ntuku mibale? Soki amoni ete akokoka te, na tango monguna na ye azali naino mosika, akotindela ye bato, mpo baluka kozongisa kimia. Ndenge moko mpe, moto moko te akoki kokoma moyekoli na ngai, soki naino aboyi te oyo nyonso azali na yango. Mungwa ezali malamu; kasi soki ebungisi elengi na yango, ndenge nini bakokoka kokomisa yango lisusu elengi? Ekozala lisusu na tina te ata mpo na mabele, ata mpe mpo na kobongisa bilanga, kasi bakobwaka yango. Oyo azali na matoyi mpo na koyoka, tika ayoka! Bafutisi mpako mpe bato ya masumu bazalaki koya epai ya Yesu mpo na koyoka ye. Kasi Bafarizeo mpe balakisi ya Mibeko bazalaki koyima-yima mpe koloba: —Moto oyo azali koyamba bato ya masumu mpe azali kolia elongo na bango. Bongo Yesu alobaki na bango lisapo oyo: —Nani kati na bino soki azali na bameme nkama, mpe abungisi moko, akotika te baoyo mosusu ntuku libwa na libwa na esobe mpo akende koluka oyo wana ebungi, kino tango akomona yango? Mpe tango akomona yango, akomema yango na mapeka na ye na esengo nyonso. Tango akokoma na ndako na ye, akobengisa baninga na ye mpe bato oyo bazalaka na ye pembeni, bongo akoloba na bango: “Bosepela na ngai elongo, pamba te namoni meme na ngai oyo ebungaki!” Nalobi na bino, esengo ekozala mpe bongo na likolo mpo na moto moko oyo abongoli motema, koleka oyo ya bato na sembo ntuku libwa na libwa oyo bazali na posa ya kobongola motema te. —To mwasi nini oyo azali na mbongo ya bibende zomi, abungisi moko, bongo akopelisa mwinda te mpe akokomba ndako te mpo na koluka yango malamu, kino akomona yango? Mpe soki amoni yango, akobenga baninga na ye mpe basi oyo bazalaka na ye pembeni, bongo akoloba na bango: “Bosepela na ngai elongo, pamba te namoni mbongo na ngai oyo ebungaki!” Nalobi na bino, ndenge moko mpe, baanzelu ya Nzambe bakosepela mpo na moto moko ya masumu oyo abongoli motema. Yesu alobaki lisusu: —Moto moko azalaki na bana mibale ya mibali. Oyo ya leki alobaki na tata na ye: “Tata, pesa ngai ndambo ya biloko, oyo ya ngai.” Bongo tata akabolelaki bango biloko na ye. Sima ya mwa mikolo, leki akongolaki biloko na ye nyonso, mpe akendaki na ekolo moko ya mosika penza. Kuna, abebisaki biloko na ye nyonso na bomoi ya mobulu. Tango asilisaki kobebisa biloko nyonso, nzala monene ekotaki na ekolo wana, abandaki kokelela. Bongo akendaki mpe azwaki mosala epai ya moto moko ya ekolo wana, mpe moto yango atindaki ye na bilanga na ye mpo na koleyisa bangulu. Elenge mobali alingaki kotondisa libumu na ye na biloko oyo bangulu bazalaki kolia, kasi moto ata moko te azalaki kopesa ye yango. Tango akanisaki malamu, amilobelaki: “Basali nyonso ya tata na ngai baliaka ndenge balingaka, kasi ngai nazali kokufa awa na nzala! Nakotelema mpe nakozonga epai ya tata na ngai, mpe nakoloba na ye: Tata, nasali masumu epai ya Nzambe mpe epai na yo. Nazali lisusu ya kokoka te ete babenga ngai mwana na yo; komisa ngai lokola moko ya basali na yo!” Bongo atelemaki mpe azongaki epai ya tata na ye. Tango azalaki naino mosika, tata na ye amonaki ye mpe ayokelaki ye mawa mingi penza. Akendaki mbangu kokutana na mwana na ye, ayambaki ye, mpe apesaki ye beze. Mwana alobaki na ye: “Tata nasali masumu epai ya Nzambe mpe epai na yo mpe nazali lisusu ya kokoka te ete babenga ngai mwana na yo.” Kasi tata alobaki na basali na ye: “Bomema noki nzambala ya kitoko, mpe bolatisa ye yango. Bolatisa ye mpe pete na mosapi mpe basandale na makolo; boya na mwana ngombe ya mafuta mpe boboma yango. Tokosala feti ya kafu-kafu mpe tokosepela. Pamba te mwana na ngai oyo, akufaki mpe azongi na bomoi; abungaki mpe amonani.” Bongo babandaki feti kati na esengo monene. Na tango wana, kulutu azalaki na bilanga. Tango azalaki koya mpe akomaki pene-pene ya ndako, ayokaki makelele ya miziki mpe ya bato oyo bazalaki kobina. Abengaki mosali moko mpe atunaki ye soki likambo nini ezalaki koleka kuna. Mosali wana azongiselaki ye: —Ndeko na yo azongi, yango wana tata na yo abomi mwana ngombe ya mafuta, mpo azwi ye lisusu na nzoto kolongonu. Kulutu asilikaki mingi penza mpe aboyaki kokota. Bongo tata na ye abimaki mpo na kobondela ye. Kasi ye azongisaki: “Nasiʼnasaleli yo bambula ebele penza; mpe mbala ata moko te naboya kotosa makambo oyo osengaka ngai; mpe naino opesa ngai te ata mwana ya ntaba mpo nasepela na baninga na ngai. Kasi lokola mwana na yo, oyo abebisi biloko na yo na basi ya ndumba, azongi, obomeli ye mwana ngombe ya mafuta!” Bongo tata na ye alobaki na ye: “Mwana na ngai, yo ozali tango nyonso elongo na ngai mpe biloko nyonso oyo nazali na yango, ezali ya yo; kasi esengeli tosala feti mpe tosepela pamba te ndeko na yo oyo, akufaki mpe azongi na bomoi; abungaki mpe amonani!” Yesu alobaki na bayekoli na ye: —Moto moko ya mbongo azalaki na kalaka; bongo bafundaki kalaka yango epai na ye ete azalaki kobebisa biloko na ye. Abengisaki ye, mpe alobaki na ye: “Makambo nini nayoki mpo na yo? Limbola ngai ndenge osalaka mosala na yo, pamba te okozala lisusu kalaka ya misala na ngai te.” Kalaka alobaki boye na nse ya motema: “Nakosala nini, pamba te mokonzi na ngai alingi kolongola ngai na mosala? Nazali penza na makasi mingi te mpo na kosala bilanga, mpe kosenga-senga biloko ya bato, nakoyoka soni. Nayebi likambo nakosala, mpo bato bayamba ngai na bandako na bango tango nakokoma somele.” Bongo abengisaki bato nyonso oyo bazalaki na baniongo ya mokonzi na ye. Atunaki moto ya liboso: “Ozali na niongo ya boni epai ya mokonzi na ngai?” Moto yango azongisaki: “Batono ntuku mibale ya mafuta.” Kalaka alobaki na ye: “Kamata mokanda ya niongo, vanda noki, mpe koma mokanda mosusu ya batono zomi.” Atunaki mosusu: “Bongo yo, ozali na niongo ya boni?” Ye azongisaki: “Basaki nkama ya ble.” Kalaka alobaki na ye: “Kamata mokanda ya niongo, mpe koma mokanda mosusu ya basaki ntuku mwambe.” Bongo mokonzi akumisaki kalaka wana ya mabe, mpo asalaki na mayele nyonso. Pamba te, bana ya mokili oyo bazali na mayele mingi kati na bango na bango, koleka bana ya moi. Bongo ngai nalobi na bino: bosalela bomengo ya mokili mpo na kozwa baninga mpo na bino moko. Mpo ete mokolo bokozanga yango, bayamba bino na bivandelo ya seko. Pamba te, moto oyo azali sembo na likambo moke, akozala mpe sembo na likambo ya monene; mpe moto oyo azali sembo te na likambo ya moke, akozala mpe sembo te na likambo monene. Soki bozali sembo te mpo na kobatela bomengo ya mokili; bongo nani akopesa bino bomengo ya solo? Mpe soki bozali sembo te na biloko ya moto mosusu, bongo nani akopesa bino biloko oyo ya bino moko? —Mosali moko te akoki kosalela bakonzi mibale. Pamba te, to akoyina moko mpe akolinga mosusu; to mpe akotosa moko mpe akotiala oyo mosusu. Yango wana, bokoki te kosalela Nzambe mpe mbongo. Bafarizeo mpe balingaki mbongo mingi penza, tango bayokaki makambo wana nyonso, basekaki ye. Bongo Yesu alobaki na bango: —Bino bozali bato oyo bamikomisaka sembo bango moko liboso ya bato, kasi Nzambe ayebi mitema na bino. Pamba te eloko oyo ezali tina mingi kati na bato, Nzambe ayinaka yango. —Tango ya Mibeko mpe ya baprofeta ezalaki kino na Jean; banda tango wana, Sango Malamu ya Bokonzi ya Nzambe ezali koteyama, mpe moto nyonso azali kosala makasi mpo na kokota kuna. —Ezali pasi te mpo likolo mpe nse elimwa, kasi mpo na Mibeko, ata likomi na yango moko te ekolongwa. —Moto oyo alongoli mwasi na ye mpe abali mosusu, asali ekobo; mpe moto oyo abali mwasi oyo balongoli na libala, asali ekobo. —Moto moko ya bomengo azalaki kolata bilamba ya talo mpe ya kitoko, mpe azalaki kosala feti mikolo nyonso. Mobola moko kombo na ye Lazare, azalaki na bapota nzoto mobimba, azalaki kolala na porte na ye. Azalaki kolinga kotonda na ndambo ya biloko oyo ezalaki kokweya na mesa ya moto ya bomengo. Kasi bambwa bazalaki koya kolembola bapota na ye. Mobola akufaki mpe banzelu bamemaki ye pembeni ya Abraham. Moto ya bomengo mpe akufaki, mpe bakundaki ye. Wuta na mboka ya bakufi, epai azalaki koyoka pasi mingi penza, atombolaki miso na likolo, amonaki na mosika penza Abraham, mpe Lazare avandi pembeni na ye. Bongo agangaki: “Tata Abraham, yokela ngai mawa, mpe tinda Lazare mpo ete atia songe ya mosapi na ye na mayi, mpo atangisela ngai na lolemo, pamba te nazali koyoka pasi mingi penza na moto oyo.” Kasi Abraham azongiselaki ye: “Mwana na ngai, kanisa malamu ete biloko na yo tango ozalaki na bomoi, nzokande Lazare azalaki na pasi. Sikʼoyo, ye abondisami awa, kasi yo okomi na pasi. Lisusu, libulu moko ya monene ezali kokabola biso na bino; na ndenge ete moto nyonso oyo alingi kolongwa awa mpo na kokende epai na bino, akokoka te; mpe oyo alingi kokatisa yango longwa kuna mpo na koya awa epai na biso, akokoka mpe te.” Moto ya bomengo alobaki: “Tata, nabondeli yo, tinda Lazare na ndako ya tata na ngai, pamba te nazali na bandeko mitano; akende kokebisa bango, mpo bango mpe, bakoma awa te na esika ya pasi boye!” Kasi Abraham azongiselaki ye: “Bandeko na yo bazali na Moyize mpe baprofeta; bayokela bango!” Kasi alobaki lisusu: “Te, tata Abraham: kasi soki moto moko awuti na mboka ya bakufi mpe akeyi epai na bango, wana bakobongola mitema!” Kasi Abraham azongiselaki ye: “Soki baboyi koyokela Moyize mpe baprofeta, bakondima mpe te ata soki moto asekwi na liwa!” Yesu alobaki na bayekoli na ye: —Makambo oyo ekweyisaka bato na masumu ekoki kozanga te, kasi mawa mingi na moto oyo akozala nzela oyo makambo yango ekoyela. Eleki malamu mpo na ye, bakanga ye libanga moko ya monene na kingo, mpe babwaka ye na ebale, na esika ete akweisa moko ya bana oyo. Bomikebisa malamu bino moko! —Soki ndeko na yo asala yo mabe, pamela ye; mpe soki ayoki mawa mpo na yango, limbisa ye. Mpe soki asali yo mabe mbala sambo na mokolo, mpe aye epai na yo mbala sambo mpo na koloba na yo: “Nayoki mawa na mabe na ngai”, limbisa ye. Bapostolo balobaki na Nkolo: —Bakisela biso kondima! Nkolo azongiselaki bango: —Soki bozali na kondima lokola mbuma ya mutarde, bokoki koloba na nzete oyo: “Mipikola mpe milona na kati ya ebale”, mpe yango ekotosa bino. —Nani kati na bino soki azali na mosali oyo asalaka na bilanga to abatelaka bameme, tango azongaka na bilanga, alobaka na ye: “Yaka noki, vanda na mesa mpo olia?” Boni, bolobaka na ye te ete: “Lambela ngai biloko, lata bilamba ya mosala mpe salela ngai kino nakosilisa kolia mpe komela; bongo na sima okolia mpe okomela?” Boni, mokonzi asengeli kopesa mosali wana matondi mpo asali mosala oyo batindaki ye? Ndenge moko mpe mpo na bino: soki bosali nyonso oyo batindaki bino, boloba: “Tozali kaka basali ya pamba; tosali kaka mosala na biso.” Awa Yesu azalaki kokende na Yeruzalem, alekaki na Samariya mpe na Galileya. Tango azalaki kokota na mboka moko, bato zomi ya maladi ya maba bayaki kokutana na ye; batelemaki na mosika mpe babandaki kobelela ye na mongongo makasi: —Yesu, Mokonzi yokela biso mawa! Tango amonaki bango, alobaki: —Bokende komilakisa na banganga-Nzambe! Tango bazalaki kokende, bakomaki peto. Moko na kati na bango, tango amonaki ete abikaki, azongaki epai ya Yesu, mpe azalaki kokumisa Nzambe na mongongo makasi! Afukamaki liboso ya Yesu, elongi na nse, apesaki ye matondi. Moto yango azalaki moto ya Samariya. Bongo Yesu atunaki: —Bokomaki peto bino zomi, ezali boye te? Bongo wapi libwa mosusu? Ata moko te azongi mpo na kokumisa Nzambe, longola kaka mopaya oyo? Bongo alobaki na ye: —Telema mpe kende; kondima na yo ebikisi yo! Mbala moko, bafarizeo batunaki ye soki tango nini Bokonzi ya Nzambe ekoya. Yesu azongiselaki bango: —Bokonzi ya Nzambe ekoya te na ndenge ete bato bamona yango. Bakoloba te ete: “Ezali awa”, to “Ezali kuna”, pamba te Bokonzi ya Nzambe ezali kati na bino! Bongo alobaki na bayekoli na ye: —Tango ezali koya, oyo bokozala na posa monene ya komona mokolo moko ya mikolo Mwana ya moto, kasi bokomona yango te. —Bato bakoloba na bino: “Azali awa!” to “Azali kuna!” Bokende te, mpe bolanda bango te. Ndenge kongenga ya kake ebimaki na likolo mpe engengisaka epai moko kino epai mosusu, ekozala mpe bongo na Mokolo ya Mwana ya moto. Kasi liboso esengeli amona pasi mingi, mpe bato ya tango oyo baboya ye. —Makambo oyo elekaki na mikolo ya Nowa, ekoleka mpe bongo na mikolo ya Mwana ya moto. Bato bazalaki kolia, komela, kobala, mpe kobalisa bana na bango, kino mokolo Nowa akotaki na masuwa. Bongo mpela eyaki mpe ebomaki bango nyonso. Ezalaki mpe bongo na mikolo ya Loti. Bato bazalaki kolia, komela, kosomba, koteka, kolona mpe kotonga. Kasi mokolo Loti abimaki na Sodomo, mbula ya moto mpe ya sufulu ekitaki wuta na likolo mpe ebomaki bango nyonso. Ekozala mpe bongo mokolo Mwana ya moto akomonana. Na mokolo wana, moto oyo akozala likolo ya ndako mpe akozala na biloko na ndako, akita te mpo na kozwa yango. Ndenge moko mpe mpo na moto oyo akozala na bilanga, azonga te mpo na eloko soki nini. Bokanisa mwasi ya Loti! Moto oyo akolinga kobatela bomoi na ye, akobungisa yango; kasi oyo akobungisa yango, akobatela yango. Nalobi na bino, butu wana, bato mibale bakolala mbeto moko: bakozwa moko mpe mosusu akotikala. Basi mibale bakozala kotuta mbuma esika moko: bakozwa moko mpe mosusu akotikala. [ Mibali mibale bakozala na elanga: bakozwa moko mpe mosusu akotikala.] Bongo bayekoli batunaki ye: —Nkolo, makambo yango ekosalama wapi? Yesu azongiselaki bango: —Esika ebembe ezali, bandeke oyo eliaka ebembe esanganaka wana ku! Bongo Yesu alobaki lisapo moko epai ya bayekoli na ye mpo na kolakisa bango ete esengeli babondelaka tango nyonso mpe balembaka te. Alobaki: —Na vile moko, zuzi moko azalaki kuna. Azalaki kobanga Nzambe te mpe azalaki kotosa bato te. Mwasi moko akufela mobali azalaki mpe na vile yango; ye azalaki koya mbala na mbala epai na ye mpo na koloba: “Longisa ngai liboso ya monguna na ngai.” Banda kala zuzi azalaki koboya. Kasi suka na yango alobaki na nse ya motema: “Ata nabangaka Nzambe te mpe natosaka bato te, kasi lokola mwasi mokufeli mobali oyo azali kotungisa ngai, nakolongisa ye; soki te akolembisa ngai mpo na koyaka na ye tango nyonso.” Bongo Nkolo alobaki; —Boyoka malamu maloba oyo zuzi ya mabe alobaki. Boni, bokanisi ete Nzambe mpe akolongisa te bato oyo ye apona, baoyo bazangaka epai na ye butu na moi? Akowumela mpo na kosalisa bango? Nalobi na bino, akolongisa bango noki. Kasi, tango Mwana ya moto akoya, akokuta kondima na mokili? Yesu alobaki lisusu lisapo oyo mpo na bato oyo bazalaki kotia mitema na bango moko ete bazali bato sembo mpe bazalaki kotiala bato mosusu. —Bato mibale bakendeki na Ndako ya Nzambe mpo na kobondela: moko azalaki mofarizeo mpe mosusu mofutisi mpako. Mofarizeo atelemaki mpe abondelaki boye na nse ya motema: “E e Nzambe, natondi yo mpo nazali lokola bato mosusu te, oyo bazali miyibi, basalaka mabe, bazali bandumba, to lokola mofutisi mpako oyo. Naboyaka kolia mpo na kobondela mbala mibale na poso, mpe napesaka eteni ya zomi ya biloko nyonso oyo nazwaka.” Kasi mofutisi mpako atelemaki mosika, mpe alingaki kutu te kotombola miso na likolo. Azalaki komibeta na tolo mpe koloba: “E e Nzambe, yokela ngai mawa, ngai moto ya masumu!” Nalobi na bino ete, moto oyo, azongaki na ndako akomi moto na sembo na miso ya Nzambe, kasi oyo mosusu te. Pamba te, moto oyo akomimatisa, bakokitisa ye; mpe oyo akomikitisa, bakomatisa ye! Bato bamemaki bana mike epai ya Yesu mpo asimba bango, kasi tango bayekoli bamonaki bongo, bapamelaki bango. Kasi Yesu abengaki bana mike epai na ye mpe alobaki: —Botika bana mike baya epai na ngai, bopekisa bango te; pamba te Bokonzi ya Nzambe ezali mpo na bato ya ndenge oyo. Ya solo nalobi na bino: Moto nyonso oyo akoyamba Bokonzi ya Nzambe te lokola mwana moke, akokota kuna te. Bongo mokonzi moko ya Bayuda atunaki ye: —Moteyi malamu, esengeli nasala nini mpo nazwa bomoi ya seko? Yesu azongiselaki ye: —Mpo na nini obengi ngai moto malamu? Moto moko te azali malamu, longola kaka Nzambe ye moko. Oyebi Mibeko: “Kosala ekobo te, koboma te, koyiba te, koloba litatoli ya lokuta te, tosa tata mpe mama na yo!” Moto yango azongisaki: —Nyonso wana, natosaka yango banda bolenge na ngai. Tango Yesu ayokaki bongo, alobaki na ye: —Ozangi naino eloko moko; teka biloko nyonso oyo ozali na yango, mpe pesa na babola, bongo okozwa bomengo na Likolo. Sima yaka, mpe landa ngai! Tango ayokaki maloba wana, akomaki mawa-mawa, pamba te azalaki moto ya bomengo mingi penza. Awa Yesu amonaki ete akomaki mawa-mawa, alobaki: —Ezali pasi mingi na moto ya bomengo mpo na kokota na Bokonzi ya Nzambe! Ezali pasi te na samo mpo na koleka na lidusu ya tonga, kasi ezali pasi mingi na moto ya bomengo mpo na kokota na Bokonzi ya Nzambe. Baoyo bayokaki yango batunaki: —Bongo nani akoki kobika? Yesu azongisaki: —Likambo oyo bato bakoki kosala te, Nzambe akoki kosala yango! Bongo Piere alobaki: —Totiki nyonso oyo tozalaki na yango mpo na kolanda yo! Yesu alobaki na bango: —Ya solo nalobi na bino: moto moko te oyo atiki dako na ye, to mwasi na ye, to bandeko na ye ya mibali, to baboti na ye, to bana na ye, mpo na Bokonzi ya Nzambe, akozanga kozwa biloko mingi koleka na tango oyo ekoya, bomoi ya seko. Yesu akamataki bapostolo na ye zomi na mibale na pembeni mpe alobaki na bango: —Tala, tozali kokende na Yeruzalem, mpe makambo nyonso oyo baprofeta bakoma mpo na Mwana ya moto ekokokisama. Pamba te, bakokaba ye na maboko ya bapakanu, bakoseka ye, bakofinga ye, bakobwakela ye soi, bakobeta ye bafimbo mpe bakoboma ye; mpe akosekwa na mokolo ya misato. Bayekoli basosolaki eloko ata moko te na makambo yango; pamba te ndimbola na yango ezalaki ya kobombama mpo na bango, mpe bayebaki te soki Yesu alingaki koloba nini. Awa Yesu akomaki pene-pene na Zeriko, moto moko akufa miso avandaki pembeni ya nzela mpe azalaki kosenga-senga mbongo. Tango ayokaki ebele ya bato bazalaki koleka, atunaki soki likambo nini yango. Balobaki na ye “Yesu ya Nazareti azali koleka.” Abandaki konganga: —Yesu, Mwana ya Davidi, yokela ngai mawa! Bato oyo bazalaki liboso ya molongo bapekisaki ye mpo atika koloba; kasi agangaki lisusu makasi koleka: —Mwana ya Davidi, yokela ngai mawa! Yesu atelemaki mpe atindaki ete bamemela ye moto wana akufa miso. Tango akomaki pene-pene na ye, Yesu atunaki ye: —Olingi nasala nini mpo na yo? Ye azongisaki: —Nkolo, nalingi namona lisusu. Bongo Yesu alobaki na ye: —Mona, kondima na yo ebikisi yo! Kaka na tango wana, moto yango abandaki komona, alandaki Yesu, mpe azalaki kokumisa Nzambe. Tango bato nyonso bamonaki likambo yango, bango mpe bakumisaki Nzambe. Yesu akotaki na Zeriko mpe alekaki na kati na yango. Moto moko azalaki wana, kombo na ye Zashe; ye azalaki mokonzi ya bafutisi mpako, mpe moto ya bomengo. Alingaki amona soki Yesu azalaki moto ya lolenge nini, kasi lokola azalaki mokuse, yango wana akokaki komona ye te mpo bato bazalaki ebele penza. Akimaki mbangu liboso na bango, mpe amataki na nzete ya Sikomore mpo amona Yesu, pamba te Yesu asengelaki koleka wana. Tango Yesu akomaki na esika wana, atalaki na likolo mpe alobaki na ye: —Zashe, kita noki! Pamba te, nasengeli kozala lelo na ndako na yo! Bongo Zashe akitaki noki na nzete, mpe ayambaki Yesu na esengo monene. Tango bato bamonaki bongo, babandaki koyima-yima mpe balobaki: —Tala, akeyi kovanda na ndako ya moto ya masumu! Kasi Zashe atelemaki mpe alobaki na Nkolo: —Nkolo yoka, nakopesa sikʼoyo kati-kati ya biloko na ngai epai ya babola. Mpe soki nakosaki moto mpo na kozwa eloko na ye, nakozongisela ye yango mbala minei! Bongo alobaki na ye: —Lobiko ekoti lelo na ndako oyo, mpo moto oyo mpe azali mwana ya Abraham. Pamba te, Mwana na moto ayaki koluka mpe kobikisa moto oyo abunga! Awa bato bazalaki koyoka makambo wana, Yesu akobaki mpe alobaki na bango lisapo moko, mpo azalaki pene-pene na Yeruzalem, mpe bato bakanisaki ete Bokonzi ya Nzambe elingaki komonana kaka na tango wana. Bongo Yesu alobaki: —Moto moko ya lokumu akendaki na ekolo moko ya mosika mpo na kozwa bokonzi mpe na sima azonga. Abengaki basali zomi na kati ya basali na ye, mpe apesaki bango mine zomi; bongo alobaki na bango: —Bosala mombongo na mbongo oyo kino tango nakozonga! Kasi bato ya ekolo na ye bazalaki koyina ye; mpe batindaki bantoma na sima na ye mpo na koloba: “Tolingi te ete moto oyo akoma mokonzi na biso.” Awa batiaki ye mokonzi, azongaki na ekolo na ye mpe abengisaki basali oyo ye apesaki mbongo, mpo ayeba soki mbongo boni moko na moko azwaki na mombongo na ye. Moto ya liboso ayaki mpe alobaki: “Mokonzi, mine na yo eboti mine zomi!” Mokonzi alobaki na ye: “Osali malamu! Ozali mosali malamu! Lokola ozalaki sembo na likambo ya moke. Nakomisi yo moyangeli ya bavile zomi.” Moto ya mibale ayaki mpe alobaki na ye: “Mokonzi, mine na yo eboti mina mitano!” Mokonzi na ye azongisaki: “Kamata mokumba ya koyangela bavile mitano.” Bongo mosali mosusu ayaki mpe alobaki: “Mokonzi, tala mina na yo! Nabombaki yango malamu na elamba. Pamba te, nazalaki kobanga yo, mpo ozali moto ya matata. Ozwaka biloko oyo obombaka te, mpe obukaka biloko oyo olonaka te.” Mokonzi azongiselaki ye: “Mosali mabe! Nakopesa yo etumbu na maloba na yo moko. Oyebaki ete nazali moto ya matata, nazwaka biloko oyo nabombaka te mpe nabukaka biloko oyo nalonaka te; mpo na nini otiaki mbongo na ngai na banki te mpo ete awa nazongi nakoka kozwa yango na benefisi?” Bongo alobaki na bato oyo bazalaki wana: “Bobotola ye mine yango, mpe bopesa yango na moto oyo azali na mine zomi!” Bango balobaki na ye: “Nkolo, ye azali na yango zomi!” Mokonzi azongisaki: “Nalobi na bino, moto oyo azali na biloko, bakopesa ye lisusu; kasi moto oyo azangi biloko, bakobotola ye ata oyo azali na yango. Kasi banguna wana, baoyo balingaki te ete nakoma mokonzi na bango, boya na bango awa, mpe boboma bango na miso na ngai!” Awa Yesu asilisaki koloba makambo wana, akendaki liboso na bango, mpo na kokende na Yeruzalem. Tango akomaki pene-pene na Betfaze mpe Betaniya, pembeni ya ngomba oyo babengaka: “Ngomba ya banzete ya Olive”, atindaki bayekoli mibale na kati ya bayekoli na ye mpe alobaki na bango: —Bokende na mboka oyo etalani na bino; tango bokokota, bokomona mwana ya mpunda bakanga na singa, oyo moto ata moko naino amatela yango te; bofungola yango, mpe boya na yango. Soki moto atuni bino: “Mpo na nini bozali kofungola yango?”, bozongisela ye: “Nkolo azali na posa na yango!” Baoyo batindamaki, bakendaki mpe bakutaki makambo nyonso kaka ndenge ye ayebisaki bango. Tango bazalaki kofungola mwana mpunda, bankolo na yango batunaki: —Mpo na nini bozali kofungola mwana mpunda? Bazongisaki: —Nkolo azali na posa na yango. Bongo bamemaki yango epai ya Yesu; batiaki bilamba na bango likolo na yango: bongo Yesu avandaki likolo na yango. Awa azalaki kokende, bato bazalaki kotanda bilamba na bango na nzela. Mpe tango akomaki pene-pene na esika epai nzela ezalaki kokita na Ngomba ya banzete ya Olive, ebele ya bayekoli nyonso batondaki na esengo mpe babandaki kokumisa Nzambe na mongongo makasi mpo na makamwisi nyonso bamonaki. Bazalaki koloba: —Lokumu na Mokonzi oyo aye na kombo ya Nkolo! Kimia na Likolo, mpe nkembo na bisika bileki likolo! Bongo bafarizeo mosusu balobaki na ye wuta na kati ya ebele ya bato: —Moteyi, pamela bayekoli na yo. Bongo Yesu azongiselaki bango: —Nalobi na bino, soki bango bavandi nye, mabanga ekoganga! Tango Yesu akomaki pene-pene na Yeruzalem, mpe amonaki vile yango, abandaki kolela mpo na yango; mpe alobaki: —Soki yo mpe oyebaki na mokolo ya lelo likambo oyo elingaki komemela yo kimia—kasi sikʼoyo, yango ezali ya kobombama na miso na yo. Pamba te mikolo ya pasi ekokweyila yo, tango banguna na yo bakotimola mabulu pembeni na yo, bakozinga yo mpe bakofina-fina yo bipai nyonso. Bakokweyisa yo na mabele, yo na bato oyo bazali na kati ya lopango na yo; mpe bakotika te libanga moko likolo ya libanga mosusu pamba te oyebaki te tango oyo Nzambe ayaki epai na yo. Bongo akotaki na lopango ya Ndako ya Nzambe, mpe abandaki kobengana bato oyo bazalaki koteka biloko. Alobaki na bango: —Ekomama: Ndako na ngai ezali Ndako ya mabondeli, kasi bino bokomisi yango nganda ya miyibi! Yesu azalaki koteya mikolo nyonso na Ndako ya Nzambe. Bokonzi ya Banganga-Nzambe, balakisi ya Mibeko, mpe bakonzi ya Bayuda, bazalaki koluka koboma ye; kasi bazwaki nzela ya kosala yango te pamba te bato nyonso bazalaki na posa mingi ya koyoka ye. Mokolo moko, tango Yesu azalaki koteya bato na lopango ya Ndako ya Nzambe mpe azalaki kosakola Sango Malamu, bakonzi ya banganga-Nzambe mpe balakisi ya Mibeko bayaki epai na ye elongo na bampaka. Batunaki ye: —Yebisa biso, ozali kosala makambo oyo na bokonzi nini? Nani apesi yo bokonzi yango? Yesu azongiselaki bango: —Ngai mpe nakotuna bino motuna moko. Boyebisa ngai, nani apesaki Jean ndingisa mpo na kobatisa? Nzambe to bato? Babandaki kokanisa bango na bango mpe balobaki: Soki tolobi “Nzambe”, ye akotuna biso: bongo mpo na nini bondimelaki ye te? Soki mpe tolobi: “Bato”, bato nyonso bakoboma biso na mabanga pamba te bato nyonso bandimaka ete Jean azalaki moprofeta. Bongo bazongisaki: “Toyebi te soki nani apesaki ye ndingisa yango!” Yesu mpe azongiselaki bango: —Ngai mpe nakoyebisa bino te soki na bokonzi nini nazali kosala makambo oyo! Bongo Yesu abandaki koyebisa bato lisapo oyo: —Moto moko alonaki elanga ya vino, apesaki yango na maboko ya basali ya elanga mpo bafutela, bongo akendaki mobembo mpo na tango molayi. Na tango ya kobuka mbuma, atindaki mosali na ye epai ya bafuteli ya elanga mpo bapesa ye ndambo ya mbuma ya vino. Kasi bafuteli ya elanga babetaki ye mpe bazongisaki ye maboko pamba. Nkolo ya elanga atindaki lisusu mosali mosusu. Kasi ye mpe babetaki ye, bafingaki ye mpe bazongisaki ye maboko pamba. Bongo atindaki lisusu mosali ya misato. Ye mpe bazokisaki ye mpe babwakaki ye libanda ya elanga. Bongo nkolo ya elanga ya vino alobaki: Nakosala nini? Nakotinda mwana na ngai ya bolingo; mpe nakanisi ete bakotosa ye! Kasi tango bafuteli ya elanga bamonaki ye, balobanaki bango na bango: “Tala oyo akokoma nkolo ya elanga, toboma ye mpo ete elanga ekoma ya biso.” Bongo bamemaki ye na libanda ya elanga ya vino mpe babomaki ye. Bongo nkolo ya elanga ya vino akosala bango nini? Akoya, akoboma bafuteli wana ya elanga mpe akopesa elanga yango ya vino na maboko ya bato mosusu. Tango bato bayokaki bongo, balobaki: —Tika ete yango esalama te! Kasi Yesu atalaki bango mpe atunaki: —Bongo makambo oyo ekomama elingi koloba nini: Libanga oyo batongi na ndako babwakaki, ekomi libanga ya songe ya ndako; oyo esimbi ndako mobimba Moto oyo akokweya likolo ya libanga yango, akobukana; kasi oyo libanga yango ekokweyila ye, yango ekopanza ye! Kaka na tango wana, balakisi ya Mibeko mpe bakonzi ya banganga-Nzambe balukaki nzela ya kokanga Yesu, pamba te, bayebaki ete alobaki lisapo wana mpo na bango. Kasi babangaki bato. Bazalaki kokengela ye mpe batindaki bato na mayele oyo bazalaki komilakisa lokola bato na sembo, mpo bakanga ye na maloba oyo akoloba mpe bapesa ye na maboko ya bazuzi mpe ya moyangeli. Bato yango batunaki ye: —Moteyi, toyeti ete olobaka mpe oteyaka na bosembo nyonso; otalaka bilongi ya bato te, kasi oteyaka nzela ya Nzambe na bosolo nyonso. Boni, tozali na ndingisa mpo na kofuta mpako na Sezare to te? Kasi Yesu asosolaki mayele na bango ya mabe, mpe alobaki na bango: —Bolakisa ngai deni moko; yango ezali na elongi mpe makomi ya nani? Bazongiselaki ye: —Ya Sezare! Bongo Yesu alobaki na bango: —Bopesa na Sezare oyo ezali ya Sezare mpe na Nzambe oyo ezali ya Nzambe! Bakokaki te kokanga ye na maloba na ye liboso ya bato; bakamwaki mingi mpo na eyano na ye, mpe bavandaki nyee. Ndambo ya baseduseoo, baoyo bazalaki kondima te ete lisekwa ezali, bayaki epai ya Yesu mpe batunaki ye motuna oyo: —Moteyi, Moyize akomelaki biso boye: soki moto moko akufi, azalaki na mwasi, mpe atiki bana te, ndeko na ye asengeli kozwa mwasi wana na libala mpo abotela ndeko na ye oyo akufi bana. Nzokande, ezalaki na bandeko mibali sambo. Oyo ya liboso abalaki mwasi mpe akufaki, kasi atikaki bana te. Oyo ya mibale, mpe oyo ya misato babalaki ye mpe. Esalamaki bongo na bango nyonso sambo: bakufaki mpe batikaki bana te. Suka na yango, mwasi mpe akufaki. Bongo na mokolo ya lisekwa, mwasi wana akozala ya nani na kati na bango nyonso? Pamba te bango nyonso sambo babalaki ye. Bongo Yesu azongiselaki bango: —Ezali bato ya mokili oyo nde babalaka mpe babalisaka. Kasi baoyo bakomonana ete bazali ya kokoka mpo na kozwa esika na mokili wana mpe kosekwa kati na bakufi, bango bakobala te, bakobalisa te, mpe bakokufa te; pamba te bakozala lokola baanzelu. Bakozala bana ya Nzambe, mpo bakosekwa kati na bakufi. Mpo na likambo etali kosekwa ya bato bakufa, Moyize ye moko alakisaki yango tango alobelaki likambo ya nzete oyo ezalaki kopela moto, pamba te abengaki Nkolo: Nzambe ya Abraham, Nzambe ya Izaki, mpe Nzambe ya Zakobi. Ye azali Nzambe ya bakufi te, kasi ya bato ya bomoi; pamba te mpo na Nzambe, bato nyonso bazali na bomoi! Bongo balakisi mosusu ya Mibeko bozongisaki: —Moteyi, olobi malamu. Bongo moto ata moko te amekaki lisusu kotuna ye mituna. Bongo Yesu alobaki na bango: —Mpo na nini balobaka ete Kristo azali mwana ya David? Pamba te David ye moko alobaki boye na Buku ya Banzembo: Nkolo alobaki na Nkolo na ngai: vanda na loboko na ngai ya mobali, kino nakokomisa banguna na yo eniatelo ya makolo na yo. David azalaki kobenga ye Nkolo; bongo ndenge nini akoki kozala lisusu mwana na ye? Awa bato bazalaki koyoka ye, alobaki na bayekoli na ye: —Bokeba na balakisi ya Mibeko, bango balingaka kotambola na banzambala ya milayi, mpe bapesa bango bambote na bazando. Balingaka mpe kovanda na bisika ya lokumu na bandako ya mayangani, mpe na bisika ya kitoko na bafeti. Babotolaka biloko ya basi oyo bakufela mibali, mpe mpo na kokosana, basalaka mabondeli ya milayi-milayi. Etumbu na bango ekozala makasi penza! Tango Yesu azalaki kotala, amonaki bato ya bomengo bazalaki kotia makabo na bango na sanduku ya makabo. Amonaki mpe mwasi moko mobola mpe akufela mobali atiaki mbongo mibale ya bibende. Bongo Yes alobaki: —Ya solo nalobi na bino: mwasi oyo mobola, oyo akufela mobali apesi mbongo mingi koleka bato nyonso. Pamba te, bato wana nyonso bapesi mbongo oyo bazalaki na yango tina te, kasi ye kati na kokelela na ye, apesi mbongo nyonso oyo azalaki na yango mpo na kosunga bomoi na ye! Bato mosusu bazalaki koloba mpo na Ndako ya Nzambe, ndenge yango ekomaki ngeli-ngeli mpo na mabanga ya kitoko, mpe mpo na makabo oyo bato bazalaki kopesa na Nzambe. Kasi Yesu alobaki na bango: —Nyonso oyo bozali komona, na mikolo ekoya, libanga ata moko te ekotikala likolo ya libanga mosusu, nyonso ekopanzana! Bongo bango batunaki ye: —Moteyi, makambo wana ekosalama tango nini? Elembo nini ekolakisa biso ete makambo wana esengeli kosalama? Yesu azongisaki: —Bokeba, moto moko te akosa bino. Pamba te bato mingi bakoya na kombo na ngai, mpe bakoloba: “Ezali ngai”, mpe “Tango ekomi pene!” Bolanda bango te! Tango bokoyoka basango ya bitumba mpe ya mobulu, bobanga te. Pamba te makambo wana nyonso esengeli kosalama liboso, kasi suka ekoya noki te. Bongo alobaki na bango: —Ekolo moko ekobunda na ekolo mosusu, mpe bokonzi moko ekobunda na bokonzi mosusu. Mabele ekoningana makasi penza, nzala makasi mpe bamaladi ya mabe ekongala na bisika mingi, makambo ya somo mpe bilembo ya minene ekomonana wuta na Likolo. —Kasi liboso ya makambo wana, bakokanga bino, bakonyokola bino, bakosambisa bino na bandako ya mayangani mpe bakotia bino na boloko. Mpe mpo na kombo na ngai, bakomema bino liboso ya bakonzi mpe liboso ya bayangeli. Makambo yango ekopesa bino nzela ya kotatola kombo na ngai. Botia likambo oyo kati na mitema na bino: bomitungisa te mpo na ndenge bokomilongisa. Pamba te, ngai moko nakopesa bino maloba mpe bwania, oyo banguna na bino nyonso bakokoka te kozongisa eyano to kotia na yango tembe. Baboti na bino, bandeko na bino ya mibali, bato oyo boyebani na bango, mpe baninga na bino, bakoteka bino mpe bakobomisa basusu kati na bino. Bato nyonso bakoyina bino mpo na kombo na ngai. Kasi ata suki moko te ya motu na bino ekobunga! Pamba te, soki botelemi ngwi, nde bokobika. —Tango bokomona Yeruzalem bazingi yango na mapinga ya basoda, boyeba ete tango na yango ya kopanzana ekomi pene-pene. Bongo bato oyo bakozala na Yudea esengeli bakima na bangomba; baoyo bakozala na kati ya Yeruzalem esengeli babima; mpe baoyo bakozala na bilanga bakota te na kati na yango. Pamba te, mikolo wana ekozala mikolo ya etumbu monene, oyo makambo nyonso ekomama ekokokisama. Mawa mingi na basi oyo bakozala na zemi mpe na baoyo bakobanda komelisa bana na mikolo wana! Pamba te, pasi ekozala monene na ekolo oyo, mpe etumbu ekokweyila bato oyo. Bakoboma bango na mopanga mpe bakomema bango na bowumbu na bikolo nyonso. Bapakano bakonyata Yeruzalem kino tango ya Bapakano ekokoka. —Bongo bilembo ya kokamwa ekomonana na moi, na sanza, mpe na minzoto. Na mokili, bato bakotonda na somo mpe kobanga mpo na lokito monene ya ebale mpe ya bambonge na yango. Bato bakokufa na somo mpo na kobanga makambo oyo ekokweya na mokili, pamba te banguya ya likolo ekoningana. Bongo bakomona Mwana na Moto akoya kati na mapata na nguya mpe na nkembo monene. Tango makambo wana ekobanda kosalama, botelemisa mitu mpe boyika mpiko, pamba te, kokangolama na bino ekomi pene-pene. Bongo alobaki na bango lisapo oyo: —Botala nzete ya figi mpe nzete mosusu nyonso. Soki bomoni makasa na yango ebandi kobima, boyebi ete tango ya mbula ekomi pene-pene. Bino mpe ndenge moko, tango bokomona makambo wana esalami, boyeba ete Bokonzi ya Nzambe ekomi pene-pene. Ya solo na lobi na bino: bato ya tango oyo bakokufa te, liboso ete makambo wana nyonso esalama. Likolo mpe nse ekoleka, kasi Maloba na ngai ekoleka te. Bokeba mpo ete mitema na bino ekoma kilo te mpo na lokoso ya kolia, kolangwa masanga, mpe mpo na mitungisi ya bomoi, mpo ete mokolo wana ekanga bino te na mbalakata. Pamba te, mokolo yango ekokweyela bato nyonso ya mokili mobimba lokola monyama. Bokengela malamu mpe bobondelaka tango nyonso, mpo bomonana ete bozali ya kokoka mpo na kokima makambo wana nyonso oyo esengeli koya, mpe mpo bokoka kotelema liboso ya Mwana na Moto! Na moi, Yesu azalaki koteya na lopango ya Ndako ya Nzambe, bongo na butu azalaki kobima mpe kokende kolala na ngomba oyo babengaka ngomba ya banzete ya olive. Mpe na tongo, bato nyonso bazalaki koya epai na ye na lopango ya ndako ya Nzambe, mpo na koyoka ye. Feti ya mampa oyo ezangi kisi oyo evimbisaka mampa, oyo babengaka feti ya Pake, ekomaki pene-pene. Bakonzi ya banganga-Nzambe mpe balakisi ya Mibeko bazalaki koluka nzela ya koboma Yesu, pamba te bazalaki kobanga bato. Bongo Satana akotaki na motema ya Yuda, oyo babengaka Iskariote; ye azalaki mopostolo moko na kati ya bapostolo zomi na mibale. Yuda akendaki epai ya bakonzi ya banganga-Nzambe mpe epai ya bakonzi ya bakengeli ya Ndako ya Nzambe. Ayokanaki na bango soki ndege nini akoteka Yesu epai na bango. Basepelaki mingi penza mpe bayokanaki ete bakopesa ye mbongo. Andimaki mpe abandaki koluka mwaye moko ya malamu mpo akaba Yesu na maboko na bango, na ndenge ete bato bayeba te. Mokolo ya feti ya mampa oyo ezangi kisi oyo evimbisaka mampa, oyo bazalaki koboma mwana meme ya Pake, ekomaki. Yesu atindaki Piere mpe Jean, mpe alobaki na bango: —Bokende kobongisela biso bilei ya Pake, mpo tolia yango. Bango batunaki ye: —Olingi tokende kobongisa yango wapi? Ye azongiselaki bango: —Tango bokokota na vile, bokokutana na mobali moko amemi eluku ya mayi. Bolanda ye kino na ndako oyo akokota; bongo boloba na nkolo ya ndako: “Moteyi atuni: Esika nini nakosalela mpo na kolia bilei ya Pake elongo na bayekoli na ngai?” Bongo akolakisa bino sambele moko ya monene, na etaze, oyo ebongisami malamu; kuna nde bokobongisa bilei ya Pake. Bakendaki mpe bakutaki makambo nyonso ndenge Yesu ayebisaki bango; bongo babongisaki bilei ya Pake. Tango ngonga ekokaki, Yesu avandaki elongo na bapostolo na ye na mesa. Bongo alobaki na bango: —Nayokaki posa mingi penza mpo na kolia Pake oyo elongo na bino liboso ete namona pasi. Pamba te, nalobi na bino, nakolia yango lisusu te kino yango ekokokisama kati na Bokonzi ya Nzambe! Bongo akamataki kopo, azongisaki matondi mpe alobaki: —Bokamata kopo oyo mpe bokabola yango kati na bino. Pamba te nalobi na bino, nakomela lisusu vino te kino tango Bokonzi ya Nzambe ekoya. Sima akamataki limpa, azongisaki matondi, akataki yango mpe apesaki bango yango; bongo alobaki: —Oyo ezali nzoto na ngai, ekabami mpo na bino. Bosalaka boye mpo na kokanisa ngai! Sima ya kolia, asalaki mpe bongo mpo na kopo; mpe alobaki: —Kopo oyo ezali Boyokani ya sika oyo esalami na nzela ya makila na ngai, oyo ekosopana mpo na bino. —Kasi tala, moto oyo akoteka ngai azali kolia elongo na ngai. Mwana na Moto akokende ndenge yango ebongisama, kasi mawa mingi na moto oyo akoteka ye! Bongo babandaki kotunana bango na bango soki nani kati na bango akosala likambo yango. Bongo tembe ebimaki kati na bango mpo na koyeba soki nani aleki monene. Yesu alobaki na bango: —Bakonzi ya bapakano bapesaka bato na bango mitindo na makasi, mpe baoyo bayangelaka bango balingaka babenga bango “Bato malamu”. Kasi epai na bino ekoki kozala bongo te. Nzokande, moto oyo aleki monene kati na bino esengeli azala lokola leki na kati na bino nyonso, mpe moto oyo ayangelaka, esengeli azala lokola mosali. Pamba te nani aleki monene? Oyo avandi na mesa to oyo azali kosalela ye? Ezali te oyo avandi na mesa? Nzokande ngai nazali na kati na bino, lokola moto oyo azali kosalela bino. —Bino bozali bato oyo bokangaki mitema elongo na ngai na bapasi na ngai nyonso. Lokola Tata apesaki ngai bokonzi, ngai mpe napesi bino yango, mpo ete bolia mpe bomela na mesa na ngai, kati na Bokonzi na ngai; mpe mpo bovanda na bakiti ya bokonzi mpo na kosambisa bikolo zomi na mibale ya Isayele. —Simon, Simon! Satana asengi bino mpo ayungula bino ndenge bayungulaka ble. Kasi nabondelaki mpo na yo mpo ete kondima na yo ekweya te. Mpe yo, tango okozonga, lendisa bandeko na yo! Bongo Simon alobaki na ye: —Nkolo, nazali ya komibongisa mpo na kokota na boloko elongo na yo mpe kokufa elongo na yo! Kasi Yesu azongiselaki ye: —Piere, nalobi na yo: Lelo, liboso ete soso elela, okowangana ngai mbala misato ete oyebi ngai te! Bongo Yesu atunaki bango: —Tango natindaki bino bozalaki na mbongo te, sakosi te, sandale mpe te, boni bozangaki eloko? Bango bazongisaki: —Tozangaki eloko te! Bongo alobaki na bango: —Kasi sikʼoyo, oyo azali na mbongo akamata yango, ndenge moko mpe mpo na moto oyo azali na sakosi. Moto oyo azangi mopanga ateka elamba na ye mpo na kosomba yango. Pamba te ekomama: Batiaki ye na molongo ya bato mabe. Mpe nalobi na bino: maloba oyo esengeli kokokisama mpo na ngai: makambo oyo ekomama mpo na ngai, ekokokisama. Bongo bango balobaki na ye: —Nkolo, tozali na mipanga mibale awa! Yesu azongisaki: —Ekoki! Bongo Yesu abimaki mpe akendaki na ngomba ya banzete ya Olive lokola amesanaki kosala. Bayekoli na ye mpe balandaki ye. Tango akomaki na esika yango, alobaki na bango: —Bobondela mpo bokweya na komekama te! Sima apusanaki mwa mosika na bango, afukamaki mpe abondelaki boye: —Tata, soki olingi, longola kopo oyo; tika ete mokano na ngai esalama te, kasi oyo ya yo esalama. [ Bongo anzelu ya Likolo abimelaki ye mpe alendisaki ye. Lokola azalaki na kati ya somo monene ya etumba, abondelaki lisusu makasi koleka, motoki na ye ekomaki lokola matanga ya makila, mpe ezalaki kokweya na mabele.] Awa asilisaki kobondela, atelemaki mpe akendaki epai bayekoli na ye bazalaki. Akutaki bango balali pongi mpo na mawa. Bongo Yesu atunaki bango: —Mpo na nini bozali kolala? Botelama, mpe bobondela mpo ete bokweya na komekama te. Tango Yesu azalaki naino koloba, bato ebele penza bayaki; mpe moto oyo bazalaki kobenga kombo Yuda, oyo azalaki moko ya bapostolo zomi na mibale, ye moto azalaki liboso na bango. Apusanaki pene-pene ya Yesu mpo na kopesa ye beze. Kasi Yesu alobaki na ye: —Yuda, oteki Mwana na Moto na beze? Tango bato oyo bazalaki pembeni ya Yesu bamonaki makambo oyo elingaki kosalama, batunaki ye: —Nkolo, olingi tobundisa bango na mipanga? Bongo moko na kati na bango abetaki mosali ya mokonzi ya banganga-Nzambe mpe akataki ye litoyi ya mobali. Kasi Yesu alobaki: —Tika kosala bongo! Asimbaki litoyi ya moto oyo azokaki, mpe abikisaki ye. Mpe alobaki na bakonzi ya banganga-Nzambe, na bakonzi ya bakengeli ya Ndako ya Nzambe, mpe na bampaka oyo bayaki kokanga ye: —Boni, nakomi motomboki mpo boya kokanga ngai na mipanga mpe banzete na maboko? Nazalaki mikolo nyonso elongo na bino na lopango ya Ndako ya Nzambe, mpe moto ata moko te akangaki ngai; kasi sikʼoyo, ezali ngonga na bino mpe molili elingi kolakisa bokonzi na yango. Bakangaki Yesu mpe bamemaki ye na ndako ya mokonzi ya banganga-Nzambe. Piere azalaki kolanda na mosika. Tango bapelisaki moto na kati-kati ya lopango mpe bato bavandaki elongo, Piere mpe avandaki na bango. Mosali moko ya mwasi amonaki ye avandi pembeni ya moto, tango atalaki ye malamu, alobaki: —Moto oyo azalaki na ye! Kasi Piere awanganaki mpe alobaki: —Mwasi, nayebi ye te! Sima ya mwa tango moke, moto mosusu amonaki ye mpe alobaki: —Yo mpe ozali moko na kati na bango! Kasi Piere azongiselaki ye: —Te, mobali, ngai te! Sima ya pene-pene ngonga moko, moto mosusu lisusu alobaki na molende nyonso: —Ya solo, moto oyo azalaki mpe na ye; pamba te azali moto ya Galileya. Kasi Piere azongisaki: —E e mobali! Likambo ozali koloba nayebi yango te! Na tango azalaki naino koloba soso elelaki. Bongo Nkolo abalukaki mpe atalaki Piere. Tango Piere akanisaki maloba oyo Nkolo alobaki na ye: “Liboso ete soso elela, okowangana ngai mbala misato!” Piere abimaki libanda mpe alelaki na mawa mingi penza. Bato oyo bazalaki kokengela Yesu bazalaki koseka ye mpe kobeta ye. Bazalaki kozipa ye elongi mpe kotuna ye: —E e yo! sakola, nani abeti yo? Bongo bazalaki kofinga ye na makambo mosusu mingi. Tango tongo etanaki, bampaka ya Bayuda, bakonzi ya banganga-Nzambe mpe balakisi ya Mibeko basanganaki mpe bamemaki Yesu liboso ya likita wana. Bongo babandaki kotuna ye: —Yebisa biso soki yo ozali Kristo. Yesu azongiselaki bango: —Ata nayebisi bino, bokondimela ngai te. Soki mpe natuni bino motuna, bokopesa ngai mpe eyano te. Kasi banda sikʼoyo, Mwana na Moto akovanda na loboko ya mobali ya Nzambe Oyo Aleki na nguya. Bongo bango nyonso batunaki ye: —Elingi koloba ete ozali Mwana na Nzambe? Ye azongiselaki bango: —Bino bato bolobi ete nazali bongo! Bongo balobaki: —Tina nini toluka lisusu matatoli? Biso moko toyoki yango na maloba na ye. Bongo bato nyonso ya likita batelemaki mpe bamemaki ye epai ya Pilato. Kuna, babandaki kofunda ye: —Tokutaki moto oyo azalaki kokotisa mobulu na ekolo na biso: azali kopekisa ete bato bafuta mpako ya Sezare te, mpe azali komibenga Kristo, Mokonzi! Bongo Pilato atunaki Yesu: —Ozali Mokonzi ya Bayuda? Yesu azongisaki: —Yo moko olobi yango! Bongo Pilato alobaki na bakonzi ya banganga-Nzambe mpe na ebele ya bato: —Namoni mabe moko te na moto oyo! Kasi bango batiaki mbamba mpe balobaki: —Azali kotombokisa bato na Yudea mobimba na mateya na ye Abandaki na Galileya mpe akomi tii awa! Tango Pilato ayokaki bongo, atunaki soki Yesu azali moto ya Galileya. Awa ayokaki ete Yesu azali Moto ya mboka oyo ya Erode, azalaki koyangela atindaki ye epai ya Erode, mpo na mikolo wana Erode azalaki na Yeruzalem. Erode asepelaki mingi tango amonaki Yesu; pamba te, banda kala azalaki koluka komona ye mpo ayokaki basango na ye mingi penza. Mpe atiaki elikya ete Yesu akosala likwamisi na miso na ye. Atunaki ye mituna mingi penza, kasi Yesu azongiselaki ye eyano te. Bakonzi ya banganga-Nzambe mpe balakisi ya Mibeko bazalaki wana mpo na kofunda ye na kanda penza. Bongo Erode na basoda na ye bazalaki koseka mpe kotiola Yesu. Balatisaki ye elamba ya kitoko penza mpe bazongisaki ye epai ya Pilato. Erode na Pilato bazalaki banguna, kasi banda mokolo wana, bakomaki baninga. Pilato abengisaki bakonzi ya banganga-Nzambe, bampaka ya Bayuda, mpe bato, alobaki na bango: —Bomemelaki ngai moto oyo, mpe bofundaki ye ete azali kotindika bato mpo batomboka. Nzokande natunaki ye ngai moko liboso na bino, mpe namoni na ye ata mabe moko te na oyo bofundelaki ye. Erode mpe amonaki ata mabe moko te na ye, yango wana azongisi ye epai na biso. Ya solo, moto oyo asali mabe ata moko te mpo azwa etumbu ya liwa. Yango wana, nakobetisa ye bafimbo mpe nakotika ye. [Na feti nyonso, Pilato asengelaki kobimisela bango moto moko ya boloko.] Bongo bato nyonso bagangaki nzela moko: —Boma ye! Tikela biso Barabasi! Barabasi akotaki na boloko mpo abimisaki mobulu na vile mpe mpo abomaki moto. Pilato alobaki lisusu na bango, pamba te azalaki kolinga kotika Yesu, kasi bango babandaki koganga lisusu: —Baka ye na ekuruze! Baka ye na ekulusu! Pilato atunaki bango lisusu mpo na mbala ya misato: —Mabe nini ye asali? Namoni ata mabe moko te na ye mpo azwa etumbu ya liwa. Nakobetisa ye bafimbo bongo nakotika ye akenda. Kasi lokola bazalaki kaka koganga makasi mpo na kosenga liwa na ye na ekulusu; suka na yango, koganga na bango elongaki. Bongo Pilato azwaki mokano ete basalela bango ndenge bazalaki kosenga. Atikaki moto oyo bango basengaki, oyo akotaki na boloko mpo na mobulu abimisaki mpe mpo abomaki moto. Bongo apesaki bango Yesu mpo basala ye ndenge bango moko balingaki. Tango bazalaki komema ye, bakangaki Simon ya mboka Sirene, oyo awutaki na bilanga, mpe batindaki ye na makasi mpo amema ekulusu, sima ya Yesu. Bato ebele penza bazalaki kolanda ye, elongo na basi oyo bazalaki kolela, mpe komitungisa mingi penza mpo na ye. Kasi Yesu abalukaka epai na bango mpe alobaki: —Basi ya Yeruzalem, bolela mpo na ngai te kasi bolela mpo na bino moko mpe mpo na bana na bino. Pamba te, mikolo ezali koya, oyo bakoloba: “Esengo na basi oyo babotaka te, mpe baoyo babota te mpe baoyo bamelisa bana mabele te!” Bongo bakobanda koloba na bangomba ya minene: “Bokweyila biso!” mpe na bangomba ya mike: “Bozipa biso!” Pamba te, soki basali makambo ya boye na nzete ya mobesu, bongo bakosala nini na nzete ya kokawuka? Bamemaki mpe bato mibale elongo na Yesu; oyo bazalaki batomboki, mpo baboma bango elongo na ye. Tango bakomaki na esika oyo babengaka: “Mokwa ya motu”, babakaki Yesu wana, elongo na miyibi: moko na loboko ya mobali mpe mosusu na loboko ya mwasi. Yesu alobaki: —Tata, limbisa bango, mpo bayebi te likambo bazali kosala. Mpe mpo bakabola bilamba ya Yesu, babetelaki yango zeke. Bato batelemaki wana mpe bazalaki kotala. Bongo bakonzi ya Bayuda bazalaki koseka, mpe koloba: —Ye moto azalaki kobikisa bato mosusu, amibikisa ye moko soki azali Kristo, Moponami na Nzambe! Basoda mpe bazalaki koseka ye. Bapusanaki mpe bapesaki ye vino ya ngai; bazalaki koloba na ye: —Soki ozali mokonzi ya Bayuda, mibikisa yo moko! Na ekulusu, likolo ya motu na ye, bakomaki na mwa libaya moko: “Oyo azali Mokonzi na Bayuda”. Motomboki moko oyo babakaki na ekulusu azalaki koloba boye mpo na kofinga ye: —Boni, ozali Kristo te? Mibikisa yo moko, mpe bikisa biso! Kasi motomboki oyo mosusu apamelaki ye: —Boni, ozali kobanga Nzambe te, pamba te ozwi etumbu moko lokola ye? Biso, etumbu na biso ezali na nzela penza; pamba te tozali kofuta mabe oyo tosalaki; kasi ye asali ata mabe moko te! Bongo alobaki na Yesu: —Okanisa ngai tango okoya na Bokonzi na yo! Bongo Yesu azongiselaki ye: —Nalobi na yo ya solo, lelo oyo, okozala elongo na ngai na Paradiso! Pene-pene na ngonga midi, molili ezipaki mokili mobimba mpe yango ewumelaki kino na ngonga misato ya pokwa. Moi etikaki kongenga, mpe rido monene ya Ndako ya Nzambe epasukaki na kati-kati. Bongo Yesu agangaki makasi penza: —Tata, nazongisi molimo na ngai na maboko na yo! Sima ya koloba maloba wana, akufaki. Tango mokonzi ya basoda ya Roma amonaki ndenge makambo yango esalamaki, akumisaki Nzambe mpe alobaki: —Ya solo, moto oyo azalaki moto na sembo! Tango bato nyonso oyo basanganaki wana mpo na kotala ndenge makambo ekoleka, bamonaki makambo oyo ewutaki kosalama, bazongaki na mawa monene. Baoyo bayebaki Yesu, mpe basi oyo balandaki ye banda na Galileya, batelemaki na mosika mpe bazalaki kotala makambo nyonso ndenge yango ezalaki kosalama. Moto moko kombo na ye Zozefi, azalaki moto ya likita ya Bayuda; ye azalaki moto malamu mpe moto na sembo. Aboyaki mokano ya bampaka mosusu ya likita mpe makambo oyo basalaki. Azalaki moto ya Alimateo: vile ya Yudea, mpe azalaki kozela bokonzi ya Nzambe. Akendaki kosenga nzoto ya Yesu epai ya Pilato. Akitisaki yango na ekulusu, alingaki yango na dra ya lino, mpe atiaki yango na lilita moko oyo batimolaki na kati ya libanga; mpe moto ata moko te naino akundamaki na yango. Ezalaki Mokolo ya komilengela, mpe saba elingaki kobanda. Basi oyo bayaki na Yesu wuta na Galileya balandaki Zozefi, batalaki lilita mpe bamonaki ndenge batiaki nzoto ya Yesu. Sima bazongaki epai na bango, mpe babongisaki mafuta ya solo kitoko mpe malasi. Bongo na mokolo ya saba, bapemaki, ndenge Mobeko ezalaki kotinda. Na tongo-tongo ya mokolo ya liboso ya poso, basi bakendaki na simetiele; bamemaki mafuta ya solo kitoko oyo babongisaki. Bakutaki libanga etiamaki pembeni ya monoko ya lilita. Kasi tango bakotaki na kati, bamonaki nzoto ya Nkolo Yesu te. Na tango bazalaki naino komituna mpo na tina ya likambo yango, bato mibale balataki bilamba oyo ezalaki kongenga makasi penza, batelemaki pembeni na bango. Babangaki, mpe bakitisaki bilongi na nse; bongo bato yango batunaki bango: —Mpo na nini bozali koluka kati na bakufi moto oyo azali na bomoi? Azali awa te! Asiʼasekwi! Bokanisa makambo oyo azalaki koloba na bino tango azalaki naino na Galileya: “Esengeli ete bakaba Mwana na Moto na maboko ya bato ya masumu, bakobaka ye na ekulusu mpe akosekwa na mokolo ya misato!” Bongo bakanisaki maloba ya Yesu. Batikaki simitiele mpe bakendaki koyebisa makambo wana nyonso epai ya Bapostolo zomi na moko mpe epai ya baoyo mosusu nyonso. Ezalaki: Mariya ya Magadala, Jeane mpe Mariya mama ya Zaki mpe baninga na bango mosusu ya basi, bayebisaki mpe sango yango na bapostolo. Kasi bazwaki maloba na bango lokola maloba oyo ezanga tina, mpe bandimaki yango te. Kasi Piere atelemaki mpe akimaki mbangu na lilita. Tango angunzamaki, amonaki bilamba ezalaki wana, kaka yango moko. Azongaki mpe akamwaki mingi penza mpo na makambo oyo ewutaki kosalama. Kaka na mokolo wana, bayekoli mibale bazalaki kokende na mboka moko kombo na yango Emawusi. Mboka yango ezalaki mosika na Yeruzalem na bakilometele pene-pene zomi na mibale. Bazalaki kosolola mpo na makambo nyonso oyo esalamaki. Awa bazalaki kosolola mpe kotiana tembe mpo na makambo yango, Yesu asanganaki na bango mpe abandaki kokende na bango nzela moko. Kasi miso na bango ezalaki ya kozipama mpo na koyeba ye. Atunaki bango: —Makambo nini bozali kotiana tembe na nzela? Batelemaki, mpe bilongi na bango ekomaki mawa-mawa. Moko na kati na bango kombo na ye Kleyopasi, azongiselaki ye: —O! boni? Na kati ya bato nyonso oyo bavandaka na Yeruzalem, kaka yo moto nde oyebi te makambo elekaki kuna mikolo oyo? Yesu atunaki bango: —Makambo nini yango? Bazongiselaki ye: —Makambo oyo ekweyilaki Yesu ya Nazareti. Ye azalaki moprofeta oyo azalaki kosala mpe koloba na nguya nyonso, liboso ya Nzambe mpe liboso ya bato nyonso. Kasi bakonzi ya banganga-Nzambe mpe bampaka na biso bakabaki ye, bakatela ye etumbu ya liwa mpe babaka ye na ekulusu. Totiaki elikya ete ye azalaki moto oyo asengelaki kokangola Isayele. Kasi tala, lelo ekomi mokolo ya misato banda makambo wana esalamaki. Mpe lisusu, basi mosusu na kati na biso, bakamwisaki biso mingi penza. Bakendaki na simetiele na tongo-tongo, kasi bamonaki nzoto na ye te mpe bayaki koyebisa biso ete bamonaki baanzelu babimelaki bango mpe balendisaki bango ete azali na bomoi. Baninga na biso mosusu bakendaki na lilita, mpe bamonaki makambo nyonso kaka ndenge basi bayebisaki bango; kasi ye, bamonaki ye te! Bongo Yesu alobaki na bango: —Bozali penza bazoba! Mitema na bino ezali na pasi mingi mpo na kondima noki-noki makambo nyonso oyo baprofeta baloba. Boni, Kristo asengelaki te komona pasi wana nyonso liboso ete akota na nkembo na ye? Bongo abandaki kolimbolela bango makambo nyonso oyo ekomama na Makomi banda na Moyize kino na baprofeta nyonso. Tango bakomaki pene-pene ya mboka oyo bazalaki kokende, Yesu asalaki lokola nde azalaki kokende mosika. Kasi bango babondelaki ye mingi penza: —Tikala na biso elongo; pamba te pokwa esiʼekomi, mpe butu elingi eya! Bongo Yesu akotaki na ndako mpo na kovanda na bango. Tango avandaki na mesa, elongo na bango, akamataki limpa, azongisaki matondi, akataki yango mpe apesaki bango. Bongo, miso na bango efungwamaki mpe bayebaki ye. Kasi alimwaki bango. Bongo batunanaki: —Boni mitema na biso etondaki na esengo te tango azalaki kosolola na biso na nzela mpe azalaki kolimbolela biso Makomi? Kaka na ngonga wana, batelemaki mpe bazongaki na Yeruzalem. Kuna, bakutaki bapostolo zomi na moko, elongo na baoyo bazalaki na bango, basanganaki esika moko mpe balobaki na bango: —Ya solo Nkolo asekwi, abimelaki Simon! Bongo bango mibale bayebisaki mpe makambo oyo ekomelaki bango na nzela, mpe ndenge bayebaki lisusu Yesu tango akataki limpa. Awa bazalaki naino kosolola mpo na makambo yango, Yesu atelemaki na kati na bango, mpe alobaki na bango: —Kimia ezala na bino! Kasi kobanga mpe somo ekangaki bango, pamba te bakanisaki ete bamoni molimo. Yesu atunaki bango: —Mpo na nini bozali kobanga? Mpo na nini bozali na tembe na mitema na bino? Botala maboko mpe makolo na ngai, ezali ngai penza. Bosimba ngai mpe botala! Pamba te molimo ezali na mosuni te mpe mikuwa te. Nzokande, bomoni ete ngai nazali na yango! Tango alobaki bongo, alakisaki bango maboko mpe makolo na ye. Bakokaki kondima naino te, pamba te, esengo ekotelaki bango makasi penza, mpe bazalaki kokamwa mingi penza. Bongo atunaki bango: —Bozali na eloko ya kolia? Bapesaki ye eteni ya mbisi bakalinga. Azwaki yango mpe aliaki yango na miso na bango Bongo alobaki na bango: —Tala makambo nayebisaki bino tango nazalaki naino elongo na bino: “Esengeli ete makambo nyonso oyo ekomama mpo na ngai na Mibeko ya Moyize, na Mikanda ya baprofeta mpe ya banzembo, ekokisama.” Bongo afungolaki mayele na bango mpo bakoka kososola tina ya makambo oyo ekomama na Makomi. Mpe alobaki lisusu: —Ekomama boye: Kristo akoyoka pasi, akosekwa kati na bakufi na mokolo ya misato; mpe na kombo na ye, bakoteya bato ya bikolo nyonso, kobanda na Yeruzalem, ete esengeli babongola mitema mpo bazwa bolimbisi ya masumu. Bino bozali batemwe ya makambo oyo. Bongo ngai, nakotindela bino oyo Tata na ngai alakaki. Kasi bino, botikala awa na vile, kino tango bokolatisama na nguya ya Likolo! Sima, Yesu amemaki bango na libanda ya vile kino na bapembeni ya Betaniya. Atombolaki maboko likolo mpe apambolaki bango. Mpe tango azalaki kopambola bango, abandaki kotika bango mpe amemamaki na Likolo. Sima ya kokumbamela ye, bazongaki na Yeruzalem na esengo monene. Bazalaki tango nyonso na Ndako ya Nzambe, mpe bazalaki kopambola Nzambe. Na ebandeli Liloba azalaki mpe Liloba azalaki elongo na Nzambe, mpe Liloba azalaki Nzambe. Na ebandeli Liloba azalaki elongo na Nzambe. Biloko nyonso esalamaki na ye; mpe eloko moko te oyo esalama, mpe ezangaki kosalama na ye. Bomoi ezalaki kati na ye, mpe bomoi yango ezalaki moi ya bato. Moi ezali kongenga kati na molili, kasi molili esosolaki yango te. Nzambe atindaki moto moko; kombo na ye ezalaki Jean. Ayaki lokola temwe mpo na kotatola moi, mpo ete na nzela na ye bato nyonso bakoka kondima. Ye moko azalaki moi te; ayaki kaka mpo na kozala temwe ya moi. Moi ya solo, oyo epesaka moi na bato nyonso, eyaki kati na mokili. Azalaki kati na mokili, mpe mokili esalamaki na ye mpe mokili eyebaki ye te. Ayaki na ekolo na ye moko, kasi bato ya ekolo na ye bayambaki ye te. Kasi bato nyonso oyo bayambaki ye, baoyo bandimaki kombo na ye, apesaki bango makoki ya kokoma bana na Nzambe. Babotami bana na nzela ya mbotama ya bomoto te, na posa ya bomoto te, to mpe na mokano ya moto te, kasi na mokano ya Nzambe. Liloba akomaki moto mpe avandaki kati na biso. Tomonaki nkembo na ye, nkembo ya Mwana moko kaka, oyo ewutaki na Tata; ye atondaki na ngolu mpe solo. Jean atatolaki mpo na ye. Azalaki koganga: —Botala moto nalobaki na bino tango nalobaki: Moto oyo akoya sima na ngai aleki ngai, pamba te ye azalaki liboso na ngai. Mpe wuta na kotondisama ya ngolu na ye, biso nyonso tozwaki mapamboli likolo ya mapamboli. Pamba te, Mibeko epesamaki na nzela ya Moyize; kasi ngolu mpe bosolo eyaki na nzela ya Yesu-Kristo. Moto moko naino amona Nzambe te; kasi Mwana se moko kaka, ye oyo azali pembeni ya Tata, ye moto alakisa ye. Tala litatoli Jean apesaki tango Bayuda batindaki banganga-Nzambe mpe balevi wuta na Yeruzalem, mpo na kotuna ye soki azali nani. Alobaki na bango na bosolo nyonso, awanganaki te, alobaki na bango: —Ngai nazali Kristo te. Batunaki ye: —Bongo ozali nani? Ozali Eliya? Jean azongisaki: —Nazali Eliya te. Batunaki: —Ozali moprofeta? Azongisaki: —Te! Bongo batunaki ye: —Kasi ozali nani, mpo tokoka kopesa eyano na bato oyo batindaki biso. Okoloba nini mpo na yo moko? Jean azongisaki: —Ngai nazali mongongo ya moto oyo azali kobelela na esobe: Bobongisa nzela mpo na Nkolo! ndenge moprofeta Ezayi alobaki yango. Bato oyo batindamaki bazalaki bato ya lisanga ya bafarizeo. Bango batunaki ye: —Soki ozali Kristo te, Eliya te, to mpe Moprofeta te, bongo mpo na nini ozali kobatisa? Jean azongiselaki bango: —Ngai nazali kobatisa kati na mayi, kasi moto moko azali kati na bino, oyo boyebi te, ye azali koya sima na ngai, mpe nazali ya kokoka te mpo na kofungola basinga ya basandale na ye. Makambo oyo nyonso elekaki na Betaniya, na ngambo mosusu ya mayi ya Yordani, epai Jean azalaki kobatisa. Mokolo oyo elandaki, Jean amonaki Yesu azalaki koya epai na ye; bongo alobaki: —Botala Mwana-meme ya Nzambe, oyo alongolaka masumu ya mokili. Ezali mpo na ye nde nalobaki na bino: “Moto moko azali koya sima na ngai aleki ngai; pamba te, ye azalaki liboso na ngai. Ngai mpe nayebaki ye te, kasi soki naye kobatisa bato na mayi, ezali mpo nalakisa ye na bato ya Isalayele.” Bongo Jean apesaki litatoli oyo: —Namonaki Molimo azalaki kokita wuta na Likolo lokola pijon, mpe avandaki likolo na ye. Nayebaki te ete ezalaki ye, kasi Nzambe, oyo atindaki ngai mpo na kobatisa na mayi, alobaki na ngai: Moto oyo okomona Molimo akokitela ye mpe akovanda likolo na ye, ezali ye moto akobatisa na Molimo Mosantu. Mpe, lokola namonaki, yango wana nazali kotatola ete: moto oyo azali Mwana na Nzambe. Mokolo oyo elandaki, Jean azalaki lisusu wana elongo na bayekoli na ye mibale. Tango amonaki Yesu azalaki koleka, alobaki: —Botala Mwana-Meme ya Nzambe! Awa bayekoli wana mibale bayokaki ndenge Jean alobaki, balandaki Yesu. Tango Yesu atalaki na sima, amonaki ete bazalaki kolanda ye, bongo atunaki bango: —Bolingi nini? Bongo bazongisaki: —Rabi (elingi koloba Moteyi), ovandaka wapi? Yesu alobaki na bango: —Boya mpe bokomona! Balandaki ye mpe bamonaki esika Yesu azalaki kovanda, mpe bavandaki na ye mokolo wana. Ezalaki pene-pene ya ngonga ya minei ya sima ya midi. Andele, ndeko ya Simon Piere azalaki moko na kati ya bato wana mibale, oyo bayokaki maloba ya Jean mpe balandaki Yesu. Likambo ya liboso Andele asalaki, akendaki kokutana na ndeko na ye Simon mpe alobaki na ye: —Tomoni Masiya (elingi koloba: Kristo). Bongo Andele amemaki Simon epai ya Yesu. Yesu atalaki ye mpe alobaki: —Yo ozali Simon, mwana ya Jonasi. Bakobanda kobenga yo Sefasi (elingi koloba: Libanga). Mokolo oyo elandaki, Yesu azwaki mokano ya kokende na Galileya. Na nzela, akutanaki na Filipo, mpe alobaki na ye: —Landa ngai! Filipo azalaki moto ya vile Betsayida, vile moko na Andele mpe Piere. Filipo akendaki koluka Natanayele mpe alobaki na ye: —Tomoni moto oyo Moyize akomaki mpo na ye na Buku ya Mibeko, mpe oyo baprofeta bakomaki mpo na ye: Yesu ya Nazareti, mwana ya Zozefi. Natanayele atunaki: —Na Nazareti! Boni eloko ya malamu ekoki mpe kobima na Nazareti? Filipo alobaki na ye: —Yaka mpe tala! Tango Yesu amonaki Natanayele azalaki koya epai na ye, alobaki mpo na ye: —Tala moto ya Isalayele ya solo penza. Lokuta ezali kati na ye te! Nataneyele atunaki ye: —Oyebi ngai ndenge nini? Yesu azongisaki: —Namonaki yo tango ozalaki na nse ya nzete ya figi, liboso ete Filipo abenga yo! Bongo Natanayele alobaki: —Moteyi, ozali Mwana na Nzambe; ozali Mokonzi ya Isalayele! Yesu alobaki na ye: —Ondimi mpo nalobi na yo ete namonaki yo na nse ya nzete ya Figi? Okomona makambo ya minene koleka kutu oyo. Bongo alobaki lisusu: —Ya solo nalobi na bino, bokomona likolo ekofungwama, mpe baanzelu ya Nzambe bakobanda kobuta mpe kokita likolo ya Mwana na moto. Sima ya mikolo mibale, feti ya libala ezalaki na Kana na Galileya. Mama ya Yesu azalaki kuna. Yesu na bayekoli na ye babengamaki mpe na feti yango. Tango vino esilaki, mama ya Yesu alobaki na Yesu: —Bazali lisusu na vino te! Kasi Yesu azongiselaki ye: —Mwasi, biso na yo likambo nini? Tango na ngai naino ekoki te? Bongo mama na ye alobaki na basali: —Bosala makambo nyonso oyo akoloba na bino. Biloko motoba ya mabanga ezalaki wana, oyo Bayuda bazalaki kosalela mpo na komipetola. Eloko moko na moko ekokaki kokota bisangala mwambe to zomi na mibale. Bongo Yesu alobaki na basali: —Botondisa biloko oyo na mayi. Mpe, batondisaki yango kino na motu. Yesu alobaki na bango: —Sikʼoyo botoka mpe bomemela mokambi ya feti. Bongo bamemelaki ye yango. Mokambi ya feti amekaki mayi oyo ebongwanaki vino. Ayebaki te soki vino yango ewutaki wapi, kasi basali oyo batokaki mayi, bango nde bayebaki. Bongo mokambi ya feti abengaki mobali oyo abalaki, mpe alobaki na ye: —Bato nyonso bapesaka liboso vino ya kitoko, bongo soki bato bameli mingi, sima bapesaka bango oyo ya mwa kitoko; kasi yo obombi vino ya kitoko kino sikʼoyo. Oyo nde likamwisi ya liboso Yesu asalaki: asalaki yango na Kana na Galileya. Na bongo nde amonisaki nkembo na ye; mpe bayekoli na ye bandimaki ye. Sima na yango, Yesu akendaki na Kapenawumi na mama na ye, na bandeko na ye, mpe na bayekoli na ye. Bavandaki kuna kaka mwa mikolo. Lokola feti ya Pake ekomaki pene-pene, Yesu akendaki na Yeruzalem. Akutaki na kati ya lopango ya Ndako ya Nzambe, bato oyo batekaka bangombe, bameme mpe bapijon, elongo na bato oyo basanzaka mbongo bavandaki na bamesa na bango. Bongo asalaki fimbo ya bansinga, mpe abenganaki bango nyonso na lopango ya Ndako ya Nzambe, na bangombe, mpe bameme. Abwakaki bamesa ya bato oyo bazalaki kosanze mbongo, apanzaki mpe mbongo na bango. Bongo alobaki na bato oyo bazalaki koteka bapijon: —Bolongola biloko oyo awa! Bokomisa Ndako ya Tata na ngai, ndako ya mombongo te! Bongo bayekoli na ye babandaki kokanisa makambo oyo ekomama: E e Nzambe, bolingo oyo nazali na yango mpo na Ndako na yo, yango nde ezali kozikisa ngai! Bongo Bayuda bapesaki ye eyano mpe balobaki na ye: —Likamwisi nini okoki kosala mpo na kolakisa biso ete ozali na bokonzi ya kosala bongo? Yesu azongiselaki bango: —Boboma Ndako ya Nzambe oyo, mpe nakotonga yango lisusu na mikolo misato! Bongo Bayuda balobaki: —Nini? Bato oyo batongaki Ndako oyo basalaki bambula ntuku minei na motoba, bongo yo olobi okotonga yango na mikolo misato! Kasi Ndako ya Nzambe oyo Yesu alobaki, ezalaki nzoto na ye moko. Sima ya kosekwa ya Yesu kati na bakufi, nde bayekoli na ye bakanisaki ete ye alobaki bongo; bongo bandimelaki makambo oyo ekomama, mpe maloba oyo Yesu alobaki. Tango Yesu azalaki na Yeruzalem mpo na feti ya Pake, bato mingi bandimaki ye mpo bamonaki makamwisi oyo azalaki kosala. Kasi Yesu atielaki bango mitema te, pamba te ayebaki bango nyonso; Mpe azalaki na posa te ete bayebisa ye makambo oyo ezalaka na bato, pamba te ye moko ayebaki makambo nyonso oyo ezalaki na mitema ya bato. Moto moko, azalaki moko na kati ya Bafarizeo, kombo na ye Nikodeme, azalaki mokonzi ya Bayuda. Ayaki epai ya Yesu na butu, mpe alobaki na ye: —Rabi, toyebi ete ozali moteyi oyo awuta epai ya Nzambe pamba te, moto moko te akoki kosala makamwisi oyo yo ozali kosala soki Nzambe azali elongo na ye te! Yesu azongisaki mpe alobaki na ye: —Nalobi na yo ya solo: moto moko te akoki komona Bokonzi ya Nzambe soki abotami mbotama ye sika te! Nikodeme atunaki ye: —Ndenge nini moto oyo asiʼakomi mobange akoki lisusu kobotama? Akoki kokota na libumu ya mama na ye mpo na mbala ya mibale mpe kobotama? Bongo Yesu azongiselaki ye: —Nalobi na yo ya solo: soki moto abotami na mayi mpe na Molimo te, akoki te kokota na Bokonzi ya Nzambe. Oyo abotami na mosuni azali mosuni, mpe oyo abotami na Molimo azali Molimo. Kokamwa te mpo nalobi na yo ete esengeli bobotama mbotama ya sika! Mopepe ekendaka epai yango moko elingaka kokende. Oyokaka makelele na yango, kasi oyebaka te epai yango ewutaka to mpe epai yango ekokende: ezali mpe bongo mpo na moto oyo abotami na Molimo. Nikodeme atunaki Yesu: —Ndenge nini makambo yango ekoki kosalama? Yesu alobaki na ye: —Boni, ozali moteyi ya Isalayele, mpe oyebi makambo oyo te? Nalobi na yo ya solo: tolobaka makambo oyo toyebi mpe totatolaka makambo oyo tomona, kasi bino bondimaka litatoli na biso te. Soki bozali kondima te tango nazali koyebisa bino makambo ya nse, bongo bokondima ndenge nini tango nakoyebisa bino makambo ya Likolo? Moto ata moko te asiʼabuta na Likolo, longola kaka ye oyo akita wuta na Likolo: Mwana na moto. Ndenge moko lokola Moyize atombolaki ekeko ya nyoka na esobe, ndenge moko mpe Mwana na moto esengeli batombola ye, mpo ete bato nyonso oyo bakondima ye, bazwa bomoi ya seko. Pamba te, Nzambe alingaki mokili mingi penza, yango wana apesaki Mwana na ye se moko, mpo ete moto nyonso oyo akondima ye, akufa te, kasi azwa bomoi ya seko. Pamba te, Nzambe atindaki te Mwana na ye na mokili mpo apesa yango etumbu, kasi mpo ete mokili ebika na nzela na ye. Oyo akondima ye, akozwa etumbu te kasi oyo akondima ye te, asiʼazwi etumbu pamba te aboyi kondima Mwana se moko ya Nzambe. Tala etumbu: Moi eyaki na mokili, kasi bato balingaki na bango molili na esika ya moi, pamba te misala na bango ezali mabe. Pamba te, moto oyo asalaka mabe ayinaka moi mpe apusanaka pene-pene ya moi te, abangaka soki te misala na ye ekomonana polele. Kasi oyo asalaka makambo ya solo, apusanaka pene-pene ya moi, mpo ete misala na ye oyo asalaka kati na Nzambe emonana polele. Sima na yango, Yesu akendaki na Yudea elongo na bayekoli. Avandaki kuna elongo na bayekoli na ye, mpe azalaki kobatisa. Jean mpe azalaki kobatisa na Enoni, pene-pene na Salimi, mpo mayi ezalaki mingi wana. Bato bazalaki koya wana, mpe bazalaki kozwa libatisi. Pamba te na tango wana, batiaki naino Jean na boloko te. Bongo tembe ebimaki kati na bayekoli mosusu ya Jean na Moyuda moko mpo na likambo etali kopetolama. Bakendaki epai ya Jean mpe balobaki na ye: —Moteyi, moto oyo azalaki na yo na ngambo mosusu ya Yordani, oyo opesaki litatoli mpo na ye, ye mpe azali kobatisa bato, mpe bato nyonso bazali kokende epai na ye. Jean azongisaki: —Moto akoki kozwa kaka eloko oyo bapesi wuta na Likolo. Bino moko bokoki kotatola ete nalobaka: Ngai nazali Kristo te, kasi natindamaki liboso na ye. Mwasi azali ya mobali oyo abali; mpe moninga ya mobali oyo abali, ye oyo atelemi wana mpe azali koyoka ye, azali na esengo mingi tango azali koyoka mongongo ya moninga na ye oyo abali. Esengo na ngai ezali mpe bongo, mpe sikʼoyo esengo yango esili kokokisama. Esengeli ye amata mpe ngai nakita. Oyo awuti na Likolo azali likolo ya nyonso; kasi oyo azali ya nse azali ya nse, mpe alobaka makambo ya nse. Oyo awuti na Likolo azali likolo ya nyonso. Atatolaka makambo oyo ye amonaki mpe ayokaki. Kasi moto ata moko te azali kondima litatoli na ye. Oyo andimi litatoli na ye, andimi ete Nzambe azali solo. Pamba te, moto oyo Nzambe atinda alobaka maloba ya Nzambe, mpo Nzambe apesa ye Molimo na ndelo te. Tata alingaka Mwana, mpe apesa ye bokonzi likolo ya biloko nyonso. Oyo andimi Mwana azali na bomoi ya seko. Oyo akondima Mwana te, akomona bomoi te; kasi kanda ya Nzambe ekozala likolo na ye. Bafarizeo bayokaki ete Yesu azalaki kozwa mpe kobatisa bayekoli ebele koleka Jean. (Nzokande Yesu ye moko azalaki kobatisa te, kasi bayekoli na ye nde bazalaki kobatisa). Tango Nkolo ayokaki bongo, alongwaki na Yudea, mpe azongaki na Galileya. Kasi esengelaki na ye aleka na Samariya. Bongo akomaki na vile moko ya Samariya, kombo na yango Sishare, oyo ezalaki pene-pene na elanga oyo Yakobi apesaki na mwana na ye Zozefi. Libulu ya mayi ya Yakobi ezalaki kuna. Yesu alembaki mpo na mobembo, mpe avandaki pembeni ya libulu yango. Ezalaki pene-pene ya ngonga midi. Mwasi moko ya Samariya ayaki kotoka mayi, bongo Yesu alobaki na ye: —Pesa ngai mayi ya komela! (Bayekoli na ye bakendaki na vile mpo na kosomba biloko ya kolia). Kasi mwasi ya Samariya alobaki na ye: —Yango ebandi boni? Yo Moyuda osenga ngai mwasi ya Samariya mayi ya komela? (Alobaki bongo pamba te, Bayuda bazalaki koyokana te na bato ya Samariya). Yesu azongiselaki ye: —Soki oyebaki likabo ya Nzambe, mpe nani oyo azali kosenga yo mayi, mbele yo moto olingaki kosenga ye mayi ya komela, mpe alingaki kopesa yo mayi ya bomoi. Mwasi alobaki na Yesu: —Tata, ozali na eloko moko te mpo na kotoka mayi, mpe libulu ezali mozindo! Bongo mayi yango ya bomoi okozwa yango wapi? Boni, yo oleki koko na biso Yakobi oyo apesaki biso libulu oyo; ye moko amelaki mayi na yango, na bana na ye, mpe na bibwele na ye? Yesu azongiselaki ye: —Moto nyonso oyo ameli mayi oyo, akoyoka lisusu posa ya mayi. Kasi oyo akomela mayi oyo ngai nakopesa ye, akoyoka lisusu posa ya mayi te. Mpe mayi oyo ngai nakopesa ye, ekozala kati na ye esika oyo mayi ekobanda kobimaka tango nyonso, kino na bomoi ya seko. Bongo mwasi alobaki na ye: —Tata, pesa ngai mayi yango, mpo nayoka lisusu posa ya mayi te, mpe nayaka awa te mpo na kotoka mayi. Yesu alobaki na ye: —Kende, benga mobali na yo, mpe zonga awa! Mwasi azongisaki: —Nazali na mobali te! Yesu alobaki na ye: —Olobi ya solo ete ozali na mobali te. Pamba te ozalaki na mibali mitano, mpe mobali oyo ozali na ye sikʼoyo, azali mpe mobali na yo te. Likambo olobi ezali ya solo. Bongo mwasi alobi na ye: —Tata, namoni ete ozali moprofeta. Bakoko na biso bato ya Samariya basambelaki Nzambe na ngomba oyo! Kasi bino Bayuda bolobaka ete esika oyo tosengeli kosambela ezali na Yeruzalem. Yesu azongiselaki ye: —Mwasi, ndimela ngai: tango ezali koya oyo bokosambela Tata, na ngomba oyo te to mpe na Yeruzalem te. Bino bato ya Samariya bosambelaka oyo boyebi te; kasi biso tosambelaka oyo toyebi, pamba te lobiko ewuti na Bayuda. Kasi tango ezali koya mpe yango esiʼekomi, oyo basamopanga ya solo bakosambela Tata na Molimo mpe na solo; pamba te, Tata alukaka bato oyo basambelaka ye na ndenge wana. Nzambe azali Molimo, mpe esengeli ete baoyo basambelaka ye, basambela ye na molimo mpe na solo. Mwasi alobaki na ye: —Nayebi ete Masiya akoya, (ye oyo babengaka Kristo). Mpe tango akoya, akoyebisa biso makambo nyonso. Yesu alobaki na ye: —Ngai oyo nazali koloba na yo, nazali Masiya! Bayekoli na ye bazongaki kaka na tango wana. Bakamwaki mingi awa bamonaki ete Yesu azalaki kosolola na mwasi. Kasi ata moto moko te na kati na bango amekaki kotuna ye: “Olingi nini?” to mpe “Mpo na nini ozali kosolola na ye?” Mwasi atikaki eloko na ye wana, azongaki na vile, mpe alobaki na bato: —Boya kotala moto moko ayebisi ngai makambo nyonso oyo nasalaka. Boni, akoki kozala Kristo te? Bato babimaki na vile mpe bakendaki epai ya Yesu. Na tango wana, bayekoli bazalaki kobondela Yesu mpe bazalaki koloba: —Moteyi, lia! Kasi Yesu ayebisaki bango: —Nazali na bilei oyo bino boyebi te. Bongo bayekoli balobanaki bango na bango: —Boni, moto amemelaki ye biloko ya kolia? Yesu alobaki na bango: —Bilei na ngai, yango oyo: kosala mokano ya Ye oyo atindaki ngai, mpe kosilisa mosala na ye. Bino bolobaka ete etikali sanza minei mpo tobuka mbuma na bilanga! Kasi ngai nalobi na bino: Botombola miso mpe botala bilanga! Pamba te mbuma esiʼekomeli mpe ekoki mpo na kobuka! Moto oyo abukaka azwaka lifuti, mpe azali kobomba bambuma mpo na bomoi ya seko. Mpo ete moloni mpe mobuki mbuma basepela elongo. Na boye nde lisese oyo emonani ete ezali ya solo: “Moto mosusu nde alonaka, mpe mosusu nde abukaka.” Natindaki bino bokende kobuka mbuma na elanga oyo bino bomonelaka pasi te. Bato mosusu nde basalaki mosala, mpe bino bozali kobuka mbuma ya mosala na bango. Bato mingi ya Samariya ya vile wana bandimaki Yesu mpo na litatoli ya mwasi oyo alobaki: “Ayebisi ngai makambo nyonso nasalaki.” Tango bato ya Samariya bayaki epai ya Yesu, babondelaki ye mpo avanda elongo na bango. Bongo Yesu avandaki na bango mikolo mibale. Bato mingi mosusu bandimaki mpo na maloba na ye. Bongo bato yango balobaki na mwasi wana: —Tondimeli ye kaka te mpo na makambo oyo oyebisaki biso, kasi mpo biso moko toyoki ye mpe toyebi ete azali penza Mobikisi ya mokili! Sima ya mikolo mibale, Yesu alongwaki wana mpe akendaki na Galileya. Pamba te ye moko Yesu alobaki ete moprofeta azwaka lokumu te na ekolo na ye moko! Tango akomaki na Galileya, bato ya Galileya bayambaki ye mpo bamonaki makambo nyonso oyo ye asalaki na Yeruzalem, na tango ya feti; pamba te bango mpe bakendaki na feti. Bongo Yesu ayaki lisusu na Kana na Galileya, epai abongolaki mayi vino. Mokonzi moko ya leta azalaki na Kapenawumi, mwana na ye ya mobali azalaki maladi. Tango ayokaki ete Yesu alongwaki na Yudea mpe akomaki na Galileya, akendaki kokutana na ye, mpe abondelaki ye mpo akende kobikisa mwana na ye ya mobali oyo azalaki pene ya liwa. Yesu alobaki na ye: —Boni, soki bomoni bilembo te mpe makamwisi te bokoki kondima te? Mokonzi wana alobaki: —Tata, yaka liboso ete mwana na ngai ya mobali akufa! Bongo Yesu alobaki na ye: —Kende, mwana na yo ya mobali azali nzoto kolongonu! Moto yango andimaki maloba ya Yesu mpe azongaki. Tango azalaki kozonga, basali na ye bayaki kokutana na ye, mpe balobaki na ye: “Mwana na yo ya mobali azali nzoto kolongonu”. Bongo atunaki bango soki na ngonga nini mwana akomaki malamu. Bango bazongisaki: —Fievre etikaki ye lobi na ngonga ya liboso sima ya midi. Tata ya mwana ayebaki ete ezalaki kaka na tango wana nde Yesu alobaki na ye ete mwana na yo azali nzoto kolongonu. Bongo ye na bato nyonso ya ndako na ye, bandimaki. Oyo ezali likamwisi ya mibale Yesu asalaki, sima ya kozonga na ye na Galileya wuta na Yudea. Sima na yango, Yesu akendaki na Yeruzalem mpo na feti moko ya bayuda. Eziba moko ya mayi ezalaki na Yeruzalem pene-pene na Porte ya bameme; na monoko ya Ki-ebreo babengaka yango Betesda. Liziba yango ezalaki na baveranda mitano. Bato mingi ya maladi bazalaki kolala na baveranda yango: bato bakufa miso, bato oyo batambolaka tengu-tengu, na bato oyo bakufa makolo. [Bazalaki kozela ete mayi eningana, pamba te, tango na tango anzelu ya Nzambe azalaki koya na eziba mpo na koningisa mayi. Soki mayi eningani, moto oyo azalaki kokita na eziba moto ya liboso, azalaki kobika ata soki maladi na ye ezalaki ya ndenge nini.] Moto moko azalaki wana, awumelaki na maladi na ye bambula ntuku misato na mwambe. Tango Yesu amonaki ye alali wana, mpe ayebaki ete awumelaki na lolenge wana mikolo mingi, atunaki ye: —Olingi kobika? Moto ya maladi azongisaki: —Tata, nazali na moto te oyo akoki kokitisa ngai na eziba soki mayi eningani. Tango nalingaka kokita na mayi, moto mosusu akitaka liboso na ngai. Yesu alobaki na ye: —Telema, kamata litoko na yo mpe tambola! Kaka na tango wana moto yango abikaki, akamataki litoko na ye mpe abandaki kotambola. Nzokande mokolo yango ezalaki mokolo ya saba. Bongo Bayuda balobaki na moto oyo abikaki: —Lelo ezali saba! Mobeko ezali kopekisa yo mpo na komema litoko na yo. Azongiselaki bango: —Moto oyo abikisi ngai, alobi na ngai: “Kamata litoko na yo mpe tambola.” —Bongo batunaki ye lisusu: —Nani alobaki na yo kamata litoko na yo mpe tambola? Kasi moto oyo abikaki ayebaki te soki moto oyo abikisaki ye azalaki nani; pamba te Yesu akotaki na kati ya ebele ya bato oyo bazalaki wana. Sima, Yesu akutanaki na ye na lopango ya Ndako ya Nzambe mpe alobaki na ye: —Tala, obiki; kosala lisusu masumu te mpo ete likambo moko ya mabe koleka ekweyila yo te! Bongo moto yango akendaki mpe ayebisaki Bayuda ete ezali Yesu moto abikisaki ye. Mpe mpo na yango Bayuda babandaki kotungisa Yesu mpo asalaki makambo wana na mokolo ya saba. Kasi Yesu alobaki na bango: —Tata na ngai azali kosala kino lelo, ngai mpe nazali kosala. Yango wana, Bayuda bazalaki koluka nzela ya koboma Yesu; ezali kaka te mpo atosaki te mokolo ya saba, kasi mpo alobaki lisusu ete Nzambe azali Tata na ye penza, mpe azalaki komitia molongo moko na Nzambe. Yesu azongisaki: —Ya solo penza nalobi na bino: Mwana akoki kosala eloko moko te na ye moko; kasi akoki kaka kosala makambo oyo amonaka epai ya Tata. Pamba te makambo nyonso oyo Tata asalaka, Mwana mpe asalaka yango. Pamba te, Tata alingaka Mwana, mpe alakisa ye makambo nyonso oyo ye asalaka. Mpe akolakisa ye lisusu makambo minene koleka oyo mpo ete botonda na kokamwa. Lokola Tata asekwisaka bakufi mpe apesaka bango bomoi, ndenge moko Mwana mpe apesaka bomoi na moto oyo ye alingi. Mpe Tata asambisaka moto te kasi apesa bokonzi yango ya kosambisa bato na maboko ya Mwana mpo ete bato nyonso bakumisa Mwana ndenge bakumisaka ye moko Tata. Moto oyo akokumisa Mwana te, azali mpe kokumisa Tata te oyo atindaki ye. Ya solo penza nalobi na bino: moto oyo akoyoka maloba na ngai mpe akondima oyo atindaki ngai, azali na bomoi ya seko mpe akozwa etumbu te; asiʼalongwe na liwa mpe aleki na bomoi. Ya solo penza nalobi na bino: tango ezali koya mpe yango esiʼekoki oyo bato bakufa bakoyoka mongongo ya Mwana Nzambe mpe baoyo bakoyoka yango bakozala na bomoi. Pamba te, lokola Tata azali na bomoi kati na ye moko, ndenge moko mpe apesaki na Mwana kozala na bomoi kati na ye moko. Mpe apesi ye bokonzi ya kosambisa bato mpo azali Mwana na moto. Bokamwa te mpo na yango: pamba te, tango ezali koya, oyo bato nyonso bakundama na basimitiele bakoyoka mongongo na ye mpe bakobima: baoyo basalaki malamu bakosekwa mpo na kozwa bomoi, kasi baoyo basalaki mabe bakosekwa mpo na kozwa etumbu na bango. Nakoki kosala eloko moko te na ngai moko. Nasambisaka kaka ndenge nayokaka. Mpe kosambisa na ngai ezali ya sembo; pamba te, nalukaka mokano na ngai moko te kasi mokano ya oyo atindaki ngai. Soki natatolaka mpo na ngai moko, litatoli na ngai ezali ya solo te. Kasi moto mosusu nde atatolaka mpo na ngai; mpe nayebi ete makambo oyo atatolaka mpo na ngai ezali ya solo. Botindaki bato epai ya Jean, mpe ye atatolaki mpo na bosolo. Nandimaka litatoli ya moto te, kasi nalobi bongo mpo ete bokoka kobika. Jean azalaki mwinda oyo ezali kopela mpe kongenga, kasi bino bolingaki kosepela na kongenga na ye kaka mpo na mwa tango moke. Nzokande, nazali na litatoli moko ya monene koleka kutu oyo ya Jean: misala oyo nazali kosala, oyo Tata apesaki ngai mpo nakokisa, elakisaka polele ete Tata moto atindaki ngai. Mpe lisusu, ye moko Tata oyo atindaki ngai, atatola mpo na ngai. Kasi naino boyoka mongongo na ye te, naino mpe bomona elongi na ye te. Liloba na ye ezali kati na bino te pamba te bondimaka te moto oyo ye atinda. Botangaka-tangaka Makomi na molende nyonso, mpo bokanisaka ete bokozwa bomoi ya seko kati na yango. Nzokande, yango etatolaka mpo na ngai! Mpe bolingi te koya epai na ngai mpo na kozwa bomoi. Nalukaka te bato bapesa ngai lokumu. Kasi nayebi bino ete bozangi bolingo ya Nzambe na mitema na bino. Naye na kombo ya Tata na ngai, kasi boyambi ngai te. Kasi soki moto mosusu aye na kombo na ye moko, boyambaka ye! Ndenge nini bokoki kondima soki bolukaka lokumu kati na bino, kasi bolukaka te lokumu oyo ewutaka na Nzambe kaka moko? Bokanisa te ete ngai moto nakofunda bino liboso ya Tata; kasi ezali Moyize oyo bino botielaka mitema, ye moto akofunda bino. Pamba te soki bondimelaki Moyize, mbele bolingaki mpe kondimela ngai; pamba te ye akomaki mpo na ngai. Kasi soki bondimaka Makomi na ye te bongo ndenge nini bokondima maloba na ngai? Sima na yango, Yesu akendaki na ngambo mosusu ya ebale ya Galilea (oyo babengaka mpe ebale ya Tiberiade). Bato ebele penza bazalaki kolanda ye mpo bazalaki komona makamwisi oyo azalaki kosala na bato ya maladi. Yesu amataki na ngomba mpe avandaki kuna na bayekoli na ye. Nzokande Pake, feti ya bayuda ekomaki pene-pene. Tango Yesu atalaki mpe amonaki bato ebele penza bazalaki koya epai na ye; atunaki Filipo: —Tokosomba mapa wapi mpo bato oyo balia? Atunaki ye motuna wana mpo na komeka ye pamba te ye moko ayebaki likambo oyo alingaki kosala. Filipo azongiselaki ye: —Badeni nkama mibale ekokoka te kosomba mapa ya kokoka mpo ete moto nyonso azwa mwa ndambo. Moyekoli na ye moko, Andele ndeko ya Simon Piere, alobaki na ye: —Mwana moko ya mobali azali awa, azali na mapa mitano mpe bambisi mibale. Kasi yango ekosala nini mpo na ebele ya bato boye? Bongo Yesu alobaki: —Bovandisa bato. Matiti ezalaki mingi na esika yango; bongo bango nyonso bavandaki. Mibali nyonso bazalaki pene-pene ya nkoto mitano. Yesu akamataki mapa, azongisaki matondi, mpe akabolaki yango na bato oyo bavandaki wana. Asalaki mpe ndenge moko na bambisi, mpe bazwaki ndenge bango balingaki. Tango bango nyonso batondaki, Yesu alobaki na bayekoli na ye: —Bosangisa biteni oyo etikali mpo ete eteni moko te ebeba. Basangisaki yango mpe batondisaki bitunga zomi na mibale ya oyo etikalaki na mapa mitano oyo baliaki. Tango bato bamonaki likamwisi oyo Yesu asalaki, babandaki koloba: —Moto oyo azali penza Moprofeta oyo asengeli koya na mokili. Awa Yesu ayebaki ete balingaki koya mpe kokomisa ye mokonzi na makasi, azongaki lisusu ye moko kaka, na ngomba. Tango pokwa ekomaki, bayekoli na ye bakendaki na ebale. Bamataki na bwato mpe babandaki kokende na Kapenawumi, na ngambo mosusu ya ebale. Butu ekomaki, mpe Yesu akomaki naino te epai na bango. Mopepe moko ya makasi penza ebandaki kopepa, mpe mayi ya ebale etombokaki. Awa basilaki koluka nkayi bakilometele soki mitano to motoba, bamonaki Yesu azalaki kotambola likolo ya mayi mpe azalaki kopusana pene-pene na bwato; kobanga ekangaki bango. Kasi Yesu alobaki na bango: —Bobanga te, ezali ngai! Balingaki kokotisa ye na bwato, kasi kaka na tango wana, bwato ekomaki na libongo, epai bazalaki kokende. Mokolo oyo elandaki, ebele ya bato oyo batikalaki na ngambo mosusu ya ebale bayebaki ete bwato moko kaka ezalaki wana, mpe Yesu akotaki kati na yango te elongo na bayekoli na ye, kasi bayekoli bakendaki kaka bango moko. Bongo babwato mosusu oyo ewutaki na Tiberiade ekomaki wana, pene-pene na esika oyo balielaki mapa, tango Nkolo azongisaki matondi. Tango bato bamonaki ete Yesu na bayekoli na ye bazalaki wana te, bamataki na babwato mpe bakendaki na Kapenawumi mpo na koluka Yesu. Awa bakutaki ye na ngambo mosusu ya ebale, batunaki ye: —Moteyi, okomaki awa tango nini? Yesu azongiselaki bango: —Ya solo penza nalobi na bino: bozali koluka ngai kaka mpo boliaki mapa mpe botondaki mingi, kasi ezali te mpo bomonaki makamwisi. Bosalaka mosala te mpo na bilei oyo ekobeba, kasi bosalaka mosala mpo na bilei oyo ekowumela kino na bomoi ya seko, bilei oyo Mwana na moto akopesa bino pamba te Nzambe Tata atia ye elembo. Bongo batunaki ye: —Esengeli tosala nini mpo tosala misala ya Nzambe? Yesu azongiselaki bango: —Mosala ya Nzambe yango oyo: kondimela moto oyo ye atindaki. Batunaki ye: —Elembo nini ya kokamwisa okosala mpo tokoka komona yango mpe tondima yo? Okosala nini? Bakoko na biso baliaki mana na esobe, ndenge ekomama: Apesaki bango mapa oyo ewutaki na Likolo. Yesu alobaki na bango: —Ya solo penza nalobi na bino: ezali Moyize te moto apesaki bino lipa oyo ewutaki na Likolo, kasi ezali Tata na ngai moto apesi bino lipa ya solo oyo ewuti na Likolo. Pamba te, lipa ya Nzambe ezali moto oyo akiti wuta na Likolo mpe apesaka bomoi na mokili. Bongo balobaki na ye: —Nkolo, pesaka biso lipa yango mikolo nyonso! Yesu azongiselaki bango: —Ngai nazali lipa oyo epesaka bomoi. Moto oyo akoya epai na ngai akoyoka lisusu nzala te; mpe oyo akondima ngai, akoyoka lisusu posa ya mayi te. Kasi ndenge nayebisaki bino: bosiʼbomona ngai, kasi bozali kondima te. Bato nyonso oyo Tata apesi ngai, bakoya epai na ngai; mpe nakobengana soki moke te moto oyo akoya epai na ngai. Pamba te soki nakiti wuta na Likolo, ezali te mpo na kosala mokano na ngai moko, kasi mpo na kokokisa mokano ya Ye oyo atindaki ngai. Nzokande, mokano ya Ye oyo atindaki ngai ezali boye: nabungisa ata moto moko te na kati ya bato oyo apesaki ngai, kasi nasekwisa bango na mokolo ya suka. Pamba te mokano ya Tata na ngai ezali boye: moto nyonso oyo akotala Mwana mpe akondima ye, akozwa bomoi ya seko; mpe ngai nakosekwisa ye na mokolo ya suka. Bayuda babandaki koyima-yima, mpo alobaki: “Ngai nazali lipa oyo ewuti na Likolo!” Bongo bazalaki koloba: —Boni, wana ezali Yesu te, mwana ya Zozefi, oyo toyebi tata na ye mpe mama na ye? Bongo ndenge nini azali koloba: “Nawuti na Likolo?” Yesu azongiselaki bango: —Botika koyima-yima kati na bino! Pamba te, moto moko te akoki koya epai na ngai, soki Tata oyo atindaki ngai abendi ye te; mpe ngai, nakosekwisa ye na mokolo yasuka. Ekomama boye na Mikanda ya baprofeta: Nzambe akoteya bango nyonso. Yango wana, moto nyonso oyo akoyoka Tata mpe akoyamba mateya na ye, akoya epai na ngai. Moto ata moko te asiʼamona Tata, longola kaka ye oyo awuti epai ya Nzambe; ye nde amona Tata. Ya solo nalobi na bino: moto oyo andimi, azali na bomoi ya seko. Ngai nazali lipa oyo epesaka bomoi. Bakoko na bino baliaki mana na esobe, basiʼbakufa. Kasi lipa oyo ewuti na Likolo ezali awa: moto oyo akolia yango akokufa te. Ngai nazali lipa ya bomoi oyo ewuti na Likolo. Soki moto alie lipa yango, akozala na bomoi seko na seko. Lipa yango ezali nde nzoto na ngai, oyo nakopesa mpo ete mokili ezwa bomoi! Bongo Bayuda babandaki kotiana tembe bango na bango, bazalaki koloba: —Ndenge nini akoki kopesa biso nzoto na ye mpo tolia yango? Kasi Yesu alobaki: —Ya solo penza nalobi na bino, soki bolie nzoto ya Mwana ya Moto te mpe soki bomeli makila na ye te, bokoki kozwa bomoi te. Oyo akolia nzoto na ngai mpe akomela makila na ngai, akozwa bomoi ya seko mpe nakosekwisa ye na mokolo ya suka. Pamba te, nzoto na ngai ezali bileyi ya solo, mpe makila na ngai ezali eloko ya komela ya solo. Oyo akolia nzoto na ngai mpe akomela makila na ngai, ye akozala kati na ngai, mpe ngai nakozala kati na ye. Lokola Tata oyo atindi ngai azali na bomoi, ngai mpe nazali na bomoi mpo na ye; yango wana moto oyo akolia ngai, akozala na bomoi mpo na ngai. Oyo ezali lipa ewuti na Likolo. Ekokani te na oyo bakoko na bino baliaki mpe bakufaki; kasi moto oyo akolia lipa oyo, akozala na bomoi seko na seko. Yesu alobaki makambo oyo tango azalaki koteya na Ndako ya mayangani, na Kapenawumi. Bayekoli mingi ya Yesu, sima ya koyoka ye, balobaki: —Mateya oyo ekomi makasi. Nani akoki kondima yango? Yesu ayebaki ete bayekoli na ye bazalaki koyima-yima mpo na yango; bongo alobaki na bango: —Boni, maloba oyo ebetisi bino mabaku? Bongo soki bomoni Mwana na moto azali kobuta mpo na kozonga epai ye azalaki liboso… Boyeba ete, Molimo nde apesaka bomoi; nzoto esungaka na eloko moko te. Maloba oyo nalobi na bino, yango nde ezali Molimo mpe ezali bomoi. Kasi bato mosusu kati na bino bazali kondima te. Pamba te, banda na ebandeli, Yesu ayebaki banani bazalaki kondima te, mpe nani akoteka ye. Bongo alobaki lisusu: —Yango wana nalobaki na bino: moto moko te akoki koya epai na ngai soki Tata apesi ye nzela te! Banda tango wana, bayekoli na ye mingi batikaki ye mpe bazalaki kolanda ye lisusu te. Bongo Yesu atunaki bapostolo zomi na mibale: —Bongo bino, bolingi mpe kokende? Simon Piere azongisaki: —Nkolo, tokende epai ya nani? Yo moto ozali na maloba oyo epesaka bomoi ya seko. Biso tondimaka mpe toyebi ete yo ozali Mosantu ya Nzambe! Yesu alobaki na bango: —Boni, ngai te moto naponaki bino nyonso zomi na mibale? Kasi moko na bino azali zabolo! Yesu alobaki bongo mpo na Yuda, mwana ya Simon Iskariote, moko na kati ya bapostolo zomi na mibale pamba te ye moto akoteka ye. Sima na yango, Yesu atambolaki na mokili ya Galileya. Aboyaki kovanda na Yudea pamba te Bayuda bazalaki koluka koboma ye. Bongo feti ya Bayuda, oyo ya bandako ya kapo ekomaki pene-pene. Bandeko ya Yesu balobaki na ye: —Longwa awa mpe kende na Yudea, mpo ete bayekoli na yo bakoka komona makamwisi oyo ozali kosala! Moto moko te oyo alingi koyebana na bato, bongo asalaka na kobombama. Lokola ozali kosala makambo oyo, malamu omilakisa na bato nyonso. Pamba te, ata bandeko na ye moko bazalaki kondimela ye te. Yesu azongiselaki bango: —Tango na ngai naino ekoki te, kasi mpo na bino tango nyonso ezali malamu. Mokili ekoki koyina bino te, kasi ezali koyina ngai mpo natatolaka ete misala na yango ezali mabe. Bino, bokende na bino na feti; kasi ngai nakokende te pamba te tango na ngai naino ekoki te! Sima ya koloba na bango bongo, atikalaki na ye na Galileya. Tango bandeko na ye bakendaki na feti, ye mpe akendaki, amimonisaki na miso ya bato te kasi azalaki kobombama. Na feti, Bayuda bazalaki koluka ye mpe bazalaki kotuna: —Azali wapi? Bongo tembe makasi ezalaki na kati ya ebele ya bato mpo na ye. Bato mosusu bazalaki koloba: —Azali moto malamu! Bamosusu: —Te, azali kokosa bato! Kasi moto ata moko te azalaki koloba na bonsomi nyonso mpo na Yesu, pamba te bazalaki kobanga Bayuda. Tango bakomaki na kati-kati ya mikolo ya feti, Yesu akendaki na Ndako ya Nzambe, mpe azalaki koteya. Bayuda bakamwaki mpe bazalaki kotunana: —Ndenge nini moto oyo ayebi Makomi boye, ye moto ayekola te? Bongo Yesu azongiselaki bango: —Mateya oyo nazali koteya ezali ya ngai te, kasi ewuti epai ya Ye oyo atindaki ngai. Soki moto aponi kosala mokano ya Nzambe, akoyeba soki mateya na ngai ewuti na Nzambe to mpe nalobaka na kombo na ngai moko. Moto oyo alobaka na kombo na ye moko, alukaka lokumu na ye moko. Kasi moto oyo alukaka lokumu ya moto oyo atindaki ye, ye azali moto ya solo mpe lokuta ezali kati na ye te. Boni, Moyize apesaki bino Mibeko te? Nzokande, ata moto moko te na kati na bino atosaka Mibeko yango. Bongo mpo na nini bozali koluka koboma ngai? Ebele ya bato bazongisaki: —Ozali na molimo mabe! Nani azali koluka koboma yo? Yesu alobaki na bango: —Nasalaki likamwisi moko, mpe bino nyonso bokamwaki mpo na yango. Moyize apesaki bino etinda ya kokata nzoto, (mobeko yango ewutaki kutu na Moyize te, kasi na bakoko), mpe bino bosalaka yango ata na mokolo ya saba. Bongo soki bokataka bato nzoto na mokolo ya saba mpe yango ebukaka mobeko ya Moyize te, kasi mpo na nini bozali kosilika na ngai mpo nabikisaki moto na mokolo ya saba? Botika kokata makambo na ndenge oyo bino bozali komona na miso, kasi bokataka na ndenge ya sembo. Bongo bato mosusu ya Yeruzalem babandaki kotuna: —Ye oyo te moto bazali koluka koboma? Tala, azali koloba na bonsomi nyonso, mpe bazali koloba na ye eloko moko te. Boni, bakonzi na biso basiʼbandimi ete ye azali penza Kristo? Kasi biso toyebi soki moto oyo awuti esika nini; nzokande tango Kristo akoya, moto ata moko te akoyeba soki ye akowuta esika nini! Na tango wana, Yesu azalaki koteya na lopango ya Ndako ya Nzambe mpe agangaki: —Ya solo boyebi ngai, mpe boyebi esika nawuti. Naye na kombo na ngai moko te kasi Ye oyo atindi ngai azali solo, mpe bino boyebi ye te. Ngai nayebi ye, pamba te nawuti epai na ye mpe ye moto atindi ngai. Bongo balukaki nzela mpo na kokanga Yesu, kasi moto ata moko te amekaki kosimba ye pamba te tango na ye ekokaki naino te. Mpe bato mingi na kati ya ebele ya bato bandimelaki ye; bazalaki koloba: —Boni, tango Kristo akoya, akosala makamwisi mingi koleka ya moto oyo? Bafarizeo bayokaki makambo oyo bato bazalaki koloba-koloba mpo na Yesu: bongo bakonzi ya banganga-Nzambe mpe bafarizeo batindaki bakengeli ya Ndako ya Nzambe mpo bakanga Yesu. Kasi Yesu alobaki: —Nazali elongo na bino mpo na mwa tango moke, bongo nakozonga epai ya Ye oyo atindaki ngai. Bokoluka ngai, kasi bokomona ngai te; mpe bokokoka te koya epai ngai nakozala! Bongo Bayuda balobanaki bango na bango: —Yango moto oyo akokende wapi mpo tomona ye lisusu te? Boni, akokende epai ya Bayuda oyo bapalangana na kati ya Bagreki, mpe koteya Bagreki? Alingi penza koloba nini tango azali koloba: “Bokoluka ngai, kasi bokomona ngai te; mpe bokokoka te koya epai ngai nakozala?” Mokolo ya suka ya feti, mokolo monene ya feti; Yesu atelemaki mpe alobaki na mongongo makasi: —Soki moto azali na posa ya mayi, aya epai na ngai mpe amela. Lokola Makomi ezali koloba: Moto oyo akondima ngai, ba-ebale ya mayi ya bomoi ekobanda kobima kati na ye. Yesu alobaki bongo mpo na Molimo oyo bato oyo bandimaki ye, basengelaki kozwa. Pamba te, na tango wana, Molimo apesamaki naino te mpo Yesu akotaki naino te na nkembo na ye. Bato mingi na kati ya ebele ya bato oyo bayokaki maloba na ye, balobaki: —Ya solo, moto oyo azali moprofeta! Bato mosusu bazalaki koloba: —Azali Kristo! Kasi bamosusu balobaki: —Boni, akowuta na Galileya? Makomi eloba te ete Kristo akowuta na libota ya David mpe akobotama na Betelemi, vile oyo David avandaki? Bongo bato bakabwanaki mpo na Yesu. Basusu balingaki kokanga ye, kasi moto ata moko te amekaki kosimba ye. Bakengeli ya Ndako bazongaki epai ya bakonzi ya banganga-Nzambe na Bafarizeo. Bongo bango batunaki bakengeli: —Mpo na nini boye na ye te? Bakengeli bazongisaki: —Moto ata moko te naino aloba lokola ye! Bafarizeo batunaki bango: —Nini, bino mpe bondimi kokosama? Ezali na moto, kati na bakonzi to Bafarizeo, oyo andima ye? Kasi ezali kaka ebele ya bato wana oyo bayebi Mibeko te bazali bato balakelama mabe! Nikodemi oyo akendaki mokolo moko epai ya Yesu na butu mpe azalaki moko na kati na bango, alobaki na bango: —Boni, Mibeko na biso ekatelaka moto etumbu soki naino bayoki ye te mpe soki naino bayebi te likambo ya mabe oyo ye asalaki? Bango bazongiselaki ye: —Boni, Yo mpe ozali moto ya Galileya? Tanga malamu-malamu Makomi, mpe okomona ete ata moprofeta moko te naino abima na Galileya! [Bongo moto moko na moko azongaki na ndako na ye. Kasi Yesu akendaki na ngomba ya banzete ya Olive; Na tongo-tongo, Yesu azongaki lisusu na lopango ya Ndako ya Nzambe mpe bato nyonso bayaki kozinga ye; avandaki mpe abandaki koteya bango. Balakisi ya Mibeko mpe Bafarizeo bamemelaki ye mwasi moko oyo bakangaki na tango azalaki kosala ekobo, mpe batiaki ye liboso ya bato nyonso. Bongo balobaki na Yesu: —Moteyi, bakangaki mwasi oyo na tango azalaki kosala ekobo. Nzokande, kati na Mibeko, Moyize atindaki biso ete toboma mwasi ya ndenge oyo na mabanga! Bongo yo, olobi nini? Batunaki ye motuna wana na kotiela ye motambo, mpo bazwa likambo ya kofundela ye. Kasi Yesu agunzamaki mpe abandaki kokoma na mabele na mosapi na ye. Lokola bazalaki kaka kotuna-tuna ye, Yesu atelemaki mpe alobaki na bango: —Oyo kati na bino azangi lisumu, abamba ye libanga moto ya liboso. Bongo Yesu agunzamaki lisusu, mpe azongelaki kokoma na mabele. Tango bayokaki bongo, bango nyonso babandaki kokende moko-moko, kobanda na mikolo. Bongo Yesu atikalaki kaka ye moko elongo na mwasi liboso na ye. Bongo Yesu atombolaki motu mpe alobaki na ye: —Mwasi, bato oyo bayaki kofunda yo bazali wapi? Moto ata moko te akateli yo etumbu? Ye azongisaki: —Tata, ata moto moko te! Bongo Yesu alobaki: —Ngai mpe nakokatela yo etumbu te. Kende na yo, kasi kosala lisusu masumu te!] Yesu alobaki lisusu na bato: —Ngai nazali moi ya mokili. Oyo akolanda ngai akotambola na molili te, kasi akozwa moi na bomoi. Bafarizeo balobaki na ye: —Ozali komilobela yo moko; litatoli na yo ezali na tina te. Kasi Yesu azongiselaki bango: —Litatoli na ngai ezali na tina ata soki nazali koloba mpo na ngai moko. Pamba te, nayebi epai nawuta mpe epai nazali kokende. Kasi bino boyebi te epai nawuta mpe epai nazali kokende. Bino bosambisaka na ndenge ya bomoto, kasi ngai nasambisaka moto te. Mpe soki nasambisi moto, kosambisa na ngai ekozala ya sembo, pamba te nazali ngai moko te, kasi elongo na Tata ye oyo atinda ngai. Ekomama mpe kati na mibeko na bino: litatoli ya bato mibale ezali ya solo. Natatolaka mpo na ngai moko; mpe Tata oyo atindaki ngai atatolaka mpe mpo na ngai. Bongo batunaki ye: —Tata na yo azali wapi? Yesu azongisaki: —Bino boyebi ngai te mpe boyebi Tata na ngai te. Soki boyebaki ngai, mbele bolingaki mpe koyeba Tata na ngai! Yesu alobaki makambo wana tango azalaki koteya na lopango ya Ndako ya Nzambe, pene-pene na esika oyo bazalaki kotiela makabo. Mpe moto ata moko te akangaki ye, pamba te tango na ye ekokaki naino te. Yesu alobaki na bango lisusu: —Nazali kokende mpe bokoluka ngai; bokokufa na masumu na bino; mpe bokokoka te koya epai ngai nazali kokende. Bongo Bayuda bazalaki kotunana bango na bango: —Boni, akomiboma? Yango wana alobi: “Bokokoka te koya epai ngai nazali kokende?” Kasi alobaki na bango lisusu: —Bino bowuti na nse; kasi ngai nawuti na Likolo. Bino bozali bato ya mokili oyo kasi ngai nazali moto ya mokili oyo te. Yango wana nalobaki na bino: “Bokokufa na masumu na bino.” Pamba te, soki bondimi te ete “Ngai nazali”, bokokufa na masumu na bino. Bango batunaki ye: —Bongo yo ozali nani? Yesu azongiselaki bango: —Oyo nalobaka na bino tango nyonso wuta na ebandeli. Nazali na makambo mingi ya koloba mpo na bino mpe ya kosambisela bino; kasi moto oyo atinda ngai azali solo, mpe makambo oyo nayokaki epai na ye, yango nde nazali koyebisa na mokili. Kasi basosolaki te ete Yesu azalaki kolobela bango mpo na Tata. Bongo Yesu alobaki: —Tango bokotombola Mwana na moto, na tango wana nde bokososola ete “Ngai nazali” mpe nasalaka eloko moko te na kombo na ngai moko, kasi nalobaka kaka makambo oyo Tata alakisaki ngai. Moto oyo atinda ngai azali elongo na ngai; atika ngai, ngai moko te pamba te nasalaka tango nyonso makambo oyo esepelisaka ye! Awa Yesu alobaki bongo, bato mingi bandimelaki ye. Bongo Yesu alobaki na bayuda oyo bandimelaki ye: —Soki bokangami na mateya na ngai, bokozala penza bayekoli na ngai. Bokoyeba solo mpe solo ekokangola bino. Bazongiselaki ye: —Biso tozali bato ya libota ya Abraham, mpe mbala ata moko te tokoma bawumbu ya moto. Bongo ndenge nini olobi na biso ete: “Bokokoma bato ya bonsomi?” Yesu azongiselaki bango: —Ya solo penza nalobi na bino: moto nyonso oyo asalaka masumu azali mowumbu ya masumu. Nzokande mowumbu azali na esika ya libela na libela te kati na libota; kasi mwana azali na yango mpo na libela na libela. Soki Mwana akangoli bino, bokozala penza bato ya bonsomi. Nayebi ete bozali bato ya libota ya Abraham; kasi bozali koluka koboma ngai mpo Liloba na ngai ezali na esika te kati na bino. Nalobaka makambo oyo namonaki epai ya Tata na ngai; bino bosalaka makambo oyo boyokaka epai ya tata na bino. Bango bazongisaki: —Tata na biso ezali Abraham! Kasi Yesu alobaki na bango: —Soki bozalaki bana ya Abraham, mbele bolingaki kosala misala oyo Abraham asalaki. Kasi sikʼoyo bozali koluka koboma ngai, ngai moto oyo nazali koyebisa bino solo oyo nayokaki epai ya nzambe. Nzokande Abraham asalaki yango te. Bino, bosalaka misala ya tata na bino. Bango bazongisaki: —Biso tozali bana ya makangu te; tozali kaka na Tata moko: Nzambe! Bongo Yesu alobaki na bango: —Soki Nzambe azalaki Tata na bino, mbele bozali kolinga ngai. Pamba te, nawuti epai ya Nzambe mpe sikʼoyo nazali awa. Mpe naye na kombo na ngai moko te, kasi ye moto atindaki ngai. Mpo na nini bozali kososola te tina ya maloba oyo nazali koloba? Pamba te bokoki te koyoka makambo oyo nazali koloba. Tata na bino, ezali Zabolo; mpe bolingi kosala makambo oyo tata na bino alingaka. Ye azali mobomi banda na ebandeli; awumelaki kati na solo te, pamba te solo ezali kati na ye te. Tango akosaka, alobaka penza makambo oyo ewutaka kati na ye pamba te azali moto ya lokuta, mpe tata ya lokuta. Kasi ngai lokola nazali koloba solo, yango wana bozali kondimela ngai te. Nani kati na bino akoki kolakisa ngai lisumu oyo nasala? Soki nalobaka makambo ya solo, bongo mpo na nini bondimelaka ngai te? Oyo azali ya Nzambe ayokaka oyo Nzambe alobaka. Kasi bino, soki boyokaka te, ezali mpo bozali na Nzambe te. Bayuda bazongiselaki ye: —Omoni, yango wana tolobaki ete ozali moto ya Samariya mpe ozali na molimo mabe. Yesu alobaki na bango: —Nazali na molimo mabe te, kasi nazali kopesa Tata na ngai lokumu mpe bino bozali kotiola ngai. Nalukaka lokumu na ngai moko te, kasi moto moko azali, oyo alukaka yango, mpe ye moto asambisaka. Ya solo penza nalobi na bino: soki moto abateli maloba na ngai, akokufa soki moke te! Bongo Bayuda balobaki na ye: —Sikʼoyo tomoni polele ete ozali na molimo mabe! Pamba te, Abraham mpe baprofeta basiʼbakufa; bongo yo olobi ete moto oyo akobatela maloba na yo akokufa soki moke te! Boni, yo okanisi ete oleki Tata na biso Abraham oyo akufa? To mpe oleki baprofeta nyonso oyo bakufa? Yango yo, ozali komimona nani? Yesu azongiselaki bango: —Soki nazali komipesa lokumu ngai moko, lokumu na ngai ezali na tina te. Kasi ezali Tata na ngai moto azali kopesa ngai lokumu; Ye oyo bino bolobaka ete azali Nzambe na bino. Mpe boyebi ye te, kasi ngai nayebi ye. Soki nalobi ete nayebi ye te, wana nalingaki kozala moto ya lokuta lokola bino. Kasi nayebi ye, mpe nabatelaka Liloba na ye. Tata na bino Abraham atondaki na esengo mingi awa akanisaki ete akomona mokolo na ngai; amonaki yango, mpe atondaki na esengo. Bayuda balobaki na ye: —Nini? Yo moto okokisi naino ata bambula ntuku mitano te, bongo ozali koloba ete omonaki Abraham! Yesu azongiselaki bango: —Ya solo penza nalobi na bino: “liboso ete Abraham abotama, ngai nazali!” Tango Bayuda bayokaki bongo, balokotaki mabanga mpo na kobamba ye. Kasi Yesu abombamaki, mpe abimaki na lopango ya Ndako ya Nzambe. Awa Yesu azalaki kokende, amonaki moto moko akufa miso banda abotama. Bayekoli na ye batunaki ye: —Moteyi nani asalaki masumu? Ye moko to baboti na ye, mpo abotama na miso ya kokufa? Yesu azongisaki: —Ezali ye te to mpe baboti na ye te nde basalaki masumu, kasi mpo ete misala ya Nzambe emonana kati na ye. Lokola moi ezali naino, esengeli nasala misala na ye oyo atindaki ngai. Butu ezali koya, tango moto ata moko te akokoka kosala mosala. Awa nazali naino na mokili, nazali moi ya mokili! Sima ya koloba maloba wana, Yesu abwakaki soyi na mabele, asalaki poto-poto na soyi na ye mpe apakolaki yango na miso ya moto wana. Bongo alobaki na ye: —Kende mpe sukola na eziba ya Silowe (“Silowe” elingi koloba: “Motindami”). Mokufi miso akendaki mpe asukolaki; tango azalaki kozonga, abandaki komona. Bato oyo bazalaki kovanda na ye pene-pene, na baoyo bazalaki komona ye tango azalaki kosenga-senga mbongo, batunaki: —Boni, moto oyo ye te moto azalaki kovanda mpe kosenga-senga mbongo? Bato mosusu bazalaki koloba: —Ezali ye! Basusu: —Te, ye te; akokani na ye! Bongo moto wana alobaki: —Ezali ngai! Bongo batunaki ye: —Miso na yo efungwamaki ndenge nini? Azongiselaki bango: —Moto oyo babengaka Yesu, asalaki poto-poto, apakolaki ngai yango na miso, bongo alobaki na ngai: “Kende na Silowe mpe sukola!” Tango nakendaki mpe nasukolaki, ma mbala moko nabandaki komona. Batunaki ye: —Moto yango azali wapi? Azongisaki: —Nayebi te! Bamemaki moto oyo azalaki na miso ya kokufa epai ya Bafarizeo. Nzokande Yesu asalaki poto-poto mpe afungolaki miso ya moto wana na mokolo ya Saba. Bafarizeo batunaki ye ayebisa bango soki ndenge nini miso na ye efungwamaki. Azongiselaki bango: —Atiaki ngai poto-poto na miso, nasukolaki mpe nazali komona. Bongo bafarizeo mosusu balobaki: —Moto oyo awutaki epai ya Nzambe te mpo ete, azali kotosa te mokolo ya saba! Kasi basusu balobaki: —Ndenge nini moto ya masumu akoki kosala makamwisi ya ndenge wana? Bongo bokabwani ekotaki kati na bango. Batunaki lisusu mokufi miso: —Bongo yo olobi nini mpo na ye? Pamba te ezali miso na yo nde afungolaki! Azongiselaki bango: —Azali moprofeta! Bayuda bandimaki te ete azalaki na miso ya kokufa mpe abandaki komona, kino tango babengisaki baboti ya moto yango. Batunaki bango: —Oyo azali mwana na bino, oyo bolobaka ete abotama mokufi miso? Ndenge nini abandi komona sikʼoyo? Baboti na ye bazongisaki: —Toyebi ete azali mwana na biso, mpe abotamaki na miso ya kokufa. Kasi ndenge abandi komona sikʼoyo, wana toyebi yango te; mpe toyebi te soki nani afungoli ye miso. Azali mokolo, botuna ye, mpe akoloba mpo na ye moko. Baboti na ye balobaki bongo mpo bazalaki kobanga Bayuda. Pamba te, Bayuda basiʼbazwaki mokano ya kobengana na ndako na bango ya mayangani, moto nyonso oyo akondima ete Yesu azali Kristo. Yango wana baboti na ye bazongisaki: “Azali mokolo, botuna ye moko!” Bongo babengaki lisusu mpo na mbala ya mibale moto oyo azalaki na miso ya kokufa, mpe balobaki na ye: —Pesa Nzambe nkembo; biso toyebi ete moto wana azali moto ya masumu. Moto yango azongiselaki bango: —Soki azali moto ya masumu, wana ngai nayebi yango te; kasi nayebi kaka likambo moko: nazalaki mokufi miso, mpe sikʼoyo nazali komona! Bango batunaki ye lisusu: —Asalaki yo nini? Afungoli miso na yo ndenge nini? Ye azongiselaki bango: —Nasiʼnayebisaki bino yango, kasi bolingaki na bino koyokela ngai te. Bongo mpo na nini bolingi lisusu koyoka yango? Boni, bino mpe bolingi kokoma bayekoli na ye? Bafingaki ye mpe balobaki: —Yo moto ozali moyekoli na ye; kasi biso tozali bayekoli ya Moyize! Biso toyebi ete Nzambe alobaki na Moyize; kasi moto wana, toyebi kutu te soki awuti wapi! Moto yango azongisaki: —A, ezali likambo ya kokamwa! Moto afungoli ngai miso, mpe boyebi kutu te soki awuti wapi. Nzokande toyebi ete Nzambe ayokelaka te bato na masumu; kasi ayokelaka moto oyo atosaka makambo ya Nzambe mpe asalaka mokano na ye. Mpe naino toyoka te ete moto afungoli miso ya mokufi miso ya kobotama. Soki moto wana awutaki epai ya Nzambe te, mbele akokaki kosala ata eloko moko te. Bango bazongiseli ye: —Yo moto obotama mobimba kati na masumu, mpe ozali koteya biso! Bongo babenganaki ye. Tango Yesu ayokaki ete babengani moto wana, akendaki kokutana na ye mpe alobaki na ye: —Ondimi Mwana na moto? Moto wana azongiseli ye: —Tata, ye azali nani, mpo ete nandimela ye? Yesu alobaki: —Omoni ye, moto oyo azali koloba na yo, ezali nde ye! Moto wana alobaki: —Nkolo, nandimi! Bongo akumbamelaki ye. Bongo Yesu alobaki: —Ezali mpo na kosambisa, nde nayaki kati na mokili oyo, mpo ete bato bakufa miso bamona, mpe baoyo bazali komona, bakoma bakufi miso! Bafarizeo mosusu oyo bazalaki na ye elongo bayokaki maloba yango mpe batunaki ye: —Bongo biso, tozali mpe bakufi miso? Yesu azongiseli bango: —Soki bozalaki bakufi miso, mbele bolingaki kozala na masumu te; kasi lokola bozali koloba ete bomonaka; boyeba ete masumu na bino ezali kaka na bino. Nazali koloba na bino ya solo: moto oyo akotaka na lopango ya bameme na porte na yango te, kasi amataka likolo ya lopango na esika mosusu, ye azali moyibi mpe mobomi. Kasi ye oyo akotaka na porte, ye nde azali mobateli ya bameme. Mokengeli akofungolela ye porte, mpe bameme bayokaka mongongo na ye. Mpe abengaka bameme na ye na kombo na bango, mpe abimisaka yango na libanda. Soki abimisi bameme na ye nyonso na libanda, alekaka liboso na bango mpe bameme balandaka ye, pamba te bayebi mongongo na ye. Balandaka mopaya te kasi bakimaka ye mosika, pamba te bayebi mongongo na ye. Yesu alobaki na bango lisapo oyo, kasi bayebaki te tina ya makambo oyo azalaki koyebisa bango. Yesu alobaki na bango lisusu: —Nazali koloba na bino ya solo: ngai nazali porte ya bameme. Baoyo nyonso bayaki liboso na ngai bazalaki miyibi mpe babomi. Mpe bameme bayokelaki bango te. Ngai nazali porte; moto nyonso oyo akokota na nzela na ngai, akobika; akokota mpe akobima, mpe akozwa bilei. Moyibi ayaka kaka mpo na koyiba, koboma, mpe kobebisa. Kasi ngai nayaki mpo ete bazwa bomoi, mpe bazwa yango ya mingi penza. Ngai nazali mobateli malamu ya bameme. Mobateli malamu apesaka bomoi na ye mpo na bameme. Kasi moto oyo azali penza mobateli te, oyo asalaka kaka mpo na lifuti, mpe azali nkolo ya bameme te, soki amoni mbwa ya zamba ezali koya, akotika bameme mpe akokima. Bongo mbwa ya zamba ekokanga mpe ekopanza bameme. Akokima, pamba te asalaka kaka mpo na lifuti, mpe atiaka makanisi na ye na bameme te. Ngai nazali mobateli malamu ya bameme; nayebi bameme na ngai, mpe bameme na ngai eyebi ngai, ndenge Tata ayebi ngai, ngai mpe nayebi Tata! Mpe nakopesa bomoi na ngai mpo na bameme. Nazali na bameme mosusu oyo ezali ya lopango oyo te. Esengeli ete namema yango; ekoyoka mongongo na ngai, mpe etonga ya bameme ekozala kaka moko, mpe mobateli akozala kaka mpe moko. Tata alingaka ngai mpo nakabi bomoi na ngai, mpo ete nazwa yango lisusu. Moto moko te alongoli ngai yango, kasi napesi yango na mokano na ngai moko. Nazali na bokonzi ya kopesa yango mpe ya kozwa yango lisusu. Etinda oyo, nazwaki yango epai ya Tata na ngai. Bayuda bakabwanaki lisusu mpo na maloba oyo. Bongo mingi kati na bango bazalaki koloba: —Azali na molimo mabe! Azali na liboma! Mpo na nini bozali koyoka ye? Basusu bazalaki koloba: —Maloba wana ezali ya moto oyo azali na molimo mabe te! Boni, molimo mabe ekoki penza kofungola miso ya bato bakufa miso? Bongo tango ekokaki oyo bazalaki kosala na Yeruzalem feti ya “Kobulisa Ndako ya Nzambe”, mpe ezalaki tango ya malili makasi. Yesu azalaki kotambola na lopango ya Ndako ya Nzambe, na veranda ya Salomo. Bayuda bazingaki ye mpe batunaki ye: —Kino tango nini okotika mitema na biso ezala kaka likolo-likolo? Soki ozali Kristo, yebisa biso yango polele! Yesu azongiselaki bango: —Nayebisaki bino yango, kasi bozali kondima te! Makamwisi oyo nazali kosala na kombo ya Tata, ezali kotatola mpo na ngai; kasi bino bozali kondima te, pamba te bozali bameme na ngai te. Bameme na ngai eyokaka mongongo na ngai, nayebi bango, mpe elandaka ngai! Nazali kopesa yango bomoi ya seko, ekokufa soki moke te; mpe moto ata moko te akobotola yango na loboko na ngai! Tata na ngai, oyo apesaki ngai yango, aleki nyonso na monene. Mpe moto moko te akoki kobotola yango na loboko ya Tata na ngai. Ngai na Tata, tozali se moko. Bongo Bayuda balokotaki lisusu mabanga mpo na koboma ye. Yesu alobaki na bango: —Nalakisi bino makamwisi mingi ya minene, oyo ewutaki epai ya Tata; bongo bolingi koboma ngai na mabanga mpo na likamwisi nini? Bayuda bazongiselaki ye: —Tolingi koboma yo te mpo na likamwisi moko boye, kasi mpo ozali kofinga Nzambe. Mpe, mpo yo ozali moto, kasi ozali koloba ete ozali Nzambe. Yesu alobaki na bango: —Ekomama te na Mibeko na bino ete: Ngai nalobaki: Bozali banzambe? Nzokande, Makomi ekoki koboyama te. Soki Mibeko na bino ezali kobenga “banzambe” baoyo Liloba ya Nzambe eyelaki bango, bongo mpo na nini bozali koloba na ngai ete nazali kotiola Nzambe, awa nalobi: “Nazali Mwana na Nzambe,” pamba te Tata moto abulisaki ngai mpe atindaki ngai na mokili. Soki nasalaka te misala ya Tata na ngai, wana bondimela ngai te. Kasi soki nasalaka yango, bondimela yango ata soki bozali kondimela ngai te, mpo boyeba mpe bososola ete Tata azali kati na ngai, mpe ngai nazali kati na Tata. Balukaki lisusu kokanga ye, kasi akimaki bango. Bongo Yesu akendaki lisusu na ngambo ya mayi ya Yordani, esika Jean azalaki kobatis bato, mpe atikalaki kuna. Bato mingi penza bayaki epai na ye. Balobaki: —Jean asalaki likamwisi ata moko te, kasi makambo nyonso oyo ye alobaki mpo na moto oyo, ezali ya solo! Mpe kuna, bato mingi bandimelaki Yesu. Moto moko kombo na ye Lazare azalaki maladi; azalaki moto ya mboka Betaniya, mboka ya Mariya mpe ya ndeko na ye Marta. Mariya azali mwasi oyo apakolaki Nkolo malasi, mpe apangusaki ye makolo na suki na ye; ezali ye nde ndeko na ye Lazare azalaki maladi. Bandeko ya Lazare ya basi batindaki maloba oyo epai ya Yesu: —Nkolo, ye oyo olingaka azali maladi. Tango Yesu ayokaki Sango yango, alobaki: —Maladi oyo ekoboma ye te kasi yango ekopesa Nzambe nkembo, mpe ekozala nzela mpo ete Mwana na Nzambe azwa nkembo. Nzokande, Yesu azalaki kolinga Marta, na ndeko na ye ya mwasi, mpe Lazare. Tango Yesu ayokaki ete Lazare azali maladi, avandaki lisusu mikolo mibale na esika oyo ye azalaki; bongo alobaki na bayekoli na ye: —Tozonga na Yudea! Bayekoli balobaki na ye: —Moteyi, kala mingi te Bayuda balingaki koboma yo na mabanga, bongo olingi lisusu kozonga kuna! Yesu azongisaki: —Boni, mokolo mobimba ezali na bangonga zomi na mibale te? Soki moto atamboli na moi, akobeta libaku te, pamba te azali komona mwinda ya mokili oyo. Nzokande soki moto atamboli na butu, akobeta libaku pamba te mwinda ezali kati na ye te. Sima ya koloba bongo, alobaki na bango lisusu: —Moninga na biso Lazare alali pongi; kasi nakokende kolamusa ye! Bayekoli bazongiselaki ye: —Nkolo, soki azali kolala pongi, akobika! Nzokande Yesu alobaki mpo na liwa na ye; kasi bayekoli bakanisaki ete alobaki kaka mpo na pongi oyo tolalaka. Bongo Yesu alobaki na bango polele: —Lazare akufi! Mpe nazali na esengo mingi penza mpo na bino, lokola nazalaki kuna te, mpo ete bokoka kondima. Kasi tika tokende epai na ye! Bongo Toma oyo babengaka lipasa, alobaki na bayekoli mosusu: —Biso mpe tokende, mpo tokufa na ye elongo! Tango Yesu akomaki, akutaki ete banda bakundaki Lazare na lilita, yango ekokisaki mikolo minei. Betaniya ezalaki pene-pene na Yeruzalem na bakilometele pene-pene misato. Bayuda mingi bayaki epai ya Mariya mpe Marta mpo na kolongola bango mawa mpo na liwa ya ndeko na bango. Tango Marta ayokaki ete Yesu azalaki koya, akendaki kokutana na ye, kasi Mariya atikalaki na ndako. Marta alobaki na Yesu: —Nkolo, soki ozalaki awa, mbele ndeko na ngai akufaki te! Kasi nayebi ete ata sikʼoyo, Nzambe akopesa yo nyonso oyo okosenga ye! Yesu alobaki na ye: —Ndeko na yo akosekwa! Marta azongiselaki ye: —Nayebi ete akosekwa, tango bato bakosekwa, na mokolo ya suka! Yesu alobaki na ye: —Ngai nazali lisekwa mpe bomoi. Moto oyo akondima ngai, akozala na bomoi, atako soki akufi. Mpe moto nyonso oyo azali na bomoi, soki andimeli ngai, akokufa seko te! Ondimi yango? Marta azongiselaki ye: —E e Nkolo! Nandimi ete ozali Kristo, Mwana na Nzambe, oyo azali koya na mokili! Tango asilisaki koloba bongo, akendaki kobenga ndako na ye Mariya mpe alobaki na ye na mongongo ya nse penza: —Moteyi asiʼaye, azali kobenga yo! Awa Mariya ayokaki bongo, atelemaki mbangu mpe akendaki epai ya Yesu. Nzokande Yesu akotaki naino te na mboka, azalaki kaka na esika oyo Marta akutanaki na ye. Bayuda oyo bazalaki na Mariya na kati ya ndako mpo na kolongola ye mawa, tango bamonaki ete Mariya atelamaki mbangu mpe abimaki libanda, balandaki ye, mpo bakanisaki ete akei kolela na lilita. Tango Mariya akomaki esika Yesu azalaki mpe amonaki ye, amibwakaki na makolo ya Yesu, mpe alobaki na ye: —Nkolo, soki ozalaki awa, mbele ndeko na ngai akufaki te! Tango Yesu amonaki ete Mariya mpe bayuda oyo bayaki na Mariya bazalaki kolela, ayokaki mawa mingi na nse ya motema, mpe amitungisaki mingi. Atunaki bango: —Bokundaki ye wapi? Bazongiselaki ye: —Nkolo, yaka mpe omona! Yesu alelaki. Bongo bayuda balobaki: —Tala, alingaki ye mingi penza! Kasi basusu kati na bango balobaki: —Ye moto afungolaki miso ya mokufi miso, akokaki te kosala nyonso ete Lazare akufa te? Yesu ayokaki lisusu mawa mingi na motema, mpe akomaki na lilita. Libulu yango ezalaki na kati ya mabanga, mpe libanga ezalaki likolo ya monoko na yango. Yesu alobi na bango: —Bolongola libanga! Kasi Marta ndeko ya mokufi alobi na ye: —Nkolo, asiʼabandi kolumba solo, pamba te banda akundama, esiʼesali mikolo minei! Yesu alobaki na ye: —Nalobaki na yo te ete soki ondimi, okomona nkembo na Nzambe? Bongo balongolaki libanga. Yesu atombolaki miso na likolo mpe alobaki: —Tata, natondi yo mpo oyoki ngai. Nayebi ete oyokaka ngai tango nyonso; kasi nalobi boye mpo na ebele ya bato oyo bazali pembeni-pembeni na ngai, mpo ete bandima ete yo moto otindaki ngai! Sima ya maloba wana, Yesu agangaki na mongongo makasi: Lazare bima! Bongo mokufi abimaki na lilita; makolo mpe maboko na ye ezalaki ya kokangama na bilamba, mpe elongi na ye ezalaki ya kozipama na kitendi. Yesu alobaki na bango: —Bofungola ye mpe botika ye akende! Bayuda mingi oyo bayaki epai ya Mariya, tango bamonaki oyo Yesu asalaki, bandimaki ye. Kasi basusu kati na bango bakendaki epai ya bafarizeo mpe bayebisaki bango likambo Yesu asalaki. Bongo banganga-Nzambe mpe bafarizeo babengisaki likita-monene. Batunanaki: —Tokosala nini? Pamba te moto oyo azali kosala makamwisi mingi. Soki totiki ye bongo, bato nyonso bakondima ye, bongo bato ya Roma bakoya mpe bakopanza Esika na biso mpe ekolo na biso. Bongo moko na kati na bango kombo na ye Kayifa, oyo azalaki mokonzi ya banganga-Nzambe na mbula wana, alobaki na bango: —Bozali kososola eloko moko te! Bozali komona te ete ezali mpo na litomba na biso ete moto moko akufa mpo na bato nyonso, bongo ekolo mobimba ekufa te? Nzokande alobaki makambo wana na makanisi na ye moko te, kasi lokola azalaki mokonzi ya banganga-Nzambe na mbula wana, yango wana asakolaki ete Yesu akokufa mpo na ekolo ya bayuda; mpe mpo na ekolo kaka te, kasi mpo na kosangisa mpe bana nyonso ya Nzambe baoyo bapalangana, ete bazala moto se moko. Banda mokolo wana, bayokanaki mpo na koboma ye. Bongo Yesu azalaki komimonisa lisusu polele te na miso ya bayuda. Alongwaki wana mpe akendaki na mokili oyo ezalaki pene-pene na esobe, na mboka moko kombo na yango Efrayimi; mpe avandaki kuna elongo na bayekoli na ye. Feti ya Pake ya bayuda ekomaki pene-pene. Bongo bato mingi batikaki bamboka mpe bakendaki na Yeruzalem, liboso ya Pake, mpo na komipetola. Bazalaki koluka Yesu, mpe bazalaki kotunana bango na bango, awa bazalaki na kati ya lopango ya Ndako ya Nzambe: —Bokanisi nini? Akoya na feti te? Bakonzi ya banganga-Nzambe mpe bafarizeo bapesaki motindo ete, soki moto ayebi esika Yesu azali, akende koyebisa bango, mpo bakanga ye. Etilaki mikolo motoba liboso ete Pake ebanda. Yesu akendaki na Betaniya epai Lazare azalaki kovanda, moto oyo ye asekwisaki kati na bakufi. Kuna, balambelaki Yesu biloko ya kolia. Marta azalaki kosalela bango, mpe Lazare avandaki na mesa elongo na Yesu. Bongo Mariya akamataki ndambo ya litre ya malasi ya nar, oyo basangisa na eloko moko te mpe ya motuya mingi penza. Asopaki yango na makolo ya Yesu, mpe azalaki kopangusa yango na basuki na ye. Ndako mobimba etondaki na solo ya malasi. Yuda Iskariote, moko ya bayekoli ya Yesu, oyo akoteka ye, alobaki: —Mpo na nini bateki malasi oyo te na badeni nkama misato mpe bapesa mbongo na babola? Nzokande alobaki bongo te mpo azalaki kokanisela babola, kasi mpo azalaki moyibi. Pamba te, ye moto azalaki kobomba mbongo, mpe azalaki koyiba mbongo oyo bazalaki kotia. Kasi Yesu alobaki: —Tika ye! Abombi malasi oyo mpo na mokolo ya kokundama na ngai. Babola bakozala na bino tango nyonso, kasi ngai, bokozala na ngai tango nyonso te! Bayuda ebele penza bayebaki ete Yesu azalaki kuna, bongo bakendaki kuna, mpo na Yesu kaka te, kasi mpo na kotala mpe Lazare oyo ye asekwisaki kati na bakufi. Bongo bakonzi ya banganga-Nzambe basalaki likita mpo na koboma Lazare. Pamba te, Bayuda mingi bakima bango mpe bandimaki Yesu mpo na Lazare. Mokolo oyo elandaki, ebele ya bato oyo bayaki na feti, awa bayokaki ete Yesu akoya na Yeruzalem, bakamataki mandalala, bongo bakendaki koyamba ye, mpe bazalaki koganga: —Ozana! Mapamboli mingi na moto oyo aye na kombo ya Nkolo! Mapamboli na Mokonzi ya Isalayele! Yesu amonaki mwana ya mpunda, mpe avandaki likolo na yango, ndenge ekomama: Elenge mwasi ya Siona kobanga te, tala, Mokonzi na yo azali koya, avandi likolo ya mwana ya mpunda! Na tango wana, bayekoli na ye basosolaki te tina ya makambo yango; kasi tango Yesu akotaki kati na nkembo, bongo nde bakundolaki na mitema ete makambo yango ekomamaki mpo na ye, mpe basalaki makambo wana epai na ye. Bato nyonso oyo bazalaki na Yesu tango abengaki Lazare abima na lilita mpe asekwisaki ye kati na bakufi, bazalaki kotatola makambo oyo bamonaki. Yango wana bato ebele penza bakendaki koyamba ye, mpo bayokaki ete asalaki likamwisi wana. Bongo bafarizeo bazalaki kolobana bango na bango: —Bomoni: tokolonga lisusu te, tala ndenge bato nyonso bakomi kolanda ye! Na kati ya baoyo bayaki na Yeruzalem mpo na kokumisa Nzambe na feti, Bagreki ndambo mpe bazalaki. Bakendaki kokutana na Filipo ya mboka Betsayida ya Galileya mpe basengaki ye: —Tata, tolingi komona Yesu! Filipo akendaki koyebisa yango na Andele; bongo Andele mpe Filipo bakendaki koyebisa Yesu. Yesu azongiselaki bango: —Ngonga esiʼekoki oyo Mwana na moto alingi kokota na nkembo na ye. Nalobi na bino ya solo: soki mbuma ya ble oyo ekweyi na mabele ekufi te, mbuma yango ekotikala kaka yango moko. Kasi soki ekufi, yango ekobota bambuma ebele penza. Moto oyo akolinga bomoi na ye, akobungisa yango; kasi oyo akoboya bomoi na ye na mokili oyo, azali kobatela yango mpo na bomoi ya seko. Soki moto azali kosalela ngai, alanda ngai; mpe epai ngai nakozala, mosali na ngai mpe akozala wana. Oyo akosalela ngai, Tata akokumisa ye! Sikʼoyo, molimo na ngai, etungisami. Naloba nini? Tata kangola ngai na ngonga oyo? Kasi ezali mpo na kokutana na yango nde nakomi na ngonga oyo! Tata, pesa nkembo na kombo na yo! Bongo mongongo moko ewutaki na likolo: —Nasiʼnapesa yango nkembo mpe nakopesa yango lisusu nkembo! Ebale ya bato oyo bazalaki wana, oyo bayokaki mongongo yango, balobaki ete ezali kake; basusu balobaki: —Ezali anzelu moto alobi na ye. Kasi yesu alobaki na bango: —Mongongo yango elobi mpo na ngai te, kasi mpo na bino. Sikʼoyo, tango ya kosambisama ya mokili oyo ekoki; sikʼoyo mokonzi ya mokili oyo akobwakama libanda. Mpe ngai, tango bakotombola ngai wuta na mabele, nakobenda bato nyonso epai na ngai! Alobaki bongo mpo na kolakisa lolenge ya liwa oyo ye akokufa. Ebele ya bato bazongiselaki ye: —Toyokaki wuta na Mibeko ete Kristo akowumela libela na libela. Bongo ndenge nini olobi na biso ete Mwana na moto akotombwama? Nani nde azali Mwana na moto? Yesu alobaki na bango: —Moi ezali naino na kati na bino mpo na mwa tango moke: botambola tango bozali na moi, mpo ete molili ekanga bino na mbalakaka te. Pamba te, moto oyo atambolaka na molili ayebaka te epai ye azali kokende. Yango wana, lokola bozali naino na moi, bondimela moi, mpo bokoma bana ya moi. Tango Yesu asilisaki koloba bongo, akendaki mpe amibombaki mosika na bango. Atako Yesu asalaki makamwisi mingi na miso na bango, kasi bandimaki ye te. Esalamaki bongo mpo ete maloba oyo moprofeta Ezayi alobaki ekokisama: Nkolo, nani andimaki mateya na biso; mpe nguya ya Nkolo emonanaki epai ya nani? Yango wana bakokaki kondima te, mpo Ezayi alobaki lisusu: Nzambe azipa miso na bango akomisa mitema na bango mabanga, mpo ete miso na bango emona te, mpe mitema na bango esosola te, mpo ete babongola mitema te, mpo nabikisa bango te! Ezayi alobaki bongo pamba te amonaki nkembo ya Yesu, mpe alobaki mpo na ye. Nzokande, ata na kati ya bakonzi ya Bayuda, mingi bandimaki ye; kasi balakisaki kondima na bango polele te, pamba te bazalaki kobanga soki te bafarizeo bakobengana bango na ndako ya mayangani. Mpo ete, balingaki mingi kozwa lokumu ya bato, kasi oyo ya Nzambe te. Bongo Yesu agangaki: —Moto oyo andimi ngai, andimi kaka ngai te, kasi andimi mpe moto oyo atindaki ngai. Oyo amoni ngai, amoni mpe moto oyo atindaki ngai. Ngai nayaki na mokili lokola moi, mpo ete moto nyonso oyo akondima ngai, azala lisusu na molili te. Soki moto ayoki maloba na ngai, mpe azali kotosa yango te, ezali ngai te moto nakokatela ye etumbu; pamba te nayaki te mpo na kokatela mokili etumbu, kasi mpo na kobikisa yango. Moto oyo akoboya ngai mpe akoyamba maloba na ngai te, azali na zuzi na ye. Liloba oyo nazali koloba, yango nde ekokatela ye etumbu na mokolo ya suka. Pamba te, nalobaki na kombo na ngai moko te, kasi Tata oyo atindaki ngai, ye moto atindaki ngai makambo oyo nasengeli koloba mpe ndenge nini koloba yango. Mpe nayebi ete, etinda na ye ememaka na bomoi ya seko. Yango wana, makambo oyo nalobaki, nalobaki yango ndenge Tata ayebisaki ngai! Ezalaki liboso ya feti ya Pake. Yesu ayebaki ete tango ya kolongwa na mokili oyo mpo na kokende epai ya Tata ekokaki. Tango nyonso azalaki kolinga bato na ye oyo bazalaki kati na mokili, mpe alingaki bango kino na suka! Tango bazalaki kolia; Zabolo asiʼakotaki na motema ya Yuda Isikariote, mwana ya Simon, mpo na koteka Yesu. Yesu ayebaki ete Tata atiaki makambo nyonso na nse ya nguya na ye, mpe awutaki epai ya Nzambe mpe akozonga epai ya Nzambe. Alongwaki na mesa na tango bazalaki kolia, alongolaki elamba oyo alataki likolo, bongo akamataki elamba oyo bapanguselaki mayi mpe akangaki yango na loketo na ye. Na sima, atiaki mayi na sani mpe abandaki kosukola makolo ya bayekoli na ye, bongo azalaki kopangusa yango na elamba oyo bapanguselaka mayi oyo akangaki na loketo. Tango akomaki epai ya Simon Piere, ye alobaki na ye: —Nkolo, yo olingi kosukola ngai makolo? Yesu azongiselaki ye: —Likambo nazali kosala, ozali kososola yango te sikʼoyo, kasi okososola yango sima! Kasi Piere alobaki na ye: —Te! Okosukola ngai makolo te! Yesu azongiselaki ye: —Soki nasukoli yo makolo te, okozala lisusu moyekoli na ngai te! Simon Piere alobaki na ye: —Nkolo, soki bongo, osukola ngai kaka makolo te, kasi sukola ngai mpe maboko na motu! Yesu alobaki na ye: —Moto oyo basukoli nzoto mobimba, azali na posa kaka ya kosukola makolo; nzoto na ye mobimba ezali peto. Mpe bino, bozali peto, kasi bino nyonso te. Pamba te Yesu ayebaki moto oyo akoteka ye. Yango wana alobaki: “Bino nyonso bozali peto te!” Tango asilisaki kosukola bango makolo, alataki elamba na ye mpe ayaki lisusu kovanda na mesa; bongo alobaki na bango: —Boni, bososoli likambo oyo nasali bino? Bino bobengaka ngai Moteyi mpe Nkolo, ya solo bolobaka malamu, pamba te nazali bongo. Bongo soki ngai Moteyi mpe Nkolo nasukoli bino makolo, bino mpe bosengeli kosukolana makolo bino na bino. Pamba te napesi bino ndakisa, mpo bosalaka mpe ndenge ngai nasali bino. Nazali koloba na bino ya solo penza: mosali aleki mokonzi na ye te, mpe motindami aleki te moto oyo atindaki ye. Lokola boyebi makambo oyo, bozali bato na esengo soki bosaleli yango. Nazali koloba mpo na bino nyonso te; nayebi baoyo ngai napona. Kasi esengeli ete Makomi ekokisama, oyo ezali koloba: Moto oyo azali kolia lipa elongo na ngai, abalukeli ngai! Nayebisi bino likambo yango sikʼoyo, liboso ete yango esalama, mpo ete tango yango ekosalama, bondima ete “Ngai nazali oyo nazali.” Nazali koloba na bino ya solo penza, moto oyo ayambi moto oyo ngai natindi, ayambi ngai; mpe moto oyo ayambi ngai ayambi mpe Moto oyo atindaki ngai. Sima ya koloba bongo, Yesu ayokaki pasi mingi na motema, mpe alobaki: —Nazali koloba na bino ya solo penza, moto moko na kati na bino akoteka ngai! Bayekoli babandaki kotalana moko na moko, mpe bayebaki te soki alobaki bongo mpo na nani. Moko na bango, moyekoli oyo Yesu azalaki kolinga mingi, azalaki na mesa pene-pene na Yesu. Bongo Simon Piere asalaki mwa elembo na moyekoli wana mpo atuna soki alobaki bongo mpo na nani. Bongo moyekoli yango alalaki moke na ntolo ya Yesu mpe atunaki ye: —Nkolo, nani yango? Yesu azongisaki: —Ezali moto oyo nakopesa ndambo ya lipa sima ya kodindisa yango na supu. Bongo, adindisaki ndambo ya lipa na supu, mpe apesaki yango na Yuda Isikariote mwana ya Simon. Na tango kaka Yuda azwaki lipa wana, Satana akotaki kati na ye. Bongo Yesu alobaki na ye: —Likambo oyo olingi kosala, sala yango noki! Kasi moto ata moko te na baoyo bazalaki na mesa, asosolaki soki mpo na nini Yesu alobaki na ye bongo. Lokola Yuda azalaki kobomba mbongo, bayekoli mosusu bakanisaki ete Yesu alobi na ye akende kosomba biloko ya feti, to mpe apesa lisalisi na babola. Awa Yuda azwaki lipa wana, abimaki kaka na tango wana. Ezalaki butu. Tango Yuda akendaki, Yesu alobaki: —Sikʼoyo nkembo ya Mwana na Moto emonani polele, mpe Nzambe akozwa nkembo kati na ye. Soki Nzambe azwi nkembo kati na ye, Nzambe ye moko mpe akopesa Mwana nkembo kati na ye moko, mpe akosala yango noki penza. Bana na ngai, nazali naino na bino elongo kaka mpo na mwa tango moke. Bokoluka ngai; kasi nalobi na bino sikʼoyo ndenge nalobaki na bayuda: Bokokoka te kokende epai ngai nazali kokende! Mobeko ya sika oyo napesi bino, yango oyo: Bolingana bino na bino. Ndenge ngai nalingaka bino, bino mpe bolingana bino na bino. Soki bolingani bino na bino, na ndenge wana nde bato nyonso bakoyeba ete bozali bayekoli na ngai! Simon Piere atunaki ye: —Nkolo, ozali kokende wapi? Yesu azongiselaki ye: —Okokoka te kolanda ngai sikʼoyo epai nazali kokende, kasi okolanda ngai sima. Piere alobaki na ye lisusu: —Nkolo, mpo na nini nakoki te kolanda yo sikʼoyo? Nazali ya komibongisa mpo na kokufa mpo na yo! Yesu azongiselaki ye: —Ozali ya komibongisa penza mpo na kokufa mpo na ngai? Nalobi na yo ya solo penza: liboso ete soso elela, okowangana ngai mbala misato! Tika ete mitema na bino etungisama te. Bondimelaka Nzambe, bondimela mpe ngai. Na ndako ya Tata na ngai bisika ezali mingi, mpe nakeyi kobongisela bino esika. Soki ezalaki bongo te, mbele nalingaki koyebisa bino yango. Mpe soki nakeyi mpe nabongiseli bino esika, bongo nakoya lisusu mpe nakokamata bino elongo na ngai, mpo ete bozala epai ngai nakozala. Kasi bino boyebi nzela ya esika oyo ngai nazali kokende. Toma alobaki na ye: —Nkolo, toyebi te epai ozali kokende; bongo ndenge nini tokoki koyeba nzela yango? Yesu azongiselaki ye: —Ngai nazali nzela, solo, mpe bomoi. Moto moko te akoki koya epai ya Tata soki aleki na nzela na ngai te. Soki boyebaki ngai, mbele bolingaki mpe boyeba Tata na ngai. Mpe banda sikʼoyo boyebi ye, mpe bomoni ye! Filipi alobaki na ye: —Nkolo, lakisa biso Tata, mpe tokozala lisusu na posa ya eloko moko te. Yesu azongiselaki ye: —A a Filipi, banda kala nazali na bino elongo, mpe oyebaka ngai te? Moto oyo amoni ngai, amoni Tata. Bongo mpo na nini ozali koloba: “Lakisa biso Tata?” Ondimi te ete ngai nazali kati na Tata mpe Tata azali kati na ngai? Maloba oyo nalobaka na bino, ewutaka na ngai moko te. Kasi Tata, ye oyo avandaka kati na ngai, ye moto azali kosala misala na ye. Bondimela ngai ete nazali kati na Tata, mpe Tata azali kati na ngai. Soki bongo te, bondima ata mpo na misala oyo nazali kosala. Nalobi na bino ya solo penza: moto oyo akondimela ngai, akosala mpe misala oyo nazali kosala. Akosala kutu makambo minene koleka oyo ya ngai, pamba te nazali kokende epai ya Tata. Mpe makambo nyonso oyo bokosenga na kombo na ngai, nakosala yango mpo ete Tata azwa nkembo kati na Mwana. Soki bosengi eloko na kombo na ngai, nakosala yango! —Soki bolingaka ngai, bobatela mitindo na ngai. Bongo ngai nakobondela Tata, mpe ye akopesa bino Mosungi mosusu, mpo azala na bino tango nyonso: ye azali Molimo ya bosolo, oyo mokili akoki kozwa te, mpo bamoni ye naino te mpe bayebi ye te. Kasi bino boyebi ye, pamba te azali elongo na bino, mpe akozala kati na bino. Nakotika bino lokola bana bitike te; nakozongela bino. Etikali mwa tango moke, mokili ekomona ngai lisusu te; kasi bino, bokomona ngai, pamba te nazali na bomoi, mpe bino mpe bokozala na bomoi. Na mokolo yango, bokososola ete ngai nazali kati na Tata na ngai, bino bozali kati na ngai, mpe ngai nazali kati na bino. Moto oyo andimi mitindo na ngai mpe azali kobatela yango, ye nde alingaka ngai. Mpe moto oyo alingaka ngai, Tata na ngai akolinga ye; ngai mpe nakolinga ye, mpe nakomimonisa epai na ye! Bongo Yuda (kasi Isikariote te) atunaki: —Nkolo, mpo na nini okomimonisa na biso, kasi na mokili te? Yesu azongiselaki ye: —Soki moto alingi ngai, akobatela Liloba na ngai, mpe Tata na ngai akolinga ye. Bongo tokoya epai na ye mpe tokosala evandelo na biso epai na ye. Moto oyo alingaka ngai te, abatelaka mpe maloba na ngai te. Mpe Liloba oyo bozali koyoka ezali ya ngai te, kasi ezali ya Tata oyo atinda ngai. Nayebisi bino makambo oyo tango nazali naino elongo na bino. Kasi Mosungi, Molimo Mosantu, oyo Tata akotinda na kombo na ngai, Ye akoteya bino makambo nyonso, mpe akokanisela bino makambo nyonso oyo nayebisaki bino. Natikeli bino kimia; napesi bino kimia na ngai; napesi bino yango te ndenge mokili epesaka. Botika mitema na bino emitungisa te mpe bobanga te. Boyokaki ete nalobaki na bino: Nakokende, mpe nakozongela bino. Soki bolingaki ngai, mbele bolingaki kosepela awa nazali kokende epai ya Tata; pamba te Tata na ngai aleki ngai na monene. Nayebisi bino makambo yango sikʼoyo, awa yango esalami naino te, mpo ete tango yango ekosalama, bondima. Nakoloba na bino lisusu mingi te, pamba te mokonzi ya mokili oyo azali koya, mpe azali na nguya moko te likolo na ngai; kasi nakosala ndenge Tata atindaki ngai mpo ete mokili ekoka koyeba ete nalingaka Tata. Botelema, tolongwa awa! —Ngai nazali nzete ya solo ya vino, mpe Tata na ngai azali moloni. Ye akataka etape nyonso oyo ezali kati na ngai, oyo ebotaka mbuma te; mpe abongisaka etape nyonso oyo ebotaka mbuma mpo ete ebota bambuma ebele. Bosiʼbokoma peto mpo na Liloba oyo nalobaki na bino. Bokangama na ngai mpe ngai kati na bino. Etape moko te ekoki kobota mbuma na ndenge na yango moko; esengeli ezala ya kokangama na nzete. Bino mpe ndenge moko: soki bokangani na ngai te, bokoki kobota mbuma te. Ngai nazali nzete ya vino, mpe bino bozali bitape. Moto oyo azali ya kokangama na ngai, mpe ngai kati na ye, akobota bambuma ebele. Pamba te, soki bokabwani na ngai, bokokoka kosala eloko moko te. Soki moto akangami na ngai te, azali lokola etape ya nzete oyo babwaki libanda mpe ekawuki; bitape ya ndenge wana balokotaka yango, babwakaka yango na moto, mpe ezikaka. Soki bokangami na ngai, mpe maloba na ngai evandi kati na bino, bosenga eloko nyonso oyo bolingi, mpe bokozwa yango! Likambo epesaka Tata na ngai lokumu ezali oyo: ete bobota bambuma ebele mpe bokoma bayekoli na ngai. Nalingaka bino ndenge Tata alingaka ngai; yango wana, bowumela kati na bolingo na ngai. Soki bobateli mitindo na ngai, bokowumela kati na bolingo na ngai, ndenge ngai nabatelaki mitindo ya Tata na ngai, mpe nazali kowumela kati na bolingo na ye. Nayebisi bino makambo oyo mpo ete esengo na ngai ezala kati na bino, mpe mpo esengo na bino ezala ya kokoka. Motindo na ngai yangoʼoyo: bolingana bino na bino ndenge ngai nalingaka bino. Moto moko te azali na bolingo monene koleka moto oyo akabi bomoi na ye mpo na baninga na ye. Bino bozali baninga na ngai, soki bozali kosala oyo natindi bino. Nakobenga bino lisusu basali te, pamba te mosali ayebaka te makambo oyo nkolo na ye asalaka. Kasi bino, nabengi bino baninga na ngai, mpo nasiʼnayebisi bino makambo nyonso oyo nayokaki na Tata na ngai! Ezali bino te bato boponaki ngai, kasi ngai moto naponaki bino. Napesaki bino mosala mpo bokende mpe bobota mbuma, mbuma oyo ekowumela. Bongo Tata akopesa bino nyonso oyo bokosenga ye na kombo na ngai. Motindo napesi bino yangʼoyo: bolinganaka bino na bino. —Soki mokili eyini bino, boyeba ete eyinaki ngai liboso na bino. Soki bozalaki bato ya mokili, mbele mokili elingaki kolinga bino lokola bato na ye. Kasi lokola bozali bato ya mokili te, mpe nasi napona bino wuta na mokili: yango wana mokili ezali koyina bino. Bokanisa maloba oyo nalobaki na bino: mosali moko te aleki nkolo na ye. Soki banyokolaki ngai, bakonyokola bino mpe; soki babatelaki mateya na ngai, bakobatela mpe oyo ya bino. Kasi bakosala bino makambo wana nyonso mpo na kombo na ngai, mpo bayebi te moto oyo atindaki ngai. Soki nayaki te mpe nalobaki na bango te, mbele balingaki kozala na lisumu te, kasi sikʼoyo, bazali na mwaye te ya kowangana lisumu na bango. Moto oyo ayinaka ngai, ayinaka mpe Tata na ngai. Soki nasalaki te kati na bango, makamwisi oyo moto mosusu asala te, mbele balingaki kozala na lisumu te; sikʼoyo basiʼbamoni yango, kasi bazali kaka koyina ngai na Tata na ngai. Kasi yango esalami bongo mpo ete makambo oyo ekomama na Mibeko na bango ekokisama: Bayinaki ngai kaka pamba. Tango Mosungi akoya, oyo nakotindela bino wuta epai ya Tata, Molimo ya bosolo oyo akowuta epai ya Tata, ye akotatola mpo na ngai. Bongo bino mpe, bokotatola mpo na ngai, pamba te bozalaki na ngai elongo wuta na ebandeli! —Nalobi na bino makambo oyo mpo ete kondima na bino ebeta libaku te. Pamba te bakobengana bino na Bandako na bango ya mayangani, mpe tango elingi kokoka, oyo moto nyonso oyo akoboma bino akokanisa ete azali kosalela Nzambe na ndenge wana. Bakosala makambo ya ndenge wana mpo bayebi Tata te, mpe bayebi ngai te! Nalobi na bino makambo oyo, mpo ete tango ngonga ekokoka, bokanisa ete nasiʼnayebisaki bino makambo yango. Nayebisaki bino makambo yango na ebandeli te, mpo nazalaki naino na bino elongo. Sikʼoyo nazali kokende epai ya Moto oyo atindaki ngai; mpe moto ata moko te na kati na bino azali kotuna ngai: Ozali kokende wapi? Kasi lokola nayebisi bino makambo oyo, tala ndenge mitema na bino etondi na mawa. Nzokande, nazali koyebisa bino makambo ya solo: ezali malamu mingi penza mpo na bino ete ngai nakende. Pamba te soki nakei te, Mosungi mpe akoyela bino te. Kasi soki nakei, nakotindela bino ye. Tango akoya, akolakisa bato ya mokili polele mpo na oyo etali masumu, bosembo, mpe kosambisama: mpo na masumu, pamba te bazali kondima ngai te; mpo na bosembo, pamba te nazali kokende epai ya Tata mpe bokomona ngai lisusu te; mpo na kosambisama, pamba te mokonzi ya mokili oyo asiʼasambisami. Nazali lisusu na makambo mingi ya koyebisa bino, kasi sikʼoyo, bokokoka te kososola yango. Tango Molimo ya bosolo akoya, ye akotambolisa bino kati na solo nyonso, pamba te akoloba na kombo na ye moko te, kasi akoloba makambo nyonso oyo ayokaki, mpe akoyebisa bino makambo oyo ekoya. Ye akopesa ngai nkembo, pamba te akozwa makambo nyonso oyo ezali epai na ngai mpe akoyebisa bino yango. Nyonso oyo Tata azali na yango, ezali mpe ya ngai. Yango wana nalobi ete, akozwa makambo nyonso oyo ezali epai na ngai mpe akoyebisa bino yango. Etikali moke bokomona ngai lisusu te; bongo sima ya mwa tango moke bokomona ngai lisusu! Bayekoli na ye mosusu babandaki kotunana bango na bango: —Oyo ye alobi na biso elingi koloba nini. “Etikali moke bokomona ngai lisusu te; bongo sima ya mwa tango moke bokomona ngai lisusu”. Mpe lisusu: “Pamba te nazali kokende epai ya Tata?” Bazalaki kaka kotunana: —“Etikali moke”, yango elingi koloba nini? Tozali kososola te likambo alingi koloba. Yesu ayebaki ete balingaki kotuna ye motuna, bongo alobaki na bango: —Bozali kotunana bino na bino mpo na maloba oyo nalobi ete: “Etikali moke bokomona ngai lisusu te; bongo sima ya mwa tango moke bokomona ngai lisusu.” Nazali koloba na bino ya solo: bokolela mpe bokomitungisa, kasi mokili ekotonda na esengo. Bokozala na mawa, kasi mawa na bino ekobongwana esengo. Mwasi soki alingi kobota ayokaka mawa mingi penza, mpo tango na ye ya kobota ekoki; kasi soki aboti mwana, akobosana bapasi na ye mpo na esengo oyo akotonda na yango, mpo ete mwana asili kobotama na mokili. Bino mpe ndenge moko, sikʼoyo bozali na mawa, kasi tango nakomona bino lisusu, mitema na bino ekotonda na esengo, mpe esengo yango, moto ata moko te akokoka kolongola bino yango. Na mokolo yango, bokotuna ngai lisusu ata likambo moko te. Nazali koloba na bino ya solo: nyonso oyo bokosenga epai ya Tata na kombo na ngai, ye akopesa bino yango. Kino sikʼoyo, naino bosengi eloko moko te na kombo na ngai. Bosenga mpe bokozwa, mpo ete esengo na bino ezala ya kokoka. Nalobaki na bino makambo wana na masapo. Kasi tango ezali koya oyo nakoloba na bino lisusu na masapo te, kasi nakoloba na bino na polele penza mpo na Tata. Na mokolo wana, bokosenga na kombo na ngai. Mpe nalobi te ete nakosenga epai ya Tata mpo na bino; pamba te Tata ye moko alingaka bino, mpo bolingaka ngai mpe bondimaka ete ngai nawutaki epai ya Tata. Nawutaki epai ya Tata mpe nayaki awa na mokili. Mpe sikʼoyo nazali kotika mokili, mpe nazali kozonga epai ya Tata! Bongo bayekoli na ye balobaki na ye: —Omoni, sikʼoyo ozali koloba polele, mpe otiki koloba na masapo. Sikʼoyo toyebi ete oyebi makambo nyonso, mpe ozali na posa te ete moto atuna yo; mpo na yango, tondimi ete owutaki epai ya Nzambe. Yesu azongiselaki bango: —Bondimi sikʼoyo? Tango ezali koya, mpe esiʼekomi, oyo bokopanzana moto na moto na epai na ye, mpe bokotika ngai, ngai moko. Kasi nazali ngai moko te, pamba te Tata azali na ngai elongo. Nalobi na bino makambo oyo, mpo ete bozala na kimia kati na ngai. Na mokili oyo, bokonyokwama mingi penza. Kasi boyika mpiko! pamba te, nasiʼnalongi mokili. Tango Yesu asilisaki koloba makambo wana, atalaki na Likolo mpe abondelaki: —Tata, tango ekoki; monisa nkembo ya Mwana na yo, mpo ete Mwana mpe amonisa nkembo na yo! Pamba te, opesaki ye bokonzi likolo ya bato nyonso, mpo ete apesi bomoi ya seko na bato nyonso oyo opesaki ye. Nzokande bomoi ya seko ezali nde: bayeba yo Nzambe moko kaka mpe ya solo, mpe Yesu Kristo oyo yo otindaki. Namonisi nkembo na yo awa na mokili, mpe nasilisi mosala oyo opesaki ngai. Mpe sikʼoyo, Tata pesa ngai nkembo, liboso na yo, na nkembo oyo nazalaki na yango elongo na yo, liboso ete mokili esalama. Nasiʼnalakisi kombo na yo na bato oyo opesaki ngai wuta na mokili. Bazalaki bato na yo, mpe opesaki ngai bango; mpe babateli maloba na yo. Sikʼoyo bayebi malamu ete nyonso oyo opesaki ngai ewuti epai na yo; pamba te, napesaki bango mateya oyo opesaki ngai mpe bayambaki yango; bayebi penza ete nawutaki epai na yo, mpe bandimi ete yo moto otindaki ngai. Nazali kobondela mpo na bango. Nazali kobondela mpo na bato ya mokili te, kasi mpo na bato oyo opesaki ngai; mpo bazali bato na yo. Pamba te nyonso oyo ezali ya ngai, ezali mpe ya yo; mpe oyo ezali ya yo, ezali mpe ya ngai; Mpe nkembo na ngai ezali komonana kati na bango. Nakozala lisusu na mokili te, pamba te nazali koya epai na yo, kasi bango bazali kati na mokili. Tata Mosantu, batela bango na nguya ya kombo na yo, kombo oyo opesaki ngai, mpo ete bazala moko ndenge biso mpe tozali moko. Tango nazalaki na bango, nabatelaki bango na nguya ya kombo na yo, kombo oyo opesaki ngai; nabatelaki bango malamu penza, mpe moko te na kati na bango abungaki, longola kaka moto oyo asengelaki kobunga mpo ete Makomi ekokisama. Sikʼoyo nazali koya epai na yo, mpe nazali koloba makambo oyo na tango nazali naino na mokili, mpo ete batonda na esengo na ngai. Napesaki bango maloba na yo, mpe mokili eyinaki bango mpo bazali bato ya mokili te, ndenge ngai mpe nazali moto ya mokili te. Nazali kobondela te mpo olongola bango na mokili, kasi mpo obatela bango na mabe. Bazali bato ya mokili te, ndenge ngai mpe nazali moto ya mokili te. Komisa bango bato na yo na nzela ya solo na yo. Maloba na yo ezali solo. Natindi bango na mokili, ndenge yo mpe otindaki ngai na mokili. Namipesi ngai moko mpo na bango, mpo ete bango mpe bakoma solo bato na yo. —Nazali kobondela kaka mpo na bango te; kasi mpo na baoyo mpe bakondimela ngai na nzela ya maloba na bango, mpo ete bango nyonso bakoma moto se moko, lokola yo Tata, ozali kati na ngai, mpe ngai kati na yo, mpo ete bango mpe bazala moto moko kati na biso, mpo ete mokili endima ete yo moto otindaki ngai. Napesi bango nkembo oyo opesaki ngai, mpo ete bazala moto se moko, ndenge biso mpe tozali moto moko: ngai kati na bango, mpe yo kati na ngai, mpo ete bazala penza moto moko, mpe mpo ete mokili eyeba penza ete Yo moto otindaki ngai, mpe olingaka bango ndenge olingaka ngai. Tata, nalingi ete bato oyo opesaki ngai bazala na ngai elongo na esika oyo ngai nakozala, mpo bamona nkembo na ngai, nkembo oyo opesaki ngai, pamba te olingaki ngai liboso ete mokili esalama. Tata ya bosembo, mokili eyebaki yo te, kasi ngai nayebaki yo, mpe baoyo bayebi ete yo moto otindaki ngai. Nalakisi bango kombo na yo, mpe nakolakisa bango yango lisusu, mpo ete bolingo oyo ozali na yango mpo na ngai, ezala kati na bango, bongo ngai mpe nazala kati na bango. Tango Yesu asilisaki kobondela, akendaki na bayekoli na ye na ngambo ya mayi ya Sedroni. Elanga moko ezalaki na esika yango, bongo Yesu akotaki kuna na bayekoli na ye. Yuda oyo atekaki Yesu ayebaki esika yango; pamba te mbala mingi Yesu azalaki kokende kosangana kuna na bayekoli na ye. Bongo Yuda akendaki na elanga; azalaki kokamba lisanga ya basoda mpe ya bakengeli oyo bakonzi ya banganga-Nzambe na bafarizeo bapesaki ye. Bato yango bazalaki na minda, banzete oyo ezalaki kopela moto, na bibundeli na maboko. Lokola Yesu ayebaki makambo nyonso oyo elingaki kokomela ye, akendaki kokutana na bango mpe atunaki bango: —Bozali koluka nani? Bazongisaki: —Yesu ya Nazareti! Yesu alobaki na bango: —Ngai oyo! Bongo Yuda oyo atekaki ye, azalaki wana elongo na bango. Tango Yesu alobaki na bango: “Ngai oyo”, bazongaki na sima mpe bakweyaki na mabele. Yesu atunaki bango lisusu: —Bozali koluka nani? Bazongisaki: —Yesu ya Nazareti! Yesu alobaki na bango: —Nasiʼnalobaki na bino ete ezali ngai. Soki bozali koluka ngai, botika baoyo bakende. Na bongo, maloba oyo alobaki ekokisamaki: “Na kati ya bato oyo opesaki ngai, nabungisi ata moko te!” Bongo Simon Piere, oyo azalaki na mopanga, abendaki yango, abetaki mosali ya mokonzi ya banganga-Nzambe, mpe akataki ye litoyi oyo ya mopanzi ya mobali. Mosali yango, kombo na ye: Malkus. Kasi Yesu alobaki na Piere: —Zongisa mopanga na yo na esika na yango. Boni, kopo ya bapasi oyo Tata apesi ngai, esengei namela yango te? Bongo basoda elongo na bakonzi na bango, na bakengeli ya Bayuda, bakamataki Yesu mpe bakangaki ye na basinga. Bamemaki ye liboso epai ya Ana; pamba te Ana azalaki bokilo ya Kayifa, oyo azalaki mokonzi ya banganga-Nzambe na mbula wana. Kayifa azalaki moto oyo apesaki Bayuda toli ete, ebongi malamu moto moko akufa mpo na bato. Simon Piere mpe moyekoli mosusu bazalaki kolanda Yesu. Lokola moyekoli yango ayebanaki na mokonzi ya banganga-Nzambe, akotaki elongo na Yesu na lopango ya ndako ya mokonzi ya banganga-Nzambe, kasi Piere azalaki kozela libanda, liboso ya porte. Moyekoli oyo mosusu, oyo ayebanaki na mokonzi ya banganga-Nzambe, abimaki mpe alobaki na mwasi oyo azalaki kokengela porte, akotisaki mpe Piere. Mwasi yango, oyo azalaki kokengela porte atunaki Piere: —Boni, yo mpe ozali moko ya bayekoli ya moto wana te? Piere azongiselaki ye: —Te, nazali moyekoli na ye te! Lokola malili ezalaki, basali mpe bakengeli bapelisaki moto ya makala, mpe batelemaki pembeni-pembeni mpo na koyotela. Piere mpe azalaki wana elongo na bango mpo na koyotela. Mokonzi ya banganga-Nzambe atunaki Yesu mituna mpo na bayekoli na ye, mpe mpo na mateya na ye. Yesu azongiselaki ye: —Nazalaki koloba polele epai ya bato nyonso; nazalaki koteya tango nyonso na Bandako ya mayangani mpe na lopango ya Ndako ya Nzambe, epai Bayuda nyonso basanganaka. Mpe nalobaki eloko moko te na sekele. Bongo mpo na nini ozali kotuna ngai? Tuna bato oyo bayoka maloba na ngai. Bango bayebi makambo oyo nazalaki koloba! Tango Yesu alobaki bongo, mokengeli moko oyo azalaki wana, abetaki ye mbata, mpe atunaki ye: —Ozali kozongisa ndenge wana na mokonzi ya banganga-Nzambe? Yesu alobaki na ye: —Soki nalobi mabe, lakisa ngai mabe yango. Kasi soki nalobi solo, bongo mpo na nini obeti ngai? Bongo Ana atindaki Yesu epai ya Kayifa, mokonzi ya banganga-Nzambe; mpe azalaki kaka ya kokangama na basinga. Simon Piere azalaki naino wana, mpe azalaki koyotela moto. Bongo batunaki ye: —Boni, yo mpe ozali moko ya bayekoli na ye te? Piere awanganaki yango mpe alobaki: —Te, nazali moyekoli na ye te! Kasi mosali moko na kati ya basali ya mokonzi ya banganga-Nzambe, ndeko ya moto oyo Piere akataki litoyi, atunaki Piere: —E e, ezali yo te oyo namonaki elongo na ye, kuna na elanga? Kasi Piere awanganaki yango lisusu; mpe kaka na tango wana, soso elelaki! Bongo wuta na ndako ya Kayifa, bamemaki Yesu na esika oyo bakatelaka makambo. Ezalaki na tongo. Mpe bango moko bakotaki te na esika oyo bakatelaka makambo, mpo ete bakoma mbindo te, mpe bakoka kolia bilei ya Pake. Yango wana Pilato abimaki, mpe atunaki bango: —Bofundi moto oyo mpo na nini? Bango bazongiselaki ye: —Soki moto oyo azalaki moto mabe te, mbele toye kotika ye te na maboko na yo! Pilato alobaki na bango: —Bokamata ye mpe bosambisa ye bino moko, ndenge Mibeko na bino ezali kotinda! Bayuda bazongiselaki ye: —Biso tozali na ndingisa te ya koboma moto. Na bongo, maloba oyo Yesu alobaki ekokisamaki, oyo elakisaki lolenge ya liwa asengelaki kokufa. Pilato akotaki lisusu na esika oyo bakatelaka makambo, abengaki Yesu mpe atunaki ye; —Yo ozali mokonzi ya Bayuda? Yesu azongiselaki ye: —Boni, yango ezali makanisi na yo moko to bato mosusu bayebisi yo mpo na ngai? Pilato atunaki ye: —Boni, okanisi ete ngai nazali Moyuda? Ezali bato na yo moko, mpe bakonzi ya banganga-Nzambe na bino bato bayei kotika yo na maboko na ngai. Osali nini? Yesu azongisaki: —Bokonzi na ngai ezali ya mokili oyo te. Soki Bokonzi na ngai ezalaki ya mokili oyo, mbele basali na ngai balingaki kobunda etumba, mpo Bayuda bakanga ngai te. Kasi sikʼoyo bokonzi na ngai ezali ya mokili oyo te! Bongo Pilato atunaki: —Elingi koloba ete ozali mokonzi? Yesu azongisaki: —Yo moto olobi ete nazali mokonzi! Nabotamaki mpe nayaki na mokili mpo na kotatola solo. Moto oyo azali kati na solo, ayokaka mongongo na ngai. Pilato atunaki ye: —Solo ezali nini? Sima ya maloba wana, Pilato abimaki lisusu epai Bayuda bazali, mpe alobaki na bango: —Mpo na ngai, namoni mabe moko te epai na ye. Kasi yango ezali momesano mpo na bino ete nabimisela bino moto moko ya boloko na tango ya feti ya Pake; boni, bolingi nabimisela bino mokonzi ya Bayuda? Kasi bango nyonso babandaki koganga: —Te, ye te! Bimisela biso Barabas! Nzokande Barabas azalaki mobomi monene. Bongo Pilato akamataki Yesu mpe abetisaki ye bafimbo. Basoda basalaki ekoti ya lokumu ya banzube mpe balatisati ye yango. Balatisaki ye mpe elamba ya motane. Bazalaki koya mpe koloba na ye: —Mbote, mokonzi ya Bayuda! Bazalaki kobeta ye mpe bambata. Pilato abimaki lisusu mpe alobaki na bango: —Boyoka! Nakobimisela bino ye na libanda, mpo boyeba ete namoni mabe moko te epai na ye! Yesu abimaki; alataki ekoti ya lokumu ya banzube, mpe elamba ya motane. Bongo Pilato alobaki na bango: —Botala moto! Tango bakonzi ya banganga-Nzambe mpe bakengeli bamonaki ye, babandaki koganga: —Baka ye na ekulusu! Baka ye na ekulusu! Kasi Pilato azongisaki: —Bino moko bokamata ye, mpe bobaka ye na ekulusu. Pamba te, ngai namoni mabe moko te epai na ye. Bayuda balobaki na molende nyonso: —Tozali na Mobeko, mpe soki totali Mobeko yango, ye asengeli kokufa, pamba te alobaki ete ye azali Mwana na Nzambe! Tango Pilato ayokaka maloba wana, kobanga na ye ebakisamaki lisusu. Azongaki lisusu na esika oyo bakatelaka makambo mpe atunaki Yesu: —Ozali moto ya wapi? Kasi Yesu azongiselaki ye eyano te. Bongo Pilato alobaki na ye: —Boni, oboyi kozongisela ngai eyano? Oyebi te ete nazali na bokonzi ya kotika yo, mpe ya kobomisa yo na ekulusu? Yesu azongiselaki ye: —Okokaki kozala na bokonzi moko te likolo na ngai, soki bapesaki yo yango wuta na likolo te. Yango wana, moto oyo akabi ngai na maboko na yo, asali lisumu moko ya monene penza! Banda tango wana, Pilato alukaki nzela mpo atika Yesu; kasi Bayuda babandaki lisusu koganga: —Soki otiki moto oyo, wana ozali moninga ya Sezare te. Moto nyonso oyo amikomisaka mokonzi, azali monguna ya Sezare! Tango Pilato ayokaki bongo, amemaki Yesu libanda, mpe avandaki na kiti na ye oyo akatelaka makambo, na esika oyo babengaka “Esika batanda mabanga” (na monoko ya Ki-ebreo: “Gabata”). Yango ezalaki mokolo ya Komilengela mpo na Pake, mpe ezalaki pene-pene na ngonga midi. Bongo Pilato alobaki na bayuda: —Botala mokonzi na bino! Kasi bagangaki: —Longola ye na miso na biso! Longola ye na miso na biso! Baka ye na ekulusu! Pilato atunaki bango: —Bolingi nabaka mokonzi na bino na ekulusu? Bakonzi ya banganga-Nzambe bazongisaki: —Tozali na mokonzi mosusu te, kaka Sezare! Bongo Pilato apesaki Yesu na maboko na bango mpo babaka ye na ekulusu. Bongo bakamataki Yesu. Yesu amemaki ekulusu na ye, abimaki na vile mpe akendaki na Esika oyo babengaka: “Mokuwa ya motu ya moto” (na monoko ya Ki-ebreo: “Gologota”). Na esika wana nde, babakaki Yesu na ekulusu elongo na bato mibale. Moko na pembeni mpe mosusu na pembeni, bongo Yesu na kati-kati. Pilato akomisaki mwa libaya mpe babambaki yango na ekulusu. Bakomaki boye na libaya yango: “Yesu ya Nazareti, Mokonzi ya Bayuda!” Bayuda mingi batangaki mwa libaya yango, pamba te esika oyo babakaki Yesu na ekulusu ezalaki pene-pene na vile; mpe bakomaki yango na Ki-ebreo, kilatino, mpe na Kigreki. Bongo bakonzi ya banganga-Nzambe ya Bayuda balobaki na Pilato: —Kokoma te: “Mokonzi ya bayuda”, kasi koma: “Moto oyo alobi: Nazali Mokonzi ya Bayuda.” Kasi Pilato azongiselaki bango: —Oyo nakomi ekotikala kaka ndenge wana! Tango basoda basilisaki kobaka Yesu na ekulusu, bakamataki bilamba na ye, mpe bakabolaki yango na biteni minei, soda moko-moko na eteni na ye. Bakamataki mpe nzambala na ye; nzambala yango batongaki yango na biteni te, kasi batongaki yango kaka na elamba moko banda na likolo kino na nse. Basoda balobanaki: —Topasola yango te, kasi tobetela yango zeke, bongo totala soki nani akozwa yango! Esalamaki bongo mpo ete Makomi ekokisama, oyo ezali koloba: Bakabolaki bilamba na ngai kati na bango, mpe babetelaki nzambala na ngai zeke! Tala makambo basoda basalaki. Mama na ye, ndeko ya mama na ye, Mariya mwasi ya Klopasi, mpe Mariya ya mboka Magadala, batelemaki pene-pene na ekulusu ya Yesu. Tango yesu amonaki mama na ye wana, mpe moyekoli oyo ye azalaki kolinga mingi atelemaki pembeni wana alobaki na mama na ye: —Mwasi, tala mwana na yo! Bongo alobaki na moyekoli wana: —Tala mama na yo! Banda tango wana, moyekoli yango akamataki mama ya Yesu na ndako na ye. Sima na yango, awa ayebaki ete makambo nyonso ekokisamaki, alobaki boye mpo ete Makomi ekokisama: —Nazali na posa ya mayi! Eloko moko ezalaki wana, ezalaki ya kotonda na vino ya ngayi. Batondisaki eponzi na vino ya ngayi, bakangaki yango na mwa nzete, mpe batombolaki yango kino na monoko ya Yesu. Tango Yesu asilisaki komela vino ya ngayi, alobaki: —Esili! Alalisaki motu mpe azongisaki molimo. Lokola ezalaki mokolo ya komilengela mpo na saba, mpe saba yango ezalaki ya kafu-kafu, Bayuda balingaki te ete banzoto etikala na ba-ekulusu na tango ya saba. Yango wana, bakendaki kosenga Pilato ete babuka bango makolo, mpe balongola banzoto na bango. Basoda bayaki mpe babukaki makolo ya moto ya liboso, oyo babakaki na ekulusu elongo na Yesu, bongo babukaki mpe oyo ya mosusu. Tango bakomaki epai ya Yesu, mpe bamonaki ete asiʼakufaki, babukaki ye lisusu makolo te. Kasi moko na kati ya basoda atobolaki Yesu mopanzi na likonga; mpe kaka na tango wana makila na mayi ebimaki. Moto oyo amonaki makambo yango, ye moto azali kotatola yango. Mpe litatoli na ye ezali ya solo. Ayebi ete azali koloba solo mpo ete bino mpe bondima. Pamba te makambo oyo esalamaki bongo, mpo ete Makomi ekokisama: Bakobuka ye ata mokuwa moko te! Mpe epai mosusu Makomi elobi boye: Bakotala epai ya moto oyo bango batobolaki! Sima na yango, Zozefi ya mboka Alimateo, asengaki nzela na Pilato mpo alongola nzoto ya Yesu na ekulusu. Ye mpe azalaki moyekoli ya Yesu, kasi ya kobombama, pamba te azalaki kobanga Bayuda. Bongo Pilato apesaki ye nzela. Zozefi ayaki mpe alongolaki nzoto ya Yesu. Nikodemi, oyo na ebandeli, akendaki kotala Yesu na butu, ye mpe ayaki. Amemaki pene-pene ya bakilo ntuku misato ya mafuta ya mira oyo ezalaki ya kosangana na malasi ya alowesi. Bakamataki nzoto ya Yesu, mpe balingaki yango na bilamba ya lino elongo na mafuta wana, ndenge Bayuda bazalaki kosala mpo na kokunda bibembe. Elanga moko ezalaki pene-pene na esika oyo babakaki Yesu na ekulusu; mpe lilita moko ya sika ezalaki kuna, kati na yango bakundaki naino ata moto moko te. Lokola ezalaki mokolo ya Bayuda ya Komilengela mpo na saba, batiaki Yesu na lilita wana, pamba te yango ezalaki pene-pene. Na tongo-tongo penza ya mokolo ya liboso ya poso, na tango molili ezalaki naino, Mariya ya mboka Magadala akendaki na lilita; mpe akutaki libanga basiʼbalongoli yango na lilita. Azongaki mbangu epai ya Simon Piere mpe epai ya moyekoli mosusu oyo Yesu azalaki kolinga, mpe alobaki: —Balongoli Nkolo na lilita, mpe toyebi te soki batie ye wapi! Bongo Piere abimaki elongo na moyekoli oyo mosusu, mpe bakendaki na lilita. Bango mibale bazalaki kokima mbangu nzela moko, kasi lokola moyekoli oyo mosusu azalaki mbangu mingi koleka Piere, yango wana akomaki liboso na lilita. Angunzamaki, mpe amonaki bilamba oyo bakundelaka Yesu, ezalaki na mabele; kasi akotaki na kati te. Simon Piere, oyo azalaki kolanda ye, akomaki, akotaki na lilita mpe amonaki bilamba na mabele, na elamba oyo bazingaki Yesu na motu. Elamba yango, oyo bazingaki Yesu na motu, ezalaki esika moko te na bilamba oyo bakundelaki ye, kasi ezalaki ya kolingama na esika na yango moko. Bongo moyekoli mosusu oyo akomaki liboso na lilita, ye mpe akotaki. Amonaki mpe andimaki. Pamba te, kino tango wana, basosolaki naino te Makomi, ete Yesu asengelaki kosekwa kati na bakufi. Bongo bayekoli wana mibale bazongaki epai na bango. Kasi Mariya atelemaki na libanda, pene-pene na lilita, mpe azalaki kolela. Awa azalaki kaka kolela, angunzamaki mpo na kotala na kati ya libulu; amonaki baanzelu mibale balataki bilamba ya pembe, bavandaki na esika ezalaki nzoto ya Yesu, moko epai ezalaki motu, mpe mosusu epai ezalaki makolo. Baanzelu batunaki ye: —Mwasi, mpo na nini ozali kolela? Azongiselaki bango: —Bolongoli Nkolo na ngai, mpe nayebi te soki batie ye wapi! Awa alobaki bongo, abaluki mpe amonaki Yesu atelemaki wana; kasi ayebaki te ete ezalaki Yesu. Yesu atunaki ye: —Mwasi, mpo na nini ozali kolela? Ozali koluka nani? Mariya akanisaki ete azali mosali ya elanga, bongo alobaki na ye: —Tata, soki yo moto olongolaki ye, yebisa ngai soki otie ye wapi, mpo nakende kokamata ye! Yesu alobaki na ye: —Mariya! Mariya abalukaki mpe alobaki na monoko ya ki-ebreo: —Rabuni (yango elingi koloba: Moteyi!) Yesu alobaki na ye: —Kosimba ngai te; pamba te, naino nabuti epai ya Tata na ngai te. Kasi kende epai ya bandeko na ngai, mpe loba na bango: Nabuti epai ya Tata na ngai, mpe Tata na bino, epai ya Nzambe na ngai mpe Nzambe na bino! Bongo Mariya ya mboka Magadala akendaki koyebisa bayekoli ete amonaki Nkolo, mpe Nkolo ayebisaki ye makambo wana. Na pokwa ya mokolo wana ya liboso ya poso, bayekoli basanganaki esika moko, mpe bakangaki malamu-malamu baporte, mpo bazalaki kobanga bayuda. Yesu ayaki, atelemaki na kati-kati na bango, mpe alobaki na bango: —Kimia ezala na bino! Awa asilisaki koloba bongo, alakisaki bango maboko na ye mpe mopanzi na ye. Bayekoli batondaki na esengo tango bamonaki Nkolo. Yesu alobaki na bango lisusu: —Kimia ezala na bino! Ndenge Tata atindaki ngai, ngai mpe natindi bino! Sima ya maloba wana, afulaki likolo na bango, mpe alobaki na bango: —Bozwa Molimo Mosantu! Masumu ya bato oyo bino bokolimbisa, ekolimbisama; masumu ya baoyo bino bokolimbisa te, ekolimbisama mpe te! Toma, moyekoli moko na kati ya bayekoli zomi na mibale, oyo babengaka “Lipasa”, azalaki elongo na bayekoli te tango Yesu ayaki. Bongo bayekoli mosusu balobaki na ye: —Tomoni Nkolo! Kasi Toma azongiselaki bango: —Soki namoni bilembo ya basete na maboko na ye te, natie mosapi na ngai na esika ezalaki basete te, mpe natie loboko na ngai na mopanzi na ye te, nakondima yango te! Sima ya mikolo mwambe, bayekoli bazalaki lisusu na ndako, Toma mpe azalaki elongo na bango; mpe baporte ezalaki ya kokangama. Bongo Yesu ayaki mpe atelemaki na kati-kati na bango mpe alobaki: —Kimia ezala na bino! Bongo alobaki na Toma: —Yaka kotia mosapi na yo awa, mpe tala maboko na ngai; yaka kotia loboko na yo na mopanzi na ngai; kozala motema libanga te, kasi ndima! Toma azongiselaki ye: —Nkolo na ngai mpe Nzambe na ngai! Yesu alobaki na ye: —Ondimi mpo omoni ngai! Esengo na bato oyo bamoni te, kasi bandimi! Yesu asalaki makamwisi mosusu mingi na miso ya bayekoli na ye, oyo ekomama te na mokanda oyo. Kasi makambo oyo ekomama mpo ete bondima ete Yesu azali Kristo, Mwana na Nzambe; mpe na nzela ya kondima, bokoka kozwa bomoi na kombo na ye. Sima na yango, Yesu abimelaki lisusu bayekoli na ye na libongo ya ebale ya Tiberiade. Abimelaki bango boye: Simon Piere, Toma (oyo babengaka: “Lipasa”), Natanayele (ya mboka Kana na mokili ya Galileya), bana ya Zededeo, mpe bayekoli mibale mosusu bazalaki esika moko. Simon Piere alobaki na bango: —Nakei koluka bambisi! Bango mpe balobaki na ye: —Biso mpe, tokokende elongo na yo. Bakendaki mpe bamataki na bwato; kasi butu wana bazwaki eloko moko te. Na tongo-tongo penza, Yesu atelemaki na libongo; kasi bayekoli bayebaki te ete ezalaki ye. Bongo abengaki bango: —E e bana! bozwi mbisi? Bazongiselaki ye: —Te! Yesu alobaki na bango: —Bobwaka monyama na loboko ya mobali ya bwato, mpe bokozwa! Tango babwakaki yango, bakokaki kobenda yango te, pamba te etondaki na bambisi ebele penza. Bongo Moyekoli oyo Yesu azalaki kolinga mingi alobaki na Piere: —E e! ezali Nkolo. Tango Simon Piere ayokaki ete ezali Nkolo, alataki elamba na yeya likolo, (mpo alongolaki yango), mpe amibwakaki na mayi. Bongo bayekoli mosusu balandaki kati na bwato, mpe bazalaki kobenda monyama oyo etondaki na bambisi, pamba te bazalaki mosika te na mokili, ezalaki pene-pene ya bametele nkama moko. Tango bakitaki na mokili, bamonaki moto ya makala, mpe mbisi likolo na yango, na lipa. Yesu alobaki na bango: —Boya na ndambo ya bambisi oyo bowuti kokanga! Simon Piere amataki na bwato, mpe abendaki monyama na mokili. Yango ezalaki ya kotonda na bambisi nkama moko na tuku mitano na misato ya minene. Atako ezalaki mingi, kasi monyama epasukaki te. Bongo yesu alobaki na bango: —Boya mpe bolia. Mpe moyekoli ata moko te amekaki kotuna ye: “Ozali nani?” pamba tebayebaki ete ezali Nkolo. Yesu apusanaki pembeni na bango, akamataki lipa mpe apesaki bango; asalaki mpe ndenge moko mpo na mbisi. Wana ezalaki mbala ya misato oyo Yesu abimelaki bayekoli na ye, sima ya kosekwa na ye kati na bakufi. Tango basilisaki kolia, Yesu alobaki na Simon Piere: —Simon mwana ya Jonasi, olingaka ngai mingi koleka bango? Ye azongiselaki ye: —E e Nkolo! oyebi ete nalingaka yo! Yesu alobaki na ye: —Batela bana meme na ngai! Bongo alobaki na ye mpo na mbala ya mibale: —Simon mwana ya Jonasi, olingaka ngai? Azongiselaki ye: —E e Nkolo! Oyebi ete nalingaka yo! Yesu alobaki na ye: —Batela bameme na ngai! Bongo Yesu alobaki na ye lisusu mpo na mbala ya misatu: —Simon mwana ya Jonasi, olingaka ngai? Piere ayokaki mawa mingi na motema, pamba te Yesu atunaki ye mpo na mbala ya misato: “Olingaka ngai?” Bongo azongiselaki ye: —Nkolo, oyebi makambo nyonso, oyebi ete nalingaka yo! Yesu alobaki na ye: —Batela bameme na ngai! Nazali koloba na yo ya solo penza: tango ozalaki elenge, ozalaki kokanga mokaba na yo yo moko, mpe ozalaki kokende esika yo moko ozalaki kolinga; kasi tango okokoma mobange, okotanda maboko na yo, mpe moto mosusu nde akokanga yo mokaba, mpe akomema yo epai yo okolinga te! Yesu alobaki bongo mpo na kolakisa lolenge ya liwa oyo Piereasengelaki kokufa na yango mpo na nkembo ya Nzambe. Sima ya kolobabongo, alobaki na Piere: —Landa ngai! Piere atalaki na sima, mpe amonaki moyekoli oyo Yesu azalaki kolinga mingi azalaki kolanda bango; ezali moyekoli oyo mpe, tango bazalaki kolia, apusanaki pene-pene ya Yesu, mpe atunaki ye: “Nkolo, nani akoteka yo?” Tango Piere amonaki ye, atunaki Yesu: —Nkolo, okanisi nini mpo na ye? Yesu azongiselaki ye: —Soki nalingi ete azala na bomoi kino tango nakoya, wana etali yo? Kasi yo, landa ngai. Sango yango epanzanaki na kati ya bandeko ete moyekoli yango akokufa te. Nzokande, Yesu alobaki te ete moyekoli wana akokufa te; kasi alobaki: “Soki nalingi ete azala na bomoi kino tango nakoya, wana etali yo?” Ezali moyekoli wana nde azali kotatola makambo oyo, mpe akomaki yango. Mpe toyebi ete litatoli na ye ezali ya solo. Yesu asalaki lisusu makambo mingi mosusu. Soki bakomaki yango moko na moko na mikanda, na kanisi, mbele ata mokili ekokaki te kobomba babuku oyo elingaki kokomama. Teofile, na buku na ngai ya liboso, nakomaki makambo nyonso oyo Yesu asalaki mpe ateyaki wuta na ebandeli, kino na mokolo oyo amataki na likolo, sima na ye kopesa mitindo na nzela ya Molimo Mosantu epai ya bayekoli oyo aponaki. Sima ya bapasi na ye, amimonisaki epai na bango; mpe na nzela ya bilembo mingi, alakisaki bango ete azali na bomoi. Abimelaki bango mikolo tuku minei, mpe alobelaki bango makambo oyo etali Bokonzi ya Nzambe. Mokolo moko, tango azalaki kolia elongo na bango, apesaki bango etinda oyo: —Bolongwa na Yelusalemi te, kasi bozela likabo oyo Tata na ngai alakaki, likabo oyo boyokaki ngai kolobela. Pamba te, Yoane abatisaki na mayi, kasi bino, sima na mwa mikolo, bokobatisama na Molimo Mosantu! Boye, tango basanganaki elongo, batunaki ye: —Nkolo, ekozala na tango wana nde okozongisa Bokonzi ya Isalaele? Yesu azongiselaki bango: —Yango ezali likambo na bino te mpo na koyeba tango to mokolo oyo Tata abongisa na mokano na ye. Kasi, bokozwa nguya tango Molimo Mosantu akokitela bino, mpe bokozala batatoli na ngai na Yelusalemi, na etuka mobimba ya Yudea, ya Samari mpe kino na basuka ya mokili. Tango asilisaki koloba makambo oyo, Yesu amataki na likolo tango bazalaki kotala ye. Boye, lipata moko eyaki kozipa ye na miso na bango. Wana bazalaki nanu kotala na likolo ndenge Yesu azalaki komata, mbala moko, bato mibale balata bilamba ya pembe-pembe batelemaki pembeni na bango mpe balobaki: “Bato ya Galile, mpo na nini botelemi awa mpo na kotala na likolo? Yesu oyo alongwe kati na bino mpo na kokende na likolo, akozonga kaka ndenge bomoni ye kokende.” Boye, bazongaki na Yelusalemi wuta na ngomba oyo babengaka Ngomba ya banzete ya Olive, oyo ezali pene ya Yelusalemi na bametele pene nkoto moko (1.000). Tango bakomaki, bamataki na shambre ya likolo, esika oyo bazalaki na momesano ya kosangana. Kati na bato yango ezalaki: Piere, Yoane, Jake, Andele, Filipo, Toma, Batelemi, Matayo, Jake, mwana mobali ya Alife, Simo oyo azalaki na lingomba ya Bazelote mpe Jide, mwana mobali ya Jake. Bango nyonso na motema moko, bazalaki na molende ya kosangana mbala na mbala mpo na kobondela elongo na basi, lokola Mari, mama na Yesu elongo na bandeko na Yesu. Sima na mwa mikolo, Piere atelemaki kati na bandimi (pene nkama moko na tuku mibale 120) mpe alobaki: Bandeko na ngai, esengeli ete Makomi oyo Molimo Mosantu aloba wuta kala na monoko ya Davidi mpo na Yudasi, oyo alakisaki nzela epai ya bato oyo bakangaki Yesu, ekokisama. Ye azalaki moko kati na biso mpe azwaki ndambo ya mokumba na ye na mosala oyo bapesaki biso. Na mbongo oyo Yudasi azwaki mpo na mabe na ye, asombelaki yango elanga. Kuna nde akweyaki moto na se, libumu na ye epasukaki mpe misopo na ye nyonso ebimaki libanda. Bato nyonso ya Yelusalemi bayokaki sango yango; yango wana bakomaki kobenga elanga yango na monoko na bango: ‘Akelidama’, oyo elingi koloba ‘Elanga ya makila’. Pamba te, ekomama boye na buku ya banzembo: ‘Tika ete ndako na ye etikala polele mpo ete moto moko te avanda kati na yango.’ Mpe: ‘Tika ete moto mosusu azwa mokumba na yezali e.’ ” Yango wana, na tina ete topona moto moko kati na bato oyo bazalaki na biso elongo tango nyonso Nkolo Yesu azalaki kosala mibembo elongo na biso, wuta na tango ya libatisi ya Yoane kino tango Yesu alongwaki kati na biso mpo na komata na likolo. Pamba te, moko kati na bango asengeli kokoma motatoli ya lisekwa na ye elongo na biso. Bongo, bapesaki bakombo ya bato mibale: Jozefi, oyo babengaka Barsabasi, kombo na ye mosusu ezalaki Yusitusi, mpe Matiasi. Babondelaki boye: “Nkolo, yo oyebi mitema ya bato nyonso. Lakisa biso nani oyo yo osila kopona kati na bato oyo mibale, mpo ete akoma ntoma na esika oyo Yudasi atikaki mpo na kokende na esika oyo ebongaki na ye.” Babetaki zeke, mpe Matiasi aponamaki. Bongo, babakisaki ye na molongo ya bantoma zomi na moko. Tango mokolo ya Pantekote ekomaki, bango nyonso basanganaki esika moko. Na pwasa, lokito moko ewutaki na likolo lokola lokito ya mopepe makasi, bongo etondisaki ndako mobimba epai wapi bazalaki kosangana. Bamonaki biloko moko lokola balolemo ya moto kokabwana mpe kovanda na moto ya moko na moko kati na bango. Bango nyonso batondaki na Molimo Mosantu mpe babandaki koloba na minoko misusu, ndenge Molimo azalaki kolakisa bango. Nzoka nde, kati na Yelusalemi, ezalaki na Bayuda oyo babangaka Nzambe, oyo bawutaki na bikolo nyonso ya mokili. Tango bayokaki lokito wana, ebele ya bato bayaki mbangu kosangana wana, mpe bakomaki kokamwa, pamba te moko na moko kati na bango azalaki koyoka bango koloba na monoko na ye ya mboka. Bakamwaki mingi penza mpe bakomaki kotuna: “Boni, bato nyonso oyo bazali koloba, bazali bato ya Galile te? Boye, ndenge nini moto na moto kati na biso azali koyoka bango koloba na monoko na ye ya mboka? Bato ya Parte, ya Medesi mpe ya Elami, bato oyo bavandaka na Mezopotami, na Yudea, na Kapadose, na Ponti mpe na Azi, na Friji mpe na Pafili, na Ejipito mpe na Libi oyo ezali pembeni ya Sirene, bapaya oyo bawutaki na Rome, bango nyonso, ezala Bayuda to bapaya oyo bakota na lingomba ya Bayuda: bato ya Krete mpe ya Arabi, biso nyonso tozali koyoka bango kotatola misala minene ya Nzambe na minoko na biso ya mboka!” Bango nyonso, elekelaki bango, bazalaki kokamwa mingi mpe bakomaki kotunana: “Likambo oyo elingi koloba nini?” Nzoka nde, bato mosusu bazalaki koseka bango mpe koloba: “Balangwe masanga ya vino.” Boye, Piere atelemaki elongo na bantoma zomi na moko, mpe na mongongo makasi, alobaki na ebele ya bato: —Bino Bayuda, mpe bino nyonso oyo bovandaka na Yelusalemi, botika ete nalimbolela bino likambo oyo, boyoka malamu makambo oyo nalingi koloba. Bato oyo balangwe masanga te ndenge bozali kokanisa. Pamba te, tozali nanu na ngonga ya libwa ya tongo. Kasi, ezali nde makambo oyo mosakoli Joeli alobaki: Na mikolo ya suka, elobaki Nzambe, nakosopa Molimo na ngai na bato nyonso. Bana na bino, ezala ya mibali to ya basi bakosakola, bilenge na bino bakozwa bimoniseli mpe mibange na bino bakolota bandoto. Solo, na mikolo wana, nakosopa Molimo na ngai ezala na basali na ngai ya mibali to ya basi, boye bakosakola. Nakosala bikamwa kuna na likolo, mpe bilembo ya somo awa na se: makila, moto mpe likonzi ya milinga. Moyi ekobogwana molili, sanza ekobogwana makila liboso ete Mokolo ya Nkolo ekoma, mokolo monene mpe mokolo ya nkembo. Boye, moto nyonso oyo akobelela Kombo ya Nkolo akobika. Bato ya Isalaele, boyoka maloba oyo: Yesu ya Nazareti, moto oyo, na nzela ya bikamwa, ya bilembo mpe ya misala ya minene, Nzambe alakisaki bino ete awutaki epai na ye ndenge bino moko boyebi yango; bakabaki ye na maboko na bino kolanda mokano oyo Nzambe asila kozwa na mabongisi na ye wuta kala. Bongo bino, na lisungi ya bato mabe, bobomaki ye na kobaka ye na ekulusu. Kasi, Nzambe abukaki minyololo ya liwa, asekwisaki ye, pamba te ekokaki kosalama te ete liwa ekanga ye. Boye, tala makambo oyo Davidi alobaki na tina na ye: “Nazalaki tango nyonso komona Nkolo liboso na ngai. Pamba te, azali na loboko na ngai ya mobali mpo ete naningana te. Yango wana, motema na ngai etondi na esengo mpe lolemo na ngai ezali kosepela, solo, nzoto na ngai ekopema na elikya, Pamba te, okosundola te molimo na ngai na mboka ya bakufi mpe okotika te ete Mosantu na yo apola. Pamba te, olakisaki ngai nzela ya bomoi, mpe okotondisa ngai na esengo na miso na yo.” Bandeko na ngai, tika ete naloba na bino solo na tina ya koko na biso Davidi ete akufa mpe bakunda ye, bongo lilita na ye ezali awa kino lelo. Kasi, azalaki mosakoli mpe ayebaki ete Nzambe apesaki ye elaka na nzela ya ndayi ete, moko kati na bakitani na ye akovanda na kiti na ye ya bokonzi. Davidi amonaki makambo oyo wuta kala, alobelaki nde lisekwa ya Klisto, ete Nzambe akosundola ye na mboka ya bakufi te mpe nzoto na ye ekopola te. Nzambe asekwisaki Yesu kati na bakufi, boye biso nyonso tozali batatoli ya lisekwa yango. Anetolamaki kino na loboko ya mobali ya Nzambe, bongo azwaki epai ya Tata, Molimo Mosantu oyo ye Tata alakaki mpe asopeli biso Molimo Mosantu yango ndenge bozali komona mpe koyoka sikʼoyo. Pamba te, Davidi abutaki na likolo te, kasi alobaki: Yawe alobaki na Nkolo na ngai: “Vanda na loboko na ngai ya mobali, Kino tango nakotia banguna na yo na se ya makolo na yo.” Yango wana, tika ete bato nyonso ya Isalaele bayeba solo ete Nzambe akomisi Yesu oyo bobaki na ekulusu Nkolo mpe Klisto. Tango bato bayokaki bongo, mitema na bango eyokaki pasi makasi mpe balobaki na Piere mpe bantoma misusu: —Bandeko, tosala nini? Piere azongiselaki bango: —Bobongola mitema mpe moko na moko kati na bino azwa libatisi na Kombo ya Yesu Klisto mpo ete masumu na bino elimbisama. Bongo, bokozwa likabo ya Molimo Mosantu. Pamba te, elaka oyo ezali mpo na bino, mpo na bana na bino mpe mpo na bato nyonso oyo bavandaka na bikolo ya mosika, bato nyonso oyo Yawe Nzambe na biso akobenga. Piere azalaki kokebisa bango na maloba ebele mpe azalaki kolendisa bango na maloba oyo: “Boyamba lobiko mpo ete bozwa etumbu oyo ezali kozela bato ya mabe te.” Bato oyo bandimaki maloba ya Piere bazwaki libatisi. Mpe na mokolo wana, bato pene nkoto misato (3.000) babakisamaki na lisanga ya bandimi. Bazalaki komipesa mingi penza na malakisi ya bantoma, na kozala lisanga, na kobuka lipa mpe na kasambela. Bato nyonso batondisamaki na somo, mpo ete bantoma bazalaki kosala makambo minene mpe ya kokamwa. Bandimi nyonso bakomaki na bomoko, mpe biloko na bango ezalaki mpo na bango nyonso. Bazalaki koteka mabele na bango mpe biloko na bango, mpe bazalaki kakabola mbongo kati na bango, ndenge ezalaki posa ya moto na moto. Mikolo nyonso bazalaki kokoba kosangana na Tempelo. Bazalaki kokabola lipa na bandako na bango, kolia bilei na bango na esengo nyonso mpe na motema ya komikitisa. Bazalaki kokumisa Nzambe, mpe bato nyonso bazalaki kolinga bango. Bongo, mikolo nyonso, Nkolo azalaki kobakisa na lisanga na bango bato oyo bazalaki kobika. Ezalaki mokolo moko, Piere na Yoane bakendaki na Tempelo na tango ya mabondeli: ezalaki na ngonga ya misato sima ya midi. Nzoka nde, ezalaki mpe na bato moko oyo bazalaki komema moto moko akufa makolo wuta abotama, mpe bazalaki kotia ye mikolo nyonso na ekuke ya Tempelo mpo ete asengaka makabo ya mawa epai ya bato oyo bazalaki kokota. Bazalaki kobenga ekuke yango: “Ekuke ya kitoko.” Tango amonaki Piere mpe Yoane kokota na Tempelo, asengaki bango likabo ya mawa. Boye, Piere na Yoane batalaki ye malamu, mpe Piere alobaki na ye: “Tala biso!” Moto yango atalaki bango malamu penza; na likanisi ya kozwa eloko epai na bango. Kasi, Piere alobaki na ye: —Nazali na mbongo to wolo ya kopesa yo te, kasi oyo nazali na yango, napesi yo yango: na Kombo na Yesu Klisto ya Nazareti, tambola! Bongo, asimbaki ye na loboko ya mobali mpe atelemisaki ye. Kaka na tango wana, makolo na ye ekomaki makasi. Na mbala moko, atelemaki mpe abandaki kotambola, akotaki nzela moko na bango na Tempelo: azalaki kotambola, kopumbwa mpe kokumisa Nzambe. Tango bato nyonso bamonaki ye kotambola mpe kokumisa Nzambe, basosolaki ete ezalaki moto oyo azalaki kovanda na “Ekuke ya kitoko” ya Tempelo mpo na kosenga makabo ya mawa. Bango nyonso bakamwaki mingi penza mpe somo ekangaki bango mpo na makambo oyo esalamaki epai na ye. Lokola moto yango atingamaki na Piere mpe Yoane, bato nyonso bakamwaki mpe bayaki na mbangu epai na bango, na esika oyo babengaka: “Veranda ya Salomo.” Tango Piere amonaki bongo, alobaki na bango: —Bato ya Isalaele, mpo na nini bozali kokamwa likambo oyo? Mpo na nini bozali kotala biso lokola nde biso bato tosali ete moto oyo atambola na nguya mpe na boyengebene na biso moko? Kasi ezali Nzambe ya Abrayami, ya Izaki mpe ya Jakobi, Nzambe ya bakoko na biso nde apesi nkembo na mosali na ye Yesu oyo bino bokabaki mpo ete baboma ye. Yango wana, bowanganaki ye liboso ya Pilato tango azwaki mokano ya kokangola ye. Bowanganaki ye oyo azali Mosantu mpe Sembo. Boye, bosengaki ete Pilato atikela bino mobomi na esika ya Yesu. Bobomaki nde Mobandisi ya bomoi, nzoka nde, Nzambe asekwisaki ye kati na bakufi, bongo biso, tozali penza batatoli ya likambo yango. Ezali na nzela ya kondima na Kombo ya Yesu, nde Kombo yango epesi makasi na moto oyo bozali komona mpe boyebi. Ezali kondima oyo ewuti kati na Yesu nde ekomisi nzoto na ye mobimba kolongono ndenge bozali komona yango. Nzoka nde, bandeko na ngai, nayebi ete bosalaki makambo oyo na kozanga boyebi ndenge bakonzi na bino basalaki. Kasi ezali na lolenge wana nde Nzambe akokisaki makambo oyo aloba wuta kala na nzela ya basakoli nyonso, ete Klisto na ye asengelaki komona pasi. Yango wana, bobongola mitema mpe bozonga epai na Nzambe mpo ete masumu na bino elimbisama. Boye, Nkolo akopesa bino tango ya kopema mpe akotindela bino Klisto, ye nde Yesu, oyo apona mpo na bino. Asengeli kotikala kuna na likolo kino tango Nzambe akobongisa biloko nyonso, ndenge alaka yango wuta kala na nzela ya babulami na ye, basakoli. Pamba te Moyize alobaki: “Yawe, Nzambe na bino akobimisa mpo na bino mosakoli moko lokola ngai, oyo akowuta kati na bandeko na bino: bosengeli kotosa nyonso oyo akoloba na bino. Moto nyonso oyo akozanga kotosa ye, esengeli balongola ye kati na bato na ye mpe baboma ye.” Basakoli nyonso, wuta na Samuele kino na basakoli oyo bayaki sima na ye, bango nyonso basakolaki na tina ya makambo oyo ezali kosalema na mikolo oyo. Bino nde bozali bakitani ya basakoli mpe ya Boyokani oyo Nzambe asalaki na bakoko na bino, tango alobaki na Abrayami: “Nakopambola mabota nyonso ya mokili na nzela ya bakitani na yo!” Tango Nzambe asekwisaki Mosali na ye, atindaki ye liboso epai na bino mpo ete apambola bino na kolongola moko na moko kati na bino, na nzela na ye ya mabe. Wana Piere mpe Yoane bazalaki nanu koloba na bato, banganga-Nzambe, mokonzi ya bakengeli ya Tempelo mpe basaduseo bayaki, na kanda makasi ndenge bamonaki bantoma koteya bato mpe kotatola ete bato bakufa bakosekwa ndenge Yesu asekwaki. Bakangaki Piere mpe Yoane, bongo babwakaki bango na boloko kino na mokolo oyo elandaki, pamba te pokwa esilaki kokoma. Kasi, bato mingi kati na bato oyo bayokaki mateya bandimaki yango, bongo motango ya bandimi ebakisamaki mpe bakomaki bato pene nkoto mitano (5.000). Boye, na mokolo oyo elandaki, bakonzi ya Bayuda, bampaka mpe balakisi ya mibeko basanganaki na Yelusalemi. Ana, mokonzi ya banganga-Nzambe azalaki wana elongo na Kayifa, Yoane, Alekizandre mpe bato mosusu ya libota ya mokonzi ya banganga-Nzambe. Bamemaki Piere mpe Yoane liboso na bango, mpe bakomaki kotuna bango mituna: —Bozali kosala makambo oyo na bokonzi to na kombo ya nani? Bongo, Piere oyo atondisamaki na Molimo Mosantu alobaki na bango: —Bakonzi mpe bampaka ya Isalaele! Lokola botuni biso lelo mpo na bolamu oyo esalami epai ya moto oyo akufa makolo mpe ndenge nini asili kobika, tika ete bino nyonso mpe bato nyonso ya Isalaele boyeba ete ezali na Kombo ya Yesu Klisto ya Nazareti nde moto oyo atelemi liboso na bino na nzoto kolongono, kaka Yesu oyo bino bobakaki na ekulusu kasi Nzambe asekwisaki ye kati na bakufi. Ye nde azali “libanga oyo bino batongi ya ndako bobwakaki, kasi ekomi libanga oyo ezali na tina mingi koleka.” Lobiko ekoki kozwama na moto mosusu te, pamba te kombo mosusu ezali te na mokili, oyo epesama na bato, oyo ekoki kobikisa biso. Wana bamonaki ndenge nini Piere mpe Yoane bazalaki koloba na mpiko, mpe basosolaki ete bazalaki bato batanga te mpe bato pamba, bakamwaki mingi penza. Boye, basosolaki ete bango mpe bazalaki elongo na Yesu. Bazalaki ata na liloba moko te ya koloba, pamba te bazalaki komona moto oyo abikaki atelema wana pene na bango. Bongo, bapesaki mitindo ete babimisa bango na Likita monene, mpe batikalaki bango moko mpo na koyekola likambo yango malamu. Bazalaki kotunana: “Tosala nini penza na bato oyo? Pamba te, bato nyonso oyo bavandaka na Yelusalemi bayebi malamu ete bango nde basalaki likamwisi wana ya monene mpe tokoki kowangana yango te. Kasi mpo ete sango ya likambo oyo ekoba kopanzana te kati na bato, tokebisa bango boye: ‘Bomeka lisusu te koloba na Kombo ya Yesu ezala ata na nani!’ ” Boye, babengaki Piere na Yoane mpe bapekisaki bango ete bameka lisusu te koloba to koteya na Kombo na Yesu, ezala ata na lolenge nini. Kasi, Piere mpe Yoane bazongiselaki bango: —Botala nanu ata bino moko, eloko nini ezali sembo na miso ya Nzambe: kotosa bino to kotosa Nzambe? Pamba te, biso, tokokoka te kotika koloba makambo oyo tomonaki mpe toyokaki! Sima ya kogangela bango, batikaki bango ete bakende, pamba te bamonaki te ndenge nini bakokaki kopesa bango etumbu, mpo ete bato nyonso bazalaki kokumisa Nzambe mpo na likambo oyo esalamaki. Moto oyo abikaki na ndenge ya kokamwa azalaki na mibu koleka tuku minei. Tango batikaki bango, Piere mpe Yoane bakendaki koyebisa baninga na bango makambo nyonso oyo bakonzi ya banganga-Nzambe mpe bakambi balobelaki bango. Tango bayokaki bongo, batombolaki mingongo na bango elongo mpo na kobondela Nzambe. Balobaki: —Nkolo Yawe, Yo oyo osala likolo mpe se, ebale monene mpe biloko nyonso oyo ezalaka kati na yango; Yo oyo olobaki na nzela ya Molimo Mosantu, na monoko ya koko na biso Davidi, mosali na yo: “Mpo na nini bikolo ezali kotomboka mpe bato bazali kosala makita ezanga tina? Bakonzi ya mokili batelemi mpe bayangeli basangani mpo na kobundisa Nkolo mpe Mopakolami na ye.” Pamba te, Erode mpe Ponse Pilato basanganaki na engumba oyo, elongo na bato ya bikolo misusu mpe bato ya Isalaele mpo na kosalela Yesu likita, Mosali na yo Mosantu oyo obulisa. Ezali na ndenge wana nde bakokisaki mabongisi oyo osala wuta kala na nguya mpe na mokano na yo. Sikʼoyo Nkolo, tala ndenge bazali kotungisa biso, mpe pesa basali na yo makasi ya koteya Liloba na yo na molende nyonso. Boye, sembola loboko na yo mpo na kobikisa bato ya maladi, kosala bilembo ya kokamwa mpe misala minene na Kombo na Yesu, Mosali na yo Mosantu. Boye, tango basilisaki kobondela, esika oyo basanganaki eninganaki. Mpe bango nyonso batondisamaki na Molimo Mosantu mpe bakomaki koteya Liloba ya Nzambe na molende nyonso. Bandimi nyonso bazalaki motema moko mpe makanisi moko. Moko te kati na bango azalaki koloba ete biloko na ye ezali kaka ya ye moko, kasi biloko nyonso ezalaki mpo na bango nyonso. Bantoma bakobaki kotatola lisekwa ya Nkolo Yesu na nguya monene, mpe ngolu monene ezalaki na bango nyonso. Moko te kati na bango akelelaki. Pamba te, tango nyonso bato oyo bazalaki na mabele to na bandako bazalaki koteka yango, bazalaki komema mbongo oyo batekelaki epai ya bantoma. Boye, bantoma bazalaki kokabola yango na moto na moto, ndenge ezalaki bosenga na ye. Boye, Jozefi, moto ya libota ya Levi, oyo abotama na esanga ya Shipre mpe oyo bantoma bapesaki kombo ya Barnabasi, oyo elakisi: “Molendisi”; atekaki mpe elanga na ye mpe amemaki mbongo epai ya bantoma. Nzoka nde, ezalaki na moto moko, na kombo ya Ananiya. Atekaki eteni ya mabele na ye na boyokani na mwasi na ye Safira. Abombaki ndambo ya mbongo mpo na ye moko, boye amemaki ndambo oyo etikalaki mpe apesaki yango na bantoma. Mwasi na ye mpe ayebaki yango. Boye, Piere atunaki ye: “Ananiya, ndenge nini Satana atondisi motema na yo mpo ete okosa Molimo Mosantu, mpe obomba ndambo ya mbongo oyo otekeli elanga na yo? Boni, liboso ete oteka yango, ezalaki ya yo te? Mpe sima ya koteka yango, okokaki te kosala na mbongo yango likambo nyonso oyo motema na yo elingi? Mpo na nini ozwaki likanisi ya kosala likambo ya boye? Okosi bato te, kasi okosi nde Nzambe!” Tango Ananiya ayokaki bongo, akweyaki mpe akufaki. Bongo, bato nyonso oyo bayokaki likambo yango batondaki na somo. Boye, bilenge mibali bayaki, bazipaki nzoto na ye mpe bamemaki yango libanda mpo na kokunda yango. Sima ya ngonga pene misato, mwasi ya Ananiya akotaki, kasi ayebaki te likambo oyo ewutaki kosalama. Piere atunaki ye: —Yebisa ngai, ezali na talo wana nde yo mpe Ananiya botekaki elanga wana? Safira azongisaki: —Ezali bongo, etekamaki Kaka na talo wana. Piere alobaki na ye: —Mpo na nini boyokanaki mpo na komeka Molimo ya Nkolo? Tala! Makolo ya bato oyo bawuti kokunda mobali na yo ezali liboso ya ekuke, yo mpe bakomema yo. Kaka na tango wana, akweyaki liboso ya Piere mpe akufaki. Boye, tango bilenge mibali bakotaki, bakutaki ye ya kokufa. Bamemaki ye mpe bakendaki kokunda ye pembeni ya mobali na ye. Somo monene etondisaki lingomba mobimba mpe bato nyonso oyo bayokaki sango yango. Bantoma bazalaki kosala bilembo mingi ya kokamwa mpe misala minene kati na bato. Boye, bandimi nyonso bazalaki na momesano ya kosangana na veranda ya Salomo. Moko te kati na bato oyo bazalaki na lisanga na bango te azalaki komeka kosangana na bango, ata bato bazalaki kopesa bango lokumu mingi. Nzoka nde, mibali mpe basi ebele penza bazalaki kondimela Nkolo mpe kobakisama na lisanga na bango. Bongo, bazalaki komema bato ya maladi na balabala, kolalisa bango na bambeto mpe na bitoko mpo ete tango Piere akoleka, elilingi na ye ekoka kozipa bamoko kati na bango. Mpe lisusu, bato ebele oyo bazalaki kowuta na bingumba ya zinga-zinga bazalaki kosangana na Yelusalemi. Bazalaki komema bato na bango ya maladi mpe oyo bazalaki kotungisama na milimo mabe; mpe bango nyonso bazalaki kobika. Boye, mokonzi ya banganga-Nzambe mpe bato nyonso oyo bazalaki kosala na ye elongo, oyo bazalaki bato ya lisanga ya basaduseo, batondaki na zuwa. Bakangaki bantoma mpe babwakaki bango na boloko ya monene. Kasi na butu, anjelu ya Nkolo afungolaki bikuke ya boloko mpe abimisaki bantoma. Alobaki na bango: “Bokende kotelema na Tempelo, mpe kuna, boyebisa bato maloba nyonso ya bomoi oyo ya sika!” Bantoma batosaki. Boye, na tongo-tongo, bakotaki na Tempelo mpe bakomaki koteya bato. Tango mokonzi ya banganga-Nzambe mpe bato oyo basalaka na ye elongo bakomaki, babengisaki Likita monene: lisanga monene ya bato ya Isalaele, batindaki ete bakende kozwa bantoma na boloko. Kasi tango basoda bakomaki na boloko, bakutaki bango te. Bongo, bazongaki mpe balobaki: “Tokuti boloko ya kokangama malamu mpe bakengeli liboso ya bikuke; kasi tango tofongoli yango, tomoni ata moto moko te na kati.” Tango mokonzi ya bakengeli ya Tempelo mpe bakonzi ya banganga-Nzambe bayokaki sango yango, bakomaki mitema likolo mpe bakomaki kotunana soki likambo yango ekosuka ndenge nini. Bongo, moto moko ayaki koyebisa bango: “Boyoka! Bato oyo bobwakaki na boloko, batelemi kuna na Tempelo mpe bazali koteya bato.” Mokonzi ya bakengeli akendaki elongo na basoda na ye mpo na kozwa bantoma. Kasi, amemaki bango na makasi te, pamba te bazalaki kobanga ete bato babamba bango mabanga. Wana bamemaki bango, batiaki bango liboso ya Likita monene, mpe mokonzi ya banganga-Nzambe abandaki kotuna bango mituna. Alobaki: —Topekisaki bino ete bomeka lisusu te koteya na Kombo wana. Kasi tala sikʼoyo ndenge botondisi Yelusalemi na mateya na bino mpe bolingi komemisa biso ngambo ya makila ya moto wana. Kasi Piere mpe bantoma misusu bazongisaki: —Esengeli kotosa Nzambe kasi bato te! Nzambe ya bakoko na biso asekwisaki Yesu kati na bakufi, Yesu oyo bino bobomaki mpe bobakaki na nzete. Ezali ye nde Nzambe atomboli kino na loboko na ye ya mobali lokola Mokonzi mpe Mobikisi, mpo ete bato ya Isalaele bakoka kozwa nzela ya kobongola mitema mpe kozwa bolimbisi ya masumu na bango. Biso tozali batatoli ya makambo oyo, ndenge moko mpe Molimo Mosantu oyo Nzambe apesaki na bato oyo batosaka ye azali motatoli ya makambo yango. Tango bayokaki bongo, batombokaki makasi mpe bazwaki mokano ya kobomisa bantoma. Kasi, mofarizeo moko na kombo ya Gamaliele, ye azalaki molakisi ya mibeko mpe azalaki na lokumu mingi na miso ya bato nyonso, atelemaki kati na Likita monene, mpe atindaki ete babimisa bantoma mpo na mwa tango moke. Alobaki na bango: “Bato ya Isalaele, bosala keba mpo na makambo oyo bolingi kosala bato oyo. Eleki mikolo mingi te, moto moko na kombo ya Tewudasi awutaki kobima. Azalaki komimona moto monene, mpe bato pene nkama minei bazalaki kolanda ye. Kasi tango babomaki ye, bato nyonso oyo bazalaki kolanda ye bapalanganaki mpe lisanga na ye ekufaki. Sima na ye, tango tozalaki kotanga motango ya bato kati na mokili, moto moko mpe lisusu na kombo ya Yuda, moto ya mboka Galile, abimaki mpe amemaki bato ebele na botomboki. Ye mpe lisusu babomaki ye, bongo bato nyonso oyo bazalaki kolanda ye bapalanganaki. Yango wana, na likambo oyo, boyoka toli na ngai: Bokota lisusu makambo ya bato oyo te mpe botika bango bakende! Pamba te, soki makanisi to mosala na bango ewuti na moto, solo, ekosuka kaka na nzela. Kasi soki yango ewuti na Nzambe, solo, bokolonga te kosukisa bato oyo. Bosala keba ete bobundisa Nzambe te.” Bato ya Likita monene bandimaki likanisi ya Gamaliele. Babengisaki bantoma, babetisaki bango bafimbo mpe bapekisaki bango ete bateya lisusu Kombo ya Yesu te. Sima na yango batikaki bango kokende. Bantoma balongwaki liboso ya Likita monene, na esengo mingi ya komona ete bazali ya kokoka mpo na komona pasi na tina ya Kombo ya Yesu. Mokolo na mokolo bazalaki kotika te koteya, mpe kosakola sango malamu na Tempelo to na ndako moko na moko ete Yesu azali Klisto. Na mikolo wana, motango ya bayekoli ezalaki kaka kobakisama. Bayuda oyo bazalaki koloba monoko ya greki bakomaki koyimayima mpo na kotelemela Bayuda oyo bazalaki koloba monoko ya ebreo, pamba te na tango ya kokabola bilei ya mokolo na mokolo, basi na bango oyo bakufisa mibali bazalaki kozangela. Boye, bantoma zomi na mibale basangisaki bayekoli nyonso mpe balobaki na bango: “Ekozala malamu te mpo na biso kotika mosala ya koteya Liloba ya Nzambe mpo na komipesa na mosala ya kokabola biloko ya kolia. Yango wana bandeko, bopona mibali sambo kati na bino, oyo bazali na bizaleli ya malamu, oyo batonda na Molimo Mosantu mpe na bwanya mpo ete topesa bango mokumba yango. Boye, biso tokomipesa na mabondeli mpe na mosala ya koteya Liloba ya Nzambe.” Likanisi yango esepelisaki lisanga mobimba. Boye, baponaki: Etieni, moto oyo atonda na kondima mpe na Molimo Mosantu, Filipo, Prokore, Nikanori, Timoni, Parimenasi mpe Nikola, moto ya Antioshi oyo akotaki na lisanga ya Bayuda. Balakisaki bango epai ya Bantoma, oyo batiaki bango maboko mpe babondelaki mpo na bango. Boye, Liloba ya Nzambe ezalaki kokoba kopanzana, motango ya bayekoli ezalaki mpe kobakisama makasi na Yelusalemi mpe banganga-Nzambe ebele bakomaki kondimela Yesu. Nzoka nde, Etieni, moto oyo atondaki na ngolu mpe na nguya ya Nzambe azalaki kosala bikamwa mpe bilembo minene kati na bato. Bongo, bato mosusu ya ndako ya mayangani oyo babengaka “Ndako ya mayangani ya bansomi”: Bayuda ya Sirene, ya Alekizandri, ya bituka ya Silisi mpe ya Azi bazalaki na tembe na Etieni; kasi balongaki te kotelemela bwanya mpe Molimo oyo azalaki kotinda ye koloba. Bongo, bapesaki kanyaka epai ya bato mpo ete baloba: “Toyokaki Etieni koloba maloba ya kotuka Moyize mpe Nzambe.” Basalaki ete bato, bampaka mpe balakisi ya mibeko batomboka. Boye, bayaki kokanga Etieni na mbalakata mpe bamemaki ye na Likita monene. Kuna, babimisaki batatoli ya lokuta oyo balobaki: “Moto oyo azali kolemba te kobebisa lokumu ya Tempelo mpe ya mibeko ya Moyize. Pamba te, toyokaki ye koloba ete Yesu ya Nazareti akobuka Tempelo oyo mpe akobongola bizaleli oyo Moyize atikela biso.” Bato nyonso oyo bavandaki na Likita monene batalaki Etieni malamu penza, mpe bamonaki ete elongi na ye ekomaki lokola elongi ya anjelu. Bongo, mokonzi ya banganga-Nzambe atunaki ye: —Boni, makambo oyo bafundeli yo ezali ya solo? Etieni azongisaki: —Batata mpe bandeko, boyoka ngai! Nzambe ya nkembo abimelaki koko na biso Abrayami tango azalaki na Mezopotami, liboso ete akende kovanda na Sharani. Boye, Nzambe alobaki na ye: “Longwa na mokili na yo mpe na libota na yo, mpe kende na mokili oyo nakolakisa yo!” Boye, alongwaki na mokili ya Shaldeya mpe akendaki kovanda na mokili ya Sharani. Sima ya liwa ya tata na ye, Nzambe atindaki ye na mokili oyo, mokili oyo bino bozali kovanda sikʼoyo. Apesaki ye mabele moko te awa, ezala ata mwa eteni. Kasi, Nzambe apesaki ye elaka, ye elongo na bakitani na ye sima na ye ete, bakozwa mokili lokola libula, ata na tango wana, Abrayami azalaki nanu na mwana te. Tala makambo oyo Nzambe alobaki: “Bakitani na yo bakozala bapaya na mokili ya bato mosusu, bongo kuna, bakokoma bawumbu mpe bakonyokola bango mibu pene nkama minei.” Kasi, Nzambe alobaki lisusu: “Nakopesa etumbu na ekolo oyo ekokomisa bango bawumbu. Mpe na sima, bakobima na mokili yango mpe bakosambela ngai na esika oyo.” Bongo, Nzambe asalaki boyokani na Abrayami, mpe elembo ya boyokani yango ezalaki: kokata nzoto ya mibali. Abrayami abotaki Izaki mpe akataki ye nzoto ya mibali sima ya mikolo mwambe ya mbotama na ye. Izaki abotaki Jakobi mpe akataki ye nzoto ya mibali, bongo Jakobi mpe abotaki bakoko na biso zomi na mibale mpe akataki bango nzoto ya mibali. Lokola bakoko na biso bayokelaki Jozefi likunya, batekaki ye mpo ete azala mowumbu na Ejipito. Kasi Nzambe azalaki na ye elongo, mpe akangolaki ye na minyoko na ye nyonso. Apesaki ye bwanya mpe asalelaki ye ngolu na miso ya Faraon, mokonzi ya Ejipito, oyo akomisaki ye moyangeli ya Ejipito mpe ya ndako na ye mobimba. Nzoka nde, nzala moko ya makasi ekotaki na Ejipito mobimba mpe na Kanana, ememaki pasi penza, bongo bakoko na biso bazalaki lisusu na eloko ya kolia te. Tango Jakobi ayokaki ete ble ezali na Ejipito, atindaki bakoko na biso mbala ya liboso. Na mbala ya mibale, Jozefi amilakisaki epai ya bandeko na ye, bongo Faraon ayaki koyeba libota ya Jozefi. Bongo, Jozefi atindaki ete bakende kozwa tata na ye Jakobi elongo na bandeko na ye nyonso. Bango nyonso bazalaki bato tuku sambo na mitano. Boye, Jakobi akendaki kovanda na Ejipito, epai wapi ye na bakoko na biso bakufaki. Bamemaki banzoto na bango na engumba ya Sishemi mpe bakundaki yango na lilita oyo Abrayami asombaki na mbongo epai ya bana ya Amori, tata ya Sishemi. Wana tango oyo Nzambe alingaki kokokisa elaka oyo apesaki na Abrayami ekomaki pene, motango ya bato na biso na Ejipito ekomaki ebele penza. Boye, mokonzi mosusu oyo ayebaki eloko moko te mpo na Jozefi azwaki bokonzi na Ejipito. Na mayele mabe, mokonzi yango anyokolaki bakoko na biso kino kotinda bango na makasi ete babwaka bana na bango oyo babotami sika mpo ete bakufa. Ezalaki na tango wana nde Moyize abotamaki. Nzambe asalaki ye kitoko mingi. Babatelaki ye sanza misato na ndako ya tata na ye. Wana baboti na ye batiaki ye libanda, mwana mwasi ya Faraon azwaki ye mpe abokolaki ye lokola mwana na ye penza. Bayekolisaki Moyize na bwanya nyonso ya bato ya Ejipito, mpe akomaki moto na nguya na maloba mpe na misala. Tango Moyize akokisaki mibu tuku minei, azwaki mokano ya kokende kotala bandeko na ye, bato ya Isalaele. Awa amonaki moto moko ya Ejipito kobeta moto ya ekolo na ye, akotelaki moto ya Isalaele, azongisaki mabe na moto ya Ejipito mpe abomaki ye. Moyize akanisaki ete bandeko na ye bakososola ete Nzambe alingaki kosalela ye mpo na kokangola bango; nzoka nde, bango basosolaki yango te. Na mokolo oyo elandaki, Moyize akutaki bato ya Isalaele mibale kobunda. Boye, alingaki kozongisa boyokani kati na bango. Alobaki na bango: “Ah baninga na ngai, bozali bandeko; mpo na nini bozali kosalana mabe?” Kasi moto oyo azalaki konyokola ndeko na ye, atindikaki Moyize mpe alobaki: “Nani atie yo mokonzi mpe mosambisi na biso? Boni, olingi koboma ngai ndenge obomaki moto ya Ejipito lobi?” Tango Moyize ayokaki bongo, akimaki na mokili ya Madiani epai wapi avandaki lokola mopaya mpe abotaki bana mibale ya mibali. Na sima na mibu tuku minei, anjelu moko abimelaki Moyize na esobe, pene ya ngomba Sinayi, kati na moto ya mwa nzete oyo ezalaki kopela. Tango Moyize amonaki yango, akamwaki makasi. Mpe awa azalaki kopusana mpo na kotala yango malamu, ayokaki mongongo na Yawe koloba: “Nazali Nzambe ya bakoko na yo, Nzambe ya Abrayami, ya Izaki mpe ya Jakobi.” Moyize alengaki na somo mpe akokaki kutu kotala te. Bongo, Nkolo alobaki na ye: “Longola basandale na yo, pamba te esika oyo otelemi ezali mabele ya bule. Namoni minyoko ya bato na ngai na Ejipito. Nayoki kolela na bango mpe nakiti mpo na kokangola bango. Mpe yaka sikʼoyo, nakotinda yo ete ozonga na Ejipito.” Ezalaki kaka Moyize oyo bandeko na ye baboyaki tango balobaki: “Nani atie yo mokonzi mpe mosambisi?” nde Nzambe atindaki mpo ete azala mokonzi mpe mokangoli na bango, na lisungi ya anjelu oyo abimelaki ye na mwa nzete. Abimisaki bango na Ejipito, na nzela ya bikamwa mpe ya bilembo minene oyo asalaki kuna, na ebale monene ya Motane mpe na esobe, mibu tuku minei. Ezalaki kaka Moyize wana oyo alobaki na bato ya Isalaele: “Nzambe akotindela bino mosakoli moko lokola ngai, oyo akowuta kati na bandeko na bino.” Tango bakoko na biso basanganaki na esobe, ezalaki ye nde azalaki molobeli kati na bakoko na biso mpe anjelu oyo asololaki na ye na ngomba ya Sinayi epai wapi azwaki Maloba ya bomoi mpo na kopesa biso. Kasi, bakoko na biso baboyaki kotosa ye. Batombokelaki ye mpe bazwaki likanisi ya kozonga na Ejipito. Balobaki na Aron: “Salela biso banzambe oyo bakotambola liboso na biso. Pamba te, toyebi te soki makambo nini ekomeli Moyize oyo abimisaki biso na Ejipito!” Ezalaki na mikolo wana nde basalaki ekeko ya mwana ngombe. Bapesaki makabo na ekeko yango mpe basalaki feti mpo na kopesa lokumu na misala ya maboko na bango. Kasi Nzambe apesaki bango mokongo mpe atikaki bango ete basambela minzoto ndenge ekomama na buku ya basakoli: “Bato ya Isalaele, bozalaki kobonzela ngai mbeka mpe kopesa ngai makabo, mibu tuku minei na esobe? Bomemaki nde ndako ya kapo ya Moloki mpe monzoto ya nzambe na bino Rofa, banzambe ya bikeko oyo bosalaki mpo na kokumamela! Yango wana, nakotinda bino na bowumbu, mosika koleka Babiloni!” Bakoko na biso bazalaki na Ndako ya kapo ya Boyokani na esobe. Batongaki yango ndenge Nzambe atindaki Moyize, kolanda ndakisa oyo amonaki. Sima ya kozwa Ndako ya kapo yango, bakoko na biso na bokambami ya Jozue, bamemaki yango tango babotolaki mikili ya bapagano, mikili oyo Nzambe abenganaki liboso na bango. Mpe Ndako ya kapo yango etikalaki kuna kino na tango ya Davidi; oyo azwaki ngolu na miso ya Nzambe mpe asengaki ete atongela Nzambe ya Jakobi ndako. Kasi Salomo nde moto atongelaki ye ndako. Nzoka nde, Ye oyo Aleki Likolo avandaka te na bandako oyo bato batonga ndenge mosakoli aloba: “Likolo ezali kiti na ngai ya bokonzi, mpe mabele ezali enyatelo ya makolo na ngai. Ndako ya ndenge nini penza bokoki kotongela ngai? Elobi Yawe, To esika ya bopemi ya ndenge nini penza bokoki kobongisela ngai? Boni, ezali maboko na ngai te nde esalaki biloko wana nyonso?” Bato ya mito makasi, ya mitema mabanga mpe bakufa matoyi! Bozali kaka ndenge moko na bakoko na bino: botelemelaka tango nyonso Molimo Mosantu! Boni, ezalaki solo ata na mosakoli moko oyo bakoko na bino bazangaki konyokola? Kutu, babomaki ezala basakoli oyo basakolaki koya ya Moyengebene, Ye oyo bosili sikʼoyo koteka mpe koboma, bino bato oyo bozwaki Mobeko ya Nzambe na nzela ya ba-anjelu, kasi botosaki yango te. Tango bato ya Likita-monene bayokaki bongo, batombokaki makasi mpe bakomaki kolia mino mpo na Etieni. Kasi, lokola Etieni atondisamaki na Molimo Mosantu, atalaki na likolo, amonaki nkembo ya Nzambe mpe Yesu atelema na loboko ya mobali ya Nzambe. Alobaki: “Botala, namoni likolo efongwami mpe Mwana na Moto atelema na loboko ya mobali ya Nzambe!” Bongo, bakangaki matoyi na bango, bagangaki makasi penza mpe bango nyonso basangelaki ye, bamemaki ye libanda ya engumba mpe babambaki ye mabanga. Na tango wana, batatoli batikaki bilamba na bango epai ya elenge mobali moko na kombo ya Saulo. Wana bazalaki kobamba ye mabanga, Etieni abondelaki: “Nkolo Yesu, yamba molimo na ngai!” Bongo, afukamaki mpe agangaki makasi: “Nkolo, kotangela bango lisumu oyo te!” Tango kaka Etieni alobaki bongo, akufaki. Saulo mpe azalaki na molongo ya bato oyo bandimaki ete baboma Etieni. Kaka na mokolo wana, minyoko moko ya makasi penza ekweyelaki Lingomba na Yelusalemi. Bandimi nyonso bapalanganaki na Yudea mpe na Samari, longola kaka bantoma. Bato oyo batosaka mibeko ya Nzambe bakundaki Etieni mpe balelaki ye mingi. Kasi, Saulo abandaki kosala nyonso mpo na kopanza Lingomba. Azalaki kokota na bandako nyonso mpo na kokanga mibali mpe basi, mpe kobwaka bango na boloko. Nzoka nde, bandimi oyo bapalanganaki, bakomaki koteya Liloba ya Nzambe bisika nyonso bazalaki kokende. Filipo akendaki na engumba moko ya Samari, mpe kuna, ateyaki Klisto. Tango bato nyonso bayokaki Filipo koteya mpe bamonaki bikamwa oyo azalaki kosala, bayokaki na bokebi makambo oyo azalaki koloba. Pamba te, milimo ya mbindo ezalaki kobima na koganga makasi kati na bato mingi oyo bazalaki na yango. Bato mingi oyo bakufa makolo, mpe oyo batambolaka tengu-tengu bazalaki kobika. Boye, bato ya engumba yango batondisamaki na esengo mingi penza. Nzoka nde, wuta kala, ezalaki na moto moko na engumba wana, oyo kombo na ye ezalaki Simona. Azalaki kosala misala ya maji. Azalaki kokamwisa bato nyonso ya Samari mpe azalaki komimona moto monene. Bato nyonso, bato minene mpe bato mike bazalaki koyokela ye mpe bazalaki koloba: “Moto oyo azali na nguya ya Nzambe, oyo babengaka: ‘Nguya monene!’ ” Bazalaki kolanda ye mpo ete wuta kala, azalaki kokamwisa bango na misala na ye ya maji. Kasi tango bandimaki sango malamu oyo Filipo ateyaki mpo na Bokonzi ya Nzambe mpe mpo na Kombo ya Yesu Klisto, mibali mpe basi bazwaki libatisi. Simona mpe andimaki, boye ye mpe azwaki libatisi. Azalaki kolanda Filipo bisika nyonso oyo azalaki kokende, mpe azalaki kokamwa komona bilembo minene mpe bikamwa oyo ezalaki kosalama. Wana bantoma, na Yelusalemi, bayokaki ete bato ya Samari bayambi Liloba ya Nzambe, batindelaki bango Piere mpe Yoane. Tango bakomaki kuna, babondelaki mpo na bango mpo ete bazwa Molimo Mosantu. Pamba te, Molimo Mosantu akitelaki nanu ata moto moko te kati na bango; bazwaki kaka libatisi na Kombo ya Nkolo Yesu. Boye, Piere na Yoane batielaki bango maboko mpe bazwaki Molimo Mosantu. Tango Simona amonaki ete bato oyo bandimaki bazwaki Molimo Mosantu wana bantoma batielaki bango maboko, apesaki Piere mpe Yoane mbongo, mpe alobaki: —Bopesa ngai mpe nguya oyo, mpo ete moto nyonso oyo ngai mpe nakotiela maboko akoka kozwa Molimo Mosantu! Kasi, Piere azongiselaki ye: —Tika ete yo na mbongo na yo bokufa, mpo okanisi ete okoki kosomba likabo ya Nzambe na mbongo! Solo, ozali na libula to na makoki kati na mosala oyo te, pamba te motema na yo ezali sembo te liboso ya Nzambe. Yango wana, bongwana na mabe na yo mpe bondela Nkolo, tango mosusu akoki kolimbisa yo na oyo okanisaki na motema. Pamba te, namoni ete motema na yo etonda na zuwa mpe ozali mowumbu ya masumu. Boye, Simona azongisaki: —Bino nde bobondela Nkolo mpo na ngai, mpo ete likambo moko te na oyo bowuti koloba ekomela ngai! Tango basilisaki kotatola mpe kosakola Liloba ya Nkolo, Piere mpe Yoane bazongaki na Yelusalemi, mpe bazalaki koteya sango malamu na mboka ebele ya Samari. Anjelu ya Nkolo alobaki na Filipo: —Telema, kende na sude, na nzela ya esobe, nzela oyo ewuta na Yelusalemi mpe ekenda kino na Gaza! Boye, Filipo atelemaki mpe akendeki, mpe na nzela, akutanaki na soda moko oyo baboma mokongo, azalaki moto ya mboka Etiopi. Azalaki mokonzi monene mpe azalaki na mokumba ya kobatela bomengo nyonso ya Kandase, mokonzi mwasi ya Etiopi. Moto yango ayaki na Yelusalemi mpo na kokumamela Yawe, bongo azalaki kozonga na mboka na ye. Avandaki kati na shar na ye mpe azalaki kotanga mokanda ya mosakoli Ezayi. Boye, Molimo alobaki na Filipo: “Kende mpe pusana pene ya shar wana.” Filipo akendaki mbangu pene ya shar yango mpe ayokaki ye kotanga mokanda ya mosakoli Ezayi. Atunaki ye: —Boni, ozali kososola makambo oyo ozali kotanga? Ye azongisaki: —Ndenge nini nakoki solo kososola yango, soki moto alimboleli ngai te? Bongo, abengaki Filipo ete amata na shar mpe avanda pembeni na ye. Tala eteni ya Makomi oyo azalaki kotanga: “Bamemaki ye lokola meme oyo balingi koboma, lokola mwana meme oyo ekangi monoko liboso ya moto oyo azali kolongola yango suki, bongo afungolaki monoko na ye te. Basambwisaki ye mpe baboyaki kolongisa ye. Nani akolobela bakitani na ye? Pamba te, balongoli bomoi na ye na mokili!” Bongo, soda oyo baboma mokongo atunaki Filipo: —Nabondeli yo, yebisa ngai: mosakoli azali koloba makambo oyo mpo na nani? Alobaki yango mpo na ye moko, to mpo na moto mosusu? Boye, Filipo ayebisaki ye sango malamu ya Yesu, na nzela ya eteni wana ya Makomi. Wana bazalaki kokoba na mobembo na bango, bakomaki na esika moko oyo ezalaki na mayi; bongo soda oyo baboma mokongo alobaki: —Tala, mayi yangʼoyo. Eloko nini ekoki kopekisa ngai ete nazwa libatisi? [Filipo alobaki: —Soki kaka ondimi na motema na yo mobimba, okoki kozwa libatisi! Ye azongisaki: —Nandimi ete Yesu Klisto azali Mwana ya Nzambe!] Atindaki ete batelemisa shar. Boye, bango mibale, Filipo mpe soda oyo baboma mokongo bakitaki na mayi, mpe Filipo abatisaki ye. Tango babimaki na mayi, Molimo ya Nkolo alongolaki Filipo, mpe soda oyo baboma mokongo amonaki ye lisusu te. Bongo, azongelaki mobembo na ye na esengo nyonso penza. Nzoka nde, Filipo amonanaki na Azoti, mpe kuna azalaki koteya sango malamu na bingumba nyonso epai wapi azalaki kolekela, kino akomaki na Sezare. Nzoka nde, Saulo azalaki kaka kokanela mpe koluka koboma bayekoli ya Nkolo. Akendaki epai ya mokonzi ya banganga-Nzambe, mpe asengaki ye mikanda mpo na kopesa na bandako ya mayangani ya Damasi, mpo ete soki akuti ndambo ya bato kuna, basi to mibali oyo bazali kolanda nzela ya Nkolo, akanga bango mpe amema bango na Yelusalemi. Tango azalaki kokende mpe akomaki pene ya Damasi, na mbala moko, amonaki pole moko kowuta na likolo mpe kongengela ye. Boye, akweyaki na mabele mpe ayokaki mongongo moko koloba na ye: —Saulo, Saulo, mpo na nini ozali konyokola ngai? Saulo atunaki: —Nkolo, yo nani? Mongongo ezongisaki: —Ezali ngai Yesu oyo yo ozali konyokola. Kasi sikʼoyo telema, kota na engumba, mpe kuna bakoyebisa yo makambo oyo osengeli kosala. Bato oyo bazalaki kosala mobembo elongo na Saulo batelemaki mpe bazangaki maloba ya koloba. Bayokaki mongongo yango, kasi bamonaki moto moko te. Saulo atelemaki wuta na mabele, kasi tango afungolaki miso, azalaki komona lisusu te. Boye, basimbaki ye na loboko mpe bamemaki ye na Damasi. Asalaki mikolo misato: komona te, kolia te mpe komela te. Moyekoli moko azalaki na Damasi, kombo na ye ezalaki Ananiasi. Nkolo abengaki ye na emoniseli: —Ananiasi! Ye azongisaki: —Nkolo, ngai oyo! Nkolo alobaki na ye: —Telema, kende na ndako ya Yuda, oyo ezali na balabala oyo babengaka: “Alima,” mpe tuna moto moko ya mboka Tarse, oyo azali kobondela. Kombo na ye Saulo. Pamba te, amonaki na emoniseli moto moko kombo na ye Ananiasi ayaki mpe atielaki ye maboko mpo ete amona lisusu! Kasi Ananiasi azongisaki: —Nkolo, nayoka makambo mingi mpo na moto wana, mpe ndenge anyokolaki babulami na yo na Yelusalemi. Mpe ayei awa na Damasi, na bokonzi oyo bakonzi ya banganga-Nzambe bapesi ye mpo na kokanga bato nyonso oyo babondelaka yo. Kasi Nkolo alobaki na Ananiasi: —Kende, pamba te nasila kopona moto wana mpo ete azala esaleli na ngai mpo na komema Kombo na ngai na bikolo ya bapaya mpe epai ya bakonzi na bango, elongo na bato ya Isalaele. Nakolakisa ye ndenge nini asengeli konyokwama mpo na Kombo na ngai! Bongo, Ananiasi akendaki. Akotaki na ndako mpe atielaki Saulo maboko. Alobaki na ye: “Ndeko na ngai Saulo, Nkolo Yesu oyo abimelaki yo na nzela tango ozalaki koya awa, atindi ngai mpo ete omona lisusu mpe otonda na Molimo Mosantu!” Kaka na tango wana, biloko moko lokola baposo ya mbisi, ekweyaki wuta na miso ya Saulo. Boye, akomaki lisusu komona. Atelemaki mpe azwaki libatisi; mpe sima ya kolia, nzoto na ye ezongaki lisusu makasi. Saulo avandaki mwa mikolo elongo na bayekoli oyo bazalaki na Damasi. Kaka na tango wana, abandaki koteya na bandako ya mayangani ete Yesu azali Mwana ya Nzambe. Bato nyonso oyo bazalaki koyoka ye, bazalaki kokamwa mingi penza mpe bazalaki kotuna: “Boni, ezali ye te moto azalaki konyokola bato oyo babelelaka Kombo ya Yesu na Yelusalemi? Ayei awa te mpo na kokanga mpe komema bango epai ya bakonzi ya banganga-Nzambe?” Nzoka nde, kondima ya Saulo ezalaki se kokoba kolendisama mpe azalaki kondimisa Bayuda oyo bavandaka na Damasi ete Yesu azali solo Klisto. Sima ya mikolo ebele, Bayuda bayokanaki mpo na koboma Saulo. Kasi bato bayebisaki Saulo makambo oyo bazalaki kobongisa mpo na ye. Butu mpe moyi, bazalaki kokengela bikuke ya engumba mpo na koluka koboma ye. Bongo, mokolo moko na butu, bayekoli na ye bakamataki ye, batiaki ye na kitunga mpe bakitisaki ye na libanda ya miri. Tango Saulo akomaki na Yelusalemi, alukaki kosangana na bayekoli, kasi bango nyonso bazalaki kobanga ye, pamba te bazalaki penza kondima te ete akomi moyekoli. Kasi Barnabasi akamataki ye mpe amemaki ye epai ya bantoma. Ayebisaki bango ndenge nini Saulo amonaki Nkolo na nzela ya Damasi, mpe makambo oyo Nkolo alobaki na ye. Ayebisaki bango mpe lisusu ndenge nini ateyaki, na kobanga te, na Damasi na kombo ya Yesu. Bongo, Saulo avandaki elongo na bango. Azalaki kotambola na bonsomi nyonso kati na Yelusalemi mobimba mpe koteya na kobanga te, na Kombo ya Nkolo. Saulo azalaki kosolola mpe kotia tembe na Bayuda oyo balobaka monoko ya greki, nzoka nde, bango bazalaki koluka nzela ya koboma ye. Tango bandeko bayokaki likambo yango, bamemaki Saulo na Sezare, mpe longwa kuna, batindaki ye na Tarse. Lingomba ezalaki na kimia mingi kati na Yudea mobimba, na Galile mpe na Samari. Ezalaki kokola na kondima, kotosa Nkolo mpe motango ya bandimi na yango ezalaki kobakisama na lisungi ya Molimo Mosantu. Lokola Piere azalaki tango na tango kosala mibembo kati na mboka, akendaki mpe kotala basantu oyo bavandaka na mboka Lidi. Kuna, amonaki moto moko, na kombo ya Ene, oyo alala na etoko wuta mibu mwambe mpo ete azalaki na maladi ya buka-buka. Piere alobaki na ye: “Ene, Yesu Klisto abikisi yo; telema mpe bongisa mbeto na yo!” Kaka na tango wana, Ene atelemaki. Tango bato nyonso oyo bavandaka na Lidi mpe na esobe ya Saroni bamonaki ye, bandimelaki Nkolo. Ezalaki na moyekoli moko ya mwasi na Jafa, na kombo ya Tabita, oyo babongola na monoko ya greki Dorkasi, elingi koloba: “Mboloko.” Azalaki tango nyonso kosala bolamu mpe kosalisa babola. Nzoka nde, na mikolo wana, azwaki maladi mpe akufaki. Sima ya kosokola nzoto na ye, batiaki yango na shambre ya likolo. Lidi ezalaki pene ya Jafa. Boye, tango bayekoli bayokaki sango ete Piere azali na Lidi, batindelaki ye mibali mibale mpo na koloba na ye: “Tobondeli yo, yaka noki!” Piere akendaki elongo na bango. Tango akomaki, bamemaki ye na shambre ya likolo. Basi nyonso oyo bakufela mibali bayaki kozingela ye mpe bazalaki kolela. Boye, bazalaki kolakisa ye banzambala mpe bilamba misusu oyo Dorkasi azalaki kotonga wana azalaki nanu elongo na bango. Piere asengaki ete bato nyonso oyo bazalaki na shambre babima. Afukamaki mpe abondelaki, bongo abalukaki epai nzoto ezalaki mpe alobaki: “Tabita telema!” Tabita afungolaki miso, amonaki Piere mpe avandaki. Boye, Piere akamataki ye na loboko mpe atelemisaki ye, abengaki bandimi elongo na basi oyo bakufisa mibali mpe alakisaki bango ete Dorkasi azali na bomoi. Sango yango epanzanaki na engumba mobimha ya Jafa mpe bato mingi bandimelaki Nkolo. Piere avandaki mikolo mingi na Jafa, na ndako ya moto moko na kombo ya Simona, oyo azalaki kosala mosala ya kobongisa baposo ya nyama. Ezalaki na moto moko na Sezare, na kombo ya Kornei. Ye azalaki mokonzi ya mampinga ya basoda, oyo babengaka mampinga ya Itali. Ye elongo na libota na ye, bazalaki kotosa mibeko ya Nzambe mpe kobanga Ye. Azalaki kosalisa na esengo bato bakelela mpe kobondela Nzambe tango nyonso. Mokolo moko, pene ya ngonga ya misato sima ya midi, azwaki emoniseli. Amonaki na polele penza anjelu ya Nzambe koya epai na ye mpe kobenga ye: “Kornei!” Kornei atalaki ye na somo mpe atunaki: —Nkolo, likambo nini? Anjelu azongiselaki ye: —Mabondeli na yo mpe masungi oyo opesaka bato bakelela emati kino epai ya Nzambe lokola ekaniseli. Sikʼoyo, tinda bato na Jafa mpe bengisa moto moko, na kombo ya Simona, oyo babengaka mpe Piere. Azali kovanda na ndako ya moto moko oyo abongisaka baposo ya nyama, kombo na ye Simona. Ndako na ye ezali pene ya ebale monene. Tango anjelu oyo asololaki na ye akendaki, Kornei abengaki basali mibale kati na basali na ye mpe soda moko kati na basoda oyo bazalaki kosalela ye, oyo azalaki penza kotosa mibeko ya Nzambe. Boye, ayebisaki bango makambo nyonso oyo ekomelaki ye mpe atindaki bango na Jafa. Na mokolo oyo elandaki, pene ya midi, wana bato oyo Kornei atindaki bazalaki nanu na nzela mpe bakomaki pene ya Jafa, Piere amataki na veranda oyo ezalaki na likolo ya ndako mpo na kobondela. Ayokaki nzala mpe akomaki na posa ya kolia. Kasi, wana bazalaki nanu kolambela ye bilei, akweyaki na Molimo. Amonaki likolo efongwami mpe eloko moko lokola elamba ya monene, oyo basimba na basonge na yango minei kokita na se. Kati na yango, ezalaki na lolenge nyonso ya banyama ya makolo minei, ya banyama oyo etambolaka na libumu mpe bandeke. Boye, mongongo moko elobaki na ye: —Piere, telema! Boma mpe lia! Kasi Piere azongisaki: —Te Nkolo! Nanu nalia eloko ya mbindo to ya bosoto te! Mongongo yango elobaki na ye lisusu: —Eloko oyo ngai Nzambe abengi peto, yo kobenga yango mbindo te. Ekomelaki ye bongo mbala misato, mpe na mbala moko, eloko yango emataki na likolo. Piere akamwaki mingi penza mpe akomaki komituna soki emoniseli oyo awuti kozwa elakisi nini. Kaka na tango wana, bato oyo Kornei atindaki bamonaki ndako ya Simona oyo bazalaki koluka, mpe batelemaki na ekuke. Babelelaki mpe batunaki soki Simona oyo babengaka Piere avandaka wana. Wana Piere azalaki kaka komituna mpo na emoniseli oyo awutaki kozwa, Molimo alobaki na ye: “Simona, bato misato bazali koluka yo. Telema, kita mpe kotia tembe te mpo na kokende na bango elongo. Pamba te, ngai nde natindi bango.” Piere akitaki mpe alobaki na bato yango: —Ezali nde ngai moto bozali koluka. Boyei mpo na nini? Bazongisaki: —Towuti epai ya Kornei, mokonzi ya basoda. Ye azali moto ya sembo mpe abangaka Nzambe. Bayuda nyonso batosaka ye mingi. Anjelu ya Nzambe ayebisaki ye ete abengisa yo na ndako na ye mpo ete ayoka oyo okoki koloba. Boye, Piere akotisaki bango na ndako mpe apesaki bango esika ya kolala. Na mokolo oyo elandaki, Piere akendaki na bango nzela moko, mpe bandeko misusu ya Jafa bakendaki na ye mpe elongo. Sima ya mokolo moko, bakomaki na Sezare. Kornei azalaki kozela bango, abengisaki bato ya libota na ye mpe baninga na ye. Tango Piere alingaki kokota na ndako, Kornei akendaki koyamba ye mpe afukamaki liboso na ye na botosi nyonso. Kasi, Piere atelemisaki ye mpe alobaki: “Telema! Ngai mpe nazali kaka moto lokola yo.” Wana bazalaki kosolola, Piere akotaki na ndako mpe akutaki bato ebele basangani. Alobaki na bango: —Bino moko boyebi yango malamu ete mibeko na biso epekisaka Moyuda nyonso kosangana to kokende kotala mopagano. Kasi Nzambe alakisi ngai ete nasengeli komona moto moko te mbindo to bosoto. Yango wana, tango botindaki bato mpo ete babenga ngai, natunaki ata motuna moko te mpo na koya. Sikʼoyo nakoki koyeba tina nini bobengeli ngai? Kornei azongisaki: —Eleki mikolo misato, na ngonga lokola oyo, ngonga ya misato sima ya midi, nazalaki kobondela na ndako na ngai. Na mbala moko, namonaki moto moko alata bilamba ya kongenga makasi penza mpe atelemaki liboso na ngai. Alobaki: “Kornei, Nzambe ayoki mabondeli na yo mpe abosani te masungi oyo opesaka bato bakelela. Tinda bato na Jafa mpe bengisa Simona oyo babengaka Piere. Azali kovanda na ndako ya Simona oyo abongisaka baposo ya nyama, oyo ndako na ye ezali pene ya ebale monene.” Yango wana, natindaki bato noki-noki epai na yo, mpe osali malamu ndenge osili koya. Sikʼoyo, biso nyonso tozali awa liboso ya Nzambe mpo na koyoka nyonso oyo Nkolo atindi yo koyebisa biso! Boye, Piere azwaki maloba mpe alobaki: —Sikʼoyo nasili kososola solo ete Nzambe atalaka bilongi te, kasi andimaka bato ya bikolo nyonso oyo babangaka ye mpe basalaka makambo ya sembo. Atindaki Liloba na ye epai ya bato ya Isalaele mpo na kosakola epai na bango sango malamu ya kimia na nzela ya Yesu Klisto, oyo azali Nkolo ya bato nyonso. Boyebi makambo oyo esalamaki na Yudea mobimba, ebandelaki na Galile, sima na sango ya libatisi oyo Yoane ateyaki. Boyebi mpe lisusu ndenge nini Nzambe atondisaki Yesu ya Nazareti na Molimo Mosantu mpe na nguya, mpe ndenge nini atambolaki bipai na bipai mpo na kosala bolamu mpe kobikisa bato nyonso oyo bazalaki na se ya nguya ya zabolo, pamba te Nzambe azalaki elongo na ye. Biso tozali batatoli ya makambo nyonso oyo Yesu asalaki na mokili ya Bayuda mpe na Yelusalemi. Babomaki ye mpe babakaki ye na nzete, kasi Nzambe asekwisaki ye kati na bakufi na mokolo ya misato mpe asalaki ete amonana lisusu. Amonanaki na bato nyonso te, kasi kaka na biso batatoli oyo Nzambe apona wuta kala, biso oyo toliaki mpe tomelaki na ye elongo, sima ya lisekwa na ye kati na bakufi. Boye, atindaki biso ete toteya sango malamu epai ya bato, mpe totatola ete Ye nde Moto oyo Nzambe apona mpo na kosambisa bato ya bomoi mpe bakufi. Basakoli nyonso batatolaki na tina na Ye ete moto nyonso oyo akondimela Ye, akozwa bolimbisi ya masumu na Kombo na Ye. Wana Piere azalaki nanu koloba, Molimo Mosantu akitelaki bato nyonso oyo bazalaki koyoka mateya. Bayuda oyo bandimelaki Yesu, oyo bayaki elongo na Piere wuta na Jafa bakamwaki mingi na komona ete Nzambe apesi mpe likabo ya Molimo Mosantu ezala na bato ya bikolo ya bapaya. Pamba te, bayokaki bango koloba na minoko misusu mpe kokumisa monene ya Nzambe. Boye, Piere atunaki bango: “Bato oyo mpe bazwi Molimo Mosantu ndenge biso tozwaki. Boni, ezali na moto oyo akoki koboya ete bazwa libatisi na mayi?” Boye, Piere atindaki ete babatisa bango na Kombo ya Yesu Klisto. Bongo, babondelaki Piere ete avanda na bango elongo mpo na mwa mikolo. Bantoma mpe bandeko oyo bazalaki na Yudea bayokaki sango ete bato ya bikolo ya bapaya mpe bandimaki Liloba ya Nzambe. Tango Piere azongaki na Yelusalemi, Bayuda oyo bandimelaki Yesu bapamelaki ye, mpe balobaki: —Mpo na nini okotaki na ndako ya bato ya bikolo ya bapaya mpe oliaki elongo na bango! Boye, Piere alimbolaki likambo yango ndenge esalamaki. Alobaki na bango: —Nazalaki kobondela na engumba ya Jafa mpe nazwaki emoniseli oyo: Namonaki eloko moko lokola elamba ya monene kokita wuta na likolo. Basimbaki yango na basonge na yango minei, mpe ekitaki kino na esika oyo nazalaki. Tango natalaki yango malamu, namonaki kati na yango: banyama ya makolo minei, banyama ya zamba, banyama oyo etambolaka na libumu mpe bandeke. Bongo, nayokaki mongongo moko koloba na ngai: “Piere telema! Boma mpe lia!” Kasi ngai nazongisaki: “Te Nkolo! Nanu nalia eloko ya mbindo to ya bosoto te.” Bongo, wuta na likolo, mongongo yango elobaki na ngai lisusu mpo na mbala ya mibale: “Eloko oyo ngai Nzambe nabengi peto, yo kobenga yango mbindo te.” Yango esalamaki mbala misato, bongo nyonso ezongaki lisusu na likolo. Kaka na tango wana, bato misato oyo bawutaki na Sezare bakomaki na ndako oyo nazalaki kovanda, mpo ete batindaki bango epai na ngai. Molimo alobaki na ngai ete natia tembe te mpo na kokende elongo na bango. Bongo, bandeko motoba ya Jafa mpe bakendaki na ngai elongo kino na Sezare, mpe tokotaki na ndako ya moto yango. Boye, ayebisaki biso ndenge nini amonaki anjelu kobimela ye na ndako mpe koloba na ye: “Tinda bato na Jafa, mpe bengisa Simona oyo babengaka Piere. Akoyebisa yo maloba oyo ekobikisa yo mpe libota na yo mobimba!” Wana nazalaki nanu koloba, Molimo Mosantu akitelaki bango kaka ndenge akitelaki biso na ebandeli. Boye, nakanisaki lisusu maloba oyo Nkolo alobaki: “Yoane abatisaki na mayi, kasi bino, Nzambe akobatisa bino na Molimo Mosantu.” Soki Nzambe apesaki bango likabo ya ndenge moko na biso oyo tondimelaki Nkolo Yesu Klisto, bongo ngai nazali nani mpo ete nakoka koboya makambo oyo Nzambe alingi? Tango bayokaki bongo, bazangaki maloba ya kobakisa mpe bakomaki kokumisa Nzambe na maloba oyo: “Tala ndenge nini Nzambe asali ete ezala bato ya bikolo ya bapaya babongola mitema mpe bazwa bomoi.” Nzoka nde, bandimi oyo bapalanganaki mpo na kokima minyoko oyo eyaki tango babomaki Etieni, bakimaki kino na Fenisi, na Shipre mpe na Antioshe. Mpe kuna, bazalaki kosakola sango malamu kaka epai na Bayuda. Kasi misusu kati na bango, bato ya Shipre mpe ya Sirene bakendaki na Antioshe mpe bakomaki koteya sango malamu ya Nkolo Yesu epai ya bato ya bikolo ya bapaya. Nguya ya Nkolo ezalaki na bango elongo mpe bato ebele penza bandimelaki Nkolo mpe bamipesaki epai na Ye. Sango yango ekomaki kino na Lingomba ya Yelusalemi mpe batindaki Barnabasi na Antioshe. Tango akomaki kuna mpe amonaki ndenge nini Nzambe apambolaki bango, asepelaki makasi mpe alendisaki bango nyonso ete bakangama makasi na Nkolo na mitema na bango mobimba. Barnabasi solo azalaki moto malamu, atondisamaki na Molimo Mosantu mpe na kondima. Bato ebele penza bandimelaki Nkolo. Bongo, Barnabasi akendaki kino na Tarse mpo na koluka Saulo. Tango amonaki ye, amemaki ye na Antioshe. Pene na mobu mobimba, Barnabasi mpe Saulo bazalaki kosangana elongo na Lingomba mpe koteya bato ebele. Ezalaki kuna na Antioshe nde babengaki bayekoli, mpo na mbala ya liboso, Baklisto. Na mikolo wana, basakoli oyo bawutaki na Yelusalemi bakendaki na Antioshe. Moko kati na bango, na kombo ya Agabusi atelemaki mpe asakolaki na nguya ya Molimo ete nzala makasi ekoya na mikili nyonso oyo bato ya Rome bazalaki kokonza. (Nzala yango esalemaki na tango Klode azalaki mokonzi). Bayekoli oyo bazalaki na Antioshe bazwaki mokano ya kotindela bandeko ya Yudea lisungi, moto na moto kolanda makoki na ye. Basalaki bongo mpe batindaki masungi na bango epai ya bakambi ya Lingomba, na maboko ya Barnabasi mpe ya Saulo. Na tango wana, mokonzi Erode akomaki kokanga bandimi misusu ya lingomba mpo na konyokola bango. Bongo, abomisaki Jake, ndeko ya Yoane na mopanga. Boye, tango amonaki ete likambo yango ezalaki kosepelisa Bayuda, akangisaki mpe Piere na tango ya feti ya mapa oyo ezanga levire. Sima ya kokangisa Piere, atiaki ye na boloko mpe apesaki ye na maboko ya masanga minei ya basoda, mpo ete bakengela ye: lisanga moko na moko ezalaki na basoda minei. Erode azalaki na likanisi ya kosambisa ye liboso ya bato sima ya feti ya Pasika. Bongo, bazalaki kokengela Piere na boloko, kasi Lingomba ezalaki kobondela Nzambe na molende nyonso mpo na ye. Na butu ya mokolo oyo Erode alingaki kosambisa Piere liboso ya bato, Piere oyo azalaki ya kokangama na minyololo mibale, alalaki kati na basoda mibale mpe bakengeli bazalaki kokengela liboso ya ekuke ya boloko. Na mbala moko, anjelu ya Nkolo abimaki na pwasa mpe pole engengisaki boloko. Anjelu aningisaki Piere na mopanzi, alamusaki ye mpe alobaki na ye: “Telema noki!” Bongo, minyololo oyo ezalaki na maboko ya Piere ekweyaki. Anjelu alobaki na ye: “Kanga mokaba na yo mpe lata sandale na yo!” Piere asalaki kaka bongo. Mpe anjelu alobaki na ye lisusu: “Lata kazaka na yo mpe landa ngai!” Piere abimaki na boloko mpe alandaki ye. Azalaki koyeba te ete makambo oyo anjelu azalaki kosala ezalaki solo, kasi ye azalaki kokanisa ete ezali ndoto. Wana ezalaki bango kokende, balekaki esika oyo bakengeli ya liboso mpe ya mibale bazalaki, boye bakomaki na ekuke ya bibende oyo bakotelaka na engumba, mpe ekuke yango efongwamaki yango moko. Tango babimaki mpe bakomaki na suka ya balabala, na mbala moko, anjelu atikaki ye. Tango Piere asosolaki ete makambo oyo esalami epai na ye ezali ya solo, alobaki: “Solo, namoni sikʼoyo ete Nkolo atindaki anjelu na ye, mpe akangoli ngai na maboko ya Erode mpe na makambo nyonso oyo Bayuda balingaki kosala ngai!” Tango amonaki bongo, akendaki na ndako ya Maria, mama na Yoane oyo babengaka mpe Malako. Bandimi ebele basanganaki kuna, mpe bazalaki kobondela Nzambe. Piere abetaki ekuke mpe mosali moko ya mwasi, na kombo ya Rode ayaki koluka koyeba soki ezali nani. Tango asosolaki ete ezali mongongo ya Piere, atondaki na esengo; na esika ya kofungola ekuke, azongaki mbangu koyebisa bango: —Eh! Ezali Piere, azali na libanda liboso ya ekuke. Kasi bango bazongiselaki ye: —Nini, ozali na liboma! Kasi Rode azalaki kaka koloba: —Ya solo penza! Piere azali na libanda. Bongo, balobaki: —Te, ekoki kozala anjelu na ye. Nzoka nde, Piere azalaki kaka kokoba kobeta ekuke. Boye, tango bafungolaki ekuke mpe bamonaki ye, bakamwaki makasi. Piere apepelaki bango loboko mpo ete bavanda kimia. Alimbolelaki bango ndenge nini Nkolo abimisaki ye na boloko. Alobaki lisusu: “Boyebisa makambo oyo epai ya Jake mpe bandeko misusu.” Bongo na sima, abimaki na ndako mpo na kokende epai mosusu. Wana tongo etanaki, mobulu monene ebimaki kati na basoda, pamba te bazalaki kotunana: “Likambo nini ekomelaki Piere?” Erode atindaki bato mpo ete baluka Piere, kasi bamonaki ye te. Bongo, asambisaki bakengeli mpe atindaki ete baboma bango. Boye, Erode atikaki Yudea mpe akendaki kovanda mwa mikolo na Sezare. Erode azalaki na matata na bato ya Tire mpe ya Sidoni. Bongo, bayokanaki elongo mpo na kokende komona Erode. Na lisungi ya Blastusi, kalaka oyo abongisaka shambre ya mokonzi, balukaki kozongisa kimia na boboto, kati na Erode mpe bango, pamba te bilei na bango ezalaki kowuta na mokili ya mokonzi Erode. Tango mokolo oyo Erode akataki ekokaki, alataki bilamba na ye ya bokonzi, avandaki na kiti na ye ya bokonzi, mpe akomaki koloba na bato. Boye, bato bakomaki koganga: “Oyo ezali penza mongongo ya nzambe, kasi ya moto te!” Kaka na tango wana, anjelu ya Nkolo abetaki Erode mpo ete aboyaki kopesa Nzambe lokumu oyo ekokaki na Ye. Bongo, bangusu ekomaki kolia ye mpe akufaki. Kasi Liloba ya Nzambe ezalaki kaka kopanzana mpe bato ebele bazalaki kondima yango. Tango Barnabasi mpe Saulo basilaki kokokisa mosala oyo batindaki bango mpo na bandimi ya Yelusalemi, batikaki Yelusalemi, mpe bamemaki elongo na bango, Yoane oyo bazalaki kobenga mpe Malako. Lingomba ya Antioshe ezalaki na basakoli mpe balakisi: Barnabasi, Simeona oyo bazalaki kobenga moto Moyindo, Lusiusi ya Sirene, Manaeni oyo akolaki esika moko na moyangeli Erode mpe Saulo. Ezalaki mokolo moko, wana bazalaki kokumamela Nkolo mpe kokila bilei, Molimo Mosantu alobaki: “Botia Barnabasi mpe Saulo pembeni mpo na ngai, na tina na mosala oyo nabengelaki bango.” Boye, sima na kokila bilei, batielaki bango maboko mpe batikaki bango kokende. Bongo, Barnabasi mpe Saulo bakendaki na Selesi na etinda ya Molimo Mosantu, mpe longwa kuna, bazwaki masuwa mpo na kokende na esanga ya Shipre. Tango bakomaki na Salamine, bateyaki Liloba ya Nzambe na bandako ya mayangani ya Bayuda. Yoane Malako azalaki elongo na bango mpe azalaki kosunga bango. Wana batambolaki esanga mobimba mpe bakomaki na Pafosi, bamonaki Moyuda moko na kombo ya Bari-Yesu. Azalaki moto ya maji mpe mosakoli ya lokuta. Azalaki mpe moninga ya moyangeli ya esanga, Sergiusi-Paulusi oyo azalaki moto ya mayele. Boye, Sergiusi-Paulusi abengisaki Barnabasi mpe Saulo, pamba te azalaki na posa ya koyoka Liloba na Nzambe. Kasi, Elimasi, moto ya maji (pamba te yango nde ezali ndimbola ya kombo na ye) azalaki kotelemela bango, mpe azalaki kosala nyonso mpo na kopengwisa kondima ya moyangeli. Boye, Saulo oyo bazalaki mpe kobenga Polo, lokola atondisamaki na Molimo Mosantu atalaki Elimasi swii. Alobaki: “Mwana ya Zabolo, otonda na mayele mabe, moto ya lokuta mpe monguna ya makambo nyonso ya malamu. Kino tango nini okotika kobebisa nzela ya sembo ya Nkolo? Tala, loboko ya Nkolo etelemeli yo sikʼoyo. Okokufa miso, mpe na mwa tango, okomona lisusu pole te!” Kaka na tango wana, molili mpe butu ezipaki miso na ye. Akomaki kobaluka-baluka bipai nyonso mpe koluka moto oyo akosimba ye na loboko, mpo na kolakisa ye nzela. Tango moyangeli amonaki makambo oyo esalamaki, andimaki; pamba te akamwaki mingi penza mpo na mateya oyo bateyaki ye mpo na Nkolo. Wuta na Pafosi, Polo elongo na baninga na ye bazwaki masuwa mpe bakendaki na Perje, na mokili ya Pafili. Yoane Malako atikaki bango kuna mpe azongaki na Yelusalemi. Mpe longwa na Perje, bakobaki mobembo na bango kino na Antioshe, na mokili ya Pisidi. Na mokolo ya saba, bakotaki mpe bavandaki na ndako ya mayangani. Sima ya kotanga Mobeko mpe Basakoli, bakambi ya ndako ya mayangani batindelaki bango maloba: “Bandeko, soki bozali na maloba mpo na kolendisa bato, boloba!” Polo atelemaki, atombolaki loboko mpe alobaki: —Bato ya Isalaele mpe bino oyo bozali Bayuda te kasi botosaka Nzambe, boyoka ngai! Nzambe ya bato ya Isalaele aponaki bakoko na biso; akomisaki bango ekolo monene na tango oyo bavandaki na mokili ya Ejipito lokola bapaya. Boye, abimisaki bango na mokili yango na nguya monene. Mibu tuku minei mobimba na esobe, akangaki motema liboso ya bizaleli na bango. Apanzaki bikolo sambo na mokili ya Kanana, mpe apesaki mabele na bango lokola bomengo epai ya bato na ye. Nyonso wana esalaki mibu pene nkama minei na ntuku mitano. Sima na yango, Nzambe apesaki bango basambisi kino na tango ya mosakoli Samuele. Boye, basengaki ye mokonzi mpe apesaki bango Sauli, mwana mobali ya Kisi, moto ya libota ya Benjame, oyo asalaki mibu tuku minei na bokonzi. Kasi Nzambe alongolaki Sauli mpe akomisaki Davidi mokonzi na bango. Tala maloba oyo atatolaki mpo na ye: “Namoni ete Davidi, mwana mobali ya Yese azali moto oyo asepelisaka motema na ngai. Ye nde akokokisa mokano nyonso na ngai!” Ezali na libota ya Davidi nde Nzambe abimisaki mpo na bato ya Isalaele Mobikisi Yesu, ndenge alakaki. Liboso ete Yesu aya, Yoane ateyaki bato nyonso ya Isalaele ete babongola mitema mpe bazwa libatisi. Wana Yoane akomaki pene ya kosilisa mosala na ye, alobaki: “Bino bokanisi ete ngai nazali nani? Nazali te Moto oyo bozali kozela. Kasi Moto yango azali koya sima na ngai, mpe nakokoka kutu te kofungola basinga ya basandale na ye!” Bandeko na ngai, bana ya Abrayami, mpe bino bato oyo bozali Bayuda te kasi botosaka Nzambe, ezali mpo na biso nde Nzambe atindaki maloba oyo ya lobiko. Bato ya Yelusalemi mpe bakonzi na bango basosolaki te soki Yesu azalaki nani. Nzoka nde, tango bakatelaki ye etumbu, bakokisaki nde maloba ya basakoli oyo bazalaki kotanga na mikolo nyonso ya saba. Atako bamonaki mabe moko te kati na ye, mabe oyo ekokaki komemela ye etumbu ya liwa, kasi basengaki kaka ete Pilato abomisa ye. Tango bakokisaki makambo nyonso oyo ekomama mpo na ye, bakitisaki ye na ekulusu mpe batiaki ye na lilita. Kasi Nzambe asekwisaki ye kati na bakufi, mpe na mikolo ebele, amonanaki epai ya bato oyo bazalaki kosala na ye mibembo longwa na Galile kino na Yelusalemi. Boye, bango bazali sikʼoyo batatoli na ye liboso ya bato na biso. Tozali koyebisa bino sango malamu: sango malamu oyo Nzambe alakaki bakoko na biso, Nzambe akokisi yango mpo na biso bana na bango, na nzela ya lisekwa na Yesu kati na bakufi ndenge ekomama na Nzembo ya mibale: “Ozali Mwana na ngai ya mobali, lelo nakomi Tata na yo!” Nzambe alobaki ete akosekwisa ye kati na bakufi mpo ete apola te. Yango nde alobaki: “Nakopesa bino na solo, mapamboli ya bule oyo nalakaki Davidi!” Yango wana, alobaki na eteni mosusu: “Okotika te ete Mosantu na yo apola.” Pamba te, tango Davidi akokisaki mabongisi ya Nzambe na tango na ye, akufaki. Bakundaki ye pembeni ya bakoko na ye mpe apolaki. Kasi Moto oyo Nzambe asekwisaki apolaki te. Yango wana bandeko na ngai, nalingi boyeba ete, ezali na nzela ya Yesu nde bolimbisi ya masumu esakolami epai na bino. Ezali na nzela na ye nde moto nyonso oyo andimi, akomi moto ya sembo, na nyonso oyo Mobeko ya Moyize elongaki te kokomisa ye sembo. Yango wana, bosala keba ete makambo oyo basakoli baloba ekomela bino te: “Bino batioli, botala, bokamwa mpe bolimwa! Pamba te, nakosala likambo moko na tango na bino, likambo oyo soki bayebisi bino yango, bokondima yango te.” Wana Polo mpe Barnabasi babimaki na ndako ya mayangani, bato basengaki ete bazonga lisusu na mokolo ya saba oyo elandaki mpo na kolobela lisusu makambo wana. Tango mayangani esilaki, Bayuda mingi mpe bato ya bikolo misusu oyo bakotaki na lingomba ya Bayuda balandaki Polo mpe Barnabasi oyo, na masolo na bango, bazalaki kolendisa bango ete bakangama makasi na ngolu ya Nzambe. Na mokolo ya saba oyo elandaki, bato ebele penza ya engumba bayaki kosangana mpo na koyoka Liloba ya Nkolo. Kasi tango Bayuda bamonaki bato ebele, batondaki na zuwa. Boye, bakomaki koloba mabe mpo na makambo oyo Polo azalaki koloba mpe bakomaki kofinga ye. Bongo, Polo mpe Barnabasi balobaki na bango na molende nyonso: — Tosengeli liboso koteya Liloba ya Nzambe. Kasi lokola boboyi yango mpe bomoni ete bokoki te mpo na kozwa bomoi ya seko, tokeyi epai ya bato oyo bazali Bayuda te. Pamba te, tala makambo oyo Nkolo atindaki biso: “Nakomisi yo pole mpo na bato ya bikolo misusu, mpo ete omema lobiko kino na suka ya mokili!” Tango bato ya bikolo ya bapaya bayokaki bongo, batondisamaki na esengo mpe bakomaki kokumisa Liloba ya Nkolo; mpe bato nyonso oyo Nzambe abongisaki mpo ete bazwa bomoi ya seko bakomaki bandimi. Liloba ya Nkolo epanzanaki na etuka wana mobimba. Kasi Bayuda batiaki songi-songi epai ya basi ya lokumu oyo bazalaki kosambela Nzambe, epai ya bato minene ya engumba wana. Boye, bakomaki konyokola Polo na Barnabasi mpe babenganaki bango na mokili na bango. Bongo, Polo mpe Barnabasi bapupolaki putulu ya makolo na bango mpo na bato wana mpe bakendaki na Ikoniomi. Bayekoli batondaki na esengo mpe na Molimo Mosantu. Na engumba ya Ikoniomi, Polo mpe Barnabasi bakendaki lokola momesano na ndako ya mayangani ya Bayuda. Boye, na mateya na bango, bato ebele: Bayuda mpe bato ya bikolo ya bapaya, bakomaki bandimi. Kasi Bayuda oyo bandimaki te batiaki songisongi epai ya bato ya bikolo ya bapaya mpo ete batombokisa bandeko. Polo mpe Barnabasi bawumelaki wana mikolo ebele, bazalaki koteya na molende mpo na Nkolo oyo azalaki kolakisa bosolo ya mateya ya ngolu na ye, na kopesaka bango nguya ya kosala bilembo ya kokamwa mpe misala minene. Bato ya engumba yango bakabwanaki; ndambo moko bazalaki sima ya Bayuda mpe ndambo mosusu, sima ya bantoma. Boye, bato ya bikolo ya bapaya mpe Bayuda elongo na bakambi na bango bazwaki mokano ya konyokola bantoma mpe koboma bango na mabanga. Kasi tango bantoma basosolaki yango, bakimaki na bingumba ya Likaoni: Listre mpe Derbe mpe bazinga-zinga na yango. Kuna mpe lisusu, bakobaki kaka koteya sango malamu. Na engumba ya Listre, ezalaki na moto moko akufa makolo. Wuta mbotama na ye atikala kotambola te. Azalaki koyoka ndenge Polo azalaki koteya. Boye, Polo atalaki ye swii mpe asosolaki ete azalaki na kondima mpo na kobika. Alobaki na mongongo makasi: “Telema ngwi na makolo na yo!” Kaka na tango wana, moto yango apumbwaki mpe akomaki kotambola. Tango ngulupa ya bato bamonaki makambo oyo Polo asalaki, bagangaki na monoko ya bato ya likaoni: “banzambe bazwi banzoto ya bato mpe bakiteli biso!” Bazalaki kobenga Barnabasi, “Zewusi,” mpe Polo, “Erimesi;” pamba te Polo moto nde azalaki koloba. Nganga-Nzambe ya nzambe Zewusi, oyo ndako ya nzambe na ye ezalaki libanda ya ekuke ya engumba, amemaki ngombe ya mibali mpe bikoti ya lokumu kino na bikuke ya engumba, pamba te ye elongo na bato nyonso oyo bazalaki na ye balingaki kotumbela bango mbeka. Kasi tango bantoma, Barnabasi mpe Polo bayokaki yango, bapasolaki bilamba na bango, bakendaki mbangu epai ngulupa ya bato ezalaki mpe bagangaki: “Oh baninga! Mpo na nini bozali kosala boye? Biso mpe tozali kaka bato lokola bino, tozali banzambe te. Tomemeli bino sango malamu, oyo ezali kotalisa bino ete botika banzambe ya bikeko oyo ezanga tina, mpe bomipesa na Nzambe ya bomoi, oyo asala likolo mpe se, ebale monene mpe biloko nyonso oyo ezali kati na yango. Na tango ya kala, Nzambe atikaki ete bato ya bikolo nyonso balanda, bato na bato, nzela oyo bango moko balingi. Nzoka nde, alembaki te kotalisa bango bolamu na ye, na nzela ya konokisela bango mvula wuta na likolo mpe kopesa bango mbuma ebele na tango oyo ekoki; mpe kopesa bango bilei mpo na kotondisa mitema na bango na esengo.” Atako balobaki bongo, balongaki na pasi kopekisa ngulupa ya bato wana kobonzela bango mbeka. Bongo, Bayuda oyo bawutaki na Antioshe mpe na Ikoniomi batiaki songisongi kati na bato mpo ete batombokela bango. Babambaki Polo mabanga mpe babendaki ye kino na libanda ya engumba, mpo ete bakanisaki ete asili kokufa. Kasi, tango bayekoli bazingelaki ye, Polo atelemaki mpe azongaki kati na engumba. Bongo, na mokolo oyo elandaki, akendaki na Derbe elongo na Barnabasi. Polo na Barnabasi bateyaki sango malamu na engumba wana, mpe bakomisaki bato ebele bayekoli. Boye, bazongaki lisusu na Listre, na Ikoniomi mpe na Antioshe. Balendisaki bayekoli ete bayika mpiko kati na kondima. Balobaki: “Tosengeli komona pasi mingi mpo na kokota na Bokonzi ya Nzambe.” Polo na Barnabasi baponaki bakambi mpo na Lingomba moko na moko. Babondelaki na kokila bilei, mpe bakabaki bango na maboko ya Nkolo oyo bandimelaki. Sima na bango koleka mokili ya Pisidi, bakomaki na Pafili. Wana bateyaki Liloba na Perije, bakendaki kino na libongo ya Atalia. Wuta na Atalia, bakotaki na masuwa mpe bazongaki na Antioshe epai wapi babondelaki Nzambe ete abatela bango na ngolu na ye, mpo na mosala oyo bawutaki kokokisa. Tango bakomaki kuna, basangisaki bato ya Lingomba, bapesaki bango sango ya makambo nyonso oyo Nzambe asalaki na nzela na bango, mpe ndenge nini afongolelaki bato ya bikolo ya bapaya nzela ya kondima. Bongo, bawumelaki wana tango molayi elongo na bayekoli. Ndambo ya bato oyo bawutaki na Yudea bakomaki na Antioshe mpe bakomaki koteya bandeko: “Soki bokatisi nzoto ya mibali te kolanda Mobeko ya Moyize, bokozwa lobiko te.” Polo mpe Barnabasi batelemelaki bato wana, bongo kobendana makasi ekotaki kati na bango na tina na likambo yango. Boye, bazwaki mokano ete Polo mpe Barnabasi elongo na bandimi misusu bakende na Yelusalemi mpo na komona bantoma mpe bakambi na tina ya likambo yango. Lingomba esungaki bango mpo na mobembo. Bakatisaki Fenisi mpe Samari, mpe bazalaki kotatola ndenge nini bato ya bikolo ya bapaya bazalaki kobongola mitema. Sango oyo ezalaki kopesa esengo na bandeko nyonso. Tango bakomaki na Yelusalemi, Lingomba, bantoma mpe bakambi bayambaki bango; boye Polo mpe Barnabasi bapesaki bango sango ya makambo nyonso oyo Nzambe asalaki na nzela na bango. Ndambo ya bandimi oyo bazalaki kala bafarizeo batelemaki mpo na koloba: “Bato ya bikolo ya bapaya basengeli kokatisa nzoto ya mibali mpe kotosa Mobeko ya Moyize.” Bantoma mpe bakambi basanganaki mpo na koyekola malamu likambo yango. Lokola tembe elekaki makasi, Piere atelemaki mpe alobaki: “Bandeko na ngai, boyebi malamu ete Nzambe apona ngai wuta kala kati na bino, mpo ete nakoka koteya sango malamu na bato ya bikolo ya bapaya, mpo ete bango mpe bakoka koyoka yango mpe bandima. Bongo, Nzambe oyo ayebi mitema ya bato, alakisaki ete andimaki bango, na nzela ya kopesa bango Molimo Mosantu, kaka ndenge apesaki biso. Asalaki bokeseni te kati na biso mpe bango, pamba te apetolaki mitema na bango na nzela ya kondima. Bongo sikʼoyo, mpo na nini bolingi komeka Nzambe, na nzela ya koluka komemisa bayekoli oyo, mokumba oyo ezala biso to batata na biso tolongaki komema te? Te! Biso tondimaka ete tobikisami na ngolu ya Nkolo Yesu, kaka ndenge moko mpe na bango.” Boye, lisanga mobimba evandaki kimia wana bazalaki koyoka Barnabasi mpe Polo koyebisa bango bikamwa mpe bilembo oyo Nzambe azalaki kosala na nzela na bango, kati na bato ya bikolo ya bapaya. Tango basilisaki koloba, Jaki azwaki maloba mpe alobaki: —Bandeko boyoka ngai! Simona awuti kolimbolela biso ndenge nini wuta na ebandeli, Nzambe aponaki bato kati na bikolo ya bapaya ete bazala bato na ye. Makambo oyo ekokani na maloba ya basakoli ndenge ekomama: Sima na yango, nakozonga, nakotonga lisusu ndako ya Davidi oyo ekweya. Nakotonga yango lisusu mpe nakotelemisa yango, Mpo ete bato oyo bakotikala bakoka koluka Nkolo, mpe bato nyonso ya bikolo ya bapaya oyo babengami na Kombo na ngai, elobi Nkolo, oyo asalaka makambo oyo, Makambo oyo eyebana wuta kala. Yango wana, tala likanisi na ngai: Tosengeli te kotungisa bato ya bikolo ya bapaya oyo bandimeli Nzambe. Na esika ya kotungisa bango, tokomela bango kaka ete balia te nyama oyo babonzeli banzambe ya bikeko, basala ekobo te, balia te nyama oyo babomi na kozanga kobimisa makila mpe balia makila te. Pamba te, wuta kala, bateyi bateyaka Mobeko ya Moyize na bingumba nyonso, mpe batangaka yango kati na bandako ya mayangani mikolo nyonso ya saba. Bongo, bantoma, bakambi elongo na Lingomba mobimba bazwaki mokano ya kopona ndambo ya bato kati na bango mpe kotinda bango na Antioshe elongo na Polo mpe Barnabasi. Baponaki Yuda oyo babengaka Barsabasi mpe Silasi. Bango mibale bazalaki bakambi kati na bandeko. Bapesaki bango mokanda oyo ekomamaki boye: Biso bandeko na bino, bantoma mpe bakambi, Epai ya bato ya bikolo ya bapaya oyo bavandaka na Antioshe, na Siri mpe na Silisi: Mbote na bino. Toyokaki ete bandeko misusu kowuta epai na biso, bayaki kotia mobulu kati na bino, mpe kotungisa makanisi na bino na maloba na bango. Nzoka nde, biso topesaki bango nzela te. Boye, biso nyonso toyokanaki mpo na kopona bato mpe kotindela bino bango, elongo na bandeko balingami na biso Barnabasi mpe Polo, Ba-oyo bakaba bomoi na bango mobimba mpo na mosala ya Nkolo na biso Yesu Klisto. Yango wana, totindeli bino Yuda mpe Silasi, mpo ete bakoka koyebisa bino makambo oyo tokomi kati na mokanda oyo. Molimo Mosantu mpe biso tomoni malamu ete tomemisa bino mikumba misusu te, longola kaka bikateli oyo: Bolia te nyama oyo babonzeli banzambe ya bikeko, bolia makila te, bolia te nyama oyo babomi na kozanga kobimisa makila mpe bosala ekobo te. Ekozala malamu soki bokimi makambo oyo. Botikala malamu. Boye, batikaki bango kokende na Antioshe, epai wapi basangisaki Lingomba mobimba mpe bapesaki bango mokanda yango. Bato batangaki mokanda yango mpe basepelaki mingi mpo na maloba ya kolendisa oyo ezalaki kati na yango. Lokola Yuda mpe Silasi bazalaki na likabo ya kosakola maloba ya Nzambe, bazwaki penza tango molayi ya koloba na bandeko mpe kolendisa bango ete bayika mpiko kati na kondima. Bawumelaki wana mwa tango molayi, mpe bandeko batombelaki kimia na bozongi, epai ya bato oyo batindaki bango. [Kasi Silasi asepelaki kotikala wana.] Polo mpe Barnabasi batikalaki na Antioshe, bazalaki koteya mpe kosakola Liloba ya Nkolo elongo na bato mosusu. Sima ya mwa mikolo, Polo alobaki na Barnabasi: —Tozonga na bingumba nyonso epai wapi toteyaki Liloba ya Nkolo, mpo ete totala soki ndenge nini bandeko bazali. Barnabasi azalaki na posa ya komema Yoane oyo babengaka Malako elongo na bango. Nzoka nde, Polo asepelaki te ete bamema ye elongo na bango, pamba te akabwanaki na bango na Pafili mpe asungaki bango te na mosala. Boye, babendanaki makasi penza mpe basukaki na kokabwana. Barnabasi akamataki Malako mpe akotaki na ye elongo na masuwa mpo na kokende na Shipre. Kasi Polo akamataki Silasi mpe bakendaki, mpe bandimi batikaki bango na se ya ngolu ya Nkolo. Atambolaki kati na Siri mpe na Silisi mpo na kolendisa mangomba. Polo akomaki na engumba ya Derbe mpe ya Listre, epai wapi akutanaki na moyekoli moko na kombo ya Timote. Mama na ye azalaki Moyuda oyo andimelaki Klisto, mpe tata na ye azalaki moto ya mokili ya Greki. Litatoli na ye ezalaki malamu kati na bandeko ya Listre mpe ya Ikoniomi. Polo azalaki na posa ya kosala na ye mobembo elongo, yango wana akatisaki ye nzoto ya mibali; pamba te Bayuda oyo bazalaki kovanda kuna, bayebaki ete tata na ye azalaki moto ya mokili ya Greki. Na bingumba nyonso oyo bazalaki koleka, bazalaki koyebisa bandimi mikano oyo bantoma mpe bakambi ya Lingomba ya Yelusalemi bazwaki; mpe basengaki bango ete bakoka kotosa yango. Boye, mangomba ezalaki kolendisama na kondima mpe bato bazalaki kobakisama mokolo na mokolo. Lokola Molimo Mosantu apesaki bango nzela te ya koteya Liloba na Azi, Polo elongo na baninga na ye bakendaki na etuka ya Friji mpe ya Galatia. Tango bakomaki na ndelo ya Mizi, bazwaki likanisi ya kokende na Bitini, kasi Molimo ya Yesu apesaki bango nzela te. Wana balekaki na etuka ya Mizi, bakendaki kino na libongo ya Troasi. Na butu, Polo azwaki emoniseli moko: Moto moko ya Masedwane atelemaki liboso na ye mpe azalaki kobondela ye: “Nabondeli yo, yaka kosunga biso na Masedwane!” Na nzela ya emoniseli ya Polo, tolukaki kokende na lombango na Masedwane, pamba te tososolaki ete Nzambe abengaki biso ete tokende koteya sango malamu kuna. Longwa na Troasi, tozwaki masuwa mpe tokendaki mbala moko kino na esanga ya Samotrase, bongo na mokolo oyo elandaki, tokomaki na Neapolisi. Kolongwa wana, tokendaki na Filipi, mboka mokonzi ya etuka ya Masedwane oyo ezalaki na se ya bokonzi ya bato ya Rome. Tovandaki wana mwa mikolo. Na mokolo ya saba, tobimaki na libanda ya ekuke ya engumba mpo na kokende pembeni ya ebale, epai wapi tokanisaki ete tokokaki komona esika ya mabondeli. Wana tovandaki, tokomaki koteya basi oyo basanganaki wana. Moko kati na basi oyo bazalaki koyoka, na kombo ya Lidi, azalaki moteki bilamba ya motane mpe moto ya engumba ya Tiyatire. Azalaki mwasi oyo azalaki kosambela Nzambe. Nkolo afungolaki motema na ye mpo ete asosola maloba ya Polo. Tango ye elongo na bato ya libota na ye bazwaki libatisi, abengisaki biso na ndako na ye. Alobaki: “Soki bomoni ete ngai nakomi penza mondimi ya Nkolo, boya kovanda na ndako na ngai!” Boye, asalaki nyonso ete tondima kokende na ndako na ye. Ezalaki mokolo moko, wana tozalaki kokende na esika ya mabondeli, tokutanaki na elenge mwasi moko oyo azalaki mowumbu. Azalaki na molimo mabe oyo ezalaki kolakisa ye makambo ebombama. Boye, kosakola na ye ezalaki kofuta bankolo na ye mbongo mingi. Elenge mwasi yango azalaki kolanda biso, Polo mpe biso, bongo azalaki koganga: “Bato oyo bazali basali ya Nzambe oyo Aleki Likolo, bazali koteya bino nzela ya lobiko!” Azalaki kosala bongo mikolo ebele. Suka na suka, Polo atombokaki, abalukaki mpe alobaki na molimo yango: “Na kombo na Yesu Klisto, napesi yo mitindo, bima kati na elenge mwasi oyo!” Kaka na tango wana, molimo yango ebimaki kati na ye. Tango bankolo ya mowumbu yango bamonaki ete nzela oyo bazalaki kozwela mbongo ekangami, bakangaki Polo mpe Silasi mpe bamemaki bango liboso ya bakonzi, na esika ya bato ebele. Bamemaki bango liboso ya basambisi mpe balobaki: “Bato oyo bazali Bayuda. Bazali kotia mobulu na engumba na biso. Bazali koluka kokotisa awa, bizaleli oyo biso bato ya Rome tozali na ndingisa te ya kondima mpe ya kosalela.” Bato oyo batondaki wana batombokelaki Polo mpe Silasi, bongo basambisi batindaki ete balongola bango bilamba mpe babeta bango fimbo. Sima ya kobetisa bango fimbo makasi, babwakaki bango na boloko. Bapesaki mitindo na mokengeli ya boloko ete akengela bango malamu. Wana mokengeli azwaki mitindo oyo, abwakaki bango kati na boloko, mpe akangisaki makolo na bango na mabaya. Pene na midi ya butu, Polo mpe Silasi bazalaki kobondela mpe kokumisa Nzambe na banzembo, bongo bakangami misusu bazalaki koyoka bango. Na mbala moto, mabele eninganaki makasi penza, mpe bafondasio ya boloko eninganaki. Kaka na tango wana, bikuke nyonso ya boloko efongwamaki mpe minyololo ya bakangami nyonso ekatanaki. Mokengeli alamukaki. Mpe tango amonaki ete bikuke ya boloko ezalaki ya kofongwama, abendaki mopanga na ye mpe alingaki komiboma, pamba te akanisaki ete bakangami bakimi. Kasi Polo agangaki na mongongo makasi: “Komisala mabe te! Biso nyonso tozali awa!” Bongo, mokengeli asengaki mwinda, akotaki mbangu na boloko mpe amibwakaki liboso ya Polo mpe Silasi na kolenga nyonso. Abimisaki bango libanda mpe atunaki bango: —Batata, nasala nini mpo ete nabika? Bazongiselaki ye: —Ndimela Nkolo Yesu mpe okobika yo elongo na libota na yo! Boye, bateyaki ye elongo na bato nyonso ya libota na ye Liloba ya Nkolo. Kaka na ngonga wana ya butu, mokengeli akamataki bango mpe asokolaki bapota na bango. Bongo, na mbala moko, ye elongo na libota na ye bazwaki libatisi. Mpe na sima, mokengeli amemaki Polo mpe Silasi na ndako na ye, mpe apesaki bango biloko ya kolia. Atondisamaki na esengo makasi, pamba te ye elongo na libota na ye mobimba bandimelaki Nzambe. Tango tongo etanaki, basambisi batindaki basali na bango epai ya mokengeli ya boloko mpo na koyebisa ye: “Bimisa bato wana na boloko!” Mokengeli alobaki na Polo: —Basambisi bapesi ngai mitindo ete nabimisa bino na boloko. Boye, bobima mpe bokende na kimia! Kasi Polo azongisaki: —Nini! Basambisi biso te, kasi babetisi biso fimbo na miso ya bato mpe babwaki biso na boloko, nzoka nde biso tozali bato ya Rome. Balingi sikʼoyo kobimisa biso na nkuku? Te ekosalema bongo te, tika ete bango moko baya kobimisa biso. Basali bakendaki koyebisa makambo yango epai ya basambisi. Tango kaka basambisi bayokaki ete Polo mpe Silasi bazali bato ya Rome, babangaki makasi. Bayaki kosenga bango bolimbisi mpe babimisaki bango na boloko. Basengaki bango ete balongwa na engumba wana. Sima ya kobima na boloko, Polo mpe Silasi bakendaki na ndako ya Lidi, epai wapi bakutanaki na bandeko mpe balendisaki bango. Bongo, bakendaki. Wana Polo mpe Silasi balekaki na Afipolisi mpe na Apolonia, bakendaki na Tesalonika esika ndako ya mayangani ya Bayuda ezalaki. Polo akotaki na ndako ya mayangani lokola ezalaki na momesano. Basaba misato, azalaki kosolola na bango na tina ya Makomi. Azalaki kolimbolela bango mpe kotalisa bango polele ete Klisto asengelaki komona pasi mpe kosekwa kati na bakufi. Azalaki koloba: “Yesu oyo nazali koteya bino, ye nde azali Klisto!” Ndambo ya Bayuda bandimaki makambo oyo Polo alobaki, mpe bakomaki na ngambo ya Polo mpe Silasi; ndenge moko mpe na bato mingi ya mokili ya Greki oyo bazalaki kobanga Nzambe, elongo na basi ebele ya lokumu. Kasi Bayuda misusu batombokaki. Bakendaki kokamata bato ya mobulu oyo batambolaka pamba-pamba na balabala. Basangisaki bango mpe babimisaki mobulu kati na engumba. Bakendaki mbangu na ndako ya Jazoni mpo na koluka Polo mpe Silasi mpo ete bamema bango liboso ya ngulupa ya bato. Kasi lokola bamonaki bango te, bamemaki Jazoni mpe bandeko misusu liboso ya bakambi ya engumba na koganga: “Bato oyo bazali koningisa mokili mobimba bakomi mpe awa. Bongo, Jazoni ayambi bango na ndako na ye. Bango nyonso bazali kobuka mibeko ya Sezare, pamba te bazali koloba: ‘Mokonzi mosusu azali, kombo na ye Yesu!’ ” Tango ngulupa ya bato mpe bakambi ya engumba bayokaki bongo, batombokaki makasi. Boye, bafutisaki Jazoni mpe bandeko misusu lomande mpe na sima batikaki bango. Wana butu ekomaki, bandeko bakimisaki Polo mpe Silasi noki-noki na Bere. Tango bakomaki kuna, bakotaki na ndako ya mayangani ya Bayuda. Nzoka nde, bato ya Bere bazalaki bato ya boboto koleka bato ya Tesalonika, pamba te bayambaki Liloba na motema mobimba, mpe mokolo na mokolo bazalaki koyekola na mozindo penza Makomi mpo na koyeba soki makambo oyo Polo azalaki koteya bango ezali ya solo. Bongo, Bayuda ebele kati na bango bandimaki; ndenge moko mpe basi mingi ya lokumu kati na bato ya mokili ya Greki elongo na mibali ebele kati na bato ya mokili ya Greki. Kasi tango Bayuda ya Tesalonika bayokaki ete Polo azali koteya Liloba ya Nzambe na Bere, bayaki mpe kuna mpo na kotia songisongi kati na bato mpo ete batomboka. Bongo, kaka na tango wana, bandeko basalaki ete Polo akita na ebale mpo na kozwa masuwa wana Silasi mpe Timote batikalaki na Bere. Bato oyo bakendaki kotika Polo bamemaki ye kino na Atene, mpe bazongaki na Bere koyebisa Silasi mpe Timote ete balanda Polo noki na Atene. Wana Polo azalaki kozela bango na Atene, motema na ye etungisamaki mingi na komona engumba yango etonda na banzambe ya bikeko. Azalaki bongo kosolola na Bayuda mpe bato ya mokili ya Greki oyo basambelaka Nzambe na ndako ya mayangani, mpe mokolo na mokolo azalaki mpe kosolola na bisika ya bato ebele, elongo na bato oyo azalaki kokuta wana. Lisanga moko ya bato ya mayele oyo babengaka Epikire mpe lisanga mosusu ya bato ya mayele oyo babengaka sitoyika bakomaki kotiana na ye tembe. Bamoko batunaki: “Moto ya makelele oyo alingi koloba nini?” Bamisusu balobaki: “Tomoni lokola nde azali koteya banzambe ya bapaya!” Balobaki bongo mpo ete Polo azalaki koteya sango malamu ya Yesu mpe ya lisekwa kati na bakufi. Boye, bakamataki ye mpe bamemaki ye na Areopaje. Balobaki na ye: —Boni, tokoki solo koyeba soki mateya ya sika oyo ozali koteya elingi koloba nini? Pamba te, ozali kolobela biso makambo ya sika. Bongo, tolingi koyeba soki makambo yango elakisi penza nini. (Bato nyonso ya Atene mpe bapaya oyo bazalaki kovanda kuna bazalaki kolekisa tango mingi penza mpo na koloba mpe koyoka basango ya sika). Polo atelemaki liboso ya bato oyo basanganaki na Areopaje mpe alobaki: —Bato ya Atene! Nasosoli ete na makambo nyonso, bolingaka mingi makambo ya bonzambe. Pamba te, tango nazalaki kotambola kati na engumba na bino mpe kotala bikeko oyo bosambelaka, namonaki kutu etumbelo moko oyo bakoma likolo na yango: “Mpo na Nzambe oyo ayebani te.” Nzoka nde, ngai nayei koteya bino Nzambe oyo bosambelaka ata boyebi ye te. Nzambe oyo asala mokili mpe biloko nyonso oyo ezali kati na yango azali Nkolo ya likolo mpe ya se; avandaka te na bandako oyo maboko ya bato etonga. Azalaka na posa ya lisungi ya moto te mpo ete akoka na nyonso, pamba te ye nde apesaka bato nyonso bomoi, pema mpe biloko nyonso. Wuta na moto moko, asalaki mabota nyonso ya bato, mpo ete bakoka kovanda na mokili mobimba. Akataki tango mpo na moto na moto mpe atiaki bandelo mpo na bisika na bango ya kovandaka. Nzambe asalaki bongo mpo ete bato bakoka koluka ye, tango mosusu bakolonga komona ye na koluka-luka lokola moto akufa miso. Nzoka nde, na bosolo, azali mosika te ya moko na moko na biso. Pamba te, na nzela na ye nde tozalaka na bomoi, toninganaka mpe tozalaka oyo tozali, ndenge bakomi na bino misusu baloba: “Tozali bana na ye!” Yango wana, lokola tozali bana ya Nzambe, tokanisa te ete bonzambe ekokani na eloko moko ya wolo, ya palata to ya libanga: nzambe ya ekeko oyo esalemi na maboko mpe mayele ya moto. Nzoka nde, lokola Nzambe atalaka te tango ya kozanga boyebi, sikʼoyo azali kosenga ete bato nyonso, na bisika nyonso oyo bazali, babongola mitema. Pamba te, akata mokolo oyo akosambisa mokili mobimba na bosembo nyonso, na nzela ya moto oyo ye asila kopona. Atalisaki bosolo na yango epai ya bato nyonso, na nzela ya kosekwisa moto yango kati na bakufi. Wana bayokaki Polo koloba mpo na lisekwa ya bakufi, bamoko basekaki ye, mpe misusu balobaki: “Tokoyoka yo mokolo mosusu mpo na likambo oyo.” Boye, Polo atikaki bango. Nzoka nde, bato mosusu balandaki Polo mpe bakomaki bandimi. Kati na bango ezalaki: Denisi, moto ya Areopaje, mwasi moko na kombo ya Damarisi mpe bato mosusu elongo na bango. Sima na yango, Polo atikaki Atene mpe akendaki na Korinto. Kuna, akutanaki na Moyuda moko na kombo ya Akila, moto ya mboka Ponti. Akila awutaki koya kala te longwa na Itali elongo na mwasi na ye Prisile, pamba te mokonzi Klode apesaki mitindo ete Bayuda nyonso babima na Rome. Boye, Polo akendaki kotala bango, mpe lokola Polo azalaki kosala mosala moko na bango, mosala ya kosala bandako ya kapo, avandaki epai na bango mpe akomaki kosala elongo na bango. Mikolo nyonso ya saba, Polo azalaki koteya na ndako ya mayangani, mpe azalaki koluka na nzela nyonso ete Bayuda mpe bato ya mokili ya Greki bakoka kondima. Tango Silasi mpe Timote bayaki wana wuta na Masedwane, Polo akomaki kolekisa tango na ye nyonso kaka mpo na koteya Liloba, mpe kotalisa solo epai na Bayuda ete Yesu azali Klisto. Kasi tango Bayuda bakomaki kotelemela Polo mpe kofinga ye, apupolaki bilamba na ye mpe alobaki: “Tika ete makila na bino etangama likolo ya mito na bino moko! Ngai nazali lisusu na ngambo te. Kobanda lelo, nakokende na ngai epai ya bato ya bikolo ya bapaya!” Boye, Polo atikaki bango mpe akendaki na ndako ya moto moko na kombo ya Titisi Jistisi. Moto yango azalaki kosambela Nzambe mpe ndako na ye ezalaki pembeni ya ndako ya mayangani. Boye, Krispisi, mokambi ya ndako ya mayangani elongo na libota na ye mobimba bandimelaki Nkolo. Boye, bato mingi ya Korinto oyo bazalaki koyoka Polo bakomaki bandimi ya Nkolo mpe bazwaki libatisi. Ezalaki mokolo moko na butu, Nkolo alobaki na Polo na emoniseli: “Kobanga te, koba kaka koloba mpe kokanga monoko te, pamba te nazali na yo elongo. Moto moko te akolonga kobundisa yo mpe kosala yo mabe, pamba te nazali na bato mingi kati na engumba oyo.” Boye, Polo avandaki na Korinto, mbula moko na ndambo, mpe azalaki koteya bango Liloba ya Nzambe. Kasi wana Galioni azalaki moyangeli ya Akayi, Bayuda bayokanaki mpo na kokanga Polo, mpe bamemaki ye na esambiselo. Tala ndenge bafundaki ye: “Moto oyo azali koluka kondimisa bato ete basambela Nzambe na ndenge mibeko epekisa.” Tango kaka Polo alingaki koloba, Galioni alobaki na Bayuda: “Bino Bayuda, soki moto oyo asalaki mabe to likambo moko ya sembo te, nalingaki solo koyokela bino. Kasi lokola ezali kaka likambo ya tembe mpo na makambo oyo etali maloba, bakombo mpe mibeko na bino, naboyi kozala mosambisi ya makambo ya boye; wana etali kaka bino moko.” Boye, abenganaki bango na esambiselo. Mpe bango nyonso bakangaki Sositeni, mokambi ya ndako ya mayangani, bakomaki kobeta ye liboso ya esambiselo. Kasi Galioni atalaki yango se pamba. Polo avandaki lisusu mwa mikolo na Korinto. Boye, atikaki bandeko, akotaki na masuwa mpe akendaki na Siri elongo na Prisile mpe Akila. Liboso ya kolongwa na libongo ya Sankresi, Polo akokolisaki suki ya moto na ye, mpo ete alapaki ndayi. Tango bakomaki na Efeso, Polo atikaki Akila mpe Prisile. Akendaki na ndako ya mayangani mpo na kosolola na Bayuda. Basengaki ete awumela mwa mikolo elongo na bango kasi Polo aboyaki. Boye, tango atikaki bango, alakaki bango: “Nakozongela bino lisusu, soki Nzambe alingi.” Azwaki masuwa na Efeso mpe akendaki. Tango akomaki na Sezare, amataki na Yelusalemi mpo na kopesa Lingomba mbote, sima akendaki na Antioshe. Sima ya kovanda mwa mikolo na Antioshe, Polo alongwaki wana mpe alekaki na etuka ya Galatia mpe ya Friji, epai wapi azalaki kolendisa bayekoli nyonso. Moyuda moko oyo abotamaki na Alekizandri, na kombo ya Apolosi ayaki na Efeso. Ayebaki koloba malamu mpe ayebaki bozindo ya Makomi. Bateyaki ye nzela ya Nkolo, mpe azalaki koloba penza na molende makambo oyo etali Yesu ata ayebaki kaka libatisi ya Yoane. Abandaki koloba na molende nyonso kati na ndako ya mayangani. Kasi tango Prisile mpe Akila bayokaki ye, babengisaki ye na ndako na bango, mpe balimbolelaki ye malamu penza nzela ya Nzambe. Lokola Apolosi azalaki na likanisi ya kokende na Akayi, bandeko balendisaki ye mpe bakomelaki bayekoli ya Korinto ete bayamba ye malamu. Tango akomaki kuna, na ngolu na Nzambe, azalaki lisungi monene mpo na bato oyo bakomaki bandimi. Pamba te, maloba na ye ezalaki kosukisa tembe ya Bayuda na miso ya bato nyonso, mpe azalaki kotalisa na polele na nzela ya Makomi ete Yesu azali Klisto. Wana Apolosi azalaki na Korinto, Polo alekelaki na mokili ya bangomba ya Azi, mpe akomaki na Efeso. Kuna, akutaki mwa ndambo ya bayekoli mpe atunaki bango: —Boni, bozwaki Molimo Mosantu tango bokomaki bandimi? Bazongiselaki ye: —Te! Totikala nanu koyoka te, ete Molimo Mosantu azalaka. Polo atunaki bango lisusu: —Libatisi ya ndenge nini penza bozwaki? Bazongisaki: —Tozwaki libatisi ya Yoane. Polo alobaki na bango: —Libatisi oyo Yoane azalaki kopesa, ezalaki libatisi ya kobongola motema. Azalaki koloba na bato ete bandimela moto oyo akoya sima na ye, elingi koloba ete bandimela Yesu. Boye, bayokelaki ye mpe bazwaki libatisi na Kombo ya Nkolo Yesu. Tango Polo atielaki bango maboko, Molimo Mosantu akitelaki bango, mpe bakomaki koloba na minoko ya sika mpe kosakola. Bango nyonso bazalaki bato pene zomi na mibale. Bongo, Polo azalaki kokende na ndako ya mayangani, epai wapi, na basanza misato mobimba, azalaki koloba na molende epai na bato, koteya bango makambo oyo etali Bokonzi ya Nzambe, mpe kondimisa bango yango. Kasi bato mosusu kati na bango bazalaki mitema mabanga, bazalaki koboya kondima mpe bazalaki kotiola nzela ya Nkolo na miso ya bato ebele. Polo akabwanaki na bango. Boye, amemaki bayekoli, mpe mokolo na mokolo, azalaki koteya bango na eteyelo ya moto moko na kombo ya Tiranisi. Esalaki bongo mibu mibale, mpe na ndenge wana, Bayuda nyonso mpe bato nyonso ya mokili ya Greki oyo bazalaki kovanda na mokili ya Azi bayokaki Liloba ya Nkolo. Nzambe azalaki kosala bikamwa ya somo na nzela ya Polo, kino ekomaki kosalema ete, bato bakomaki kokamata miswale mpe bilamba oyo etuti nzoto ya Polo, mpo na kotia yango na nzoto ya babeli, mpe maladi ya bato yango ezalaki kosila mpe milimo mabe ezalaki kobima kati na bango. Kasi Bayuda misusu oyo bazalaki na mosala ya kotambola-tambola mpo na kobengana milimo mabe, bamekaki kobelela Kombo ya Nkolo Yesu mpo na koluka kokangola bato oyo bazalaki na se ya bokonzi ya milimo mabe. Balobaki: “Na Kombo ya Yesu oyo Polo ateyaka, napesi bino mitindo, bobima!” Ezalaki bana mibali sambo ya Seva, mokonzi ya banganga-Nzambe nde basalaki bongo. Kasi molimo mabe ezongiselaki bango: —Nayebi Yesu mpe nayebi soki Polo azali nani. Kasi bino, bozali banani? Boye, moto oyo azalaki na molimo mabe apumbwelaki bango mpe abetaki bango nyonso makasi, kino babimaki na ndako wana bolumbu mpe na bapota. Tango likambo yango eyebanaki na Bayuda mpe na bato ya mokili ya Greki oyo bavandaka na Efeso, somo ekangaki bango nyonso, mpe Kombo ya Nkolo Yesu ezwaki lokumu mingi penza. Mingi kati na bato oyo bakomaki bandimi bazalaki koya kondima mpe kotubela polele misala na bango ya mabe. Mpe bato ya maji mingi bamemaki babuku na bango, oyo esalaki liboke ya babuku, mpe batumbaki yango na miso ya bato nyonso. Tango balukaki koyeba motuya ya babuku yango, emonanaki ete ezalaki na motuya ya mbongo ya bibende nkoto tuku mitano (50.000). Na ndenge wana, Liloba ya Nkolo ezalaki kaka kokoba kopanzana mpe kokola na nguya. Sima na makambo oyo nyonso, Polo, na bokambemi ya Molimo, azwaki mokano ya kolekela na Masedwane mpe na Akayi mpo na kokende na Yelusalemi. Alobaki: “Soki nalongwe kuna, nakokende lisusu na Rome.” Atindandi na Masedwane, mibale kati na basungi na ye ya mosala: Timote mpe Eraste, wana ye moko atikalaki mwa mikolo na Azi. Ezalaki na tango wana nde mobulu makasi esalemaki na Efeso mpo na Nzela ya Nkolo. Mosali moko oyo alambaka bibende na moto na kombo ya Demetriusi azalaki kosala bililingi ya ndako ya nzambe ya Artemisi na palata. Boye, na mosala yango, azalaki kofuta basali na ye mbongo mingi. Asangisaki basali na ye elongo na bato ya misala ya maboko oyo basalaka mosala moko na ye mpe alobaki na bango: —Baninga na ngai! Boyebi malamu ete mosala oyo efutaka biso malamu. Nzoka nde, bino moko bozali komona mpe koyoka ndenge nini Polo wana azali kosala nyonso mpo na kondimisa bato, mpe kobenda sima na ye bato ebele awa na Efeso mpe na mokili mobimba ya Azi. Azali koloba ete banzambe oyo esalami na maboko ya bato ezali banzambe te. Ezali kaka mosala na biso te nde ekobeba, kasi ekoki mpe kosilisa lokumu ya ndako ya nzambe monene ya mwasi Artemisi. Ebongi te ete lokumu nyonso ya nzambe ya mwasi oyo Azi mpe mokili mobimba esambelaka esila kaka ndenge wana. Tango kaka bayokaki maloba wana, basilikaki makasi mpe bakomaki koganga: “Artemisi ya Efeso azali monene!” Na mbala moko, engumba mobimba ya Efeso ekotaki na mobulu. Bakangaki bato ya Masedwane mibale oyo bazalaki kotambola elongo na Polo: Gayusi mpe Arisitarke; bongo bato ebele penza bayaki mbangu na libanda ya ndako ya masano. Polo azalaki na posa ya kobima na miso ya bato, kasi bayekoli bapekisaki ye. Ezala mpe baninga na ye oyo bazalaki bakambi ya etuka batindelaki ye maloba ete ameka te kosala liseki ya kokende na ndako ya masano. Mobulu makasi penza ekotaki kati na ngulupa ya bato: bamoko bazalaki koganga mpo na likambo moko, mpe misusu, mpo na likambo mosusu. Boye, mingi kati na bango bazalaki koyeba te tina nini basanganeli wana. Boye, ndambo ya bato oyo bazalaki kati na ngulupa ya bato balimbolelaki Alekizandre, moto oyo Bayuda batiaki liboso, likambo yango ndenge ezalaki. Bongo, Alekizandre atombolaki loboko mpo na kolakisa ete alingi koloba na bato. Kasi tango basosolaki ete azali Moyuda, bango nyonso basalaki pene na bangonga mibale ya koganga lokola moto moko: “Artemisi ya Efeso azali monene!” Suka-suka, sekretere ya engumba alongaki kopekisa makelele ya bato. Alobaki: “Bato ya Efeso! Nani kati na mokili oyo ayebi te ete engumba ya Efeso ezali engumba mosantu ya nzambe monene ya mwasi Artemisi, mpe ya ekeko na ye oyo ekita wuta na likolo? Yango wana, lokola moko te akoki kotia tembe na likambo oyo, bovanda kimia mpe bosala makambo ya bozoba te. Bomemi bato oyo awa, nzoka nde, babebisi ndako ya nzambe na biso te mpe batioli ye te. Soki Demetriusi mpe basali na ye bazwi moto likambo, esambiselo ezali, basambisi mpe bazali. Ebongi malamu ete bakende kofunda. Mpe soki bozali na likambo mosusu ya koloba, tokoyekola yango na likita oyo mibeko epesa ndingisa. Soki tokebi te, bakoki kofunda biso ete tomemi bato na botomboki mpo na makambo oyo esalami lelo. Na bongo, tokolonga te kolimbola tina oyo bato batondaneli awa.” Kaka tango asilisaki koloba, apesaki mitindo ete bato bapanzana. Wana mobulu esilaki, Polo abengisaki bayekoli mpe alendisaki bango. Sima na yango, apesaki bango mbote ya suka mpe akendaki na Masedwane. Wana azalaki kotambola kati na etuka yango; azalaki kolendisa bandimi na mateya ya ndenge na ndenge kino akomaki na mokili ya Gresi, epai wapi awumelaki basanza misato. Kaka na tango Polo alingaki kozwa masuwa mpo na kokende na Siri, Bayuda basalaki ye likita mpo na kosala ye mabe. Boye, azwaki mokano ya kozongela na nzela ya Masedwane. Tala bato oyo bakendaki na ye elongo: Sopatere, mwana ya Pirisi, moto ya Bere, Aristarike mpe Sekundusi, bato ya Tesalonika, Gayusi, moto ya Derbe, Timote, Tishike mpe Trofime, bato ya mokili ya Azi. Bango nde bakendaki liboso mpo na kozela biso na Troasi. Kasi biso tozwaki masuwa na engumba ya Filipi sima ya feti ya mapa ezanga levire. Wana totambolaki mikolo mitano na mayi, tokutaki bango na Troasi. Tosalaki kuna mikolo sambo. Na mokolo ya liboso ya poso, wana tosanganaki mpo na kolia elambo, Polo oyo asengelaki kokende na mobembo na mokolo oyo elandaki, asololaki na bandimi, mpe abendaki masolo molayi penza kino na ngonga ya midi ya butu. Tosanganaki na shambre ya likolo oyo ezalaki na miinda ebele. Nzoka nde, elenge mobali moko, na kombo ya Etikisi avandaki na lininisa. Lokola Polo azalaki kaka kokoba koloba, pongi makasi ekangaki Etikisi mpe na mbala moko, akweyaki na mabele wuta na etaje ya misato. Tango batombolaki ye, bamonaki ete asili kokufa. Polo akitaki, atiaki litoyi na ye na tolo na ye, akamataki ye na maboko na ye mpe alobaki: “Bobanga te, azali na bomoi.” Amataki lisusu na etaje, abukaki lipa, aliaki yango mpe akobaki koloba kino na tongo, sima nde akendaki. Bongo, bazongisaki elenge mobali epai na bango na bomoi mpe bango nyonso balendisamaki makasi. Biso tokendaki liboso, mpe tozwaki masuwa oyo ememaki biso na Asosi, epai wapi Polo asengelaki komatela na masuwa. Azwaki mokano wana, mpo ete ye moko alingaki kokende kuna na makolo. Tango akutanaki na biso na Asosi, amataki na masuwa elongo na biso mpe tokendaki na Mitilena. Longwa wana, tozwaki masuwa mpo na kokende, mpe tokomaki liboso ya Shio na mokolo oyo elandaki. Sima ya mokolo moko, tokomaki na Samosi, mpe na mokolo oyo elandaki, tokomaki na Mile. Polo azwaki mokano ya kotelema te na Efeso mpe kolekisa tango te na mokili ya Azi, pamba te azalaki na posa, soki akolonga, ya kokoma noki na Yelusalemi, mpo ete azala na mokolo ya Pantekote. Wuta na Mile, Polo abengisaki bakambi ya Lingomba ya Efeso. Tango bakutanaki na ye, alobaki na bango: —Boyebi malamu ezaleli nini nazalaki na yango, tango nyonso liboso na bino, wuta mokolo ya liboso oyo nakomaki na mokili ya Azi. Nasalelaki Nkolo na komikitisa nyonso, na mayi na miso, ata namekamaki makasi na nzela ya mitambo ya Bayuda. Nzoka nde, boyebi malamu ete nazalaki na somo te ya koteya makambo nyonso oyo ekokaki kosunga bino. Nateyaki bino ezala na esika ya bato ebele to na ndako ya moko na moko. Nazalaki tango nyonso kosenga ezala na Bayuda to na bato ya mokili ya Greki ete bazonga epai na Nzambe na nzela ya kobongola mitema, mpe ete bandimela Nkolo na biso Yesu. Boye, sikʼoyo, na etinda ya Molimo, nakeyi na Yelusalemi, kasi nayebi te likambo nini ekokomela ngai kuna. Eloko moko kaka nayebi ezali ete, Molimo Mosantu azali kokebisa ngai ete boloko mpe minyoko ya ndenge na ndenge ezali kozela ngai na bingumba nyonso oyo nakokota. Nzoka nde, nazali komona bomoi na ngai lokola eloko pamba; eloko oyo eleki motuya mpo na ngai ezali: kosukisa malamu momekano na ngai ya kokima mbangu mpe kokokisa mosala oyo Nkolo apesaki ngai, ya kosakola sango malamu ya ngolu na Nzambe. Sikʼoyo, nayebi ete bokomona ngai lisusu te, bino nyonso kati na banani nalekaki mpo na koteya sango ya Bokonzi ya Nzambe. Yango wana, nalobi na bino yango lelo ete nazali na ngambo ya makila ya moto moko te kati na bato nyonso. Pamba te, nayebisaki bino mabongisi nyonso ya Nzambe, mpe nabombelaki bino ata eloko moko te. Bomibatela malamu mpe bobatela mpate nyonso oyo Molimo Mosantu apesa bino ete bokengela. Bozala babateli ya Lingomba ya Nzambe, pamba te asombaki yango na makila na ye moko. Nayebi malamu ete sima na ngai kokende, bato mabe bakoya kati na bino, bakozala lokola bankosi, bakoyokela mpate mawa te. Ezala kati na bino, bato mosusu bakobima, bakoteya mateya ya lokuta mpo na kopengwisa bayekoli ete bazala na ngambo na bango. Yango wana, bofungola miso! Bokanisa malamu ete mibu misato mobimba, butu mpe moi, natikaki te, na mayi na miso, kokebisa moko na moko na bino. Sikʼoyo, nazali kokaba bino na maboko ya Nzambe mpe ya Liloba na ye na ngolu. Ye azali na makoki ya kolendisa bino mpe ya kopesa bino libula elongo na basantu nyonso. Nalulaki palata, to wolo to elamba ya moto moko te. Bino moko boyebi malamu ete maboko na ngai oyo nde esalaki mosala mpo na kopesa ngai mpe baninga na ngai, biloko oyo tozalaki na yango posa. Na misala nyonso oyo nazalaki kosala, nazalaki kotalisa bino ete, ezali na nzela ya mosala ya makasi ya lolenge wana nde tokoki kosunga bato bakelela, wana tozali kokanisa Maloba oyo ye moko Nkolo Yesu aloba: “Esengo ya kokaba eleki esengo ya kozwa!” Tango asilisaki koloba, ye elongo na bango nyonso bafukamaki mpe abondelaki. Bango nyonso bakomaki kolela, bayambaki ye mpe bapesaki ye beze. Bayokaki mawa mingi mpo ayebisaki bango ete bakomona ye lisusu te. Bongo bakendaki kotika ye kino na masuwa. Sima ya kokabwana na bango, tokotaki na masuwa mpe tokendaki kino na esanga ya Kosi. Bongo na mokolo oyo elandaki, tokendaki na Roda, mpe longwa wana, tokomaki na Patara. Kuna, tomonaki masuwa moko oyo ezalaki kokende na Fenisi, tomataki kati na yango mpe tokendaki. Tango tomonaki esanga ya Shipre, totikaki yango na loboko ya mwasi mpe tokobaki mobembo na biso na mopanzi ya Siri. Totelemaki na Tire epai wapi masuwa esengelaki kokitisa biloko oyo ememaki. Lokola tokutaki bayekoli kuna, tovandaki na bango mikolo sambo. Bongo, na lisungi ya Molimo, balobaki na Polo ete akende na Yelusalemi te. Kasi tango mikolo na biso ekokaki, tolongwaki wana mpe tokobaki mobembo na biso. Bayekoli nyonso, basi na bango elongo na bana na bango bakendaki kotika biso kino na libanda ya engumba. Tango tokomaki na libongo, tofukamaki mpe tosambelaki. Sima ya kopesana mbote ya suka, tomataki na masuwa, mpe bango bazongaki na bandako na bango. Tosukisaki mobembo na biso ya mayi, longwa Tire kino na Pitolemayisi, epai wapi topesaki bandeko mbote mpe tovandaki na bango mokolo moko. Na mokolo oyo elandaki, tokendaki na Sezare mpe tovandaki na ndako ya Filipo, mopanzi sango malamu. Azalaki moko kati na bato sambo oyo Lingomba eponaki. Azalaki na bana basi minei oyo bayebaki nanu nzoto ya mibali te, mpe bazalaki na likabo ya kosakola. Lokola tovandaki wana mikolo ebele, mosakoli moko na kombo ya Agabusi awutaki na Yudea ayaki kokutana na biso. Azwaki mokaba ya Polo mpe amikangaki na yango makolo na maboko. Alobaki: “Tala makambo oyo Molimo Mosantu alobi: ‘Ezali na lolenge oyo nde Bayuda ya Yelusalemi bakokanga mokolo mokaba oyo, mpe bakokaba ye na maboko ya bato ya bikolo ya bapaya.’ ” Tango toyokaki maloba wana, biso na bandimi ya Sezare tobondelaki Polo ete akende na Yelusalemi te. Kasi ye azongiselaki biso: “Mpo na nini bozali kolela mpe kolembisa ngai? Nasili komibongisa kaka te mpo na kokangama, kasi mpe mpo na kokufa na Yelusalemi mpo na Kombo ya Nkolo Yesu.” Lokola tolongaki te kobongola makanisi na ye, totikaki kobondela ye mpe tolobaki: “Tika ete mokano ya Nkolo esalama!” Sima ya mikolo wana, tobongisaki biloko na biso mpe tokendaki na Yelusalemi. Bayekoli misusu ya Sezare bakendaki nzela moko na biso. Bamemaki biso na ndako ya moto moko na kombo ya Minaso, epai wapi tovandaki. Azalaki moto ya Shipre mpe akoma moyekoli wuta kala. Tango tokomaki na Yelusalemi, bandeko bayambaki biso na esengo penza. Na mokolo oyo elandaki, Polo amemaki biso epai ya Jake, epai wapi bakambi nyonso ya Lingomba bazalaki. Sima ya kopesa bango mbote, Polo akomaki koyebisa bango likambo moko na moko, oyo Nzambe asalaki kati na bato ya bikolo ya bapaya, na nzela ya mosala na ye. Tango bayokaki bongo, bakumisaki Nzambe mpe balobaki na Polo: “Ndeko, tala nanu bankoto ya Bayuda oyo bakomi bandimi, kasi bango nyonso bazali nanu ya kokangama na Mobeko. Nzoka nde, bayokaki sango ete, oteyaka Bayuda oyo bavandaka kati na bato ya bikolo ya bapaya ete batosa te Mobeko ya Moyize, mpe olobaka na bango ete bakata te, nzoto ya mibali ya bana na bango mpe batika kosalela bokoko ya Bayuda. Sikʼoyo tosala nini? Mpo ete bakoyoka kaka ete okomi awa! Boye, sala makambo oyo tokoyebisa yo. Tozali awa na mibali minei oyo balapa ndayi. Kamata bango, mipetola elongo na bango mpe futela bango mbongo mpo ete bakatisa suki. Bongo, bato nyonso bakoyeba ete sango oyo bazali koyoka mpo na yo ezali ya lokuta; bakososola ete yo mpe otosaka Mobeko. Kasi mpo na bato ya bikolo ya bapaya oyo bakomi bandimi, tokomelaki bango mokanda na tina na mikano oyo tozwaki ete balia te nyama oyo babonzeli banzambe ya bikeko, balia makila te, balia te nyama oyo babomi na kozanga kobimisa makila, mpe basala te ekobo ya lolenge nyonso.” Na mokolo oyo elandaki, Polo amemaki bato yango mpe amipetolaki elongo na bango. Akotaki na Tempelo mpo na koyebisa mokolo oyo mikolo ya komipetola ekosila, mokolo oyo bakopesa likabo mpo na moko na moko kati na bango. Tango mikolo sambo ekomaki pene ya kokoka, Bayuda ya mokili ya Azi bamonaki Polo na Tempelo. Boye, basalaki ete bato batomboka mpe bakangaki ye. Bazalaki koganga: “Bato ya Isalaele, bosunga biso! Botala moto oyo azali koteya bato nyonso, na bisika nyonso ete batelemela bato na biso, Mobeko na biso mpe Tempelo. Botala, akotisi ata bato ya mokili ya Greki na Tempelo mpe abebisi bosantu ya esika oyo.” Balobaki bongo mpo ete liboso, bamonaka na engumba, Polo elongo na Trofime, moto ya Efeso, mpe bakanisaki ete Polo akotisi ye na Tempelo. Mobulu makasi ekotaki kati na engumba mobimba, mpe bato ebele oyo bawutaki bipai na bipai bayaki na lombango. Bakangaki Polo, babimisaki ye libanda ya Tempelo, mpe na mbala moko, bakangaki bikuke na yango. Wana bazalaki koluka koboma Polo, sango ekomaki kino epai ya mokonzi ya basoda ya Rome ete Yelusalemi mobimba ekoti na mobulu. Kaka na tango wana, azwaki basoda elongo na bakonzi na bango, mpe bakendaki na lombango epai ngulupa ya bato ezalaki. Boye, tango kaka bamonaki mokonzi ya basoda elongo na basoda na ye, batikaki kobeta Polo. Mokonzi ya basoda apusanaki, akangaki Polo mpe apesaki mitindo ete bakanga ye minyololo mibale. Boye, atunaki soki Polo azali nani mpe asali nini. Kati na ngulupa ya bato oyo batondaki wana, bato na bato bazalaki koganga na ndenge na bango. Lokola mokonzi ya basoda azalaki kososola bosolo ya likambo te mpo na mobulu oyo ebimaki, apesaki mitindo ete bamema Polo na lopango ya basoda. Tango Polo atiaki matambe ne ye na binyateli ya esikalie, basoda bamemaki ye mpo ete bato bazalaki kotia mobulu makasi. Boye, ngulupa nyonso ya bato bazalaki kolanda ye na koganga: “Akufa!” Na tango balingaki kokotisa ye na lopango ya basoda, Polo atunaki mokonzi ya basoda: —Nakoki koyebisa yo likambo moko? Mokonzi ya basoda atunaki Polo: —Oyebi koloba monoko ya bato ya mokili ya Greki? Boni, ezali yo te moto ya Ejipito oyo akotisaki mobulu na mikolo oyo eleki, mpe amemaki batomboki nkoto minei (4.000) na esobe? Polo azongisaki: —Te, ezali ngai te! Ngai nazali Moyuda ya Tarse, na mokili ya Silisi, mpe moto ya engumba moko ya tina mingi penza. Nabondeli yo, pesa ngai nzela ya koloba na bato. Mokonzi ya basoda apesaki ye nzela. Boye, Polo atelemaki na esikalie, atombolaki loboko. Tango bato batikaki makelele, akomaki koloba na bango na monoko ya Arami: “Bandeko mpe batata, boyoka sikʼoyo ndenge nini nalingi komilongisa.” Tango bayokaki Polo koloba na monoko ya arami, bavandaki lisusu kimia koleka. Bongo, Polo alobaki: —Nazali Moyuda, nabotama na Tarse ya mokili ya Silisi, kasi nakoli kaka awa, na engumba oyo ya Yelusalemi. Gamaliele nde azalaki molakisi na ngai. Ye nde ateyaki ngai na bosolo nyonso Mobeko ya bakoko na biso. Boye, nazalaki na bolingo oyo eleka ndelo mpo na Nzambe, ndenge bino nyonso bozali na yango lelo. Nanyokolaki bato oyo bazalaki kolanda Nzela oyo kino koboma bango, nazalaki kokanga ezala mibali to basi mpe kobwaka bango na boloko. Mokonzi ya banganga-Nzambe mpe likita mobimba ya bakambi bakoki kotatola bosolo ya makambo oyo nazali koloba. Bango nde kutu bapesaki ngai mikanda mpo ete nakende kopesa na bandeko na bango ya Damasi. Bongo, nakendaki kuna mpo na kokanga bato mpe komema bango na minyololo na Yelusalemi, mpo ete bapesa bango etumbu. Wana nazalaki na nzela mpe nakomaki pene ya Damasi, ezalaki pene ya ngonga ya midi, na mbala moko, namonaki kongenga moko ya makasi penza kowuta na likolo mpe engengelaki ngai. Nakweyaki na mabele mpe nayokaki mongongo moko koloba na ngai: —Saulo, Saulo, mpo na nini ozali konyokola ngai? Natunaki: —Nkolo, yo nani? Alobaki na ngai: —Nazali Yesu ya Nazareti oyo yo ozali konyokola! Bato oyo bazalaki na ngai elongo, bamonaki kongenga yango, kasi bayokaki te mongongo ya moto oyo azalaki koloba na ngai. Natunaki: —Nkolo, nasala nini? Nkolo alobaki na ngai: —Telema mpe kende na Damasi. Kuna bakoyebisa yo makambo nyonso oyo osengeli kosala. Baninga na ngai basimbaki ngai na loboko mpe bamemaki ngai kino na Damasi, pamba te kongenga wana ebomaki ngai miso. Ezalaki na moto moko kuna na kombo ya Ananiasi. Azalaki kotosa makambo ya Nzambe ndenge Mobeko ezalaki kotinda, mpe azalaki na lokumu mingi na miso ya Bayuda nyonso ya engumba wana. Ayaki kokutana na ngai mpe alobaki: “Ndeko na ngai Saulo, mona lisusu!” Mpe Kaka na tango wana, nazwaki lisusu makoki ya komona; mpe namonaki ye. Bongo, alobaki na ngai: “Nzambe ya bakoko na biso apona yo wuta kala mpo ete oyeba mokano na ye, mpo omona Moto na sembo mpe oyoka mongongo na ye. Okozala motatoli na ye liboso ya bato nyonso, mpo na koyebisa bango makambo nyonso oyo osili komona mpe koyoka. Boye, mpo na nini ozali kolekisa tango? Telema, zwa libatisi mpe belela Kombo ya Nkolo mpo ete opetolama na masumu na yo.” Tango nazongaki na Yelusalemi mpe nazalaki kobondela na Tempelo, nakweyaki na Molimo, mpe nayokaki Nkolo koloba na ngai: “Sala noki, bima na Yelusalemi, pamba te bato na yango bakondima te litatoli oyo okoloba mpo na ngai.” Ngai nazongisaki: “Nkolo, bato wana bayebi malamu ete nazalaki kotambola na bandako ya mayangani mpo na kobwaka na boloko mpe kobetisa fimbo bato oyo bazalaki kondimela yo. Tango basopaki makila ya Etiene, motatoli na yo, ngai mpe nazalaki wana, nandimaki makambo oyo esalamaki mpe nazalaki kokengela bilamba ya bato oyo babomaki ye.” Kasi Nkolo azongiselaki ngai: “Kende, nakotinda yo mosika, epai ya bato ya bikolo ya bapaya.” Bato bayokaki Polo kino tango alobaki maloba wana. Boye, batombolaki mingongo na bango mpe bagangaki: “Moto ya lolenge oyo asengeli kolongwa na mokili! Akoki kozala na bomoi te!” Lokola bazalaki koganga makasi penza, mpe kobwaka bilamba na bango mpe putulu na likolo, mokonzi ya basoda apesaki mitindo ete bakotisa Polo kati na lopango ya basoda, mpe babeta ye fimbo mpo ete aloba polele tina nini Bayuda bazalaki koganga bongo mpo na ye. Kasi tango bazalaki kokanga Polo basinga, atunaki mokonzi oyo azalaki wana: “Boni, bozali penza na ndingisa ya kobeta moto ya Rome fimbo, wana bosambisi ye nanu te?” Tango mokonzi oyo ayokaki maloba wana, akendaki koyebisa mokonzi ya basoda: —Olingaki kosala nini? Moto wana azali moto ya Rome! Kaka na tango wana, mokonzi ya basoda akendaki epai ya Polo mpe atunaki ye: —Yebisa ngai solo, ozali penza moto ya Rome? Azongisaki: —Eh, ezali bongo! Boye, mokonzi ya basoda alobaki: —Nafutaki mbongo mingi mpo na kozwa makoki ya kokoma moto ya Rome! Polo azongisaki: —Kasi ngai, nazali moto ya Rome ya kobotama. Boye, kaka na tango wana, bato oyo balingaki kobeta ye fimbo batikaki ye. Boye, mokonzi ya basoda akomaki kobanga tango asosolaki ete moto oyo ye atindaki ete bakanga minyololo azali moto ya Rome. Na mokolo oyo elandaki, lokola mokonzi ya basoda azalaki na posa ya koyeba malamu tina oyo Bayuda bafundelaki Polo, atindaki ete bafungola Polo minyololo mpe abengisaki bakonzi ya banganga-Nzambe mpe bato ya Likita monene ete basala likita. Boye, ayaki na Polo mpe atiaki ye liboso na bango. Polo atalaki swii bato ya Likita monene mpe alobaki: “Bandeko na ngai, kino moyi ya lelo, nazali kosalela Nzambe na motema peto.” Kasi Ananiasi, mokonzi ya banganga-Nzambe atindaki bato oyo bazalaki pene ya Polo ete babeta ye na monoko. Boye, Polo alobaki na ye: “Nzambe akobeta yo, yo miri oyo bapakola langi ya pembe. Ovandi wana mpo na kosambisa ngai ndenge Mobeko ezali kosenga. Nzoka nde, yo nde moto obuki Mobeko, mpo ete otindi babeta ngai!” Bato oyo batelemaki pene ya Polo balobaki: —Boni, ozali kofinga mokonzi ya banganga-Nzambe? Polo azongisaki: —Bandeko, nayebaki te ete azali mokonzi ya banganga-Nzambe. Pamba te, nayebi malamu ete ekomama: “Koloba mabe te mpo na mokonzi ya bato na yo.” Lokola Polo ayebaki ete kati na bato ya Likita monene bamoko bazalaki basaduseo mpe basusu, bafarizeo, agangaki kati na Likita monene: “Bandeko na ngai, nazali mofarizeo, mwana ya bafarizeo. Nazali kosamba mpo na elikya na biso ya lisekwa ya bakufi.” Kaka tango alobaki bongo, tembe makasi ekotaki kati na bafarizeo mpe basaduseo, mpe likita ekabwanaki. Pamba te, basaduseo balobaka ete lisekwa ezalaka te, ba-anjelu mpe milimo bazali te; nzoka nde, bafarizeo bandimaka makambo wana nyonso. Makelele emataki makasi penza. Boye, ndambo ya balakisi ya mibeko kati na lisanga ya bafarizeo batelemaki mpe balobaki na molende nyonso: “Solo, tomoni ata mabe moko te na moto oyo. Nani ayebi? Tango mosusu molimo to anjelu nde moto alobaki na ye.” Lokola tembe ekomaki makasi koleka, mokonzi ya basoda abangaki ete bakata Polo biteni-biteni. Boye, apesaki mitindo na basoda ete bakita, balongola ye kati na bango mpe bamema ye na lopango ya basoda. Na butu oyo elandaki, Nkolo abimelaki Polo na emoniseli mpe alobaki na ye: —Yika mpiko! Ndenge otatolaki ngai na Yelusalemi, osengeli mpe kotatola ngai na Rome. Na tongo ya mokolo oyo elandaki, Bayuda basalaki likita. Balapaki ndayi ete bakolia te mpe bakomela ata eloko moko te kino bakoboma Polo. Motango ya bato oyo basalaki likita wana, ezalaki koleka bato ntuku minei. Bakendaki epai ya bakonzi ya banganga-Nzambe mpe bakambi mpo na koloba na bango: “Tolapi ndayi ete tokolia eloko moko te kino tokoboma Polo! Bino mpe bato ya Likita monene, bokende sikʼoyo epai ya mokonzi ya basoda mpe bosenga ete bamema Polo liboso na bino; lokola nde bolingi koyekola likambo na ye. Bongo na ngambo na biso, tosili komibongisa mpo na koboma ye liboso ete akoma awa.” Kasi tango mwana mobali ya ndeko ya Polo ya mwasi ayokaki motambo yango, akendaki na lopango ya basoda, akotaki mpe akebisaki Polo. Polo abengaki mokonzi moko ya basoda nkama mpe alobaki na ye: “Mema elenge mobali oyo epai ya mokonzi, pamba te azali na likambo ya koyebisa ye!” Boye, mokonzi yango amemaki ye epai ya mokonzi ya basoda mpe alobaki: “Mokangami Polo abengaki ngai, mpe asengaki ngai ete namemela yo elenge mobali oyo, mpo ete azali na likambo ya koyebisa yo!” Mokonzi ya basoda akamataki elenge mobali na loboko, amemaki ye na pembeni mpe atunaki ye: —Likambo nini olingi koyebisa ngai? Elenge mobali azongisaki: —Bayuda bayokani mpo ete basenga yo lobi, omemela bango Polo liboso ya Likita monene, lokola nde balingi koyekola lisusu likambo na ye. Kasi kondima bosenga na bango te. Pamba te, bato koleka tuku minei kati na bango bazali kobongisa motambo mpo na ye. Balapaki ndayi ete bakolia te mpe bakomela ata eloko moko te, kino bakoboma Polo. Makambo nyonso esili kobongisama mpe bazali kozela kaka ndingisa na yo! Boye, mokonzi ya basoda atikaki elenge mobali wana ete akende. Kasi liboso ete akende, akebisaki ye: “Koloba na moto moko te likambo oyo oyebisi ngai.” Na sima, mokonzi ya basoda abengisaki bakonzi mibale ya basoda nkama mpe alobaki na bango: “Bobongisa basoda nkama mibale, basoda tuku sambo oyo batambolaka na mpunda mpe basoda misusu nkama mibale mpo ete bakende na Sezare, na ngonga ya libwa ya butu. Bobongisa mpunda moko mpo na komema Polo mpo ete akoma malamu epai ya moyangeli Felikisi.” Boye, akomelaki moyangeli mokanda oyo: Tata moyangeli Felikisi, Yamba mbote ewuti epai na ngai Klodiusi Lisiasi. Bayuda bakangaki moto oyo natindeli yo. Boye, tango balingaki koboma ye, nayaki elongo na basoda mpe nabikisaki ye, pamba te nayokaki sango ete azali moto ya Rome. Lokola nalingaki koyeba malamu tina oyo bafundelaki ye, namemaki ye liboso ya Likita na bango ya monene. Namonaki ete bafundaki ye kaka mpo na makambo oyo etali mobeko na bango. Kasi balongaki te kofunda ye mpo na mabe moko oyo ekoki kopesa ye etumbu ya liwa to ya boloko. Tango bayebisaki ngai ete Bayuda basalelaki ye likita mpo na koboma ye, nazwaki mokano ya kotinda ye epai na yo noki penza. Mpe nalobaki lisusu na bato oyo bafundaki ye ete baya kofunda ye epai na yo. Se bongo, kolanda mitindo oyo basoda bazwaki, bakamataki Polo mpe bamemaki ye butu-butu kino na Antipatrisi. Na mokolo oyo elandaki, basoda oyo batambolaka na makolo bazongaki na lopango ya basoda mpe batikaki basoda oyo batambolaka likolo ya mpunda kokende elongo na ye. Tango bakomaki na Sezare, basoda oyo batambolaka likolo ya mpunda bapesaki mokanda yango epai ya moyangeli mpe balakisaki ye Polo. Moyangeli atangaki mokanda yango mpe atunaki soki Polo azali moto ya mboka nini. Wana ayokaki ete azali moto ya Silisi, alobaki na ye: “Nakoyoka yo tango bato oyo bafundaki yo bakokoma.” Bongo, apesaki mitindo ete bakengela Polo na ndako ya Erode. Sima ya mikolo mitano, Ananiasi, mokonzi ya banganga-Nzambe ayaki na Sezare elongo na bakambi misusu mpe molobeli moko na kombo ya Tertile, mpo na kofunda Polo epai ya moyangeli. Tango babengisaki Polo, Tertile akomaki kofunda ye liboso ya Felikisi na maloba oyo: —Tata mokonzi Felikisi, ezali mpo na yo nde tozali na kimia ya solo, mpe mpo na bwanya na yo nde mbongwana ya solo ekota kati na ekolo oyo. Tata mokonzi Felikisi, na bisika nyonso mpe na tango nyonso, tondimaka yango mpe totondaka yo mingi penza. Kasi tolingi te kozwa yo tango molayi. Nabondeli yo, salela biso ngolu ya koyoka biso na mokuse. Biso tomoni ete moto oyo mosala na ye kotia mobulu; azali kobimisa mobulu kati na Bayuda nyonso ya mokili mobimba. Azali mokambi ya lingomba moko ya bato ya Nazareti, mpe amekaki kutu kobebisa bosantu ya Tempelo, yango wana tokangaki ye. [Tozalaki na posa ya kosambisa ye ndenge Mobeko na biso etindaka, kasi Lisiasi, mokonzi ya basoda ayaki mpe abotolaki ye na maboko na biso na makasi. Atindaki bato oyo bafundaki ye ete baya epai na yo.] Yo moko soki otuni ye mituna, okososola ete makambo oyo tofundeli ye ezali ya solo. Bayuda babetaki sete na makambo oyo bafundelaki ye. Tango moyangeli apesaki Polo nzela ya koloba, Polo azongisaki: —Nayebi solo ete ozali mosambisi ya ekolo oyo wuta mibu ebele. Boye, nazali na esengo ya kosamba liboso na yo. Yo moko okoki koluka koyeba malamu ete, eleki nanu mikolo zomi na mibale te wuta nakendaki na Yelusalemi mpo na kosambela Nzambe. Mpe bato oyo bafundi ngai, batikala nanu kokuta ngai te ezala na Tempelo, to na bandako ya mayangani to mpe na engumba, nazali kotia tembe na moto to mpe kotindika bato ete batomboka. Bakolonga te kotalisa bosolo ya makambo oyo bafundeli ngai sikʼoyo. Nzoka nde, nandimi ete nasalelaka Nzambe ya bakoko na biso, wana nazali kolanda Nzela oyo bango bazali kobenga: “binzambi-nzambi.” Nandimaka nyonso oyo ekomama na Mobeko mpe na mikanda ya basakoli; boye ngai mpe lokola bango, nazalaka na elikya epai na Nzambe ete bato nyonso, ezala bato ya sembo to ya mabe bakosekwa. Yango wana, ngai mpe nasalaka nyonso na tango nyonso ete nazala na likambo moko te na motema liboso ya Nzambe mpe liboso ya bato. Sima na ngai kozala mibu ebele libanda ya Yelusalemi, nazongaki kuna mpo na komemela bato bakelela ya ekolo na ngai lisungi mpe kopesa makabo epai ya Nzambe. Bakutaki ngai na Tempelo tango nasilisaki komipetola. Boye, ngulupa ya bato ezalaki pembeni na ngai te, bongo mobulu mpe ezalaki te. Kasi ezali ndambo ya Bayuda ya Azi oyo bazalaki wana nde basengelaki kotelema liboso na yo mpo na kofunda ngai, soki solo bazwaki ngai na likambo. To mpe bato oyo bazali awa, bango moko baloba soki mabe nini bazwaki ngai tango nasambaki liboso ya Likita-monene. Boni, ezali te mpo ete wana natelemaki liboso na bango nagangaki: “Bozali kosambisa ngai lelo mpo ete nandimaka ete bato bakufa bakosekwa?” Felikisi, oyo ayebaki malamu penza makambo oyo etali Nzela wana, azongisaki bango mpe alobaki: “Nakokata likambo na bino tango mokonzi ya basoda Lisiasi akoya.” Boye, apesaki mitindo epai ya mokonzi ya basoda nkama ete abatela Polo na boloko, kasi atikela ye mwa bonsomi mpe apesa nzela na baninga na ye ete bakoka kosunga ye. Sima na mwa mikolo, Felikisi ayaki elongo na mwasi na ye Drusiye oyo azalaki Moyuda. Abengisaki Polo mpe akomaki koyoka ye na tina na makambo oyo etali kondima kati na Yesu Klisto. Kasi tango Polo abandaki koloba na tina na bosembo, na komibatela mpe na kosambisama oyo ezali koya, Felikisi akomaki na somo mpe alobaki na ye: “Ekoki mpo na sikʼoyo! Okoki kokende. Soki nazwi lisusu tango nakobengisa yo.” Felikisi azalaki kobengisa ye mbala na mbala mpo na kosolola na ye, na elikya ete Polo akopesa ye kanyaka. Sima na mibu mibale, Porsiusi Festisi akomaki moyangeli na esika ya Felikisi, oyo mpo na kosepelisa Bayuda, atikaki Polo na boloko. Sima na mikolo misato ya boyei na ye na etuka, Festisi alongwaki na Sezare mpo na kokende na Yelusalemi, epai wapi bakonzi ya banganga-Nzambe mpe bakambi ya Bayuda bakendaki kokutana na ye mpo na kofunda Polo. Babondelaki Festisi mingi mpo ete asalela bango ngolu, ete atinda Polo na Yelusalemi; pamba te, basalaki mabongisi ya kotiela ye motambo na nzela mpo na koboma ye. Kasi Festisi azongiselaki bango: “Polo azali nanu na boloko na Sezare. Etikali moke ngai moko mpe nazonga kuna. Tika ete tokende nzela moko na ndambo ya bakambi na bino, mpo ete soki moto yango asalaki mabe, bafundela ye kuna.” Festisi asalaki mikolo pene mwambe to zomi elongo na bango, mpe azongaki na Sezare. Boye, na mokolo oyo elandaki, avandaki na esambiselo mpe apesaki mitindo ete bamemela ye Polo. Tango Polo akomaki wana, Bayuda oyo bawutaki na Yelusalemi bazingelaki ye mpe bakomaki kofunda ye mpo na makambo mingi ya mabe, oyo bango moko kutu bazalaki na makoki te ya kolakisa bosolo na yango. Boye, tala ndenge Polo asambaki: “Nabuki ata mobeko te ya Bayuda, to ya Tempelo to mpe ya Kayisala.” Kasi lokola Festisi alingaki kosepelisa Bayuda, atunaki Polo: —Boni, olingi kozonga na Yelusalemi mpe kosamba kuna liboso na ngai mpo na makambo oyo? Polo azongisaki: —Te, natelemi liboso ya esambiselo ya Kayisala; ezali awa nde nasengeli kosamba. Yo moko oyebi malamu ete nasali Bayuda ata likambo moko te ya mabe. Soki ya solo ngai nasali mabe, to nasali likambo oyo ekoki mpo na komemela ngai etumbu ya liwa, nandimi kokufa. Kasi soki makambo oyo Bayuda oyo bafundeli ngai ezali ya lokuta, moto moko te azali na makoki ya kokaba ngai na maboko na bango. Tika ete Kayisala akata likambo na ngai! Sima na Festisi kozwa toli ya likita na ye, alobaki na Polo: —Lokola osengi kokende kosamba liboso ya Kayisala, okokende solo kosamba liboso na ye. Sima na mwa mikolo, mokonzi Agripa elongo na Berenise bayaki na Sezare mpo na kopesa Festisi mbote. Lokola balekisaki mikolo mingi kuna, Festisi ayebisaki mokonzi likambo ya Polo. Alobaki: —Moto moko azali awa, Felikisi atikaki ye na boloko. Tango nakendaki na Yelusalemi, bakonzi ya banganga-Nzambe mpe bakambi ya Bayuda bayaki kofunda ye epai na ngai mpe basengaki ete nakatela ye etumbu. Kasi nayebisaki bango ete, bato ya Rome bazalaka na ezaleli te ya kokatela moto etumbu, soki asambi nanu te na bato oyo bafundi ye; mpe soki azwi nanu nzela te ya kozongisa biyano na makambo oyo bafundeli ye. Tango bayaki awa, nalekisaki tango te. Kaka na mokolo oyo elandaki, navandaki na esambiselo mpe napesaki mitindo ete bamemela ngai moto yango. Tango bato oyo bafundaki ye bakomaki koloba, balongaki te kotalisa bosolo ya makambo ya mabe oyo bafundelaki ye, ndenge ngai nazalaki kokanisela. Likambo bazalaki na yango ezalaki kaka: tembe mpo na makambo oyo etali lolenge na bango ya kosambela mpe mpo na moto moko oyo akufa, kombo na ye Yesu, kasi Polo azali koloba ete azali na bomoi! Lokola nayebaki te ndenge nini nakokaki kokata likambo ya ndenge wana, natunaki ye soki alingi kokende na Yelusalemi mpo ete bakata likambo na ye kuna. Kasi Polo asengaki ete akende kosamba liboso ya mokonzi monene. Boye, napesaki mitindo ete babatela ye na boloko kino tango nakotinda ye epai ya Kayisala. Agripa alobaki na Festisi: —Nazali na posa ya koyoka moto wana ngai moko. Festisi azongisaki: —Okoyoka ye lobi! Na mokolo oyo elandaki, Agripa mpe Berenise bayaki na lokumu nyonso, mpe bakotaki na ndako oyo basambiselaka bato elongo na bakonzi ya basoda mpe bakambi ya engumba. Na mitindo ya Festisi, bayaki na Polo. Festisi alobaki: —Mokonzi Agripa mpe bato nyonso oyo bazali elongo na biso, bozali komona moto oyo! Lingomba mobimba ya Bayuda bayaki kokutana na ngai na tina na ye na Yelusalemi mpe na Sezare. Bazalaki koganga ete asengeli kokufa! Nzoka nde, mpo na ngai, namonaki likambo moko te oyo ekokaki komemela ye etumbu ya liwa. Kasi lokola ye moko asengi ete akende kosamba liboso ya mokonzi monene, ngai mpe nazwi mokano ya kotinda ye na Rome. Lokola nazali na likambo moko te ya malonga mpo na kokomela mokonzi monene na tina na ye; nayei na ye liboso na bino nyonso, mpe koleka, liboso na yo mokonzi Agripa mpo ete nakoka kozwa likambo ya kokomela mokonzi monene, soki tosilisi kotuna ye mituna. Pamba te, namoni ekozala penza tina te ya kotinda moto ya boloko na Rome, soki nalongi te kolimbola malamu likambo oyo bafundeli ye. Agripa alobaki na Polo: —Napesi yo nzela, okoki na yo koloba. Boye, Polo atombolaki loboko mpe abandaki kosamba. Alobaki boye: —Mokonzi Agripa, nazali na esengo mingi mpo na kosamba lelo liboso na yo, na tina na makambo nyonso oyo Bayuda bafundeli ngai. Lokola oyebi malamu penza bizaleli mpe tembe ya Bayuda, nabondeli yo ete ozala na motema monene mpo na koyoka ngai. Bayuda nyonso bayebi ezaleli na ngai wuta bomwana. Bayebi banda na ebandeli, ndenge nini bomoi na ngai ezalaki kati na ekolo na ngai mpe na Yelusalemi. Bayebi ngai penza wuta kala, mpe bakoki kotatola yango soki balingi, ete ngai natambolisaki bomoi na ngai lokola mofarizeo, na botosi makasi ya mibeko ndenge lingomba na biso esengaka. Mpe nazali kosamba lelo likolo ya elikya oyo natiaka na elaka oyo Nzambe apesaki bakoko na biso. Bato ya mabota na biso zomi na mibale basalelaki Nzambe butu mpe moyi na kolemba te, mpo ete bazalaka na elikya ete bakomona kokokisama ya elaka yango. Mokonzi, ezali kaka mpo na elikya wana nde Bayuda bafundeli ngai. Boye, mpo na nini penza kati na bino, bozali kondima te ete Nzambe akoki kosekwisa bato bakufa? Ngai moko mpe nazalaki kondima ete esengelaki na ngai kosala nyonso, mpo na kotelemela Kombo ya Yesu ya Nazareti. Boye, mosala yango nde nasalaki na Yelusalemi. Nakangisaki basantu ebele na boloko, na ndingisa ya bakonzi ya banganga-Nzambe, boye ngai mpe nazalaki kondima tango bazalaki koboma bango. Mbala mingi nazalaki kotambola na bandako ya mayangani mpo na kopesa bango bitumbu mpe kotinda bango na makasi ete batiola Yesu Klisto. Na zuwa na ngai oyo eleka ndelo, nazalaki kolanda bango kino na bingumba ya bapaya mpo na konyokola bango. Ezali mpo na yango nde nakendaki na Damasi, na bokonzi mpe na etinda ya bakonzi ya banganga-Nzambe. Eh mokonzi, na ngonga ya midi, tango nazalaki kokende, namonaki kongenga moko kowuta na likolo, oyo elekaki kutu ata kongenga ya moyi. Kongenga yango ezipaki ngai mpe bato oyo bazalaki na ngai elongo na mobembo. Biso nyonso tokweyaki na mabele, mpe nayokaki mongongo moko koloba ngai na monoko ya arami: “Saulo, Saulo mpo na nini ozali konyokola ngai? Ozali komimonisa pasi na kotambola makolo ngulu likolo ya basende.” Boye, natunaki: —Nkolo yo nani? Nkolo azongisaki: —Ezali nde ngai Yesu oyo ozali konyokola! Kasi lamuka mpe telema! Pamba te, namimonisi epai na yo mpo na kokomisa yo mosali na ngai mpe motatoli ya makambo oyo osili komona, mpe ya makambo oyo nakolakisa yo na sima. Nakobikisa yo na maboko ya bato ya ekolo na yo, mpe na maboko ya bato ya bikolo ya bapaya. Nakotinda yo epai na bango mpo ete ofungola bango miso na tina ete balongwa na molili mpe baya na pole, mpo ete balongwa na se ya bokonzi ya satana mpe baya epai na Nzambe na tina ete bazwa bolimbisi ya masumu mpe bomengo elongo na basantu soki bandimeli ngai. Oh mokonzi Agripa, wuta tango wana, nandimaki kotosa emoniseli oyo ewutaki na likolo. Nabandaki koteya liboso bato ya Damasi, ya Yelusalemi, ya Yudea mobimba mpe bato ya bikolo ya bapaya, mpo ete babongola mitema mpe bazonga epai na Nzambe, bongo na nzela ya misala na bango, balakisa ete babongoli mitema. Ezali kaka mpo na tina oyo nde Bayuda bakangaki ngai na Tempelo mpe balukaki koboma ngai. Kasi kino lelo, Nzambe azali kobatela ngai, yango wana natelemi awa mpo na kotatola liboso ya bato pamba mpe bato minene. Nateyaka makambo mosusu te, bobele makambo oyo basakoli mpe Moyize baloba ete ekosalema; ete Klisto asengelaki komona pasi mpe kozala moto ya liboso ya kosekwa kati na bakufi, mpo na kosakola pole ya lobiko epai ya Bayuda mpe epai ya bato ya bikolo ya bapaya. Wana Polo azalaki nanu koloba, Festisi akataki ye maloba mpe agangelaki ye: —Ozali na liboma Polo! Boyebi oyo otondi na yango ekomisi yo liboma! Kasi Polo azongisaki: —Tata mokonzi, nazali na liboma te. Makambo oyo nazali koloba ezali solo mpe ezali penza na nzela. Mokonzi Agripa kutu ayebi makambo oyo malamu; yango wana nazali koloba na molende nyonso liboso na ye. Nayebi malamu ete abungi ata likambo moko te kati na makambo yango, pamba te esalamaki na kobombama te. Mokonzi Agripa! Boni, ondimaka basakoli? Nayebi malamu ete ondimaka bango. Boye, Agripa alobaki na Polo: —Okanisi ete okoki kokomisa ngai moklisto kaka na mwa tango moke? Polo azongisaki: —Ezala na tango molayi to na tango moke, nazali kosambela Nzambe ete bokoma lokola ngai, kasi na minyololo te, yo kaka te kasi mpe, bato nyonso oyo bazali koyoka ngai lelo! Tango bayokaki bongo, mokonzi atelemaki. Boye, moyangeli, Berenise mpe bato nyonso oyo bazalaki na bango elongo mpe batelemaki. Wana babimaki, balobanaki bango na bango: “Moto oyo asali mabe ata moko te oyo ekoki komemela ye etumbu ya liwa to ya boloko.” Agripa alobaki na Festisi: “Soki moto oyo asengaki te kosamba liboso ya Kayisala, esengelaki kotika ye.” Tango bazwaki mokano ya kozwa masuwa mpo na kokende na Itali, bapesaki Polo elongo na ndambo ya bakangami na maboko ya Juliusi, oyo azalaki mokonzi ya basoda nkama ya Rome, kati na mapinga ya mokonzi monene. Tomataki na masuwa oyo ewutaki na engumba ya Adramite mpo na kokende na mabongo ya pembeni-pembeni ya mokili ya Azi, mpe tokendaki. Boye, Aristarke, moto ya Masedwane ya Tesalonika azalaki na biso elongo. Na mokolo oyo elandaki, tosemaki na engumba ya Sidoni. Lokola Juliusi azalaki kotalisa bolamu epai ya Polo, apesaki ye nzela ya kokende kotala baninga na ye mpo ete bakoka kopesa ye lisungi. Tango tolongwaki wana, tozongelaki mobembo na biso mpe tozalaki konana pembeni-pembeni ya esanga ya Shipre, mpo na kokima mipepe oyo ezalaki kobeta biso makasi mpe kopekisa biso kokende liboso. Boye, tokatisaki ebale monene oyo eleka pembeni-pembeni ya Silisi mpe ya Pafili, mpe tosemaki na Mira, na mokili ya Lisi. Kuna, mokonzi ya basoda nkama amonaki masuwa moko ya engumba Alekizandri, oyo ezalaki kokende na Itali, bongo akotisaki biso kati na yango. Tosalaki mikolo mwa mingi na mobembo, mpe tokomaki na Sinide na pasi mingi, pamba te masuwa ezalaki kotambola malembe penza. Mpe lokola mopepe ezalaki kopekisa biso kokende liboso, tolekaki Salimone, mpe tokendaki na ngambo ya sude ya esanga ya Krete. Tozalaki konana pembeni-pembeni ya esanga yango na pasi penza, kino tokomaki na esika moko babengaka: “Mabongo ya kitoko.” Yango ezalaki pene ya engumba ya Laseya. Tango mingi elekaki mpe masuwa ekomaki kotambola na matata, mpo ete eleko ya kokila bilei esilaki koleka. Boye, Polo akebisaki bango: “Baninga na ngai, nazali komona lokola mobembo na biso ekozanga likama te, boye masuwa, biloko mpe bomoi na biso ekoki kobebisama.” Nzoka nde, mokonzi ya basoda nkama na esika ya koyoka maloba ya Polo, alandaki toli ya kapitene ya masuwa mpe ya mokolo masuwa. Mpe lisusu, lokola libongo ezalaki esika malamu te mpo na kolekisa tango ya malili makasi, mingi kati na bato bazwaki mokano ete tolongwa wana mpe toluka kokoma, soki tokolonga, na Fenikisi mpo na kolekisa tango ya malili makasi kuna. Fenikisi ezalaki libongo ya Krete oyo etala na ngambo ya sude-weste mpe ya nori-weste. Wana mwa mopepe ya sude ekomaki kopepa, bakanisaki ete posa na bango ekokokisama; batombolaki longo mpe masuwa ekomaki kotambola pembeni-pembeni ya esanga ya Krete. Kasi na sima ya mwa tango, mopepe moko ya makasi penza oyo babengaka erakiloni ekomaki kopepa wuta na esanga. Boye, ememaki masuwa, mpe masuwa elongaki nguya ya mopepe te, kino tomitikaki bongo, mpe mopepe yango ememaki biso. Ememaki biso mbangu pembeni-pembeni ya esanga moko ya moke, na kombo ya Koda, mpe tomonaki pasi mingi mpo na kokanga bwato oyo ebikisaka bato na tango ya likama. Tango bamatisaki yango na masuwa, bazwaki basinga ya minene mpe bakangisaki yango. Lokola bazalaki kobanga kotutana na zelo ya ngambo ya Silite, babwakaki longo ya libaya likolo ya mayi, mpe mopepe ekobaki komema masuwa. Lokola mopepe ezalaki kaka koningisa masuwa makasi, na mokolo oyo elandaki, babwakaki biloko oyo ezalaki kati na masuwa na ebale. Boye, na mokolo oyo ya misato, na maboko na bango, babwakaki na mayi biloko oyo etambolisaka masuwa. Lokola tosalaki mikolo ebele tozalaki komona lisusu moyi mpe minzoto te, mpe mopepe ezalaki kaka kobeta makasi, tozalaki lisusu na elikya ya kobika te. Esalaki mikolo ebele, bato bazalaki lisusu kolia te, Polo atelemaki liboso na bango mpe alobaki: “Eh baninga ngai, bosengelaki koyoka toli na ngai ete tolongwa na Krete te. Soki boyokelaki ngai, likama oyo elingaki kokomela bino te mpe bolingaki kobungisa biloko na bino te. Kasi sikʼoyo, nasengi ete bozwa makasi, pamba te moto ata moko te kati na bino akokufa; masuwa kaka nde ekobeba. Na butu ya lelo, anjelu ya Nzambe na ngai oyo nasalelaka, ayaki epai na ngai mpe alobaki: ‘Kobanga te Polo! Osengeli kosamba liboso ya Kayisala. Mpo na yo, Nzambe abateli na bomoi bato nyonso oyo bozali kosala na bango mobembo na masuwa.’ Baninga na ngai, bobungisa elikya te! Pamba te, nazali kondima ete Nzambe akosala kaka ndenge ayebisaki ngai. Kasi ata bongo, tokokangama kaka na esanga moko.” Na butu oyo ya zomi na minei, masuwa ezalaki kaka komemama epai na epai kati na ebale monene ya Adriatiki. Na katikati ya butu, basali ya masuwa bakanisaki ete tokomi pene ya mokili; babwakaki singa mpo na komeka mozindo ya mayi, mpe bamonaki ete mozindo ya mayi ezalaki na bametele pene tuku misato na sambo. Wana bapusanaki mwa liboso, bamekaki lisusu mpe bamonaki ete mozindo ya mayi ezalaki na bametele pene tuku mibale na mwambe. Lokola bazalaki kobanga ete masuwa etuta mabanga, babwakaki balongo minei na mayi na sima ya masuwa, na posa makasi ya kozela tongo kotana. Kasi, lokola basali ya masuwa balingaki kokima, babandaki kokitisa kati na ebale monene bwato oyo ebikisaka bato na tango ya likama, mpe basalaki lokola bato balingi kokende kokangisa balongo liboso ya masuwa. Polo alobaki na mokonzi ya basoda nkama mpe na basoda: “Tala, soki bato oyo batikali kati na masuwa te, bino mpe kobika te.” Boye, basoda bakataki basinga oyo esimbaki bwatu yango mpe batikaki yango kokweya na mayi. Wana bazalaki kozela tongo kotana, Polo alendisaki bato nyonso ete balia. Alobaki: “Ekokisi lelo mikolo zomi na minei ya kozela na somo, mpe bolie ata eloko moko te. Nabondeli bino sikʼoyo ete bolia, mpo ete banzoto na bino ekoma makasi. Moko te kati na bino akobungisa ata suki moko ya moto na ye.” Sima ya koloba bongo, akamataki lipa mpe atondaki Nzambe liboso na bango nyonso. Boye, akataki yango mpe akomaki kolia. Bango nyonso balendisamaki mpe bakomaki kolia. Bato nyonso oyo tozalaki kati na masuwa, tozalaki nkama mibale na tuku sambo na motoba. Tango baliaki mpe batondaki, babwakaki ble na ebale mpo na kokitisa kilo ya masuwa. Tango tongo etanaki, bamonaki mokili te, kasi bamonaki kaka libongo moko ya zelo na suka, epai ebale ekota. Boye, bazwaki mokano, soki bakolonga, ya kosemisa masuwa kuna. Babwakaki balongo na ebale, mpe kaka na tango wana bafungolaki basinga ya yenda. Batombolaki bakapo mpo ete mopepe emema masuwa na ngambo ya libongo ya zelo. Kasi masuwa ekendaki kotutana na zelo ya ebale mpe ekangamaki. Wana eteni ya liboso ya masuwa ekangamaki na zelo mpe ezalaki lisusu koningana te, eteni ya sima ya masuwa epanzanaki na nguya ya bambonge. Basoda bazwaki likanisi ya koboma bakangami mpo bazalaki kobanga ete bakatisa mayi mpe bakima. Kasi lokola mokonzi ya basoda nkama azalaki na posa ya kobikisa Polo, apekisaki bango ete bakokisa likanisi na bango. Boye, atindaki bato oyo bayebaki kokata mayi ete bazala bato ya liboso ya kokweya na mayi mpe bakende na mokili. Mpe oyo bakotikala, misusu basalela mabaya to biteni ya masuwa. Na ndenge wana nde bato nyonso bakomaki malamu na mokili. Wana tososolaki ete tosili kobika na likama, toyokaki ete babengaka esanga yango Malite. Boye, bato oyo bavandaka na esanga yango basungaki biso mingi. Lokola mvula ezalaki konoka mpe malili ezalaki makasi, bapelisaki moto mpe babengaki biso nyonso ete tokende koyetola. Polo alokotaki liboke ya bakoni, mpe tango abwakaki yango na moto, molunge ya moto ebimisaki etupa oyo ekangamaki na ye na loboko. Tango bato oyo bavandaka na esanga bamonaki ete nyoka ezali kodiembela na loboko ya Polo, balobanaki bango na bango: “Solo, moto oyo azali mobomi, awuti kobika na likama ya ebale, kasi bosembo ya Nzambe elandi ye kaka mpo na koboma ye.” Kasi tango Polo aningisaki loboko, nyoka yango ekweyaki na moto mpe ayokaki ata pasi te. Bato nyonso bazalaki kozela ete nzoto na ye evimba, to akufa mbala moko, kasi wana bazelaki tango molayi mpe bamonaki te ata likambo moko ya mabe kokomela ye, babongolaki makanisi mpe balobaki: “Moto azali nzambe!” Zinga-zinga ya esika oyo tozalaki, ezalaki na mabele ya Pibiliusi, mokonzi ya esanga. Boye, ayambaki biso malamu epai na ye, mpe tolekisaki mikolo misato kuna. Nzoka nde, tata na ye azalaki ya kolala na mbeto mpo ete azalaki kobela fiefele mpe pulupulu ya makila. Polo akendaki kotala ye, sima ya kobondela, atielaki ye maboko mpe abikisaki ye. Sima na yango, bato mosusu ya maladi oyo bavandaka na esanga bayaki epai na ye, mpe abikisaki bango. Boye, bapesaki biso lokumu ya ndenge na ndenge. Tango tokomaki pene ya kozongela mobemba na biso, bapesaki biso biloko nyonso oyo tozalaki na yango posa mpo na mobembo. Sima na basanza misato, tozwaki masuwa oyo elekisaki tango na yango ya malili makasi na esanga. Ezalaki masuwa moko ya engumba ya Alekizandri, oyo batia bilembo ya Kasitori mpe ya Polikisi. Tosemaki na engumba ya Sirakize, mpe tolekisaki mikolo misato kuna. Kolongwa wana, tonanaki pembeni-pembeni ya mokili mpe tokomaki na engumba ya Regio. Na mokolo oyo elandaki, mopepe ya sude ekomaki kopepa, mpe tokomaki na Puzole sima na mikolo mibale. Kati na engumba wana, tokutaki bandeko oyo basengaki biso ete tovanda na bango elongo poso mobimba. Na ndenge wana nde, tokendaki na Rome. Tango bandeko ya Rome bayokaki ete tokomi, bayaki kino na zando ya Apiusi mpe na esika oyo babengaka “Bandako misato” mpo na kokutana na biso. Tango Polo amonaki bango, atondaki Nzambe mpe azwaki lisusu molende. Tango tokomaki na Rome, bapesaki Polo nzela ya kovanda ye moko na ndako. Batielaki ye soda moko mpo na kokengela ye. Sima na mikolo misato, Polo abengisaki bakambi ya Bayuda mpo ete bakutana na ye. Tango basanganaki, alobaki na bango: —Bandeko na ngai, ata nasalaki bato ya ekolo na biso ata mabe moko te, mpe nabukaki ata mobeko moko te bakoko na biso, bakangaki ngai na Yelusalemi mpe bakabaki ngai na maboko ya bato ya Rome. Tango bayekolaki malamu likambo na ngai, bazwaki mokano ya kotika ngai, pamba te bamonaki likambo moko te ya mabe oyo ekokaki kosala ete nazwa etumbu ya liwa. Kasi lokola Bayuda basepelaki te na mokano wana, nasengaki ete nakende kosamba liboso ya Kayisala. Yango elingi koloba te ete nazalaki na likanisi ya kafunda bato ya ekolo na ngai. Yango wana, nalukaki komona bino mpe kosolola na bino. Pamba te, nakangami na minyololo oyo mpo na elikya ya Isalaele. Bayuda bazongiselaki ye: —Biso awa tozwaki ata mokanda moko te kowuta na Yudea na tina na yo; mpe kati na bandeko oyo bayaki awa, moto ata moko te apesaki biso sango to ayebisaki biso likambo ya mabe na tina na yo. Kasi tozali na posa ete yo moko oyebisa biso makanisi na yo, pamba te toyebi malamu ete lingomba na yo ezali kobundisama bisika nyonso. Boye, bayokanaki ete bakutana na Polo mokolo mosusu. Mpe tango mokolo yango ekokaki, bayaki ebele na esika oyo Polo azalaki kovanda. Wuta tongo kino na pokwa, Polo azalaki kolimbolela bango mpe koteya bango makambo oyo etali Bokonzi ya Nzambe, mpe azalaki kosala nyonso mpo ete bandima makambo oyo azalaki koloba na tina na Yesu, wuta na Mobeko ya Moyize mpe na makomi ya basakoli. Bamoko bandimaki makambo oyo azalaki koloba, kasi misusu baboyaki kondima. Tango bakomaki pene ya kozonga, bango na bango batikalaki kaka koyokana te, bongo Polo abakisaki liloba oyo: — Molimo Mosantu alobaki na bakoko na bino makambo ya solo tango alobaki na nzela ya mosakoli Ezayi: “ ‘Kende koloba na bato oyo: Bokoyoka kasi bokososola te; bokotala kasi bokomona te. Pamba te, mitema ya bato oyo ekomi mabanga, bakomi matoyi mangongi, mpe bamizipi miso, mpo ete miso na bango emona te, matoyi na bango eyoka te, mitema na bango esosala te, noki te babongola mitema mpe babikisa bomoi na bango.’ ” “Yango wana, nalingi boyeba ete Nzambe atindi lobiko na ye sikʼoyo epai ya bato ya bikolo ya bapaya mpe bakoyoka.” [ Tango Polo asilisaki koloba, Bayuda bakendaki mpe bazalaki katiana tembe makasi kati na bango.] Polo awumelaki mibu mibale mobimba na ndako ya kofutela. Azalaki koyamba bato nyonso oyo bazalaki koya kotala ye. Azalaki kosakola sango ya Bokonzi ya Nzambe mpe koteya na tina na Nkolo Yesu Klisto, na molende nyonso mpe na bipekiseli te. Mokanda oyo ewuti epai na Polo, mowumbu na Yesu Klisto, oyo abengama mpo ete azala ntoma, mpe aponama mpo na kosakola sango malamu ya Nzambe. Nzambe alaka sango malamu oyo wuta kala na nzela ya basakoli na ye, kati na Makomi Mosantu. Sango malamu oyo ezali kolobela Mwana na Ye Yesu Klisto, Nkolo na biso, oyo na bomoto, abotamaki na libota ya Davidi, mpe oyo na Molimo Mosantu, amonisamaki na nguya nyonso ete azali Mwana na Nzambe na nzela ya lisekwa na ye kati na bakufi. Ezali na nzela na ye nde nazwaki ngolu ya kozala ntoma mpo na komema, na kombo na ye, bato ya bikolo nyonso ya bapaya ete batosa ye na nzela ya kondima. Boye, bino mpe bozali na molongo ya bato wana, baoyo Yesu Klisto abenga. Epai na bino nyonso oyo bozali na Rome, balingami ya Nzambe, oyo bobengama mpo ete bozala basantu: Tika ete ngolu mpe kimia oyo ewuti na Nzambe Tata na biso mpe na Nkolo Yesu Klisto ezala na bino. Ya liboso, nazali kozongisa matondo epai ya Nzambe na ngai, na nzela ya Yesu Klisto, mpo na bino nyonso, pamba te bazali kolobela kondima na bino na mokili mobimba. Nzambe oyo nasalelaka na motema na ngai mobimba tango nateyaka sango malamu ya Mwana na Ye, akoki solo kotatola mpo na ngai ete natikaka te kotanga kombo na bino na mabondeli na ngai tango nyonso. Mpe nazali kosenga na Ye ete apesa ngai nzela ya koya kotala bino mikolʼoyo to mikolo ekoya, soki yango ezali na mokano na Ye. Pamba te, nazali penza na posa makasi ya koya komona bino mpo na komemela bino bolamu ya Molimo Mosantu mpo ete elendisa kondima na bino. To mpe tolendisana elongo, na kondima moko oyo tozali na yango. Bandeko na ngai, nalingi boyeba ete, mbala mingi nazalaki kosala mabongisi ya koya epai na bino mpo na kobuka mbuma ndenge nazalaki kosala epai ya bato mosusu ya bikolo ya bapaya. Nzoka nde, kino sikʼoyo bipekiseli mingi ezali kokanga ngai nzela. Nazali na niongo ya bagreki to ya bagreki te, ya bato ya bwanya mpe ya bazoba. Yango wana, nazali penza na posa makasi ya koteya sango malamu epai na bino oyo bozali na Rome. Nazali na soni te mpo na sango malamu, pamba te ezali nguya ya Nzambe mpo na lobiko ya bato nyonso oyo bandimaka: liboso mpo na Bayuda, mpe sima, mpo na bato ya bikolo ya bapaya. Pamba te, ezali na nzela ya sango malamu nde bosembo ya Nzambe emonisamaka, bosembo oyo ezwamaka na nzela ya kondima, wuta na ebandeli kino na suka, lokola ekomama: “Moto na sembo akobika na kondima.” Solo, Nzambe amonisaka kanda na ye wuta na lola mpo na kopesa etumbu na lisumu mpe mabe nyonso oyo bato basalaka. Boye, na nzela ya misala na bango ya mabe, bazipaka bosolo. Boye, makambo oyo bakoki koyeba na tina na Nzambe ezali polele epai na bango, pamba te Nzambe ye moko nde alakisa bango yango na polele. Wuta Nzambe ekela mokili, makoki na Ye oyo emonanaka na miso te, elingi koloba, nguya na Ye oyo ewumelaka seko na seko mpe bonzambe na Ye, ezali komonana polele penza na bososoli, na nzela ya misala na Ye. Boye, bato bakoki komilongola na ngambo te. Pamba te, ata bayebaki Nzambe, bapesaki Ye te lokumu oyo ekoki na Nzambe, mpe bazongiselaki Ye matondi te. Kasi makanisi na bango ekomaki ya bozoba, mpe mitema na bango oyo ezangaki mayele etondaki na molili. Bazalaki komimona bato ya bwanya, nzoka nde bakomaki bazoba. Na esika ete bakumisa Nzambe oyo akufaka te mpe atonda na nkembo, bakumisaki banzambe ye bikeko lokola: bilili ya bato oyo bakufaka, ya bandeke, ya banyama oyo etambolaka na makolo minei mpe ya bikelamu oyo etambolaka na libumu. Yango wana, Nzambe asundolaki bango kati na baposa ya mabe ya mitema na bango, mpe kati na misala ya bosoto mpo ete bayokisa banzoto na bango soni bango na bango. Babongolaki bosolo ya Nzambe na makambo ya lokuta, bapesaki lokumu mpe basalelaki bikelamu na esika ya Mokeli, Ye oyo abongi na lokumu seko na seko. Amen. Yango wana, Nzambe asundolaki bango kati na baposa ya soni. Ezala basi na bango, batikaki kosangisa nzoto na mibali, mpe bakomaki kosangisa nzoto basi na basi. Mibali mpe ndenge moko; bango mpe batikaki kosangisa nzoto na basi, kasi batondisamaki na posa bango na bango, bazalaki kosala makambo ya soni mibali na mibali. Boye, bazwaki bango moko lifuti oyo ekokaki na libunga na bango. Lokola bamonaki ete koyeba Nzambe ezalaki na tina te, Nzambe asundolaki bango na makanisi na bango ya mabe, mpo ete basala makambo oyo ekoki te. Bongo, batondaki na misala ya sembo te ya ndenge na ndenge, misala ya mabe, ya lokoso ya mbongo mpe ya mayele mabe. Batondaki na zuwa, koboma, koswana, koteka baninga mpe na makambo ezanga tina. Bakomaki bato ya songi-songi, bato ya kotiola, banguna ya Nzambe, bato ya lolendo, bato ya lofundu, bato ya biloba-loba, bato oyo balukaka kaka kosala mabe, batiolaka baboti na bango; bazangi mayele mpe bosembo, bakomaki mitema mabanga mpe mitema ezanga mawa. Bayebi penza malamu ekateli ya Nzambe ete baoyo basalaka makambo wana basengeli kokufa. Kasi ata bongo, ezali kaka te mpo bazali kosala makambo wana, kasi mpo ete bazali mpe kondima bato oyo basalaka yango. Yango wana, yo moto oyo osambisaka bato mosusu, ata soki ozali nani, yo mpe osalaka lokola bango. Pamba te, tango osambisaka bato mosusu, omisambisaka nde yo moko; mpo ete yo oyo osambisaka, osalaka mpe mabe. Nzoka nde, toyebi malamu ete Nzambe asambisaka na bosolo bato oyo basalaka misala ya ndenge wana. Boni, okanisi ete okokima kosambisama ya Nzambe, yo oyo osambisaka bato oyo basalaka mabe tango yo moko mpe ozali kosala mabe lokola bango? To, ozali kotiola bolamu na Nzambe oyo eleka ndelo, motema monene na Ye mpe boboto na Ye? Oyebi te ete bolamu ya Nzambe ememaka yo na nzela ya kobongola motema? Kasi ozali moto makasi mpe motema libanga. Ozali nde komibendela etumbu yo moko, mpo na mokolo ya kanda ya Nzambe, tango akomonisa bosembo ya kosambisa na ye. Nzambe akopesa na moto na moto kolanda misala na ye: bomoi ya seko epai ya baoyo, na nzela ya molende na bango mpo na kosala malamu, balukaka nkembo, lokumu mpe makambo oyo ebebaka te. Kasi kanda mpe somo mpo na bato oyo batelemelaka Ye, baboyaka bosolo mpe balandaka nzela ya mabe. Solo, minyoko mpe mitungisi ezali kozela moto nyonso oyo asalaka mabe: liboso Bayuda, mpe na sima, bato ya bikolo ya bapaya; kasi nkembo, lokumu mpe kimia ezali kozela moto nyonso oyo asalaka malamu: liboso Bayuda, mpe na sima, bato ya bikolo ya bapaya. Pamba te, Nzambe atalaka bilongi ya bato te. Bato nyonso oyo basalaki masumu na kozanga koyeba Mobeko ya Moyize, bakokufa, kasi bakosambisama kolanda Mobeko te. Nzoka nde, baoyo basalaki masumu na koyeba Mobeko yango, bakosambisama kolanda Mobeko. Pamba te, bato na sembo na miso na Nzambe ezali te baoyo basukaka kaka nakoyoka, kasi ezali baoyo batosaka Mobeko nde bakotangama bato na sembo. Soki bato ya bikolo ya bapaya oyo bayebi Mobeko te, kasi bazali kosala na ndenge na bango moko, makambo oyo Mobeko esengaka, boyeba ete bamikomisaka Mobeko mpo na bango moko, ata soki bayebi yango te. Na bongo, balakisaka na nzela ya bizaleli na bango ete misala oyo Mobeko esengaka ezali ya kokomama kati na mitema na bango. Mitema na bango mpe etatolaka yango, ndenge moko mpe makanisi na bango efundaka bango to mpe elongisaka bango. Nyonso wana ekomonana polele mokolo oyo Nzambe akosambisa basekele ya bato, na nzela ya Yesu Klisto. Ndenge elobama kati na Sango Malamu oyo nateyaka. Bongo soki yo moto oyo omibengaka moyuda, otiaka elikya na Mobeko, omikumisaka mpo na Nzambe; oyebi mokano ya Nzambe, oyebi kopona makambo ya malamu koleka, pamba te mibeko eteya yo; omimonaka ete ozali motambwisi ya bakufi miso, mwinda ya baoyo bazali kati na molili; molakisi ya bazoba, moteyi ya bana mike, mpo ozwaka boyebi nyonso mpe bosolo kati na Mobeko. Yo moto oyo oteyaka bato mosusu, mpo na nini omiteyaka yo moko te? Oteyaka bato mosusu ete bayiba te, kasi mpo na nini yo moko oyibaka? Yo moto olobaka ete basala ekobo te, kasi mpo na nini yo moko osalaka ekobo? Yo moto oyo oboyaka banzambe ya bikeko, kasi mpo na nini owzaka biloko na makasi na batempelo na bango? Yo moto oyo omikumisaka mpo na Mobeko, oyebi te ete tango obukaka yango, opesaka Nzambe lokumu te? Lokola ekomama: “likolo na bino, kombo ya Nzambe ezali kotiolama epai ya bato ya bikolo ya bapaya.” Kokata nzoto ya mibali ezali na tina soki ozali kotosa Mobeko. Kasi soki obuki Mobeko, ata soki okatisa nzoto ya mibali, okozala lokola moto oyo akatisa nzoto ya mibali te. Kasi soki moto oyo bakata nzoto ya mibali te azali kokokisa Mobeko, ata moto yango akatama nzoto ya mibali te; boni, bakotanga ye te lokola moto oyo bakata nzoto ya mibali? Bongo moto oyo bakata nzoto ya mibali te, kasi atosaka Mobeko, akosambisa yo oyo obukaka Mobeko ata ozali na Makomi ya Mobeko mpe bakata yo nzoto ya mibali. Pamba te, ezali te makambo oyo emonanaka na miso nde ekomisaka moto moyuda, ezali mpe te elembo oyo emonanaka na nzoto nde ekomisaka moto akatisama nzoto ya mibali. Kasi eloko ekomisaka moto moyuda ezali makambo ya kati, mpe kokatisama nzoto ya solo ezali oyo Molimo azali kosala na motema, kasi ezali te ya mokanda ya mobeko. Moyuda ya ndenge oyo azwaka lokumu na ye na bato te, kasi na Nzambe. Boye, kozala Moyuda ezali na litomba nini? To mpe, kokatisama nzoto ya mibali ezali na tina nini? Solo, ezali penza na litomba monene na makambo nyonso. Pamba te, Maloba ya Nzambe epesamaki liboso epai na bango. Soki Bayuda misusu bazangi boyengebene na miso ya Nzambe, boni, Kozanga boyengebene na bango ekobongola solo boyengebene ya Nzambe? Soki moke te! Nzambe azali solo, mpe bato nyonso bazali bato ya lokuta, ndenge ekomama: “Esengeli ete bamona yo sembo na maloba na yo; mpe olonga tango bazali kosambisa yo.” Kasi soki mabe na biso ezali kotalisa polele bosembo ya Nzambe, toloba nini? Nzambe azali mabe tango akitiselaka biso kanda na ye? Nazali kaka kokanisa lokola moto. Te, ezali bongo te! Soki ezalaki bongo, ndenge nini Nzambe akokaki kosambisa mokili? To, soki lokuta na ngai etalisi polele penza bosolo ya Nzambe mpe etomboli nkembo na Ye, mpo na nini nazwa lisusu etumbu lokola moto ya masumu? Boye, mpo na nini toloba te: “Tika ete tosala mabe mpo ete malamu ebima kati na mabe” ndenge bato oyo batongaka biso bakosaka ete toteyaka bongo. Bato wana basengeli kozwa etumbu oyo ekoki na mabe na bango. Boye, toloba nini? Biso Bayuda toleki bato ya bikolo ya bapaya? Te, soki moke te! Pamba te, tosilaki kotalisa ete bato nyonso, ezala Bayuda to bato ya bikolo ya bapaya: bango nyonso bazali na se ya bokonzi ya lisumu. Ndenge ekomama: “Moto ya sembo azali te, ata moto moko te azali sembo; moto ya mayele azali te, ata moto moko te alukaka Nzambe. Bato nyonso babunga nzela, bango nyonso bamibebisa elongo, moto moko te asalaka malamu, ata moto moko te. Minoko na bango ezali lokola lilita ya kofongwama; lolemo na bango mosala na yango kokosa. Bibebu na bango ezali na ngenge ya nyoka. Minoko na bango etonda na makambo ya bololo mpe na bilakeli mabe. Makolo na bango epotaka mbangu mpo na kosopa makila. Na bisika nyonso oyo balekelaka, batikaka kaka libebi mpe bapasi. Bayebi nzela ya kimia te. Kotosa Nzambe ezalaka te epai na bango.” Nzoka nde, toyebi malamu ete makambo nyonso oyo Mobeko elobaka, elobaka yango mpo na bato oyo bazali na se ya bokonzi ya Mobeko, mpo ete moto moko te amilongisa; mpe moto nyonso asosola ete azali moto ya masumu liboso ya Nzambe. Yango wana, moto moko te akoki koloba ete azali sembo liboso ya Nzambe mpo na kokokisa misala ya Mobeko. Pamba te, Mobeko elakisaka moto ete asali masumu. Kasi sikʼoyo Nzambe atalisi polele ndenge nini akomisaka bato sembo liboso na Ye na nzela ya Mobeko te, ndenge Mobeko mpe Basakoli batatola yango. Bato nyonso oyo bandimaka bazwaka bosembo yango na nzela ya kondima Yesu Klisto, pamba te bokeseni ezali te kati na bato: bato nyonso basali masumu mpe bazangi nkembo ya Nzambe, kasi bakomi bato ya sembo na ofele, na ngolu na Ye, na nzela ya lisiko kati na Klisto Yesu. Ezali Ye nde Nzambe akabaki lokola mbeka ya masumu, na makila na Ye, na nzela ya kondima. Asalaki bongo mpo na kotalisa bosembo na ye, pamba te na tango ya kala, tango oyo akangaki motema, apesaki bato etumbu te mpo na masumu na bango. Asalaki bongo mpo na kotalisa bosembo na Ye na tango oyo, mpo ete azala Sembo mpe akomisa sembo moto oyo andimeli Yesu. Boye, tina nini ya komikumisa? Tina ezali te! Na nini? Na misala? Te, kasi na nzela ya kondima. Pamba te, tososoli ete moto akomaka sembo kaka na nzela ya kondima, kasi na nzela kotosa Mobeko te. Boni, Nzambe azali kaka Nzambe ya Bayuda? Azali mpe Nzambe ya bato ya bikolo ya bapaya te? Solo, azali mpe Nzambe ya bato ya bikolo ya bapaya. Pamba te, Nzambe azali kaka moko, Ye oyo akomisaka sembo na nzela ya kondima bato oyo bakatama nzoto ya mibali; mpe kaka na nzela ya kondima wana, akomisaka sembo, bato oyo bakatama nzoto ya mibali te. Boni, tobomi Mobeko likolo ya kondima? Soki moke te! Tozali kutu kolendisa yango. Boye, toloba nini mpo na koko na biso Abrayami? Azwaki nini na bomoto? Soki Abrayami akomaki sembo na nzela ya misala, akokaki solo komikumisa, kasi liboso ya Nzambe te. Bongo, Makomi elobi nini? “Abrayami andimelaki Nzambe, mpe kondima yango ekomisaki ye moto ya sembo.” Soki moto asali mosala, batangaka lifuti na ye lokola likabo te, kasi, lokola mbuma ya motoki na ye. Nzoka nde, soki moto asali mosala te, kasi andimeli Nzambe oyo akomisaka bato ya masumu sembo, kondima na ye ekokomisa ye moto ya sembo. Davidi mpe alobaki kaka bongo tango atatolaki esengo ya moto oyo Nzambe akomisi sembo, na nzela ya misala te: “Esengo na bato oyo mabe na bango esili kolimbisama, mpe masumu esili kolongwa. Esengo na moto oyo Nkolo atangeli ye masumu na ye te.” Boni, esengo yango ezali kaka mpo na bato oyo bakatama nzoto ya mibali, to mpe mpo na bato oyo bakatama nzoto ya mibali te? Tolobaki ete kondima ya Abrayami akomisaki ye moto ya sembo na miso ya Nzambe. Esalamaki tango nini? Esalamaki liboso to sima ya kokatisama nzoto ya mibali? Te, esalamaki sima te, kasi, liboso ya kokatisama nzoto ya mibali! Boye, elembo ya kokatisama nzoto ya mibali ezalaki lokola kashe ya bosembo oyo azwaki na nzela ya kondima liboso ete akatisama nzoto ya mibali. Yango wana, azali tata ya bato nyonso oyo bandimelaka Nzambe: bato oyo bakatama nzoto ya mibali te, mpo ete bango mpe bakoma bato ya sembo, mpe bato oyo bakatama nzoto ya mibali, ezali te mpo ete bakatama nzoto ya mibali, kasi mpo ete balandaka ndakisa ya kondima ya tata na biso Abrayami liboso ete akatisama nzoto ya mibali. Ezali na nzela ya Mobeko te nde Abrayami mpe bakitani na ye bazwaki elaka ete mokili ekopesamela bango lokola libula, kasi ezali nde na nzela ya bosembo oyo ewutaka na kondima. Pamba te, soki bato oyo batosaka mibeko nde bakozwa bomengo wana, kondima etikali lisusu na tina te mpe elaka ezali te, mpo ete Mobeko ebendaka kanda ya Nzambe. Nzoka nde, esika Mobeko ezali te, kobuka Mobeko mpe ezalaka te. Yango wana, elaka eyaka na nzela ya kondima, mpo ete ezala na nzela ya ngolu mpe ete elaka yango ezala mpo na bakitani nyonso ya Abrayami, kaka te mpo na baoyo babengami bakitani na nzela ya Mobeko, kasi mpe mpo na baoyo bazali na kondima moko elongo na Abrayami, oyo azali tata na biso nyonso, ndenge ekomama: “Nakomisaki yo tata ya mabota ebele.” Azali tata na biso na miso ya Nzambe oyo ye andimelaki, Nzambe oyo apesaka bomoi na bakufi mpe oyo azalisaka biloko oyo etikala kozala te. Abrayami atiaki elikya ata soki akokaki lisusu te kotia elikya, andimaki mpe akomaki tata ya mabota ebele, ndenge Nzambe aloba mpo na ye: “Bakitani na yo bakozala ebele.” Abrayami akomaki na mibu pene nkama moko, kasi kondima na ye elembaki te tango azalaki kotala nzoto na ye oyo ezalaki lisusu na makasi te, to mpe mpo na Sara oyo akokaki lisusu kobota te. Nzoka nde, na esika ya kotia tembe na elaka ya Nzambe mpe koboya kondima, kondima na ye ekomisaki ye lisusu makasi koleka mpe azalaki kopesa Nzambe lukumu, mpe atondisamaki na elikya ete Nzambe azali na makoki ya kokokisa elaka oyo apesaki. Yango wana, mpo na kondima na ye, Nzambe abengaki ye moto ya sembo. Nzoka nde, maloba: “Nzambe abengaki ye moto ya sembo” ekomamaki kaka mpo na ye moko te, ekomamaki mpe mpo na biso bato oyo Nzambe abengaka bato ya sembo, biso baoyo tondimelaka Nzambe oyo asekwisaki Yesu, Nkolo na biso kati na bakufi. Nzambe akabaki ye ete akufa mpo na masumu na biso, mpe asekwisaki ye mpo ete tokoma bato ya sembo. Yango wana, lokola tokomi bato ya sembo na nzela ya kondima, tozali na kimia elongo na Nzambe, na nzela ya Nkolo na biso Yesu Klisto. Na nzela na Ye, tozwi ndingisa, na nzela ya kondima, ya kozwa ngolu oyo tozali kowumela kati na yango. Esengo na biso ewuti na elikya oyo tozali na yango ete tokobika nkembo na Nzambe. Tozali na esengo kaka mpo na elikya wana te, kasi mpe, mpo na bapasi, pamba te toyebi ete bapasi ebotaka koyika mpiko, koyika mpiko ememaka elonga kati na komekama, mpe elonga kati na komekama ebotaka elikya. Nzoka nde, elikya ekosaka te, pamba te Nzambe asopaki bolingo na ye na mitema na biso, na nzela ya Molimo Mosantu oyo apesaki biso. Solo, wana tozalaki nanu bato na bolembu, Klisto akufaki mpo na bato ya masumu na tango oyo Nzambe abongisaki. Ezali pasi komona moto kondima kokufa mpo na moto ya sembo; tango mosusu moto akoki kondima kokufa mpo na moto ya malamu. Kasi tala ndenge nini Nzambe alakisi biso bolingo na ye: wana tozalaki nanu bato ya masumu, Klisto akufaki mpo na biso. Lokola tokomi bato ya sembo na nzela ya makila na Ye, akoki solo kozanga kobikisa biso na kanda ya Nzambe? Wana tozalaki nanu banguna ya Nzambe, boyokani na biso na Ye ezongaki na nzela ya kufa ya Mwama na Ye; akoki solo kozanga kobikisa biso na nzela ya bomoi na ye, wana boyokani na biso ezongi? Tozali na esengo kaka mpo na bapasi wana te, kasi tozali mpe na esengo kati na Nzambe na nzela ya Nkolo na biso Yesu Klisto, oyo na nzela na Ye azongisi boyokani na biso na Nzambe. Yango wana, lokola lisumu ekotaki na mokili na nzela ya moto moko, mpe na nzela ya lisumu kufa, boye na nzela ya lisumu kufa ekangaki bato nyonso: mpo ete bato nyonso basalaki masumu… Pamba te, liboso ete Nzambe apesa Mobeko, lisumu ezalaki kati na mokili; mpe etumbu mpo na lisumu ezali te soki Mobeko ezali te. Nzoka nde, wuta na tango ya Adami kino na tango ya Moyize, kufa ezalaki mpe na bokonzi epai ya bato oyo babukaki Mobeko te ndenge Adami abukaki. Adami azalaki elilingi ya moto oyo asengelaki koya. Kasi, likabo ya ofele oyo Nzambe apesaki ezali na motuya mingi koleka lisumu ya Adami. Pamba te, soki mabe ya moto moko ememelaki bato ebele kufa, boye ngolu na Nzambe mpe likabo oyo eyei na nzela ya ngolu ya moto moko, Yesu Klisto, etondisami mingi penza epai ya bato ebele. Mpe lisusu, likabo ya Nzambe ezali na motuya mingi koleka lisumu ya moto moko: boye, na nzela ya lisumu ya moto moko, kosambisama ememi etumbu, nzoka nde, epai masumu ezali ebele, likabo ya ngolu elongoli etumbu. Pamba te, soki na nzela ya lisumu ya moto moko, kufa ezwaki bokonzi, boye bomoi mpe ezali na bokonzi na nzela ya moto moko: Yesu Klisto, epai ya bato oyo bazwi bomengo ya ngolu na Nzambe mpe likabo ya bosembo. Na mokuse, ndenge lisumu ya moto moko ememelaki bato nyonso etumbu, ndenge wana mpe mosala ya moto moko mpo na kokomisa bato sembo ememeli bato nyonso bonsomi oyo epesaka bomoi. Pamba te, ndenge kozanga botosi ya moto moko ekomisaki bato ebele bato ya masumu, ndenge wana mpe botosi ya moto moko ekomisi bato ebele bato ya sembo. Nzoka nde, Mobeko eyaki mpo na kotalisa polele ete bato bazali kosala mabe mingi. Epai masumu ezali ebele, ngolu mpe ezali ya kofuluka koleka, mpo ete ndenge lisumu elakisaki bokonzi na yango na nzela ya kufa, ndenge wana mpe ngolu elakisi bokonzi na yango na nzela ya bosembo, mpo ete emema bomoi ya seko na nzela ya Yesu Klisto, Nkolo na biso. Boye, toloba nini? Tosalaka na biso masumu mpo ete ngolu efuluka koleka? Soki moke te! Pamba te, tosila kokufa mpo na masumu. Boye, ndenge nini tokoki lisusu kokoba kosala masumu? Boni, boyebi te ete biso nyonso oyo tosila kobatisama kati na Yesu Klisto, tozwaki nde libatisi kati na kufa na ye? Bakundaki biso elongo na ye na nzela ya libatisi kati na kufa na ye, mpo ete lokola Klisto asekwaki kati na bakufi na nzela ya nkembo ya Tata, biso mpe totambola na bomoi ya sika. Pamba te, soki tosanganaki na ye elongo kati na kufa na ye, solo, tokosangana mpe na ye elongo kati na lisekwa na ye. Pamba te, toyebi malamu ete bomoto ya kala ebakamaki na ekulusu elongo na Klisto mpo ete nzoto na biso ya masumu ekufa, mpe tozala lisusu bawumbu ya masumu te. Pamba te, moto oyo asili kokufa, alongwe na se ya bowumbu ya masumu. Nzoka nde, lokola tosila kokufa elongo na Klisto, tozali kondima ete tokozala mpe na bomoi elongo na Ye. Pamba te, toyebi malamu ete Klisto oyo asekwaki kati na bakufi, akokufa lisusu te: kufa ezali lisusu na bokonzi likolo na Ye te. Akufaki mpo na masumu, mbala moko mpo na libela; soki azali na bomoi, azali na bomoi mpo na Nzambe. Boye, bino mpe bomimona lokola bato bakufa mpo na masumu, kasi lokola bato ya bomoi mpo na Nzambe kati na Klisto Yesu. Yango wana, botika te ete masumu ezala na bokonzi likolo ya banzoto na bino oyo esila kokufa mpo ete botosa lisusu baposa mabe na yango. Bokaba biteni ya banzoto na bino te na masumu lokola bisaleli ya makambo ya mabe. Kasi bomikaba bino moko epai ya Nzambe lokola bato oyo basekwa kati na bakufi mpe bazali na bomoi; mpe bokabela Ye biteni ya banzoto na bino lokola bisaleli ya makambo ya malamu. Pamba te, masumu ekozala lisusu na bokonzi likolo na bino te mpo ete bozali lisusu na se ya bokonzi ya Mobeko te, kasi, na se ya ngolu. Boye toloba nini? Tokoba kosala masumu mpo ete tozali na se ya bokonzi ya Mobeko te kasi na se ya ngolu? Soki moke te! Boni, boyebi te ete soki bomikabi epai ya moto lokola bawumbu mpo na kotosa ye, bokomi nde bawumbu ya moto oyo bozali kotosa? To, bozali bawumbu ya masumu oyo ememaka na kufa, to, bawumbu ya botosi oyo ememaka na bosembo. Tika ete topesa Nzambe matondo: bozalaki liboso bawumbu ya masumu, kasi sikʼoyo, bokomi kotosa na motema mobimba, mateya oyo bateyaki bino. Bosila kokangolama na bowumbu ya masumu mpe bokoma bawumbu ya bosembo. Nazali koloba lokola moto mpo na botawu na bino. Pamba te, ndenge bokabaki biteni ya banzoto na bino na se ya bowumbu ya misala ya mbindo mpe ya mabe mpo na kosala mabe, ndenge wana mpe bokaba yango sikʼoyo mpo ete ekoma na se ya bowumbu ya bosembo, mpo na kosala misala ya bosantu. Tango bozalaki nanu bawumbu ya masumu, bozalaki na bonsomi liboso ya bosembo. Bongo, litomba nini bozwaki tango bozalaki kosala makambo oyo ezali koyokisa bino soni lelo? Makambo yango ememaka na kufa! Kasi awa bolongwe na se ya bowumbu ya masumu mpe bokomi na se ya bawumbu ya Nzambe, litomba oyo bozwi ememaka na bomoi ya bosantu, mpe suka na yango ezali bomoi ya seko. Pamba te, lifuti ya lisumu ezali kufa, kasi likabo ya ofele ya Nzambe ezali bomoi ya seko kati na Klisto Yesu, Nkolo na biso. Bandeko, (nazali koloba na bato oyo bayebi Mobeko) boyebi te ete Mobeko ezalaka na nguya likolo ya moto kaka soki azali na bomoi? Ndakisa: Mobeko esengaka ete mwasi ya libala akangama na mobali na ye, kaka soki mobali yango azali na bomoi. Kasi soki mobali akufi, akozala na bonsomi liboso ya mobeko ya libala. Boye, soki abali mobali mosusu wana mobali na ye azali nanu na bomoi, bakoloba ete asali ekobo. Kasi soki mobali na ye akufi, akozala na bonsomi liboso ya mobeko wana. Boye, bakoloba te ete asali ekobo ata soki abali mobali mosusu. Ndenge wana mpe bandeko na ngai, bino mpe bosila kokufa na Mobeko na nzela ya nzoto ya Klisto, mpo ete bokoma bato ya moto mosusu, Ye oyo asekwaki kati na bakufi mpo ete tobota mbuma mpo na Nzambe. Pamba te, wana tozalaki nanu kotambola kolanda baposa ya nzoto, Mobeko ezalaki kotindika biso na baposa ya mabe, oyo ezalaki kosala mosala na yango kati na biteni ya nzoto na biso mpo ete tobota mbuma oyo ememaka na kufa. Kasi sikʼoyo, lokola tokufa na nguya oyo ekangaki biso na bowumbu, tokangolamaki na nguya ya Mobeko mpo ete tosalela Nzambe na lolenge ya sika, na lisungi ya Molimo, kasi na nzela ya kala te ndenge ekomama na Mobeko. Boye, toloba nini? Mobeko ekomi nde lisumu? Soki moke te! Soki Mobeko ezalaki te, nalingaki mpe koyeba lisumu te. Pamba te, soki Mobeko elobaki te: “Kolula te”, nalingaki mpe koyeba te soki kolula ezali nini. Nzoka nde, lokola lisumu ezwaka nguya esika mitindo ezali, lisumu ebotaka kati na ngai lolenge nyonso ya baposa mabe. Pamba te, soki Mobeko ezali te, lisumu mpe ezali na nguya te. Kala tango Mobeko ezalaki te, nazalaki na bomoi, kasi tango mitindo eyei, lisumu mpe ezwi nguya, boye ngai nakufi. Bongo, mitindo oyo ekokaki komema na bomoi, ememaki ngai na kufa. Pamba te, lokola lisumu ezwaka nguya esika mitindo ezali, lisumu ekosaki ngai mpe ememaki ngai na kufa na nzela ya mitindo. Boye, Mobeko ezali bule mpe mitindo ezali bule, sembo mpe malamu. Boni, eloko ya malamu ekoki solo komemela ngai kufa? Soki moke te! Nzoka nde, lisumu mpo eyebana ete ezali lisumu mpe mpo elakisa mabe na yango penza na nzela ya mitindo, esalelaki eloko ya malamu mpo ete lisumu yango epesa ngai kufa. Toyebi ete Mobeko epesamaki na nzela ya Molimo na Nzambe. Kasi ngai, nazali kaka moto, natekama mpo na kozala mowumbu ya masumu. Pamba te, makambo oyo nasalaka, nasosolaka yango te: oyo nalingaka, nasalaka yango te; oyo nayinaka, yango nde nasalaka. Mpe soki nasali makambo oyo na nayinaka, wana nandimi ete Mobeko ezali malamu. Yango wana, emonani ete ezali ngai te moto nasalaka bongo, kasi ezali nde lisumu oyo ezali kati na ngai. Pamba te, nayebi ete makambo ya malamu ezali kati na ngai te, na nzoto na ngai. Nazali na posa ya kosala makambo ya malamu, kasi nazangi nguya ya kokokisa yango. Pamba te, malamu oyo nalingaka kosala, nasalaka yango te, kasi mabe oyo nayinaka, yango nde nasalaka. Bongo, soki nasali makambo oyo nalingaka kosala te, ezali ngai te moto nasalaka yango, kasi lisumu oyo ezali kati na ngai. Soki nalingi kosala malamu, nakutanaka na mobeko oyo: nasalaka kaka mabe. Na motema na ngai, nasepelaka na Mobeko ya Nzambe. Kasi nakutanaka na mobeko mosusu kati na biteni ya nzoto na ngai, oyo ebundisaka mobeko ya makanisi ya motema na ngai. Boye, ekomisaka ngai mowumbu ya mobeko ya lisumu oyo ezali kati na biteni ya nzoto na ngai. Ah ngai moto na mawa! Nani akokangola ngai na nzoto oyo ya kufa? Matondo na Nzambe: ezali na nzela na Yesu Klisto, Nkolo na biso. Na mokuse, nakoki koloba ete ngai moko na motema na ngai, nasalelaka Mobeko ya Nzambe, kasi na nzoto, nazali mowombu ya mobeko ya masumu. Yango wana, sikʼoyo, etumbu ezali lisusu te mpo na baoyo bazali kati na Klisto Yesu. Pamba te, kati na Klisto Yesu, mobeko ya Molimo oyo apesaka bomoi, ekangoli ngai na se ya bowumbu ya mobeko ya masumu mpe ya kufa. Pamba te, likambo oyo Mobeko ekokaki kosala te mpo bomoto ezangisaki yango nguya, Nzambe asalaki yango na kotinda Mwana na ye, na nzoto oyo ekokani na nzoto ya bato ya masumu mpo ete akoma likabo mpo na masumu. Boye, apesaki etumbu na masumu oyo ezali na nzoto ya bato. Asalaki bongo mpo ete bosembo oyo Mobeko esengaka, ekokisama kati na biso oyo totambolaka kolanda baposa ya nzoto te, kasi kolanda Molimo. Pamba te, baoyo bomoi na bango elandaka baposa ya nzoto, batiaka makanisi na bango na makambo ya nzoto. Kasi baoyo bomoi na bango elandaka makambo ya Molimo, batiaka makanisi na bango na makambo ya Molimo. Pamba te, baposa ya nzoto ememaka na kufa; kasi baposa ya Molimo ememaka na bomoi mpe na kimia. Baposa ya nzoto etombokelaka Nzambe, etosaka Mobeko na Ye te mpe ekotikala kotosa yango ata moke te. Bato oyo batamolaka kolanda baposa ya nzoto bakoki kosepelisa Nzambe te. Nzoka nde, bino, botambolaka te kolanda baposa ya nzoto, kasi kolanda baposa ya Molimo, mpo ete Molimo ya Nzambe azali kati na bino. Soki moto azali na Molimo ya Klisto te, azali mpe moto na Ye te. Boye, soki Klisto azali kati na bino, solo, nzoto na bino ekokufa mpo na masumu; kasi Molimo azali bomoi kati na bino, pamba te bokoma bato ya sembo. Boye, soki Molimo na Ye oyo asekwisaki Yesu kati na bakufi azali kati na bino, Ye oyo asekwisaki Klisto kati na bakufi akopesa mpe bomoi na banzoto na bino oyo ebengami na kokufaka, na nzela ya Molimo na Ye oyo azali kati na bino. Yango wana, bandeko na ngai, tozali na niongo, kasi niongo ya nzoto te, mpo ete totambola kolanda baposa ya nzoto. Pamba te, soki bozali kotambola kolanda baposa ya nzoto, bokokufa; kasi soki bobomi, na nzela ya Molimo, misala ya mabe oyo bosalaka na banzoto na bino, bokozala na bomoi. Pamba te, baoyo batambolisamaka na Molimo ya Nzambe, bazali bana ya Nzambe. Pamba te, bozwaki te molimo oyo ekomisaka bino bawumbu mpo ete bozala na kobanga, kasi bozwaki Molimo oyo akomisaka bino bana ya Nzambe. Mpe ezali na nzela ya Molimo wana nde togangaka: “Tata!” Molimo Ye moko atatolaka na molimo na biso ete tozali bana ya Nzambe. Mpe lokola tozali bana, tozali mpe bakitani ya bomengo: bakitani ya bomengo ya Nzambe, mpe bakitani ya bomengo elongo na Klisto, pamba te soki tozali komona pasi elongo na Ye, tokozwa mpe nkembo elongo na Ye. Nakanisi ete bapasi ya tango oyo ekokani te na motuya ya nkembo oyo ekomonana kati na biso. Pamba te, bikelamu nyonso ya Nzambe ezali kozela na posa makasi penza mokolo oyo Nzambe akolakisa nkembo ya bana na Ye. Pamba te, bikelamu nyonso ya Nzambe ezali na se ya bokonzi ya nguya oyo esukisaka na pamba, ekomaki na se ya bokonzi ya nguya yango na mokano na yango moko te, kasi na mokano ya Ye oyo atiaki yango na se ya bokonzi wana, na elikya ete bikelamu nyonso ya Nzambe mpe ekokangolama na bokonzi ya libebi mpo na kozwa bonsomi ya nkembo oyo bana na Nzambe bakozwa. Toyebi malamu ete kino sikʼoyo, bikelamu nyonso ya Nzambe ezali kolela pasi, lokola mwasi oyo azali na pasi ya kobota. Ezali kaka yango moko te nde ezali kolela, kasi biso mpe tozali kolela, biso baoyo tozwaki Molimo lokola mbuma ya liboso, tozali mpe komona pasi na mitema wana tozali kozela ete Nzambe akomisa biso penza bana na Ye mpe asikola banzoto na biso. Pamba te, tosila tobika, kasi kobika yango ezali nanu elikya. Nzoka nde, soki tozali komona eloko oyo tozali kotiela elikya, wana ezali lisusu elikya te, pamba te, nani akoki kotia elikya na eloko oyo azali komona? Kasi, soki tozali kotia elikya na eloko oyo tozali komona te, solo, tokozela yango na kokanga motema. Ndenge moko mpe, Molimo asungaka biso kati na bolembu na biso. Pamba te, toyebi te nini tokoki kosenga na ndenge esengeli, kasi Molimo Ye moko abondelaka mpo na biso na maloba oyo moto akoki koloba te. Bongo, Nzambe oyo atalaka mitema, ayebi makanisi ya Molimo, pamba te Molimo abondelaka mpo na basantu kolanda mokano ya Nzambe. Toyebi lisusu malamu ete, makambo nyonso esalamaka mpo na bolamu ya bato oyo balingaka Nzambe, baoyo abenga kolanda mokano na Ye. Pamba te, baoyo Nzambe ayeba wuta kala, abongisa bango mpe wuta kala mpo ete bakokana na Mwana na Ye, mpo ete azala Mwana ya liboso kati na bandeko ebele. Ba-oyo abongisa wuta kala, abenga mpe bango, baoyo ye abenga, akomisa bango mpe bato ya sembo, mpe baoyo akomisa bato ya sembo, apesa bango mpe nkembo na Ye. Boye, toloba lisusu nini? Soki Nzambe azali mpo na biso, nani akotelemela biso? Ye oyo aboyaki te kopesa Mwana na Ye se moko, kasi akabaki Ye mpo na biso nyonso, boye ndenge nini akozanga kopesa biso biloko nyonso elongo na Ye? Nani akofunda bato oyo Nzambe apona? Pamba te, Nzambe Ye moko nde akomisi bango bato ya sembo. Nani akokatela bango etumbu? Pamba te, Klisto Yesu akufaki mpe asekwaki! Avandi na loboko ya mobali ya Nzambe mpe azali kobondela mpo na biso. Nani akokabola biso na bolingo ya Klisto? Pasi, somo, minyoko, nzala, kozanga bilamba, likama to mopanga? Ndenge ekomama: “Ezali mpo na Yo nde balukaka koboma biso mikolo nyonso, bamonaka biso lokola meme oyo babongisi mpo na koboma.” Kasi kati na makambo oyo nyonso, tozali solo balongi na nzela na Ye oyo alinga biso. Pamba te, nazali kondima ete ezala kufa to bomoi, ba-anjelu to milimo mabe, makambo ya mikolo oyo to makambo oyo ekoya, banguya ya ndenge na ndenge, banguya ya likolo to ya se ya mabele, to eloko mosusu oyo Nzambe akela: eloko moko te ekoki kokabola biso na bolingo ya Nzambe, kati na Klisto Yesu, Nkolo na biso. Nazali koloba solo kati na Klisto, nazali kokosa te, mpe motema na ngai ezali koyebisa ngai solo na nzela ya Molimo Mosantu: motema na ngai etondi na mawa mpe na pasi oyo ezali kosila te. Mpo na yango, eleki kutu malamu ete nalakelama na ngai mabe mpe nakabwana na Klisto mpo na bandeko na ngai, bato ya ekolo na ngai. Bandeko yango ezali bato ya Isalaele. Nzambe akomisa bango bana na Ye, apesa bango nkembo, asala boyokani elongo na bango, apesa bango Mobeko, alakisa bango ndenge ya kosambela na solo, apesa bango bilaka, mpe bakoko. Ezali na nzela ya bakoko wana nde, Klisto lokola moto, Ye oyo azali likolo na nyonso ayaki na mokili. Tika ete Nzambe akumisama libela na libela! Amen. Yango elingi koloba te ete Liloba ya Nzambe ebimaki na pamba. Pamba te, ezali bakitani nyonso te ya Isalaele nde bazali bato ya Isalaele, mpe bakitani nyonso te ya Abrayami nde bazali bana na ye. Nzambe alobaki na Abrayami: “Ezali na nzela ya Izaki nde okozwa bakitani.” Yango elingi koloba ete bana nyonso te oyo Abrayami abotaki nde bazali bakitani na ye, kasi kaka bana oyo abota na elaka ya Nzambe nde batangamaka lokola bakitani na ye. Pamba te, tala ndenge Nzambe alakaki Abrayami: “Na eleko lokola oyo, nakoya lisusu mpe Sara akobota mwana mobali.” Esukaki kaka wana te, Rebeka mpe abotaki bana mibali mibale na tata moko, ye koko na biso Izaki. Nzoka nde, liboso ete mapasa yango babotama mpe basala likambo moko ya malamu to ya mabe, mpo ete mabongisi ya lolenge Nzambe aponaka ekokisama: kolanda misala ya bato te kasi kolanda mokano ya Ye oyo abengaka, Nzambe alobaki na Rebeka: “Kulutu akozala mosali ya leki,” ndenge ekomama: “Nalingi Jakobi, kasi nayini Ezawu.” Boye toloba nini? Nzambe azali sembo te? Soki moke te! Pamba te, alobaki na Moyize: “Nakosala ngolu na moto oyo ngai nasepeli kosalela ngolu; mpe nakoyokela mawa moto oyo ngai nasepeli koyokela mawa.” Boye, yango ewuti na posa to na makasi ya moto te, kasi ewuti na Nzambe oyo asalaka ngolu. Pamba te, tala ndenge Makomi elobaki na tina na Faraon: “Nakomisaki yo mokonzi mpo na kolakisa nguya na ngai, mpe mpo ete lokumu ya kombo na ngai epanzana na mokili mobimba.” Boye, Nzambe asalaka ngolu na moto oyo Ye asepeli kosalela ngolu, mpe ayeisaka motema libanga, moto oyo Ye asepeli koyeisa motema libanga. Boye, bato bakoki koloba: Mpo na nini Nzambe apamelaka biso, pamba te, moto moko te akoki kotelemela mokano na Ye? Yo moto, ozali nani mpo ete obeta tembe na Nzambe? Mbeki ya mabele ekoki solo koloba na moto oyo asali yango: “Mpo na nini osali ngai na lolenge oyo?” Mosali oyo asalaka mbeki ya mabele, azali na bokonzi te ya kosala kaka na potopoto moko wana, nzungu ya lokumu mpe nzungu oyo ezanga lokumu? Okoloba nini, soki Nzambe, mpo na kolakisa kanda mpe nguya na Ye, akangaki motema mingi liboso ya mbeki oyo etumbolaka kanda na Ye, mbeki oyo ebongisami mpo na kobebisama? Boye, okoloba lisusu nini, soki Nzambe asalaki bongo mpo na kolakisa bomengo ya nkembo na Ye mpo na bolamu ya bato oyo asepeli kosalela ngolu, baoyo abongisa wuta kala mpo na nkembo? Ezali biso nde, Nzambe abengaki, kaka kati ya Bayuda te, kasi kati mpe na bato ya bikolo ya bapaya; ndenge alobi na mokanda ya Oze: “Nakobenga bango ‘bato na ngai,’ bango oyo bazalaki bato na ngai te, nakobenga ye ‘molingami na ngai,’ ye oyo azalaki molingami na ngai te.” Mpe na esika oyo balobaki na bango: “bozali bana na ngai te,” bakoloba na bango: “bozali bana ya Nzambe na bomoi.” Mpe Ezayi agangaki mpo na Isalaele: “Ata soki motango ya bato ya Isalaele ezalaki mingi penza lokola zelo ya ebale monene, ndambo ya bato moke kaka nde bakobika. Pamba te, Nkolo akokokisa Liloba na Ye nyonso na lombango penza na mokili mobimba.” Ezali kaka ndenge Ezayi asakolaki liboso: “Soki Nkolo ya mapinga atikelaki biso bakitani te, tolingaki kokokana na Sodome, mpe kozala ndenge moko na Gomore.” Boye, toloba lisusu nini? Bato ya bikolo ya bapaya, oyo bazalaki koluka te kokoma bato ya sembo, bakomi sembo na nzela ya kondima; kasi Isalaele oyo azalaki koluka kokoma sembo na nzela ya kotosa Mobeko, atikali kokoma sembo te. Mpo na nini? Pamba te, balukaki te kokoma sembo na nzela ya kondima, kasi na nzela ya misala. Yango wana, babetaki libaku na libanga oyo ekweisaka, kolanda ndenge ekomama: “Tala, nasili kotia na Siona libanga oyo ebetisaka mabaku, libanga ya monene oyo ekweisaka, moto oyo akotiela yango motema, akotikala koyoka soni te.” Bandeko, posa ya motema na ngai mpe libondeli na ngai epai na Nzambe ezali ete bato ya Isalaele babika. Pamba te, nakoki solo kotatola mpo na bango ete bazali penza na bolingo oyo eleka ndelo mpo na Nzambe. Nzoka nde, bolingo yango oyo eleka ndelo evandisami na boyebi te. Lokola bayebaki te ndenge nini Nzambe akomisaka bato sembo mpe balukaki komikomisa sembo na ndenge na bango moko, batosaki te lolenge oyo Nzambe akomisaka bato sembo. Klisto nde asukisa Mobeko mpo ete bato nyonso oyo bakondima, bakoma bato na sembo. Tala ndenge Moyize akomaki na tina na bosembo oyo ewutaka na nzela ya Mobeko: “Moto oyo akokokisa bikateli ya Mobeko akobika na nzela na yango.” Kasi tala ndenge bosembo oyo ewutaka na nzela ya kondima elobaka: “Koloba te kati na motema na yo: ‘Nani akomata na Likolo?’ ” Ezali lokola kokitisa Klisto; “to mpe: ‘Nani akokita na se ya mabele?’ ” Ezali lokola kotombola Klisto kati na bakufi. Kasi elobi penza nini? “Liloba ezali pene na yo, ezali na monoko na yo mpe na motema na yo.” Liloba oyo nde ezali Liloba ya kondima oyo tozali kotatola. Soki otatoli na monoko na yo ete Yesu azali Nkolo, mpe ondimi na motema na yo ete Nzambe asekwisaki ye kati na bakufi, okobika. Pamba te, kondima oyo ekomisaka bato sembo ewutaka na motema, mpe litatoli oyo ebikisaka bato ebimaka nde na monoko. Ndenge Makomi eloba: “Moto oyo akondimela Ye, akoyokisama soni te.” Yango wana, bokeseni ezali te kati na Moyuda mpe moto ya ekolo ya bapaya. Pamba te, bango nyonso bazali kaka na Nkolo moko. Ye apambolaka makasi bato nyonso oyo babelelaka Ye; mpo ete ekomama: “Moto nyonso oyo akobelela Kombo ya Nkolo, akobika.” Boye, ndenge nini bakoki solo kobelela Ye, soki bandimeli Ye te? Mpe ndenge nini bakoki solo kondimela Ye, soki bayoki nanu sango na Ye te? Mpe ndenge nini bakoki solo koyoka sango na Ye, soki moto ateyi bango te? Mpe ndenge nini bakoki solo koteya, soki batindami te? Ndenge ekomama: “Oh, ezali kitoko, makolo ya bato oyo basakolaka basango malamu!” Kasi, bato nyonso te ya Isalaele nde bandimaki Sango Malamu. Pamba te, Ezayi alobaki: “Nkolo, nani andimaki mateya na biso?” Boye, kondima ewutaka na maloba oyo toyokaka, mpe maloba oyo toyokaka ewutaka na Liloba ya Klisto. Natuna nanu: Boni, bayokaki te? Eh, bayokaki! Pamba te, ekomama: “Mingongo na bango eyokanaki na mokili mobimba; maloba na bango ekomaki kino na basuka ya mokili.” Natuna lisusu: Bato ya Isalaele basosolaki te? Moyize azalaki moto ya liboso ya koloba: “Nakosala ete boyoka zuwa ya oyo ezali ata ekolo te. Nakosala ete boyoka kanda mpo na ekolo oyo ezanga ata mayele.” Boye, Ezayi akomaki kino na koloba: “Namimonisaki epai ya bato oyo balukaki ngai te, namilakisaki epai ya bato oyo batunaki ngai te.” Kasi alobaki boye mpo na Isalaele: “Natandaki maboko na ngai mokolo mobimba epai ya bato oyo bazanga batosi mpe bato ya mito makasi.” Boye, natunaki: Boni, Nzambe asundolaki bato na Ye? Soki moke te! Pamba te, ngai mpe nazali moto ya Isalaele, mwana ya Abrayami, kati na libota ya Benjame. Te, Nzambe asundolaki te bato na Ye oyo ayeba wuta kala. Boni, boyebi te makambo oyo Makomi eloba na eteni oyo elobaka na tina na Eliya, ndenge nini azalaki komitungisa mpo na Isalaele liboso ya Nzambe: —Nkolo, babomi basakoli na Yo mpe babuki-buki bitumbelo na Yo; natikali kaka ngai moko, mpe bazali lisusu koluka kaboma ngai! Boye, eyano nini Nzambe azongiselaki ye? —Nabombi bato nkoto sambo (7.000) mpo na ngai, baoyo bafukameli nanu nzambe Bala te. Ndenge moko mpe mpo na tango oyo, ezali na mwa ndambo ya bato oyo Nzambe apona na ngolu na Ye. Nzoka nde, soki koponama yango esalamaki na ngolu, boye ezali likambo ya misala te; soki te, ngolu ekozala lisusu ngolu te. Bongo, toloba lisusu nini? Eloko oyo bato ya Isalaele bazali koluka, bazwi yango te, kasi bato oyo Nzambe asila kopona bazwa yango. Mpe mpo na bato mosusu, bakoma mitema mabanga, ndenge ekomama: “Nzambe apesaki bango molimo ya pongi, miso mpo ete bamona te mpe matoyi mpo ete bayoka te, kino na mokolo ya lelo.” Mpe Davidi alobaki: “Tika ete bafeti na bango ekoma motambo mpe monyama mpo na bango, libaku oyo ekokweisa bango mpe etumbu mpo na bango. Tika ete miso na bango ekufa mpo ete bamona lisusu te, mpe mikongo na bango egumbama mpo na libela.” Natuna lisusu: boni, bato ya Isalaele bakweyaki mpo na libela wana babetaki libaku? Soki moke te! Kasi, likolo ya kokweya na bango nde bato ya bikolo ya bapaya bazwi lobiko, mpo ete bato ya Isalaele basala zuwa. Nzoka nde, soki kokweya na bango epesi mokili bomengo, mpe kobunga na bango epesi bato ya bikolo ya bapaya bomengo, boye kobongola mitema na bango ekomema bomengo ya ndenge nini? Nazali koloba epai ya bato ya bikolo ya bapaya. Lokola nazali ntoma ya bato ya bato ya bikolo ya bapaya, napesaka lokumu na mosala na ngai na elikya ete nalamusa zuwa ya bato ya ekolo na ngai mpe kobikisa ndambo ya bato kati na bango. Pamba te, soki kosundolama na bango ezongisi boyokani kati na Nzambe mpe mokili, boye koyambama na bango ekozala ndenge nini? Boni, ekozala te lokola moto asekwi kati na bakufi? Nzoka nde, soki mapa ya liboso oyo bapesi epai na Nzambe ezali bule, elingi koloba ete, mapa nyonso oyo etikali mpe ezali bule; soki mosisa ya nzete ezali bule, elingi koloba ete, bitape na yango mpe ezali bule. Kasi soki bitape misusu ekatamaki, nzoka nde yo, etape ya nzete ya olive ya zamba, bakangisaki yo na bitape oyo etikalaki, mpe sikʼoyo okomi komela mayi moko elongo na bango na mosisa ya nzete ya olive. Yango wana, kobeta tolo te liboso ya bitape oyo ekatama. Soki omeki kobeta tolo: yeba malamu ete yo te moto ozali komema mosisa, kasi mosisa nde ezali komema yo. Okoki mpe koloba: “Bitape wana ekatamaki mpo ete bakangisa ngai na esika na yango.” Olobi malamu. Bakatamaki mpo ete bazangaki kondima, kasi yo, ozali wana mpo na kondima. Kotombola mapeka te, kasi sala nde keba. Pamba te, soki Nzambe azangaki te kokata bitape oyo ebimaka yango moko na nzete, akozanga mpe te kokata yo. Boye, sosola malamu bolamu mpe kanda na Nzambe: kanda epai ya bato oyo bakweyi, mpe bolamu epai na yo, soki ozali kokoba kowumela kaka na bolamu yango; soki te, yo mpe okokatama. Mpe soki bato ya Isaelaele babongoli motema, bakozongisa bango lisusu na nzete, pamba te, Nzambe azali na makoki ya kozongisa bango lisusu na nzete. Boye, soki yo, owutaki na nzete ya olive ya zamba oyo ebimisaki yo, mpe bakangisaki yo na nzete ya olive oyo balona, ata yango te nde ebimisaki yo, boye ndenge nini bakoki te kozongisa bitape ya nzete oyo ebimisaki yango na nzete na yango? Bandeko, nalingi ete boyeba mabombami oyo mpo ete bomimona te ete boleki na bwanya: ndambo ya bato ya Isalaele bakowumela kozala mitema libanga kino bato nyonso ya bikolo ya bapaya bakokota na libota ya Nzambe. Boye, bato nyonso ya Isalaele bakobika, ndenge ekomama: “Mokangoli akobimela na Siona; akolongola mabe kati na Jakobi. Mpe yango nde ekozala boyokani na ngai elongo na bango tango nakolongola masumu na bango.” Mpo na oyo etali Sango Malamu, bazali banguna ya Nzambe mpo na bolamu na bino; kasi mpo na oyo etali koponama ya Nzambe, bazali balingami na Ye mpo na bakoko na bango. Pamba te, Nzambe abotolaka te makabo oyo apesaka, mpe abongolaka te ebiangeli na Ye. Ndenge na kala bozangaki botosi na miso ya Nzambe, mpe sikʼoyo Nzambe ayokeli bino mawa mpo na kozanga botosi na bango; ndenge wana mpe, kozanga botosi na bango ya sikʼoyo esali ete Nzambe ayokela bino mawa, mpo ete ayokela bango mpe mawa. Pamba te, Nzambe akanga bato nyonso lokola na boloko ya kozanga botosi, mpo ete ayokela bato nyonso mawa. Oh, tala ndenge nini bomengo, bwanya mpe boyebi ya Nzambe ezali na mozindo mingi! Moto moko te akoki koyeba makanisi na Ye, mpe kososola nzela na Ye! “Nani ayebaki makanisi ya Nkolo? To nani akokaki kopesa Ye toli? Nani apesaki Nkolo eloko mpo ete Nkolo azongisela ye?” Pamba te, biloko nyonso ewutaka epai na Ye, na nzela na Ye mpe mpo na Ye. Tika ete nkembo ezonga epai na Ye libela na libela! Amen. Bandeko, mpo na bolamu oyo Nzambe atalisi biso, nazali kosenga na bino ete bokaba banzoto na bino epai na Nzambe lokola mbeka ya bomoi, ya bule mpe oyo esepelisaka Nzambe: yango ekozala losambo ya solo mpo na bino. Bolanda bizaleli ya tango oyo te, kasi bobongwana na nzela ya makanisi ya sika mpo ete bokoka kososola mokano ya Nzambe: oyo na miso na Ye ezali malamu, esepelisaka Ye mpe ezali ya kokoka. Na nzela ya ngolu oyo epesameli ngai, nazali koloba na moko na moko na bino: makanisi na bino eleka ndelo te ya oyo bozali, kasi bozala na makanisi oyo ekokana, na likabo ya kondima oyo Nzambe apesa na moko na moko na bino. Boye, ndenge tozali na biteni ebele kati na nzoto moko, mpe eteni moko na moko ezali na mosala na yango, ndenge wana mpe, biso oyo tozali ebele, tozali kaka nzoto moko kati na Klisto, mpe eteni moko na moko ezali mpo na biteni misusu. Kolanda ngolu oyo epesameli biso, tozali na makabo ekesena. Boye, tika ete oyo azali na likabo ya kosakola, asalela yango kolanda kondima. Tika ete oyo azali na likabo ya kosala mosala songolo kati na Lingomba, asala yango, oyo azali na likabo ya koteya, ateya, oyo azali na likabo ya kolendisa, alendisa, oyo azali na likabo ya kokaba, akaba na motema moko, oyo azali na likabo ya kokamba, akamba na ndenge esengeli, mpe oyo azali na likabo ya kosalisa bato bakelela, asala yango na esengo. Tika ete bolingo ezala na lokuta te. Boyina makambo ya mabe mpe bokangama makasi na makambo ya malamu: —mpo na bondeko, bolingana makasi bino na bino; —mpo na lokumu, bozala bato ya liboso ya kopesa yango na bato mosusu; —mpo na mosala, bozala bagoigoi te; —mpo na Molimo, bozala na molende; —mpo na Nkolo, bozala basali malamu; —mpo na elikya, bozala na esengo; —mpo na komekama, bokanga mitema; —mpo na mabondeli, boyika mpiko; —mpo na baposa ya babulami, bosalisaka bango mpe boyambaka bapaya malamu na bandako na bino. Bopambola bato oyo bazali konyokola bino, bopambola kasi bolakela mabe te! Bosepela elongo na bato oyo bazali kosepela, mpe bolela elongo na bango bazali kolela. Boyokanaka malamu bino na bino. Bozala bato na lolendo te, kasi bozala bato na komikitisa mpe bomimonaka te lokola bato oyo baleki na bwanya. Bozongisa mabe na mabe te, boluka tango nyonso kosala makambo malamu na bato nyonso. Soki ekoki kosalama, wana bozali na makoki, bozala na kimia na bato nyonso. Baninga na ngai, boluka kozongisa mabe na mabe bino moko te, kasi botika nzela na kanda na Nzambe ete esala, pamba te ekomama: “Ezali Ngai nde nazongisaka mabe na mabe; Ngai nde nafutaka moto na moto oyo ekoki na ye,” elobi Nkolo Yawe. Nzoka nde: “soki monguna na yo azali na nzala, pesa ye bilei, soki azali na posa ya mayi, pesa ye mayi ya komela. Pamba te, soki osali bongo, ezali lokola ozali kotia makala ya moto na moto na ye.” Kotika te ete mabe elonga na yo, kasi luka kolonga mabe na nzela ya kosala malamu. Tika ete moto nyonso atosa bakonzi ya leta, pamba te ezali na bokonzi moko te oyo ezangi kowuta na Nzambe, mpe oyo Nzambe azangi kotia. Boye, moto oyo aboyi kotosa bakonzi ya leta, azali nde kotombokela mabongisi oyo Nzambe asila kotia, boye bato oyo basalaka bongo, bamibendelaka nde etumbu mpo na bango moko. Bazuzi babangisaka te bato oyo batambolaka malamu, kasi babangisaka kaka bato oyo basalaka mabe. Boye, oboyi kobanga mokonzi? Sala malamu mpe akondima yo. Pamba te, mokonzi azali mosali na Nzambe mpo na bolamu na yo. Kasi soki ozali kosala mabe, banga, pamba te asimbaka mopanga na pamba te. Azali mosali na Nzambe, mpo na kolakisa kanda na Nzambe likolo ya baoyo basalaka mabe. Yango wana, ezali na tina mingi kotosa mokonzi, kaka te mpo na kobanga kozwa etumbu, kasi mingi mpo na kosala oyo mitema na biso ezali kosenga biso. Yango wana mpe bofutaka bampako, pamba te bakonzi bazali basali ya Nzambe, oyo bapesa tango na bango nyonso mpo na kokamba. Bopesa na moto na moto oyo ekoki na ye: mpaku, na oyo asengeli kozwa mpako; batike ya biloko, na oyo asengeli kozwa tike ya biloko; botosi, na oyo asengeli kotosama, mpe lokumu, na oyo asengeli kozwa lokumu. Bozala na niongo ya moto te, kaka niongo ya kolingana bino na bino, pamba te, moto oyo alingaka bato, akokisi makambo nyonso oyo Mobeko esengaka. Pamba te, mobeko lokola: kosala ekobo te, koboma te, koyiba te, kolula te mpe nyonso oyo etikali, elobami na mokuse kati na liloba oyo: “Linga moninga na yo lokola yo moko.” Moto oyo azali na bolingo, asalaka moninga na ye mabe te. Yango wana, kolinga moninga ezali kokokisa Mobeko. Lokola boyebi malamu soki tokomi tango nini: ezali tango ya kolamuka na pongi; pamba te, lelo, lobiko ekomi pene na biso koleka tango oyo tondimaki. Butu esili kowumela mpe tongo elingi kotana. Yango wana, tobwaka misala ya molili mpe tolata bibundeli ya pole. Totambola na bizaleli ya moyi: na lokoso te, na kolangwa masanga te, na kindumba mpe na ekobo te, na koswana mpe na zuwa te. Kasi bolata Nkolo Yesu Klisto, mpe bokokisa te baposa ya nzoto oyo ezali kotungisa biso. Boyamba malamu moto oyo alenda te na kondima, bosambisa te lolenge na ye ya kokanisa. Kondima ya moko epesi ye nzela ya kolia bilei nyonso, nzoka nde, mosusu, lokola alenda te na kondima, aliaka kaka bandunda. Tika ete moto oyo aliaka bilei nyonso atiola te moto oyo aponaka bilei; mpe moto oyo aponaka bilei asambisa te moto oyo aliaka bilei nyonso, pamba te Nzambe asila koyamba ye. Boni, yo ozali nani mpo na kosambisa mosali ya moto mosusu? Atelema to akweya, ezali likambo ya mokonzi na ye. Tembe te, akotelema kaka, mpo ete Nkolo azali na makoki ya kotelemisa ye. Moko akanisaka ete mokolo songolo ezali bule koleka mokolo pakala, mpe mosusu akanisaka ete mikolo nyonso ezali kaka ndenge moko. Boye, tika ete moto na moto andima penza kolanda makanisi na ye. Moto oyo akesanisaka mikolo, asalaka yango mpo na lokumu ya Nkolo; moto oyo aliaka bilei nyonso, asalaka yango mpo na lokumu ya Nkolo, pamba te apesaka Nzambe matondi. Boye, moto oyo aponaka bilei, asalaka yango mpe mpo na lokumu ya Nkolo, bongo apesaka Nzambe matondi. Pamba te, moko te kati na biso azali na bomoi mpo na ye moko, mpe moko te akokufa mpo na ye moko. Soki tozali na bomoi, tozali na bomoi mpo na Nkolo, mpe soki tokufi, tokufi mpo na Nkolo. Yango wana, tozala na bomoi to tokufa, tozali kaka bato ya Nkolo. Ezali mpo na yango nde Klisto akufaki mpe asekwaki mpo ete azala Nkolo ya bato bakufa mpe ya bato na bomoi. Boye yo, mpo na nini ozali kosambisa ndeko na yo? Mpo na nini ozali kotiola ndeko na yo? Biso nyonso tokotelema na esambiselo ya Nzambe mpo na kosamba. Pamba te, ekomama: “Na Kombo na Ngai,” elobi Nkolo, “mabolongo nyonso ekofukama liboso na ngai mpe minoko nyonso ekotatola Nzambe.” Yango wana, moto na moto akosamba liboso ya Nzambe mpo na makambo na ye moko. Yango wana, totika kosambisana biso na biso. Nzoka nde, bosalela mayele na bino te mpo na kobetisa ndeko moko libaku to kokweisa ye. Lokola moto oyo azali kati na Nkolo Yesu, nayebi mpe nandimi ete eloko ya mbindo ezalaka te. Kasi, soki moto amoni yango lokola eloko ya mbindo, ekokoma mpe mbindo mpo na ye. Soki, likolo ya bilei ozali koyokisa ndeko na yo motema pasi, ozali kotambola na bolingo te. Likolo ya bilei, kobungisa te ndeko na yo, oyo Klisto akufelaki. Tika ete makambo oyo yo ozali komona malamu, ekoma te epai ya bato mosusu, nzela ya kotiola. Pamba te, Bokonzi ya Nzambe ezali te likambo ya kolia to komela, kasi ezali likambo ya bosembo, ya kimia mpe ya esengo kati na Molimo Mosantu, pamba te, moto oyo asalelaka Klisto na lolenge oyo, asepelisaka Nzambe mpe bato bandimaka ye. Yango wana, tolukaka tango nyonso makambo oyo ememaka kimia mpe elendisaka biso na kondima bamoko mpe bamisusu. Koboma mosala ya Nzambe te likolo ya biloko ya kolia. Solo, biloko nyonso ezali peto, kasi ezali mabe kolia eloko oyo ekoki kobetisa moto mosusu libaku. Eloko oyo eleki malamu ezali: koboya kolia misuni, komela vino to eloko nyonso oyo ekoki kobetisa ndeko na yo libaku. Batela mpo na yo moko liboso na Nzambe, makambo oyo ozali kondimela. Esengo na moto oyo amisambisaka te mpo na likambo oyo ye andimaka. Kasi soki moto asili kolia biloko oyo ezali kosambisa motema na ye, asali masumu, pamba te asali te oyo kondima na ye ezali kotinda ye. Nzoka nde, likambo nyonso oyo ewuti na kondima te, ezali lisumu. Biso oyo tolenda na kondima, tosengeli kondima bolembu ya bato oyo balenda te na kondima mpe koboya komisepelisa kaka biso moko. Tika ete moto na moto kati na biso aluka kosepelisa moninga na ye, mpo na bolamu mpe kolendisama na ye. Pamba te, ezala Klisto, alukaki te komisepelisa ye moko ndenge ekomama: “Kofinga oyo bafingaki yo ekweyaki epai na ngai.” Nzoka nde, makambo nyonso oyo ekomama kala, ekomamaki mpo na koteya biso, mpo ete na nzela ya kokanga motema mpe malendisi oyo Makomi epesaka, tokoka kozala na elikya. Tika ete Nzambe, Ye oyo asungaka bato ete bakoka kokanga motema mpe abondisaka bato, apesa bino makoki ya kozala na bomoko bino na bino, kolanda mokano ya Klisto Yesu mpo ete bokoka kokumisa Nzambe, Tata na Nkolo na biso Yesu Klisto, na likanisi moko mpe na monoko moko. Boyambanaka bino na bino ndenge Klisto ayambaki bino mpo na nkembo na Nzambe. Pamba te, nazali koloba na bino solo ete Klisto akomaki mosali ya Bayuda mpo na kolakisa ete Nzambe azali moyengebene, na ndenge akokisaki bilaka oyo apesaki na bakoko na bango. Ayaki mpe mpo ete bato ya bikolo ya bapaya bakoka kokumisa Nzambe mpo na mawa na ye, ndenge ekomama: “Yango wana, nakokumisa yo kati na bato ya bikolo ya bapaya, mpe nakoyemba nzembo mpo na lokumu ya Kombo na yo.” Alobaki lisusu: “Bato ya bikolo ya bapaya bosepela elongo na bato na Ye.” Mpe lisusu: “Bokumisa Nkolo, bino nyonso bato ya bikolo ya bapaya, tika ete bato nyonso bakumisa Ye.” Ezayi mpe alobaki: “Moto moko akobima na libota ya Isayi, akotelema mpo na kokonza bikolo mpe bato ya bikolo ya bapaya bakotiela Ye mitema.” Tika ete Nzambe oyo apesaka elikya, atondisa bino na esengo mpe na kimia, na nzela ya kondima, mpo ete botonda na elikya na nguya ya Molimo Mosantu. Bandeko na ngai, nandimi solo ete botondisami na bolamu, na boyebi mingi mpe na makoki ya kolendisana bino na bino. Nzoka nde, mpo na kolamusa makanisi na bino, nakomelaki bino na molende nyonso mwa makambo, kolanda ngolu oyo Nzambe apesaki ngai ya kozala mosali ya Yesu Klisto epai ya bato ya bikolo ya bapaya. Nabulisami mpo na koteya Sango Malamu ya Nzambe mpo ete bato ya bikolo ya bapaya bakoma likabo oyo ebulisami na Molimo Mosantu, likabo oyo esepelisaka Nzambe. Yango wana, namikumisaka kati na Klisto Yesu, na mosala oyo nasalaka mpo na Nzambe. Pamba te, soki nakoki koloba, nakoloba kaka mpo na makambo oyo Klisto asalaki na nzela na ngai, mpo na kosala ete bato ya bikolo ya bapaya bakoka kotosa Nzambe, na nzela ya Liloba, ya misala, mpe ya nguya Molimo Mosantu, oyo emonisami na bikamwa mpe bilembo. Boye, wuta na Yelusalemi, mpe na bazinga-zinga nyonso kino na Iliri, nateyaki Sango Malamu ya Klisto. Pamba te, nazwaki mokano ya koteya Sango Malamu na bisika oyo Kombo ya Yesu eyebanaki nanu te, mpo ete natonga likolo ya fondasio ya moto mosusu te. Ndenge ekomama: “Bato oyo balobela bango nanu te na tina na Ye, bakomona Ye; mpe baoyo bayoka nanu sango na Ye te, bakososola.” Yango nde ezalaki mbala mingi kokanga ngai nzela ya koya epai na bino. Kasi sikʼoyo, nazali lisusu na esika te ya kosala mosala na etuka oyo; bongo, lokola wuta kala nazalaka na posa makasi ya koya epai na bino, nazali na elikya ete nakomona bino tango nakokende na Espane, wana nakolekela epai na bino mpo na kozwa lisungi na bino mpo na kokende kuna, sima ya kosepela kowumela na bino elongo ata na mwa tango moke. Nzoka nde, sikʼoyo, nazali kokende na Yelusalemi mpo na komemela basantu lisungi. Pamba te, mangomba ya Masedwane mpe ya Akayi ezwaki mokano ya kosangisa biloko mpo na kosunga babola oyo bazali kati na basantu ya Yelusalemi. Solo, bango moko nde bazwaki mokano ya kosala bongo, mpo ete ezalaki lokola niongo epai na bango. Pamba te, soki Bayuda bakabolaki makabo ya molimo elongo na bato ya bikolo ya bapaya, bango mpe basengeli kokabola biloko na bango elongo na Bayuda. Boye, soki nasilisi mosala oyo, mpe napesi bango lisungi yango, nakolekela epai na bino tango nakokende na Espane. Nayebi ete tango nakoya epai na bino, nakoya na mapamboli mingi ya Klisto. Kasi nabondeli bino bandeko, na Kombo ya Nkolo na biso Yesu Klisto mpe ya bolingo ya Molimo: bobunda elongo na ngai na nzela ya mabondeli oyo bosalaka epai na Nzambe na tina na ngai, mpo ete nakweya te na maboko ya bato ya Yudea, bato ya mitema mabanga; mpe ete basantu ya Yelusalemi bayamba malamu lisungi oyo nakomemela bango. Na bongo nde nakolonga kokoma epai na bino na esengo, mpe soki Nzambe akolinga, nakopema mwa moke elongo na bino. Tika ete Nzambe ya kimia azala elongo na bino nyonso! Amen. Natindeli bino ndeko na biso ya mwasi Foebe oyo azali mosali ya lingomba ya Sankrea. Boyamba ye kati na Nkolo ndenge bayambaka basantu, mpe bosunga ye na makambo nyonso oyo akosenga bino. Pamba te, asungaki bato ebele penza, ngai mpe lokola. Bopesa mbote na Priska mpe Akila, baninga na ngai ya mosala kati na Klisto Yesu. Bandimaki ata kokufa mpo na ngai. Ngai moko kaka te nde nazali kotonda bango, kasi mpe mangomba nyonso ya bikolo ya bapaya. Bopesa mpe mbote na lingomba oyo esanganaka na ndako na bango. Bopesa mbote na molingami na ngai Epayinete, oyo azalaki moto ya liboso ya kondimela Klisto na mokili ya Azi. Bopesa mbote na Mari oyo asalaki mosala makasi mpo na bino. Bopesa mbote na Andronikusi mpe Junia, bandeko na ngai mpe baninga na ngai ya boloko. Bazalaki bato ya lokumu kati na bantoma, mpe bandimelaki Klisto liboso ete ngai nandimela. Bopesa mbote na Ampiliatusi, molingami na ngai kati na Nkolo. Bopesa mbote na Uribano, moninga na biso ya mosala kati na Klisto, mpe na molingami na ngai Sitakisi. Bopesa mbote na Apelesi, oyo alakisaki penza ete azalaka ya Klisto. Bopesa mbote mpe na bato oyo bavandaka na ndako ya Arisitobule. Bopesa ndeko na ngai Erodioni mbote. Bopesa mbote na bato oyo bavandaka na ndako ya Narisise mpe bazali kati na Nkolo. Bopesa mbote na Trifene mpe Trifose, basi oyo basalaki mosala makasi kati na Nkolo. Bopesa mbote na Perisisi, molingami na ngai ya mwasi oyo asalaki mosala makasi kati na Nkolo. Bopesa mbote na Rifusi, moponami kati na Nkolo. Bopesa mpe mbote na mama na ye, oyo azali mpe mama na ngai. Bopesa mbote na Asinkrite, na Flegoni, na Erimesi, na Patrobasi, na Erimasi mpe na bandeko nyonso oyo bazali na bango elongo. Bopesa mbote na Filologe, na Jili, na Nere mpe na ndeko na ye ya mwasi Olipasi, elongo na basantu nyonso oyo bazali na bango elongo. Bopesana mbote bino na bino, na beze ya bule. Mangomba nyonso ya Klisto etindeli bino mbote. Bandeko, nabondeli bino: bosala keba na bato oyo bakotisaka bokabwani mpe batiaka mabaku na nzela na bino, na makambo oyo ekeseni na mateya oyo bosilaki kozwa. Bozala mosika na bango. Bato ya lolenge oyo basalelaka nde mabumu na bango, kasi basalelaka Nkolo na biso Klisto te. Bapengwisaka makanisi ya bato ya bindima-ndima na nzela ya maloba na bango ya elengi mpe ya sukali. Pamba te, bato nyonso bayebi botosi na bino, boye motema na ngai etondaka mingi na esengo mpo na bino. Kasi nalingi ete bozala bato ya bwanya mpo na kosala malamu, mpe bato oyo bazangi mbeba mpo na oyo etali makambo ya mabe. Etikali kaka moke ete Nzambe na kimia anyata-nyata Satana na se ya makolo na bino. Tika ete ngolu ya Nkolo na biso Yesu ezala na bino. Timote, moninga na ngai ya mosala elongo na bandeko na ngai: Lusiusi, Jasoni mpe Sosipatere batindeli bino mbote. Ngai Teritiusi oyo nakomi mokanda oyo, napesi bino mbote kati na Nkolo. Gayusi oyo ayambaki ngai mpe lingomba mobimba na ndako na ye mpe apesi bino mbote. Erasite oyo abombaka mbongo ya engumba elongo na ndeko na biso Kwaritusi batindeli bino mbote. Tika ete ngolu ya Nkolo na biso Yesu Klisto ezala na bino nyonso. Amen. Na Ye oyo azali na nguya ya kotelemisa bino ngwi na nzela ya Sango Malamu oyo nateyaka, mpe na nzela ya mateya ya Yesu Klisto kolanda emoniseli ya mabombami ya Nzambe oyo ebombama wuta kala; Kasi sikʼoyo emonisami mpe elakisami epai ya bato ya bikolo nyonso ya bapaya, na nzela ya makomi ya basakoli kolanda ndenge Nzambe ya seko na seko atindaki, mpo ete bikolo nyonso ekoka kondimela Ye mpe kotosa Ye, na Nzambe wana, oyo Ye kaka nde azali na bwanya, nkembo epesamela Ye libela na libela na nzela ya Yesu Klisto! Amen. Polo, oyo abengama na mokano na Nzambe mpo na kozala ntoma na Klisto Yesu, mpe ndeko na biso Sostene, epai ya Lingomba ya Nzambe oyo ezali na Korinto, baoyo Nzambe abulisa kati na Klisto Yesu mpe abenga mpo ete bazala basantu, elongo na bato nyonso oyo, na bisika nyonso, babelelaka Kombo ya Nkolo na biso Yesu Klisto, oyo azali Nkolo na bango mpe Nkolo na biso: Tika ete ngolu mpe kimia kowuta na Nzambe Tata na biso mpe na Nkolo Yesu Klisto ezala na bino. Napesaka tango nyonso matondi epai na Nzambe mpo na bino, na tina ngolu na Ye oyo epesamela bino kati na Klisto Yesu. Pamba te, kati na Klisto, botondisamaki na bomengo na makambo nyonso, koleka na oyo nyonso etali maloba mpe boyebi; pamba te, litatoli na biso mpo na Klisto emonisamaki malamu penza epai na bino. Yango wana, bozangi ata likabo moko te ya molimo, wana bozali kozela komonisama ya Nkolo na biso Yesu Klisto. Ezali Ye nde akolendisa bino kino na suka, mpo ete bozala na pamela ata moko te na mokolo ya Nkolo na biso Yesu Klisto. Nzambe oyo abengaki bino na lisanga elongo na Mwana na Ye Nkolo na biso Yesu Klisto, akokisaka bilaka na Ye. Bandeko, nazali kobondela bino na Kombo ya Nkolo na biso Yesu Klisto: bozala na boyokani bino na bino mpe bokabwani ezala te kati na bino; nzoka nde, bozala motema moko mpe makanisi moko. Bandeko na ngai, bato oyo bavandaka na ndako ya Kloe bayebisaki ngai ete koswana ezali kati na bino. Tala makambo oyo nalingi koloba: Moko kati na bino azali koloba: “Ngai nazali moto ya Polo;” mpe mosusu azali koloba: “Ngai nazali moto ya Apolosi;” mosusu azali koloba: “Ngai nazali moto ya Piere;” mpe mosusu azali koloba: “Ngai nazali moto ya Klisto.” Boni, Klisto akabwana? Ezali Polo nde babakaki na ekulusu mpo na bino? To na kombo na ye nde bozwaki libatisi? Natondaka Nzambe mpo ete nabatisa ata moto moko te kati na bino, longola kaka Krispusi mpe Gayusi, mpo ete moko te aloba ete abatisama na kombo na ngai. Solo, nabatisaki mpe libota ya Stefanasi. Longola bato oyo nawuti kotanga, nayebi te soki nabatisa moto mosusu. Pamba te, Klisto atindaki ngai te mpo na kobatisa bato, kasi mpo na kosakola Sango Malamu. Boye, nasengelaki kosalela te lolenge ya koloba oyo ewuti na bwanya ya bomoto, noki te ekulusu na Klisto ekomonana lokola eloko pamba. Pamba te, mateya ya ekulusu ezali liboma mpo na bato oyo babunga nzela, Kasi ezali nguya ya Nzambe mpo na biso oyo tozwa lobiko. Pamba te ekomama: “Nakosukisa bwanya ya bato ya bwanya mpe nakosilisa mayele ya bato ya mayele!” Boye, wapi moto ya bwanya? Wapi moto oyo ayekola mingi? Wapi moto ya mayele ya tango oyo? Boni, Nzambe akomisa bwanya ya mokili liboma te? Pamba te, na esika oyo Nzambe amonisaki bwanya na Ye, mokili, na nzela ya bwanya na yango esosolaki Ye te, yango wana, Nzambe asepelaki kobikisa bato oyo bandimelaka Ye na nzela ya mateya oyo emonani lokola liboma. Lokola Bayuda bazali koluka bikamwa, mpe Bagreki, bwanya; kasi biso, tozali koteya Klisto oyo babakaki na ekulusu: libaku mpo na Bayuda, mpe liboma mpo na Bagreki; nzoka nde, mpo na baoyo Nzambe abenga, ezala Bayuda to Bagreki, Klisto azali nde nguya mpe bwanya ya Nzambe. Pamba te, oyo emonanaka lokola liboma ya Nzambe ezali na bwanya koleka bwanya ya bato, mpe oyo emonanaka lokola bolembu ya Nzambe ezali makasi koleka makasi ya bato. Bandeko, botala nanu malamu ndenge bozalaki tango Nzambe abengaki bino. Moke kati na bino bazalaki bato ya bwanya kolanda emoneli ya bomoto, moke kati na bino bazalaki bato minene, mpe moke kati na bino bawutaki na mabota ya lokumu! Kasi kati na mokili, Nzambe aponaki biloko pamba mpo na koyokisa bato ya bwanya soni, aponaki biloko elemba mpo na koyokisa biloko ya makasi soni; aponaki biloko oyo ezanga tina, biloko oyo batiolaka, biloko oyo ezalaka te, mpo na kokomisa pamba biloko oyo ezali, mpo ete moto moko te amikumisa liboso na Ye. Ezali mpo na Nzambe nde bozali kati na Klisto Yesu, Ye oyo akoma mpo na biso bwanya kowuta na Nzambe, bosembo na biso, bosantu na biso mpe kokangolama na biso. Yango wana, ndenge ekomama: “Soki moto alingi komikumisa, tika ete amikumisa kati na Nkolo!” Bandeko, tango nayaki epai na bino mpo na kosakola mabombami ya Nzambe, nasalaki yango te lokola moto oyo ayebi penza koloba to na maloba ya bwanya. Pamba te, nazwaki mokano ya koluka koyeba likambo mosusu te kati na bino, longola kaka Yesu Klisto, Yesu Klisto oyo babakaki na ekulusu. Nayaki epai na bino na bolembu, na kobanga mpe na kolenga. Maloba mpe mateya na ngai evandisamaki na mayele mpe na bwanya ya bomoto te, kasi na kotalisama ya misala nguya ya Molimo, mpo ete kondima na bino evandisama na bwanya ya bomoto te, kasi na nguya ya Nzambe. Nzoka nde, toteyaka bwanya epai na baklisto oyo bakola na kondima. Yango ezali bwanya ya mokili oyo te to mpe ya bakonzi ya tango oyo te, oyo babongisami na libebi. Te, toteyaka mabombami ya bwanya ya Nzambe, bwanya oyo ebombama na miso ya bato ya mokili, bwanya oyo Nzambe abongisa mpo na nkembo na biso, liboso ete akela mokili. Mokonzi moko te ya mokili oyo asosolaki yango, pamba te soki basosolaki yango, balingaki te kobaka Nkolo ya nkembo na ekulusu. Kasi ndenge ekomama: “Oyo liso etikala nanu komona te, oyo litoyi etikala nanu koyoka te, mpe oyo moto atikala nanu kanisaki te, yango nde Nzambe abongisa mpo na bato oyo balingaka Ye.” Nzoka nde, Nzambe atalisaki biso yango na nzela ya Molimo na Ye. Pamba te, Molimo ayebaka makambo nyonso, ezala bozindo ya makanisi ya Nzambe. Nani kati na bato ayebi makanisi ya moto, soki kaka molimo oyo ezali kati na ye te? Ndenge moko mpe, moko te ayebi makanisi ya Nzambe, longola kaka Molimo na Ye. Nzoka nde biso, tozwaki molimo ya mokili te, kasi Molimo kowuta na Nzambe, mpo ete tokoka kososola likabo ya ngolu ya Nzambe. Boye, toteyaka yango te na maloba ya bwanya ya bomoto, kasi na maloba oyo Molimo alakisaka. Ezali na nzela wana nde tolobaka makambo ya Molimo na nzela ya maloba oyo Molimo apesaka. Moto oyo azangi Molimo na Nzambe akoki te koyamba makambo kowuta na Molimo ya Nzambe. Pamba te, ezali lokola liboma na miso na ye; akoki kososola yango te, pamba te basosolaka yango kaka na nzela ya Molimo. Nzoka nde, moto oyo atambolisamaka na Molimo asosolaka makambo nyonso, kasi ye, bato basosolaka ye te. Pamba te, ekomama: “Nani ayebi makanisi ya Nkolo mpo akoka kopesa Ye toli?” Nzoka nde, makanisi ya Klisto ezali kati na biso. Bandeko, nakokaki te koloba na bino lokola bato oyo batambolisamaka na Molimo, kasi lokola bato oyo batambolisamaka kolanda baposa ya nzoto, lokola bana mike kati na Klisto. Napesaki bino miliki, kasi bilei ya makasi te, pamba te, bolingaki kokoka kolia yango te. Ezala sikʼoyo, bokokoka na bino mpe kaka kolia yango te; pamba te, bozali nanu kotambolisama kolanda baposa ya nzoto. Lokola likunya mpe koswana ezali kati na bino, boni, bozali kotambolisama kolanda baposa ya nzoto te? Boni, bozali kaka kosala lokola ya moto nyonso te? Tango moko azali koloba: “Ngai nazali moto ya Polo”, mpe mosusu azali koloba: “Ngai nazali moto ya Apolosi,” boni, bozali kaka kosala lokola moto nyonsote? Boni, Apolosi azali nani? Mpe Polo azali nani? Bazali kaka basali, oyo na nzela na bango bondimelaki Nzambe, kolanda likabo oyo Nkolo apesaki na moko na moko na bango. Ngai nalonaki, mpe Apolosi asopelaki yango mayi, kasi Nzambe nde akolisaki. Ezali te moto oyo alonaki to oyo asopaki mayi nde azali na tina, kasi Nzambe oyo akolisaka nde azali na tina. Moto oyo aloni mpe oyo asopeli mayi bazali kaka ndenge moko, mpe moto na moto akozwa lifuti oyo ekoki na mosala na ye. Pamba te, biso tozali basali elongo na Nzambe, mpe bino bozali elanga mpe ndako ya Nzambe. Na nzela ya ngolu oyo Nzambe apesaki ngai, natongaki fondasio lokola motongi ya mayele, mpe moto mosusu atongi likolo na yango. Kasi tika ete moto na moto asala keba na ndenge azali kotongela. Pamba te, moto moko te akoki kotonga fondasio mosusu, longola kaka oyo esila kotongama: Yesu Klisto. Nzoka nde, soki moto asaleli wolo, to palata, to mabanga ya talo, to mabaya, to makasa to mpe matiti mpo na kotonga likolo ya fondasio yango, mosala na ye ekomonisama polele. Mokolo ya kosambisama nde ekomonisa yango, pamba te ekozala mokolo ya moto. Moto ekomeka mosala ya moto na moto. Soki mosala ya moto oyo atongaki likolo ya fondasio eziki te, moto yango akozwa lifuti. Kasi soki esili kozika, akozwa eloko te: ye moko kaka nde akobika, kasi ekozala lokola moto oyo asili kobika na likama ya moto. Boni, boyebi te ete bozali Tempelo ya Nzambe mpe ete Molimo ya Nzambe avandaka kati na bino? Soki moto abebisi Tempelo ya Nzambe, Nzambe mpe akoboma ye, pamba te Tempelo na Ye ezali bule, bongo bino bozali nde Tempelo yango. Bomikosa te: soki moto moko kati na bino akanisi ete azali na bwanya na mokili oyo, asengeli kokoma lokola zoba mpo ete akoma moto ya bwanya. Pamba te, bwanya ya mokili oyo ezali bozola na miso ya Nzambe. Lokola ekomama: “Akangaka bato ya bwanya kati na mitambo ya mayele na bango ya mabe,” mpe lisusu: “Nkolo ayebi ete makanisi ya bato ya bwanya ezalaka tina te.” Yango wana, tika ete moto moko te aluka lokumu kati na bato. Pamba te, nyonso ezali ya bino: ezala Polo, to Apolosi, to Piere, to mokili, to bomoi, to kufa, to tango ya lelo, to tango oyo ekoya: nyonso ezali ya bino, kasi bino bozali bato ya Klisto, mpe Klisto azali ya Nzambe. Boye, tika ete bato bazwa biso lokola basali ya Klisto mpe lokola bakambi oyo bazwi mokumba ya koyebisa mabombami ya Nzambe. Nzoka nde, eloko oyo basengaka epai ya bakambi, ezali ete bazala sembo. Mpo na ngai, nazali komisambisa na likambo moko te. Yango wana, ezala kosambisa na bino to ya esambiselo ya bato elobelaka ngai eloko moko te. Motema na ngai ezali kosambisa ngai ata na likambo moko te, nzoka nde, yango te nde ezali kolongisa ngai; oyo asambisaka ngai ezali nde Nkolo. Yango wana, bosambisa te liboso ya tango oyo ekatama, bozela kino tango Nkolo akoya. Ye akobimisa na pole makambo oyo ebombama kati na molili, mpe akomonisa na miso na bato makanisi ya mitema ya bato. Na tango wana, moto na moto akozwa lokumu na ye, kowuta na Nzambe. Bandeko, nayebisi bino makambo oyo etali ngai moko mpe oyo etali Apolosi mpo na bolamu na bino, mpo ete na ndakisa na biso, boyekola likambo oyo: “Boleka ndelo te ya makambo oyo ekomama.” Boye, bokomitombola na lolendo te mpo na kopona moko mpe koyina mosusu. Boni, nani azali kokesanisa yo na bato misosu? Eloko nini ozali na yango, oyo bapesa yo te? Soki bapesaki yo yango, mpo na nini ozali komikumisa lokola nde bapesaki yo yango te? Bosiʼbozwi nyonso oyo bolingaka! Bosibokomi bato ya bomengo! Bosibokomi bakonzi, na nzela na biso te. Ya solo, nalingi ete bokoma penza bakonzi, mpo ete biso mpe tokoka kokoma bakonzi elongo na bino. Pamba te, nakanisi ete Nzambe abimisa biso bantoma na molongo ya suka, lokola bato oyo bakatela bango etumbu ya liwa na esika ya masano. Pamba te bakomisa biso lisano mpo na mokili, mpo na baanzelu, mpe mpo na bato. Biso tozali bazoba mpo na Klisto, kasi bino bozali bato ya bwanya kati na Klisto! Tozali na bolembu, kasi bino bozali na makasi! Bozali kozwa lokumu, kasi biso bazali kotiola biso! Kino tango oyo, tozali konyokwama na nzala, na posa ya mayi, tozangi bilamba, bazali kobeta biso, mpe tozali na esika ya kovanda te, tozali kosala mosala makasi na maboko na biso. Tango bafingaka biso, topambolaka; tango banyokolaka biso, tokangaka mitema mpo na yango; tango balobaka makambo ya lokuta mpo na biso, tozongisaka na boboto nyonso. Mpe kino sikʼoyo tokoma lokola biloko ya bosoto ya mokili, lokola biloko oyo babwakaka na folu. Nakomi makambo oyo mpo na koyokisa bino soni te, kasi mpo na kokebiso bino, lokola bana na ngai ya bolingo. Pamba te, ata soki bozali na balakisi nkoto zomi kati na Klisto, nzoka nde bozali na batata ebele te, pamba te ngai nde nazali tata na bino kati na Klisto Yesu, na nzela ya Sango Malamu. Bongo nabondeli bino, bolanda ndakisa na ngai. Ezali na tina wana nde, natindeli bino Timote, mwana na ngai ya bolingo mpe ye oyo azali ya kokangama makasi na Nkolo. Ye akolobela biso lisusu nzela na ngai kati na Klisto Yesu, lokola nateyaka yango bisika nyonso kati na mangomba nyonso. Bato mosusu kati na bino bakoma bato ya lofondu, bakanisi ete, nakoya lisusu te epai na bino. Kasi soki Nkolo alingi, etikali moke naya epai na bino, mpe nakoyeba kaka te ndenge nini bato wana ya lofundu balobaka, kasi mpe, nguya nini bazali na yango. Pamba te, Bokonzi ya likolo ezali likambo ya maloba te, kasi likambo ya nguya. Bolingi nini? Naya epai na bino na fimbo, to na bolingo mpe na molimno ya boboto? Bato bazali koloba bipai nyonso ete ekobo ezali kosalama kati na bino; mpe ekobo oyo, emonanaka kutu te epai ya bapakano, na ndenge ete: moto moko kati na bino azali kosangana na mwasi ya tata na ye. Kasi bino, bozali ya kotonda na lofundu. Ekokaki kutu boyoka mawa mingi, mpe bolongola kati na bino moto oyo asalaki likambo ya ndenge wana. Pamba te mpo na ngai, ata nazali na bino na nzoto te, kasi nazali na bino na molimo, mpe nasiʼnakataki likambo ya moto oyo asalaki bongo, lokola nde nazalaki na bino elongo. Tango bokosangana na kombo ya Nkolo na biso Yesu, ngai mpe nakozala na bino na molimo, mpe nguya ya Nkolo na biso Yesu ekozala mpe na bino: moto ya ndenge wana, bokaba ye na maboko ya Satana mpo ete nzoto na ye ebebisama, mpe molimo na ye ebika na Mokolo ya Nkolo. Komikumisa na bino ezali malamu te. Boyebi te ete “mwa kisi moke ya mapa evimbisaka potopoto nyonso ya farine?” Bolongola kisi ya mapa ya kala, mpo bozala “potopoto ya sika”, oyo ezangi kisi ya mapa. Pamba te Klisto, mwana meme na biso ya Pake asiʼapesama likabo. Yango wana tosala feti na kisi ya mapa ya kala te, kisi ya mapa ya makambo ya mabe mpe ya nko, kasi na mapa oyo ezangi kisi, mapa ya makambo ya sembo mpe ya solo. Nakomelaki bino na mokanda na ngai ete bozala lisanga moko te na bato oyo basalaka ekobo. Elingi koloba te ete na bato nyonso ya mokili oyo, oyo basalaka ekobo, to bazali bato ya lokoso ya mbongo, to babotolaka biloko ya bato, to basambelaka bikeko; pamba te soki ezali bongo, wana esengeli ete bolongwa na mokili. Kasi sikʼoyo nakomeli bino, mpo ete bozala lisanga moko te na moto oyo amibengaka “ndeko”, kasi asalaka ekobo, to azali moto ya lokoso ya mbongo, to mosambeli bikeko, to mofingi bato, to molangwi masanga, to moto oyo abotolaka biloko ya bato. Moto ya ndenge wana, bolia na ye kutu esika moko te. Boni kosambisa bato oyo bazali ya Lingomba te, yango etali ngai? Boni bosambisaka te bato ya Lingomba? Baoyo bazali ya Lingomba te, Nzambe akosambisa bango. Kasi bino, bobengana moto mabe kati na bino. Soki moto moko na kati na bino azali na likambo na moto mosusu, mpo na nini akendaka kofunda yango epai ya bapakano, na esika ete akende kofunda yango epai ya basantu? Boyebi te ete basantu bakosambisa mokili? Mpe, soki bino bokosambisa mokili, bongo bozali ya kokoka te mpo na kosambisa mwa makambo ya mike-mike? Boyebi te ete, biso tokosambisa baanzelu? Bongo mpo na nini te makambo ya bomoi oyo! Nzoka nde, soki bozali na mikakatano mpo na oyo etali makambo ya bomoi oyo, bozwaka lokola bazuzi, bato oyo bazali na tina te na kati ya Lingomba. Nalobi yango mpo na koyokisa bino soni. Ezali solo ete, ata moto moko te ya bwanya azali kati na bino, oyo akoki kosambisa makambo kati na bandeko na ye? Pamba te, ndeko moko akendaka kofunda ndeko mosusu, mpe asalaka yango liboso ya bato oyo bandimela te. Na ndenge nyonso, yango ezali mbeba mpo na bino, awa bozali kofundana bino na bino. Mpo na nini bondimaka te ete basala bino mabe? Mpo na nini bondimaka te ete bakosa bino? Pamba te, bino moko mpe bokosaka mpe bosalaka mabe; mpe bosalaka yango epai ya bandeko na bino. Boyebi te ete, bato oyo basalaka mabe bakokota te na Bokonzi ya Nzambe? Bomikosa te: ezala bato oyo basalaka kindumba, basambeli ya bikeko, basali ekobo, baoyo balula makambo ya soni, baoyo basanganaka na baninga na bango mibali, miyibi, bato ya lokoso ya mbongo, balangwi masanga, baoyo bafingaka baninga, baoyo babotolaka biloko ya bato, bakokota te na Bokonzi ya Nzambe. Mpe bato mosusu kati na bino, bozalaka ndenge wana. Kasi basokolaki bino, bakomisaki bino basantu, mpe bakomisaki bino bato na sembo kati na kombo ya Nkolo Yesu Klisto, mpe na nzela ya Molimo ya Nzambe na biso. “Nazali na ndingisa mpo na kosala makambo nyonso”, kasi makambo nyonso ezali na litomba te. Nazali na ndingisa mpo na kosala makambo nyonso, kasi nakotika te ete, nazala mowumbu ata ya eloko moko. “Biloko ya kolia esalama mpo na libumu, mpe libumu esalama mpo na biloko ya kolia.” Kasi Nzambe akoboma nyonso mibale. Nzoto esalama te mpo na ekobo, kasi ezali mpo na Nkolo, mpe Nkolo azali mpo na nzoto. Pamba te, lokola Nzambe asekwisaki Nkolo kati na bakufi, akosekwisa biso mpe, na nguya na ye. Boyebi te ete nzoto na bino ezali biteni ya nzoto ya Klisto? Nakoki kozwa biteni ya Nzoto ya Klisto, mpo nakomisa yango biteni ya nzoto ya mwasi ya ndumba? Ata moke te! Boyebi te ete moto oyo asangani na mwasi ya ndumba, akomi na ye nzoto moko? Pamba te, elobama: “Bango mibale bakokoma nzoto moko.” Kasi moto oyo asangani na Nkolo, azali moko na ye kati na molimo. Yango wana, bokima ekobo. Masumu nyonso mosusu oyo moto akoki kosala ezali libanda ya nzoto na ye, kasi ye oyo asali ekobo, asali lisumu na nzoto na ye moko. Boyebi te ete nzoto na bino ezali ndako ya Molimo Mosantu, oyo azali kati na bino, oyo bozwaki wuta na Nzambe? Mpe bozali ya bino moko te; pamba te, basombaki bino na talo mingi penza. Yango wana, bopesa Nzambe nkembo na nzoto na bino. Sikʼoyo, mpo na makambo oyo bokomelaki ngai: eleki malamu ete mobali abala te. Kasi, mpo na kokima makambo ya soni, eleki malamu ete mobali nyonso azala na mwasi na ye, mpe mwasi nyonso azala na mobali na ye. Tika ete mobali akokisa posa ya mwasi na ye, mpe mwasi akokisa oyo ya mobali na ye. Pamba te, nzoto ya mwasi ezali lisusu ya ye te, kasi, ya mobali na ye. Ndenge moko mpe, nzoto ya mobali ezali lisusu ya ye te, kasi, ya mwasi na ye. Bopimelana nzoto te; kasi soki bolingi komipesa na mabondeli, bokoki koyokana bino mibale ete bosangisa nzoto te mpo na tango moke. Bongo na sima, bozongela kosangana, noki te, Satana akozwa nzela ya komeka bino mpo na kozanga makoki ya komikanga. Makambo oyo nalobi ezali kaka likanisi napesi, kasi ezali mobeko te. Nalingi ete mibali nyonso bazala lokola ngai. Kasi, moto na moto azali na likabo oyo Nzambe apesa ye: moko azali na likabo oyo, mpe mosusu azali na likabo wana. Nalobi na baoyo babala te mpe na basi oyo bakufisa mibali: eleki malamu ete bazala lokola ngai, babala te. Kasi, soki bakokoka komikanga te, eleki malamu ete babala na esika ya kozika na posa ya nzoto. Mpo na baoyo babala, napesi bango mobeko oyo (mobeko yango ewuti epai na ngai te, kasi epai na Nkolo): Mwasi asengeli te kokabwana na mobali na ye. Kasi soki akabwani na mobali na ye, abala lisusu te, to ayokana na mobali na ye. Mobali mpe asengeli kokabwana te na mwasi na ye. Mpo na bato mosusu, ngai nde nazali koloba kasi Nkolo te: soki ndeko mobali moko azali na mwasi oyo azali mondimi te, bongo mwasi yango asepeli kowumela na ye na libala, akabwana te na mwasi wana. Ndenge moko mpe, soki mwasi moko azali na mobali oyo azali mondimi te, mpe mobali yango asepeli kowumela na ye na libala, akabwana te na mobali wana. Pamba te, mobali oyo azali mondimi te akomi mosantu na nzela ya mwasi na ye, mpe mwasi oyo azali mondimi te akomi mosantu na nzela ya mobali na ye. Soki ezalaki bongo te, bana na bino balingaki kozala mbindo, nzoka nde bazali basantu. Kasi soki ye oyo azali mondimi te alingi koboma libala, aboma na ye. Na likambo ya boye, mobali mondimi to mwasi mondimi azali ya kokangama te: Nzambe abenga biso mpo ete tozala na bomoi ya kimia. Pamba te, yo mwasi, oyebi soki okobikisa mobali na yo? To mpe yo mobali, oyebi soki okobikisa mwasi na yo? Nzoka nde, tika ete moto na moto andima kobika kolanda likabo oyo Nkolo apesa ye, ndenge azalaki tango Nzambe abengaki ye. Oyo nde mobeko napesaka na mangomba nyonso. Boni, ezalaki na moto moko oyo tango Nzambe abengaki ye azalaki akatama nzoto ya mibali? Aluka te kozala lokola moto oyo akatama nzoto ya mibali te. Ezalaki na moto mosusu oyo azalaki akatama nzoto ya mibali te tango Nzambe abengaki ye? Aluka te kozala lokola moto oyo akatama nzoto ya mibali. Kokatama nzoto ya mibali ezali na tina te, mpe kokatama nzoto ya mibali te ezali mpe na tina te; kasi kobatela mibeko ya Nzambe nde eleki na tina. Tika ete moto na moto atikala ndenge azalaki tango Nzambe abengaki ye. Boni, ozalaki mowumbu tango Nzambe abengaki yo? Komitungisa te; kasi soki ozwi libaku ya kokoma moto ya somi, salela yango. Pamba te, mowumbu oyo abengama mpo na kosalela Nkolo, azali moto ya somi ya Nkolo. Ndenge moko mpe, moto ya somi oyo abengama mpo na kosalela Nkolo, azali mowumbu ya Klisto. Basombaki bino na talo mingi penza; yango wana, bokoma bawumbu ya bato te. Bandeko, tika ete moto na moto atikala liboso ya Nzambe, ndenge azalaki tango Nzambe abengaki ye. Mpo na baoyo babali nanu te: Nazali na mobeko te oyo ewuti epai na Nkolo, kasi nazali kopesa likanisi na ngai lokola ya moto oyo, na mawa ya Nkolo, bokoki kondimela. Nakanisi ete eleki malamu mpo na moto, likolo ya bapasi ya tango oyo, atikala ndenge azali. Ozali na mwasi? koluka kokabwana na ye te. Ozali mpe na mwasi te? Koluka mpe kobala mwasi te. Kasi soki mpe obali, osali lisumu te; soki elenge mwasi abali, asali lisumu te. Kasi bato oyo babala bakokutana na bapasi mingi na bomoi na bango ya mokolo na mokolo, boye nalingi kokebisa bino ete bapasi yango ekomela bino te. Bandeko, nalingi koloba boye: tango ezali mokuse. Kobanda sikʼoyo, tika ete baoyo bazali na basi, bazala lokola nde bazali na basi te; baoyo bazali kolela, bazala lokola nde bazali kolela te; baoyo bazali kosepela, bazala lokola nde bazali kosepela te; baoyo bazali kosomba, bazala lokola nde bazali na eloko te; baoyo bazali kosalela biloko ya mokili, bazala lokola nde bazali kosalela yango te. Pamba te, mokili ndenge ezali komonana sikʼoyo, ekoleka. Nalingi ete bomitungisa te. Mobali oyo abali nanu te atiaka makanisi na ye na makambo ya Nkolo: alukaka ndenge nini akoki kosepelisa Nkolo. Kasi mobali oyo abala atiaka makanisi na ye na makambo ya mokili oyo, alukaka ndenge nini akoki kosepelisa mwasi na ye; mpe motema na ye ezali ya kokabwana. Ndenge moko mpe, mwasi oyo azanga mobali to elenge mwasi oyo abali nanu te, atiaka makanisi na ye na makambo ya Nkolo. Posa ya motema na ye ezalaka kaka ete amipesa mobimba na Nkolo, na nzoto mpe na molimo. Kasi mwasi oyo abala atiaka makanisi na ye na makambo ya mokili oyo, alukaka ndenge nini akoki kosepelisa mobali na ye. Nazali koloba makambo oyo mpo na bolamu na bino moko, ezali te mpo na kotiela bino motambu, kasi nalingi ete bosala oyo ezali malamu, mpe bomipesa mobimba na mosala ya Nkolo. Soki elenge mobali amoni ete akokoka lisusu te komikanga liboso ya mobandami na ye, bongo akanisi ete abima na ye wana bazali na likanisi ya kobalana, asala kolanda likanisi na ye, asali lisumu te. Tika ete babalana. Kasi moto oyo azwi mokano na motema na ye, na kotindikama te, na bososoli nyonso ete wuta na motema na ye akosangisa nzoto te na mobandami na ye, asali malamu. Boye, moto oyo abali mobandami na ye asali malamu; kasi oyo mpe alingi kobala te, asali malamu koleka. Mwasi ya libala azalaka ya kokangama na mobali na ye wana mobali azali nanu na bomoi; soki mobali akufi, mwasi yango akomi na bonsomi ya kobalana na mobali nyonso oyo ye alingi, kasi kaka kati na Nkolo. Nzoka nde na makanisi na ngai, namoni ete akozala mwasi ya esengo mingi koleka soki atikali ndenge azali: mpe ngai nakanisi ete, ngai mpe nazali na Molimo ya Nzambe. Mpo na banyama oyo babonzelaka banzambe ya bikeko: Biso nyonso toyebi malamu ete tozali na boyebi. Boyebi epesaka lolendo, kasi bolingo elendisaka. Moto oyo akanisi ete azali na boyebi ya makambo, ayebi nanu eloko te na ndenge esengeli. Kasi, moto oyo alingaka Nzambe, Nzambe ayebi ye. Boye, mpo na makambo oyo etali banyama oyo babonzelaka banzambe ya bikeko: Toyebi malamu ete nzambe ya ekeko ezali eloko pamba kati na mokili, Nzambe azali kaka se moko. Solo, ezali na bikelamu ebele oyo ebengami na kombo ya banzambe na lola to na mokili, yango esali ete banzambe mpe bankolo bazala ebele, kasi mpo na biso, Nzambe azali kaka se moko, Ye nde azali Tata mpe Mokeli na nyonso, mpe biso tozali na bomoi mpo na Ye, mpe Nkolo azali kaka se moko, Ye Yesu Klisto. Nyonso esalema na nzela na Ye mpe biso tozali na bomoi mpo na Ye. Kasi bato nyonso bazali na boyebi ya makambo oyo te. Bato misusu bazali nanu na momesano ya kosambela banzambe ye bikeko kino sikʼoyo, boye tango baliaka misuni ya banyama oyo babonzelaka banzambe ya bikeko, bandimaka ete ezali penza mbeka oyo babonzelaka banzambe wana. Boye, mitema na bango ekomaka mbindo mpo ete elenda te. Nzoka nde, ezali bilei te nde ememaka biso pene na Nzambe: soki tolie te, tokobungisa eloko moko te; soki mpe tolie, tokozwa mpe eloko moko te. Kasi bokeba ete bonsomi na bino ekoma libaku te mpo na baoyo balenda te kati na kondima. Pamba te, soki moko kati na baoyo balenda te kati na kondima amoni yo, oyo ozali na boyebi, kolia na ndako ya nzambe ya bikeko; boni, motema na ye ekozanga solo kotindika ye ete alia mpe misuni ya banyama oyo babonzelaka banzambe ya bikeko? Boye, ndeko oyo alenda te kati na kondima, ye oyo Klisto akufelaki, akopengwa likolo ya boyebi na yo. Tango bozali kobetisa bandeko na bino mabaku na ndenge wana, mpe bozali kozokisa mitema na bango oyo elenda te, bozali nde kosala masumu liboso ya Klisto Ye moko. Yango wana, soki bilei oyo nazali kolia ekweyisi ndeko na ngai na masumu, nakolia yango lisusu te, mpo ete nazala libaku te oyo ekokweyisa ye na masumu. Boni, nazali na bonsomi te? Nazali ntoma te? Namona Nkolo na biso Yesu te? Bozali mbuma ya mosala na ngai te kati na Nkolo? Soki nazali ntoma te mpo na bato mosusu, kasi mpo na bino, nazali solo ntoma. Pamba te, bino bozali kashe ya mosala na ngai ya kozala ntoma kati na Nkolo. Tala eyano na ngai epai ya baoyo bafundaki ngai: Boni, biso tokoki te kolia mpe komela mpo na mosala na biso? Tokoki te kotambola elongo na mwasi moklisto lokola bantoma misusu, bandeko ya Nkolo mpe Piere basalaka? Boni, ezali kaka ngai mpe Barinabasi nde tosengeli kosala mpo na kozwa bilei na biso? Nani asalaka mosala ya soda na mbongo na ye moko? Nani alonaka elanga ya vino mpo alia mbuma na yango te? Nani abatelaka ngombe mpo amela miliki na yango te? Boni, ezali kaka na bomoto nde esalemaka bongo? Mobeko mpe elobi bongo te? Pamba te, ekomama na Mobeko ya Moyize: “Okokanga monoko ya ngombe te oyo ezali konyata mbuma.” Boni, bokanisi ete Nzambe amitungisaki nde mpo na ngombe? Ezali mpo na biso kaka te nde alobaki bongo? Solo, ekomamaki bongo mpo na biso. Pamba te, esengeli ete moto oyo azali kolona azala na elikya, mpe oyo azali kobeta mbuma ya ble azala na elikya ete akozwa eteni na ye. Soki tolonaki makambo ya molimo kati na bino, boni ezali penza mabe soki tobuki mbuma ya biloko kati na bino? Soki bato mosusu bazali kozwa biloko epai na bino, boni, biso tokoki kozwa yango koleka te? Nzoka nde, tosalelaka makoki na biso te, tokangaka mitema na makambo nyonso, noki te tokozala epekiseli mpo na Sango Malamu ya Klisto. Boyebi te ete baoyo basalaka na ndako ya Nzambe bazwaka bilei na bango na ndako ya Nzambe? Boyebi te ete baoyo basalaka na etumbelo bazwaka eteni na bango kati na makabo oyo bato bapesaka? Ndenge wana mpe Nkolo apesaki mitindo ete baoyo bateyaka Sango Malamu bazwa bilei na bango na nzela ya Sango Malamu. Kasi ngai nasaleli makoki na ngai ata moke te, mpe ezali te mpo na kosenga yango nde nakomeli bino mokanda oyo. Pamba te, eleki malamu ete nakufa na ngai na esika ya kobebisa lokumu na ngai. Koteya Sango Malamu ezali likambo oyo nakoki komikumisa na yango te, pamba te ezali mosala oyo epesamela ngai na makasi. Mawa na ngai soki nateyi Sango malamu te! Soki mokano ya koteya ewutaki epai na ngai moko, nalingaki solo kozwa lifuti. Kasi lokola mokano yango ewuti epai na ngai te, nazali kaka kokokisa mosala oyo epesamelaki ngai. Bongo lifuti na ngai ezali penza nini? Ezali ete nateya Sango Malamu na ofele, naluka te kozwa lifuti oyo Sango Malamu yango epesa ngai ndingisa ya kozwa. Solo, atako nazali nsomi na miso ya bato nyonso, kasi namikomisa mowumbu ya bato nyonso mpo ete namema bato ebele koleka epai na Yesu Klisto. Tango nazalaka elongo na Bayuda, nakomaka lokola Moyuda mpo ete namema bango epai na Klisto; tango nazalaka elongo na bato oyo bazali na se ya bokonzi ya Mibeko, nakomaka lokola moto oyo azali na se ya bokonzi ya Mibeko (atako ngai moko nazali na se ya bokonzi ya Mibeko te), mpo ete namema epai na Klisto baoyo bazali na se ya bokonzi ya Mibeko. Tango nazalaka elongo na baoyo bazali na se ya bokonzi ya Mibeko te, nakomaka mpe lokola moto oyo azali na se ya Mibeko te (elingi koloba te ete natosaka Mibeko ya Nzambe te, pamba te natosaka Mobeko ya Klisto), mpo ete namema bato oyo bazali na se ya bokonzi ya Mibeko te epai na Klisto. Tango nazalaka elongo na bato balenda te kati na kondima, nakomaka lokola moto alenda te kati na kondima, mpo ete namema bato balenda te kati na kondima epai na Klisto. Namikomisaka nyonso epai ya bato nyonso, mpo ete nakoka komema epai na Klisto ndambo ya bato kati na bango. Nzoka nde, nasalaka makambo wana nyonso mpo na Sango Malamu, mpo ete ngai mpe nazwa litomba na ngai kati na yango. Boni, boyebi te ete kati na lisano ya kopota mbangu, bapoti mbangu nyonso bakimaka, kasi moko kaka nde azwaka mbano? Bino mpe bokima mbangu, na ndenge ete bozwa mpe mbano. Bato nyonso oyo basalaka masano, bamipekisaka makasi na makambo ebele. Basalaka bongo mpo na kozwa motole oyo ebebaka, kasi biso tosalaka bongo mpo na kozwa motole oyo ebebaka te. Yango wana, nakimaka mbangu na bozoba te, nabetaka makofi bibetata-beta te. Kasi nakonzaka nzoto na ngai mpe nakomisaka yango lokola mowumbu, pamba te nabangaka ete sima ya koteya bato mosusu, ngai moko nazanga mbano. Bandeko, nalingi ete boyeba likambo oyo: Bakoko na biso bazalaki bango nyonso na se ya lipata, mpe bango nyonso bakatisaki ebale monene. Bango nyonso babatisamaki mpo na Moyize, kati na lipata mpe kati na ebale monene. Bango nyonso baliaki bilei ya molimo ya ndenge moko mpe bamelaki mayi ya molimo ya ndenge moko, pamba te bazalaki komela na libanga ya molimo oyo ezalaki kotambola elongo na bango: libanga yango ezalaki nde Klisto. Kasi Nzambe asepelaki te na mingi kati na bango, yango wana bakufaki na esobe. Nzoka nde, makambo oyo esalemaki mpo ete ezala ndakisa mpo na biso ete tolula makambo ya mabe te ndenge bango balulaki. Bozala basambeli ya banzambe ya bikeko te ndenge bamisusu kati na bango bazalaki, kolanda ndenge ekomama: “Bato bavandaki mpo na kolia mpe komela, mpe na sima, batelemaki mpo na kosakana.” Tosala kindumba te ndenge bamisusu kati na bango basalaki; bongo bato nkoto tuku mibale na misato (23.000) bakufaki na mokolo moko. Tomeka mpe Nkolo te ndenge bamisusu kati na bango bamekaki Ye; bongo banyoka ebomaki bango. Boyima-yima mpe te ndenge bamisusu kati na bango bayimaki-yimaki; bongo anjelu mobebisi abomaki bango. Nzoka nde, makambo oyo esalemaki mpo ete ezala ndakisa mpo na biso, mpe bakomaki yango mpo ete ekebisa biso oyo tokomi na tango ya suka. Yango wana, tika ete moto oyo azali kokanisa ete azali ya kotelema, asala keba ete akweya te. Komekama moko te ekomelaki bino, oyo ezangaka kokomela bato. Nzambe akokisaka bilaka na Ye: akotika te ete bomekama koleka makasi na bino. Kasi na tango ya komekama, akobongisa nzela ya kolonga yango, mpe akopesa makasi ya koyika mpiko. Yango wana balingami na ngai, bokima kosambela banzambe ya bikeko. Nazali koloba na bino lokola epai na bato oyo bazali na mayele; bososola bino moko soki makambo oyo nazali koloba ezali malamu to mabe. Boni, kopo ya elambo oyo na nzela na yango tozongisaka matondi epai na Nzambe, ekomisaka biso lisanga na makila ya Klisto te? Bongo lipa oyo tokabolaka, ekomisaka biso lisanga na nzoto ya Klisto te? Lokola lipa ezali moko, mpe biso, ata tozali ebele, tozali kaka kosala nzoto moko, pamba te biso nyonso tokabolaka kaka lipa moko. Botala bato ya Isalaele: boni, baoyo baliaka banyama oyo babonzelaka banzambe ya bikeko, bazalaka lisanga na etumbelo te? Nalingi koloba nini? Nalingi koloba ete likabo oyo bapesi na nzambe ya ekeko ezali na tina? To mpe nzambe ya ekeko ezali na tina? Te! Nzoka nde, mbeka oyo bapagano bazalaki kobonza, bazalaki nde kobonza yango na milimo mabe, na Nzambe te. Boye, naboyi ete bozala lisanga na milimo mabe. Bokoki te komela kopo ya Nkolo mpe kopo ya milimo mabe; bokoki te kolia na mesa na Nkolo mpe na mesa ya milimo mabe. Boni, tolingi nde kotumbola zuwa ya Nkolo? Tozali makasi koleka Ye? “Moto akoki kosala makambo nyonso oyo alingi,” kasi makambo nyonso te nde ezali na litomba. “Moto akoki kosala makambo nyonso oyo alingi,” kasi makambo nyonso te nde elendisaka kondima. Tika ete moko te aluka kaka bolamu na ye moko, kasi aluka mpe bolamu ya bato mosusu. Bolia biloko nyonso oyo etekamaka na zando, mpe bomituna-tuna mituna te, pamba te ekoki kobebisa makanisi. Pamba te, mokili mpe nyonso oyo ezali kati na yango ezali ya Nkolo. Soki moto oyo azali mondimi te abengisi yo mpo na kolia mpe ondimi kokende, lia biloko nyonso oyo bakopesa yo, mpe komituna-tuna mituna te, pamba te ekoki kobebisa makanisi. Kasi soki moto moko alobi na yo: “Babonzaki epai ya banzambe ya bikeko mosuni oyo.” Kolia mosuni yango te, mpo na moto oyo akebisi yo mpe mpo na kobebisa makanisi te. Nazali koloba na tina na makanisi na yo te, kasi na tina na makanisi ya moto wana; pamba te, mpo na nini makanisi ya moto mosusu esambisa bonsomi na ngai? Soki nazongisaka matondi mpo na eloko oyo naliaka, bongo mpo na nini kopamela ngai na tina na eloko oyo ngai nazongisaka matondi epai ya Nzambe? Yango wana, ezala soki bokolia, to bokomela: na nyonso bokosala, bosala yango mpo na lokumu ya Nzambe. Bozala libaku te, ezala epai ya bayuda, ezala epai ya bato oyo bazali bayuda te to epai ya lingomba ya Nzambe. Yango wana, ngai mpe nasalaka makasi mpo na kosepelisa bato nyonso na makambo nyonso. Pamba te, nalukaka kaka bolamu na ngai moko te, kasi mpe bolamu ya bato ebele, mpo ete babika. Bolanda ndakisa na ngai, ndenge ngai mpe nalandaka ndakisa ya Klisto. Nazali kokumisa bino na ndenge bokanisaka ngai na makambo nyonso mpe bobatelaka mateya ndenge nateyaki bino. Nzoka nde, nalingi boyeba ete Klisto azali mokonzi ya mobali nyonso, mobali azali mokonzi ya mwasi, mpe Nzambe azali mokonzi ya Klisto. Mobali nyonso oyo azali kobondela to kosakola moto ya kozipama, azali koyokisa mokonzi na Ye soni. Kasi mwasi nyonso oyo azali kobondela to kosakola moto polele, azali koyokisa mokonzi na ye soni; pamba te azali lokola mwasi oyo bakokola suki. Soki mwasi alati kitambala te, asengeli kokola suki na ye. Kasi soki ezali soni mpo na mwasi kokatisa to kokola suki, eleki malamu ete alata kitambala. Mobali asengeli te kolata kitambala, pamba te azali elilingi mpe lokumu ya Nzambe; kasi mwasi azali lokumu ya mobali. Pamba te, mobali akelama te wuta na mwasi, kasi mwasi nde akelama wuta na mobali. Mobali akelamaki te mpo na mwasi, kasi mwasi nde akelamaki mpo na mobali. Yango wana, mpo na ba-anjelu, mwasi asengeli kozala na elembo ya bokonzi na moto na ye. Nzoka nde, kati na Nkolo, ekoki kosalema te ete mwasi azala soki mobali mobali azali te, to mobali azala soki mwasi azali te. Pamba te, lokola mwasi akelamaki wuta na mobali, mobali mpe abotamaki na mwasi. Kasi nyonso ewutaka na Nzambe. Botala nanu bino moko: ezali penza malamu ete mwasi abondela Nzambe moto polele? Boni, ata ndenge Nzambe asala mokili eteyaka bino te ete ezali soni mpo na mobali kozala na suki milayi? Kasi ezali lokumu mpo na mwasi kozala na suki milayi, pamba te suki epesamela ye lokola kitambala. Soki moto moko alingi kotia tembe mpo na likambo oyo, biso mpe mangomba ya Nzambe tozalaka na ezaleli wana te. Mpo na makambo oyo elandi, nakokumisa bino te, pamba te tango bosanganaka, mayangani na bino ememelaka bino bolamu te kasi, mabe. Ya liboso, nayoki sango ete tango bosanganaka na Lingomba, bokabwani ezalaka kati na bino, mpe nandimi yango mwa moke. Pamba te, esengeli ete bokabwani ezala kati na bino mpo na kolakisa malamu soki banani kati na bino, bazali bandimi ya solo. Tango bosanganaka, bosanganaka te mpo na kolia bilei ya Nkolo, pamba te tango boliaka, moto na moto awelaka kolia bilei na ye moko. Boye, bamoko batikalaka na nzala mpe bamisusu balangwaka. Boni, bozali na bandako te epai wapi bokoki kolia mpe komela? To bosalaka bongo mpo na kotiola Lingomba ya Nzambe, mpe koyokisa soni baoyo bazalaka na eloko te? Naloba na bino nini? Nakumisa bino? Mpo na likambo oyo? Nakokumisa bino te! Pamba te, tala mateya oyo ngai nazwaki epai ya Nkolo mpe nateyaki bino: Nkolo Yesu, na butu oyo batekaki ye, akamataki lipa, mpe sima ya kozongisa matondi, akataki yango mpe alobaki: “Oyo ezali nzoto na ngai, ezali mpo na bino. Bosalaka boye mpo na kokanisa ngai.” Ndenge moko mpe sima ya kolia, akamataki kopo mpe alobaki: “Kopo oyo ezali Boyokani ya Sika kati na makila na ngai. Bosalaka bongo tango nyonso bokomelaka yango, mpo na kokanisa ngai.” Pamba te, tango nyonso bokozala kolia lipa mpe komela kopo, bokozala kosakola kufa ya Nkolo kino Ye akozonga. Yango wana, moto oyo akolia lipa to akomela kopo ya Nkolo na ndenge esengeli te, akomema ngambo mpo na nzoto mpe makila ya Nkolo. Tika ete moto na moto amitala malamu liboso ya kolia lipa mpe komela kopo. Pamba te, moto oyo alie lipa mpe ameli kopo, na kozanga kososola tina ya nzoto ya Nkolo, azali kolia mpe komela etumbu mpo na ye moko. Yango wana, mingi kati na bino bakoma na bolembu mpe na maladi, mpe bamisusu bakufa. Soki biso moko tomitalaki malamu penza, tolingaki kozwa etumbu te. Nzoka nde, Nkolo apesaka biso etumbu mpo na kozongisa biso na nzela, mpo ete tozwa etumbu te elongo na mokili. Boye bandeko na ngai, tango bosanganaka mpo na kolia, bozelaka baninga. Soki moto azali na nzala, tika ete alia na ndako na ye mpo ete mayangani na bino ememela bino etumbu te. Mpe mpo na makambo oyo etikali, nakotala yango tango nakoya. Bandeko, nakosepela ete bozala na boyebi mpo na makambo oyo etali makabo ya Molimo. Boyebi malamu ete tango bozalaki nanu bapagano, bozalaki komemama mpe kokosama epai ya banzambe ya bikeko oyo elobaka te. Yango wana, nazali koloba na bino ete moto moko te, wana akambami na Molimo ya Nzambe akoki koloba: “Tika ete Yesu alakelama mabe!”, mpe moto moko te akoki koloba: “Yesu azali Nkolo”, soki akambami na Molimo Mosantu te. Ezali na makabo ya ndenge na ndenge, kasi Molimo azali kaka moko. Ezali na balotomo ya ndenge na ndenge, kasi Nkolo azali kaka moko. Lolenge ya kosalela Nkolo ezali ndenge na ndenge, kasi Nzambe azali kaka moko, Ye oyo asalaka nyonso kati na bato nyonso. Nzoka nde, Molimo asalaka na nzela ya moto na moto, mpo na bolamu ya bato nyonso. Epai na moko, Molimo apesi liloba ya bwanya; epai na mosusu, liloba ya boyebi; Molimo moko kaka wana, apesi na mosusu, kondima; na mosusu, likabo ya kobikisa babeli; na mosusu, nguya ya kosala bikamwa; na mosusu, likabo ya kosakola; na mosusu, likabo ya kososola milimo; na mosusu, likabo ya koloba minoko ya ndenge na ndenge; na mosusu, likabo ya kolimbola minoko. Kasi kaka Molimo moko wana nde asalaka misala nyonso wana; mpe akobolaka makabo na Ye na moto na moto, ndenge Ye moko alingi. Nzoto ezali kaka moko, atako ezali na biteni ebele; mpe atako biteni yango nyonso ezali ebele, kasi ezali kosala kaka nzoto moko. Boye, ezali mpe bongo mpo na Klisto. Pamba te, biso nyonso tobatisamaki kaka na Molimo moko, mpo na kozala nzoto moko: ezala Bayuda to bato ya bikolo ya bapaya, ezala bawumbu to bansomi. Mpe biso nyonso tozwaki ya komela wuta na Molimo moko kaka wana. Nzoto ezali kaka na eteni moko te, kasi ezali na biteni ebele. Soki lokolo elobi: “Lokola nazali loboko te, nazali kati na nzoto te.” Boni, ekotika solo kozala eteni ya nzoto mpo elobi bongo? Mpe soki litoyi elobi: “Lokola nazali liso te, nazali eteni ya nzoto te.” Boni, ekotika solo kozala eteni ya nzoto mpo elobi bongo? Soki nzoto mobimba ezalaki kaka liso, boye nzoto yango elingaka koyoka ndenge nini? Soki nzoto mobimba ezalaki kaka litoyi, boye nzoto yango elingaki koyoka solo ndenge nini? Kasi Nzambe atiaki eteni moko na moko na nzoto, eteni na eteni na mosala na yango, ndenge Ye moko alingaki. Soki biteni nyonso ezalaki kaka eteni moko, boni nzoto elingaki penza kozala nzoto? Solo, biteni ezali ebele, kasi nzoto ezali kaka moko. Yango wana, liso ekoki te koloba na loboko: “Nazali na posa na yo te;” to moto, ekoki te koloba na makolo: “Nazali na posa na bino te.” Nzoka nde, biteni ya nzoto oyo emonanaka lokola ezali ya bolembu, ezalaka mpe na tina. Biteni ya nzoto oyo tomonaka lokola ezali na lokumu mingi te, yango nde topesaka lokumu mingi; mpe oyo tomonaka lokola ezali kitoko te, yango nde tobongisaka malamu, nzoka nde, biteni oyo tomonaka kitoko ezalaka na posa te ete babongisa yango. Kasi Nzambe asalaki nzoto na lolenge ete lokumu mingi epesama na biteni oyo emonanaka lokola ezanga lokumu, mpo ete bokabwani ezala te kati na nzoto, kasi biteni esunganaka. Soki eteni moko ezali koyoka pasi, biteni nyonso mpe ezali koyoka pasi elongo na yango; soki eteni mosusu ezwi lokumu, biteni nyonso mpe esepeli elongo na yango. Nzoka nde, bino bozali nzoto ya Klisto, mpe moko na moko kati na bino azali eteni ya nzoto ya Klisto. Boye, kati na Lingomba, Nzambe atiaki: ya liboso, bantoma, ya mibale, basakoli, ya misato, balakisi, mpe na sima, baoyo bazali na likabo ya kosala bikamwa, baoyo bazali na likabo ya kobikisa babeli, baoyo bazali na likabo ya kosunga bato, baoyo bazali na likabo ya kokamba, mpe baoyo bazali na likabo ya koloba minoko ya ndenge na ndenge. Boni, bango nyonso bazali bantoma? Bango nyonso bazali basakoli? Bango nyonso bazali balakisi? Bango nyonso basalaka bikamwa? Bango nyonso bazali na likabo ya kobikisa babeli? Bango nyonso balobaka minoko ya ndenge na ndenge? Bango nyonso balimbolaka minoko? Bozala na posa makasi ya makabo oyo eleki na tina. Boye, nakolakisa bino nzela oyo eleki malamu. Soki nalobi minoko ya bato to ya ba-anjelu, kasi nazangi bolingo, nazali kaka lokola ngonga oyo ezali kotia makelele to lokola manzanza oyo ezali kotia makelele. Soki nazali na likabo ya kosakola, ya bososoli ya mabombami nyonso mpe ya boyebi ya makambo nyonso; mpe soki nazali na kondima oyo ekoki kolongola bangomba, kasi nazangi bolingo, nazali pamba. Soki napesi biloko na ngai nyonso epai ya babola, mpe nakabi nzoto na ngai mpo ete batumba yango, kasi nazangi bolingo, nakozwa ata litomba moko te. Bolingo ekangaka motema, bolingo esalisaka bato, bolingo elulaka te, bolingo emikumisaka te, bolingo emitondisaka na lolendo te. Bolingo esalaka te likambo oyo ebongi te, bolingo elukaka bolamu na yango moko te, bolingo esilikaka te, bolingo ekanisaka mabe te. Bolingo esepelaka te na makambo ya bosembo te, kasi esepelaka na bosolo. Bolingo elimbisaka makambo nyonso, bolingo endimaka makambo nyonso, bolingo etiaka elikya na makambo nyonso, bolingo eyikaka mpiko na makambo nyonso. Bolingo esilaka te. Bisakoli? Ekosila. Minoko ya ndenge na ndenge? Ekosuka. Boyebi? Ekosila. Pamba te, toyebi kaka ndambu, mpe tosakolaka kaka ndambu. Kasi tango oyo ya kokoka ekoya, oyo ya ndambu ekosila. Tango nazalaki mwana moke, nazalaki koloba lokola mwana moke, nazalaki kokanisa lokola mwana moke, nazalaki na mayele lokola ya mwana moke. Kasi tango nakomi mokolo, natiki makambo ya bomwana. Sikʼoyo tozali komona lokola na talatala, tozali komona penza ndenge esengeli te. Kasi mokolo moko, tokomona penza ndenge esengeli. Sikʼoyo nayebi kaka ndambu, kasi mokolo moko, nakoyeba penza nyonso, ndenge Nzambe ayebeli ngai. Nzoka nde, sikʼoyo, makambo oyo misato ewumelaka: kondima, elikya mpe bolingo. Nzoka nde, oyo eleki motuya kati na yango, ezali nde bolingo. Boluka liboso bolingo. Bozala na posa makasi ya makabo ya Molimo, mingi penza likabo oyo ya kosakola. Pamba te, moto oyo azali koloba na monoko oyo eyebani te, azali kosolola na Nzambe kasi na bato te, mpo ete moto moko te azali kososola ye; nzoka nde, azali koloba mabombami, na bokambami ya Molimo. Kasi moto oyo azali kosakola, azali nde koloba na bato, mpo na kokolisa kondima na bango, kolendisa bango mpe kobondisa bango. Moto oyo azali koloba na monoko oyo eyebani te, azali kaka kokolisa kondima na ye moko, kasi oyo azali kosakola azali kokolisa kondima ya Lingomba mobimba. Nalingi ete bino nyonso bolobaka minoko oyo eyebani te, kasi nalingi mingi koleka ete bino nyonso bosakolaka. Moto oyo azali kosakola azali na tina mingi koleka moto oyo azali koloba minoko oyo eyebani te, loba kaka soki alimboli minoko yango mpo na kolendisa kondima ya Lingomba. Bandeko na ngai, soki nayei epai na bino mpe nalobi na bino kaka na monoko oyo eyebani te, nakozala litomba nini mpo na bino, soki liloba na ngai ememeli bino emoniseli moko te, boyebi moko te ya sika, lisakoli moko te, liteya moko te? Ezali mpe ndenge moko mpo na bisaleli oyo babetelaka miziki lokola flite to nzenze. Soki ezali kobimisa te mingongo oyo ekeseni, ndenge nini tokoki kososola mongongo oyo flite to nzenze ezali kobimisa? Bongo, soki kelelo ebimisi mongongo oyo esengeli te, nani akomibongisa mpo na etumba? Ezali mpe ndenge moko mpo na bino: soki na minoko na bino, bozali koloba makambo oyo bato bazali kososola te, ndenge nini bakoki koyeba solo makambo oyo bozali koloba? Wana, bokoloba na pamba. Kati na mokili, minoko ezali ebele, mpe moko te kati na yango ezangi tina. Nzoka nde, soki nayebi te ndimbola ya maloba ya monoko oyo moto azali koloba na ngai, nakozala lokola mopaya epai na ye, boye ye mpe akozala mopaya epai na ngai. Yango wana, bino mpe, lokola bozalaka na posa makasi ya makabo ya Molimo, boluka mingi kozala na yango ebele, mpo na kokolisa Lingomba na kondima. Yango wana, tika ete moto oyo alobaka na minoko oyo eyebani te, abondela mpo ete azwa makoki ya kolimbola maloba oyo azali koloba. Pamba te, soki nazali kobondela na monoko oyo eyebani te, molimo na ngai ezali kobondela, kasi mayele na ngai ezali kosala te. Bongo, nasala nini? Nakobondela na molimo na ngai, kasi nakobondela mpe na mayele na ngai; nakoyemba na molimo na ngai, kasi nakoyemba mpe na mayele na ngai. Soki ozali kotonda Nzambe na molimo na yo, ndenge nini baoyo bazali koyoka te, bakoki koloba: “Amen!” na libondeli na yo ya kotonda Nzambe? Pamba te, bayebi te makambo oyo ozali koloba. Okozongisa matondi ya kitoko, kasi moto mosusu akokola na kondima te. Natondaka Nzambe mpo ete nalobaka minoko oyo eyebani te koleka bino nyonso. Kasi kati na Lingomba, nasepelaka koloba maloba mitano oyo bato bakoki kososola mpo na koteya bato mosusu, na esika ya koloba maloba nkoto zomi (1.000) na minoko oyo eyebani te. Bandeko na ngai, botika kokanisa lokola bana mike. Bozala te lokola bana mike na lolenge na bino ya kososola makambo. Mpo na oyo etali mabe, bozala lokola bana mike; Kasi mpo na oyo etali lolenge ya kososola makambo, bozala mikolo. Pamba te, ekomama na Mobeko: “Ekozala na minoko ya bapaya, na lokota oyo eyebani te nde nakoloba na bato oyo, kasi ata bongo, bakoyoka ngai te,” elobi Yawe. Yango wana, minoko oyo eyebani te ezali elembo mpo na bato oyo bandimaka te, kasi ezali elembo te mpo na bandimi. Nzoka nde, lisakoli ezali elembo mpo na bandimi, kasi ezali elembo te mpo na bato oyo bandimaka te. Soki Lingomba mobimba esangani esika moko, mpe bato nyonso bazali koloba minoko oyo eyebani te, bongo bato oyo bazali na boyebi moke to bato oyo bandimaka te bakoti kuna; boni, bakoloba te ete bozali na liboma? Nzoka nde, soki bato nyonso bazali kosakola, mpe moto oyo andimaka te to oyo azali na boyebi moke akoti kuna; boni, akomimona lokola moto ya masumu te? Akomitungisa solo motema te? Basekele ya motema na ye ekomonisama polele. Boye, akofukama, akokumisa Nzambe mpe akoloba: “Solo, Nzambe azali kati na bino.” Bandeko, toloba lisusu nini? Tango bosanganaka esika moko, tika ete moko ayemba nzembo, mosusu ateya, mosusu ayebisa makambo oyo Nzambe amonisi ye, mosusu aloba na monoko oyo eyebani te mpe mosusu alimbola. Nyonso wana esengeli kosalema mpo na kolendisa Lingomba na kondima. Soki bato bazali koloba na minoko oyo eyebani te, tika ete bato mibale, suka bato misato baloba, moko sima na mosusu, mpe esengeli ete moko alimbola yango. Soki moto ya kolimbola maloba yango azali te, tika ete ye oyo azali koloba monoko oyo eyebani te akanga monoko kati na Lingomba, mpe aloba epai na ye moko mpe epai na Nzambe. Mpo na oyo etali bato oyo basakolaka: tika ete bato mibale to misato basakola, mpe bamisusu bayekola malamu makambo oyo basakoli wana bazali koloba. Soki moko kati na mayangani azwi emoniseli tango mosusu azali koloba, moto oyo azali koloba esengeli kokanga monoko. Pamba te, bino nyonso bokoki na bino kosakola, kasi bosengeli kosala yango moko sima na mosusu, mpo ete bato nyonso bayekola mpe balendisama. Mosakoli azali na bokonzi likolo ya molimo ya basakoli oyo ezali kokamba ye. Pamba te, Nzambe azali Nzambe ya mobulu te, kasi Nzambe ya molongo. Ndenge esalemaka na Mangomba nyonso ya basantu, basi basengeli te koloba kati na mayangani, pamba te bazali na ndingisa te ya koloba. Basengeli nde kotosa ndenge Mobeko etindaka. Soki bazali na posa ya koyeba likambo, tika ete batunaka mibali na bango ndako, pamba te ezali soni mpo mwasi koloba kati na mayangani. Boni, bokanisi ete Maloba ya Nzambe ewutaki nde epai na bino? To ekomaki kaka epai na bino moko? Soki moto akanisi ete azali mosakoli to azali na likabo ya Molimo, asengeli koyeba ete makambo oyo nasili kokomela bino ezali nde Mobeko ya Nkolo. Soki ayebi yango te, elingi koloba ete Nzambe mpe ayebi ye te. Yango wana bandeko na ngai, bozala na posa makasi ya likabo ya kosakola, mpe bopekisa bato te koloba minoko oyo eyebani te. Kasi tika ete makambo nyonso esalema na ndenge oyo esengeli, na mobulu te. Bandeko na ngai, nalingi sikʼoyo kozongisa lisusu na makanisi na bino Sango Malamu oyo nateyaki bino, Sango Malamu oyo boyambaki mpe oyo bomipesi na yango. Ezali na nzela ya Sango Malamu yango nde bosili kobikisama, soki kaka bosimbi makasi Liloba oyo nateyaki bino, loba ete, bondimaki na pamba. Nateyaki bino liboso na nyonso, mateya oyo ngai moko nazwaki: Klisto akufaki mpo na masumu na biso ndenge ekomama; bakundaki ye mpe asekwaki na mokolo ya misato ndenge ekomama. Amonanaki epai na Piere, mpe na bantoma zomi na mibale. Sima na yango, amonanaki lisusu epai na bandeko nkama mitano na mbala moko, mpe mingi kati na bango bazali nanu na bomoi kino na tango oyo, kasi bamisusu basila kokufa. Bongo, amonanaki epai na Jake, mpe na bantoma nyonso. Sima na bango nyonso, amonanaki mpe epai na ngai, ngai lokola mwana matsombe. Pamba te, nazali moke penza kati na bantoma mpe nakoki kutu te kobengama ntoma, mpo ete nanyokolaki Lingomba ya Nzambe. Kasi oyo nazali lelo, nazali yango mpo na ngolu na Nzambe, mpe ngolu na Ye epai na ngai ezali ya pamba te. Nasalaki mosala mingi koleka bango nyonso, nzoka nde, ezali ngai te, ezali nde ngolu ya Nzambe oyo ezali kati na ngai. Na mokuse, ezala ngai to bango, biso nyonso toteyaka kaka Sango wana, mpe ezali nde Sango oyo bino bondimaki. Kasi soki toteyaka ete Klisto asekwaki kati na bakufi, bongo ndenge nini bato mosusu kati na bino balobaka ete bato bakufa bakosekwa te? Soki bakufi bakosekwa te, wana Klisto mpe asekwaki te. Mpe soki Klisto asekwaki te, mateya na biso elingaki kozala pamba, boye kondima na bino mpe elingaki kozala pamba. Wana biso tolingaki kozala batatoli ya lokuta mpo na Nzambe, soki totatoli ete Nzambe asekwisaki Klisto kati na bakufi, nzoka nde asekwisaki ye te, soki ya solo bakufi bakosekwa te. Pamba te, soki bakufi bakosekwa te, wana Klisto mpe asekwaki te. Mpe soki Klisto asekwaki te, kondima na bino elingaki kozala pamba, mpe bozali nanu kati na masumu; baoyo mpe bakufa kati na Klisto babungi libela! Soki totiaka elikya na Klisto kaka mpo na bomoi oyo, wana tozali penza bato ya mawa koleka bato nyonso. Kasi Klisto asekwaki solo kati na bakufi, mpe azali solo mosekwi ya liboso kati na bakufi. Pamba te, lokola kufa eyaki na nzela ya moto moko, ndenge wana mpe lisekwa eyaki na nzela ya moto moko. Ndenge bato nyonso bakufaka kati na Adami, ndenge wana mpe bato nyonso bakozwa bomoi kati na Klisto. Kasi moto na moto na tango na ye: Klisto, akosekwa moto ya liboso, mpe na sima, baoyo bazali kati na Ye, tango akoya. Boye, suka ekoya tango Klisto akozongisa bokonzi na maboko ya Nzambe Tata, sima na ye kobebisa lokumu nyonso, bokonzi nyonso mpe nguya nyonso. Pamba te, Klisto asengeli kowumela na bokonzi kino tango Nzambe akotia banguna na ye nyonso na se ya makolo na ye. Kufa ekozala monguna ya suka oyo ekobebisama. Pamba te, Nzambe atiaki biloko nyonso na se ya makolo na ye! Nzoka nde, tango Makomi ezali kobola: “Biloko nyonso ezali na se ya bokonzi na ye,” elakisi polele ete elobi mpo na Nzambe te, oyo atiaki biloko nyonso na se ya bokonzi ya Klisto. Mpe tango Nzambe akotia biloko nyonso na se ya bokonzi na ye, boye ye moko Mwana mpe akomitia na se ya bokonzi ya Ye oyo atiaki biloko nyonso na se ya bokonzi na ye, mpo ete Nzambe azala nyonso kati na bato nyonso. Soki lisekwa ezali te, bato oyo bazwaka libatisi mpo na bakufi, bakosala nini? Soki bato nyonso oyo bakufa bakosekwa te, mpo na nini bato bazwaka libatisi mpo na bango? Bongo biso, mpo na nini tango nyonso tokutanaka na makama? Bandeko na ngai, mokolo na mokolo nandimaka kokufa wana nazwaka lokumu mpo na bino kati na Klisto Yesu, Nkolo na biso. Soki nabundaki na banyama ya zamba na Efeso kaka mpo na makambo ya bomoto, litomba nini nakozwa? Soki bakufi bakosekwa te: “Tika ete tolia mpe tomela, pamba te lobi tokokufa!” Bomikosa te: baninga mabe babebisaka bizaleli ya malamu! Bozongela makanisi ya malamu na ndenge oyo ekoki, mpe botika kosala masumu. Pamba te, bato mosusu bayebi Nzambe te, nalobi yango mpo koyokisa bino soni. Kasi bato mosusu bakoki kotuna: “Bakufi bakosekwa ndenge nini? Bakozonga na bomoi na nzoto nini?” Bozangi nde mayele! Mbuma ekoki kobota te soki ekufi te. Oyo bolonaka, ezalaka te nzoto oyo nzete ekozala na yango tango ekobima, nzoka nde bolonaka mbuma ya ble to mbuma mosusu. Kasi Nzambe nde apesaka yango nzoto oyo Ye moko abongisa, mpe apesa mbuma na mbuma, nzoto na yango. Bikelamu nyonso ya bomoi ezali na nzoto ya lolenge moko te: bokeseni ezali kati na nzoto ya bato, ya banyama, ya bandeke mpe ya mbisi. Bokeseni mpe ezali kati na banzoto ya likolo mpe ya se: nzoto na nzoto ezali na kongenga na yango. Moyi ezali na kongenga na yango, sanza ezali na kongenga na yango, minzoto mpe ezali na kongenga na yango; boye monzoto moko ekeseni na mosusu na kongenga. Ekozala mpe ndenge moko mpo na lisekwa ya bakufi. Ekokundama nzoto ya kopola, kasi ekosekwa nzoto oyo epolaka te; ekokundama nzoto ya soni, kasi ekosekwa nzoto ya nkembo; ekokundama nzoto ya bolembu, kasi ekosekwa nzoto ya nguya; ekokundama nzoto ya bomoto, kasi ekosekwa nzoto ya molimo. Soki nzoto ya bomoto ezali, nzoto ya molimo mpe ezali. Yango wana, ekomama: “Moto ya liboso, Adami akomaki elimo ya bomoi. Kasi Adami ya suka, akomaki Molimo oyo apesaka bomoi!” Bomoi ya molimo, yango te eyaki liboso, kasi bomoi ya nzoto nde eyaki liboso; bomoi ya molimo nde eyaki na sima. Moto ya liboso asalemaki na putulu ya mabele, azali moto ya mokili, kasi moto ya mibale awutaki na Likolo. Bato nyonso oyo basalema na putulu ya mabele bazali ndenge moko na moto oyo asalema na putulu ya mabele; ndenge moko mpe, bato ya Likolo bazali ndenge moko na ye oyo awutaki na Likolo. Lokola tomemaki elilingi ya moto oyo asalemaki na putulu, tokomema mpe elilingi ya ye oyo awutaki na Likolo. Bandeko na ngai, nalobi na bino boye: nzoto ya mosuni na makila ekoki te kokota na Bokonzi ya Nzambe, mpe nzoto oyo epolaka ekoki te kozwa oyo epolaka te. Boyoka, nalingi koyebisa bino mabombami: biso nyonso tokokufa te, kasi banso tokobongwana na mbalakata, noki penza, tango kelelo ya suka ekobeta. Boye, bakufi bakosekwa na nzoto oyo epolaka te, bongo biso, tokobongwana. Boye, nzoto oyo epolaka esengeli kolata kozanga kopola, mpe oyo ekufaka, kozanga kokufa. Tango nzoto oyo epolaka ekolata kozanga kopola, mpe oyo ekufaka, kozanga kokufa, kaka na tango wana nde Liloba oyo ya Makomi ekokokisama: “Elonga emeli liwa.” “Oh kufa, wapi elonga na yo? Oh kufa, wapi nguya na yo?” Kufa ezwaka nguya wuta na masumu, mpe masumu ezwaka nguya wuta na Mibeko. Kasi matondi na Nzambe! Ye oyo apesi biso elonga na nzela ya Nkolo na biso Yesu Klisto. Yango wana, bandeko balingami, botelema ngwi mpe eloko moko te eningisa bino. Bomipesa tango nyonso na mosala ya Nkolo, mpo boyebi malamu ete mosala na bino mpo na Nkolo ekozala pamba te. Mpo na makambo etali makabo oyo bozali kokongola mpo na basantu: Bosala ndenge natindaki ete Mangomba ya Galatia esala. Tika ete moko na moko kati na bino abombaka na ndako na ye, mbongo, kolanda ezweli na ye, na mokolo ya liboso ya poso nyonso, mpo ete tango nakoya, boluka lisusu te kokongola yango. Tango nakoya, nakotinda na Yelusalemi, bato oyo bino moko bokopona elongo na mikanda, mpo ete bamema likabo na bino. Soki ekomonana malamu ete ngai mpe nakende, wana tokokende na bango nzela moko. Nazali kokanisa koya epai na bino, sima ya koleka na Masedwane, pamba te nasengeli koleka wana. Tango mosusu, nakoki kovanda mwa tango epai na bino, mpe kolekisa tango nyonso ya malili mpo ete bokoka kosalisa ngai, ete nakoba mobembo na ngai kino epai nazali kokende. Nazali na posa ya komona bino te sikʼoyo wana nazali koleka, pamba te nazali na elikya ete nakovanda na bino mwa mikolo, soki Nkolo akolinga. Kasi nakotikala awa na Efeso kino na mokolo ya Pantekote, pamba te nakutani na libaku malamu ya kosakola Sango Malamu mpe banguna ebele. Soki Timote akomi epai na bino, bosala nyonso ete azala na kimia kati na bino, pamba te asalaka mosala ya Nkolo lokola ngai. Tika ete moto moko te atala ye lokola eloko pamba. Bosalisa ye mpo ete akoba mobembo na ye mpe akoma epai na ngai na kimia, pamba te ngai nazali kozela ye elongo na bandeko. Nzoka nde, mpo na ndeko na biso Apolosi, nalendisaki ye makasi ete aya kotala bino elongo na bandeko. Kasi azali penza na posa te ya kosala yango sikʼoyo; akoya kaka soki akutani na libaku malamu. Bosenzela, botelema ngwi na kondima, bozala bato ya mpiko mpe ya makasi. Bosala makambo nyonso na bolingo. Boyebi malamu ete Stefanasi mpe libota na ye, bazalaki bato ya liboso ya kobongola motema na Akayi. Bamipesa mpo na kosalela basantu. Nazali kolendisa bino bandeko ete botosaka bato ya ndenge wana, mpe botosaka moto nyonso oyo asalisaka bango mpe asalaka elongo na bango. Nasepelaki mingi tango Stefanasi, Fortinatisi mpe Akayikisi bakomaki epai ngai, pamba te tango namonaki bango, ezalaki lokola namoni bino nyonso. Balendisaki molimo na ngai mpe milimo na bino: boyeba solo kopesa lokumu na bato motindo oyo. Mangomba ya Azi etindeli bino mbote. Akilasi mpe Priska elongo na lingomba oyo esanganaka na ndako na bango bapesi bino mbote mingi kati na Nkolo. Bandeko nyonso batindeli bino mbote! Bopesanaka bino na bino beze ya bondeko. Bozwa mbote oyo ngai moko Polo nasili kokomela bino. Soki moto moko alingi Nkolo te, tika ete alakelama mabe. E e Nkolo, yaka! Tika ete ngolu ya Nkolo Yesu ezala na bino nyonso! Bolingo na ngai ezala na bino nyonso kati na Klisto Yesu. Amen! Polo, ntoma ya Klisto Yesu na mokano ya Nzambe, mpe ndeko na biso Timote, totindi mokanda oyo na Lingomba ya Nzambe oyo ezali na Korinto mpe na basantu nyonso oyo bazali na Akayi mobimba. Tika ete ngolu mpe kimia kowuta na Nzambe Tata na biso mpe na Nkolo Yesu Klisto ezala na bino. Lokumu epai na Nzambe, Tata na Nkolo na biso Yesu Klisto, Tata oyo ayokelaka bato mawa mpe Nzambe oyo abondisaka bato na makambo nyonso. Abondisaka biso na bapasi nyonso mpo ete biso mpe tokoka kobondisa baoyo bazali kati na bapasi, na nzela ya kobondisama oyo biso mpe tozwaki epai na Ye. Ndenge tozali komona pasi mingi kati na Klisto, ndenge wana mpe kobondisama na biso ezali mingi na nzela ya Klisto. Soki tozali komona pasi, ezali mpo ete bino bokoka kobondisama mpe kobika; soki biso tosili kozwa kobondisama, ezali mpo ete bino mpe bokoka kozwa kobondisama mpo ete bolonga kokanga motema liboso ya bapasi ya ndenge moko na oyo biso tozali komona. Boye, tozali solo kotia motema epai na bino, pamba te toyebi malamu ete ndenge bozali komona pasi elongo na biso, ndenge wana mpe bozali kozwa kobondisama elongo na biso. Bandeko, tolingi boyeba mikakatano nini tokutanaki na yango na etuka ya Azi. Mikakatano yango elekaki penza makasi kino ebungisaki biso ata elikya ya kozala na bomoi. Solo, tomonaki lokola nde bakatelaki biso etumbu ya liwa. Esalemaki bongo mpo ete toyekola kotia elikya na bomoto na biso moko te, kasi na Nzambe oyo asekwisaka bakufi. Ye nde akangolaki biso na makama ya kufa ya lolenge wana, mpe akokangola biso lisusu. Solo, tozali na elikya kati na Ye ete akokangola biso lisusu koleka, awa bozali kosunga biso na mabondeli na bino. Boye, ngolu oyo azali kopesa biso lokola eyano ya mabondeli ya bato ebele, ekopesa lisusu nzela na bato ebele ete bazongisa matondi epai na Nzambe mpo na biso. Pamba te, lokumu na biso ezali ete mitema na biso ezali kotatola ete totambolaki na mokili, mpe mingi penza na miso na bino, na bosantu mpe na bosolo oyo ewutaka na Nzambe. Totambolaki bongo na bwanya ya bomoto te kasi na ngolu ya Nzambe. Boye, tokomelaka bino makambo mosusu te: kaka makambo oyo boyebi mpe oyo bososolaka. Mpe nazali na elikya ete bokososola yango malamu penza, mpo ete bososolaki biso mpe mwa moke ete tozali lokumu na bino ndenge bino mpe bokozala lokumu na biso na mokolo ya Nkolo Yesu. Na elikya yango, nazalaki na mabongisi ya koya liboso epai na bino mpo ete bokoka kozwa ngolu ya mibale, mpe longwa epai na bino nakende na Masedwane, mpe sima na kowuta na Masedwane, nazonga lisusu epai na bino mpo ete nazwa lisungi ya kokoba mobembo na ngai kino na Yudea. Tango nasalaki mabongisi wana, boni, elingi koloba ete namikakolaki? To mpe lisusu nasalaka mabongisi na ngai na bomoto mpo ete nandima mpe naboya likambo na mbala moko? Nzambe azali Moyengebene: maloba oyo nayebisaki bino ezali te: “Iyo” mpe “Te”. Pamba te, Mwana na Nzambe, Yesu Klisto oyo ngai, Silasi mpe Timote toteyaki bino azalaki te: “Iyo” mpe “Te”, kasi kati na Ye, ezalaki tango nyonso “Iyo”. Pamba te, bilaka nyonso ya Nzambe ezalaka “Iyo” kati na Klisto. Mpe ezali na nzela na Ye nde tolobaka: “Amen” mpo na nkembo ya Nzambe. Nzoka nde, Nzambe Ye nde alendisaka ezala biso to bino kati na Klisto, mpe Ye nde abulisa biso na nzela ya epakolami na Ye, atia biso elembo na Ye lokola bomengo na Ye mpe atia Molimo na Ye kati na mitema na biso lokola ndanga ya bolamu oyo ekoya. Boye, nalapi seleka na Kombo ya Nzambe ete ezali mpo na kolukela bino mindondo te nde nazongaki lisusu te na Korinto. Te, ezali te mpo na kozwa bokonzi likolo ya kondima na bino, kasi tozali kosala elongo na bino mpo na esengo na bino, pamba te ezali mpo na kondima nde bozali koyika mpiko. Yango wana, nazwaki mokano ya kozonga lisusu te epai na bino noki te nakoyokisa bino lisusu mawa. Pamba te, soki solo nayokisi bino mawa, banani lisusu bakoyokisa ngai esengo, soki kaka bino te oyo ngai nayokisi mawa? Nakomelaki bino makambo wana mpo ete tango nakoya, bato oyo basengelaki kopesa ngai esengo bayokisa ngai mawa te. Nandimi solo ete esengo na ngai ezali mpe esengo na bino nyonso. Pamba te, nakomelaki bino mokanda yango na komitungisa mingi penza, na pasi na motema mpe na mayi na miso. Nakomaki yango te mpo na koyokisa bino mawa, kasi mpo ete boyeba bozindo ya bolingo na ngai epai na bino. Soki moto ayokisi moninga na ye pasi na motema, ezali ngai te nde asili koyokisa motema pasi, kasi bino nyonso, toloba ete ndambo ya bato kati na bino mpo ete tolekisa ndelo te. Boye, lisanga esengeli kopesa pamela na moto ya motindo oyo. Bongo, bolimbisa ye mpe bobondisa ye mpo ete motema na ye eyoka pasi koleka te. Yango wana, nazali kolendisa bino ete bolakisa ye lisusu bolingo koleka. Pamba te, wana nakomelaki bino, ezalaki mpo na komeka bino mitema mpe kotala soki bokoki kotosa na makambo nyonso. Moto oyo bino bolimbisi, ngai mpe nalimbisi ye. Mpe soki nalimbisi ye wana nazwi ye na likambo oyo esengi ete nalimbisa ye, nalimbisi ye mpo na bino kati na Klisto, mpo na kosala ete Satana alonga biso te. Pamba te, toyebi malamu makanisi na ye. Tango nakomaki na Troasi mpo na kosakola Sango Malamu ya Klisto, atako Nkolo afungolelaki ngai ekuke, motema na ngai ezalaki kaka na kimia te, mpo ete natikalaki te komona ndeko na ngai Tito. Yango wana, napesaki bango mbote ya bokabwani mpe nakendaki na Masedwane. Matondi na Nzambe oyo alongisaka biso tango nyonso kati na Klisto, mpe apanzaka na nzela na biso boyebi ya Klisto lokola solo kitoko ya malasi na bisika nyonso. Pamba te, biso tozali malasi ya solo kitoko ya Klisto mpo na Nzambe epai ya baoyo basila kobika, mpe epai ya baoyo babunga. Mpo na bamoko, ezali solo ya kufa oyo ememaka bango na kufa, mpe mpo na bamisusu, ezali solo ya bomoi oyo ememaka bango na bomoi. Boye, nani azali na makoki ya kosala mosala oyo? Biso tozali lokola ebele ya bato te oyo balukaka kosala mombongo na Liloba ya Nzambe. Nzoka nde, kati na Klisto tolobaka liboso ya Nzambe na bosolo nyonso lokola bato oyo Nzambe atinda. Boni, tokomi lisusu komikumisa biso moko? To tozali lisusu na posa, lokola bato mosusu, ya mikanda ya matatoli mpo na kopesa bino to kowuta epai na bino? Bino bozali mokanda na biso, mokanda oyo ekomama kati na mitema na biso: bato nyonso bayebi yango mpe batangaka yango. Solo, bozali mokanda ya Klisto na nzela ya lotomo oyo apesaki biso. Mokanda yango ekomamaki na mayi ya ekomeli te, kasi na nzela ya Molimo ya Nzambe ya bomoi; likolo ya bitando ya mabanga te, kasi, kati na mitema ya bato. Oyo nde elikya tozali na yango na Nzambe na nzela ya Klisto. Yango elingi koloba te ete tokoki kosala mosala oyo na makoki na biso moko, nzoka nde makoki na biso ewutaka na Nzambe. Ye nde apesaka biso makoki ya kozala basali ya Boyokani ya Sika, oyo evandisami na Mibeko te, kasi na Molimo. Pamba te, Mibeko ebomaka, kasi Molimo apesaka bomoi. Nzoka nde, soki lotomo oyo ezalaki komema kufa ekomamaki likolo ya bitando ya mabanga, ezalaki na nkembo monene, na ndenge ete bato ya Isalaele balongaki te kowumela kotala elongi ya Moyize mpo na nkembo ya elongi na ye, nkembo oyo esengelaki kosila, ndenge nini lotomo ya Molimo eleka na nkembo te? Pamba te, soki lotomo oyo epesaka etumbu ezalaki na nkembo, ndenge nini lotomo oyo ememaka bosembo etonda na nkembo te? Tokoki solo koloba ete nkembo ya kala ebungisa kongenga na yango liboso ya nkembo ya sika oyo eleki penza monene. Pamba te, soki oyo esengelaki kosila ezalaki na nkembo, ndenge nini nkembo oyo ekowumela seko na seko ekoleka monene te? Awa tozali na elikya ya lolenge oyo, tozali na kobanga te. Kasi biso tozali lokola Moyize te, oyo azalaki kozipa elamba na elongi na ye, mpo ete bato ya Isalaele bamona te suka ya nkembo oyo esengelaki kosila. Kasi mayele na bango ezali mokuse mpo na kososola. Pamba te, kino lelo tango batangaka Boyokani ya Kala, elamba yango ezali kaka kozipa bango; elongwe nanu kati na bango te, pamba te elongwaka kaka kati na Klisto. Solo, kino lelo, tango batangaka Mikanda ya Moyize, elamba yango ezipaka kaka mitema na bango. Kasi elamba yango elongwaka kaka soki moto andimeli Nkolo. Nzoka nde, Nkolo azali Molimo, mpe epai Molimo ya Nkolo azali, bonsomi mpe ezali wana. Mpe biso nyonso, baoyo bilongi na biso ezipama te, tozali komonisa nkembo ya Nkolo, tozwa elilingi na Ye, oyo kongenga na yango ebakisamaka tango na tango. Nyonso wana ezali mosala ya Nkolo, oyo azali Molimo. Lokola Nzambe nde apesaki biso lotomo oyo na ngolu na Ye, biso mpe tokolemba nzoto te. Boye, toboya makambo ya soni oyo esalemaka na nkuku, tokosaka te, mpe tobongolaka Liloba ya Nzambe te. Nzoka nde, wana toteyaka bosolo, topesaka nzela na moto nyonso ete atala ye moko soki tozali kosala na Kombo ya Nzambe to te. Kasi soki Sango Malamu oyo tozali koteya ezipama, ezipama nde mpo na bato oyo babunga nzela, bato ya mitema mabanga, baoyo nzambe ya mokili oyo abebisa bango makanisi mpo ete bamona te pole ya Sango Malamu ya nkembo na Klisto, oyo azali elilingi ya Nzambe. Pamba te, toteyaka sango na biso moko te, kasi toteyaka nde Nkolo Yesu Klisto. Mpe mpo na biso, tolobaka ete tozali bawumbu na bino mpo na Yesu. Pamba te, Nzambe oyo alobaki: “Tika ete pole engenga kati na molili,” Ye moko nde angengisaki mitema na biso na pole na Ye, mpo na kongengisa boyebi ya nkembo ya Nzambe, oyo engengaka na elongi ya Klisto. Kasi tomemaka bomengo yango kati na mbeki ya mabele, mpo ete nguya monene ya Nzambe emonana, kasi nguya na biso bato te. Tomonaka bapasi ya ndenge na ndenge, kasi tosukaka te; totungisamaka mingi, kasi tolembaka nzoto te; tonyokwamaka mingi, kasi Nzambe asundolaka biso te; tosukaka mayele, kasi tobungisaka te. Solo, tomemaka mokolo na mokolo kufa ya Yesu na nzoto na biso, mpo ete bomoi na Ye mpe emonana na nzoto na biso. Solo, atako tozali na bomoi, tokutanaka mokolo na mokolo na makama ya liwa mpo na Yesu, mpo ete bomoi na Yesu mpe emonana na nzoto na biso oyo ekufaka. Yango wana, kufa esalaka mosala kati na biso, kasi bomoi esalaka mosala kati na bino. Wana tozali na kondima moko, kolanda ndenge ekomama: “Nandimi, yango wana nalobi,” biso mpe tondimi, yango wana tozali koloba. Pamba te, toyebi malamu ete Ye oyo asekwisaki Nkolo Yesu kati na bakufi, akosekwisa mpe biso elongo na Yesu, mpe akolakisa biso elongo na bino, liboso na Ye. Makambo wana nyonso ezali mpo na litomba na bino, mpo ete ngolu efuluka koleka, mpe bato ebele bapesa matondi mingi mpo na nkembo ya Nzambe. Yango wana, tolembaka nzoto te; mpe ata soki bomoto na biso ya libanda ezali kobeba moke-moke, kasi bomoto na biso ya kati ekomaka, mokolo na mokolo, ya sika. Pamba te, bapasi na biso ya tango oyo, ekoleka. Bapasi yango ezali penza pepele liboso ya monene ya nkembo ya seko, oyo bapasi yango ezali kobongisa mpo na biso. Boye, totalaka te makambo oyo emonanaka na miso, kasi totalaka nde makambo oyo emonanaka te. Pamba te, makambo oyo emonanaka ezali mpo na tango moke, kasi oyo emonanaka te ezali mpo na libela na libela. Toyebi malamu ete, soki nzoto na biso, evandelo na biso na mokili oyo, ezali lokola ndako ya kapo, ekufi; tozali na ndako oyo Nzambe abongisela biso, evandelo ya seko kuna na likolo, ndako oyo etongama na maboko ya bato te. Pamba te, kati na ndako ya kapo oyo, tozali komona pasi mpo ete tozali kozela, na posa makasi penza, evandelo na biso ya Likolo, soki kaka tolati yango, kasi totikali bolumbu te. Pamba te, wana tozali nanu kati na ndako ya kapo oyo, tozali komona pasi mpe konyokwama; mpo ete tolingi te kolongola, kasi tolingi nde kolata evandelo na biso ya Likolo, mpo ete bomoi emela oyo ekufaka. Ezali Ye moko Nzambe nde abongisa biso mpo na kozala bongo, mpe apesa biso Molimo na Ye lokola ndanga ya bolamu oyo ekoya. Yango wana, tozalaka na elikya tango nyonso, wana toyebi ete tango nyonso tozali na nzoto oyo, tozali mpe mosika na Nkolo. Pamba te, totambolaka na kondima, kasi na miso te. Nalobi ete tozali na elikya monene, mpe tozali kosepela kotika nzoto oyo mpo na kokende kovanda elongo na Nkolo. Yango wana, ezala soki tozali kowumela na nzoto oyo to totiki yango, tolukaka kaka eloko moko: kosepelisa Nkolo. Pamba te, biso nyonso tokotelema liboso ya esambiselo ya Klisto mpo na kosamba, mpo ete moto na moto akoka kozwa lifuti kolanda misala na ye, ya malamu to ya mabe, oyo asalaki wana azalaki nanu na nzoto na ye. Wana toyebi malamu soki kotosa Nkolo elakisi nini, tosalaka nyonso ete bato bandima. Lokola Nzambe ayebi biso malamu, nazali na elikya ete bino mpe boyebi biso malamu kati na mitema na bino. Tozali lisusu komilobela te epai na bino, kasi tozali kopesa bino nzela ya komipesa lokumu mpo na biso, mpo ete bokoka kozongisa eyano na baoyo bamipesaka lokumu na makambo oyo emonanaka, kasi na oyo ya motema te. Soki tozali komonana lokola bazoba, ezali kaka mpo na Nzambe, mpe soki tozali komonana lokola bato ya mayele, ezali nde mpo na bino. Pamba te, bolingo ya Klisto ekanga biso, mpo ete tozali kondima ete moto moko akufa mpo na bato nyonso, yango wana bato nyonso bakufa kati na ye. Akufaki mpo na bato nyonso, mpo ete baoyo bazali na bomoi bazala lisusu na bomoi te mpo na bango moko, kasi mpo na moto oyo akufaki mpe asekwaki mpo na bango. Yango wana, wuta lelo, tokotala lisusu ata moto moko te na bomoto. Mpe, ata soki tozalaki kotala Klisto na bomoto, kasi sikʼoyo tozali lisusu kotala Ye te na bomoto. Yango wana, soki moto azali kati na Klisto, akomi ekelamu ya sika: makambo ya kala eleki mpe tala makambo ya sika esili koya! Nyonso wana ezali mosala ya Nzambe, Ye oyo azongisaki boyokani kati na biso na Ye na nzela ya Klisto, mpe apesaki biso lotomo ya kozongisa boyokani. Pamba te, Nzambe azalaki kati na Klisto, tango azalaki kozongisa boyokani kati na Ye na bato, atalaki masumu na bango te mpe atiaki kati na biso maloba ya kozongisa boyokani. Yango wana, biso tozali bantoma mpo na Klisto, mpe na nzela na biso, Nzambe azali kolendisa bato. Tobondeli bino na Kombo ya Klisto: Bozongisa boyokani na Nzambe! Nzambe akomisaki Ye lisumu mpo na biso atako azalaki na lisumu te, mpo ete kati na Ye, biso tokoma bosembo ya Nzambe. Lokola tozali kosala elongo na Nzambe, tozali kolendisa bino ete bozwa ngolu ya Nzambe na pamba te. Pamba te, Nzambe alobi: “Na tango ya malamu, nayanolaki yo; mpe na mokolo ya lobiko, nasalisaki yo.” Nzoka nde, tango ya malamu ezali nde sikʼoyo; lelo nde ezali mokolo ya lobiko. Tobetisaka moto moko te libaku, mpo ete baloba mabe te mpo na lotomo na biso. Kasi na makambo nyonso, tolakisaka ete tozali solo basali ya Nzambe: na koyika mpiko kati na minyoko, kati na kozanga, kati na bapasi, kati na kobetama, kati na baboloko, kati na mobulu, kati na misala makasi, kati na kozanga kolala, kati na nzala, na nzela ya bopeto, na nzela ya boyebi, na nzela ya kokanga motema, na nzela ya bolamu, na nzela ya Molimo Mosantu, na nzela ya bolingo ya solo, na nzela ya Liloba ya solo, na nzela ya nguya ya Nzambe, na nzela ya bibundeli ya bosembo mpo na kolonga bitumba mpe komibatela; kati na nkembo mpe kati na kotiolama, kati na lokumu mpe kati na soni; bazwaka biso lokola bato ya lokuta, nzoka nde, tolobaka solo; bazwaka biso lokola bato bayebani te, nzoka nde, toyebana malamu; bazwaka biso lokola bakufi, nzoka nde, tozali na bomoi; bazwaka biso lokola bato bazwi etumbu, nzoka nde, tokufa te; bazwaka biso lokola bato ya mawa, nzoka nde, tozalaka tango nyonso na esengo; bazwaka biso lokola babola, nzoka nde, tokomisaka bato ebele bazwi; bazwaka biso lokola bato bakelela, nzoka nde, tozali na biloko nyonso. Bandeko ya Korinto, tolobi na bino penza na polele, mpe na mitema ya kofungwama. Tokangelaki bino mitema na biso te, kasi bino nde bokangelaki biso mitema na bino. Botika ete naloba bino lokola epai ya bana na ngai ya bolingo: bino mpe bofungolela biso mitema na bino. Bosangana te elongo na bato oyo bandimaka Nzambe te. Pamba te, boyokani nini ezali kati na bosembo mpe mabe? Boni, pole ekoki solo kosangana na molili? Klisto akoki solo koyokana na Satana? Eloko nini ekoki kosangisa mondimi na mopagano? Boyokani nini ekoki kozala kati na Ndako ya Nzambe mpe banzambe ya bikeko? Pamba te, biso tozali Ndako ya Nzambe ya bomoi, kolanda oyo Ye moko Nzambe alobaki: “Nakovanda kati na bango mpe nakotambola elongo na bango. Nakozala Nzambe na bango, mpe bango bakozala bato na ngai. Yango wana, bobima kati na bango, mpe bokabwana na bango,” elobi Nkolo. “Bosimba te oyo ezali mbindo, mpe ngai nakoyamba bino.” “Nakozala Tata na bino, mpe bino bokozala bana na ngai ya mibali mpe ya basi,” elobi Yawe, Nkolo na nguya nyonso. Balingami na ngai, lokola tozali na bilaka ya motindo oyo, tomipetola na makambo nyonso oyo ekomisaka nzoto mpe molimo mbindo; tika ete toluka penza kotambola na bosantu na nzela ya kotosa Nzambe. Bopesa biso esika na mitema na bino! Tosalaki moto moko te mabe, tobebisaki moto moko te, tokosaki moto moko te mpo na kobotola ye biloko. Nalobi bongo te mpo na kosambisa bino, pamba te nasilaki koyebisa bino ete bozali kati na mitema na biso, ezala mpo na kufa to mpo na bomoi. Natieli bino motema, mpe nazali kobeta tolo mpo na bino. Motema na ngai etondi na kimia mpe ezali na esengo makasi kati na bapasi nyonso oyo ekomelaka biso. Pamba te, tango kaka tokomaki na Masedwane, tozwaki ata tango ya kopema te; tokutanaki na bapasi ya ndenge na ndenge: bitumba na libanda mpe kobanga kati na mitema. Kasi Nzambe oyo abondisaka bato oyo batutami na mitema, abondisaki biso tango Tito ayaki. Tobondisamaki kaka na koya ya Tito te, kasi mpe, na libondisi oyo ye Tito azwaki epai na bino. Atalisaki biso posa monene oyo bozali na yango ya komona ngai, kolela na bino mpe komipesa na bino mpo na ngai. Nyonso wana esalaki ete natondisama lisusu na esengo koleka. Yango wana, soki nayokisaki bino mawa na mokanda na ngai, ezali kosala ngai pasi na motema te. Ata soki esalaki ngai motema pasi, ezali mpo ete nasosolaki ete eyokisaki bino mawa na mwa tango, Kasi sikʼoyo nazali na esengo, ezali te mpo ete boyokaki mawa, kasi mpo ete boyokaki mawa oyo ememaki bino na kobongola bizaleli. Pamba te, mawa na bino ezalaki kati na mokano ya Nzambe, mpe na nzela wana, tosalaki bino mabe te. Pamba te, koyoka mawa na mokano ya Nzambe esalaka ete moto abongola bizaleli, mpe kobongola bizaleli ememaka na lobiko, bongo tina ya komona pasi na motema ezali te. Kasi mawa oyo ewuti na mokili ememaka na kufa. Botala makambo oyo mawa kati na mokano ya Nzambe ememaki kati na bino: tala ndenge nini bokomi na molende! tala ndenge nini bokomi kolimbisana! tala ndenge nini bokomi koboya mabe! tala ndenge nini bokomi na bobangi! tala ndenge nini bokomi na posa makasi komona ngai! tala ndenge nini bokomi na bolingo oyo eleka ndelo! tala ndenge nini bokomi na molende ya kopamela mabe! Na makambo nyonso, bolakisi ete bozalaki na bino mitema pembe na likambo wana. Boye, soki nakomelaki bino, ezalaki te mpo na moto oyo asalaki mabe to mpo na moto oyo basalaki mabe, kasi ezalaki mpo ete, kati na bino, bolingo na bino oyo eleka ndelo mpo na biso, etalisama liboso ya Nzambe. Yango wana, tobondisamaki. Na kobondisama na biso, tosepelaki lisusu makasi koleka na esengo ya Tito, na ndenge bino nyonso bokitisaki ye motema. Nabetaki tolo liboso na ye mpo na bino, mpe boyokisaki ngai soni te. Kasi lokola tango nyonso tozalaki koloba na bino na bosolo, boye lolendo na biso mpo na bino liboso ya Tito ezalaki na tina. Mpe bolingo na ye epai na bino ezali penza monene, tango akanisaka botosi na bino nyonso, ndenge nini boyambaki ye na botosi mpe na kolenga. Nazali na esengo, pamba te kati na nakambo nyonso, nakoki kotiela bino motema. Bandeko, tolingi koyebisa bino ndenge nini Nzambe atalisaki ngolu na Ye na mangomba ya Masedwane. Atako bazalaki na mikakatano ya ndenge na ndenge, kasi batondisamaki na esengo oyo eleka ndelo, mpe kati na bobola na bango ya makasi, bapesaki makabo mingi koleka. Pamba te, nazali kotatola ete, bapesaki kolanda bozwi na bango, mpe kutu bapesaki koleka makoki na bango, bapesaki yango na kotindika te. Mpe babondelaki biso na molende nyonso ete tosala bango ngolu ete bango mpe batinda elongo na biso, lisungi na bango mpo na bolamu ya basantu. Mpe basalaki koleka ata ndenge biso tokanisaki: bamipesaki liboso bango moko epai ya Nkolo, mpe epai na biso, kolanda mokano na Nzambe. Yango wana, tosengaki na Tito ete, ndenge abandaki mosala yango kati na bino, akomisa yango mpe kino na suka. Kasi lokola bozali makasi na makambo nyonso: na kondima, na koyeba koloba, na boyebi, na molende na makambo nyonso mpe na bolingo epai na biso, bozala mpe makasi na likabo ya kokaba. Nazali kopesa bino mitindo te, kasi wana nazali kotanga ndakisa ya bato mosusu, ezali mpo na kotala soki bolingo na bino ezali ya solo. Pamba te, boyebi ngolu ya Nkolo na biso Yesu Klisto: Ye oyo azalaki mozwi, andimaki kozala lokola mobola mpo na bino, mpo ete na nzela ya bobola na Ye, bino bokoma bazwi. Na tina ya likambo ya kopesa, tala likanisi na ngai: yango ezali malamu mingi mpo na bino baoyo, na mobu oyo eleki bozalaki bato ya liboso, kaka mpo na kopesa te, kasi mpe mpo na kozwa mokano ya kosala yango. Sikʼoyo, bosilisa mosala yango kolanda makoki na bino. Molende oyo bozalaki na yango mpo na kolinga kosala, bomonisa yango mpe na kokokisa mosala yango. Pamba te, Nzambe andimaka likabo oyo moto apesi na motema malamu kolanda oyo azali na yango, kasi kolanda te oyo azangi. Posa na biso ezali te ete bino bomona pasi mpo ete bato mosusu bazala na esengo, kasi ezali ete bokokana. Mpo na tango oyo, awa bozali na bomengo, bokoki mpe kosunga baoyo bazangi. Bongo, mokolo oyo bino bokozanga, mpe bango bakozala na bomengo, bakoka kosunga bino. Na ndenge wana nde bokokokana, lokola ekomama: “Moto oyo alokotaki mingi azalaki na yango mingi te, mpe moto oyo alokotaki moke azangaki eloko te.” Natondi Nzambe oyo atie kati na motema ya Tito bolingo oyo eleka ndelo mpo na bino ndenge biso tozali na yango mpo na bino. Tito andimaki bosenga na biso, kasi lokola atondaki na posa makasi, akendaki ye moko epai na bino. Totindi elongo na ye, ndeko oyo mangomba nyonso ekumisaka mpo na Sango Malamu. Lisusu, mangomba nde eponaki ye mpo ete azala moninga na biso ya mobembo kati na mosala oyo ya ngolu, mosala oyo tozali kosala mpo na nkembo ya Nkolo Ye moko, mpe mpo na kolakisa esengo na biso ya kosunga bino. Tozali kosala nyonso mpo ete moto ata moko te atonga biso mpo na ebele ya makabo oyo biso tozwi mokumba ya kokongola. Pamba te, tosalaka nyonso ete tomonana sembo kaka miso ya Nkolo te, kasi mpe, na miso ya bato. Totindi elongo na bango, ndeko na biso, oyo biso tondimaka, mbala na mbala, bolingo na ye oyo eleka ndelo, mpe sikʼoyo azali komonisa yango lisusu koleka, mpo ete azali kotiela bino mingi motema. Tito azali molingami na ngai mpe moninga na ngai ya mosala epai na bino; bongo mpo na bandeko na biso, bango bazali batindami ya mangomba mpe nkembo ya Klisto. Yango wana, bolakisa bango ete bolingi bango na solo, mpo ete mangomba endima mpe eyeba ete tobetaka tolo mpo na bino na pamba te. Ezali na tina te ete nakomela bino mokanda na tina ya lisungi mpo na basantu. Pamba te, nayebi ndenge nini mitema na bino ezalaka na esengo ya kosunga, mpe nabetaki tolo mpo na yango epai ya bato ya Masedwane. Nayebisaki bango ete, wuta mobu oyo eleki, bino na Akayi bosilaki komibongisa, mpe esengo na bino etindikaki bato mingi kati na bango na kosunga. Natindeli bino bandeko wana, mpo ete tolo oyo nabetaka mpo na bino emonana pamba te na likambo wana, kasi bozala ya komibongisa, ndenge nayebisaki bino yango. Pamba te, soki ndambo ya bato ya Masedwane bayei elongo na ngai, mpe bakuti ete nanu bomibongisi te; solo, tokoyoka soni mingi mpo na motema oyo totiaka epai na bino. Ekozala soni na bino te, kasi soni na biso. Yango wana, namonaki ete ezalaki malamu ya kosenga na bandeko wana ete baya epai na bino liboso na ngai, mpo na kabongisa makabo oyo bolakaki. Bongo, yango ekozala ya kobongama tango ngai nakokoma, mpe ekolakisa ete bopesaki yango na esengo, kasi tozwi yango na makasi te. Boyeba likambo oyo: Moto oyo alonaka moke, abukaka mpe moke; oyo alonaka ebele, abukaka mpe ebele! Tika ete moto na moto apesa ndenge akati na motema na ye, na mawa te, mpe na kotindika te, pamba te Nzambe alingaka moto oyo apesaka na esengo. Nzambe azali na makoki ya kotondisa bino na mapamboli ya lolenge nyonso, mpo ete na tango nyonso mpe kati na makambo nyonso, bozwa biloko oyo bozali na yango posa, mpe bozala lisusu na oyo bokosala na yango misala nyonso ya malamu, ndenge ekomama: “Akabolaki, apesaki epai ya babola, bosembo na ye ekowumela libela na libela.” Nzoka nde, Ye oyo apesaka milona na moloni mpe lipa ya kolia, akopesa bino mpe bambuma; akokomisa yango ebele mpe akokolisa bambuma ya bosembo na bino. Bongo, bokokoma bazwi na nyonso, mpo ete tango nyonso bokoka kokabela bato mosusu. Boye na nzela na biso, bato ebele bakozongisa matondi epai ya Nzambe. Pamba te, makabo na bino ezali kaka te mpo na kokokisa bosenga ya basantu, kasi ezali mpe mpo ete matondi mingi ezonga epai ya Nzambe. Tango bakomona penza tina ya mosala na bino, bakokumisa Nzambe mpo na botosi oyo bozali kolakisa mpo na Sango Malamu ya Klisto, mpe mpo na ndenge bokopesa makabo na bino epai na bango, mpe epai ya bato nyonso. Mpe na mabondeli na bango mpo na bino, bakolakisa bino bolingo na bango mpo na ngolu monene oyo Nzambe asaleli bino. Matondi na Nzambe mpo na likabo na Ye oyo mayele ya bato ekolonga kolimbola te. Ngai Polo, nasengi na bino, na boboto mpe na bolamu ya Klisto, ngai oyo namonani lokola moto na bolembu na miso na bino, kasi lokola moto ya makambo makasi tango nazalaka mosika; nabondeli bino: bopesa ngai nzela te ya kosalela tango nakoya epai na bino, makambo makasi oyo nazali kokanisa kolakisa epai ya bato oyo bakanisaka ete biso totambolaka na mosuni. Solo, atako tozali bato, kasi tobundaka na nzoto te. Pamba te, bibundeli oyo tobundaka na yango ezali ya bonzoto te, kasi ezali bibundeli ya nguya kati na Nzambe, mpo na kobuka makanisi mabe. Tokweyisaka makanisi ya lokuta mpe nguya nyonso oyo etelemelaka boyebi ya Nzambe; tolongaka makanisi nyonso ya bomoto mpe tosalaka ete yango etosa Klisto. Tomilengeli mpo na kopesa etumbu na bozangi botosi nyonso, tango botosi na bino ekokoka. Botala penza makambo ndenge ezali. Soki ezali na moto oyo azali kobeta tolo ete azali ya Klisto, ayeba mpe ete soki ye azali ya Klisto, biso mpe lokola ye, tozali ya Klisto. Bongo, ata soki nakomikumisa koleka mpo na bokonzi oyo Nkolo apesa biso mpo na kolendisa kondima na bino kasi mpo na kobebisa yango te, nakoyokela yango soni ata moke te, mpo ete namonana te lokola nde nazali kobangisa bino na mikanda na ngai. Pamba te, bato mosusu balobaka: “Mikanda na ye ezalaka makasi mpe ebangisaka, kasi soki azali kati na biso, azalaka na ye moto ya bolembu mpe maloba na ye ezalaka tina te.” Tika ete moto oyo akanisaka bongo asimba likambo oyo: ndenge tolobaka na mikanda na biso tango tozalaka mosika na bino, ndenge wana mpe tokosala tango tozala epai na bino. Pamba te, tolingi komikokanisa to komekana te na bato mosusu oyo bamikumisaka bango moko, tango balukaka komikokanisa mpe komekana bango na bango. Solo, bazangi mayele. Kasi biso, tokomikumisa te koleka ndelo, tokomikumisa kaka kati na bandelo ya mosala oyo Nzambe apesa biso, oyo mpe esali ete tokoma kino epai na bino. Pamba te, toleki bandelo na biso te lokola nde tokomaki te kino epai na bino, pamba te tokomaki penza kino epai na bino mpo na komemela bino Sango Malamu ya Klisto. Biso, tobetelaka mosala ya bato mosusu tolo te. Nzoka nde, tozali na elikya ete wana kondima na bino ezali kokola, mosala na biso ezali kokoba koya monene kati na bino, kolanda bandelo ya mosala oyo Nzambe apesa biso, mpo ete tokoka koteya Sango Malamu na bamboka oyo ezali mosika na bino. Pamba te, tolingi te komikumisa mpo na mosala oyo esalama na elanga ya bato mosusu. Ndenge Makomi ezali koloba: “Tika ete moto oyo alingi komikumisa, amikumisa kati na Nkolo.” Pamba te moto oyo bandimaka, ezali te oyo amilobelaka ye moko, kasi ezali nde oyo Nkolo atatolaka malamu mpo na ye. Bandeko, nabondeli bino ete bokanga nanu mitema mpo na oyo emonani lokola bozoba na ngai. Solo, bokanga mitema mpo na ngai! Nazali na zuwa mpo na bino, zuwa oyo ewuti na Nzambe. Pamba te, nabalisaki bino na mobali moko kaka, Ye Klisto, lokola elenge mwasi oyo ayebi nanu nzoto ya mibali te. Nzoka nde, nazali kobanga ete makanisi na bino ebeba mpe ebungisa bino nzela ya bolingo ya Klisto, ndenge nyoka ekosaki Eva na mayele na yango ya mabe. Pamba te, soki moto ayei koteya bino Yesu mosusu oyo biso toteyaki bino te, bondimaka ye. Bondimaka mpe kozwa molimo mosusu oyo ekeseni na Molimo oyo bozwaki, to mpe Sango Malamu oyo ekeseni na oyo bondimelaki. Nzoka nde, nazali kokanisa te ete nazali moke na miso ya bantoma oyo bamimonaka ete bazali minene. Pamba te, ata soki namonani lokola moto oyo ayebi koloba malamu te, kasi nazali na boyebi; mpe tolakisaki bino yango polele na ndenge nyonso mpe na makambo nyonso. Boni, nasalaki mabe ndenge namikitisaki mpo ete bino bomata wana nateyaki bino Sango Malamu ya Nkolo? Nasilisaki bomengo ya mangomba misusu wana nazalaki kozwa lifuti epai na bango mpo kosunga bino. Tango nazalaki epai na bino, namemisaki moto moko te mokumba na ngai, atako nazalaki kokelela. Pamba te, bandeko oyo bawutaki na Masedwane bapesaki ngai biloko nyonso oyo nazalaki na yango na posa. Mpe nazalaki komibatela malamu mpo ete namemisa bino mokumba na ngai te, mpe nakomibatela kaka mpo na likambo yango. Lokola solo ya Klisto ezali kati na ngai, moto moko te kati na etuka ya Akayi akobotola ngai lokumu yango. Mpo na nini bongo? Mpo nalingaka bino te? Nzambe ayebi ete nalingaka bino! Boye, nakokoba kaka kosala oyo nazali kosala, mpo na kokanga nzela na bato oyo bazali koluka nzela ya komikokanisa na biso na makambo oyo bazali komikumisa na yango. Pamba te, bato ya lolenge wana bazali bantoma ya lokuta, bazali bakosi bato mpe bamikomisaka lokola bantoma ya Klisto. Yango ezali likambo ya kokamwa te, pamba te Satana ye moko mpe amikomisaka lokola anjelu ya pole. Ezali likambo ya kokamwa te soki basali na ye mpe bazali komikomisa lokola basali ya sembo. Suka na bango ekozala kolanda misala na bango. Nazongeli lisusu: moto moko te azwa ngai lokola moto ya liboma, to soki bolingi bongo, bondima ngai lokola moto ya liboma mpo ete ngai mpe namikumisa mwa moke. Makambo oyo nalingi koloba, nakoloba yango te ndenge Nkolo alingi, kasi nakoloba yango lokola moto ya liboma, mpe nazali na elikya ete nakozwa nzela ya komikumisa. Lokola bato mingi bazali komikumisa na makambo ya mosuni, ngai mpe nakomikumisa. Pamba te, bondimaka na esengo nyonso bato ya maboma atako bozali bato ya bwanya. Bondimaka ete bato bakomisa bino bawumbu, babotola bozwi na bino, banyokola bino, bamonela bino, babeta bino na elongi. Nazali koloba yango na soni, ete tozalaki penza babolele mpo na komitika bongo. Nzoka nde, makambo oyo bato mosusu balingi komikumisa na yango, (nazali koloba lokola moto ya liboma), ngai mpe nakoki komikumisa na yango. Bazali baebreo? Ngai mpe nazali moebreo. Bazali bato ya Isalaele? Ngai mpe nazali moto ya Isalaele! Bazali bakitani ya Abrayami? Ngai mpe nazali mokitani ya Abrayami. Bazali basali ya Klisto? (Nazali koloba lokola moto ya liboma); ngai naleki bango. Pamba te, nasalaki mosala ya makasi penza, nakotaki na boloko mbala mingi, babetaki ngai mingi penza, nakutanaki na makama ya liwa mbala mingi. Mbala mitano, bayuda babetaki ngai bafimbo tuku misato na libwa; mbala misato, babetaki ngai banzete; mbala moko, babambaki ngai mabanga; mbala misato, nazindaki na mayi; nasalaki mokolo moko mpe butu moko kati na ebale monene. Mbala na mbala, nazalaki kosala mibembo; nakutanaki na makama ya bibale, makama liboso ya bato mabe, makama liboso ya bandeko na ngai ya ekolo moko, makama liboso ya bato ya bikolo ya bapaya, makama kati na engumba, makama kati na esobe, makama kati na ebale monene, mpe makama liboso ya bandeko ya lokuta. Solo nasalaki misala ya makasi mpe ya pasi penza; mbala mingi, nazalaki kolala pongi te, nazangaki bilei ya kolia mpe mayi ya komela, nazalaki kokila bilei, nanyokwamaki na malili mpe nazangaki bilamba ya kolata; kotanga te makambo nyonso oyo etikali, mokumba na ngai ya mokolo na mokolo: komitungisa na ngai mpo na mangomba nyonso. Pamba te, nani oyo akomi na bolembu, bongo ngai nalemba nzoto te? Nani oyo akweyi na masumu, bongo ngai nayoka motema pasi te? Soki esengeli na ngai komikumisa, nakomikumisa na bolembu na ngai. Nzambe, Tata ya Nkolo na biso Yesu, Ye oyo azali ya kopambolama libela na libela, ayebi ete nazali kokosa te. Na Damasi, moyangeli ya mokonzi Aretasi apesaki mitindo ete bakengela engumba ya bato ya Damasi mpo ete bakanga ngai. Kasi babimisaki ngai na lidusu ya lopango ya engumba, mpe basalelaki kitunga mpo na kokitisa ngai na miri; bongo nakimaki ye. Boni, esengeli namikumisa? Te, ezali na tina te! Kasi tika nayebisa bino makambo oyo namonaki lokola na ndoto mpe bimoniseli oyo Nkolo alakisaki ngai. Nayebi moto moko kati na Klisto, oyo eleki mibu zomi na minei, bamemaki ye kino na likolo ya misato: nayebi te soki ezalaki na nzoto na ye, to na nzoto na ye te, kasi Nzambe nde ayebi yango. Nzoka nde, ezala soki ezalaki na nzoto na ye to mpe na nzoto na ye te, Nzambe nde ayebi yango. Kasi ngai nayebi kaka ete moto yango, bamemaki ye na paradizo; mpe ayokaki makambo oyo moto akoki kolimbola te, makambo oyo moto azali na ndingisa te ya koloba. Nakomikumisa solo na tina na moto ya ndenge wana, kasi na tina na ngai moko te, longola kaka na tina na bolembu na ngai. Nzoka nde, soki nalingaki komikumisa, nalingaki kozala moto ya zoba te, pamba te nalingaki koloba kaka bosolo; kasi naboyi kosala yango, noki te bakopesa ngai lokumu koleka oyo bato bamonaka kati na ngai to koleka sango oyo bayokaka na tina na ngai. Bongo, mpo ete namitondisa na lofundu te na tina na bimoniseli ya kokamwa oyo nazwaki, batiaki ngai nzube moko kati na nzoto, anjelu ya Satana mpo na konyokola ngai. Mpo na yango, nabondelaki Nkolo mbala misato, mpo ete nzube yango elongwa na nzoto na ngai. Kasi Ye azongiselaki ngai: “Ngolu na ngai ekoki mpo na yo, pamba te nguya na ngai ekokisamaka kati na bolembu.” Yango wana, nakomikumisa na esengo nyonso mpo na bolembu na ngai, mpo ete nguya ya Klisto ezala kati na ngai. Yango wana, na likambo oyo etali Klisto, ezala kati na bolembu, na kofingama, na kozanga, na minyoko, to mpe na bapasi oyo nakutanaka na yango, nasepelaka na ngai kaka; pamba te ezali na tango oyo nazalaka na bolembu nde natondaka na makasi. Tala, nazali koloba lokola moto ya liboma, pamba te ezali nde bino bato botindiki ngai kosala bongo. Pamba te, ata soki nazali moto pamba, kasi bantoma oyo bamimonaka minene baleki ngai ata na eloko moko te. Bilembo oyo elakisaka ete nazali ntoma emonisamaki kati na bino: koyika mpiko kati na mimekano nyonso, bilembo ya kokamwa mpe bikamwisi. Eloko nini penza bino bozwaki te koleka mangomba misusu longola kaka komemisa bino te mikumba na ngai? Boye, bolimbisa ngai mpo na mabe yango! Sikʼoyo, nasali mabongisi ya koya kotala bino mpo na mbala ya misato; mpe nakomemisa bino mikumba na ngai te, pamba te nazali koluka biloko na bino te, kasi nazali nde koluka bino moko. Ezali likambo ya bana te kobomba biloko mpo na baboti na bango, kasi baboti nde basengeli kobomba biloko mpo na bana na bango. Mpo na ngai, nakopesa na esengo biloko na ngai nyonso, mpe nakomipesa mobimba mpo na bino. Soki nalingi bino mingi; boni, bino bokoki solo kolinga ngai mingi te? Atako nazalaki mokumba te epai na bino, kasi bato mosusu bazalaki koloba ete nazali moto ya mayele mabe, natielaki bino motambo. Boni, kati na bato oyo natindaki epai na bino: ezali na moko oyo natindaki mpo na kozwa bino biloko na mayele mabe? Nasengaki na Tito ete aya epai na bino mpe natindaki elongo na ye ndeko na biso. Boni, Tito azwaki biloko na bino na mayele mabe? Tozalaki na ye likanisi moko te? Tazalaki kosala na ye ndenge moko te? Bokanisi ete wuta kala biso tolukaka komilongisa liboso na bino? Te, ezali liboso ya Nzambe, kati na Klisto nde tolobaka mpe tosalaka makambo nyonso, balingami na ngai, mpo na kokolisa kondima na bino. Pamba te, nazali kobanga ete tango nakoya epai na bino, nakuta bino te ndenge ngai nazali kolinga ete bozala, mpe bino bomona ngai te ndenge bino bozali kolinga ete nazala. Nazali kobanga kokuta kati na bino: koswana, zuwa, kanda, kowelana, kofingana, kotongana, lofundu mpe mobulu. Solo, nazali kobanga lisusu ete tango nakoya lisusu epai na bino, Nzambe ayokisa ngai soni liboso na bino, mpe nalela mpo na bato ebele oyo basalaki masumu liboso kasi babongwani te na misala na bango ya mbindo, kindumba mpe ekobo oyo basalaka. Ekozala mbala na ngai ya misato koya epai na bino. “Makambo nyonso ekatamaka soki batatoli mibale to misato balobi.” Nasilaki kokebisa bino tango nayaki epai na bino mpo na mbala ya mibale, mpe nazali kozongela yango lisusu lelo, wana nazali nanu mosika na bino, epai ya baoyo basalaki masumu liboso mpe epai ya bato nyonso, ete tango nakoya lisusu, nakoyokela moto ata moko mawa, mpo ete bozali koluka elembo ete Klisto alobaka na nzela na ngai. Ye azali na bolembu te liboso na bino, kasi asalaka kati na bino na nguya. Solo, atako babakaki Ye na ekulusu kati na bolembu, kasi azali na bomoi na nzela ya nguya ya Nzambe. Biso mpe ndenge moko, tozali na bolembu kati na Ye, kasi tokomilakisa bato ya bomoi elongo na Ye, na nzela ya nguya ya Nzambe, mpo na bolamu na bino. Bomituna bino moko mpe botala soki bozali kati na kondima, bomitala penza bino moko malamu. Boyebi te ete Klisto Yesu azali kati na bino? Loba ete bosila kokweya ya komekama. Mpe nazali na elikya ete bino bokoyeba ete biso tokweyaka te liboso ya komekama. Tobondelaka Nzambe mpo ete bosala mabe ata moko te: ezali te mpo bato bamona ete biso tolonga komekama, kasi mpo ete bino bosala makambo ya malamu, mpe biso tomonana lokola bato oyo balonga te. Pamba te, tozali na nguya ya kotelemela solo te, kasi tozali kaka na nguya ya kokokisa yango. Pamba te, tozalaka na esengo mingi tango biso tozalaka na bolembu, kasi bino bozalaka makasi: mpe libondeli na biso ezali ete bokoma bato ya kokoka. Yango wana, nakomeli bino makambo nyonso oyo lokola nazali nanu mosika na bino, mpo ete tango nakoya, bomona ngai makambo makasi te na ndenge ya kosalela bokonzi na ngai. Bokonzi Nkolo apesaki ngai ezali mpo na kolendisa kondima na bino, kasi mpo na kokweyisa yango te. Bandeko na ngai, nasukisi mokanda na ngai na maloba oyo: bozala na esengo. Boluka kokoma bato ya kokoka. Bolendisanaka bino na bino. Bozala na likanisi moko. Bozalaka na kimia. Bongo, Nzambe ya bolingo mpe ya kimia akozala na bino elongo. Bopesana mbote bino na bino na beze ya bosantu. Basantu nyonso oyo bazali awa batindeli bino mbote. Tika ete ngolu ya Nkolo Yesu Klisto, bolingo ya Nzambe mpe lisanga na Molimo Mosantu ezala na bino nyonso. Ngai Polo, ntoma oyo abengamaki na bato te, to na nzela ya moto te, kasi na Yesu Klisto mpe na Nzambe Tata oyo asekwisaki ye kati na bakufi, na bandeko nyonso oyo bazali na ngai elongo, totindi mokanda oyo na mangomba ya Galatia. Tika ete bozwa ngolu mpe kimia oyo ewuti na Nzambe Tata mpe na Nkolo na biso Yesu Klisto, ye oyo amipesaki mpo na masumu na biso, mpo ete na mokano ya Nzambe mpe Tata na biso, akangola biso na mokili ya mabe ya tango oyo. Tika ete azwa nkembo libela na libela. Amen! Nazali kokamwa mingi mpo na komona ndenge botiki noki penza moto oyo abengaki bino na nzela ya ngolu ya Klisto, mpo na kolanda Sango Malamu mosusu, nzoka nde Sango Malamu mosusu ezali te. Kasi ezali na bato oyo bazali kotia mobulu kati na bino mpe balingi kobongola Sango Malamu ya Klisto. Kasi ezala biso to mpe anzelu awuti na Likolo, ateyi bino Sango Malamu mosusu—oyo ekeseni na Sango Malamu oyo toteyaki bino, tika ete alakelama mabe Ndenge tolobaki yango liboso, sikʼoyo mpe nalobi yango lisusu: soki moto moko ateyi bino Sango Malamu mosusu oyo ekeseni na Sango Malamu oyo boyambaki, tika ete alakelama mabe. Sikʼoyo bokanisi nini? Nazali koluka bato bandima ngai to Nzambe andima ngai? To mpe nazali koluka kosepelisa bato? Soki nazalaki nanu kosepelisa bato, wana nalingaki kozala mosali ya Klisto te. Bandeko, nalingi boyeba yango ete, Sango Malamu oyo nateyaki bino, ewutaki na moto te. Pamba te, nazwaki yango na moto te, nayekolaki yango mpe te, kasi Yesu Klisto moto alakisaki ngai yango. Pamba te, bosi boyoka ezaleli oyo nazalaki na yango: kala na tango nazalaki na kondima ya bayuda, ndenge nazalaki konyokola Lingomba ya Nzambe mpe ndenge nazalaki kosala nyonso mpo na kopanza yango. Nakkaki baninga na ngai mingi ya bayuda oyo tozalaki na bango bambula moko, na makambo etali kondima ya bayuda. Mpe nazalaki na molende mingi penza mpo na oyo etali bokoko ya bakoko na ngai. Kasi tango Nzambe, ye oyo aponaki ngai wuta na libumu ya mama na ngai, mpe abengaki ngai na ngolu na ye, asepelaki ete alakisa ngai Mwana na ye mpo nateya ye epai ya bato ya bikolo ya bapaya, nalukaki toli epai ya moto moko te, mpe nakendaki na Yeruzakm te mpo na kokutana na baoyo bakomaki bantoma liboso na ngai, kasi akendeki na Arabia mpe nazongaki lisusu na Damas. Sima ya bambula misato, bongo nakendaki na Yeruzakm mpo na koyebana na Piere. Mpe navandaki na ndako na ye mikolo zomi na mitano. Namonaki ntoma mosusu te, kaka Zaki ndeko ya Nkolo. Nzambe azali temwe na ngai, ete oyo nazali kokomela bino ezali lokuta te. Sima na yango, nakendeki na mikili ya Siriya mpe na Silisiya. Nzoka nde bato ya mangomba ya Yudeya, oyo bazalaki kati na Klisto, bayebaki ngai te. Bazalaki kaka koyoka sango ete: “Moto oyo azalaki konyokola biso kala, akomi sikʼoyo koteya kondima oyo ye alingaki koboma.” Bongo bazalaki kokumisa Nzambe mpo na ngai. Sima ya bambula zomi na minei, nazongaki lisusu na Yeruzakm elongo na Barnabas, namemaki mpe Tito. Nakendeki kuna mpo na kotosa emoniseli oyo namonaki, mpe nazalaki kolimbokla bango Sango Malamu oyo nazalaki koteya kati na bato ya bikolo ya bapaya. Kasi nasalaki yango na esika ya biso moko kaka, epai bato oyo bazalaki komonana ete bazali bakambi, na kobanga ete mosala oyo nasalaki kala mpe oyo nazali kosala sikʼoyo emonana pamba. Yango wana, atra Tito oyo azalaki na ngai elongo, ata azalaki mogreki, batindaki ye na makasi te ete akatisa Nzoto. Kasi likambo yango ebimaki mpo na bandeko ya lokuta oyo bakotaki kati na biso na mayele mabe, oyo bakotaki kaka mpo na kotala bonsomi oyo tozali na yango kati na Klisto Yesu, mpo ete bakomisa biso bawumbu. Kasi tondimaki makambo ya bato wana te ata mpo na mwa tango, mpo ete solo ya Sango Malamu etikala elongo na bino. Nzoka nde, bato oyo bazalaki komonana ete bazali bato ya tina mingi—ata bazalaki bato ya ndenge nini, wana etali ngai te, pamba te Nzambe atalaka elongi ya moto te—bato wana babakisaki eloko moko te na mateya na ngai. Nzoka nde, bamonaki ete Nzambe apesaki ngai mokumba ya koteya Sango Malamu na bato ya bikolo ya bapaya, ndenge moko mpe apesaki Piere mokumba ya koteya yango epai ya bayuda. Pamba te, moto oyo azalaki kosala kati na Piere mpo azala ntoma ya bayuda, azalaki mpe kosala kati na ngai mpo nazala ntoma ya bato ya bikolo ya bapaya. Bongo Zaki, Piere mpe Jean, baoyo bazalaki komonana lokola makonzi ya Lingomba, bandimaki ete Nzambe apesaki ngai mokumba wana; yango wana bapesaki biso mbote, ngai na Barnabas, mpo na kolakisa ete tokomi lisanga moko. Bongo bamonaki malamu ete biso tokende epai ya bato ya bikolo ya bapaya, mpe bango bakende epai ya bayuda. Basengaki biso kaka ete, tokanisaka kosunga babola. Mpe nasalaki nyonso mpo na kokokisa mokumba yango. Kasi tango Piere ayaki na Antioshe, naboyaki ezaleli na ye liboso ya bandimi, pamba te asalaki mabe. Pamba te, liboso ete bato oyo bawutaki epai ya Zaki bakoma, Piere azalaki kolia esika moko na bandeko oyo bazalaki bayuda te. Kasi tango bakomaki, abendaki nzoto mpe akabwanaki na bango, mpo azalaki kobanga bayuda. Bayuda mosusu basanganaki na kokosana na ye, na ndenge ete ata Barnabas mpe alandaki kokosana na bango. Kasi tango namonaki ete bazalaki kotambola sembo te, na ndenge solo ya Sango Malamu ezali kosenga, nalobaki na Piere na miso ya bandimi nyonso: “Soki yo moto ozali moyuda, ozali kolanda ezaleli ya bato ya bikolo ya bapaya, kasi ozali kolanda te ezaleli ya bayuda, bongo ndenge nini ozali kotinda bato ya bikolo ya bapaya balanda ezaleli ya bayuda?” Biso baoyo tozali bayuda ya mbotama, kasi tozali bato ya bikolo mosusu te baoyo bazali bato ya masumu, toyebi ete moto akoki kokoma sembo te na nzela ya kotosa Mibeko, kasi kaka na nzela ya kondima Yesu Klisto. Yango wana, biso mpe tondimelaki Klisto Yesu na tina ete Nzambe akomisa biso sembo na nzela ya kondima oyo tozali na yango kati na Klisto, kasi ezali te mpo na kotosa Mibeko. Pamba te, moto moko te akoki kokoma sembo na nzela ya kotosa Mibeko. Nzoka nde, tango tozali koluka kokoma sembo kati na Klisto, emonani polele ete biso moko mpe bayuda tozali bato ya masumu; yango elingi koloba ete Klisto azali mosali ya masumu? Ata moke te! Pamba te, soki nazali kotonga lisusu makambo oyo ngai napanzaki, wana elakisi ete nazali mobuki ya Mibeko. Pamba te ngai, na nzela ya Mibeko, nazali mokufi mpo na Mibeko, mpo ete nakoka kozala na bomoi mpo na Nzambe. Basibabaka ngai na ekulusu elongo na Klisto; mpe nazali na bomoi te, kasi Klisto nde moto azali na bomoi kati na ngai. Bomoi oyo nazali na yango sikʼoyo kati na nzoto, nazali na yango na nzela ya kondima kati na Mwana ya Nzambe, ye alingaki ngai mpe amikabaki mpo na ngai. Natie ngolu ya Nzambe pembeni te, pamba te soki bato bakoki kokoma sembo na nzela ya kotosa Mibeko, wana Klisto akufaki kaka pamba. Bato ya Galatia, bozali liboma! Nani aloka bino? Nzoka nde, balimboklaki bino polele penza ndenge babakaki Klisto na ekulusu. Nalingi kotuna bino kaka motuna moko: Bozwaki Molimo na nzela ya kotosa Mibeko, to na nzela ya kondima Sango Malamu oyo boyokaki? Ndenge nini bokomi liboma boye? Bobandaki na molimo, bongo bolingi kosukisa sikʼoyo na makasi na bino moko? Boni, bonyokwamaki mingi kaka pamba soki ya solo ete ezalaki kaka mpo na pamba? Nzambe oyo apesaki bino Molimo na ye mpe asalaki makamwisi kati na bino, bokanisi ete asalaki yango mpo botosaka Mibeko, to mpo bondimaki Sango Malamu oyo boyokaki? Botala Abrayami: “andimelaki Nzambe, mpe mpo na kondima na ye, Nzambe andimaki ye lokola moto na sembo.” Bongo, boyeba ete baoyo bazali na kondima bango nde bazali penza bana ya Abrayami. Makomi elobaki yango liboso ete, tango ekoka, ete Nzambe akokomisa sembo bato ya bikolo ya bapaya na nzela ya kondima, mpe liboso penza, ayebisaki Abrayami sango malamu oyo: “Bato ya bikolo nyonso bakozwa mapamboli na nzela na yo!” Yango wana, baoyo bazali na kondima basiʼbazwa mapamboli elongo na Abrayami moto ya kondima. Kasi baoyo batiaka elikya na kotosa Mibeko, bango nyonso bazali na nse ya lisumu; pamba te ekomama: “elakeli mabe ezala na moto nyonso oyo akokoba te kosala makambo nyonso oyo ekomama na buku ya Mibeko.” Boye ezali polele ete: na miso ya Nzambe moto moko te akoki kokoma sembo na nzela ya Mibeko, pamba te: “Moto na sembo akozala na bomoi mpo na kondima!” Kasi Mibeko ewuti na kondima te, nzoka nde: “Moto oyo akosala makambo oyo Mibeko etmiindaka, akozala na bomoi na nzela na yango.” Klisto akangola biso na lisuma oyo Mibeko ezalaki komemisa biso, awa akomaki lisuma mpo na biso, pamba te ekomama: “Elakeli mabe ezala na moto nyonso oyo babaki na nzete.” Esalamaki bongo, mpo ete kati na Klisto Yesu, lipamboli ya Abrayami ekomela bato ya bikolo ya bapaya, mpo ete tozwa na nzela ya kondima Molimo oyo Nzambe alakaki. Bandeko na ngai, tika nazwa ndakisa moko ya makambo oyo tomonaka mokolo na mokolo: soki moto asili kokoma mokanda mpo na koyokana likambo moko na moninga na ye, moto moko te akoki kolongola to kobakisa makambo mosusu na likolo ya makambo oyo esiʼekomamaki. Nzoka nde, Nzambe atiaki bilaka na ye na Abrayami mpe na mokitani na ye. Makomi eloba ete: “Na bakitani na ye”, lokola nde ezalaki mpo na bato ebele; kasi “ ‘Na mokitani na yo’, elakisi moto moko kaka: ye nde Klisto.” Nalingi koloba boye: Mibeko oyo eyaki sima ya bambula nkama minei na ntuku misato, ekoki koboma te boyokani oyo Nzambe atia liboso penza na Abrayami, na ndenge ete ekomisa elaka eloko pamba. Pamba te, soki bomengo oyo Nzambe apesaka ezwamaka na nzela ya Mibeko, wana bomengo oyo Nzambe apesaka eleki kozwama te na nzela ya elaka. Kasi Nzambe kati na ngolu na ye, apesaki yango na Abrayami na nzela ya elaka. Bongo mpo na nini Mibeko? Babakisaki yango mpo na kolakisa soki lisumu ezali eloko nini, kino tango mokitani oyo Nzambe apeselaki elaka ayaki. Nzambe asaklaki baanzelu mpo na kopesa Mibeko na moto oyo azongisaka boyokani. Nzoka nde, moto oyo azongisaka boyokani azalaka mozongisi ya boyokani kaka ya moto moko te; kasi Nzambe azali moko. Bongo Mibeko, etekmelaka bilaka ya Nzambe? ata moke te! Pamba te, soki ezali na mobeko mpe epesamaki oyo ekokaki kopesa bomoi, wana moto akokaki kokoma sembo na nzela ya mobeko. Kasi Makomi elobi ete, mokili mobimba ezali na boloko ya masumu, mpo ete elaka epesama na bandimi na nzela ya kondima Yesu Klisto. Liboso ete kondima eya, tozalaki na boloko ya Mibeko, tozalaki ya kokangama mpo na kozela kondima oyo esengelaki komonisama. Yango wana, Mibeko ezalaki mokengeli oyo ezalaki na mokumba ya komema biso na Klisto, mpo ete tokomisama na nzela ya kondima. Kasi lokola kondima eyaki, tozali lisusu te na nse ya bokonzi ya Mibeko. Pamba te, bozali bino nyonso bana ya Nzambe na nzela ya kondima kati na Klisto Yesu. Pamba te, bino nyonso oyo bozwaki libatisi kati na Klisto, bosiʼbolata Klisto. Yango wana, bokeseni ezali lisusu te kati na bayuda na bagreki, kati na bawumbu na bato ya bonsomi, kati na mibali na basi, pamba te bino nyonso bozali se moto moko kati na Klisto Yesu. Soki bozali bato ya Klisto, bozali mpe bana ya Abrayami, mpe bokozwa biloko oyo Nzambe alakaki. Makambo oyo nazali koloba, elobi boye: na tango moto oyo batikeli bomengo azali nanu mwana moke, azali na bokeseni te na mowumbu, ata ye nde azali nkolo ya biloko nyonso; akotikala na maboko ya bato oyo bakobanda kobatela ye mpe kotala bomengo oyo batikeli ye kino tango akokokisa bambula oyo tata na ye akataki. Biso mpe ndenge moko, tango tozalaki nanu bana mike, tozalaki na nse ya bowumbu ya molimo oyo ekambaka mokili. Kasi awa tango Nzambe akataki ekokaki, atindaki Mwana na ye, abotamaki na mwasi, na nse ya bokonzi ya Mibeko, mpo ete akangola bato oyo bazalaki na nse ya bokonzi ya Mibeko, mpo tokoka kokoma bana na Nzambe. Mpe lokola bozali bana na ye, Nzambe atindaki na kati ya mitema na biso Molimo ya Mwana na ye, oyo agangaka: “Abba”, elingi koloba “Tata”. Yango wana, ozali lisusu mowumbu te, kasi mwana. Mpe, soki ozali mwana, Nzambe akokomisa yo mpe mokitani ya bomengo. Liboso, tango boyebaki Nzambe te, bozalaki bawumbu ya biloko oyo, na lolenge na yango, ezalaki banzambe te. Kasi sikʼoyo boyebi Nzambe, to nakoki koloba ete, sikʼoyo Nzambe ayebi bino, bongo ndenge nini bozongeli lisusu milimo oyo ezangi nguya mpe tina, mpo bokoma lisusu bawumbu na yango? Bozali kotosa mikolo, basanza, batango mpe bambula! Nazali kobanga mingi mpo na bino, mpo ete tango mosusu, mosala oyo nasalaki epai na bino ekka kaka, pamba. Bandeko na ngai, nabondeli bino ete bozala lokola ngai, pamba te ngai mpe nazali lokola bino. Bosalaki ngai mabe moko te. Boyebi malamu ete ezali maladi nde epesaki ngai nzela mpo na koteya bino Sango Malamu na mbala ya liboso. Mpe ata maladi na ngai ezalaki motungisi mpo na bino, kasi botiolaki ngai te mpe boboyaki ngai te, nzoka nde boyambaki ngai lokola anzelu ya Nzambe, lokola ye moko Klisto Yesu. Esengo oyo ezalaki kati na biso ekeyi wapi? Pamba te, nazali kotatola yango ete: soki yango ekokaki kosalama, mbek bolingaki kolongola miso na bino mpo na kopesa ngai yango. Bongo sikʼoyo nakomi monguna na bino mpo nazali kolobela bino makambo ya solo? Bato wana bazali kotia molende mpo babenda bino, kasi mpo na makanisi ya malamu te. Balingi kaka bakabola bino na ngai, mpo bokangama na bango. Ezali malamu kozala na molende, na makanisi ya malamu, mpe kozala bongo tango nyonso, kasi kaka te soki nazali na bino elongo. Bana na ngai ya bolingo, nazali lisusu koyoka pasi mingi mpo na bino lokola mwasi oyo alingi kobota, kino tango Klisto akosalama kati na bino. Nazali na posa mingi mpo na kozala sikʼoyo elongo na bino, mpe kobongola elobeli na ngai, pamba te nazali kokamwa mingi mpo na bino. Bino baoyo bolingaka kozala na nse ya bokonzi ya Mibeko, boyebisa ngai nanu: boyokaka te makambo oyo Mibeko eloba? Pamba te, ekomama ete Abrayami azalaki na bana mibale ya mibali, moko na mwasi oyo azalaki ya bowumbu, mpe mosusu na mwasi ya bonsomi. Mwana ya mwasi ya bowumbu abotamaki lokola bato nyonso; kasi mwana ya mwasi ya bonsomi abotamaki mpo na elaka oyo Nzambe apesaki. Tolimbola yango lokola lisese: basi wana mibale bazali kolakisa boyokani mibale. Boyokani oyo ewutaki na ngomba ya Sinai mpe ebotaki bana ya bowumbu: yango nde Agar. Bongo Agar azali lokola ngomba ya Sinai oyo ezali na mokili ya Arabia. Akokani na mboka ya Yeruzakm ya sikʼoyo, pamba te ezali na bowumbu elongo na bana na yango. Kasi Yeruzakm ya Likolo ezali na bonsomi; mpe yango nde ezali mama na biso. Pamba te, ekomama: “Yo mwasi oyo obotaka te, sepela, sepela mingi mpe ganga makasi, Yo mwasi oyo nanu oyoki pasi ya kobota te. Pamba te, bana ya mwasi oyo basundola bakozala mingi penza, koleka bana ya mwasi oyo azali na libala.” Nzoka nde bino bandeko na ngai, bozali bana ya elaka lokola Izaki. Na tango wana, mwana oyo abotamaki ndenge bato nyonso babotamaka, azalaki konyokola mwana oyo abotamaki na nguya ya Molimo. Ezali mpe ndenge moko mpo na sikʼoyo. Kasi Makomi ezali koloba nini? “Bengana mowombu na mwana na ye, pamba te mwana ya mowumbu akokaki kozwa bomengo te elongo na mwana na mwasi ya bonsomi.” Yango wana bandeko na ngai, biso tozali bana na mwasi ya bowumbu te, kasi bana na mwasi ya bonsomi. Klisto asiʼakangola biso mpo tozala na bonsomi ya solo. Yango wana, botelema ngwi mpe bozonga lisusu na bowumbu te. Ngai Polo nayebisi bino boye: soki bozali kokatisa nzoto, wana Klisto azali lisusu na tina te mpo na bino. Nazali koyebisa bino lisusu ete, moto nyonso oyo akokatisa nzoto, asengeli kotosa makambo nyonso oyo Mibeko etindaka. Bino bato oyo bolukaka kokoma bato na sembo mpo na kotosa Mibeko, bozali ya kokabwana na Klisto mpe bolongwe na nse ya ngolu ya Nzambe. Pamba te, biso na nzela ya Molimo, tozali kozela na elikya nyonso ete tokoma sembo mpo na kondima. Pamba te, kati na Klisto Yesu, ata tokatisi nzoto to tokatisi te, nyonso wana ezali na tina te. Kasi likambo eleki na tina ezali nde kondima oyo emonanaka na nzela ya bolingo. Bozalaki kokima mbangu malamu, bongo nani atekmisaki bino mpo ete botika kotosa makambo ya solo? Likambo ya ndenge wana ewuti te na moto oyo abengaki bino. “Mwa kisi ya mapa ya moke evimbisaka potopoto nyonso ya mapa.” Nazali na elikya kati na Nkolo ete, bokozala na makanisi mosusu te. Kasi moto oyo ayeli bino mobulu, azala nani, akozwa etumbu. Bandeko na ngai, soki ya solo ete nazali nanu koteya ete kokatisa nzoto ezali na tina, bongo mpo na nini bazali konyokola ngai? Soki ezali bongo, wana mabe oyo bato bayokaka na mitema mpo na mateya ya ekulusu ezali na tina te. Nalingi ete bato oyo bazali kotia mobulu kati na bino, balongola bango moko mbuma na bango ya mibali. Pamba te, bino bandeko na ngai, bobengama mpo bozala na bonsomi, esengeli te ete bosalela bonsomi na bino lokola nzela mpo na kosalela mosuni, kasi bosalisana bino na bino kati na bolingo. Pamba te, Mibeko nyonso ezali kokokisama na mobeko oyo moko: “Linga moninga na yo lokola yo moko.” Kasi soki bozali kozokisana mpe komipasola, bokeba soki te bokobomana bino na bino. Kasi nalobi na bino boye: botika Molimo atambusa bomoi na bino, na bongo bokotosa te kosala makambo oyo baposa ya nzoto etindaka. Pamba te, baposa ya nzoto elingaka makambo oyo Molimo alingaka te; ndenge moko mpe Molimo alingaka makambo oyo baposa ya nzoto elingaka te. Bango mibale bazali na etumba, mpo ete bokoka te kosala makambo oyo bolingaka kosala. Kasi soki Molimo azali kotambusa bino, bokozala na nse ya bokonzi ya Mibeko te. Misala ya nzoto emonanaka na: ekobo, makambo ya bosoto, kindumba, kosambela bikeko, kindoki, koyinana, koswana, zuwa, kanda, kotiana tembe, kokabwana, kolongwa na mateya ya solo, likunya, kolangwa masanga, lokoso, na makambo mosusu oyo ekokani na oyo wana. Nazali kokebisa bino ndenge nakebisaki bino liboso ete baoyo basalaka makambo ya ndenge wana, bakokota te na Bokonzi ya Nzambe. Kasi mbuma ya Molimo ezali: bolingo, esengo, kimia, kokanga motema, kosalisana, kosala bolamu, bosolo, boboto, mpe komibatela. Mpo na makambo ya ndenge oyo, Mibeko ezali te. Baoyo bazali bato ya Klisto, basila kobaka nzoto elongo na baposa na yango mpe bilukla nyonso. Lokola tozali na bomoi na nzela ya Molimo, totambola mpe na lisungi ya Molimo. Tozala bato ya lofundu te, totika kotumolana biso na biso, mpe toyokelana zuwa te. Bandeko, soki bokangi moto moko na mabe, bino baoyo bozali kotambusama na Molimo na Nzambe, bozongisa ye na nzela ya malamu, na boboto nyonso. Mpe, mikebisa, soki te Satana akomeka mpe yo. Bosalisana bino na bino mpo na komemana mikumba. Na ndenge wana, bokokokisa mobeko ya Klisto. Soki moto akanisi ete azali moto monene, nzoka nde azali moto ya pamba, azali komikosa ye moko. Tika ete moto na moto atala malamu-malamu misala na ye, bongo nde akoki komikumisa; amikumisa kaka mpo na ye moko, kasi mpo na bato mosusu te. Pamba te, moto na moto akomema mokumba na ye moko. Tika ete moto oyo bazali koteya Liloba, akabela moteyi na ye ndambo ya biloko na ye nyonso. Bomikosa te: basakanaka na Nzambe te; pamba te, oyo moto alonaka, yango mpe akobuka. Pamba te, moto oyo alonaka mpo na kosepelisa nzoto na ye, akobuka mpe oyo nzoto ebotaka: libebi. Kasi oyo alonaka mpo na kosepelisa Molimo, akobuka mpe oyo Molimo abotaka: bomoi ya seko. Bongo tokmba te mpo na kosala makambo ya malamu, pamba te, na tango malamu, tokobuka mbuma soki tokmbi te. Yango wana, lokola tozali nanu na tango, tosala makambo ya malamu na bato nyonso, kasi koleka epai ya bato oyo bazali bato ya libota ya bandimi. Bomoni makomi oyo ya minene, ezali na loboko na ngai moko nde nakomeli bino. Baoyo batindaka bino na makasi mpo bokatisa nzotu, bazali bato oyo balukaka kaka koyebana na miso ya bato. Basalaka bongo kaka mpo banyokola bango te mpo na ekulusu ya Klisto. Pamba te, baoyo wana bakatisa nzoto, bango moko batosaka Mibeko te. Kasi balingi ete bokatisa nzoto, mpo bamikumisa na nzoto na bino. Kasi ngai, soki nakomikumisa, namikumisaka kaka mpo na ekulusu ya Nkolo na biso Yesu Klisto; pamba te, na nzela na yango, nde mokili babaka yango na ekulusu mpo na ngai; mpe ngai babaka ngai na ekulusu mpo na mokili. Pamba te, kokatisa nzoto to kokatisa te, ezali na tina soki moke te, kasi likambo ya tina, ezali nde kokoma ekelamo ya sika. Tika ete kimia mpe mawa ya Nzambe ezala na bato oyo balandaka motindo oyo, ezala mpe na Isalaele ya Nzambe! Banda lelo, moto atungisa ngai lisusu te, pamba te nazali komema bikmbo ya bapota ya Yesu na nzoto na ngai. Bandeko na ngai, tika ete ngolu ya Nkolo na biso Yesu Klisto ezala na bino. Amen. Ngai Polo, mopostolo ya Kristo Yesu na mokano ya Nzambe, natindi mokanda oyo epai ya basantu [ya Efezo ], bandimi kati na Kristo Yesu. Tika ete ngolu mpe kimia oyo ewuti na Nzambe Tata na biso mpe na Nkolo Yesu Kristo ezala na bino. Lokumu ezala na Nzambe mpe Tata ya Nkolo na biso Yesu Kristo, ye oyo apambola biso kati na Kristo, na mapamboli nyonso ya Molimo, na bisika ya Likolo. Pamba te apona biso kati na Kristo liboso ete mokili esalama, mpo ete tozala basantu mpe tozala na mabe moko te liboso na ye. Kati na bolingo na ye, abongisaki yango banda kala ete akomisa biso bana na ye na nzela ya Yesu Kristo. Asalaki bongo ndenge ye moko alingaki yango kati na mokano na ye, mpo na lokumu ya ngolu na ye oyo etondi na nkembo, oyo akabela biso kati na Mwana na ye oyo ye alingaka mingi. Tokangolami kati na ye na nzela ya makila na ye, mpe tozwi bolimbisi ya masumu. Na ndenge wana nde Nzambe alakisaki biso bomengo ya ngolu na ye, oyo atondisela biso na nzela ya bwanya nyonso mpe bososoli nyonso. Mpe alakisi biso mabombami ya mokano na ye, oyo abongisa kati na Kristo, ndenge ye moko alingaki yango. Mokano yango, oyo akokokisa tango eleko ekokoka, ezali boye: kosangisa esika moko biloko nyonso oyo asala, oyo ezali na likolo mpe oyo ezali na nse, na nse ya bokonzi ya Kristo. Baponaki biso mpe kati na Kristo, mpe babongisaki biso na lolenge ya mabongisi ya ye oyo asalaka biloko nyonso na mokano na ye, mpo ete biso baoyo tozalaki bato ya liboso mpo na kotia elikya na Kristo, tokoka kozala mpo na lokumu ya nkembo na ye. Bino mpe baoyo bozalaki kati na Kristo, tango boyokaki Liloba ya solo, Sango Malamu oyo ebikisaki bino; kati na ye, tango bondimaki, Nzambe atiaki bino elembo: Molimo Mosantu oyo alakaki, oyo azali bolamu ya liboso ya bomengo oyo tokozua, tango Nzambe akokangola na mobimba penza baoyo bazali bato na ye, mpo na lokumu ya nkembo na ye. Yango wana, wuta nayokaki sango ya kondima na bino kati na Nkolo Yesu mpe bolingo oyo bozali na yango na basantu nyonso, natikaka te kotonda Nzambe mpo na bino. Nakanisaka bino na mabondeli na ngai, mpe nasengaka ete Nzambe ya Nkolo na biso Yesu Kristo, Tata ya nkembo, apesa bino Molimo, oyo akokomisa bino bato ya bwanya mpe akolakisa bino Nzambe, mpo ete bokoka koyeba ye malamu. Nabondelaka mpe mpo ete mayele na bino engengisama, mpo bokoka koyeba elikya oyo ezali kati na ebiangeli na ye, mpe monene ya nkembo ya bomengo na ye oyo ezali kati na basantu; boyeba mpe monene ya nguya na ye mpo na biso baoyo tozali kondima. Nguya yango ezali lokola mosala oyo ewuti na makasi na ye ya monene, oyo alakisaki kati na Kristo, tango asekwisaki ye kati na bakufi mpe avandisaki ye na Likolo, na loboko na ye ya mobali, likolo ya bokonzi nyonso, ya bonkumu nyonso, ya bokasi nyonso, mpe likolo ya kombo nyonso oyo bato bakoki kotanga, kaka na tango oyo te, kasi na tango oyo mpe ezali koya. Nzambe atia biloko nyonso na nse ya makolo na ye, mpe apona ye azala Mokonzi likolo ya biloko nyonso mpo na Lingomba, oyo ezali nzoto na ye, kotondisama ya ye oyo atondisaka biloko nyonso na bisika nyonso. Kala, bozalaki bakufi mpo na mabe na bino mpe mpo na masumu na bino, oyo bozalaki kosala tango bozalaki kolanda banzela ya mokili oyo mpe ya mokonzi ya bokonzi ya milimo mabe, molimo oyo ezali kosala sikʼoyo kati na bato oyo bazangi botosi. Biso mpe, kala tozalaki na molongo na bango. Tozalaki kolanda baposa ya nzoto na biso, mpe tozalaki kosala makambo nyonso oyo nzoto na biso mpe makanisi na biso ezalaki kotindika biso mpo na kosala. Mpe tozalaki, wuta mbotama, bato oyo kanda ya Nzambe esengelaki kokweyela lokola bato mosusu. Kasi Nzambe oyo atondi na mawa, mpo na bolingo na ye oyo eleki monene, oyo alingaki biso na yango, atako tozalaki naino bakufi mpo na masumu na biso, apesaki biso bomoi elongo na Kristo. Bobiki mpo na ngolu. Mpe Nzambe asekwisa biso elongo na Kristo mpe avandisa biso elongo na ye na bisika ya likolo, kati na Kristo Yesu. Asalaki bongo mpo na kolakisa na batango nyonso oyo ekoya, monene ya bomengo ya ngolu na ye, oyo alakisaki biso na bolamu na ye, kati na Kristo Yesu. Pamba te, bobiki mpo na ngolu, na nzela ya kondima. Mpe yango ewuti na bino te, kasi ezali likabo ya Nzambe; yango ezali te mbuma ya misala oyo bosalaki, mpo ete moto moko te amikumisa. Pamba te, biso tozali bikelamo ya Nzambe, tokelama kati na Kristo Yesu mpo na kosala misala ya malamu, misala oyo Nzambe abongisa liboso penza, mpo biso tosala yango. Yango wana bokanisa, bino baoyo bozalaki liboso bato ya bikolo mosusu mpo na mbotama na bino, mpe bazalaki kobenga bino “Bato bakatisa nzoto te” epai ya bato oyo bazalaki komibenga “Bato bakatisa nzoto” (kokatisama oyo esalama na nzoto na nzela ya maboko ya bato). Na tango wana, bozalaki ya kokabwana na Kristo, bozalaki bato oyo Nzambe aponaki te, bozalaki bapaya ya boyokani oyo Nzambe alakaki, bozangaki elikya, mpe bozalaki na Nzambe te kati na mokili. Kasi sikʼoyo kati na Kristo Yesu, bino bato bozalaki liboso mosika, basili kokomisa bino pene-pene na nzela ya makila ya Kristo. Pamba te ye azali kimia na biso; ye moto akomisaki bayuda na bato oyo bazali bayuda te moto se moko, mpe abukaki lopango oyo ezalaki kokabola bango mpe ezalaki kotika bango ete bazala banguna. Na nzoto na ye, alongolaki Mibeko elongo na mitindo na yango mpe malako oyo elakisaka lolenge ya kotambola. Mokano na ye ezalaki ete akela kati na ye moko moto moko ya sika oyo awuti kati na bato mibale; na ndenge wana nde azongisaki kimia. Na nzela ya liwa na ye na ekulusu, Kristo asangisaki bango mibale na nzoto moko mpe azongisaki bondeko na bango na Nzambe; na nzela ya ekulusu, Kristo abomaki boyinani oyo ezalaki kati na bango. Kristo ayaki mpe ateyaki kimia epai na bino bato bozalaki mosika, mpe kimia epai ya baoyo bazalaki pene-pene. Pamba te, na nzela na ye, biso nyonso mibale tozali na ndingisa ya kokota epai ya Tata na nzela ya Molimo kaka moko. Yango wana, bozali lisusu bapaya te to mpe bawuta te, kasi bozali basitwaye elongo na basantu, mpe bato ya libota ya Nzambe; batonga bino likolo ya fondasio ya bapostolo mpe baprofeta, mpe Kristo Yesu ye moko azali libanga ya motuya oyo esimbaka ndako mobimba. Na ye, ndako mobimba esangani esika moko mpe ezali kokola, mpo ekoma ndako ya bosantu kati na Nkolo. Mpe, kati na ye, bino mpe bozali kotongama lisanga, mpo bokoma ndako epai Nzambe azali kovanda na nzela ya Molimo na ye. Yango wana, ngai Polo, moto ya boloko ya Yesu Kristo mpo na bino bato oyo bozali bayuda te… Solo, bosiʼboyoka ete Nzambe, kati na ngolu na ye, apesaki ngai mosala oyo mpo na bolamu na bino; yango ezali sekre oyo Nzambe alakisaki ngai, ndenge nasiʼnakomaki yango na mwa maloba. Tango bokotanga yango, bokozala na makoki ya kososola ete nayebi sekre ya Kristo, oyo na batango ya kala, Nzambe alakisaki yango na bato te, ndenge alakisi yango sikʼoyo na bapostolo na ye ya bosantu mpe na baprofeta, na nzela ya Molimo. Sekre yango, yangʼoyo: na nzela ya Sango Malamu, bato oyo bazali bayuda te bakozwa elongo na bayuda bomengo oyo Nzambe azali kobombela bato na ye; bakomi biteni ya nzoto moko, mpe basangani na elaka oyo Nzambe apesaki kati na Kristo Yesu. Nakoma mosali ya Sango Malamu yango na nzela ya likabo ya ngolu ya Nzambe, oyo Nzambe apesa ngai na nzela ya nguya na ye oyo alakisaki ngai. Atako nazali moto ya suka penza na kati ya basantu nyonso, kasi Nzambe apesa ngai ngolu yango, ya koteya bato oyo bazali bayuda te bomengo monene ya Kristo, mpe nalimbola na polele nyonso, liboso ya bato nyonso, ndenge nini Nzambe ye oyo asalaki biloko nyonso, azali kokokisa mabongisi na ye oyo ezalaki ya kobombama kati na ye moko banda kala; mpo ete bokonzi mpe bonkumu kati na likolo, bakoka koyeba sikʼoyo, na nzela ya Lingomba, bwanya ya Nzambe oyo ezali ya lolenge na lolenge, ndenge abongisa yango banda kala, oyo ezali kokokisama kati na Kristo Yesu Nkolo na biso. Kati na ye, mpe na nzela ya kondima kati na ye, tokoki kopusana pene-pene ya Nzambe, na bonsomi nyonso mpe na elikya nyonso. Yango wana nasengi bino, bolemba te mpo na bapasi oyo nazali komona mpo na bino, pamba te yango ezali nkembo na bino. Yango wana nafukamaka liboso ya Tata, ye oyo mabota nyonso ya bandimi, na likolo mpe awa na nse, bazwa kombo wuta na ye. Nabondelaka ete, wuta na bomengo ya nkembo na ye, apesa bino nguya, na nzela ya Molimo na ye, mpo na oyo etali moto ya kati, mpo ete Kristo avanda kati na mitema na bino na nzela ya kondima. Nabondelaka mpe mpo ete bozala ya kopikama mpe ya kovanda kati na bolingo, mpo ete bozala na makoki ya kososola, elongo na basantu nyonso: monene, molayi, mokuse, mpe bozindo ya bolingo ya Kristo, mpe boyeba ndenge bolingo yango eleki boyebi nyonso; mpo ete botonda na kotondisama nyonso ya Nzambe. Sikʼoyo, epai na ye oyo akoki kosala na mingi penza, koleka nyonso oyo tosengaka to tokanisaka, na nzela ya nguya na ye oyo esalaka kati na biso, tika ete nkembo ezala na ye kati na Lingomba mpe kati na Kristo Yesu, wuta na bato ya batango nyonso, mpo na libela na libela! Amen. Ngai oyo nazali moto ya boloko mpo na Nkolo, nazali kosenga bino ete botambola na lolenge oyo ekoki na ebiangeli oyo Nzambe abengaki bino: bozala bato ya komikitisa tango nyonso, bato ya boboto, mpe ya motema molayi. Bosunganaka bino na bino kati na bolingo. Bosala makasi mpo na kobatela bomoko oyo Molimo apesaka, na nzela ya kimia oyo ezali kokangisa bino lisanga moko. Nzoto ezali kaka moko, Molimo mpe azali kaka moko; ndenge moko mpe, Nzambe abenga bino mpo na elikya kaka moko. Nkolo azali kaka moko, kondima ezali kaka moko, mpe libatisi mpe ezali kaka moko. Nzambe azali kaka moko, mpe azali Tata ya bato nyonso, ye oyo azali Nkolo ya nyonso, asalaka kati na nyonso, mpe azali kati na nyonso. Moko moko na biso bapesaki ye makabo, ndenge Kristo ye moko alingaki kopesa. Yango wana elobama: “Tango amataki na Likolo, amemaki bakangami mpe apesaki makabo na bato.” Nzokande, liloba oyo: “amataki, elakisi nini? Yango elakisi ete: liboso akitaki penza na nse ya mabele.” Moto oyo akitaki, ezali kaka ye wana oyo amataki na likolo penza koleka likolo nyonso, mpo ete atondisa mokili mobimba. Ezali ye moto apesaki likabo na bato mosusu mpo bazala bapostolo, basusu baprofeta, basusu bapanzi Sango Malamu, basusu babateli, mpe basusu balakisi. Asalaki bongo, mpo na kobongisa basantu basala mosala na bango, mpo ete nzoto ya Kristo etongama malamu, kino biso nyonso tokokoma na bomoko kati na kondima mpe kati na koyeba Mwana na Nzambe, mpe kokoma bato penza oyo basiʼbakoli, bato oyo basiʼbakokani na bonene ya kokokisama ya Kristo. Bongo tokozala lisusu bana mike te, oyo bazali kotindikama-tindikama na bambonge mpe komemama-memama bipai na bipai na mipepe nyonso ya mateya oyo evandi kati na lokuta ya bato, mpe kati na mayele na bango ya mabe ya kosalela banzela ya mabe mpo na kobungisa bato. Nzokande, na nzela ya koloba solo kati na bolingo, tokokola na makambo nyonso kino na ye oyo azali Motu, ye nde Kristo. Ezali wuta na ye, nde nzoto mobimba ekangani malamu penza mpe esangani esika moko na nzela ya misisa oyo epesaka yango bilei. Bongo tango eteni moko na moko ezali kosala mosala na yango na ndenge ekoki, nzoto mobimba ezali kokola mpe ezali komitonga yango moko kati na bolingo. Yango wana, nalobi boye mpe nazali kokebisa bino kati na Nkolo ete, botika bizaleli ya bapakano, bango balandaka makanisi na bango oyo ezanga tina. Pamba te, makanisi na bango ezali molili mpe bazali ya kokabwana na bomoi ya Nzambe, mpo na kozanga koyeba oyo ezali kati na bango, oyo ewutaka na mitema na bango ya mabanga. Babungisa makambo nyonso oyo bomoto esengaka, bamibwaka na makambo ya soni, mpo na kosala na lokoso nyonso makambo nyonso ya bosoto. Kasi bino, boyekolaki Kristo na ndenge wana te. Nazali na elikya ete boyokaki makambo oyo etali ye, mpe bateyaki bino kati na ye, na ndenge penza ya makambo ya solo oyo ezali kati na Yesu. Bongo boboya bomoi na bino ya kala, bobwaka bomoto na bino ya kala, oyo ezali kobeba na baposa na yango ya mabe. Esengeli ete mitema na bino mpe makanisi na bino ekoma ya sika penza; mpe bolata moto ya sika, oyo akelama na lolenge ya Nzambe, kati na bosembo mpe bosantu ya solo. Yango wana, moko na moko na kati na bino esengeli abwaka lokuta, mpe aloba makambo ya solo na moninga na ye; pamba te, biso nyonso tozali biteni ya nzoto moko. Soki bosiliki, bosala masumu te; esengeli ete kanda na bino esila liboso ete mokolo ekoma na suka na yango. Bopesa zabolo nzela te. Moto oyo azalaki koyiba, atika koyiba; kasi esengeli asala, asala na maboko na ye moko mosala oyo ezali malamu, mpo ete azala na eloko oyo akoki kopesa na moto oyo azali kokelela. Botika te ete ata liloba moko ya mabe ebima na minoko na bino, kasi kaka oyo ezali malamu, oyo ekoki kokolisa kondima, na ndenge ya posa na bango, mpo ete yango epesa bolamu na bato oyo bazali koyoka yango. Boyokisa Molimo Mosantu ya Nzambe mawa te, na nzela na ye nde batiaki bino elembo, mpo na mokolo ya kokangolama. Tika ete makambo nyonso ya bololo, kosilika, kanda, kongala, kofinga, elongwa kati na bino, ndenge moko mpe na makambo nyonso ya mabe. Bozala bato ya malamu moko epai ya mosusu, bozala bato ya motema mawa, mpe bolimbisana moko na moko, ndenge Nzambe mpe alimbisa bino kati na Kristo. Lokola bozali bana oyo Nzambe alingaka mingi, esengeli mpe bolanda ndakisa na ye. Tika ete bolingo emonana na bomoi na bino, ndenge mpe Kristo alingaki biso mpe amikabaki ye moko mpo na biso, lokola malasi ya solo kitoko mpe mbeka epai ya Nzambe. Mpe na oyo etali pite, to bosoto nini, to mpe lokoso ya kozwa biloko, emonana kutu te kati na bino, pamba te yango ekoki te na basantu; ata mpe makambo ya soni, to maloba ya bozoba, to mpe maseki, pamba te yango ezali malamu te mpo na bino; kasi malamu bobimisaka maloba ya kozongisa matondi. Pamba te, boyebi yango malamu ete: ata moto moko te oyo asalaka pite, makambo ya bosoto, atonda na lokoso ya kozwa biloko (pamba te lokoso ezali kosambela bikeko), akokota te na Bokonzi ya Kristo mpe ya Nzambe. Moto moko te akosa bino na maloba oyo ezangi tina; pamba te, ezali mpo na makambo wana, nde kanda ya Nzambe eyaka likolo ya bato oyo bazangi botosi. Bosangana na bato wana te. Pamba te, liboso bozalaki molili, kasi sikʼoyo bozali pole kati na Nkolo. Yango wana, bozala na bizaleli ya bana ya pole; pamba te mbuma ya pole emonana kati na nyonso oyo ezali bolamu, bosembo, mpe bosolo. Bosala nyonso mpo na kososola makambo oyo esepelisaka Nkolo. Bosangana te na misala ya molili oyo ebotaka mbuma te, nzokande bobimisa yango na pole. Pamba te, makambo bato wana basalaka na sekre, ezali penza soni mpo na koloba yango. Kasi soki babimisi makambo yango na pole, na tango wana nde lolenge na yango oyo ya solo-solo emonanaka polele. Pamba te, ezali pole nde emonisaka makambo nyonso polele. Yango wana elobama: “Lamuka yo moto olali pongi, sekwa kati na bakufi mpe Kristo akongengisa moi na ye likolo na yo!” Bongo, bokeba mingi mpo na bizaleli na bino; bozala te lokola bato bazangi mayele, kasi bozala lokola bato oyo bazali na mayele. Bosalela tango malamu, pamba te mikolo ezali mabe. Yango wana bozala bazoba te, kasi boluka kososola soki mokano ya Nkolo ezali nini. Bolangwa masanga te, pamba te yango ememaka na mobulu; kasi botondisama na Molimo. Bolendisana moko na moko kati na banzembo, masanzoli mpe banzembo oyo ewutaka na Molimo; boyemba mpe bokumisa Nkolo kati na mitema na bino. Bozongisaka matondi na Nzambe Tata, na tango nyonso mpe na makambo nyonso, na kombo ya Nkolo na biso Yesu Kristo. Botosanaka moko na moko kati na bobangi Kristo. Basi, botosa mibali na bino ndenge botosaka Nkolo. Pamba te, mobali azali mokonzi ya mwasi, ndenge Kristo azali mokonzi ya Lingomba: nzoto na ye, oyo ye azali Mobikisi na yango. Lokola Lingomba etosaka Kristo, ndenge moko mpe basi batosa mibali na bango na makambo nyonso. Mibali bolinga basi na bino ndenge mpe Kristo alingaki Lingomba mpe amikabaki ye moko mpo na yango, mpo ete akomisa yango ya bosantu, na nzela ya Liloba, sima na kokomisa yango peto na nzela ya kosukola yango na mayi; mpo ete alakisa yango na ye moko, Lingomba oyo etondi na nkembo, ezangi bosoto, ezangi likwanza, ata mpe eloko moko te ya ndenge wana, kasi ezala ya bosantu mpe na mabe ata moko te. Ndenge moko mpe, mibali basengeli kolinga basi na bango ndenge balingaka nzoto na bango moko. Mobali oyo alingaka mwasi na ye, amilingaka ye moko. Pamba te, moto ata moko te asiʼayina nzoto na ye moko, kasi aleyisaka yango mpe alengelaka yango malamu, ndenge moko mpe Kristo asalaka Lingomba, pamba te tozali biteni ya nzoto na ye. “Yango wana mobali akotika tata na ye mpe mama na ye mpe akosangana na mwasi na ye, bongo bango mibale bakokoma nzoto moko.” Sekre oyo ezali monene penza; kasi ngai nazali koloba mpo na Kristo mpe Lingomba. Mpo na bino, esengeli ete moto na moto kati na bino alinga mwasi na ye ndenge amilingaka ye moko; mpe mwasi asengeli kotosa mobali na ye. Bino bana, botosa baboti na bino kati na Nkolo, pamba te yango ezali sembo. “Mobeko ya liboso oyo ezali na elaka, yango oyo: Tosa tata mpe mama na yo,” mpo ete makambo na yo etambola malamu mpe owumela tango molayi kati na mokili. Bino batata, boyokisa bana na bino kanda te, kasi bobokola bango kati na mateya mpe na makebisi ya Nkolo. Bino bawumbu, botosa bakonzi na bino ya mokili, na bobangi, botosi, mpe na bosolo nyonso, lokola nde bozali kosala yango na Kristo. Bosala mosala na bino kaka te soki bazali kokengela bino, lokola nde bozali kolinga kosepelisa bato; kasi bosala yango lokola bawumbu ya Kristo, baoyo bazali kokokisa mokano ya Nzambe na motema na bango mobimba. Bosala mosala na bino na esengo nyonso, lokola nde bozali kosalela Nkolo kasi bato te. Pamba te boyebi malamu ete, Nkolo akofuta moto na moto mpo na makambo nyonso ya malamu oyo azali kosala, azala mowumbu to moto ya bonsomi. Bongo bino bakonzi, bozala mpe ndenge moko na bawumbu na bino; botika kotungisa bango. Pamba te boyebi ete, Mokonzi na bango na oyo ya bino, azali na Likolo; mpe atalaka bilongi ya bato te. Mpo na kosukisa: bozwa makasi na bino kati na Nkolo mpe kati na nguya ya makasi na ye. Bolata bibundeli nyonso ya Nzambe, mpo ete bokoka kotelema ngwi liboso ya mayele ya mabe ya zabolo. Pamba te etumba na biso ezali na makila mpe na mosuni te, kasi na milimo oyo ezali na bokonzi, milimo ya lokumu, banguya ya mokili oyo ya molili, mpe na milimo ya mabe oyo ezali na mokili ya milimo. Yango wana, bokamata bibundeli nyonso ya Nzambe, mpo ete bokoka kotelema na mokolo mabe, mpe sima ya kobunda kino na suka, botelema kaka ngwi. Yango wana botelema ngwi: bolata solo lokola mokaba na loketo, bolata bosembo lokola eloko ya libende oyo ebatelaka ntolo, bolata molende ya kopanza Sango Malamu ya kimia lokola sapato na makolo na bino. Likolo na nyonso, bolata kondima lokola eloko ya libende oyo ekosunga bino mpo na koboma makonga nyonso oyo epelaka moto, oyo moto mabe abwakaka. Bokamata lobiko lokola ekoti ya libende, mpe Liloba ya Nzambe lokola mopanga ya Molimo. Na tango nyonso, bobondela mabondeli ya ndenge nyonso mpe ya kosenga, na kotindama ya Molimo. Bosala yango na kokengela mpe na molende, mpe bobondela mpo na basantu nyonso. Bobondela mpe mpo na ngai, mpo ete tango nakoloba, Nzambe apesa ngai maloba oyo nasengeli koloba, mpo ete nateya na molende nyonso sekre ya Sango Malamu, oyo ngai nazali ambasadere na yango, ambasadere oyo azali ya kokangama na minyololo. Bobondela mpo ete nateya yango na molende nyonso, ndenge nasengeli koteya yango. Titsike, ndeko na biso ya bolingo mpe mosali malamu kati na Nkolo, akoyebisa bino makambo nyonso, mpo ete bino mpe bokoka koyeba ndenge nazali mpe soki nazali kosala nini. Tala tina nazali kotinda ye epai na bino, mpo bokoka koyeba ndenge biso tozali, mpe akoka kolendisa mitema na bino. Tika ete Nzambe Tata mpe Nkolo Yesu Kristo, bapesa bandeko nyonso, kimia, bolingo, mpe kondima. Tika ete ngolu ezala na baoyo nyonso balingaka Nkolo na biso Yesu Kristo na bolingo ya solo penza. Ngai Polo mpe Timote, bawumbu ya Yesu Kristo, totindi mokanda oyo epai ya basantu nyonso kati na Kristo, baoyo bazali na Filipi, mpe na bakambi mpe na badiakele na bango. Tika ete ngolu mpe kimia oyo ewuti na Nzambe Tata na biso mpe Nkolo Yesu Kristo, ezala na bino. Mbala nyonso tango nakanisaka bino, natondaka Nzambe na ngai. Tango nyonso, nabondelaka mpo na bino nyonso, nabondelakabongo na esengo, mpo na ndenge bosalisaki ngai na mosala ya kopanza Sango Malamu, banda na mokolo ya liboso kino sikʼoyo. Ya solo, nazali na elikya ete, moto oyo abandaki mosala ya malamukati na bino, akosilisa yango kino na mokolo ya Yesu Kristo. Ezali malamu mpo na ngai, ete nazala na makanisi ya ndenge oyo mpo na bino nyonso, mpo nalingaka bino mingi penza. Pamba te, bino nyonso bosanganaka elongo na ngai na ngolu oyo Nzambe apesi ngai, ezala tango nazali na boloko, ezala tango nalobelaka Sango Malamu, to mpe tango nalakisaka yango ete ezali ya solo. Nzambe azali temwe na ngai ete nalingaka bino nyonso, na bolingo ya Yesu Kristo. Mpe libondeli na ngai yango oyo: ete bolingo na bino ekoba kokola kati na boyebi mpe bososoli nyonso, mpo ete bokoka kososola makambo ya malamu. Bongo bokozala peto mpe na mabe moko te kino na mokolo ya Kristo; bokotonda na mbuma ya bosembo oyo ewutaka na nzela ya Yesu Kristo, mpo na nkembo mpe lokumu ya Nzambe. Bandeko na ngai, nalingi boyeba ete makambo oyo ekweyilaki ngai, esungi mingi penza ete Sango Malamu ekende liboso. Pamba te, basoda nyonso oyo bakengelaka ndako ya mokonzi mpe bato mosusu oyo bazali awa, bayebi ete nazali na boloko mpo na Kristo. Mpe kokangama na ngai na boloko, epesi molende na bandeko mingi kati na Nkolo, mpo na koteya Liloba ya Nzambe na mpiko nyonso mpe na kobanga te. Ezali ya solo ete, bato mosusu bazali koteya Kristo na zuwampe na molimo ya kowelana, kasi bato mosusu bateyaka yango na makanisi ya malamu. Bato oyo bazali koteya yango na bolingo, bayebi ete nazali awa mpo na kobatela Sango Malamu. Kasi mpo na bato ya liboso, bazali toteya Kristo na molimo ya kowelanampe na makanisi ya malamu te, bakanisaka ete soki basali bongo, nde bakoyokisangai pasi mingi na motema tango nazali awa na boloko. Likambo te! Eloko ezali na tina, ezali ete, na ndenge nyonso, ata bazali koteya na makanisi ya lokuta to ya solo, kasi Kristo azali koteyama. Nazali na esengo mingi mpo na yango, mpe na kokoba kozala na esengo. Pamba te, mpo na mabondeli na bino mpe mpo na lisungi ya Molimoya Yesu Kristo, nayebi ete makambo wana nyonso ekosuka na kokangolama na ngai. Pamba te nazali kozela na motema mobimba mpe nazali na elikya ete nakoyoka soni na likambo ata moko te, kasi ezala sikʼoyo to mpe mikolo nyonso, nakotonda na molende, mpo ete Kristo akozwa lokumu na nzoto na ngai, ezala nazali na bomoi to mpe nakufi. Pamba te mpo na ngai, bomoi ezali Kristo, mpe kokufa ezali litomba monene. Kasi soki nakobi kozala na bomoi kati na nzoto, wana nakoki lisusu kobota mbuma na nzela ya mosala na ngai; boye, nayebi te soki nasengeli kopona nini. Nazali kobendama na makambo oyo mibale: nalingi kotika bomoi oyo mpe kozala elongo na Kristo, pamba te yango eleki malamu; kasi ezali na litomba mingi mpo na bino ete natikala na bomoi. Mpe lokola nazali na elikya oyo, nayebi ete nakotikala na bomoi, mpe nakozala elongo na bino, mpo na kosalisa bino ete bokola mpe bosepela kati na kondima, mpo ete tango nakozala lisusu kati na bino, esengo na bino kati na Kristo Yesu ekoka kotonda koleka mpo na ngai. Sikʼoyo, eloko ezali na tina yangʼoyo: ete bomoi na bino etambola ndenge Sango Malamu ya Kristo ezali kosenga, mpo ete, ata naye mpe namoni bino, to mpe nazali na bino elongo te, nayoka ete bozali ya kotelema ngwi kati na likanisi kaka moko, bozali kobunda lisanga na molimo moko, mpo na Sango Malamu oyo bondimaki. Bobanga banguna na bino te; yango ezali elembo mpo na bango ete bakobebisama, kasi bino bokobika, pamba te ezali Nzambe moto apesaka bino elonga. Pamba te, mpo na oyo etali Kristo, Nzambe apesa bino bolamu, kaka mpo na kondima ye te, kasi mpo na konyokwama mpe mpo na ye, lokola bozali kobunda etumba ya lolenge moko na oyo bomonaki epai na ngai, mpe oyo bozali koyoka ete nazali naino kobunda. Soki bozali na nmpiko oyo ewutaka na lisanga na bino na Kristo, soki bozali na kolendisama oyo ewutaka na bolingo na ye, soki bozali na boyokani elongo na Molimo, soki bozali na bolingo mpe mawa, boye botondisa esengo na ngai na nzela ya kozala na likanisi moko, bolingo moko, motema moko mpe posa moko. Bosala eloko moko te na molimo ya kowelana, to mpe mpo na koluka lokumu ya pamba-pamba; kasi na komikitisa nyonso bomona baninga na bino lokola nde baleki bino; Moto moko te kati na bino aluka kaka bolamu na ye moko, kasi aluka mpe bolamu ya bandeko mosusu. Tika ete makanisi na bino ezala ndenge moko lokola oyo Kristo Yesu azalaki na yango: Ye oyo azalaki na lolenge ya Nzambe, kasi amonaki yango te lokola eloko ya kowelela, kasi amikomisaki moto pamba, akomaki lokola mowumbu. Amikomisaki lokola moto, mpe amimonisaki na lolenge ya bato. Amikitisaki penza, mpe atosaki kino na liwa, ata na liwa ya ekulusu. Yango wana Nzambe atombolaki ye koleka likolo na nyonso, mpe apesaki ye kombo oyo eleki bakombo nyonso, mpo ete na kombo na Yesu mabolongo nyonso efukama, oyo ezali na likolo, na mokili mpe na nse ya mabele, mpe minoko nyonso etatola endima ete Yesu Kristo azali Nkolo, mpo na nkembo ya Nzambe Tata. Yango wana, balingami, lokola botosaka ngai tango nyonso, kaka te tango nazalaka na bino, kasi ata sikʼoyo ndenge nazali na bino te, bokoba kosala mpo na lobiko na bino, na bobangi mpe na kolenga; pamba te, ezali Nzambe moto asalaka kati na bino posa mpe makoki yakosala likambo na ndenge ya mabongisami na ye. Bosala likambo nyonso na koyima-yima te mpe na tembe te, mpo ete bozala na mbeba ata moko te mpe bozala peto, bana ya Nzambe oyo bazangi mbeba, na kati ya bato oyo babunga mpe babeba, kati na baoyo bino bozali kongenga lokola minda kati na mokili, ndenge bozali komema Liloba ya bomoi, mpo ete nakoka kozwa lokumu na mokolo ya Kristo, ete nakimaki mbangu to mpe nasalaki mosalapamba te. Mpe, atako makila na ngai esengeli kosopama lokola likabo likolo ya mbeka mpe likolo ya mosala ya kondima na bino, nazali na esengo mpo na yango mpe nazali kosepela elongo na bino nyonso. Bino mpe ndenge moko, bosepela mpo na yango mpe bosepela elongo na ngai. Nazali na elikya, kati na Nkolo Yesu, kotindela bino Timotenoki penza, mpo ete nalendisama tango nakoyoka basango na bino. Pamba te, nazali na moto mosusu te awa, longola ye, oyo azali na makanisi moko na ngai mpe amitungisa mpo na bino. Pamba te, bango nyonso balukaka kaka bolamu na bango moko, kasi oyo ya Yesu Kristo te. Kasi bino moko boyebi ndenge Timote alakisaki mosala na ye, pamba te asalaki elongo na ngai na mosala ya kopanza Sango Malamu lokola tata na mwana na ye. Yango wana, nazali na elikya ya kotinda ye noki, tango nakomona ndenge makambo na ngai ekosuka. Kasi nazali na elikya kati na Nkolo, ete ngai moko mpe, nakoya kotala bino noki penza. Mpe, namoni ete ezali na tina mingi mpo natindela bino ndeko na ngai Epafrodite, moninga na ngai ya mosala mpe moninga na ngai ya etumba, oyo azali mpe, moto oyo bino botindaki mpo amemela ngai biloko oyo nazalaki na yango posa. Pamba te, azali na posa mingi mpo na komona bino nyonso, mpe ayokaki pasi mingi na motema mpo boyokaki ete azalaki maladi. Ya solo azalaki maladi, mpe akomaki pene-pene ya liwa, kasi Nzambe ayokelaki ye mawa, kaka ye moko te, kasi na ngai mpe, mpo ete natonda na mawa te. Yango wana, nazali kotinda ye noki penza, mpo ete tango bokomona ye lisusu, bosepela mpe mawa na ngai ekita. Boyamba ye kati na Nkolo na esengo nyonso, mpe botosaka bato ya ndenge wana; pamba te, alingaki kokufa mpo na mosala ya Kristo. Akabaki bomoi na ye, mpo ete apesa ngai lisalisi oyo bino bokokakikopesa ngai te. Mpo na kosukisa, bandeko na ngai, bosepela kati na Nkolo. Ezali likambo ya pasi te mpo na ngai, mpo nakomela bino lisusu makambo oyo nakomelaki bino liboso, mpe yango ezali mpo na bolamu na bino. Bokeba na bambwa, bokeba na bato oyo basalaka mabe, bokeba na bato oyo bamikataka nzoto. Pamba te, biso nde tozali bato oyo bakatisa nzoto na kokatisama ya solo, biso baoyo tosambelaka na nzela ya Molimo ya Nzambe, biso baoyotomipesaka lokumu kati na Kristo Yesu, mpe totiaka elikya na nzoto te, atako ngai mpe nazali na makambo oyo nakoki kotia na yango elikya na nzoto. Soki moto moko akanisi ete akoki kotia elikya na nzoto, esengeli ayeba ete, ngai nazali na yango mingi koleka: Pamba te, bakataki ngai nzoto na mokolo ya mwambe, nazali moto penza ya ekolo ya Isayele, na libota ya Benzamin, mpe nazali Mo-ebreooyo abotama na baboti oyo bazali Ba-ebreo. Mpo na oyo etali Mibeko, nazalaki Mofarizeo; mpo na oyo etali molende, naniokolaki Lingomba; mpo na oyo etali bosembo oyo bato balukaka na nzela ya Mibeko, nazalaki na mabe ata moko te. Kasi makambo oyo ezalaki ya tina mpo na ngai, nazali komona yango sikʼoyo lokola eloko pamba mpo na Kristo. Kaka yango te, nazali kutu kotala makambo nyonso lokola eloko pamba, mpo na bolamu oyo eleki monene: yango nde koyeba Kristo Yesu Nkolo na ngai. Mpo na ye nde nandimaki kobungisa makambo wana nyonso mpe nazali komona yango lokola biloko ya bosoto penza, mpo ete nazwa Kristo, mpe bakuta ngai kati na ye, nazala na bosembo na ngai moko te oyo ewutaka na Mibeko, kasi oyo ewutaka na nzela ya kondimela Kristo, bosembo oyo ewutaka na Nzambe, na nzela ya kondima. Nalingi koyeba Kristo, nguya ya lisekwa na ye, kosangana na bapasi na ye, kokoma lokola ye kati na liwa na ye, mpe na ndenge nyonso, na koka kokoma na lisekwa ya bakufi. Te, elingi koloba te ete nasiʼnazwi mbano, to mpe nasi nakomi moto ya kokoka, kasi nazali kokima mbango mpo na kozwa yango, pamba te Kristo Yesu mpe asiʼazwa ngai. Bandeko, mpo na ngai, nakanisi te ete nasiʼnazwi mbano yango. Kasi nasalaka likambo moko: nabosanaka makambo nyonso oyo ezali sima na ngai mpe nasalaka makasi mpo na makamo oyo ezali liboso. Bongo nazali kokima mbango kino nakoma na suka, mpo nazwa mbano oyo Nzambe abengela ngai wuta Likolo, kati na Kristo Yesu. Biso nyonso oyo tosiʼtokoli na molimo, tokanisaka ndenge wana. Mpe soki na likambo moko boye, bozali kokanisa ndenge mosusu, Nzambe akolakisa bino yango. Nzokande, na esika oyo tosiʼtokomi, tokoba kotambola na nzela moko. Bandeko, bolanda bino nyonso ndakisa na ngai, mpe botala malamu penza bato oyo bazali kotambola na lolenge ya bomoi oyo bomonaki epai na biso. Pamba te, ndenge nayebisaki bino liboso mbala na mbala mpesikʼoyo, nazali koyebisa bino lisusu na mayi na miso, ete bato mingi bazali banguna ya ekulusu ya Kristo mpo na bizaleli na bango. Suka na bango ezali libebi; nzambe na bango ezali libumu na bango; bamikumisaka na makambo oyo eyokisaka bango soni mpe batiaka makanisi na bango na biloko ya mokili. Kasi biso, tozali bato ya mboka ya Likolo. Mpe tozalikozela Mobikisi na biso wuta kuna, Nkolo Yesu Kristo, ye oyo, akobongola nzoto na biso ya mawa mpo ete ekoma lokola nzoto na ye ya nkembo, na nzela ya nguya oyo ezali kopesa ye makoki ya kotia biloko nyonso na nse ya bokonzi na ye. Yango wana, bandeko balingami na ngai, bino baoyo nazali na posa mingi mpo na komona, bino baoyo bozali esengo na ngai, mpe ekoti na ngai ya lokumu; balingami, bopikama makasi kati na Nkolo. Nabondeli Evodia mpe Sentishe ete bayokana bango na bango kati na Nkolo. Nasengi yo, moyengebene moninga, salisa basi oyo, pamba te babundaki elongo na ngai mpo na Sango Malamu, ndenge moko mpe Kelema na baninga mosusu ya mosala, baoyo bakombo na bango esiʼekomama na Buku ya bomoi. Bosepelaka tango nyonso kati na Nkolo; nazongeli yango lisusu bosepela! Tika ete boboto na bino eyebana na bato nyonso. Nkolo akomi pene-pene. Bomitungisa na eloko ata moko te, kasi na makambo nyonso, bolakisa baposa na bino epai ya Nzambe, na nzela ya mabondeli, bisengeli, elongo na matondi. Bongo kimia ya Nzambe, oyo eleki bososoli nyonso, ekobatela mitema na bino mpe makanisi na bino kati na Kristo Yesu. Bandeko, mpo na kosukisa, makambo nyonso oyo ezali ya solo, makambo nyonso oyo ezali ya kitoko, makambo nyonso oyo ezali ya sembo, makambo nyonso oyo ezali ya peto, makambo nyonso oyo batobalingaka, makambo nyonso oyo bato bakumisaka, soki likambo moko ezali malamu to oyo bato bakoki kokumisa, tika ete bokanisaka mpona makambo yango. Makambo oyo boyekolaki, bozwaki mpe boyokaki epai na ngai, to mpe oyo bomonaki na ngai, bosalela yango. Bongo Nzambe ya kimia akozala elongo na bino. Nazali kosepela mingi penza kati na Nkolo, mpo ete suka na yango, bokanisi ngai lisusu. Ya solo, bokanisaki ngai, kasi bozangaki nzela mpo na kolakisa yango. Nalobi boye te mpo nazali kokelela, pamba te nasiʼnayekola kozala na esengo na oyo nazali na yango. Nayebi ndenge nini kozala kati na kokelela, mpe nayebi ndengenini kozala kati na biloko mingi. Nasiʼnayekola sekele ya kozala na esengo kati na makambo ya ndenge na ndenge mpe kati na makambo nyonso, ata nalie malamu to nazali na nzala, ata natondi na biloko to mpe nakeleli. Nakoki kosala makambo nyonso na nzela ya ye oyo apesaka ngai makasi. Kasi bosalaki malamu mpo na kosangana na bapasi na ngai. Bato ya Filipi, bino moko boyebi yango ete, tango nabandaki koteya Sango Malamu mpe nalongwaki na Masedwane, Lingomba ata moko te epesaki ngai lisalisi, longola kaka bino. Tango navandaki na Tesalonika, botindelaki ngai lisalisi mbala mibale, mpo na oyo nazalaki na yango posa. Ezali te ete nazali koluka likabo, kasi nazali koluka ete benefisi ebakisama mpo na bino. Nzokande nazali na biloko nyonso, natondi na biloko nyonso, mpe nazali lisusu na posa ya eloko moko te lokola nazwi na maboko ya Epafrodite makabo oyo botindelaki ngai. Yango ezali malasi ya solo kitoko, likabo oyo endimami, oyo esepelisaka Nzambe. Mpe Nzambe na ngai akokokisa baposa na bino, na ndenge ya nkembo ya bomengo na ye, kati na Kristo Yesu. Nkembo ezala na Nzambe na biso mpe Tata mpo na libela na libela! Amen. Bopesa mbote na basantu nyonso kati na Kristo Yesu. Bandeko oyo bazali na ngai elongo awa batindeli bino mbote. Basantu nyonso batindeli bino mbote, mingi penza baoyo bazali na ndako ya mokonzi Sezare. Tika ete ngolu ya Nkolo Yesu Kristo ezala na bino nyonso. Ngai Polo, ntoma ya Klisto Yesu na mokano ya Nzambe, mpe ndeko na biso Timote, totindi mokanda oyo epai ya basantu mpe bandeko bandimi kati na Klisto, baoyo bazali na Kolosai. Tika ete ngolu mpe kimia oyo ewuti na Nzambe Tata na biso, ezala na bino. Tozongisaka matondi tango nyonso epai ya Nzambe, Tata na Nkolo na biso Yesu Klisto, tango tobondelaka mpo na bino. Pamba te tosiʼtoyoki sango ya kondima na bino kati na Klisto Yesu, mpe bolingo oyo bozali na yango mpo na basantu nyonso. Kondima mpe bolingo oyo ewuti na elikya oyo babombeli bino na Likolo, mpe oyo bosiʼboyoka sango na yango kati na Liloba ya solo, sango malamu oyo ekomaki kino epai na bino. Na mokili mobimba, sango malamu oyo ezali kobota mbuma mpe ezali kokende liboso, kaka ndenge esalaki kati na bino, banda mokolo oyo boyokaki yango mpe bososolaki ngolu ya Nzambe kati na bosolo na yango nyonso. Sango malamu yango boyekolaki yango na molingami Epafras, moninga na biso ya mosala, oyo azali mosali ya sembo ya Klisto mpo na bino; mpe ye moto ayebisaki biso bolingo na bino oyo Molimo apesa bino. Yango wana, banda mokolo oyo toyokaki sango na bino, totikaka te kobondela mpo na bino, mpe tosengaka Nzambe ete alakisa bino mokano na ye na mobimba penza, na nzela ya bwanya nyonso mpe bososoli nyonso oyo Molimo apesaka. Mpe tobondelaka bongo, mpo ete bokoka kozala na bizaleli oyo ekoki liboso na Nkolo, mpo ete bosepelisa ye na ndenge nyonso: bobota mbuma kati na mosala nyonso ya malamu mpe bokola kati na koyeba Nzambe. Bongo Nzambe akolendisa bino na nguya nyonso, oyo ewutaka na nguya ya nkembo na ye, mpo ete bokoka kozala bato ya koyika mpiko mpe ya kokanga motema na makambo nyonso, mpe bozongisaka matondi na esengo nyonso, na Tata, ye oyo apesa bino makoki mpo ete bosangana na bomengo ya basantu kati na Bokonzi ya pole. Pamba te: Akangola biso na nse ya bokonzi ya molili, mpe amema biso na Bokonzi ya Mwana na ye ya bolingo. Na ye nde tokangolami mpe tozui bolimbisi ya masumu. Ye azali elilingi ya Nzambe oyo amonanaka te, Abotami liboso ya oyo nyonso Nzambe akela. Pamba te, biloko nyonso ekelama na nzela na ye: biloko oyo ezali na likolo mpe oyo ezali na nse, biloko oyo emonanaka, na oyo emonanaka te, ata bokonzi mpe lokumu, bakonzi mpe banguya; biloko nyonso ekelama na nzela na ye mpe mpo na ye. Ye azali liboso ya biloko nyonso, mpe kati na ye nde biloko nyonso ezali na esika na yango. Azali motu ya nzoto, nzoto yango nde Lingomba; azali ebandeli mpe Abotami liboso na kati ya bato oyo bakufa, mpo ete azala Mokonzi kati na biloko nyonso. Pamba te Nzambe asepelaki ete bonzambe na ye nyonso evanda kati na Mwana na ye. Mpe na nzela ya Mwana na ye, azongisi bondeko kati na biloko nyonso mpe na ye moko; ata biloko oyo ezali na mokili to mpe oyo ezali na likolo, tango atiaki kimia na nzela ya makila ya Mwana na ye, oyo esopanaki na ekulusu. Nzoka nde, kala bozalaki mosika na Nzambe mpe bozalaki banguna na ye mpo na makanisi na bino mpe mpo na misala ya mabe oyo bozalaki kosala. Kasi sikʼoyo Nzambe azongisi bondeko kati na bino na ye, na nzela ya liwa ya nzoto ya Mwana na ye, mpo ete amema bino liboso na ye: basantu, bato bazangi likambo oyo bakoki kofunda bino na yango. Esengeli bokoba kati na kondima, bozala ya kopikama malamu penza, mpe botelema ngwi. Bondima te ete bapengwisa bino na elikya oyo bozwaki tango boyokaki sango malamu. Sango malamu oyo bateya na bato nyonso oyo bazali na mokili, oyo ngai Polo nakoma mosali na yango. Sikʼoyo, nazali kosepela mpo na bapasi oyo nazali komona mpo na bino, mpe nazali kokokisa kati na nzoto na ngai bapasi oyo ezangi na bapasi ya Klisto mpo na nzoto na ye, nzoto na ye nde Lingomba. Nakoma mosali ya Lingomba na etinda oyo Nzambe apesaki ngai mpo ete nateya bino Liloba ya Nzambe na mobimba na yango. Liloba yango nde sekre oyo ezalaki ya kobombama banda na batango ya kala mpe na mabota ya kala. Kasi Nzambe alakisi yango sikʼoyo epai ya basantu. Na bango nde Nzambe aponaki kolakisa bomengo ya nkembo ya sekre na ye mpo na bato oyo bazali Bayuda te. Mpe sekre yango, yangʼoyo: Klisto kati na bino, elakisi ete bozali na elikya ya kosangana na nkembo na Nzambe. Ezali Klisto yango nde tozali kosakola; tozali kokebisa mpe koteya moto nyonso na bwanya nyonso, mpo ete tokoka kokomisa moto nyonso, moto ya kokoka kati na Klisto liboso ya Nzambe. Tala tina nasalaka na makasi nyonso mpe nabundaka na nzela ya makasi na ye oyo esalaka kati na ngai na nguya nyonso. Nalingi boyeba ete nazali kobunda etumba ya makasi penza mpo na bino, mpo na bandeko ya Laodise, mpe mpo na baoyo nyonso nanu bamona ngai te. Nazali kobunda bongo mpo ete mitema na bango etonda na mpiko mpe bazala lisanga kati na bolingo. Mpo ete bakoka kozala na bomengo nyonso ya bososoli mobimba, mpo ete bakoka koyeba sekre ya Nzambe: Yesu ye nde Klisto; bomengo nyonso ya bwanya mpe ya boyebi na Nzambe ezali ya kobombama kati na ye. Nalobi na bino boye mpo ete moto moko te akosa bino na maloba ya lokuta. Pamba te, ata nazali na bino esika moko te na nzoto, kasi nazali na bino elongo na nzela ya molimo mpe nazali na esengo mpo na komona boyokani oyo bozali na yango mpe ndenge kondima na bino elelemi ngwi kati na Klisto. Yango wana, lokola bosiʼboyamba Klisto Yesu lokola Nkolo, bokoba kozala kati na ye. Bozala ya kolonama mpe ya kotongama kati na ye, mpe bozala ya kolendisama kati na kondima na ndenge oyo bateyaki bino. Bozongisaka matondi tango nyonso. Bokeba mpo ete ata moto moko te akanga bino na motambo, na maloba ya makanisi ya bomoto mpe oyo ekosaka, oyo ewutaka na mateya ya bato mpe na milimo oyo ekambaka mokili kasi ewotaka na Klisto te. Pamba te, kotondisama nyonso ya Bonzambe na lolenge ya nzoto evandi kati na Klisto. Bino mpe bozali na kotondisama yango kati na Klisto, ye oyo azali Mokonzi ya bokonzi nyonso mpe ya nguya nyonso. Ezali kati na ye nde bakataki bino nzoto, mpe kokatama yango esalamaki na maboko ya bato te kasi esalamaki na nzela ya Klisto mpe yango nde elongoli bino na bowumbu ya nzoto ya masumu. Tango bozwaki libatisi, bakundaki bino elongo na ye, mpe bosekwaki elongo na ye na nzela ya kondima ngoya na Nzambe oyo asekwisaki ye kati na bakufi. Tango bozalaki bakufi mpo na masumn na bino mpe tango bozalaki bato oyo bakatama nzoto te, Nzambe apesaki bino bomoi elongo na Klisto. Alimbisaki masumu na biso nyonso: pamba te apasolaki mokanda oyo ezalaki kofunda biso elongo na mibeko na yango. Alongolaki yango mpe abakaki yango na ekulusu. Alongolaki makasi ya milimo ya lokumu mpe ya nguya; alakisaki yango na miso ya bato nyonso tango atambolisaki yango lokola bakangami ya etumba, mpe alongaki yango na ekulusu. Yango wana, botika ata moto moko te asambisa bino mpo na biloko oyo boliaka to bomelaka, to mpe mpo na oyo etali mikolo ya feti, feti ya sanza ya sika, to mokolo ya saba. Nyonso wana, ezalaki kaka elilingi ya makambo oyo esengelaki koya; kasi solo na yango ezali komonana kati na Klisto. Botika te ete basambisa bino na bato oyo balukaka komikitisa na makambo oyo emonanaka mpe basambelaka ba-anzelu. Bamipesaka na bimoniseli na bango moko, mpe makanisi na bango ya bomoto etondisaka bango na lofundu oyo ezangi tina. Baboyaka kokangama na Klisto, ye oyo azali moto, wuta na ye nde nzoto mobimba ezali kozwa bilei mpe esangani malamu esika moko na nzela ya misisa mpe misuni. Mpe ezali kokola na kokola oyo Nzambe azali kopesa yango. Soki bosiʼbokufa elongo na Klisto mpe bosiʼbolongwa na nse ya bokonzi ya milimo oyo ekambaka mokili, bongo mpo na nini bozali kotosa mibeko lokola oyo, lokola nde bozali nanu na bomoi na kati ya mokili: “Kozwa te, komeka te, kosimba te!” Biloko nyonso wana ebongisama mpo na kobeba sima ya kosalela yango. Yango ezali kaka mibeko mpe mateya ya bomoto Mibeko ya ndenge wana, emonanaka lokola nde etondi na bwanya, pamba te esengaka ete bato basambela ndenge bango moko balingi, bazala na komikitisa ya lokuta, mpe bamipesaka pasi na nzoto. Kasi mibeko yango ezali penza na tina moko te mpo na kokangisa baposa ya nzoto. Bongo, lokola bosiʼbosekwa elongo na Klisto, botia mitema na bino na biloko oyo ezali na likolo, epai Klisto avandi na loboko ya mobali ya Nzambe. Botia makanisi na bino na biloko oyo ezali na Likolou, kati na oyo ezali na mokili te. Pamba te bosibokufa, mpe bomoi na bino ezali ya kobombama elongo na Klisto kati na Nzambe. Tango Klisto, ye oyo azali bomoi na bino, akomonana, bongo bino mpe bokomonana elongo na ye kati na nkembo. Yango wana boboma nyonso oyo ezali ya mokili na bomoi na bino: ekobo, bosoto, baposa ya mabe, bilulela, mpe lokoso ya mbongo, pamba te lokoso ya mbongo ezali kosambela bikeko. Makambo oyo nde ebendaka kanda ya Nzambe. Bino mpe, kala, bozalaki kosala makambo wana, tango bomoi na bino ezalaki na nse ya bokonzi ya makambo wana. Kasi sikʼoyo, esengeli boboya makambo wana nyonso: kanda, kotomboka, makambo ya mabe, kofinga, mpe maloba ya soni oyo ebimaka na minoko na bino. Botika kokosana bino na bino, lokola bosibobwaka moto ya kala elongo na misala na ye, mpe bolata moto ya sika, oyo akomisami ya sika kati na boyebi, na lolenge ya elilingi ya Moto oyo akelaki ye. Na bomoto wana ya sika, mogreki to moyuda azali te, moto akatisa nzoto to moto akatisa nzoto te azali te, bapaya to moto ayekola azali te, mowumbu to moto ya bonsomi azali te, kasi Klisto azali nyonso, mpe azali kati na nyonso. Yango wana, lokola Nzambe apona bino, bino basantu mpe balingami na ye, bolata mawa, bolamu, komikitisa, boboto, mpe kokanga motema. Soki moto azwi moninga na likambo, bokanganaka mitema mpe bolimbisanaka moko na moko. Bolimbisa ndenge Nkolo mpe alimbisaki bino. Mpe likolo ya makambo wana nyonso bobakisa bolingo, mpo yango ezali singa oyo ezali kokangisa bato na ndenge oyo ekoki penza. Tika ete kimia ya Klisto ezwa bokonzi na kati ya mitema na bino. Pamba te, ezali na kimia wana nde Nzambe abenga bino mpo bozala nzoto moko, mpe boyebaka kozongisa matondi. Tika ete Liloba ya Klisto, kati na bomengo na yango nyonso, evanda kati na mitema na bino. Boteyana mpe bopesana toli moko na moko na bwanya nyonso. Boyemba banzembo, masanzoli, mpe banzembo oyo Molimo apesaka; boyembela Nzambe, na bozongisi matondi kati na mitema na bino. Mpe nyonso oyo bosalaka to bolobaka, bosala yango na kombo ya Nkolo Yesu, mpe, bozongisaka matondi epai ya Nzambe Tata na nzela na Yesu Klisto. Bino basi, botosaka mibali na bino, na ndenge oyo ekoki kati na Nkolo. Bino mibali, bolinga basi na bino mpe bolakisa bango ezaleli ya makasi-makasi te. Bino bana, botosa baboti na bino na makambo nyonso, pamba te yango esepelisaka Nkolo. Bino batata, boyokisa bana na bino kanda te, mpo ete mpiko na bango esila te. Bino bawumbu, botosa bakonzi na bino na makambo nyonso; mpe bosala yango kaka te tango bazali kokengela bino mpo na koluka kosepelisa bango, kasi bosala yango na bosolo nyonso mpe na bobangi Nkolo. Nyonso oyo bosalaka, bosala yango na motema mobimba, lokola nde bozali kosala mpo na Nkolo, kasi mpo na bato te. Pamba te, boyebi ete bokozwa bomengo oyo ekowuta na Nkolo, lokola lifuti. Ezali Klisto, Nkolo nde bozali kosalela. Moto oyo asalaka mabe, akozwa lifuti ya mabe na oyo asalaki; mpe Nzambe aponaka bilongi te. Bino bakonzi, bopesa bawumbu na bino oyo ezali ya sembo mpe ya kokoka, mpo boyebi ete bino mpe bozali na Mokonzi na Likolo. Bozala na molende kati na mabondeli, bokengelaka kati na yango mpe bozongisaka matondi. Bobondelaka mpo na biso, mpo ete Nzambe akoka kofungola ekuke mpo na mateya na biso, mpo ete tokoka kosakola sekre ya Klisto. Mpo na sekre na yango nazali ya kokangama na boloko. Bobondela mpo ete nakoka kosakola yango na polele nyonso, ndenge nasengeli koloba. Bozala bato ya bwanya kati na bizaleli na bino liboso ya bato oyo bazali bandimi te; mpe bosalela tango. Tika ete masolo na bino ezala tango nyonso ya kotonda na ngolu mpe na elengi, mpo ete bokoka koyeba ndenge nini bosengeli kozongisa eyano na moto na moto. Tishike akoyebisa bino basango nyonso oyo etali ngai. Ye azali ndeko molingami, mosali ya solo, mpe moninga ya mosala kati na Nkolo. Natindi ye epai na bino mpo na likanisi wana, mpo bokoka koyeba basango na biso mpe abondisa mitema na bino. Azali koya elongo na Onezime, ndeko na biso ya solo mpe ndeko molingami, ye oyo azali moko na bino. Bango bakoyebisa bino makambo nyonso oyo ezali koleka awa. Aristarke, moninga na ngai moto ya boloko, atindeli bino mbote, ndenge moko mpe Marko, ndeko ya Barnabasi. Bosiʼbozwaki mitindo mpo na ye; soki aye epai na bino, boyamba ye malamu. Yesu oyo babengaka Yustns, ye mpe atindeli bino mbote. Na kati ya Bayuda oyo bakomaki bakristo, kaka bango nde basalaka elongo na ngai mpo na Bokonzi ya Nzambe, mpe bango nde babondisaki ngai. Epafras, ye oyo azali moko na bino mpe mowumbu ya Klisto Yesu, atindeli bino mbote. Abundaka etumba tango nyonso mpo na bino kati na mabondeli, mpo ete bokoka kotelema ngwi kati na mokano mobimba ya Nzambe, bokola na molimo mpe botonda na elikya. Nazali kotatola mpo na ye ete azali kosala mosala ya makasi mpo na bino, mpe mpo na bandeko ya Laodise mpe ya Iyerapolis. Molingami na biso monganga Luka, mpe Demas, batindeli bino mbote. Bopesa mbote na bandeko ya Laodise, na Nimfa, mpe na Lingomba oyo esanganaka na ndako na ye. Soki bosilisi kotanga mokanda oyo, bosala nyonso ete yango etangama mpe na lingomba ya Laodise, bongo bino mpe botanga oyo ekowuota na Laodise. Boyebisa Arshipe: batela mosala oyo ozwaki kati na Nkolo, mpo ete osilisa yango. Ngai Polo, nakomi mbote oyo na loboko na ngai moko. Bobosanaka te ete nazali na boloko. Tika ete Ngolu ezala na bino. Ngai polo, Silas mpe Timote, totindi mokanda oyo na Lingomba ya bandeko ya Tesalonika, baoyo bazali kati na Nzambe Tata mpe kati na Nkolo Yesu Kristo. Tika ete ngolu mpe kimia ezala na bino. Tozongisaka matondo tango nyonso epai na Nzambe mpo na bino nyonso, tango totangaka kombo na bino na mabondeli na biso. Pamba te, totikaka te kokanisa liboso na Nzambe Tata na biso, ndenge kondima na bino ezali kosala, mosala ya bolingo na bino, kokanga motema na bino oyo ezali kowuta na elikya ya makasi kati na Nkolo na biso Yesu Kristo. Bandeko balingami na Nzambe, toyebi ete Nzambe apona bino, pamba te Sango Malamu na biso ekomaki epai na bino na malobakaka te, kasi ekomaki mpe na nguya elongo na Molimo Mosantu, mpe na elikya monene. Boyebi ezaleli oyo tozalaki na yango kati na bino; yango ezalaki mpo na bolamu na bino. Mpe, bokomaki bamekoli na biso mpe ya Nkolo, pamba teboyambaki Liloba na kati ya minyoko mingi, elongo na esengo oyo ewutaki na Molimo Mosantu; bokoma ndakisa epai ya bandimi nyonso na Masedwane mpe na Akayi. Pamba te, Liloba ya Nkolo eyokanaki wuta epai na bino kaka na Masedwane mpe Akayi te; kasi sango ya kondima na bino kati na Nzambe esiʼeyebani na bisika nyonso. Yango wana, tozali lisusu na tina te ya koloba ata likambo moko mpo na yango, pamba te bango moko bazali koloba ete boyambaki biso malamu penza. Bazali mpe koyebisa ndenge boboyaki bikeko mpe botalaki Nzambe, mpo na kosalela Nzambe ya bomoi mpe ya solo, mpe mpo na kozela wuta na Likolo Mwana na ye oyo asekwisaki kati na bakufi, Yesu, oyo azali kokangola biso na kanda oyo ezali koya. Bandeko, bino moko boyebi ete koya na biso epai na bino ezalaki ya pamba te. Sima ya kowuta konyokwama mpe kofingama na Filipi, ndenge boyebiyango, kasi na lisalisi ya Nzambe na biso, tozwaki molende ya koteya bino Sango Malamu na ye, na kati ya bitumba mingi. Pamba te, mateya na biso evandaki likolo ya libunga te to mpe likolo ya makanisi mabe te, mpo tosalelaki yango na mayele ya lokuta te. Nzokande, tolobaka lokola bato oyo Nzambe asiʼandima mpo na kozwa mokumba ya koteya Sango Malamu. Tolukaka kosepelisa bato te kasi Nzambe, ye oyo atalaka mitema na biso. Pamba te boyebi yango ete, naino tosalela maloba ya sukali te, ata mpe makanisi ya koluka kozwa mbongo na bino: Nzambe azali temwena biso. Mpe naino toluka te lokumu oyo ewutaka na bato, ata epai na bino, ata mpe epai ya bato mosusu. Lokola tozali bapostolo ya Kristo, tokokaki kosenga bino bomema mokumba na bino, kasi tozalaki bato ya boboto na kati na bino, ndenge mama abatelaka bana na ye. Mpo na bolingo monene oyo tozalaki na yango epai na bino, tosepelaki mingi penza kopesa bino kaka Sango Malamu ya Nzambe te, kasi kopesabino mpe bomoi na biso, mpo bokomaki bandeko na biso ya bolingo. Bandeko na ngai, bokanisa bapasi na biso mpe mosala ya makasi oyo tosalaki; tozalaki kosala mosala butu mpe moi, mpe toboyaki kozala mokumba epai ya moto ata moko na kati na bino, na tango tozalaki koteya bino Sango Malamu ya Nzambe. Bino moko bozali batemwe, Nzambe mpe azali temwe, ete ezaleli na biso liboso na bino bandimi, ezalaki ya bosantu, ya bosembo, mpe oyoezangaki mabe. Pamba te, boyebi ndenge tozalaki liboso ya moto na moto na kati na bino: ndenge tata asalaka na bana na ye, tolendisaki bino, tobondisaki bino, mpe tobondelaki bino, mpo bozala na bizaleli oyo ezali ya kokoka liboso na Nzambe, ye oyo abengaki bino na Bokonzi na ye mpe na kembo na ye. Yango wana biso mpe, tozongisaka matondi tango nyonso epai ya Nzambe, pamba te, tango boyambaki Liloba ya Nzambe, oyo boyokaki epai na biso, bondimaki yango lokola liloba ya bato te, kasi ndenge ezali penza, Liloba ya Nzambe, oyo ezali kosala kati na bino baoyo bosiʼbondima. Bandeko, pamba te, bosiʼbokoma bamekoli ya Mangomba ya Nzambeoyo ya Yudea, oyo ezali kati na Kristo Yesu. Bonyokwamaki epai ya bandeko na bino ya ekolo moko, ndenge moko mpe, Mangomba wana enyokwamaki epai ya Bayuda, bango bato babomaki Nkolo Yesu na baprofeta, banyokolaki biso mpe. Basepelisaka Nzambe te mpe bazali banguna ya bato nyonso. Bazali kokangela biso nzela mpo na koteya bato oyo bazali Bayuda te, mpo ete babika. Na ndenge wana, bazali kaka kotondisa masumu na bango. Mpe suka na yango, kanda ya Nzambe ekweyeli bango. Bandeko, mpo na biso, sima ya kokabwana na bino mpo na mwa tango moke—na nzoto kasi na makanisi te, mpe na posa monene oyo tozalaki na yango, tosalaki makasi mpo na komona bino. Yango wana, tolingaki koya epai na bino; ngai moko Polo, namekaki yango mbala moko mpe mbala mibale—kasi Satana akangelaki biso nzela. Pamba te, banani bazali elikya na biso, banani bazali esengo nabiso, to mpe banani bazali ekoti ya lokumu oyo biso tokozwa na yango kembo liboso ya Nkolo na biso Yesu Kristo tango akoya? Boni, ezali bino te? Ya solo, bino bozali kembo na biso mpe esengo na biso. Bongo, lokola tokokaki lisusu kokanga mitema te, yango wana tokanisaki ete ezali malamu, ete totikala biso moko na Atene. Mpe, totindaki Timote, oyo azali ndeko na biso mpe mosali ya Nzambe, mpe moninga na biso ya mosala kati na Sango Malamu ya Kristo, mpo alendisa bino mpe ayikisa bino piko kati na kondima na bino, mpo ete moto moko te na kati na bino akweya na minyoko oyo bozali komona; pamba te, bino moko boyebi malamu ete, tosiʼtobongisama mpo na yango. Tango tozalaki na bino elongo, toyebisaki bino etetokokutana na minyoko. Mpe yango nde esalami, ndenge boyebi yango malamu. Bongo, lokola nakokaki lisusu kokanga motema te, yango wana natindaki Timote mpo ayeba soki kondima na bino ekomi ndenge nini. Nabangaki, mpo ete tango mosusu Momeki asiʼamekaki bino, mpe mosala na biso ekokoma mosala ya pamba. Kasi Timote, asili sikʼoyo kozongela biso wuta epai na bino, mpe amemeli biso basango ya malamu mpo na kondima na bino mpe bolingo na bino. Ayebisi biso ete bozali tango nyonso na makanisi ya malamu mpo na biso, mpe bozali na posa monene mpo na komona biso, ndenge bisompe tozali na posa monene mpo na komona bino. Yango wana bandeko, na kati ya bapasi na biso mpe minyoko na biso nyonso, tozwaki lilendisi epai na bino, mpo na kondima na bino. Pamba te, sikʼoyo tomoni penza ete tozali na bomoi, lokola bozali ya kotelama ngwi kati na Nkolo. Bongo ndenge nini tokoki kozongisa matondi mingi epai ya Nzambempo na bino, mpo na esengo nyonso oyo tozalaka na yango liboso na Nzambe na biso, mpo na bino? Butu mpe moi, tobondelaka na molende nyonso mpo ete tokoka komona bino lisusu, mpe tokokisa oyo ezangi na kondima na bino. Sikʼoyo, tika ete Nzambe ye moko Tata na biso, mpe Nkolo na biso Yesu, bafungolela biso nzela mpo toya epai na bino. Tika ete Nkolo akolisa bolingo na bino mpe atondisa yango kati na biso na bino, mpe epai ya bato nyonso, ndenge biso mpe tolingaka bino. Tika ete alendisa mitema na bino, mpo ete bokoka kozala na mabe moko te mpe bozala basantu liboso ya Nzambe na biso mpe Tata, tango Nkolona biso Yesu akoya elongo na basantu na ye nyonso. Bongo bandeko, mpo na kosukisa, tosiʼtolakisa bino soki bizaleli ya ndenge nini bosengeli kozala na yango mpo na kosepelisa Nzambe, mpe ezali ndenge wana nde bozali kosala. Sikʼoyo tosengi bino mpetobondeli bino na kombo ya Nkolo Yesu, ete bosala yango lisusu koleka. Pamba te, boyebi mitindo oyo topesaki bino na kombo ya Nkolo Yesu. Mokano ya Nzambe ezali boye: bozala na bomoi ya bosantu; boboya pite; mpe moto na moto na kati na bino ayeba kobatela nzoto na ye na ndenge ya bosantu mpe na ndenge ya botosi, kasi alanda baposa ya mabe te, ndenge bapakano basalaka, bango bato bayebi Nzambe te. Mpe mpo na likambo oyo, moto moko te akosa ndeko na ye to mpe asala ye mabe. Pamba te, Nkolo akopesa etumbu na baoyo nyonso basalaka masumu ya ndenge wana, ndenge toyebisaka bino tango nyonso mpe tokebisaka bino. Pamba te, Nzambe abenga biso te mpo tozala na bomoi ya bosoto, kasimpo tozala na bomoi ya bosantu. Yango wana, moto oyo akotiola mitindo oyo, atioli moto te, kasi atioli Nzambe, ye oyo apesaka bino Molimo Mosantu na ye. Nzokande, mpo na oyo etali bolingo oyo ekoki kozala kati na bandeko, namoni ete tina ezali te mpo na nakomela bino, pamba te Nzambe asiʼateya bino mpo ete bolingana moko na moko. Mpe, yango wana bosalaka epai ya bandeko nyonso oyo bazali na kati ya Masedwane mobimba. Bandeko, tolendisi bino ete, bosala yango lisusu mingi koleka. Bozala na posa ya kozala na bomoi ya kimia, botia makanisi kaka namakambo na bino moko, mpe bosala mosala na maboko na bino, kaka ndenge toyebisaki bino, mpo ete bato oyo bazali bandimi te bakoka kotosa bomoi na bino ya mokolo na mokolo, mpe, mpo ete bokoka kotalela moto ata moko te. Bandeko, tolingi te bozala na kati ya kozanga boyebi, mpo na oyo etali bato oyo bakufa, mpo ete bozala na mawa te lokola bato mosusu oyo bazangi elikya. Pamba te, soki tondimaka ete Yesu akufaki mpe asekwaki, tozali kondima mpe, Nzambe akomema elongo na Yesu bato oyo bakufa kati na Yesu. Pamba te, makambo oyo tozali koloba na bino ewuti na Liloba ya Nkolo: biso, baoyo tokozala na bomoi kino Nkolo akoya, tokokende liboso te ya bato oyo basiʼbakufa. Pamba te, tango motindo ekopesama na mongongo makasi, mongongo ya mokonzi ya baanzelu ekoyokana, mpe kelelo ya Nzambe ekobeta, Nkolo ye moko akokita wuta na Likolo; bongo bato oyo bakufa kati na Kristobakosekwa bato ya liboso. Sima na yango, biso baoyo tokozala na bomoi na tango wana, tokomemama elongo na bango na kati ya mapata, mpo na kokutana na Nkolo na likolo. Mpe bongo, tokozala na Nkolo libela na libela. Yango wana, bolendisana moko na moko na maloba oyo. Kasi mpo na oyo etali tango to mokolo, bandeko, tomoni ete ezali natina te mpo na kokomela bino: pamba te, boyebi malamu ete Mokolo ya Nkolo ekoya lokola moyibi na kati ya butu. Tango bato bakoloba: “Sikʼoyo tozali na kimia mpe tovandi nyee!”, bongo libebi ya mbalakaka ekokweyela bango, lokola bapasi ya mwasi oyo azali na zemi, mpe bakokoka kokima te. Kasi bino, bandeko, bozali na kati ya molili te, mpo ete Mokolo yango ekanga bino na mbalakaka lokola moyibi. Pamba te, bino nyonso bozali bana ya mwinda mpe bana ya moi. Tozali bato ya butu te to mpe ya molili te. Yango wana, tolala pongi te lokola bato mosusu, kasi tokengela mpe tomibatela malamu. Pamba te, baoyo balalaka pongi, balalaka na butu; mpe baoyo balangwaka masanga, balangwaka na butu. Kasi biso baoyo tozali bato ya moi, tomibatela malamu: tolata kondima mpe bolingo lokola kazaka ya ebende, mpe elikya ya lobiko lokola ekoti ya ebende. Pamba te, Nzambe abongisa biso mpo kanda na ye ekweyela biso te, kasi mpo tozua lobiko na nzela ya Nkolo na biso Yesu Kristo, oyo akufaki mpo na biso, mpo ete, atako tozali na bomoi, to mpe tokufi, tokoka kozala na bomoi lisanga elongo na ye. Yango wana, bolendisana moko na moko, mpe bosungana moko na moko, ndenge bosalaka yango. Bandeko, tosengi bino botosaka baoyo basalaka mosala ya makasi kati na bino, baoyo bakambaka bino kati na Nkolo, mpe bapesaka bino makebisi. Botosa bango mingi penza mpe bolingaka bango, mpo na mosala oyo bazali kosala. Bozala na kimia kati na bino. Bandeko, tozali kolendisa bino ete: bokebisa bato ya goigoi, baoyo basiʼbalembi na mitema, bosalisaka bato ya bolembu, mpe bokangaka mitema liboso ya bato nyonso. Bokeba, ete moto moko te azongisa mabe na mabe, kasi bolukaka tang nyonso makambo ya malamu, kati na bino, mpe epai ya bato nyonso. Bosepelaka tango nyonso. Bobondelaka na kotika te. Bozongisaka matondi na makambo nyonso, pamba te mokano ya Nzambe ezali bongo kati na Kristo Yesu, mpo nabino. Boboma mosala ya Molimo te: botiolaka te maloba oyo esakolamaka; nzokande botala malamu-malamu makambo nyonso soki ezali ya solo to te, mpe bondima oyo ezali ya malamu. Boboya lolenge nyonso ya mabe. Tika ete Nzambe ya kimia apetola bino na lolenge nyonso. Tikaete molimo na bino, motema na bino, mpe nzoto na bino mobimba ebatelama malamu, ete ezala na mabe te na mokolo Nkolo na biso Yesu Kristo akoya. Ye oyo abenga bino azali sembo, ye mpe moto akosala yango. Bandeko, bobondelaka mpo na biso. Bopesa mbote na bandeko nyonso na besi ya bosantu. Nabondeli bino na kombo ya Nkolo, ete botangela bandeko nyonsomokanda oyo. Tika ete ngolu ya Nkolo na biso Yesu ezala na bino. Ngai Polo, Silas mpe Timote, totindi mokanda oyo na Lingombaya bandeko ya Tesalonika, baoyo bazali kati na Nzambe Tata na biso mpe kati na Nkolo Yesu Kristo. Tika ete ngolu mpe kimia oyo ewuti na Nzambe Tata mpe na Nkolo Yesu Kristo ezala na bino. Bandeko, tosengeli kotonda Nzambe tango nyonso mpo na bino. Ezali malamu mpo na biso ete tosala bongo, pamba te kondima na bino ezali kokola penza, mpe bolingo oyo moko na moko na kati na bino azali na yango na moninga na ye ezali kaka kobakisama. Yango wana, tomikumisaka mpo na bino na kati ya Mangomba ya Nzambe; tomikumisaka mpo na ndenge bozali kokanga motema mpe mpo na kondima oyo bozali na yango na kati ya minyoko mpe bapasi nyonso oyo bozali komona. Nyonso wana ezali kaka kolakisa ete Nzambe akataka makambo na bosembonyonso, mpo ete bomonana bozali bato ya kokoka mpo na Bokonzi ya Nzambeoyo bozali komona pasi mpo na yango. Nzambe azali sembo: akozongisa minyoko na bato oyo bazali konyokolabino, mpe akopesa bino bato bozali komona pasi, bopemi elongo na biso. Akosala bongo tango Nkolo Yesu akomonana wuta na Likolo, kati na moto makasi, elongo na baanzelu na ye ya nguya. Akopesa etumbu na baoyo bayebi Nzambe te mpe bazali kotosa te Sango Malamu ya Nkolo na biso Yesu. Bakozwa etumbu ya libebi ya seko, mpe bakobengana bango liboso ya Nkolo mpe liboso ya nkembo ya nguya na ye, tango akoya na mokolo wana mpo ete basantu na ye bapesa ye nkembo, mpe baoyo nyonso bandimaki bakamwa ye. Bino mpe bokozala na bango elongo, pamba te bondimaki mateya oyo toteyaki bino. Yango wana tobondelaka tango nyonso mpo na bino. Tosengaka Nzambe na biso ete amona bino bato ya kokoka mpo na kobenga oyo abenga bino, mpe na nzela ya nguya na ye akoka kotondisa bino na posa monene mpo na kosala malamu mpe misala nyonso oyo kondima na bino ezali kosala. Na bongo kombo ya Nkolo na biso Yesu ekozwa lokumu kati na bino, mpe bino kati na ye, na lolenge ya ngolu ya Nzambe na biso mpe ya Nkolo Yesu Kristo. Bandeko, mpo na oyo etali koya ya Nkolo na biso Yesu Kristo mpekosangana na biso mpo na kokutana na ye, tosengi bino, botika te ete makanisi na bino etonda na mitungisi, to mpe kobanga ekanga bino mpo na emoniseli moko boye, to maloba ya motu moko, to mpempo na mokanda oyo bakoki koloba ete ewuti epai na biso, oyo ezali koloba ete Mokolo ya Nkolo esiʼekomi. Bondima te moto ata moko akosa bino ata na lolenge nini, pamba te liboso ete Mokolo wana ekoma, bato basengeli liboso koboya mateya ya Kristo mpe moto ya masumu asengeli komonana liboso, moto oyo asengeli kobeba, oyo azali kotelemela mpe komipesa lokumu likolo ya nyonso oyo batobabengaka “Nzambe” to oyo bato bakumbamelaka, mpe, akokende kutukovanda na Ndako ya Nzambe mpe akomibenga ye moko ete azali Nzambe. Boni, bozali lisusu kokanisa te ete, tango nazalaki elongo na bino, ete nayebisaki bino makambo wana? Mpe sikʼoyo boyebi oyo ezali kokangisa ye, mpo ete akokakomimonisa na tango na ye. Pamba te nguya ya masumu oyo ezali naino ya kobombama esiʼebandi kosala; kasi ye oyo azali kokangisa yango kino sikʼoyo, akokoba kosala bongo kino tango bakolongola ye, bongo Mosumuki akomonana, ye oyo Nkolo Yesu akoboma na mopepe ya monoko na ye mpe akobebisa yena nkembo ya koya na ye. Mosumuki akoya na nguya ya Satana mpe akosala makamwisi ya lolenge nyonso, bilembo, makambo minene-minene ya lokuta, mpe makambo nyonso ya mabe oyo ekosaka baoyo bazali kokufa. Bakokufa mpo baboyaki kolinga makambo ya solo oyo ekoki kobikisa bango. Yango wana Nzambe atindeli bango nguya ya libunga, mpo bandima makambo ya lokuta, mpo ete baoyo nyonso bandimaki makambo ya solo te, kasi basepelaki na makambo ya mabe, bazwa etumbu. Kasi biso, tosengeli kozongisa matondi na Nzambe tango nyonso mpo na bino baoyo Nkolo alingaka. Pamba te Nzambe asiʼapona bino banda na ebandeli mpo ete bozwa lobiko na nzela ya mosala ya Molimo oyo akomisaki bino basantu, mpe na nzela ya kondima makambo ya solo. Nzambe abengaki bino na yango na nzela ya Sango Malamu oyo toteyaki bino, mpo ete bozwa nkembo ya Nkolo na biso Yesu Kristo. Yango wana bandeko, botelema ngwi mpe bosimba malamu mateya oyo toteyaki bino, ezala na maloba to mpe na mokanda. Tika ete ye moko Nkolo na biso Yesu Kristo mpe Nzambe Tata na biso ye oyo alingaki biso, mpe na nzela ya ngolu na ye, apesaki biso lilendisi ya seko mpe elikya ya kitoko penza, batondisa mitema na bino na molende mpe bapesa bino makasi mpoete bosala misala nyonso ya malamu mpe bolobaka maloba nyonso ya malamu. Bandeko, mpo na kosukisa, bobondelaka mpo na biso, mpo ete Liloba ya Nkolo ekoka kopanzana noki penza mpe ezwa nkembo, ndenge ezalaki epai na bino. Bobondela mpe mpo ete Nzambe akangola biso na maboko ya bato mabempe batomboki. Pamba te bango nyonso te nde bazali na kondima. Kasi Nkolo azali sembo, akopesa bino makasi mpe akobatela binoliboso ya Motomboki. Tozali na elikya kati na Nkolo mpo na bino, ete bozali kosala mpe bokokoba kosala makambo oyo totindaki bino. Tika ete Nkolo akamba mitema na bino mpo bozala na bolingo ya Nzambe mpe na kokanga motema oyo Kristo apesaka. Bandeko, totindi bino na kombo ya Nkolo Yesu Kristo: bokima ndeko nyonso oyo azali na bomoi na mobulu, mpe alingi te kolanda mateya oyo toteyaki bino. Pamba te, bino moko boyebi soki ndenge nini bosengeli kolandandakisa na biso. Tango tozalaki elongo na bino, tozalaki bato ya goigoi te, mpe toliaki epai ya moto ata moko te bilei ya ofele, kasi tozalaki kosala mosala butu mpe moi, mosala ya makasi penza mpe ya pasi, mpo etetomemisa mokumba na biso epai ya moto ata moko te kati na bino. Elingi koloba te ete tozalaki na ndingisa mpo na kosenga lisalisiya ndenge wana, kasi tosalaki bongo mpo ete tokoma ndakisa epai na bino, oyo bokoki kolanda. Pamba te, tango tozalaki elongo na bino, topesaki bino mobeko oyo: “Soki moto aboyi kosala mosala, alia mpe te!” Nzokande, tozali koyoka ete bato mosusu kati na bino bazali bagoigoi. Bazali kosala eloko moko te, mpe mosala na bango kaka kokota makambo ya bato. Na kombo ya Nkolo Yesu Kristo, tozali kotinda mpe kosenga bato ya ndenge wana, ete basala mosala na kimia nyonso mpe balia bilei oyo bakozwana motoki na bango moko. Kasi mpo na bino bandeko, bolemba te mpo na kosala makambo ya malamu. Soki moto aboyi kotosa mitindo oyo topesi bino na mokanda oyo, botala ye malamu penza mpe bosanganaka na ye lisusu te mpo ete ayoka soni. Kasi bokamata ye lokola monguna te, nzokande bokebisa ye lokola ndeko. Tika ete ye moko Nkolo ya kimia apesa bino tango nyonso kimiana lolenge na yango nyonso. Nkolo azala na bino nyonso. Ngai Polo, nakomi mbote oyo na loboko na ngai moko; yango nde ezali elembo kati na mikanda na ngai nyonso. Nakomaka ndenge oyo. Tika ete ngolu ya Nkolo na biso Yesu Kristo ezala na bino nyonso. Ngai Polo, mopostolo ya Kristo Yesu na etinda ya Nzambe Mobikisi na biso mpe ya Kristo Yesu Elikya na biso; natindi mokanda oyo epai ya Timote, mwana na ngai ya solo katina kondima. Tika ete ngolu, mawa, mpe kimia oyo ewuti na Nzambe Tata mpe na Kristo Yesu Nkolo na biso, ezala na yo. Nalingi ovanda na Efezo, ndenge nasengaki yo tango nazalaki kokende na Masedwane, mpo ete opesa mitindo na bato mosusu ete batika koteya mateya ya lokuta, bakangama te na masapo ya pamba-pamba, mpe na kotangaka bakombo ya bankoko oyo ezangi suka. Makambo wana ebimisaka kaka tembe na esika ya mosala ya Nzambe, oyo ezali na nzela ya kondima. Nzokande tina ya motindo oyo, ezali ete bolingo emonana, bolingo oyoewutaka na motema ya peto, na makanisi ya malamu, mpe na kondima ya solo. Bato mosusu basiʼbabunga nzela wana, mpe bamipesa na masolo ya pamba-pamba. Balingi bazala bateyi ya Mibeko, kasi basosolaka maloba na bango te to mpe oyo balobaka na molende nyonso. Kasi biso toyebi ete, Mibeko ezali malamu soki moto asaleli yango na ndenge oyo ekoki. Toyebi mpe lisusu ete, Mibeko esalama te mpo na bato ya malamu, kasi mpo na bato ya mabe mpe batomboki, mpo na bato oyo batosaka makambo ya Nzambe te mpe bato ya masumu, mpo na bato ya mbindo mpe bato oyo batiolakamakambo ya bosantu, mpo na baoyo babomaka batata na bango to mpe bamama na bango, mpo na bato oyo babomaka bato, mpo na bato oyo basalaka ekobo, mpo na bato oyo basanganaka na baningana bango mibali, mpo na bato oyo bateka bato na bowumbu, mpo na bato ya lokuta, mpo na bato oyo balapaka ndayi ya lokuta, mpe mpo na makambo mosusu oyo etambolaka nzela moko te na mateya ya solo; mateya oyo ekokani na Sango Malamu ya nkembo ya Nzambe ya lokumu, oyo bapesaki ngai. Nazali kozongisa matondi epai ya Kristo Yesu, Nkolo na biso, ye moto apesaki ngai makasi, mpo amonaki ete nazali ya kokoka, mpe aponaki ngai na mosala na ye; ngai moto nazalaki liboso moto oyo azalaki kotiola ye, konyokolo ye, mpe kofinga ye; kasi ayokelaki ngai mawa, pamba te nazalaki koyeba te makambo nazalaki kosala, mpe nazalaki na kondima te. Bongo Nkolo na biso atondiselaki ngai ngolu na ye, elongo nakondima, mpe bolingo oyo ezali kati na Kristo Yesu. Maloba oyo ezali ya solo mpe ezali ya kokoka mpo ete endimama: “Yesu Kristo ayaki na mokili mpo na kobikisa bato ya masumu”, bongo ngai nazali moto ya mabe koleka bango nyonso. Kasi ezali mpo na tina wana nde Nzambe ayokelaki ngai mawa, mpo ete kati na ngai, ngai moto ya mabe koleka bato nyonso ya masumu, Kristo Yesu akoka kolakisa kokanga motema na ye oyo ezangi ndelo, mpo ete nazala ndakisa mpo na bato oyo bakondima ye mpe bakozwa bomoi ya seko. Tika ete lokumu mpe nkembo ya seko na seko, ezala na Mokonzi ya seko, Ye oyo akufaka te, amonanaka te, mpe azali Nzambe kaka moko! Amen. Timote, mwana na ngai, napesi yo etinda oyo: etinda yango ekokani na maloba ya kosakola oyo basakolaki mpo na yo, mpo ete na nzela ya kosalela yango, okoka kobunda etumba ya malambu, obatela kondima, mpe makanisi ya malamu. Bato mosusu basiʼbabwaka yango mpe babungisa kondima na bango. Kati na bango tozali na: Imene mpe Alekizande, baoyo nakaba na maboko ya satana mpo ete bayekola kotika kofinga Nzambe. Liboso ya makambo nyonso, nazali kosenga ete bobondelaka, bosengaka, bobondelaka mpo na bato mosusu, mpe bozongisaka matondi mpo na bato nyonso, mpo na bakonzi minene, mpe mpo na baoyo nyonso bazali na bokonzi, mpo ete tokoka kozala na bomoi ya boboto mpe ya kimia, kati na botosi makambo ya Nzambe mpe na bosantu. Pamba te, yango ezali malamu mpe esepelisaka Nzambe Mobikisi na biso, ye oyo alingi ete bato nyonso babika mpe bayeba makambo ya solo. Pamba te Nzambe azali se moko, mpe moto oyo azongisaka boyokani kati na Nzambe na bato azali mpe moko, ye nde Kristo Yesu, moto, oyo amipesaki ye moko lokola eloko oyo epesamaki mpo na kokangola bato nyonso litatoli oyo esengelaki kopesama na tango na yango. Mpe ezali mpo na yango nde, Nzambe aponaki ngai nazala moteyi mpe mopostolo, mpe molakisi ya kondima ya solo epai ya bato oyo bazali Bayuda te. Nakosi te, kasi nalobi ya solo. Nalingi ete na bisika nyonso, mibali batombola maboko ya bosantutango bazali kobondela, bazala na kanda te mpe na koswana te. Ndenge moko mpe, basi balata na ndenge oyo ekoki, na ndenge oyo bato bakoki komona mabe te, mpe na ndenge ya lofundu te. Bakangisa sukite, balata biloko ya wolo te, to mpe mayaka, to mpe bilamba ya talo koleka, kasi balata misala ya malamu, oyo ekoki epai na basi oyo balobaka ete basambelaka Nzambe. Basi, esengeli bayekola kati na kimia mpe na botosi nyonso. Napesi ndingisa te na basi mpo na koteya, to mpe kozala na bokonzi likolo ya mibali; kasi esengeli avanda nyee. Pamba te, Nzambe asalaki liboso Adam, bongo Eve na sima. Mpe, Adam akosamaki te; kasi ezali mwasi moto akosamaki, mpeabukaki Mobeko ya Nzambe. Kasi mwasi akobika na nzela ya kobota bana, soki akobi kotambola kati na kondima, na bolingo, na bosantu, mpe na kozanga makanisi ya lolendo. Liloba oyo ezali ya solo: “Soki moto alingi kokoma mokengeli, aponi mosala moko ya malamu.” Mokengeli asengeli kozala na likambo ata moko te ya mabe, asengeli kozala mobali ya mwasi moko kaka, moto ya lokoso te, moto oyo ayebi komibatela malamu, moto oyo bato basengeli kotosa, moto oyo ayambaka bapaya malamu, moto oyo ayebi koteya, moto oyo alangwaka masanga te, moto oyo atombokaka te, kasi moto ya boboto, moto oyo aswanaka te, moto ya lokoso ya mbongo te, moto oyo ayebi kokamba libota na ye malamu, mpe atalaka malamu soki bana na ye batambolaka na botosi penza. Pamba te, soki moto ayebi kokamba libota na ye moko te, bongo ndenge nini akokoka kobatela Lingomba ya Nzambe? Esengeli azala te moto oyo awuti kobongola motema sika, soki te, akotonda na lofundu, mpe akozwa etumbu lokola oyo Zabolo azwaki. Esengeli azala na litatoli ya malamu liboso ya bato oyo bazali bandimite, mpo ete akweya kati na soni te mpe kati na motambu ya Zabolo te. Badiakono mpe ndenge moko, esengeli bazala bato oyo bakoki mpo na kozua botosi, bazala bato ya maloba mibale te, bazali bato oyo bamelaka masanga mingi te, mpe bato oyo batonda na lokoso ya kozwalitomba ya soni te. Esengeli bayeba kobatela sekele ya kondima kati na makanisi ya peto. Esengeli bameka bango liboso; bongo soki bamoni bango na mabete, wana nde bakoki kosala lokola badiakono. Ndenge moko mpe mpo na basi na bango, esengeli bazala basi oyo bakoki mpo na kozua botosi, batongaka bato te, bazala na lokoso te, mpe bazala sembo na makambo nyonso. Diakono esengeli azala mobali ya mwasi moko kaka, ayeba kokambabana na ye mpe ndako na ye malamu. Pamba te, badiakono oyo basalaka mosala na bango malamu, bazwaka lokumu mpe elikya monene kati na kondima na bango oyo ezali kati na Kristo Yesu. Atako nazali na elikya ya koya epai na yo noki penza, kasi nakomeli yo mitindo oyo, mpo ete soki naye noki te, okoka koyeba soki ezaleli ya ndengenini esengeli kozala na yango kati na ndako ya Nzambe, oyo ezali Lingomba ya Nzambe ya bomoi likunzi, mpe fondasio ya makambo ya solo. Ya solo, sekele ya kotosa makambo ya Nzambe ezali monene: Nzambe amonanaki na nzoto ya bomoto, akomaki sembo na nzela ya Molimo, baanzelu bamonaki ye, bateyaki sango na ye kati na bato oyo bazali Bayuda te, bandimaki ye kati na mokili, mpe amemamaki kati na nkembo. Nzokande, Molimo alobi polele ete na mikolo ya suka, bato mosusu bakobwaka kondima, bakolanda milimo ya lokuta mpe mateya ya milimo mabe. Mateya ya ndenge wana ewutaka na lokuta ya bato ya lokuta, baoyo makanisi na bango esiʼebeba, lokola nde ezika na libende ya moto. Bapekisaka bato babala te mpe batindaka bango balia te biloko mosusu; oyo Nzambe asala mpo ete bandimi mpe baoyo bayebi makambo ya solo balia yango sima ya kozongisa matondi. Pamba te, eloko nyonso oyo Nzambe asala ezali malamu, mpe tokoki koboya eloko moko te soki tolie yango sima ya kozongisa matondi. Pamba te, Liloba ya Nzambe mpe mabondeli, nde ekomisaka yango bosantu. Soki oteyi makambo oyo epai ya bandeko, okozala mosali malamu ya Yesu Kristo, mosali oyo azali kozwa bilei na ye kati na maloba ya kondima mpe kati na mateya ya solo, oyo osiʼososola malamu penza. Boya masolo ya pamba-pamba mpe biloba-loba ya mibange ya basi. Mipesa mpo na kotosa makambo ya Nzambe. Pamba te, masano ya nzoto ezali na tina mpo na mwa makambo moke, kasi kotosa makambo ya Nzambe ezali na tina mpo na makambo nyonso, mpo yango ezali na elaka mpo na bomoi ya lelo mpe mpo na bomoi oyo ekoya. Maloba oyo ezali ya solo mpe ezali ya kokoka mpo ete endimama. Pamba te, soki tozali konyokwama mpo na kosala mosala mpe tozali kobunda makasi, ezali mpo tozali kotia elikya na biso kati na Nzambeya bomoi, ye oyo azali Mobikisi ya bato nyonso, mpe koleka kutu bato oyo bandimaka elaka na ye. Tinda makambo oyo mpe teya yango. Moto moko te atiola bolenge na yo; kasi zala ndakisa liboso ya bandimi: na maloba, na ezaleli, na bolingo, na kondima, mpe na bopeto. Kino tango nakoya, mipesa mpo na kotanga Makomi, mpo na koteya, mpe mpo na kolakisa. Komona pamba te likabo na yo, oyo Nzambe apesaki yo na nzela ya maloba ya kosakola, tango bapaka ya Lingomba batielaki yo maboko. Tia motema na makambo wana, mpe mipesa mobimba na yango, mpo ete bato nyonso bamona ete ozali kokende liboso. Batela bomoi na yo mpe mateya na yo. Tia molende kati na yango, pambate soki osali bongo, okomibikisa yo moko mpe okobikisa baoyo bayokaka yo. Kopamela mobange na makasi te, kasi lendisa ye lokola nde azali tata na yo. Kamata bilenge mibali lokola bandeko na yo, mibange basi lokola bamama na yo, bilenge basi lokola bandeko na yo ya basi, kati na bopeto nyonso. Tosaka basi oyo bakufela mibali, baoyo batikala bango moko. Kasi soki mwasi oyo akufela mobali azali na bana to mpe bankoko, esengeli bayekola kolakisa botosi na makambo ya Nzambe liboso na libota na bango moko. Mpe bazongisela baboti na bango mpe bakoko na bango bolamu oyo basalelaki bango, pamba te yango esepelisaka Nzambe. Mwasi oyo akufela mobali, oyo atikala kaka ye moko, atiaka elikya na ye nyonso na Nzambe, mpe akobaka kobondela butu mpe moi mpe kosenga Nzambe mpo asalisa ye. Kasi mwasi oyo akufela mobali, oyo amipesa kati na bisengo, azali ya kokufa atako azali na bomoi. Pesa mitindo wana na bato, mpo ete moto moko te azala na mabe. Soki moto ayebi kosunga bato na ye te, mpe koleka kutu baoyo ya libota na ye moko, moto ya ndenge wana asiʼabwaka kondima mpe azali moto mabe koleka kutu moto oyo azangi kondima. Mpo ete nkombo ya mwasi oyo akufela mobali ekomama na buku ya basi oyo bakufela mibali, esengeli azala na bambula tuku motoba, azala mwasi oyo abalanaki na mobali moko kaka, mpe azala mwasi oyo ayebana mpo na misala na ye ya malamu: soki abokolaki bana malamu, soki ayambaki bapaya na ndako na ye, soki asukolaki makolo ya basantu, soki asalisaki baoyo bazalaki na minyoko, mpe soki asalaki lolenge nyonso ya misala ya malamu. Kasi mpo na basi oyo bakufela mibali, baoyo bazali naino bilenge, kokoma bango te na buku wana. Pamba te, tango baposa na bango ya nzoto ekomatela komipesa na bango na Kristo, bakoluka na bango kobala. Na bongo bakomema ngambo, awa bakobebisa elaka na bango ya liboso. Lisusu, basiʼbazwa ezalali ya kozala songi-songi mpe kotambola-tambolana bandako ya bato. Mpe kaka goi-goi te, kasi bakoma mpe bato ya biloba-loba, bato oyo bakotaka makambo nyonso, mpe bato oyo balobaka makambo oyo ekoki te. Yango wana, nazali kopesa ntoli na bilenge basi oyo bakufela mibali ete babala lisusu, babota bana, bakamba bandako na bango, mpe bapesa nzela na monguna te mpo na kotanga biso. Pamba te, basusu basiʼbabungi nzela mpo na kolanda satana. Soki mondimi moko ya mwasi to ya mobali azali na basi oyo bakufela mibali na kati ya libota na ye, esengeli asalisa bango mpe atika te ete Lingomba emema mokumba na bango, mpo ete Lingomba ekoka kosalisabasi oyo bakufela mibali, baoyo batikala bango moko. Bapaka oyo batambusaka malamu misala ya Lingomba bakoki mpo na kozwa lifuti mbala mibale; koleka mingi, baoyo basalaka mosala ya koteya mpe ya kolakisa. Pamba te, Makomi ya Nzambe elobi: kokanga monoko ya ngombe te na tango ezali konika mbuma, mpe mosali asengeli kozwa lifuti na ye. Soki moto aye kofunda mpaka ya Lingomba epai na yo, kondimela ye te. Ndimela ye yango na monoko ya batemwe mibale to misato. Baoyo bazali kosala masumu, pemala bango na miso ya bato nyonso, mpo ete basusu mpe babanga. Napesi yo mokumba oyo liboso ya Nzambe, liboso ya Yesu Kristo, mpe liboso ya baanzelu basantu, ete batela mitindo oyo na mobimba na yango, mpe kosala likambo moko te na kopona bilongi. Kotiela moto moko te maboko noki-noki, mpe kosangana na masumuya bato mosusu te. Mibatela peto. Komelaka kaka mayi te, kasi melaka mpe mwa ndambu ya vino mpo na estomac na yo mpe mpo na bapasi oyo etungisaka yo mbala na mbala. Masumu ya bato mosusu emonanaka polele liboso kutu batu babandakoloba-loba mpo na yango; kasi oyo ya bato mosusu emonanaka na sima penza. Ndenge moko mpe, misala ya malamu emonanaka polele penza, mpe oyo ezali mabe ekoki kotikala ya kobombama te. Baoyo nyonso bazali komema mokumba ya bowumbu esengeli bamonabakonzi na bango ete bazali ya kokoka mpo na kozwa lokumu nyonso, mpo ete moto moko te afinga kombo ya Nzambe mpe mateya oyo toteyaka. Baoyo bakonzi na bango bazali bandimi, batiola bango te mpo bazali bandeko na bango. Nzokande, basalela bango na malamu penza, pamba te baoyo bazali kozua litomba na mosala na bango bazali bandimi mpe bandeko na bango ya bolingo. Tala, makambo oyo, osengeli koteya mpe kotinda bango. Soki moto ateyi mateya mosusu, mpe alandi te maloba ya solo oyo Nkolo na biso Yesu Kristo, mpe mateya oyo ezali koloba mpo na botosi ya makambo ya Nzambe, azali moto oyo atonda na lofundu, ayebi eloko moko te, azali na maladi ya kotuna-tuna mituna mpe ya kotiaka tembe mpo na maloba; yango ebotaka zuwa, koswana, maloba ya kofinga, kokanisela baningamakambo ya mabe, mpe kotiana tembe ya pamba-pamba ya bato oyo babeba kati na makanisi na bango mpe bazangi makambo ya solo, baoyo bakanisaka etekotosa makambo ya Nzambe ezali nzela oyo epesaka litomba ya mosolo. Nzokande, kotosa makambo ya Nzambe mpe kosepela na biloko oyoozali na yango, ezali penza litomba monene. Pamba te, toyaki na eloko moko te na mokili, mpe tokoka komema ata eloko moko te. Kasi soki tozali na biloko ya kolia mpe na elamba ya kolata, tokosepelampo na yango. Nzokande bato oyo balingaka kokoma bato ya bomengobakweyaka kati na komekama, kati na motambo, mpe kati na baposa mingi ya bozoba mpe oyo ememaka pasi, oyo edindisaka bato kati na kufa mpe mabe. Pamba te, “bolingo ya mbongo, yango nde ezali ebandeli ya mabenyonso.” Bato mosusu bawelelaki kozala na mbongo, babungisa kondimana bango mpe bamiyokisa bango moko bapasi mingi. Kasi yo, moto ya Nzambe, kima makambo nyonso wana, mpe lukabosembo, kotosa makambo ya Nzambe, kondima, bolingo, kokanga motema mpe boboto. Bunda etumba malamu ya kondima, simba bomoi ya seko oyo Nzambe abengelaki yo, tango osalaki koyambola ya kitoko liboso ya batemwe ebele. Liboso ya Nzambe, oyo apesaka bomoi na biloko nyonso, mpe libosoya Kristo Yesu oyo asalaki koyambola ya kitoko liboso ya Ponse Pilato, napesi yo mokumba oyo: batela mibeko oyo, ezwa mbindo te mpe mabe te, kino Mokolo Nkolo na biso Yesu Kristo akomonana, ye oyo Nzambe akomonisa na tango na ye oyo asiʼatia: Ye oyo azali moto ya esengo, mokonzi kaka moko, Mokonzi ya bakonzi mpe Nkolo ya bakolo. Kaka ye moko nde akufaka te. Avandaka na kati ya moi oyo moto moko te azali na makoki mpo na kotala, epai moto ata moko te asiʼamona, to mpe akoki komona. Tika ete lukumu mpe makasi ya seko na seko ezala na ye! Amen. Pesa etinda oyo na bato oyo bazali bato ya bomengo na mokilioyo, ete bazala bato ya lofundu te mpe batia motema na bango te na bomengo oyo ezangi elikya, kasi batia motema na bango na Nzambe, oyoapesaka biso biloko nyonso na mingi penza, mpo ete tosepela na yango. Tindaka bango basalaka makambo ya malamu, bazala bato ya bomengona misala ya malamu, bakabelaka bato, mpe basepelaka kokabola biloko na bango na bato mosusu. Na ndenge wana, bakomibombela bango moko bomengo oyo: fondasio ya malamu mpo na mikolo oyo ezali koya, mpo ete bazwa bomoi ya solo. Ee Timote, batela malamu oyo bapesa yo. Boya masolo yapamba-pamba na oyo etelemelaka makambo ya kosambela, mpe tembe ya oyo babengaka na lokuta, ete ezali “Boyebi”, oyo bato mosusu basiʼbandima yango, mpe balongwa na nzela ya kondima. Tika ete ngolu ezala na yo! Ngai Polo, mopostolo ya Yesu Kristo na mokano ya Nzambe, natindama mpo na kosakola bomoi oyo Nzambe alaka, oyo ezali kati na Kristo Yesu; natindi mokanda oyo epai ya Timote, mwana na ngai ya bolingo. Tika ete ngolu, mawa, mpe kimia oyo ewuti na Nzambe Tata mpe na Nkolo na biso Kristo Yesu ezala na yo. Nazali kozongisa matondi epai ya Nzambe, oyo nasalelaka na motema peto, ndenge bakoko na ngai bazalaki kosalela; mpo ete butu mpe moi nakanisaka yo tango nyonso kati na mabondeli na ngai. Nakanisaka kolela na yo, mpe nazali na posa mingi mpo na komona yo, mpo ete natonda na esengo. Nakanisaka kondima ya solo oyo ozali na yango, kondima oyo kokona yo ya mwasi Lowis mpe mama na yo Enis bazalaki na yango mpe. Nazali kondima ete ozali na kondima yango mpe. Yango wana nazali kolendisa yo, olamusa lisusu likabo oyo Nzambe apesaki yo tango natielaki yo maboko. Pamba te, Molimo oyo Nzambe apesaki biso ekomisaka biso bato ya kobanga te; kasi Molimo oyo etondisaka biso na nguya, na bolingo, mpe na koyeba komibatela. Yango wana, koyoka soni te kotatola mpo na Nkolo na biso, to mpe mpo na ngai, moto na ye ya boloko. Kasi mona pasi elongo na ngaimpo na Sango Malamu, ndenge Nzambe azali kopesa yo makasi mpo na yango. Abikisa biso mpe abenga biso mpo tozala na bomoi ya bosantu; ezali te mpo na misala oyo tozalaki, kasi mpo na mabongisi mpe ngolu na ye moko. Ngolu oyo apesaki biso kati na Kristo Yesu liboso ya ebandeli ya tango, kasi emonani sikʼoyo na nzela ya koya ya Mobikisi na biso Kristo Yesu, ye oyo asilisaki nguya ya liwa mpe angengisaki bomoi mpe kozanga kokufa na nzela ya Sango Malamu. Mpe ezali mpo na koteya Sango Malamu yango, nde Nzambe atiaki ngaimoteyi, mopostolo mpe molakisi. Yango wana nazali komona bapasi ya ndenge oyo. Kasi nazali koyoka soni te, pamba te nayebi moto oyo ngai nandimela, mpe nazali na elikya ete azali na makoki mpo na kobatela kino na mokolo wana, nyonso oyo apesa ngai. Makambo oyo oyokaki epai na ngai, batela yango lokola ndakisa ya mateya ya sembo, na kondima mpe bolingo oyo ezali kati na Yesu Kristo. Batela makambo ya malamu oyo bapesaki yo; batela yango na lisalisi ya Molimo Mosantu oyo avandaka kati na biso. Oyebi yango ete, baoyo nyonso bazali na mokili ya Aziabasiʼbakima ngai, kati na bango tozali na Fizele na Ermozene. Tika ete Nkolo ayokela libota ya Onezifore mawa, pamba te abondisaka ngai mbala na mbala mpe ayokaka soni te mpo na ngai mpo nazali na boloko, Kasi tango akomaki na Roma, asalaki nyonso mpo na koluka ngaikino tango amonaki ngai. Tika ete Nkolo andima ete Onezifore azwa, na mokolo wana, bolamu ya Nkolo. Mpe oyebi malamu soki na lolenge nini ye asalisaki ngaina Efezo. Bongo yo mwana na ngai, zua makasi na yo kati na ngolu oyo ezali kati na Yesu Kristo. Mpe makambo oyo oyokaki epai na ngai liboso ya batemwe ebele, pesa yango na bato oyo otielaka motema, baoyo bazali na makoki ya koteya yango na bato mosusu. Mona pasi elongo na ngai, lokola soda ya malamu ya Yesu Kristo. Soda moko te oyo azali kokende na etumba bongo amipesaka mobulu na makambo ya bomoi oyo; asalaka bongo mpo ete asepelisa mokonzi na yeya mapinga. Ndenge moko mpe, soki moto azali kokima mbangu lokola mosali ya masano, akoki kozua ekoti ya lokumu te, soki akimi mbangu te ndengemibeko ezali kosenga. Mpo ete moloni elanga asepela na mbuma, esengeli asala liboso mosala makasi. Kanisa malamu mpo na makambo oyo nazali koloba, pamba te Nkoloakopesa yo makoki mpo ososola makambo nyonso. Kanisaka Yesu Kristo, ye oyo asekwaki kati na bakufi, ye oyo azalaki moto ya libota ya David. Tala Sango Malamu oyo nateyaka! Nazali komona pasi mpo na Nsango Malamu yango, kino bakangi ngaina minyololo lokola mobomi. Kasi Liloba na Nzambe ezali ya kokangama na minyololo te. Yango wana, nazali kokanga motema na bapasi wana nyonso, mpona bolamu ya bato oyo Nzambe apona, mpo ete bango mpe bazua lobiko oyoezali kati na Kristo Yesu, elongo na kembo ya seko. Pamba te maloba oyo ezali solo: Soki tokufi elongo na ye, tokozala mpe na bomoi elongo na ye; soki tokangi mitema, tokozala mpe na bokonzi elongo na ye. Kasi soki towangani ye, ye mpe akowangana biso; soki tozangi bosembo, ye akotikala kaka sembo, pamba te, akoki komiwangana te. Kaniselaka bango makambo oyo. Kebisa bango liboso ya Nzambe ete batika kotiaka tembe mpo na oyo etali maloba; yango ezali na litombamoko te, kasi ebendaka kaka libebi ya baoyo bayokaka yango. Sala nyonso oyo okoki kosala, mpo omilakisa liboso ya Nzambe lokolamoto oyo basiʼbameka ye, lokola mosali oyo akoyoka soni te mpo na mosalana ye, mpe oyo azali koteya Liloba ya solo na bosembo nyonso. Boya masolo ya pamba-pamba mpe oyo etiolaka makambo ya Nzambe, pamba te bato oyo bamipesaka na yango, masolo yango ememaka bango kaka na nzela ya kozanga botosi na makambo ya Nzambe. Mateya na bango eliaka nzoto lokola pota oyo ezali na tofina. Na kati na bango tozali na Imene mpe Filete: bango basiʼbatika nzela ya makambo ya solo, bazali koloba etelisekwa esiʼesalama, mpe bazali kokweyisa kondima ya bandimi mosusu. Nzokande, fondasio ya makasi oyo Nzambe atia, ezali kaka kotelema ngwi; mpe maloba oyo ekomama likolo na yango: Nkolo ayebi bato oyo bazali bato na ye, mpe moto nyonso oyo azali kondima kombo ya Nkolo esengeli aboya mabe. Na kati ya ndaku monene, tozalaka kaka na banzungu ya wolo mpe ya palata te, kasi tozalaka mpe na banzungu oyo basala na banzete mpe na mabele. Oyo ya liboso babombaka yango mpo na bafeti, mpe oyo mosusu basalelaka yango mokolo na mokolo. Soki moto amibateli peto na makambo oyo nawuti koloba, akozala nzungu oyo bakobanda kosalela na bafeti, oyo ekomi ya bosantu, oyo Mokonzi akobanda kosalela, mpe oyo ekozala ya kobongisama mpo na kosala misala nyonso ya malamu. Kima baposa ya mabe ya bolenge. Mpe luka na posa monene, bosembo, kondima, bolingo mpe kimia, elongo na baoyo babengaka Nkolo na motema ya peto. Boya mituna ya bozoba mpe oyo ezangi tina, pamba te oyebiete yango esukaka na koswana. Mpe ezali malamu te ete mosali ya Nkolo azala moto oyo aswanaka na bato. Kasi esengeli azala moto ya boboto epai ya bato nyonso, moto oyo azali na makoki mpo na koteya, mpe kokanga motema. Esengeli ateyaka na boboto nyonso bato oyo batiaka tembe epai na ye; mpe azala na elikya ete tango mosusu Nzambe akopesa bangotango mpo babongwana, mpo bayeba makambo ya solo. Bongo bakozongela makanisi na bango ya malamu mpe bakomilongola na motambo ya zabolo, oyo akanga bango na boloko, mpo basalaka mokano na ye. Kasi yeba makambo oyo: mikolo ya suka ekozala mikolo ya pasi. Pamba te, bato bakokoma moyimi, lokoso ya mbongo, lolendo, lofundu, bakotiola Nzambe, bakotosa baboti na bango te, bakoyeba kozongisa matondi te, bakotosa makambo ya Nzambe te, bakotonda na nko, bakoyokela bato mawa te, bakokosela baninga makambo, bakokoka komibatela te, bakonyokola baninga, bakoboya makambo ya malamu; bakoteka baninga, bakobanda kosilika noki, bakotonda na lofundu, bakolinga bisengo mingi koleka Nzambe. Bakobanda komilakisa lokola bato oyo batosaka makambo ya Nzambe, kasibakowangana nguya na yango. Kima bato ya denge wana! Pamba te, basusu na kati na bango bakotaka na badako ya bato mpe bakangaka na bowumbu basi oyo batonda na mikumba ya masumu, basi oyo bamemamaka na baposa ya nzoto ya denge na ndenge, baoyo bayekolaka tango nyonso, kasi bakokaka ata moke te koyebamakambo ya solo. Ndenge moko mpe lokola Zanes mpe Zambres batelemelaki Moyize, ndenge moko mpe bato wana bazali kotelemela makambo ya solo. Bazali bato oyo makanisi na bango esiʼebeba, mpe kondima na bango esiʼekufa. Kasi bakokende mosika te, pamba te bozoba na bango ekomonana polele na miso ya bato nyonso, ndenge oyo ya Zanes mpe Zambres emonanaki. Kasi yo, osiʼososoli malamu penza mateya na ngai, ezaleli na ngai, makanisi na ngai, kondima na ngai, ndenge nakangaka motema, bolingo na ngai, ndenge nayikaka piko, minyoko na ngai mpe bapasi na ngai. Oyebi makambo nyonso oyo ekomelaki ngai na Antiose, na Ikonuimi, mpe na Listere. Ya solo, nanyokwamaki mingi penza. Kasi Nkolo akangolaki ngai na makambo nyonso wana. Pamba te, moto nyonso oyo alingi kozala na bomoi oyo ezali kotosa Nzambe kati na Yesu Kristo, akoniokwama mingi penza. Kasi bato mabe mpe bato oyo bakosaka baninga bakodinda kaka katina mabe, bakokosa bato mosusu, mpe, bango moko mpe basiʼbakosa bango. Kasi yo, kangama kaka na makambo oyo oyekolaki mpe oyo ondimaki na motema mobimba, mpo oyebi moteyi oyo alakisaki yo yango; mpe banda bomwana na yo oyebi Makomi ya bosantu; yango ekoki kopesa yo bwanya oyo ememaka na lobiko na nzela ya kondima oyo ezali kati na Yesu Kristo. Pamba te, Makomi nyonso ekomama na nguya ya Nzambe, mpe ezalina tina mingi mpo na koteya bato, mpo na kopamela bato, mpo na kobongisa bato, mpe mpo na kolakisa bato ete batambola na bomoi ya malamu, mpo ete moto ya Nzambe azala ya kokoka mpe ya kokoka malamu-malamumpo na kosala misala nyonso ya malamu. Yango wana, liboso ya Nzambe mpe liboso ya Yesu Kristo, ye oyo akosambisa bato ya bomoi mpe baoyo bakufa; mpe, mpo na koya na ye, mpempo na Bokonzi na ye, nasengi yo: teya Liloba, teya yango na molende nyonso ezala na tango ya matata to na tango ya matata te, pamela, bongisa, lendisa, mpe teya yango na kokanga motema. Pamba te tango ezali koya, oyo bato bakolinga te koyoka mateya ya solo, kasi bakolanda baposa na bango ya nzoto, mpe bakomilukelabango moko bateyi, oyo bakoteya bango makambo oyo matoyi na bango ekozala na mokusa mpo na koyoka. Bakoboya koyoka mateya ya solo mpe bakomipesa mingi mpo nakoyoka masapo. Kasi yo, mibatela na makambo nyonso; kanga motema na bapasi oyoozali komona, sala mosala ya mopanzi Sango Malamu, mpe kokisa malamu mosala na yo. Pamba te, mpo na ngai, ngonga esiʼekoki mpo bakaba ngai na mbeka; tango esiʼekoki mpo na ngai mpo natika bomoi oyo. Nabundi etumba ya malamu, nasilisi kopota mbangu, mpe nabateli kondima na ngai. Sikʼoyo Nzambe abombeli ngai ekoti ya lukumu oyo ya bosembo, oyo Nkolo, mosambisi ya sembo akopesa ngai na mokolo wana, kaka na ngai moko te, kasi na baoyo nyonso mpe bazali kozela na posa monene, komonana na ye. Sala nyonso mpo oya noki epai na ngai, pamba te Demas, lokola alingi mokili oyo, asiʼakima ngai mpe akenda na Tesalonika. Kresansi akenda na Galatia, bongo Tito akendana Dalmatia. Kaka Luka nde azali na ngai elongo. Kamata Marko mpe boya na ye elongo, pamba te azali na tina mingi mpo na ngai, mpo na mosala na ngai. Natindaki Tishike na Efezo. Tango okoya, mema kazaka oyo natikaki na Trowas, epai ya Karpuse; memela ngai mpe babuku na ngai, kutu penza oyo esalama na poso ya nyama. Alekizande, mosali bibende, asalaki ngai mabe mingi; Nkolo akofuta ye mpo na oyo asalaki. Yo mpe keba na ye, pamba te atelemelaki mateya na biso na makasipenza. Tango nasambaki mpo na mbala ya liboso, moto ata moko te azalaki wana mpo na kosalisa ngai; bango nyonso bakimaki ngai. Tika ete Nzambe atangela bango yango te. Kasi Nkolo atelemaki pembeni na ngai mpe apesaki ngai makasi, mpo ete na nzela na ngai, mateya ekoka koteyama na mobimba na yango, mpe baoyo nyonso bazali Bayuda te bakoka koyoka yango. Mpe akangolaki ngai na monoko ya ntambwe. Ya solo, nayebi ete Nkolo akokoba kokangola ngai na misala nyonso ya mabe mpe akobatela ngai mpo na Bokonzi na ye ya Likolo. Tika ete azwakembo, libela na libela! Amen. Pesa mbote na Priska mpe na Akilas, mpe na libota ya Onezifore. Eraste atikalaki na Korinto, mpe natikaki Trofime azali maladi na Mileti. Sala nyonso mpo okoma awa liboso ete tango ya malili makasiebanda. Ebulus, Pudans, Linus, Klodia, na bandeko nyonso, bapesi yo mbote. Nkolo azala na molimo na yo. Tika ete ngolu ya Nzambe ezala na yo. Ngai Polo, mowumbu ya Nzambe mpe mopostolo ya Yesu Kristo. Nzambe apona ngai mpe atinda ngai mpo nasunga kondima ya bato oyoye apona mpe nakamba bango na nzela ya koyeba makambo ya solo oyo ememaka na kotosa makambo ya Nzambe; kondima mpe boyebi oyo evandi likolo ya elikya ya bomoi ya seko. Bomoi oyo, Nzambe oyo akosaka te alakaki biso wuta kala liboso ya ebandeli ya Tango. Mpe tango eleko oyo ye atiaki ekokaki, alakisaki Liloba na ye na polele nyonso, na nzela ya mateya oyo bapesaki ngai, na etinda ya Nzambe Mobikisi na biso. Natindi mokanda oyo na Tito, mwana na ngai ya solo kati na kondima moko oyo tozali na yango: —Tika ete ngolu mpe kimia oyo ewuti na Nzamba Tata mpe na Kristo Yesu Nkolo na biso, ezala na yo. Tina oyo natikaki yo na krete ezalaki ete obongisa makambo oyo etikalaki mpo na kobongisa, mpe otia bampaka ya Lingomba kati na vile moko na moko, ndenge natindaki yo. Paka ya Lingomba esengeli azala moto oyo azangi mabe, azala mobali ya mwasi moko kaka, bana na ye basengeli kozala bandimi mpe bazala te bana oyo bato bakoki koloba-loba mpo na bango ete bazali bana ya mobulumpe bana oyo bazangi botosi. Pamba te, esengeli ete mokengeli ya Lingomba azala na mabe te, mpomokumba ya mosala ya Nzambe ezali likolo na ye. Yango wana, esengeli azala moto ya lofundu te, moto oyo asilikaka noki te, moto oyo amipesa na masanga te, moto oyo aswanaka te, mpe moto oyo alukaka kozwambongo na banzela ya soni te. Kasi esengeli azala moto oyo ayambaka bapaya malamu, moto oyo alingaka makambo ya malamu, moto ya bwanya, moto na sembo, mosantu, mpe oyo ayebi komibatela malamu. Esengeli asimba makasi penza Liloba ya solo oyo bateyaki ye, mpo ete akoka kolendisa bato mosusu na nzela ya mateya ya solo, mpekosukisa baoyo batiaka tembe na yango. Pamba te, bato mingi bazali batomboki, bato ya biloba-loba mpebakosaka bato; mingi penza baoyo bazali na lisanga ya bato bakatisa nzoto. Esengeli okangisa bango minoko, pamba te bazali kobebisa mabotamingi na nzela ya koteya makambo oyo bakoki koteya te; mpe basalaka bongo mpo na kozwa mbongo na banzela ya nsoni. Moto moko na kati ya baprofeta ya bato ya Krete alobaki: Bato ya Krete bazalaka tango nyonso bato ya lokuta; bazali banyama ya mabe penza, bato ya lokoso mpe bagoigoi. Makambo alobaki ezali ya solo. Yango wana pamela bango makasipenza, mpo ete bazala peto kati na kondima mpe bakangama te na masapo ya bayuda, to mpe na mibeko ya baoyo baboyaka makambo ya solo. “Mpo na ba oyo bazali peto, biloko nyonso ezali peto”; kasi eloko moko te ezali peto mpo na baoyo bazali na bosoto mpebazangi kondima. Pamba te, makanisi na bango mpe mitema na bango ezali na bosoto. Balobaka ete bayebi Nzambe, kasi bawanganaka ye na nzela ya makambo oyo basalaka. Bazali bato mabe, bato bazangi botosi, mpe bazali na makoki te mpo na kosala ata likambo moko ya malamu. Kasi yo, teya makambo oyo mateya ya solo ezali kosenga. Teya mibange mibali ete bazala bato ya lokoso te, bazali bato oyo bakoki mpo na kozwa botosi, bazali bato oyo bayebi komibatela malamu, bato oyo bazali peto kati na kondima na bango, na bolingo na bango, mpe na koyika mpiko na bango. Ndenge moko mpe, teya mibange basi ete bazali na bomoi ya bosanto, batongaka bato te, mpe bazala bawumbu ya masanga te, kasi bateyaka makambo ya malamu. Bongo bakokoka koteya bilenge basi mpo balinga mibali na bango mpe bana na bango, bayeba komibatela malamu, bazala na bomoi ya peto, babongisakabandako na bango malamu, bazala bato malamu, mpe batosaka mibali na bango, mpo ete moto ata moko te aloba mabe mpo na Liloba ya Nzambe. Ndenge moko mpe, lendisa bilenge mibali ete bayeba komibatela malamu. Kati na makambo nyonso, zala ndakisa epai na bango na nzela ya kosala makambo oyo ezali malamu. Mateya na yo ezala ya peto mpe oyo ezali komema botosi. Lobaka maloba ya malamu oyo bato bakoki koloba mabe te mpo na yango, mpo ete baoyo bazali kotelemela yo bayoka soni, pamba te bakozwa ata likambo moko teya mabe oyo bakoloba mpo na biso. Teya bawumbu ete batosaka bakonzi na bango, mpe basepelisaka bango na makambo nyonso; bazongiselaka bango maloba na tembe te mpe bayibaka bango te, kasi basengeli kolakisa ete bakoki kotiela bango mitema, mpo ete kati na makambo nyonso oyo bazali kosala, bakomisa mateya ya Nzambe Mobikisi na biso, eloko oyo ezali kobenda bato. Pamba te, Nzambe asiʼalakisi ngolu na ye mpo na lobiko ya bato nyonso. Ngolu yango ezali koteya biso ete, toboya kozanga botosi na makamboya Nzambe mpe toboya baposa ya mokili; mpe na tango oyo tozali, tozala bato ya komibatela malamu, bato ya bosembo, mpe bato oyo batosaka makambo ya Nzambe, awa tozali kozela elikya ya esengo, komonana ya nkembo ya Nzambe na biso Monene mpe Mobikisi Yesu Kristo. Amipesaki ye moko mpo na biso, mpo ete akangola biso na mabe nyonso, mpe mpo apetola mpo na ye moko, bato oyo bazali ya ye moko, baoyo bazali na posa monene mpo na kosala misala ya malamu. Oyo nde makambo osengeli koteya. Lendisa mpe pamela na bokonzi nyonso. Moto moko te atiola yo. Kanisela bango ete esengeli bayokelaka bayangeli mpe bakonzi na bango, batosaka bango, mpe bazala ya kobongama mpo na kosala makambo ya malamu. Yebisa bango ete bafingaka bato te, kasi bazala bato ya kimiampe ya boboto, mpe balakisaka tango nyonso ezaleli ya malamu epai ya bato nyonso. Pamba te, liboso, biso mpe tozalaki bato bazanga mayele, bato bazanga botosi, bato babunga nzela, bawumbu ya baposa ya ndenge na ndenge mpe bawumbu ya bisengo, bomoi na biso ezalaki kati na mabe mpe totondaki na bilulela, bato bazalaki koyina biso, mpe tozalakikoyinana biso na biso. Kasi tango bolamu mpe bolingo ya Nzambe Mobikisi na biso emonanaki, abikisaki biso; soki abikisaki biso, ezali te mpo na misala ya malamu oyo tosalaki, kasi ezali mpo na mawa na ye. Abikisaki biso na nzela ya kosukola biso na mbotama ya sika mpe na nzela ya kokomisa biso bato ya sika na nguya ya Molimo Mosantu, oyo asopelaki biso na mingi penza na nzela ya Yesu Kristo Mobikisi na biso, mpo ete, na ngolu na ye, tokoka kokoma bato na sembo na miso ya Nzambe, mpe tokoka kozwa bomengo ya bomoi ya seko oyo totielaka elikya. Maloba oyo ezali ya solo penza; mpe nalingi oteyaka makambo oyo na molende nyonso, mpo ete baoyo basiʼbandima Nzambe bamipesa mobimbampo na kosala misala ya malamu. Makambo oyo ezali malamu mpe na litomba mingi penza epai ya moto nyonso. Kasi boya mituna ya bozoba, makambo etali bakombo ya bakoko, tembe, mpe koswana mpo na oyo etali Mibeko, pamba te yango ezali na litombate mpe ezali na tina te. Moto oyo akotisaka bokabwani, kebisa ye mbala ya liboso mpembala ya mibale. Soki aboyi koyoka, tika ye. Pamba te, esengeli oyeba ete moto ya ndenge wana, asiʼabungi nzela mpe azali kosala masumu; azali mpe komikatela ye moko etumbu. Tango nakotindela yo Artemas to Tishike, sala nyonso mpo oyaepai na ngai na Nikopolis, pamba te nakani kolekisa tango ya malili makasi kuna. Sala nyonso oyo okoki kosala mpo na kosunga Molakisi ya Mibeko Zenas mpe Apolos, mpo na mobembo na bango, mpo ete bazanga eloko moko te. Esengeli bato na biso mpe bayekola kosala misala ya malamu, mpo ete bakoka kosungaka baoyo bazalaka na posa ya lisalisi. Na ndenge wana, bakozala te bato oyo babotaka mbuma te. Baoyo nyonso bazali elongo na ngai batindeli yo mbote. Pesa mbote na baoyo balingaka biso kati na kondima. Tika ete ngolu ezala na biso nyonso. Ngai Polo, moto ya boloko mpo na Yesu Kristo, mpe ndeko na biso Timote, totindi mokanda oyo epai ya molingami mpe moninga na biso ya mosala Filemo, epai ya ndeko na biso ya mwasi Apia, epai ya Arshipe moninga na biso ya etumba, mpe na Lingomba oyo esanganaka na ndako ya Filemo. Tika ete ngolu mpe kimia oyo ewuti na Nzambe Tata na biso mpe na Nkolo Yesu Kristo, ezala na bino. Nazongisaka matondi tango nyonso epai ya Nzambe tango nakanisaka yo na mabondeli na ngai, pamba te nazali koyoka sango ya kondima oyo ozali na yango kati na Nkolo Yesu, mpe bolingo oyo ozali na yango mpo na basantu nyonso. Nabondelaka mpo ete kondima oyo tozali na yango lisanga ebimisa mosala, mpo eteososola na mingi penza makambo nyonso ya malamu, oyo tozali na yango kati na Kristo. Bolingo na yo ezali kopesa ngai esengo monene mpe molende, pamba te, yo ndeko, okitisaki mitema ya basantu. Yango wana, atako nazali na bonsomi kati na Kristo mpo na kotinda yo kosala likambo oyo osengeli kosala, kasi bolingo ezali kotinda ngai na makasi ete na senga yo—Ngai Polo, mobange, mpe sikʼoyo, moto ya boloko lisusu mpo na Yesu Kristo. Nazali kosenga yo mpo na Onesime, ye oyo azali mwana na ngai kati na Kristo; pamba te, nakomaki tata na ye ya molimo tango nazalaki na boloko. Liboso, azalaki na tina moko te mpo na yo, kasi sikʼoyo akomi na tina mingi mpo na yo mpe na ngai. Nazali kotindela yo ye, ye oyo azali motema na ngai penza, mpo azongela yo. Nalingaki atikala awa elongo na ngai, mpo ete akoka kosalisa ngai na esika na yo, lokola nazali na boloko mpo na Sango Malamu. Nalingi kosala eloko moko te soki ondimi yango te, mpo ete bolamu oyo okosala, ezala oyo ewuti na motema na yo moko, kasi ezala ya kotindika te. Tanga mosusu Onezime akabwanaki na yo mpo na mwa tango, mpo ete ozwa ye mpo na libela, lokola mowumbu lisusu te, kasi koleka kutu mowumbu, lokola ndeko ya bolingo. Azali na litomba mingi mpo na ngai, kasi azali mpe na litombamingi koleka mpo na yo, lokola moto mpe lokola ndeko kati na Nkolo. Soki omonaka ngai lokola moto oyo tozali na yo lisanga moko, nasengi yo oyamba ye lokola ngai moko. Soki, asalaki yo mabe to mpe azali na nyongo na yo, tia yango na kombo na ngai. Ngai Polo, nazali kokoma makambo oyo na loboko na ngai moko. Nakofuta yo nyongo yango—mpe nalingi te kokanisela yo ete, yo mpeozali na nyongo na ngai: nyongo yango nde bomoi na yo moko. Ya solo ndeko na ngai, salela ngai bolamu wana mpo na Nkolo; kitisa motema na ngai kati na Kristo. Nakomeli yo, mpo nazali na elikya ete okosala likambo oyo nasengi yo, mpe nayebi ete okosala yango kutu koleka. Nasengi yo lisusu obongisela ngai esika ya kolala, pamba te nazali na elikya ete Nzambe akopesa eyano na mabondeli na bino, mpe akozingisa ngai epai na bino. Epafras, moninga na ngai ya boloko mpo na Yesu Kristo, atindeli yo mbote. Ndenge moko mpe baninga na ngai ya mosala: Marko, Aristake, Demas, mpe Luka, bango mpe batinkeli yo mbote. Tika ete ngolu ya Nkolo na biso Yesu Kristo ezala na molimo na yo. Na tango ya kala Nzambe azalaki koloba na bankolo na biso, mbala mingi mpe na lolenge mingi, na nzela ya baprofeta. Kasi na mikolo oyo ya suka, alobaki na biso na nzela ya Mwana na ye; oyo ye atiaki mokitani ya biloko nyonso, mpe, na nzela na ye nde asalaki mokili. Mwana azali kongenga ya nkembo ya Nzambe, mpe elilingi ya bomoto na ye, mpe azali kosimba biloko nyonso na nguya ya maloba na ye. Mpe sima ya kopetola bato na masumu na bango, azali kovanda na Likolo, na loboko ya mobali ya Nzambe ya nguya nyonso. Lokola akomaki likolo ya baanzelu, ndenge moko mpe kombo oyo Nzambeapesaki ye ezali likolo na oyo ya bango. Pamba te Nzambe aloba ata na anzelu moko te: Yo ozali Mwana na ngai, lelo oyo nakomi Tata na yo. To lisusu: Ngai nakozala Tata na ye, mpe ye akozala Mwana na ngai. Mpe lisusu, tango Nzambe akotisaki Mwana na ye ya liboso kati na mokili, alobaki: Tika ete baanzelu nyonso ya Nzambe bakumisa ye. Kasi mpo na baanzelu, Nzambe alobaki: Akomisi baanzelu na ye mopepe, mpe basali na ye ndemo ya moto. Kasi mpo na Mwana na ye, alobaki: E Nzambe, kiti na yo ya bokonzi ekowumela libela na libela, mpe okokamba bokonzi na yo na bosembo nyonso. Olingaka bosembo mpe oboyaka mabe; Yango wana Nzambe, Nzambe na yo, aponaki na yo mpe atondisaki yo na esengo ya lokumu koleka oyo apesaki baninga na yo. Alobaki lisusu: E Nkolo, na ebandeli Otiaki bafondasio ya mokili, mpe likolo ezali mosala ya maboko na yo. Ekokufa, kasi yo okotikala na bomoi; ekonuna yango nyonso lokola elamba, mpe okolinga yango lokola kazaka, mpe ekobongwana. Kasi yo, ozali ndenge moko, mpe bambula na yo ezali na suka te! Mpe Nzambe aloba ata na anzelu moko te: Vanda na loboko na ngai ya mobali, kino tango nakokomisa banguna na yo esika oyo makolo na yo ekoniata. Bongo baanzelu bazali banani? Bazali milimo oyo bazali kosalela Nzambe, mpe baoyo Nzambe azali kotinda mpo kosalela baoyo bakozwa lobiko. Yango wana, esengeli tolanda malamu penza makambo oyo toyokaki, soki te tokobunga nzela. Pamba te, soki maloba oyo baanzelu balobaki emonanaki ete ezalaki ya solo, mpe, soki bato oyo babukaki mibeko mpe bazangaki botosi bazwaki penza etumbu oyo ekokaki mpo na bango, bongo ndenge nini tokokima kozwa etumbu soki tozali kotala Pamba lobiko ya monene boye, oyo Nkolo ye moko ateyaki yango liboso, mpe baoyobayokaki yango balakisaki biso ete yango ezali ya solo? Nzambe mpe atatolaki mpo na yango, na nzela ya bilembo, makambo ya nsomo, mpe makamwisi ya ndenge na ndenge, mpe na nzelaya makabo ya Molimo Mosantu oyo akabolaki na ndenge ye moko alingaki. Pamba te, Nzambe atia mokili oyo ezali koya, oyo tozali kolobela, na nse ya bokonzi ya baanzelu te. Kasi moto moko atatolaki boye, na esika moko: Moto azali nani mpo okanisa ye, to mpe mwana ya moto azali nani mpo ete obatela ye? Okitisaki ye na nse ya baanzelu mpo na mwa tango moke; otondisaki ye na nkembo mpe na lokumu, mpe otiaki biloko nyonso na nse ya makolo na ye. Tango atiaki biloko nyonso na nse ya bokonzi na ye, atikaki ata eloko moko te ezanga kozala na nse ya bokonzi na ye. Nzokande sikʼoyo, naino tomoni te ete biloko nyonso ezala na nse ya bokonzi na ye. Kasi tala likambo tozali komona mpo na Yesu: Nzambe atiaki ye na nse ya baanzelu mpo na mwa tango moke, mpo ete na nzela ya ngolu ya Nzambe akoka kokufa mpo na bato nyonso. Kasi sikʼoyo, atondi na nkembo mpe lokumu, mpo na liwa oyo anyokwamaki na yango. Yango ezalaki malamu ete Nzambe, ye oyo asalaki mpe abatelaka biloko nyonso, akoka kokomisa Yesu moto ya kokoka na nzela ya bapasi, mpo ete amema bana ebele basangana na nkembo na ye. Pamba te Yesu azali moto oyo amemaka bango na lobiko. Pamba te, moto oyo akomisaka peto, na baoyo bakomisi bango bosantu, bazali bango nyonso bato ya libota moko. Yango wana, Yesu azali na soni te mpo na kobenga bango bandeko na ye; ndenge alobaki: Nakoyebisa kombo na yo epai ya bandeko na ngai; nakoyemba masanzoli na yo na kati ya lingomba. Alobaki lisusu: Nakotia elikya na ngai na ye; mpe alobaki lisusu: Nazali awa, elongo na bana oyo Nzambe apesaki ngai. Lokola bana bazali bato ya mosuni mpe ya makila, Yesu mpeakomaki lokola bango mpe asanganaki na bomoto na bango, mpo ete na nzela ya liwa naye, akoka kobebisa Zabolo ye oyo azalaki na nguya ya liwa, mpe akangola baoyo nyonso, kati na bomoi na bango mobimba, bazalaki bawumbu, na nzela ya kobanga liwa. Pamba te, ya solo penza, Yesu ayaki mpo na kosalisa baanzelute, kasi ayaki mpo na kosalisa libota ya Abraham. Yango wana, Nzambe akomisaki ye lolenge moko na bandeko na yena makambo nyonso, mpo ete akoka kokoma moto oyo ayokelaka bato mawa mpe Mokonzi ya banganga-Nzambe ya sembo, kati na mosala ya Nzambe, mpo ete masumu ya bato ekoka kolimbisama. Mpe sikʼoyo akoki kosalisa baoyo bazali kokutana na komekama, Pamba te ye moko mpe akutanaki na komekama mpe amonaki pasi. Yango wana, bandeko basantu, bino baoyo Nzambe abenga mpo na kozwa bomengo ya Likolo, botia makanisi na bino na Yesu, Mopostolo mpe Mokonzi ya banganga-Nzambe oyo tondimela. Azalaki sembo epai ya Nzambe ye oyo aponaki ye, ndenge Moyizempe azalaki sembo kati na ndako mobimba ya Nzambe. Yesu amonanaki ete azalaki ya kokoka mpo na kozwa lokumu monenekoleka Moyize, ndenge moko mpe, moto oyo atongi ndako azali na lokumu monene koleka ndako yango moko. Pamba te, ndako nyonso batonga yango na moto, kasi Nzambe azali motooyo atongaka biloko nyonso. Moyize azalaki sembo lokola mosali, na kati ya ndako mobimbaya Nzambe, mpo na koloba makambo oyo Nzambe asengelaki koloba na mikolo oyo ezalaki koya. Kasi Kristo azali sembo lokola Mwana, mokonzi ya ndako ya Nzambe. Mpe biso tozali ndako na ye, soki tosimbi makasi kino na suka, molendena biso mpe elikya oyo tomipesaka na yango lokumu. Yango wana, ndenge Molimo Mosantu alobi: Lelo, soki boyoki mongongo na ye, Boyeisa mitema na bino makasi te, ndenge bosalaki tango botombokelaki Nzambe, ndenge bosalaki tango bomekaki ye kati na esobe. Kuna batata na bino bamekaki ngai mpe batalaki motema na ngai, mpe bamonaki misala na ngai na kati ya bambula ntuku minei. Yango wana, natombokelaki bato wana, mpe nalobaki: Mitema na bango ezali kopengwa tango nyonso, mpe bayebaki banzela na ngai te. Bongo nalapaki ndayi kati na kanda na ngai: Bakokota te na kopema na ngai! Bokeba bandeko, ete moto moko te kati na bino azala na motema mabe mpe oyo ezangi kondima, ete atika Nzambe ya bomoi. Kasi bolendisana moko na moko, mokolo na mokolo, lokola tozali naino kobengama “lelo” mpo ete moto moko te kati na bino masumu ekosa ye mpe ekomisa ye motema libanga. Pamba te tokomi lisanga na Kristo, soki tosimbi makasi kino na suka elikya oyo tozalaki na yango na ebandeli. Lokola yango elobama: Lelo, soki boyoki mongongo na ye, boyeisa mitema na bino makasi te, ndenge bosalaki tango botombokelaki Nzambe. Banani bayokaki mongongo ya Nzambe mpe batombokelaki ye? Ezalaki te baoyo nyonso Moyize abimisaki na Ezipito? Mpe, ayokaki kanda mpo na banani kati na bambula ntuku minei? Ezalaki te mpo na baoyo basalaki masumu mpe bibembe na bango ekweyaki kati na esobe? Bongo na banani Nzambe alapaki ndayi ete bakokota te na bopemi na ye? Ezali te na baoyo baboyaki kotosa ye? Bongo tomoni ete, bazalaki na makoki te mpo na kokota, mpo bazangaki kondima. Yango wana, lokola elaka ya kokota na bopemi ya Nzambe ezali naino, tokeba ete moto moko te na kati na bino ezanga kokota na kopema yango. Pamba te, biso mpe, bateyaki biso Sango Malamu ndenge mpe bateyaki bango; kasi Liloba oyo bayokaki esalisaki bango na eloko moko te, pamba te tango bayokaki yango, bayambaki yango na kondima te. Pamba te, biso baoyo tondima, tozali kokota na bopemi wana, ndenge Nzambe alobaki: Yango wana, nalapaki ndayi kati na kanda na ngai: Bakokota te na bopemi na ngai! Alobaki bongo atako misala na ye esiʼesila wuta na tango asalaki mokili. Pamba te, na esika moko, elobama boye mpo na mokolo ya sambo: Bongo na mokolo ya sambo, Nzambe apemaki na misala na ye nyonso. Mpe alobaki lisusu na eteni yango: Bakokota te na bopemi na ngai. Emonani polele ete bato mosusu esengeli bakota na bopemi wana. Nzokande, baoyo bazalaki bato ya liboso mpo na koyoka Sango Malamu, bakotaki te mpo na kozanga botosi na bango. Yango wana Nzambe atiaki lisusu mokolo moko, oyo azali kobenga lelo. Alobaki mpo na yango kala penza na nzela ya David, ndenge elobamaki liboso: Lelo, soki boyoki mongongo na ngai, boyeisa mitema na bino makasi te. Pamba te, soki Zosue apesaki bango bopemi, mbele sima penza, Nzambe alingaki lisusu te koloba mpo na mokolo mosusu. Bongo etikali na bopemi moko oyo ezali lokola mokolo ya sambo oyo Nzambe apemaki. Pamba te, moto oyo akoti na bopemi ya Nzambe, apemi na misala na ye, ndenge Nzambe mpe apemaki na oyo ya ye. Yango wana, tosala makasi mpo na kokota na bopemi wana mpo etemoto moko te akweya na kolanda ndakisa na bango ya kozanga botosi. Pamba te Liloba ya Nzambe ezali na bomoi mpe na nguya; ekotaka koleka kutu mopanga oyo ezali na mino na ngambo nyonso mibale, ekomaka kino na kokabola elimo na molimo, mikuwa na mafuta oyo ezalaka na kati ya mikuwa; mpe etalaka malamu-malamu makanisi mpe mikano ya mitema ya bato. Eloko moko te na kati ya biloko nyonso oyo esalama, ezali ya kobombama na miso ya Nzambe. Biloko nyonso ezali polele mpe ezali ya kobombama te na miso ya moto oyo akosambisa biso. Yango wana, lokola tozali na Mokonzi ya banganga-Nzambe ya moneneoyo aleka na Likolo, Yesu Kristo Mwana ya Nzambe, tosimba makasikondima oyo toyambolaka. Pamba te, tozali na mokonzi ya banganga-Nzambe oyo akoki kosangana na bapasi na biso; tozali na ye moko oyo amekamaki na makambo nyonso lokola biso mpe tozali komekama, kasi asalaki masumu te. Bongo topusana na elikya nyonso pene-pene na Kiti ya bokonzi ya ngolu, mpo ete bayokela biso mawa mpe tomona ngolu oyo ekosalisa biso na tango malamu. Mokonzi nyonso ya banganga-Nzambe baponaka ye na kati ya bato, mpe batiaka ye mpo na kosalela Nzambe mpo na bato mpo apesaka makabo mpe mbeka mpo na masumu. Akoki kolakisa boboto epai ya baoyo bazangi boyebi mpe basalakamabe, pamba te ye moko mpe azali na bolembu. Mpo na bolembu wana, yango wana asengeli kopesa mbeka mpo na masumu na ye moko, ndenge moko mpe mpo na masumu ya bato. Mpe, moto moko te akoki komipesa ye moko lokumu wana; kasi esengeli Nzambe abenga ye, ndenge esalamaki na Aron. Ndenge moko mpe Kristo, amipesaki ye moko te lokumu ya kokoma Mokonziya banganga-Nzambe. Kaki Nzambe alobaki na ye: Ozali Mwana na ngai, lelo nakomi Tata na yo. Mpe na esika mosusu, alobaki: Ozali Nganga-Nzambe mpo na libela, lokola Melkisedeki! Yesu, kati na bomoi na ye na mokili, azalaki kobondela mpe kosengana koganga makasi elongo na mayi ya miso, epai ya Nzambe oyo akokaki kobikisa ye na liwa; mpe Nzambe andimaki mabondeli na ye mpo na botosi na ye. Atako azalaki Mwana ya Nzambe, kasi ayekolaki kotosa na nzela ya bapasioyo amonaki. Mpe awa Nzambe asilaki kokomisa ye moto ya kokoka, akomaki mopesiya lobiko ya seko mpo na baoyo nyonso batosaka ye, mpe Nzambe aponaki ye mpo azala Mokonzi ya banganga-Nzambe lokola Melkisedeki. Tozali na makambo mingi ya koloba mpo na likambo oyo, kasi ezali pasi mingi mpo na kolimbola, Pamba te bokomi na bolembu mingi mpo na kososola. Pamba te, sima ya tango nyonso oyo, esengelaki bokoma balakisi, kasi bozali kaka na posa ete moto ateya bino makambo ya ebandeli ya Liloba ya Nzambe. Bozali na posa ya miliki, kasi bilei ya makasi te! Moto nyonso oyo azali naino komela miliki, azali naino mwana moke, mpeazali na boyebi te na mateya oyo ezali koloba mpo na bosembo. Kasi bilei ya makasi ezali mpo na bakolo. Bango na nzela ya kosalelayango, basiʼbasalela mayele na bango mpo na kososola makambo ya malamuna oyo ya mabe. Yango wana, totika mateya ya ebandeli oyo etali Kristo, mpe toluka koyeba oyo ekoki mpo na bakolo. Kasi toluka lisusu te kozongela mateya ya ebandeli lokola: kobongola motema mpe kotika misala oyo ememaka na liwa, mpe kondimela Nzambe; mateya oyo ezali kolobela mpo na lolenge ya kobatisa bato, mateyaya kotiela bato maboko, ya lisekwa ya bato bakufa, mpe oyo etali kosambisama ya seko. Tala makambo tokosala, soki Nzambe apesi biso ndingisa. Pamba te, yango ekoki kosalama te mpo na baoyo basiʼbamona mwindaya Nzambe, baoyo basiʼbameka likabo ya likolo, baoyo basiʼbasangana na Molimo Mosantu, baoyo basiʼbameka bolamu ya Liloba ya Nzambe mpe banguya ya mokili oyoezali koya; soki bakweyi, bakoka kobenda bango lisusu mpo babongola motema, pamba te bazali lisusu kobaka Mwana ya Nzambe na ekulusu mpo na bango moko mpe bazali koyokisa ye soni na miso ya bato. Pamba te, mabele oyo emelaka mayi ya mbula oyo ekweyelaka yango mbala na mbala, mpe ebotaka mbuma ya malamu mpo na baoyo balonelaka bango yango, Nzambe apambolaka yango. Kasi soki ebimisi basende mpe banzube, ezalaka na tina te mpeezalaka ya kobongama mpo Nzambe alakela yango mabe. Mpe suka na yango, batumbaka yango. Balingami, ata tozali koloba boye, kasi tozali kondima makambo ya kitoko mingi mpo na bino, makambo oyo ememaka na lobiko. Pamba te Nzambe azangi bosembo te mpo abosana mosala na bino, mpe bolingo oyo bolakisaki mpo na kombo na ye, tango bosalisaki basantu mpe bozali kaka kosalisa bango. Kasi tolingi ete moko na moko na kati na bino alakisa molende ya ndenge moko kino na suka, mpo ete makambo oyo botalaka elikya ekoma ya solo. Tolingi te bokoma bato ya goi-goi, kasi bolanda ndakisa ya baoyo bazali kozwa na nzela ya kondima mpe na nzela ya kokanga motema, biloko oyo Nzambe alaka. Tango Nzambe apesaki elaka na Abraham, alapaki ndayi na kombo na ye moko, Pamba te moto mosusu oyo alekaki ye, oyo ye asengelaki kolapa ndayi na kombo na ye azalaki te; Alobaki: Ya solo, nakopambola yo mpe nakopesa ya bankolo ebele. Abraham akangaki motema, mpe na bongo, azwaki oyo Nzambe alakaki ye. Pamba te, bato balapaka ndayi na kombo ya moto oyo aleki bango; mpe, ndayi elakisaka bosolo ya likambo oyo bato balobi mpe esilisaka tembe nyonso. Awa Nzambe alingaki kolakisa na baoyo bazwaki elaka ete mokano na ye ebongwanaka te, yango wana alakisaki bosolo na yango na kolapa ndayi. Nzambe asalaki bongo mpo ete, na nzela ya makambo mibale oyo ebongwanaka te, kati na oyo ekokaki kosalama te ete Nzambe akosa, biso baoyo totika makambo nyonso mpo na kokanga elikya oyo balaka biso, tokoka kolendisama mingi penza. Tozali na elikya yango lokola longo ya elomo, ekoki kobeba te mpe ekanga makasi penza. Ekota koleka rido, na kati ya Esika ya bosantu, epai Yesu, ye oyo akenda liboso na biso, mpe akota kuna mpo na biso, akoma Mokonzi ya banganga-Nzambe mpo na libela, lokola Melkisedeki. Melkisedeki azalaki mokonzi ya Salem mpe nganga-Nzambe ya Nzambe oyo aleki likolo. Akutanaki na Abraham, tango Abraham awutaki na etumba sima ya kolonga bakonzi, mpe apambolaki ye. Mpe Abraham apesaki ye eteni ya zomi ya biloko nyonso. Kombo na ye elakisi, liboso: “mokonzi ya bosembo”; bongo “mokonzi ya Salem”, elingi koloba: “mokonzi ya kimia”. Azalaki na tata te mpe mama te, bonkoko te, mokolo ya ebandeli te, mpe ya suka ya bomoi te, kasi azalaki lokola Mwana ya Nzambe, oyo azali Nganga-Nzambe mpo na libela. Bomoni, Melkisedeki azalaki moto ya monene penza. Pamba te ata nkoko na biso Abraham apesaki ye eteni ya zomi ya biloko oyo abotolaki na etumba. Mibeko ezalaki kosenga na bana ya Levi oyo bazalaki kokoma banganga-Nzambe bazwa eteni ya zomi na bato ya Isaele baoyo bazali bandeko na bango, atako bandeko na bango mpe bazali bana ya libota ya Abraham. Melkisedeki abimaki na libota ya Levi te, kasi azwaki eteni ya zomi epai ya Abraham mpe apambolaki ye oyo Nzambe apesaki bilaka. Mpe tembe ezali te, Pamba te moto oyo azali moke ye nde moto azwaka lipamboli epai ya moto oyo aleki ye. Banganga-Nzambe oyo bazwaka eteni ya zomi bazali bato oyo bakufaka, kasi Melkisedeki, ye oyo azwaki eteni ya zomi oyo, bazali kotatola mpo na ye ete azali na bomoi. Tokoki koloba ete, ata Levi, ye oyo azwaka biteni ya zomi, afutaki eteni ya zomi na nzela ya Abraham; Pamba te, tango Melkisedeki akutanaki na Abraham, Levi azalaki naino na kati ya nzoto ya nkoko na ye Abraham. Soki bato bakokaki kokoma bato ya kokoka na nzela ya bonganga-Nzambeya Balevi (Pamba te ezali mpo na yango nde, bato bazwaki Mibeko), mbele tina elingaki kozala lisusu te mpo ete Nganga-Nzambe mosusu aya, oyo azali lokola Melkisedeki, kasi lokola Aron te. Pamba te, tango bonganga-Nzambe ebongwani, esengeli mpe Mibeko ebongwana. Makambo oyo elobami mpo na moto oyo azali moto ya libota mosusu, mpe moto moko te ya libota na ye asalaki lokola nganga-Nzambe na mesaoyo batumbelaka mbeka. Pamba te, eyebani polele ete Nkolo na biso abimaki na libota ya Yudea, mpe mpo na libota ya yudea, Moyize alobaki eloko moko te na oyo etali banganga-Nzambe. Mpe likambo oyo tozali kolobela ekomi polele penza; ete nganga-Nzambe mosusu asiʼabimi, ye oyo akokani na Melkisedeki. Akomaki nganga-Nzambe na lolenge ya bitinda ya mibeko ya bomoto te, kasi na lolenge ya nguya ya bomoi oyo ekufaka te. Pamba te batatola boye mpo na ye: Ozali Nganga-Nzambe mpo na libela lokola Melkisedeki. Mibeko oyo ya liboso batiaki pembeni, mpo ezalaki na bolembu mpe ezalaki na tina te, Pamba te Mibeko ekomisaki ata eloko moko te eloko ya kokoka. Kasi elikya oyo eleki kitoko eye; na nzela na yango nde tozali kopusana pene-pene na Nzambe. Mpe makambo yango esalamaki na ndayi oyo Nzambe akataki! Bato mosusu tango bakomaki banganga-Nzambe, Nzambe alapaki ndayi te mpo na bango, kasi Yesu akomaki Nganga-Nzambe na ndayi, tango Nzambe alobaki na ye: Nkolo alapi ndayi, mpe akobongola makanisi na ye te: Ozali Nganga-Nzambe mpo na libela. Mpo na ndayi wana nde Yesu akoma elikya ya boyokani oyo eleki kitoko penza. Bango, bazalaki banganga-Nzambe ebele, Pamba te liwa ezalaki kokangisa bango nzela mpo bazala tango nyonso mosala na bango. Kasi Yesu, lokola azali na bomoi mpo na libela, azali na bonganga-Nzambe oyo ekoki kokende epai ya moto mosusu te. Yango wana azali na makoki mpo na kobikisa, sikʼoyo mpe na batangonyonso baoyo bazali koya epai ya Nzambe na nzela na ye, Pamba te azali tango nyonso na bomoi mpo na kobondela mpo na bango. Pamba te, Mokonzi ya banganga-Nzambe ya boye, ye nde akokaki mpo na biso: azali mosantu, azali na likambo ata moko te, azali peto, azaliya kokabwana na bato ya masumu, mpe Nzambe atombola ye likolo penzakoleka likolo. Ye azali lokola bakonzi ya banganga-Nzambe mosusu te, azali na posa te ya kotumbaka mbeka mokolo na mokolo, liboso mpo na masumu na ye moko, mpe na sima mpo na masumu ya bato. Atumbaki mbeka mpo na masumuna bango mbala moko mpo na libela, tango amikabaki ye moko. Pamba te, Mibeko etiaka bakonzi ya banganga-Nzambe, bato oyobazali na bolembu; kasi ndayi, oyo eyaki sima ya mibeko, etiaki Mwana, oyo Nzambe akomisa moto ya kokoka mpo na libela. Mama na likambo ya oyo tozali koloba, yangʼoyo: tozali na Mokonziya banganga-Nzambe ya ndenge wana oyo avanda na loboko ya mobali ya Kitiya Nzambe Mokonzi-monene oyo azali na Likolo, mpe oyo azali kosala mosala na kati ya Esika ya bosantu, ndako ya kapoya solo-solo oyo Nkolo asala, kasi esalama na moto te. Mpe lokola mokonzi nyonso ya banganga-Nzambe batiaka ye mpo na kopesa makabo, mpe mpo na kotumba mbeka; yango wana, tina ezalakimpe ete Yesu mpe azala na eloko ya kopesa lokola makabo. Soki azalaki na mokili, mbele alingaki kozala nganga-Nzambe te, Pamba te banganga-Nzambe bazali oyo bapesaka makabo na ndenge Mibeko etindaka. Bazali kosala mosala na Esika ya bosantu oyo ezali kaka elongimpe elilingi ya oyo ezali na Likolo. Yango wana, Moyize, tango alingaki kotonga Ndako ya kapo, Nzambe akebisaki ye boye: Tala malamu, mpo ete osala biloko nyonso na lolenge ya oyo balakisaki yo likolo ya ngomba. Kasi sikʼoyo, Yesu azwi mosala oyo eleki malamu, Pamba te ye azali moto oyo azongisaka bondeko na Boyokani oyo ezali malamu koleka, oyo evandi likolo ya bilaka ya malamu mingi penza. Pamba te, soki Boyokani oyo ya liboso ezalaki na mabe te, mbeletina ya koluka oyo ya mibale elingaki kozala te. Kasi Nzambe amonaki mabe na bato mpe alobaki: Nkolo alobi: mikolo ekoya nakotia Boyokani ya sika elongo na bato ya Isayele mpe elongo na bato ya Yudea. Boyokani yango ekozala te lokola boyokani oyo natiaki elongo na bankoko na bango, tango nakamataki bango na loboko mpo na kobimisa bango na Ezipito, Pamba te bakangamaki na boyokani na ngai te, mpe natikaki bango, Nkolo alobi bongo. Nkolo alobi: tala Boyokani oyo nakotia elongo na bato ya Isayele sima ya mikolo wana. Nakotia Mibeko na ngai na makanisi na bango mpe nakokoma yango likolo ya mitema na bango. Nakozala Nzambe na bango, mpe bango bakozala bato na ngai. Moto moko te akoteya moninga na ye, to mpe moto moko te akoteya ndeko na ye ete: “Yeba Nkolo!” Pamba te, bango nyonso bakoyeba ngai, kobanda na bana mike kino na bakolo. Pamba te, nakolimbisa mabe na bango, mpe nakokanisa masumu na bango lisusu te. Awa Nkolo abengaki boyokani wana “Boyokani ya sika”, akomisi boyokani oyo ya liboso, ya kala; nzokandeoyo ekomi ya kala mpe enuni, ekomi pene mpo na kolimwa. Boyokani oyo ya liboso ezalaki na mibeko mpo na kosambela Nzambe; ezalaki mpe na esika ya bosantu oyo ezalaki ya mokili oyo. Batiaki ndako ya kapo. Bongo eloko oyo batielaka mwinda, mesa, mpemampa oyo bapesi makabo na Nzambe, ezalaki na kati ya eteni na yango ya liboso. Bazalaki kobenga eteni yango: “Esika ya bosantu”. Mpe sima ya rido ya mibale, ezalaki esika oyo bazalaki kobenga “Esika eleki bosantu”. Mesa ya wolo oyo batumbelaka malasi, mpe sanduku ya boyokani oyo ezalaki ya kozipama na wolo bipai nyonso, ezalaki na kati ya eteni yango. Sanduku yango ezalaki na eloko ya wolo oyo ezalaki na mana, nzete ya Aron oyo ebimisaki makasa, mpe mabanga epai maloba ya boyokani ezalakiya kokomama. Mpe na likolo ya sanduku, ba-Sheriben ya nkembo bazalaki kozipaesika ya bolimbisi ya masumu na molili ya mapapu na bango. Kasi tokokite sikʼoyo kolobela makambo oyo na molayi nyonso. Awa bazalaki kobongisa biloko nyonso na lolenge wana, banganga-Nzambe bazalaki kokota mbala na mbala na eteni ya liboso ya ndako ya kapo, mpo na kosala mosala na bango. Kasi na eteni oyo ya mibale, kaka Mokonzi ya banganga-Nzambe nde azalaki kokota kuna, mpe mbala moko kaka na mbula. Azalaki komema makila oyo azalaki kopesa makabo na Nzambe mpo na ye moko, mpe mpo na masumu ya bato. Molimo Mosantu alakisi ete, nzela oyo ememaka kino na esika oyo eleki bosantu efungwami naino te, lokola ndako ya kapo ya liboso ezali naino kopikama. Yango ezali elembo mpo na tango ya lelo; ezali kolakisa ete makabo mpe bambeka oyo bapesaka na Nzambe ezali na makoki te mpo na kopetolamitema ya bato oyo basambelaka Nzambe na ndenge wana. Pamba te, yango ezalaki kaka makambo etali biloko ya kolia, ya komela, mpe lolenge mingi ya komipetola; ezalaki mibeko ya bomotooyo evandaki na makasi penza kino na tango Nzambe akobongisa makambo nyonso. Tango Kristo ayaki lokola Mokonzi ya banganga-Nzambe, mpo na kopesabiso biloko oyo asiʼazweli biso, alekaki na ndako ya kapo oyo eleki monene, mpe oyo ezali malamu mingi koleka, oyo esalami na maboko ya bato te, elingi koloba: oyo ezali ya mokili oyo te. Akotaki na esika eleki bosantu mbala moko mpo na libela; apesaki makila ya bantaba te to mpe ya bana ya ngombe te, kasi apesaki makila na ye moko. Mpe na ndenge wana nde, azwelaki biso kokangolama ya seko. Pamba te, soki makila ya bantaba na oyo ya bangombe ya mibali, mpe putulu ya ngombe ya mwasi oyo basopaka likolo ya bato oyo bazali mbindo, ekomisaka peto mpo na bopeto ya nzoto, esengeli toyeba ete makila ya Kristo, ye oyo, na nzela ya Molimoya seko, amikabaki ye moko epai ya Nzambe lokola likabo oyo ezangi bosoto, ekopetola mitema na biso na misala oyo ememaka na liwa, mpo ete tokoka kosalela Nzambe ya bomoi! Yango wana, Kristo azali moto oyo azongisi boyokani ya sika, mpo ete bato oyo Nzambe abenga bakoka kozwa bomengo ya seko oyo Nzambe alaka bango. Mpe bakoki kozwa bomengo yango, pamba te Kristoasiʼakufa lokola eloko oyo bapesa mpo na kokangola bango na masumuoyo basalaki na tango bazalaki na nse ya bokonzi yaboyokani ya liboso. Pamba te, soki moto akomi mokanda mpo ete mokolo akokufa biloko na ye ekoma ya moto boye, moto wana liboso ete azwa biloko yango, esengeli ete ye oyo akomaki mokanda akufa liboso. Pamba te mokanda yango ezwaka makasi kaka soki moto oyo akomaki yango akufi. Kasi soki moto oyo akomaki yango azali naino na bomoi, mokanda yango ezalaka na makasi te. Yango wana tango boyokani ya liboso ebandaki, basopaki makila. Pamba te, tango Moyize asilisaki kotanga mitindo nyonso ndenge yango ekomamaki na kati ya Mibeko, akamataki makila ya bana ngombe, elongo na oyo ya bantaba elongo na mayi, elamba ya lino ya motane mpe etape ya nzete ya Izope, bongo asopelaki buku mpe bato nyonso. Alobaki: Oyo ezali makila ya boyokani, oyo Nzambe atindaki bino mpo na kobatela. Lolenge moko mpe asopaki makila likolo ya ndako ya kapompe likolo ya biloko nyonso oyo bazalaki kosalela losambo. Pamba te, na lolenge ya Mibeko, biloko nyonso ezali kokoma petona nzela ya makila; mpe bolimbisi ya masumu ezali te soki makila esopani te. Bongo tina ezalaki ete, biloko oyo ezalaki bililingi ya biloko oyo ezali na Likolo epetolama na bambeka wana, kasi biloko ya Likolo yangomoko epetolami na bambeka ya malamu mingi koleka oyo wana. Pamba te, Kristo akotaki te na esika ya bosantu oyo esalamaki na maboko ya bato, oyo ezalaki kaka elilingi ya oyo ya solo; kasi akotaki na Likolo penza, mpo ete amonana sikʼoyo liboso na Nzambe mpo na biso. Mpe lisusu, ezali mbula na mbula nde Mokonzi ya banganga-Nzambe azalaki kokota na esika ya bosantu elongo na makila oyo ezalaki ya ye te; kasi Kristo akotaki kuna te mpo amikabaka mbala mingi. Soki ezalaki bongo, mbele Kristo alingaki koniokwama mbala mingi banda na ebandeli ya mokili. Kasi sikʼoyo, amonani mbala moko kaka, na suka ya batango, mpo na kolongola masumu na nzela ya mbeka na ye. Mpe, lokola esiʼebongisama ete moto nyonso akufa mbala moko, mpe sima na yango kosambisama ekoya, ndenge moko mpe, Kristo amikabaki mbala moko kaka mpo na komema masumu ya bato ebele. Akomonana mbala ya mibale, mpo na komema masumute, kasi mpo na komema lobiko na baoyo bazali kozela ye. Mibeko ezali kaka elilingi ya makambo ya malamu oyo ezali koya, kasi ezali bosolo na yango penza te. Yango wana, Mibeko ekoki ata moke te na nzela ya mbeka ya ndenge moko, oyo bapesaka tango nyonso, mbula na mbula, kokomisa baoyo bayaka pene-pene ya Nzambe bato ya kokoka. Soki Mibeko ekokaki, mbele baoyo bapesaka bambeka wana balingaki banda kala kotika kopesa yango. Pamba te, awa balingaki kokoma peto mbala moko mpo na libela, balingaki lisusu kokanisa-kanisa masumu na bango te. Kasi bambeka wana ezalaki mbula na mbula kobimisa masumu na makanisi ya bato. Pamba te, ekokaki kosalama te ete makila ya bangombe na oyo ya bantaba elongola masumu. Yango wana tango Kristo ayaki na mokili, alobaki: Olingaki mbeka mpe makabo te: kasi osalaki nzoto mpo na ngai. Osepelaki na bambeka ya kotumba te, mpe bambeka mpo na masumu. Bongo nalobaki: Tala, nazali koya kati na mokanda ekomama mpo na ngai ee Nzambe, naye mpo na kosala mokano na yo. Alobaki liboso: Bambeka, makabo, bambeka ya kotumba, mpe bambeka mpo na masumu, olingaki yango te, mpe osepelaki na yango te. Nzokande, bambeka yango ezalaki kopesama na ndenge Mibeko ezalaki kotinda. Bongo alobaki: Tala, nazali koya mpo na kosala mokona na yo. Boye, alongolaki bambeka nyonso ya kala mpe atie mbeka ya Kristo na esika na yango. Mpe azali mpo na mokano wana, nde bakomisi biso basantu na nzela ya mbeka oyo Yesu Kristo apesaki nzoto na ye moko mbala moko mpo na libela. Nganga-Nzambe nyonso atelemaka mokolo na mokolo mpo na kosala mosalana ye, mpe kopesa mbala na mbala bambeka ya ndenge moko oyo ekoki ata moke te kolongola masumu. Kasi Kristo, tango apesaki mbeka moko kaka mpo na masumu, avandaki na lokobo ya mobali ya Nzambe. Banda tango wana, azali kozela ete Nzambe akomisa banguna na yeesika oyo makolo na ye eniataka. Pamba te na nzela ya likabo kaka moko, akomisaki mpo na libela, baoyo ye apetolaki na masumu, bato ya kokoka. Molimo Mosantu mpe azali kopesa biso litatoli na ye. Alobaki liboso: Tala boyokani oyo nakotia elongo na bango sima ya mikolo wana, Nkolo alobi bongo. Nakotia Mibeko na ngai na mitema na bango, mpe nakokoma yango likolo ya makanisi na bango. Bongo abakisaki: Nakokanisa masumu na bango mpe mabe na bango lisusu te. Nzokande, kuna epai ezali bolimbisi ya masumu, likabo ya kopesa mpo na lisumu, ezali lisusu te. Yango wana bandeko, lokola tozali na elikya mpo na kokota na Esika eleki bosantu, na nzela ya makila ya Yesu, na nzela ya sika mpe ya bomoi, oyo afungolelaki biso na rido, yango nde nzoto na ye moko, mpe lokola tozali na Mokonzi ya banganga-Nzambe oyo bapesa mokumba ya ndako ya Nzambe, topusana pene-pene ya Nzambe na motema sembo, na elikya nyonso oyo kondima epesaka, elongo na motema oyo epetolami na makanisi nyonso ya mabe, mpe nzoto oyo esokolami na mayi ya peto. Tosimba makasi elikya oyo tondimaka ete ezali ya solo. Pamba te ye oyo apesa biso bilaka akosaka te. Tokengelana moko na moko na kosalisana biso na biso mpo na kolakisa bolingo mpe kosala misala ya malamu. Tokima mayangani na biso te ndenge bato mosusu bameseni kosala, kasi tolendisana moko na moko, awa bomoni ete Mokolo ya Nkolo ezali kopusana. Pamba te, sima ya koyeba makambo ya solo, soki tosali masumu na nko, mbeka mosusu etikali te mpo na masumu, kasi esengeli kaka tozela na nsomo penza kosambisama mpe motoya makasi oyo ekozikisa banguna ya Nzambe. Moto oyo aboyaka kotosa Mibeko ya Moise, babomaka ye mpe bayokelaka ye mawa te, soki batemwe mibale to misato batatoli mpo na ye. Bongo bokanisi etumbu ya makasi ya ndenge nini moto oyo akozwa, ye oyo atioli Mwana ya Nzambe, amoni pamba makila ya boyokani oyo ekomisaki ye moto ya peto mpe afingi Molimo ya ngolu? Pamba te toyebi ye oyo alobaki: Ngai moto nakozongisa mabe; mpe ngai moto nakofuta. Mpe lisusu: Nkolo akosambisa bato na ye. Ezali likambo moko ya nsomo penza soki moto akueyi na maboko ya Nzambe ya bomoi! Bokanisa lisusu mikolo ya liboso: na mikolo yango, sima ya kozwa moi ya Nzambe, boyikaki mpiko na etumba monene ya bapasi. Pamba te tango mosusu bazalaki kofinga bino mpe konyokola bino na miso ya bato; tango mosusu mpe bozalaki komona pasi elongona bato oyo bazalaki koniokwama ndenge wana. Pamba te, bosanganaki na bapasi oyo bato ya boloko bazalaki komona, mpe bondimaki na esengo nyonso ete babotola bino biloko nabino, mpo boyebaki ete bozali na bomengo ya kitoko penza mpe oyo ekowumela libela na libela. Bongo bobwaka elikya na bino te; Pamba te elikya yango ezali na lifuti moko ya monene penza. Pamba te, bozali na posa ya kokanga motema, mpo ete, sima ya kokokisa mokano ya Nzambe, bokoka kozwa biloko oyo alakaki. Pamba te, etikali moke, moke penza, Ye oyo azali koya akoya, mpe akowumela te. Kasi moto na sembo akozala na bomoi na nzela ya kondima. Mpe soki azongi nsima, nakosepela na ye te. Biso tozali na molongo ya baoyo bazongaka sima te mpo na kobunga, kasi tozali na molongo ya baoyo bandimaka mpe basiʼbabika. Kondima ezali kotia elikya na biloko oyo totielaka motema, mpe kondima ete osiʼozwi biloko oyo naino omoni te. Ezali mpo na yango nde Nzambe andimaki bato ya tango ya kala. Mpo na kondima yango wana tososolaka ete mokili esalamaki na Liloba ya Nzambe; bongo biloko oyo ezali komonana na miso esalamaki na biloko oyo ezali komonana na miso te. Mpo na kondima, Abel apesaki Nzambe mbeka ya malamu mingi kolekaoyo ya Kayina. Mpo na kondima, Nzambe andimaki ye ete azali moto na sembo, pamba te Nzambe andimaki makabo na ye. Mpo na kondima, Abel azali nainokoloba, atako asiʼakufa. Mpo na kondima, bamemaki Enoki na likolo mpo ete amona liwa te; bamonaki ye lisusu te, mpo Nzambe amemaki ye. Pamba te, liboso ete bamema ye, batatolaki mpo na ye ete: azalaki kosepelisa Nzambe. Nzokande, moto moko te akoki kosepelisa Nzambe soki azangikondima. Pamba te, moto oyo azali kopusana pene-pene na Nzambe, esengeli andima ete Nzambe azali mpe apesaka lifuti na baoyo balukaka ye. Mpo na kondima, Nzambe tango akebisaki Nowa mpo na makambo oyo ezalaki naino komonana te, atosaki Nzambe mpe atongaki masuwa mpo na kobikisa libota na ye. Mpo na kondima na ye, akatelaki mokili etumbu mpe akomaki mozwi na bosembo oyo eyaka na nzela ya kondima. Mpo na kondima, Nzambe tango abengaki Abraham mpo na kokende na mokili oyo asengelaki kozwa sima lokola bomengo, atosaki mpe akendaki, atako ayebaki te epai azalaki kokende. Mpo na kondima, asalaki ndako na ye na mokili ya elaka lokola mopaya na ekolo ya bapaya; azalaki kovanda na bandako ya kapo elongo na Izaki mpe Yakobi, baoyo basengelaki kozwa bomengo elongo na ye na elaka wana moko. Pamba te, azalaki kozela vile oyo ezali na bafondasio oyo ebukanaka te, oyo Nzambe ye moko azali mobongisi mpe motongi na yango. Mpo na kondima, Sara mpe azwaki nguya ya kozwa zemi, atako bambulana ye ya kobota esiʼelekaki; Pamba te andimaki ete ye oyo apesaki ye elaka akosaka te. Yango wana mpe, wuta na moto moko oyo akomaki mpaka pene-peneya kokufa— bato babotamaki, oyo bazali ebele lokola minzoto ya likolo mpelokola zelo ya libongo ya ebale, oyo bakoki kotanga te. Bato wana nyonso bakufaki kati na kondima, mpe bazwaki te bilokooyo Nzambe alakaki bango; bamonaki yango kaka mpe bapesaki yango mbote na mosika. Mpe, bandimaki ete bazalaki bapaya mpe baleki nzelana kati ya mokili. Baoyo balobaka makambo ya ndenge wana, balakisaki polele ete bazalikoluka mokili na bango moko. Soki bakanisaki lisusu mokili oyo bango batikaki, mbele balingaki kozala na tango mpo na kozonga kuna. Kasi sikʼoyo, bazali koluka mokili moko ya kitoko penza, elingi koloba: mokili ya Likolo. Yango wana Nzambe azali na soni te mpo ete babenga ye Nzambe na bango, mpemba te abongisela bango vile. Mpo na kondima, tango Nzambe amekaki Abraham, akabaki Izaki lokola mbeka. Mpe ye oyo azwaki bilaka, akabaki mwana na ye ya mobali kaka moko, atako Nzambe alobaki na ye: Okozala na mabota na nzela ya Izaki. Abraham ayebaki ete Nzambe azali na makoki mpo na kosekwisa Isaki wuta na bakufi; mpe ya solo, Abraham azwaki Izaki wuta na bakufi. Mpo na kondima, Izaki apambolaki Zakobi mpe Ezawu mpo na makambo oyo ezalaki koya. Mpo na kondima, Zakobi, tango akomaki pene ya kokufa, apambolaki bana ya Zozefi moko na moko; bongo akumisaki Nzambe, awa azalaki ya kogumbama likolo ya songe ya nzete na ye. Mpo na kondima, Zozefi, tango akomaki pene-pene ya suka ya bomoi na ye, alobaki makambo oyo etali kobima ya bana Isayele na Ezipito, mpe apesaki mitindo mpo na makambo oyo basengelaki kosala mpo namikuwa na ye. Mpo na kondima, baboti ya Moyize babombaki Moyize sanza misato sima ya mbotema na ye, mpo bamonaki ete mwana na bango azalaki kitoko mingi; mpe babangaki te mobeko oyo mokonzi apesaki. Mpo na kondima, Moyize, tango akomaki mokolo, aboyaki babenga ye mwana ya mwana mwasi ya Faraon. Aponaki konyokwama elongo na bato ya Nzambe, na esika ya kosepela na bisengo ya masumu mpo na mwa tango ya mokuse. Mpo akanisaki ete, koyoka soni oyo Kristo asengelaki koyoka, ezalaki bomengo moko ya monene penza koleka bomengo ya Ezipito: Pamba te miso na ye ezalaki kotala lifuti oyo ezalaki koya. Mpo na kondima, atikaki Ezipito, mpe abangaki te kanda ya mokonzi; akangaki motema Pamba te azalaki komona Nzambe oyo amonanaka te. Mpo na kondima, aliaki Pake mpe apakolaki makila na ba-porte, mpo ete Anzelu oyo abomaka, aboma te bana ya liboso ya Isayele. Mpo na kondima, bato ya Isayele bakatisaki ebale—monene ya motanelokola nde ezalaki mabele ya kokawuka; kasi tango bato ya Ezipito bamekaki kokatisa, badindaki. Mpo na kondima, bamur ya Zeriko ekweyaki, tango bana Isayele batambolaki nzinga-nzinga na yango mikolo sambo. Mpo na kondima, Rahabi mwasi ya ndumba, akufaki te elongo na baoyo baboyaki kotosa, Pamba te ayambaki na kimia nyonso bato oyo bayaki kotala Zeriko na mayele. Bongo naloba lisusu nini? Pamba te nakozanga tango sokinalingi koloba mpo Gedeon, Baraki, Samison, Zefte, David, Samuele mpe baprofeta; bango, mpo na kondima, balongaki mikili mingi, batambusaki makambo na bosembo, mpe bazwaki biloko oyo balakaki bango; bakangaki minoko ya bantambwe, babomaki nguya ya moto, bakimaki mino ya mopanga; batondaki na makasi nzokande bazalaki bato ya bolembu, bakomaki bato ya makasina etumba, mpe bakimisaki mampinga ya basoda ya bapaya; basi, bazwaki bakufi na bango oyo bazongaki lisusu na bomoi. Basusu banyokwamaki mpe baboyaki bakangola bango, mpo bayebaki ete bakosekwa lisekwa moko ya kitoko penza. Basusu batiolaki bango, babetaki bango bafimbo, bakangaki bango minyololo mpe babwakaki bango na boloko; babambaki bango mabanga, bakataki bango biteni mibale na si, babomaki bango na mopanga, bazalaki koyenga-yenga, balataki bamposo ya bameme na oyo ya bantaba, bazangaki nyonso, banyokolaki bango mpe bayokisakibango pasi; ya solo, mokili ebongaki mpo na bango te. Bayengaki-yengaki kati na bisobe, na bangomba, na mabulu oyo ezalaki na kati ya mabanga, mpe na mabulu oyo ezalaki na mabele. Baoyo nyonso, atako Nzambe andimaki bango mpo na kondima na bango, nzokande moko te na kati na bango azwaki biloko oyo Nzambe alakaki bango, Pamba te Nzambe abongisaki mabongisi ya kitoko penza mpo na biso; alingaki ete bakoka kokoma bato ya kokoka elongo na biso. Yango wana, lokola batemwe ebele penza bazingi biso, tobwaka mikumba nyonso mpe masumu oyo ezingi biso bipai na bipai, mpe tokima mbangu na molende nyonso na momekano ya mbangu oyo ezali liboso na biso. Tika ete miso na biso etala kaka Yesu, ye oyo azali moto oyo abandaka mpe akokisaka kondima na biso, ye oyo, mpo na esengo oyo ezalaki liboso na ye, akangaki motema tango babomaki ye na ekulusu, ayokaki soni te, mpe sikʼoyo avandi na loboko ya mobali ya Kiti ya bokonzi ya Nzambe. Bokanisa ye oyo akangaki motema liboso ya tembe ya ndenge wana epaiya bato ya masumu, mpo ete bolemba te mpe bokweyisa molende na bino te. Na etumba na bino na masumu, moto moko te naino abundi etumba kino makila etanga. Boni, bosiʼbobosana maloba ya kolendisa oyo Nzambe alobaki nabino lokola bana na ye? Mwana na ngai, kotiola etumbu ya Nkolo te, mpe kolemba te tango ye azali kopamela yo. Pamba te Nkolo apesaka etumbu na baoyo ye alingaka, mpe abatelaka baoyo nyonso ye ayebi ete bazali bana na ye. Bokanga mitema na bapasi na bino: Nzambe azali kosalela bino lokola bana. Pamba te, mwana nini oyo tata apesaka ye etumbu te? Soki bapesaka bino etumbu te ndenge bana nyonso bazwaka, wana elakisi ete bozali bana ya makangu, kasi bana penza te. Kutu biso nyonso tozalaki na batata ya mosuni; bazalaki kopesabiso bitumbu, mpe tozalaki kotosa bango mpo na yango. Bongo tokoleka kotosa te Tata na biso ya Likolo mpo tozala na bomoi? Batata na biso bazalaki kopesa biso bitumbu mpo na mwa tango moke, ndenge bango moko bazalaki kolinga; kasi Nzambe apesaka biso etumbu mpo na bolamu na biso, mpo ete tokoka kosangana na bosantu na ye. Moto moko te soki bapesi ye etumbu amonaka yango lokola likambo ya esengo, ezalaka likambo ya mawa. Kasi na sima, etumbu ebotaka mbuma ya bosembo mpe ya kimia, epai ya moto oyo azwaka yango. Yango wana, botombola maboko na bino oyo ebandi kozwa bolembu mpe bokembisamabolongo na bino oyo ebandi kolemba. Bosalela makolo na bino banzela oyo etengama te, mpo ete lokola oyo ezali kotambola tengu-tengu, ebeba libela te, kasi ebika. Bosala makasi mpo na kozala na kimia na bato nyonso mpe kozala na bomoi ya bosantu; Pamba te soki bomoi ya bosantu ezali te, moto moto te akoki komona Nkolo. Bomibatela malamu mpo ete moto moko te azanga ngolu ya Nzambe, mpe, mpo ete mosisa moko te ya bololo ebima kati na bino, oyo ekoki kobimisa mobulu mpe kobebisa bato ebele. Moto moko te akoma moto ya ekobo to mpe oyo atiolaka makamboya Nzambe lokola Ezawu, oyo atekaki bokonzi na ye ya bokulutu mpo na biloko ya kolia. Sima na yango, ndenge boyebi, tango alingaki kozwa lipamboli na ye; azwaki yango te, Pamba te azwaki nzela te mpo na kobongola makanisi ya tata na ye, atako alukaki yango na mayi na miso. Pamba te, naino bopusani te pene-pene na ngomba oyo bakoki kosimba mpe oyo ezali kopela moto; to mpe na molili, to mpe na molili ya makasi penza, to mpe na mopepe ya makasi; to mpe na lokito ya kelelo, to mpe na mongongo oyo ezali koloba, na ndenge ete, baoyo bayokaki yango babondelaki ete eloba na bango lisusu te. Pamba te, bakokaki te kosimba etinda oyo apesaki bango: Ata soki nyama asimbi ngomba, esengeli baboma yango na mabanga. Lokola makambo yango ezalaki nsomo mingi, yango wana Moyize alobaki: Nazali kobanga mpe kolenga. Kasi bino, bosiʼbopusana pene-pene na ngomba ya Siona, pene-penena Yeruzalem ya Likolo, vile ya Nzambe ya bomoi. Bosi bopusana pene-pene ya baanzelu bankoto na bankoto oyo bazali na feti, pene-pene na lingomba ya bana ya Nzambe ya liboso, baoyo bakombo na bango ekomama na Likolo. Bosiʼbopusana pene-penena Nzambe, zuzi ya bato nyonso, pene-pene na milimo ya bato sembo baoyobasiʼbakoma bato ya kokoka. Bosiʼbopusana pene-pene na Yesu Mozongisi bondeko ya Boyokani ya sika, mpe pene-pene ya makila na ye oyo esopanaki, makila oyo elobaka malamu koleka makila ya Abel. Bokeba: boboya te koyoka ye oyo azali koloba. Pamba te soki baoyobaboyaki koyoka ye oyo azalaki kokebisa bango na mokili, bazwaki nzela te ya kokima etumbu, bongo ndenge nini biso tokokima kozwa etumbu, soki toboyi koyoka ye oyo azali kokebisa biso wuta na Likolo? Na tango wana mongongo na ye eningisaki mokili, kasi sikʼoyoapesi elaka oyo: Mbala moko lisusu, nakoningisa kaka mokili te, kasi na likolo mpe. Maloba oyo “mbala moko lisusu”, ezali kolakisa ete: biloko oyo ekoki koningana, oyo esalama, ekobongwana, mpo ete oyo ekoki koningana te etikala. Yango wana, lokola tokozwa bokonzi oyo ekoningana te, tozongisamatondi mpe tosalela Nzambe na ndenge oyo esepelisaka ye, na botosimpe na kobanga. Pamba te, Nzambe na biso azali moto oyo ezikisaka. Tika ete bolingo ya bondeko ewumela kati na bino. Bobosanaka te koyamba bapaya na ndenge ya malamu, Pamba te na kosala bongo, bato mosusu bayambaki baanzelu, mpe bayebaki te ete bayambaki baanzelu. Bokanisaka bato oyo bazali na boloko, lokola nde bino moko mpe bozalibato ya boloko elongo na bango; bokanisaka bato oyo bazali komona pasi, lokola nde bino moko mpe bozali komona pasi. Tika ete moto nyonso atosa libala; mpe mbeto ya libala esengeli ezala peto, pamba te Nzambe akosambisa baoyo basalaka ekobo mpe baoyo basalaka pite. Bozala na lokoso ya mbongo te, mpe bosepelaka na oyo bozali na yango. Pamba te Nzambe alobaki: nakotika yo te, nakosundola yo te! Bongo tokoki koloba na elikya nyonso: Nkolo azali mosungi na ngai, nakobanga eloko moko te. Bongo batu bakoki kosala ngai nini? Bokanisaka bakambi na bino, oyo bateyaki bino Liloba ya Nzambe. Bokanisaka bizaleli oyo bazalaki na yango mpe ndenge bakufaki, mpe bolanda ndakisa ya kondima na bango. Yesu Kristo azali ndenge moko, lobi, lelo, mpe libela na libela. Botika te ete bakosa bino na mateya ya ndenge na ndenge mpe ya lokuta. Pamba te, ezali malamu ete mitema na biso ezwa makasi na nzela ya ngolu ya Nzambe, kasi na nzela ya kotosa te mibeko oyo etali biloko ya kolia; Pamba te mibeko yango esalisaka te baoyo batosaka yango. Tozali na mesa epai topesaka makabo, mpe banganga-Nzambe oyo basalaka mosala na kati ya ndako ya kapo bazali na ndingisa te mpo na kolia. Mokonzi ya banganga-Nzambe amemaka makila ya banyama na Esikaeleki bosantu mpo na bolimbisi ya masumu, kasi banzoto ya banyama yango bazalaki kotumba yango na libanda ya mboka. Yango wana Yesu mpe akufaki na libanda ya mboka, mpo ete akomisa bato bosantu na nzela ya makila na ye moko. Yango wana, biso mpe, tokende epai na ye na libanda ya mboka, mpe tondima koyoka soni oyo ye ayokaki. Pamba te, awa, tozali na vile oyo ya libela te, kasi tozali kolukavile oyo ezali koya. Yango wana na nzela ya Yesu, topesaka Nzambe tango nyonso likabooyo epesaka ye lokumu, elingi koloba: tokumisaka kombo na ye. Bobosanaka te kosala makambo ya malamu mpe kosalisa bato mosusu, Pamba te yango ezali makabo oyo esepelisaka Nzambe. Botosaka bakambi na bino mpe bolandaka mitindo oyo bapesaka bino. Pamba te, bango bazali bakengeli ya milimo na bino, mpe basengeli kotalisa Nzambe ndenge basalelaki mosala na bango. Botosa bango mpo ete basala mosala na bango na esengo, kasi na pasi na motema te, Pamba te yango ekosalisa bino te. Bobondelaka mpo na biso, Pamba te toyebi solo ete mitema na biso ezali peto, mpe tolingi kozala na ezaleli ya malamu na makambo nyonso. Nasengi bino ete bobondela, mpo ete Nzambe apesa ngai makoki ya kozongela bino noki. Tika ete Nzambe ya kimia, ye oyo, na nzela ya makila ya Boyokaniya seko, asekwisaki wuta na bakufi Nkolo na biso Yesu, oyo azali Mobateli monene ya bampate, apesa bino makoki ya kokokisa misala nyonso ya malamu mpo bosalamokano na ye, mpe akoka kosala kati na biso, na nzela ya Yesu Kristo, oyo ezali kosepelisa ye. Tika ete nkembo ezala na ye libela na libela! Amen. Bandeko, nabondeli bino ete boyamba malamu maloba na ngai ya kolendisa, Pamba te nakomeli bino kaka mokanda ya mokuse. Nalingi boyeba ete ndeko na biso Timote basiʼbabimisaki ye na boloko. Soki akomi noki, nakoya elongo na ye mpo na kotala bino. Bopesa mbote na bakambi na bino nyonso mpe na basantu nyonso. Bandeko ya Itali batindeli bino mbote. Tika ete ngolu na Nzambe ezala na bino nyonso! Amen. Ngai, Zaki, mosali ya Nzambe mpe ya Nkolo Yesu Kristo. Natindi mokanda oyo na mabota zomi na mibale oyo bapalangana na mokili mobimba. Bandeko na ngai, bomona yango lokola likambo moko ya esengo mingi, na tango bozali kokutana na komekama ya ndenge na ndenge. Pamba te boyebi ete, tango kondima na bino ezali kokutana na komekama, yango ekobota kokanga motema. Kokanga motema esengeli esilisa mosala na yango, mpo ete bokoka kokoma bato oyo bakola mpe oyo bazali ya kokoka, mpe oyo bazangi ata eloko moko te. Soki moto moko na kati na bino azangi bwania, abondela Nzambe, mpe Nzambe akopesa ye yango; Pamba te Nzambe apesaka na bato nyonso na motema malamu mpe na kopamela te. Kasi tango azali kobondela, esengeli andima, atia tembe te. Pamba te moto oyo atiaka tembe azali lokola mbonge ya ebale, oyo mopepe ezali koningisa mpe kobwaka epai na epai. Moto ya ndenge wana, akanisa te ete akozwa eloko epai ya Nkolo, azali moto ya makanisi mibale mpe moto oyo abongwanaka-bongwanaka na nyonso oyo asalaka. Ndeko oyo akelela esengeli atonda na esengo tango Nzambe atomboli ye, mpe moto oyo azali na bomengo esengeli atonda na esengo tango Nzambe akitisi ye. Pamba te moto ya bomengo akoleka lokola fololo ya elanga. Pamba te, ndenge tomonaka moi ebimaka na moto makasi, ekawusaka matiti, mpe fololo na yango ekweyaka, mpe kitoko na yango esilaka; ezali mpe ndenge moko mpo na moto ya bomengo, akolimwa na kati ya misala na ye. Esengo na moto oyo azali kokanga motema na tango azali kokutanana komekama; Pamba te tango akolonga komekama, akozwa ekoti ya lokumu ya bomoi, oyo Nzambe alakaki na bato oyo balingaka ye. Moto moko te, tango azali kokutana na komekama, aloba: “Nzambemoto azali komeka ngai.” Pamba te, mabe ekoki komeka Nzambe te, mpe Nzambe amekaka moto moko te. Kasi moto nyonso amekamaka, tango baposa na ye ya mabe ebendi ye mpe ekangi ye. Bongo baposa wana ya mabe soki etondi kati na moto, ebotaka lisumu. Mpo soki lisumu ekoli, ebotaka liwa. Bandeko balingami, bomikosa te: bolamu nyonso mpe likabo nyonso ya kitoko ewutaka na Likolo, wuta na Tata ya moi, kati na ye oyo mbongwana ezali te to mpe elilingi ya mbongwana. Abotaki biso na nzela ya liloba ya bosolo, na mokano na ye moko, mpo ete tozala na esika ya liboso na kati ya biloko nyonso oyo Nzambe asala. Bandeko balingami, bosimba likambo oyo: moto nyonso azala moto ya koyoka noki, kasi azala moto ya koloba noki te mpe ya kosilika noki te; Pamba te kanda ya moto ekokisaka te makambo ya malamu oyo Nzambe alingaka. Yango wana, bobwaka bosoto nyonso mpe misala nyonso ya mabe. Mpe bondima na komikitisa nyonso Liloba oyo balonaki na kati ya mitema na bino, oyo ekoki kobikisa bino. Bosalaka makambo oyo Liloba ya Nzambe ezali koloba, kasi boyokaka yango kaka Pamba te; soki te, bokomikosa bino moko. Pamba te, soki moto azali koyoka Liloba mpe azali kosala te oyo yango ezali koloba, akokani na moto oyo atali elongi na ye na tala-tala, mpe nsima ya komitala, akeyi na ye; mpe kaka na tango wana abosani ndenge elongi na ye ezalaki. Kasi moto oyo alandelaka malamu penza Mibeko ya kokoka, oyo epesaka bonsomi, oyo atosaka yango tango nyonso, mpe abosanaka te oyo ayokaki, kasi asalelaka yango, moto wana akozala na esengo na nyonso oyo akosala. Soki moto akanisi ete azali moto oyo asambelaka, kasi ayebi kobatela lolemo na ye te, azali komikosa ye moko, mpe kosambela na ye ezali na tina te. Kosambela ya peto mpe oyo ezangi bosoto na miso ya Nzambe tatana biso yangʼoyo: kosalisa bana oyo bakufela baboti mpe basi oyobakufela mibali, kati na bapasi na bango, mpe komibatela peto na makambo ya mokili. Bandeko na ngai, lokola bozali bandimi kati na Nkolo na biso ya nkembo, Yesu Kristo, boponaka bilongi ya bato te. Ndakisa: moto moko akoti na mayangani na bino, alati bilamba ya kitoko penza, na pete ya wolo; mpe, moto moko akelela akoti; alati bilamba ya bosoto penza, soki boweleli koyamba moto oyo alati bilamba ya kitoko mpe bolobi na ye: “Tala esika ya kitoko mpo na yo”, kasi bolobi na moto oyoakelela: “Yo, telema kuna” to “Vanda awa na mabele, na esika oyo natiaka makolo na ngai”; Boni, wana bopona bilongi te kati na bino? Mpe bokomi bazuzi te oyo bazali na makanisi ya mabe? Bandeko balingami boyoka: boni, Nzambe apona te bato oyo bazali ya kokelela na mokili mpo ete bakoma bato ya bomengo kati na kondima, mpe bazwa Bokonzi oyo alaka epai ya baoyo balingaka ye? Kasi bino, bomonaka bato bakelela bato pamba. Boni, bato oyo banyokolaka bino mpe bafundaka bino na batribinale, ezali bato ya bomengo te? Boni, ezali bango te bato batiolaka nkombo ya kitoko oyo Nzambe apesa bino? Nzokande, soki bozali kokokisa Mibeko ya Bokonzi ya Nzambe, oyo ezali kati na Makomi: Linga moninga na yo ndenge omilingaka yo moko, wana, bozali kosala malamu. Kasi soki bozali kopona bilongi ya bato, bozali kosala masumu mpe Mibeko ezali kokweyisa bino, mpo bozali kotosa yango te. Pamba te, moto oyo atosaka Mibeko nyonso, soki abebisi kaka moko, abebisi mpe nyonso. Pamba te, ye oyo alobaki: kosala ekobo te; alobaki lisusu: koboma te. Yango wana, soki osali ekobo te, kasi abomi moto, yeba ete obuki Mibeko nyonso. Bolobaka mpe bosalaka misala lokola bato oyo bakosambisa bango nanzela ya Mibeko oyo epesaka bonsomi. Pamba te, Nzambe akoyoka mawa te tango akosambisa moto ayokelaki bato mosusu mawa te; kasi mawa elongaka kosambisama. Bandeko na ngai, litomba ezali wapi soki moto alobi azali na Kondima mpe azali kolakisa yango na misala te? Kondima ya ndenge wana ekoki kobikisa ye? Ndakisa: ndeko moko ya mobali to ya mwasi azangi bilamba ya kolata, to biloko ya kolia ya mokolo na mokolo; soki moto moko na kati na bino alobi na bango: “Bokende na kimia, boyotela moto mpe bolia malamu”, kasi asali eloko moko te mpo na oyo bazali na yango posa mpo na nzoto na bango; bongo yango ezali na litomba nini? Ndenge moko mpe mpo na kondima, soki ezangi misala, ezali ya kokufa. Kasi moto akoki koloba: —Ozali na kondima, ngai nazali na misala.—Malamu! Lakisa ngai kondima na yo oyo ezangi misala, mpe ngai nakolakisa yo kondima na ngai na nzela ya misala oyo nasalaka. Ondimaka ete Nzambe azali moko. Ezali malamu! Ata milimo mabe mpe bandimaka ete Nzambe azali moko, mpe balengaka. Yo zoba oyo, olingi nalakisa yo ete kondima oyo ezangi misala, ezali Pamba? Boni, Nzambe akamataki nkoko na biso Abraham moto sembo te na nzela ya misala, tango akabaki mwana na ye Izaki likolo ya mesa ya makabo? Omoni, kondima na ye mpe misala na ye ezalaki kosala nzela moko. Mpe kondima na ye ekomaki ya kokoka na nzela ya misala na ye. Bongo Makomi ekomaki ya solo, oyo ezali koloba: Abraham andimelaki Nzambe, mpe mpo na kondima na ye, Nzambe akamataki ye moto na sembo; mpe babengaki ye moninga ya Nzambe. Bomoni sikʼoyo ete, moto akomaka sembo liboso ya Nzambe na Nzela ya misala, kasi na nzela ya kondima kaka te. Boni, ndenge moko mpe mpo na Rahabi mwasi ya ndumba, akomaki sembote na miso ya Nzambe na nzela ya misala, tango ayambaki bantoma mpe abimisaki bango na nzela mosusu? Pamba te, ndenge nzoto oyo ezangi molimo ezali ya kokufa, ndenge moko mpe kondima oyo ezangi misala, ezali ya kokufa. Bandeko na ngai, baoyo balukaka kokoma bateyi na kati na bino, bazala mingi te, mpo boyebi ete biso baoyo toteyaka, bakosambisa bisomakasi penza. Biso nyonso tosalaka mabe ya ndenge na ndenge. Soki moto asalaka mabe te na maloba oyo alobaka, moto wana azali moto ya kokoka, mpe akokikobatela nzoto na ye mobimba. Tala, totiaka bibende na minoko ya bapunda mpo etosa biso, na bongo tokambaka nzoto na yango mobimba. Tokamata mpe ndakisa ya masuwa: atako ezali monene mpe mopepe ya makasi nde etindikaka yango, kasi mwa yenda ya moke penza ekoki kokamba yango, mpo elanda nzela oyo kapitene ya masuwa alingi. Ndenge moko mpe, lolemo ezali mwa eteni moko ya moke na kati ya nzoto ya moto, kasi emikumisaka na makambo ya minene. Bokanisa mpe ndenge moto ya moke ekoki kozikisa zamba monene! Lolemo mpe ezali moto, ezali mpe mokili ya makambo ya mabe kati na biteni ya nzoto na biso. Yango nde ebebisaka nzoto mobimba, mpe ezikisaka bomoi na biso mobimba sima ya kopelisama na moto na yango ewutaka na lifelo. Moto akoki kolakisa banyama ya lolenge nyonso, bandeke, banyama oyo etambolaka na libumu, banyama ya mayi, mpo etosa ye, mpe asiʼalakisa yango. Kasi mpo na lolemo, moto moko te akoki kolakisa yango mpo etosa ye. Yango ezali eloko moko ya mabe, elembaka te, mpe etonda na pwazo. Na lolemo, topambolaka Nkolo na biso mpe Tata, mpe, na yango mpe, tolakelaka mabe na bato oyo basalama na lolenge ya Nzambe. Lipamboli mpe elakeli mabe ewutaka kaka na monoko moko. Bandeko na ngai, ekoki kozala bongo te. Boni, esika moko ekoki kobimisa mayi ya malamu mpe ya bololo? Bandeko na ngai, nzete ya figi ekoki kobota bambuma ya Olive? To mpe nzete ya vino ekoki kobota bafigi? Ekoki kosalama te ete mayiya mungwa ebimisa mayi ya malamu. Nani kati na bino azali moto ya mwania mpe ya mayele? Alakisa yango na ezaleli na ye ya malamu, mpe na misala oyo azali kosala na komikitisa oyo ewutaka na bwania. Kasi soki mitema na bino etondi na zuwa ya bololo, mpe sokibozali na molimo ya koswana, wana bomikumisaka te, mpe bobebisa makambo ya solo te na lokuta na bino. Bwania ya ndenge wana ewutaka epai ya Nzambe te, kasi ezali ya mokili, ya bomoto mpe ya Zabolo. Pamba te, esika zuwa mpe molimo ya koswana ezali, esika wana mpe etondi mobulu ya lolenge nyonso mpe misala ya mabe. Kasi bwania oyo ewutaka na Nzambe ezali, liboso: ya peto, bongo: ya kimia, ya boboto, botosi, etondi na mawa mpe na bambuma ya malamu, eponaka bilongi te, mpe ezali na bokosi te. Baoyo batiaka kimia balonaka mbuma ya bosembo kati na kimia. Koswana mpe bitumba kati na bino ewutaka wapi? Boni, ewuti te na baposa na bino ya mabe oyo ebundaka kati na banzoto na bino? Bolulaka biloko, kasi bozwaka yango te. Bobomaka mpe botondi na zuwa, kasi bokokaka te kozwa oyo bino bolingaka kozwa. Boswanaka mpe bobundaka bitumba. Mpe bozwaka te, Pamba te bosengaka Nzambe te. Mpe tango bosengaka, bozwaka te; mpo bosengaka na makanisi ya mabe, ya kosepelisa kaka baposa na bino moko. Bato na ekobo! Boyebi te ete kolinga mokili, ezali koyina Nzambe? Moto oyo alingi kozala moninga ya mokili, amikomisi monguna ya Nzambe. To bokanisi ete Makomi ezali koloba Pamba? —Nzambe alingaka na zuwa mingi penza molimo oyo atia kati na biso. Kasi Nzambe azali kopesa biso bolamu oyo eleki monene. —Tala makambo Makomi ezali koloba: Nzambe atelemelaka bato ya lofundu, kasi apesaka ngolu na ye na bato oyo bamikitisa. Botosaka Nzambe mpe botelemela Zabolo, bongo ye akokima mosika na bino. Boya pene-pene na Nzambe, mpe ye akoya pene-pene na bino. Bino bato ya masumu, bosukola maboko na bino. Bino bato ya mitema mibale, bopetola mitema na bino! Botala mpasi na bino, bosala matanga mpe bolela. Tika ete koseka na bino ebongwana kolela, mpe esengo na bino ekoma mawa. Bomikitisa liboso ya Nkolo, mpe ye akotombola bino. Bandeko na ngai, botonganaka te moko na moko. Moto oyo atongaka mpe asambisaka ndeko na ye, atongaka mpe asambisaka Mibeko. Nzokande, soki ozali kosambisa Mibeko, wana elakisi ete yo ozali moto oyoatosaka Mibeko te, kasi ozali zuzi na yango. Nzokande, moto oyo apesa Mibeko mpe ye oyoazali zuzi, azali kaka moko, ye oyo akoki kobikisa mpe koboma. Bongo yo ozali nani, mpo osambisa moninga na yo? Boyoka sikʼoyo bino bato bolobaka: “Lelo to lobi tokokende na vile boye, tokovanda kuna mbula mobimba mpe tokosala mombongo, bongo tokozwa mbongo mingi.” Boyebi makambo oyo ekoya lobi? Pamba te, bomoi na bino ezali nini? Yango ezali kaka londende oyo emonanaka mwa tango moke, mpe na nsima elimwaka. Tala ndenge bosengeli kolobaka: “Soki Nkolo alingi, tokozala nabomoi, mpe tokosala likambo oyo to oyo wana.” Kasi sikʼoyo, bozali komikumisa kati na lofundu na bino. Boyeba ete, lofundu nyonso ya lolenge wana, ezali mabe. Bongo, moto oyo ayebi kosala makambo ya malamu, kasi azali kosala yango te, asali masumu. Bino bato ya bomengo, boyoka malamu! Bolela mpe bomitungisa mpo na bapasi oyo ekokweyila bino. Bomengo na bino esiʼepoli, mpe bampese basiʼbalie bilamba na bino. Wolo na bino mpe palata na bino esiʼebebi. Mpe kobeba na yangoekozala litatoli mpo na bino, mpe ekolia nzoto na bino lokola moto. Bosiʼbokongoli bomengo na mikolo ya suka. Boboyi kofuta lifuti ekoka ya bato oyo basalaka na bilanga na bino. Yoka ndenge ezali kolela! Kolela ya bato oyo babukaka mbuma na bilanga na bino esiʼekomi kino na matoyi ya Nzambe, Nkolo ya mapinga ya Likolo. Awa na mokili, bosila kozwa bomoi oyo etondi na biloko ya kitokompe bisengo. Bomikomisi mafuta lokola baniama oyo ezali kozela mokolobakokata yango nkingo. Bopesaki etumbu na moto oyo asalaki mabe te, mpe bobomaki ye; mpe atikaki bino bosala ndenge bolingaki. Bandeko, bokanga mitema kino mokolo Nkolo akoya. Botala ndenge mosali bilanga akangaka motema, mpe azelaka banda tango mbula ya liboso enokaka kino tango mbula ya nsuka enokaka, mpo azwa mbuma ya malamu. Bino mpe bokanga mitema, botonda na mpiko, Pamba te koya ya Nkoloekomi pene-pene. Bandeko na ngai, botika koyima-yima kati na bino na bino, mpo Nzambe asambisa bino te. Botala, zuzi asiʼatelemi liboso ya porte. Bandeko, mpo na oyo etali kokanga motema kati na bapasi, bokamata baprofeta oyo balobaki na nkombo ya Nkolo lokola ndakisa na bino. Lokola boyebi, tobengaka bato ya esengo, bato oyo bazali koyika mpiko. Bosiʼboyoka ndenge Yobo akangaki motema na bapasi, mpe boyebi likambooyo Nkolo asalaki na suka mpo na bolamu na ye; Pamba te, Nkolo atonda na bolamu mpe na mawa. Bandeko na ngai, liboso ya makambo nyonso, bolapaka ndayi te, ata na nkombo ya Likolo, ata na nkombo ya mokili, to mpe ata na nkombo ya eloko nini. Tika ete: “E e!” na bino ezala kaka “E e!”, mpe “Te!” na bino ezala kaka “Te”, mpo ete bokweya te na etumbu. Soki moto moko na kati na bino azali na mpasi, tika ete abondela. Soki moto moko azali na esengo, tika ete ayemba banzembo. Soki moto moko na kati na bino azali maladi, tika ete abenga bampaka ya Lingomba, babondela mpo na ye mpe bakopakola ye mafuta na nkombo ya Nkolo. Bongo libondeli oyo esalami na kondima, ekobikisa moto ya maladi, mpe Nkolo akotelemisa ye. Soki asalaki masumu, Nzambe akolimbisa yeyango. Boyambola masumu na bino moko na moko, mpe bobondela mpo na bino na bino, mpo ete bobika. Libondeli ya moto na sembo ezali na nguya mingi mpe esalaka mosala. Elia azalaki moto lokola biso, tango abondelaki na molende nyonso mpo mbula enoka te, mpe mbula enokaki te bambula misato na ndambu. Bongo tango abondelaki lisusu, mbula enokaki, mpe mabele ebotaki bambuma. Bandeko na ngai, soki moto moko na kati na bino apengwi na makambo ya solo, mpe moto mosusu azongisi ye; boyeba ete, moto oyo alongoli moto ya masumu na nzela ya mabe oyoye apengwaki na yango, abikisi moto yango na liwa, mpe Nzambe akolimbisa masumu ebele. Ngai Piere, mopostolo ya Yesu Kristo, natindi mokanda oyo epai ya bato oyo Nzambe apona, baoyo bazali na mikili ya bapaya, mpe bapalangana na Ponti, Galatia, Kapadosi, Azia mpe Bitini. Nzambe Tata apona bino na lolenge ya mabongisi na ye oyo abongisaliboso penza, mpe akomisa bino basantu na nzela ya Molimo na ye, mpo botosa Yesu Kristo mpe bokoma peto na makila na ye. Tika ete botonda na ngolu mpe na kimia. Lokumu na Nzambe mpe tata ya Nkolo na biso Yesu Kristo! Kati na mawa na ye oyo eleki monene, apesaki biso mbotama ya sika, na nzela ya lisekwa ya Yesu Kristo kati na bakufi, mpo ete tozala na elikya oyo ya solo-solo; Pamba te, abomopanga biso bomengo oyo ekoki kobeba te, oyo ekokikozwa bosoto te, mpe ekoki kobungisa kitoko na yango te. Azali kobomba yango na Likolo mpo na bino, baoyo ye azali kobatela na nguya na ye, na nzela ya kondima, kino na koya ya lobiko oyo esiʼebongisami mpo ete emonana na tango ya suka. Yango nde epesaka bino esengo, atako sikʼoyo esengeli boyoka mawa mpo na mwa tango moke, mpo na bapasi ya ndenge na ndenge oyo bozali kokutana na yango. Bapasi yango ezali koya mpo ete kondima na bino ekoka komonana ete ezali kondima ya solo, mpe ekoka kopesa bino masanzoli, nkembo mpe lokumu tango Yesu Kristo akokomonana. Pamba te, kondima na bino eleki wolo na motuya—wolo oyo ebebaka tango bamekaka yango na moto. Ata bomonaki Yesu Kristo te, kasi bolingaka ye; ata mpe sikʼoyo bomonaka ye te, kasi bondimaka ye, mpe bozali ya kotonda na esengo ya nkembo, oyo moto ata moko te akoki kolimbola yango, Pamba te bozali kozwa litomba ya kondima na bino: yango nde lobiko ya milimo na bino. Baprofeta oyo basakolaki bolamu oyo Nzambe abombelaki bino, batunaki-tunaki mpe balukaki penza-penza koyeba tina ya lobiko yango. Basalaki nyonso mpo na koluka koyeba tango nini mpe ndenge nini makambo oyo Molimo ya Kristo alobaki, ekosalama. Molimo yango azalaki kati na bango, mpe ayebisaki bango na liboso penza bapasi oyo Kristoamonaki mpe nkembo oyo ezalaki kozela ye. Nzambe alakisaki bango ete, Sango oyo bango bazwaki mokumba mpo na koyebisa, ezalaki mpo na bango te, kasi mpo na bino. Mpe Sango yango, bozali koyoka yango sikʼoyo na minoko ya baoyo bateyaki bino Sango Malamu na nguya ya Molimo Mosantu oyo Nzambe atindaki wuta na Likolo. Ata baanzelu mpe bazali na posa mingi penza mpo na koyebayango. Yango wana, bobongisa makanisi na bino mpo na mosala; bomikengela; botia elikya na bino mobimba kati na mapamboli oyobakopesa bino tango Kristo akomonana. Lokola bozali bana ya botosi, bolanda lisusu baposa ya mabe te oyo bozalaki na yango tango bozalaki kati na kozanga koyeba. Kasi, lokola ye oyo abengaki bino azali Mosantu, bino mpe bozala basantu kati na makambo nyonso oyo bosalaka. Pamba te, ekomama: Bozala basantu pamba te ngai nazali Mosantu! Lokola bobengaka Tata, ye oyo asambisaka moto na moto na mosala na ye mpe aponaka bilongi te tango asambisaka; yango wana botambolaka awa na mokili lokola bapaya; kati na kobanga. Pamba te boyebi ete, bakangolaki bino na bizaleli na bino ya Pamba-Pamba, oyo bankoko na bino batikelaki bino, na nzela ya biloko oyo ebebaka te, lokola: palata to wolo, kasi na nzela ya makila ya ntalo ya Kristo, oyo azali lokola Mwana-meme oyo azangi mabe mpe bosoto. Nzambe aponaki ye mpo na yango, liboso ete mokili esalama, kasiamonani na batango oyo ya suka mpo na bino. Na nzela na ye bozali kondima Nzambe, oyo asekwisaki ye kati na bakufi mpe apesaki ye nkembo, mpo ete kondima na bino mpe elikya na bino ezala kati na Nzambe. Sikʼoyo lokola bosiʼbokomi peto na nzela ya kotosa makambo yasolo, mpo ete bozala na bolingo ya solo epai ya bandeko na bino, bolinganaka mingi penza moko na moko, na motema mobimba. Pamba te, bosiʼbobotami lisusu, ezali te na molona oyo ebebaka, kasi na nzela ya Liloba ya Nzambe, oyo ezali na bomoi mpe ekotikala libela na libela. Pamba te: Bato nyonso bazali lokola matiti, mpe nkembo na bango nyonso ezali lokola bafololo ya esobe; Lititi ekawukaka mpe fololo na yango ekweyaka, kasi Liloba ya Nkolo ekotikala libela na libela. Mpe Liloba oyo, yango nde bateyaki bino. Yango wana, bobwaka makambo nyonso ya mabe mpe lokuta nyonso, kokosana, zuwa, mpe kotonga nyonso. Lokola bana oyo babotami sika, boyokaka posa mingi ya miliki ya peto oyo ya molimo, mpo ete na nzela na yango, bokoka kokola kati na lobiko na bino, Sikʼoyo lokola bosiʼbomeki ete Nkolo azali malamu. Lokola bosiʼboye epai na ye, ye libanga ya bomoi, oyo bato babwakaki, kasi Nzambe aponaki yango, mpe ezali na motuya mingi epai na ye; bino mpe, bozali lokola mabanga ya bomoi, bozali kotongama na kati ya ndako ya molimo, mpo bozala banganga-Nzambe ya bosantu, oyo bokozala na mokumba ya kopesaka makabo ya molimo, oyo esepelisaka Nzambe na nzela ya Yesu Kristo. Pamba te Makomi ezali koloba boye: Tala, natie libanga na Siona, oyo esimbaka ndako mobimba, libanga ya motuya mingi mpe oyo eponama; mpe moto oyo akondimela yango akoyoka soni ata moke te! Ya solo, libanga yango ezali na motuya mingi mpo na bino baoyo bondimaka. Kasi mpo na baoyo bandimaka te: Libanga oyo batongi ndako babwaka, Ekomi libanga ya tina penza, mpe, libanga oyo ebetisaka bato mabaku, libanga oyo ekweyisaka bato! Bazali kobeta mabaku mpo baboyi kotosa Liloba. Yango ebongisama bongo mpo na bango. Kasi bino, bozali libota oyo eponama, bozali banganga-Nzambe ya bokonzi monene, bozali ekolo ya bosantu, mpe bato oyo bazali ya Nzambe, mpo ete bokoka kosakola lokumu ya ye oyo abengaki bino mpo bolongwa na molili mpe boya na moi na ye, oyo ezali ya kokamwa mingi. Liboso, bozalaki bato na ye te, kasi sikʼoyo bokomi bato ya Nzambe; liboso, ayokelaki bino mawa te, kasi sikʼoyo ayokeli bino mawa. Balingami, boyeba ete bozali na kati ya mokili lokola bapaya mpe baleki nzela; yango wana nabondeli bino: boboya baposa mabe ya nzoto, Pamba te yango ebundaka na elimo na bino. Bozala na bizaleli ya malamu na kati ya bapakano, mpo ata bazali kofunda bino ete bozali kosala mabe, kasi bakoka komona misala na bino ya malamu mpe bakumisa Nzambe na mokolo akoya kotala bino. Mpo na bolingo ya Nkolo, botosa bokonzi nyonso oyo etiami kati na bato: ezala mokonzi monene, ye oyo azali na bokonzi likolo ya bato nyonso, to na baguvelenele, baoyo ye atinda mpo na kopesa etumbu na bato oyo basalaka mabe, mpe mpo na kokumisa baoyo basalaka malamu. Pamba te yango ezali mokano ya Nzambe, ete na nzela ya kosala malamu, bokoka kokanga minoko ya bato oyo bayebi eloko te mpe bazangi mayele. Bozala bato ya bonsomi, kasi bosalela bonsomi yango te lokola elamba mpo na kobomba mabe na bino; Kasi bozala bawumbu ya Nzambe. Botosaka bato nyonso; bolingaka bandeko nyonso; “bobangaka Nzambe, mpe botosaka mokonzi monene!” Bino bawumbu, botosaka bakonzi na bino na botosi nyonso, kaka te baoyo bazali malamu mpe boboto, kasi baoyo mpe bazali matata. Pamba te, yango ezali malamu soki moto akangi motema na bapasi oyo bazali koyokisa ye kaka Pamba, mpo azali kotosa Nzambe. Pamba te lokumu nini bokozwa soki babeti bino mpo na mabe oyo bosalaki mpe bokangi mitema mpo na yango? Kasi soki bonyokwami mpo bozali kosala malamu, mpe bokangi mitema mpo na yango, ya solo, yango ezali likambo moko ya malamu na miso ya Nzambe. Ezali mpo na yango nde Nzambe abengaki bino, Pamba te, Kristo mpe anyokwamaki mpo na bino, mpe atikelaki bino ndakisa, mpo ete bolanda banzela na ye. Ye asalaki ata lisumu moko te, mpe monoko na ye elobaki lokuta te. Tango bafingaki ye, azongisaki na kofinga te. Tango banyokolaki ye, akanelaki moto moko te; kasi amitikaki na maboko ya Nzambe, ye oyo asambisaka na bosembo nyonso. Amemaki masumu na biso na nzoto na ye, likolo ya ekulusu, mpo ete tokufa na masumu mpe tozala na bomoi mpo na bosembo; bobiki na nzela ya bapota na ye. Pamba te, bozalaki lokola bameme oyo ezalaki kotelengana-telengana, kasi sikʼoyo bosili kozonga epai ya Mobateli ya bameme mpe mokengeli ya milimo na bino. Ndenge moko mpe mpo na bino basi, botosaka mibali na bino, mpo soki mibali misusu na kati na bango bandimaka Liloba te, bandima yango na nzela ya ezaleli ya basi na bango, ata soki bateyi bango Liloba te, Pamba te bakomona ete bazali na bomoi ya bopeto mpe ya botosi. Kitoko na bino esengeli te ewuta na biloko oyo emonanaka na miso: lokola, kokanga suki, kolata babizu ya wolo to bilamba ya kitoko. Kasi ebongi malamu ete kitoko na bino ewuta na kati ya mitema: kitoko oyo esilaka te, oyo ya molimo ya boboto mpe ya kimia, oyo ezali na motuya mingi na miso ya Nzambe. Pamba te, kala, basi ya bosantu oyo bazalaki kotiela Nzambe motema, bazalaki komikomisa kitoko na ndenge wana; bazalaki kotosa mibali na bango, ndenge Sara azalaki kotosa Abraham mpe abengaki ye mokonzi na ye. Bozali bana na ye ya basi soki bosali makambo oyo ezali sembo mpe bobangi eloko moko te. Bino mibali mpe, tango bozali kovanda na basi na bino, esengeli boyeba ete bazali batu ya bolembu, mpe bopesaka bango botosi, Pamba te bango mpe bakozwa elongo na bino, bomoi oyo Nzambe akopesa kati na ngolu na ye. Bosalaka bongo mpo ete eloko moko te ekangisa mabondeli na bino. Mpo na kosukisa, bino nyonso bozala likanisi moko, boyokanaka mawa moko na moko, bolinganaka lokola bandeko, bozala bato malamu, mpe bozala bato ya komikitisa. Bozongisa mabe na mabe te, to kofinga na kofinga, nzokande bopambolaka, Pamba te Nzambe abenga bino mpo na yango, mpo ete bozwa lipamboli. Pamba te, Moto oyo alingi bomoi mpe komona mikolo ya malamu, esengeli abatela lolemo na ye na koloba makambo ya mabe, mpe bambebo na ye na maloba ya lokuta. Esengeli akima mabe mpe asala malamu, esengeli aluka kimia mpe akoba kolanda yango. Pamba te miso ya Nkolo ezali likolo ya bato na sembo mpe matoyi na ye eyokaka mabondeli na bango; kasi elongi ya Nkolo etalaka te baoyo basalaka mabe. Nani akosala bino mabe, soki bozali na posa monene mpo na kosala malamu? Mpe ata soki esengeli ete bomona pasi mpo na likambo oyo ezali sembo, boyeba ete bozali bato ya esengo. Bobanga bato te, mpe bozala mitema likolo te. Kasi bokumisa Kristo kati na mitema na bino lokola Nkolo. Bozala ya kobongama tango nyonso mpo na kopesa eyano na moto nyonso oyo akotuna bino mpo na kolimbola elikya oyo bozali na yango. Kasi bosala yango na boboto mpe na botosi. Bobatela mitema na bino peto, mpo ete baoyo balobaka mabe mpo na bizaleli na bino ya malamu kati na Kristo, bakoka koyoka soni mpo na kofinga na bango. Pamba te eleki malamu, soki yango ezali mokano ya Nzambe, ete moto amona pasi mpo azali kosala malamu, na esika ete amona pasi mpo azali kosala mabe. Pamba te Kristo akufaki mpo na masumu na biso, mbala moko, mpo na libela, ye moto malamu akufaki mpo na bato mabe, mpo amema bino epai ya Nzambe; Babomaki ye na nzoto, kasi azalaki na bomoi na nzela ya Molimo. Na nzela ya Molimo yango, akendaki mpe ateyaki milimo oyo ezalaki na boloko, milimo oyo eboyaki kotosa, kala, tango Nzambe azalaki kozela na kokanga motema, tango Nowa azalaki kotonga masuwa. Mpe kati na yango, mwa bato moke kaka, mwambe, nde babikaki na mayi. Mayi wana ezali elembo ya libatisi oyo ezali kobikisa bino sikʼoyo. Yango ezali te mpo na kosukola bosoto ya nzoto, kasi mpo na komipesa epai ya Nzambe na motema ya peto. Yango ezali kobikisa bino na nzela ya lisekwa ya Yesu Kristo, ye oyo abuta na Likolo mpe azali na loboko ya mobali ya Nzambe; mpe baanzelu, bakonzi, mpe banguya ya likolo bazali kotosa ye. Yango wana, lokola Kristo amonaki pasi na nzoto na ye, bino mpe bozala na makanisi ye ndenge wana. Pamba te, moto oyo asiʼamona pasi na nzoto na ye asiʼaboya masumu, mpo ete, kati na tango nyonso oyo atikali na yango awa na mokili, akoka kolanda baposa mabe ya bomoto te, kasi akoka kolanda mokano ya Nzambe. Pamba te, kala bolekisaki tango mingi mpo na kosala makambo oyo bapakano basalaka: komipesa na makambo ya mobulu, na baposa ya mabe, na kolangwa masanga, kolia mpe komela na kolekisa ndelo, mpe na kosambela bikeko. Sikʼoyo, bapakano bazali kokamwa mpo na komona ete bozali lisusu te kosangana elongo na bango kati na bomoi ya mobulu ndenge bango basalaka; yango wana bafingaka bino. Kasi bakosamba epai ya Moto oyo asiʼamibongisi mpo na kosambisabato ya bomoi mpe baoyo bakufa. Pamba te, ezali mpo na tina wana nde, Yesu Kristo ateyaki mpe Sango Malamu epai ya baoyo bakufa; mpo sima ya kozwa etumbu lokola oyo bato nyonso bazwaka na banzoto na bango, bazala na bomoi kati na Molimo, ndenge Nzambe mpe azali na bomoi. Suka ya makambo nyonso ekomi pene-pene. Yango wana, bozala na makanisi ya peto mpe bozala na makanisi ya peto mpe bomikengelaka, mpo ete bokoka kobondela. Liboso ya makambo nyonso, bolingana mingi penza moko na moko, Pamba te bolingo ezipaka masumu ebele. Boyambanaka moko na moko, na koyima-yima te. Moto na moto esengeli asalela, likabo oyo azwaki wuta na Nzambempo na bolamu ya baninga, lokola kapita malamu ya makabo ndenge na ndengeya Nzambe. Soki moto azali koloba, azala yango lokola moto azali koloba maloba ya Nzambe. Soki moto azali kosalela baninga, asala yango na makasi oyo Nzambe apesaka, mpo ete kati na makambo nyonso, Nzambe akokakozwa lokumu na nzela ya Yesu Kristo. Na ye, nkembo mpe nguya mpo na libela na libela. Amen! Balingami, bokamwa te mpo na komekama ya pasi mingi oyo bozali komona, lokola nde likambo moko ya kokamwa eyeli bino. Kasi bosepela mpo bazali kosangana na bapasi ya Kristo, mpo ete bokoka kotonda na esengo tango nkembo na ye ekomonana. Soki bazali kofinga bino mpo na kombo ya Kristo, boyeba etebozali bato na esengo, Pamba te Molimo ya nkembo mpe ya Nzambe azali likolo na bino. Moto moko te kati na bino amona pasi mpo azali mobomi to moyibi, to moto oyo azali kosala mabe, to mpe lokola moto oyo akotaka na makambo ya bato; kasi soki azali komona pasi mpo azali “Mokristo”, ayoka soni te mpo na yango, kasi akumisa Nzambe mpo na kombo wana. Pamba te, tango ekoki mpo ete kosambisama ebanda: mpe ekobanda na libota ya Nzambe; mpe soki yango ebandi na biso, bongo yango ekosuka ndenge nini mpo na bato oyo bazali koboya kotosa Sango Malamu ya Nzambe? Mpe, soki moto na sembo akobika na pasi mingi, bongo ekosuka boni namoto mabe mpe na moto ya masumu? Yango wana, baoyo bazali komona pasi na ndenge mokano ya Nzambeelingi, bamipesa mobimba na maboko ya Mokeli na bango oyo azali sembo, mpe bakoba kosala makambo ya malamu. Nazali kolendisa bampaka oyo bazali kati na bino, ngai oyo nazali mpaka elongo na bango, temwe ya bapasi ya Kristo, mpe oyo akosanganana nkembo oyo ekomonana. Bozala babateli ya bameme oyo Nzambe apesa bino mpo na kobatela. Bokengelaka bango ndenge Nzambe alingi mpo na bino, kasi na kotindika te. Bosala mosala na bino na lokoso ya mbongo te, kasi na posa moneneya kosalela bango. Boluka kolakisa bokonzi na bino te likolo ya bato oyo Nzambe apesabino mpo na kobatela, kasi bozala ndakisa epai ya bameme. Bongo tango Mokonzi ya babateli ya bameme akomonana, bokozwaekoti ya lokumu, oyo ya nkembo, oyo ekobungisa kitoko na yango te. Ndenge moko mpe bino bilenge, botosaka baoyo bazali bakolo. Bolata komikitisa moko na moko, Pamba te: Nzambe atelemelaka bato ya lofundu, kasi apesaka ngolu na ye na bato oyo bamikitisa. Yango wana, bomikitisa na nse ya loboko ya nguya, oyo ya Nzambe, mpo akoka kotombola bino na tango oyo ekoki. Bobwaka epai na ye makambo nyonso oyo etungisaka bino, Pamba te ye moto abatelaka bino. Bomibatela mpe bozala ya kobongama. Monguna na bino, Zabolo, azali koleka-leka pembeni-pembeni na bino lokola ntambwe oyo azali kongulumampe azali koluka nani akolia. Botelemela ye mpe bopika pende kati na kondima, mpo boyebi ete bandeko na bino oyo bapalangana kati na mokili bazali mpe kokutanana bapasi ya ndenge moko. Kasi tango bokosilisa komona pasi mpo na mwa tango moke, Nzambe ya ngolu nyonso, oyo abenga bino na nkembo na ye ya seko kati na Kristo, ye moko akokomisa bino bato ya kokoka, akolendisa bino, akopesa bino makasi, mpe akotelemisa bino ngwi. Nguya ezala na ye mpo na libela na libela. Amen! Na lisalisi ya Silas, oyo azali ndeko ya solo, nakomeli bino mokandaoyo na mokuse, mpo na kolendisa bino mpe kolakisa bino ete ngolu oyo bokangami na yango ezali ngolu ya solo ya Nzambe. Bopikama kati na yango. Lingomba oyo ezali na Babilone, oyo Nzambe apona elongo na bino, etindeli bino mbote. Mwana na ngai Marko atindeli bino mpe mbote. Bopesana mbote moko na moko na beze ya bolingo. Kimia ezala na bino nyonso oyo bozali kati na Kristo. Ngai Simon Piere, mosali mpe mopostolo ya Yesu Kristo, natindimokanda oyo epai ya baoyo bazwaki kondima ya motuya, lolenge moko na biso, na nzela ya bosembo ya Nzambe na biso mpe Mobikisi na biso Yesu Kristo. Tika ete ngolu mpe kimia ezala na bino ya mingi penza, na nzela ya koyeba Nzambe mpe Yesu Nkolo na biso. Nguya ya bonzambe ya Nzambe esiʼepesa biso biloko nyonso oyo tozali na yango posa mpo na bomoi mpe mpo na kotosa makambo ya Nzambe, na nzela ya koyeba ye oyo abenga biso na nkembo na ye mpe bolamu na ye. Na nzela wana nde, apesa biso bilaka ya minene penza mpe ya motuyamingi, mpo ete na nzela na yango bokoka kosangana kati na bomoto ya Nzambe mpe bokima libebi oyo ezali na mokili, oyo ezali kowuta na baposa ya mabe. Mpo na tina wana, bosala makasi mpo na kobakisa likolo ya kondima na bino, bolamu; mpe likolo ya bolamu, boyebi; likolo ya boyebi, komibatela malamu; mpe likolo ya komibatela malamu, kokanga motema; mpe likolo ya kokanga motema, kotosa makambo ya Nzambe; mpe likolo ya kotosa makambo ya Nzambe, bondeko ya solo; mpe likolo ya bondeko ya solo, bolingo. Pamba te, soki makambo oyo ezali kati na bino mpe ezali tangonyonso kobakisama, yango ekobatela bino mpo bozala te bato oyo basalaka eloko moko te mpe baoyo babotaka mbuma te, mpo na oyo etali boyebi ya nkolo na biso Yesu Kristo. Kasi soki moto azangi makambo wana, azali mokufi miso mpe amonaka mosika te, mpe asiʼabosani ete basiʼbasukola ye na masumu na ye ya kala. Yango wana bandeko na ngai, bozala na posa mingi mpo na kolendisa kobengama na bino mpe koponama na bino. Pamba te, sokibosali makambo wana, bokokweya te, mpe bakoyamba bino malamu penza kati na Bokonzi ya seko ya Nkolona biso mpe Mobikisi Yesu Kristo. Yango wana, nakobanda tango nyonso kokanisela bino makambo yango, atako boyebi yango mpe bozali ya kokangama makasi kati na makambo ya solo oyo bozali na yango sikʼoyo. Nakanisi ete ezali malamu mpo nalamusaka makanisi na bino awa nazali naino na bomoi na kati ya ndako ya kapo ya nzoto oyo. Pamba te, nayebi ete etikali moke nalongola yango, ndenge Nkolo na biso Yesu Kristo alakisi ngai yango polele. Mpe nakosala makasi, mpo ete ata sima ya kokufa na ngai, bozala tango nyonso na makoki ya kokanisaka makambo yango. Tango toyebisaki bino makambo oyo etali nguya mpe koya ya Nkolona biso Yesu Kristo, tolandaki masapo ya mayele mabe te oyo esalama na bato, kasi tozalaki penza batemwe oyo bamonaki nkembo na ye. Pamba te, tozalaki wana tango azwaki lokumu mpe nkembo oyo ewutaki na Nzambe Tata, tango mongongo eyaki epai na ye wuta na Nkembo monene ya Nzambe, mpe elobaki: Oyo azali Mwana na ngai ya bolingo; nasepelaka na ye mingi penza. Mpe biso moko toyokaki mongongo yango oyo ewutaki na Likolo, tango tozalaki elongo na ye, likolo ya ngomba mosantu. Yango wana, tozali na elikya mingi na maloba oyo baprofeta basakola, mpe bokosala malamu mpo na kotia makanisi na bino na yango: Pamba te, yango ezali lokola mwinda oyo ezali kopela kati na esikaya molili, kino tango tongo ekobanda kotana mpe monzoto ya tongo ekongenga kati na mitema na bino. Liboso ya nyonso, esengeli boyeba ete moto moko te akoki kolimbola maloba ya baprofeta, oyo ezali kati na Makomi, na mayele na ye moko. Pamba te, maloba ya baprofeta eyaki na mokano ya moto te; kasi Molimo Mosantu nde atambusaki basantu ya Nzambe mpo na kosakola. Kala, bateyi ya lokuta bazalaki na kati ya bato ya Isayele; ndenge moko mpe mpo na bino, bateyi ya lokuta bakozala na kati na bino. Bakokotisa na kobombama mateya oyo ememaka na libebi, bakowangana ata Mokonzi oyo asombaki bango; mpe na ndenge wana, bakomibendela bango moko libebi ya mbalakata. Bato mingi bakolanda nzela na bango ya libebi, mpe bato bakotiolanzela ya makambo ya solo mpo na makambo bango basalaka. Kati na lokoso na bango ya mbongo, bateyi wana ya lokuta bakozwa biloko na bino na mayele ya mabe, na nzela ya masapo oyo bango moko bakosala. Kasi etumbu na bango ekowumela te mpo na kokweya likolo na bango, mpe kobeba na bango ezali kozela bango. Pamba te, Nzambe ayokelaki baanzelu oyo basalaki masumu mawa te, kasi abwakaki bango na libulu ya molayi penza, epai bazali kokengela bango na boloko, na kati ya molili, mpo bazela Mokolo ya kosambisama. Ayokelaki mpe mokili ya kala mawa te; akitisaki mpela likoloya bato na yango oyo bazalaki kotosa makambo na ye te. Kasi abatelaki kaka Nowaoyo azalaki koteya bosembo, mpe bato sambo mosusu elongo na ye. Nzambe apesaki ba-vile ya Sodomo mpe Gomore etumbu, na nzela ya kozikisa yango kino ekomaki putulu, mpe akomisa yango ndakisa epai ya bato oyo bakoboya kotosa makambo na ye. Kasi abikisaki Loti moto na sembo, ye oyo ayokaki mawa mpo na ezaleli ya mabe ya bato wana ya mobulu. (Pamba te Moto na sembo oyo, azalaki kovanda na kati na bango, mpe mokolo na mokolo, azalaki komitungisa mingi na kati ya motema na ye ya sembo, tango azalaki komona mpe koyoka misala na bango ya mabe). Ya solo, Nkolo ayebi ndenge akoki kokangola kati na komekama bato oyo batosaka makambo na ye, mpe ndenge akoki kobomba baoyo bazali kosala mabe, na nse ya etumbu, kino na mokolo ya kosambisama. Kasi akopesa etumbu ya koleka epai ya baoyo bazali kolanda baposa ya mabe ya nzoto, mpe bazali kotiola bokonzi ya Nzambe. Bazali bato ya mitu makasi mpe bato ya lofundu, babangaka te kofinga bikelamo ya Likolo. Nzokande ata baanzelu, bango oyo bazali na makasi mingi mpe nanguya mingi, bafundaka bango te liboso ya Nkolo na maloba ya kofinga. Kasi bato wana bafingaka makambo bango basosolaka te. Bazali lokola banyama oyo ezangi mayele, babotama kaka mpo bakanga bango mpe baboma bango; mpe bakokufa lokola banyama. Bakozwa lifuti mpo na mabe oyo bazali kosala. Bato yango basepelakamingi penza kosala makambo ya mabe na miso ya bato. Bazali bato ya mbindompe ya bosoto, mpe basepelaka kokosa bino tango basanganaka na bino na bafeti. Miso na bango etonda na ekobo mpe batikaka te kosala masumu. Bakangaka na motambo bato oyo balendisama malamu te; mitema na bango etonda na lokoso ya mbongo, mpe bazali na nse ya elakeli mabe ya Nzambe. Basiʼbatika nzela ya malamu mpe bamibungisa mpo na kolanda nzela ya Balami mwana ya Beor, oyo alingaki lifuti ya masumu. Kasi Nzambe apamelaki ye na nzela ya mpunda mpo na mabe oyo asalaki; nyama oyo elobaka te, elobaki na mongongo ya moto mpe ekangisaka bozoba ya moprofeta. Bato yango bazali lokola maziba oyo ebimisaka mayi te mpe lokola mapata oyo mopepe ya makasi ezali kotindika. Nzambe abombela bango esika kati na molili ya makasi penza. Pamba te, tango balobaka, balobaka maloba ya lofundu mpe ezangi tina. Basalelaka baposamabe ya nzoto lokola mwa mosuni ya nyama oyo batiaka na motambo, mpo na kokanga bato oyobabandi kokima bato oyo bazali na kati ya libunga. Bapesaka bango elaka ya kozwa bonsomi, nzokande bango moko bazali bawumbu ya baposa oyo ememaka bango na libebi; Pamba te moto nyonso azali mowumbu ya eloko oyo esila kolonga ye. Soki bato balongwe na kati ya makambo ya bosoto ya mokili, na nzela ya koyeba Nkolo na biso mpe Mobikisi na biso Yesu Kristo, mpe bamitiki lisusu ete makambo yango ya bosoto ekanga bango mpe elonga bango, boyeba ete lolenge na bango ya suka ekozala mabe mingi koleka oyo ya liboso. Elingaki kozala malamu mingi mpo na bango ete bayeba nzela ya bosembo te, na esika ete bayeba yango mpe batika yango, mpe basundola Mibeko ya bosantu oyo bapesaki bango. Masese ezali koloba solo mpo na bango: ete mbwa ezongelaka biloko oyo esanzaka mpe “ngulu, ata bawuti kosukola yango ezongaka lisusu kopipota na poto-poto”. Balingami, oyo ezali sikʼoyo mokanda na ngai ya mibale nazali kokomela bino. Kasi na oyo ya liboso, ndenge moko mpe na oyo ya mibale, nazali koluka kolamusa mayele na bino oyo ezali peto, mpo bokanisaka mateya oyo bozwaki. Nalingi bokanisa maloba oyo baprofeta ya bosantu baloba wuta kala, mpe Mibeko oyo Nkolo na biso mpe Mobikisi na biso apesa, na nzelaya bapostolo na bino. Boyeba liboso ete, na mikolo ya suka, batioli bakoya, bakotiola mpe bakolanda baposa na bango ya mabe. Bakoloba: “Apesaki elaka ete akoya, bongo akoya tango nini? Pamba te, banda bankoko na biso bakufa, makambo nyonso ezali kaka ndenge moko banda na ebandeli ya mokili!” Kasi bazali kobosana makambo oyo na nko: ete kala, Nzambe asalaki likolo mpe mokili na Liloba na ye. Asalaki mokili wuta na mayi mpe na nzela ya mayi. Mpe, ezali na mayi mpe, nde mokili ya tango wana edindaki na mayi mpe ekufaki. Kasi likolo mpe mokili oyo ezali sikʼoyo bazali kobomba yango na nzela ya Liloba ya ndenge moko, mpo ezika moto. Bazali kobomba yango mpo na mokolo oyo bakosambisa mpe bakoboma bato oyo batosaka te. Kasi, balingami, bobosana te likambo oyo: Mpo na Nkolo, mokolo moko ezali lokola bambula nkoto, mpe bambula nkoto ezali lokola mokolo moko. Nkolo azali kowumela te mpo na kokokisa elaka na ye, ndenge bato mosusu bazali kokanisa yango. Azali kokanga motema mpo na bino, alingi te ete moto moko abunga, kasi bato nyonso babongola mitema. Kasi mokolo ya Nkolo ekoya lokola moyibi. Likolo ekolimwa nalokito monene; biloko ya likolo ekozika na moto, mpe mokili na misala nyonso oyo ezali kati na yango ekozika. Lokola biloko nyonso ekobebisama na ndenge wana, bosengeli kozala bato ya ndenge nini? Bosengeli kozala na bomoi ya bosantu mpe na bomoi ya kotosa makambo ya Nzambe, awa bozali kozela mokolo ya Nzambe mpe kolinga ete yango eya noki. Mokolo yango, likolo ekopela moto mpe ekonyangwama mpe bilokoya likolo ekoniangwama mpo na moto. Kasi biso, tozali kozela, ndenge Nzambe alakaki yango, likolo yasika mpe mokili ya sika epai bosembo ekozala. Yango wana balingami, lokola bozali kozela makambo wana, bosala makasi mingi penza mpo ete Nzambe akuta bino na bosoto te, na likambo moko te ya mabe, mpe na kimia elongo na ye. Boyeba malamu ete, kokanga motema ya Nkolo na biso, ezali mpo ete bato bakoka kobika, ndenge molingami na biso Polo akomelaki binompe, na bwania oyo Nzambe apesaki ye. Akomaka ndenge moko kati na mikanda na ye nyonso, oyo alobelaka makambo oyo. Mikanda na ye ezalaka na makambo mosusu oyo ezalaka makasi mingi mpo na kososola; oyo bato bayebi eloko te mpebalendisama malamu te babongolaka tina na yango, ndenge basalaka mpe na biteni mosusu ya Makomi, mpo na libebi na bango moko! Yango wana balingami, lokola bosiʼboyebi yango, bokeba mpo ete bolanda te libunga ya bato oyo babeba, mpe bokweyisa molende na bino te. Kasi bokola kati na ngolu mpe kati na boyebi ya Nkolo mpe Mobikisi na biso Yesu Kristo. Nkembo ezala na ye banda sikʼoyo mpe libela na libela. Amen. Oyo ezalaki banda na ebandeli, oyo toyokaki, oyo tomonaki na miso na biso, oyo totalaki malamu, mpe maboko na biso esimbaki—yango tozali kosakola mpo na Liloba ya bomoi. —Bomoi emonanaki; tomonaki yango mpe totatolaki mpo na yango, mpe tozali kosakolela bino bomoi ya seko, oyo ezalaki elongo na Tata mpe oyo balakisaki biso. —Tozali koyebisa bino oyo tomonaki mpe toyokaki, mpo ete bino mpe bokoka kozala lisanga na biso. Mpe lisanga na biso ezali elongo na Tata mpe elongo na Mwana na ye Yesu Kristo. Tozali kokoma makambo oyo, mpo ete esengo na biso ezala ya kokoka. Oyo ezali Sango toyokaki epai na ye mpe tozali koyebisa bino: Nzambe azali moi; mpe kati na ye, molili ezali ata moke te. Soki tolobi ete tozali lisanga elongo na ye, mpe tozali kaka kotambola kati na molili, wana tozali bato ya lokuta mpe tosalelaka solo te. Kasi soki tozali kotambola kati na moi, ndenge ye moko azali kati na moi, wana tozali lisanga moko, mpe makila ya Yesu, Mwana na ye, ezali kopetola biso na masumu nyonso. Soki tolobi ete tozangi masumu, wana tozali komikosa biso mokompe solo ezali kati na biso te. Nzokande soki, toyamboli masumu na biso, Nzambe azali sembo mpe akokisaka maloba na ye, akolimbisa masumu na biso, mpe akopetola biso na mabe nyonso. Soki tolobi ete tosalaka masumu te, wana tozali kokomisa Nzambe moto ya lokuta, mpe Liloba na ye ezali na esika te na kati ya bomoi na biso. Bana na ngai, nakomeli bino makambo oyo mpo ete bosala masumu te. Kasi soki moto moko asali masumu, tozali na Molobeli moko epai ya Tata, ye nde: Yesu Kristo moto na sembo. Ye amikabaki lokola mbeka mpo na masumu na biso, kaka oyo ya biso te, kasi mpe mpo na masumu ya mokili mobimba. Tokoki kotia elikya ete toyebi Nzambe, soki tozali kotosa Mibeko na ye. Moto oyo alobaki: “Nayebi Nzambe”, kasi asalaka te makambo oyo Nzambe atindaka, azali moto ya lokuta, mpe bosolo ezali kati na ye te. Kasi soki moto azali kotosa Liloba na ye, wana bolingo ya Nzambe ezali penza ya kokoka kati na ye. Oyo ezali ndenge toyebaka ete tozali kati na ye. Moto oyo alobaka ete azali kati na Nzambe, esengeli atambola ndenge Yesu atambolaki. Balingami, nazali kokomela bino mobeko ya sika te, kasi mobeko ya kala, oyo bozwaki wuta na ebandeli. Mobeko yango ya kala, ezali Liloba oyo boyokaki. Nakomeli bino lisusu mobeko ya sika; yango ezali solo oyo ezali komonana kati na ye mpe kati na bino, pamba te molili ezali koleka mpe moi ya solo ezali kongenga. Moto oyo alobaka ete azali kati na moi, kasi ayinaka ndeko na ye, azali naino kati na molili. Moto oyo alingaka ndeko na ye, azali kati na moi, mpe azali na eloko moko te kati na ye oyo ekoki kobetisa ye libaku. Kasi moto oyo ayinaka ndeko na ye, azali kati na molili mpe azali kotambola kati na molili; ayebi te epai azali kokende, pamba te molili ebomi miso na ye. Bana, nakomeli bino, mpo masumu na bino esiʼelimbisama na kombo ya Kristo. Batata, nakomeli bino, mpo boyebi moto oyo azali wuta na ebandeli. Bilenge, nakomeli bino, mpo bosiʼbolonga moto mabe. Bana, nakomeli bino mpo boyebi Tata. Batata, nakomeli bino mpo boyebi moto oyo azali wuta na ebandeli. Bilenge, nakomeli bino mpo bozali makasi, mpe Liloba ya Nzambe ezali kati na bino, mpe bosiʼbolonga molimo mabe. Bolinga mokili te, ata biloko oyo ezali kati na mokili. Soki moto alingi mokili, bolingo ya Tata ezali kati na ye te. Pamba te, biloko nyonso oyo ezali na mokili: baposa mabe ya mosuni, baposa mabe ya miso, na lofundu oyo tomipesaka mpo na biloko, nyonso wana ewutaka na Tata te, kasi ewutaka na mokili. Nzokande mokili na baposa na yango ezali koleka, kasi moto oyo asalaka mokano ya Nzambe azali na bomoi libela na libela. Bana na ngai, oyo ezali ngonga ya suka; ndenge boyokaki ete monguna ya Kristo azali koya, sikʼoyo mpe banguna ya Kristo mingi basiʼbaye. Oyo ezali ndenge tozali koyeba ete yango ezali ngonga ya suka. Babimaki wuta epai na biso, kasi bazalaki bato na biso te. Pamba te, soki bazalaki bato na biso, mbele balingaki kotikala elongo na biso; kasi kokende na bango, ezali kolakisa ete moko te na kati na bango azalaki moto na biso. Kasi bino, bosiʼbozwa Molimo Mosantu oyo Kristo apesa, mpe bino nyonso boyebi makambo ya solo. Nakomeli bino te mpo boyebi makambo ya solo te, kasi mpo boyebi yango, mpe mpo lokuta moko te ebimaka na makambo ya solo. Nani azali moto ya lokuta? Ezali moto oyo awanganaka ete Yesu azali Kristo te. Moto ya ndenge wana azali monguna ya Kristo, oyo awanganaka Tata mpe Mwana. Moto nyonso oyo awanganaka Mwana, azali mpe na Tata te; moto oyo andimaka Mwana, azali mpe na Tata. Mpo na bino, botala soki oyo boyokaki banda na ebandeli ezali kati nabino. Soki yango ezali kati na bino, bino mpe bokozala kati na Mwana mpe kati na Tata. Oyo nde elaka apesaki biso: bomoi ya seko. Nazali kokomela bino makambo oyo, mpo na baoyo bazali kobungisa bino nzela. Mpo na bino, Molimo Mosantu oyo Kristo apesaki bino, azali kati na bino, mpe bozali na posa te ete moto ateya bino, pamba te Molimo oyo Kristo apesaki bino ateyaka bino makambo nyonso. Mpe makambo oyo ateyaka bino ezali ya solo, akosaka te. Yango wana bozala kati na Kristo, ndenge Molimo ateya bino yango. Sikʼoyo bana, bokoba kozala kati na ye, mpo ete tango akomonana, tokoka kozala na elikya mpe toyoka soni te na miso na ye mokolo akoya. Soki boyebi ete Kristo azali sembo, boyeba mpe ete moto nyonso oyoasalaka makambo ya sembo, azali mwana na ye. Bolingo oyo Tata apesa biso ezali monene mingi penza mpo ete tobengama bana ya Nzambe! Mpe tozali bongo! Yango wana mokili eyebi biso te, mpo eyebaki mpe Nzambe te. Balingami, tozali sikʼoyo bana na Nzambe, mpe ndenge tokozala, naino emonani te. Kasi toyebi ete tango Kristo akomonana, tokokoma lokola ye, pamba te tokomona ye ndenge azali. Moto nyonso oyo azali na elikya oyo kati na Kristo, azali komipetola ye moko, ndenge Kristo azali peto. Moto nyonso oyo asalaka masumu abukaka mpe Mobeko; pamba tekosala lisumu ezali: kobuka Mobeko. Kasi boyebi ete Kristo amonanaki mpo ete alongola masumu na biso. Mpe lisumu ezali kati na ye te. Moto nyonso oyo azali kati na Kristo asalaka masumu te. Moto nyonso oyo azali kokoba kosala masumu, amona ye te to mpe ayebi ye te. Bana na ngai, moto moko te abungisa bino nzela. Moto oyo asalakamakambo ya bosembo azali sembo, ndenge Kristo azali sembo. Moto oyo asalaka masumu azali moto ya zabolo, pamba te zabolo abanda kosala masumu wuta na ebandeli. Tina oyo Mwana na Nzambeamonanaki, ezalaki mpo ete aboma misala ya zabolo. Moto moko te oyo azali mwana na Nzambe akobaka kosala masumu, pamba te Liloba ya Nzambe ezali kati na ye; akoki kokoba kosala masumu te, pamba te azali mwana ya Nzambe. Tala ndenge bokoki koyeba banani bazali bana na Nzambe, mpebanani bazali bana ya zabolo: moto nyonso oyo asalaka makambo oyo ezali sembo te mpe alingaka ndeko na ye te, azali mwana na Nzambe te. Mateya oyo boyokaki wuta na ebandeli, yango oyo: Tolingana moko na moko. Bozala lokola Kayina te, ye oyo azalaki moto ya molimo mabe mpe abomaki ndeko na ye. Abomaki ye mpo na nini? Pamba te misala na ye ezalaki mabe mpe oyo ya ndeko na ye ezalaki sembo. Bandeko na ngai, bokamwa te soki mokili ezali koyina bino. Toyebi ete tosiʼtolongwa wuta na liwa mpe tokoma na bomoi, pamba te tolingaka bandeko na biso. Moto oyo alingaka ndeko na ye te, azali kati na kufa. Moto oyo ayinaka ndeko na ye, azali mobomi, mpe boyebi ete ata mobomi moko te azali na bomoi ya seko kati na ye. Tala ndenge tokoyeba soki bolingo ezali nini: Yesu Kristo akabaki bomoi na ye mpo na biso. Biso mpe, tosengeli kokaba bomoina biso mpo na bandeko na biso. Soki moto azali na biloko ya mokili oyo, mpe amoni ndeko na ye azali na posa ya eloko, kasi ayokeli ye mawa te, ndenge nini bolingo ya Nzambe ekoki kozala kati na ye? Bana na ngai, tolingana kaka na maloba te, to mpe na lolemo te, kasi na misala mpe na solo. Tala ndenge tokoyeba ete tozali bato ya makambo ya solo, mpe ndenge tokotondisa mitema na biso na elikya liboso na ye, soki mitema na biso ezali kofunda biso. Pamba te Nzambe azali monene koleka mitema na biso, mpe ayebi makambo nyonso. Balingami, soki mitema na biso ezali kofunda biso te, tozali na elikya liboso ya Nzambe mpe tokozwa wuta na ye, eloko nyonso oyo tokosenga, pamba tetozali kotosa Mibeko na ye, mpe tozali kosala makambo oyo esepelisaka ye. Mpe Mobeko na ye yangʼoyo: tondima na kombo ya Mwana na ye Yesu Kristo mpe tolingana moko na moko ndenge atindaki biso. Moto oyo atosaka Mibeko ya Nzambe azali kati na Nzambe, mpe Nzambe kati na ye. Mpe, tala ndenge toyebi ete Nzambe azali kati na biso: Toyebi yango na nzela ya Molimo oyo apesaki biso. Balingami, bondima molimo nyonso te, kasi bomeka milimo mpo na koyeba soki yango ewuti na Nzambe; pamba te baprofeta mingi ya lokuta basiʼbabimi na mokili. Tala ndenge bokoki koyeba Molimo ya Nzambe: molimo nyonso oyo ezali kondima ete Yesu Kristo akomaki moto, molimo yango ewuti na Nzambe, kasi molimo nyonso oyo ezali kondima Yesu te, ewuti na Nzambe te. Yango ezali molimo ya monguna ya Kristo, oyo boyokaki ete ezali koya mpe ezali sikʼoyo kati na mokili. Bana na ngai, mpo na bino, bozali ya Nzambe mpe bosiʼbolonga milimoyango, pamba te oyo azali kati na bino azali monene koleka oyo azali kati na mokili. Baprofeta ya lokuta bazali ya mokili; yango wana balobaka makambo yamokili, mpe mokili eyokelaka bango. Biso tozali ya Nzambe, mpe moto oyo ayebi Nzambe, ayokelaka biso; kasi moto oyo azali ya Nzambe te, ayokelaka biso te. Tala ndenge toyebaka Molimo ya solo na molimo ya lokuta. Balingami, tolingana moko na moko, pamba te bolingo ewuti na Nzambe. Mpe moto nyonso oyo azali na bolingo azali mwana ya Nzambe mpe ayebi Nzambe. Moto oyo azangi bolingo, ayebi Nzambe te; pamba te Nzambe azali bolingo. Tala ndenge Nzambe alakisaki biso bolingo na ye: Atindaki Mwana na ye moko kaka kati na mokili, mpo ete tozala na bomoi na nzela na ye. Bolingo yango emonani na likambo oyo: ezali biso te bato tolingaki Nzambe, kasi ezali ye moto alingaki biso, mpe atindaki Mwana na ye mpo azala likabo mpo na masumu na biso. Balingami, lokola Nzambe alingaki biso mingi penza, biso mpe tosengeli kolingana moko na moko. Moto moko te asiʼamona Nzambe; kasi soki tolingani moko na moko, wana Nzambe azali kati na biso mpe bolingo na ye ezali ya kokoka kati na biso. Tala ndenge tozali koyeba ete tozali kati na Nzambe mpe Nzambe azali kati na biso: mpo apesa biso Molimo na ye. Tosiʼtomona mpe totatolaka ete Tata atinda Mwana na ye mpo azala Mobikisi ya mokili. Soki moto andimi ete Yesu azali Mwana ya Nzambe, Nzambe azali kati na ye mpe ye azali kati na Nzambe. Mpe, tosiʼtoyeba mpe tondima bolingo oyo Nzambe azali na yango mpo na biso. Nzambe azali bolingo: mpe moto oyo azali kati na bolingo, azali kati na Nzambe mpe Nzambe azali kati na ye. Na ndenge oyo nde bolingo ezali komonana ete ezali ya kokoka kati na biso, mpo ete tozala na kobanga ta na mokolo ya kosambisama, pamba te bomoi na biso kati na mokili oyo ekokani na oyo ya Kristo. Na bolingo, kobanga ezalaka te. Kasi bolingo oyo ezali ya kokokaelongolaka kobanga, pamba te kobanga ememaka mitungisi elongo na yango. Mpe moto oyo abangaka azali naino ya kokoka te kati na bolingo. Tozali na bolingo, mpo Nzambe alingaki biso liboso. Soki moto alobi: “Nalingaka Nzambe”, mpe azali koyina ndeko na ye, azali moto ya lokuta. Pamba te moto oyo alingaka ndeko na ye teoyo ye amonaka, bongo ndenge nini akoki kolinga Nzambe oyo ye amonaka te? Kutu, Kristo apesaki biso mobeko oyo: Moto oyo alingaka Nzambe, esengeli alinga mpe ndeko na ye. Moto nyonso oyo andimaka ete Yesu azali Kristo, azali mwana na Nzambe; mpe moto nyonso oyo alingaka Tata, alingaka mpe Mwana na ye. Tala ndenge toyebaka ete tolingaka bana na Nzambe: ezali tango tozali kolinga Nzambe mpe tozali kobatela Mibeko na ye. Pamba te kolinga Nzambe ezali nde kobatela Mibeko na ye. Mpe Mibeko na ye ezali pasi te, mpo moto nyonso oyo azali mwana na Nzambe, alongaka mokili; mpeelonga oyo elongaka mokili, ezali: kondima na biso. Nani akoki kolonga mokili? Kaka moto oyo andimaka ete Yesu azali Mwana na Nzambe. Yesu Kristo azali moto oyo ayaki, ayaki na mayi na makila. Ayaki kaka na mayi te, kasi na mayi mpe na makila. Mpe Molimo moto atatoli bongo, mpo Molimo azali solo. Pamba te, batemwe bazali misato: Molimo, mayi, mpe makila; mpe bango misato balobaka ndenge moko. Tondimaka matatoli ya bato, kasi litatoli ya Nzambe eleki monene, pamba te yango ezali litatoli ya Nzambe oyo apesaki mpo na Mwana na ye. Moto oyo andimaka Mwana ya Nzambe azali na litatoli oyo kati na motema na ye. Moto oyo andimaka Nzambe te, akomisi Nzambe moto ya lokuta, pamba te andimi te litatoli oyo Nzambe apesa mpo na Mwana na ye. Mpe, litatoli yango yangʼoyo: Nzambe apesa biso bomoi ya seko, mpe bomoi yango ezali kati na Mwana na ye. Moto oyo azali na Mwana, azali na bomoi; oyo azali na Mwana na Nzambe te, azali na bomoi te. Nakomeli bino makambo oyo, bino baoyo bondimaka na kombo ya Mwana na Nzambe, mpo bokoka koyeba ete bozali na bomoi ya seko. Mpe tozali na elikya oyo liboso ya Nzambe: ete soki tosengi eloko na mokano na ye, akoyoka biso. Mpe soki toyebi ete ayokaka biso, toyebi mpe ete tokozwa biloko nyonso oyo tosengaka ye. Soki moto moko amoni ndeko na ye azali kosala lisumu oyo ememaka na liwa te, esengeli abondela mpo na ndeko wana, mpe Nzambeakopesa ndeko yango bomoi. Nazali koloba mpo na baoyo basalaka masumuoyo ememaka na liwa te. Ezali na lisumu oyo ememaka na liwa. Nazali koloba te ete bobondela mpo na lisumu wana. Mabe nyonso ezali lisumu; mpe ezali na lisumu oyo ememaka na liwa te. Toyebi ete moto oyo azali mwana na Nzambe akobaka te kosala masumu; moto oyo azali mwana na Nzambe amibatelaka ye moko, mpe molimo mabeasimbaka ye te. Toyebi ete tozali bana ya Nzambe, mpe mokili mobimba ezali na nse ya bokonzi ya molimo mabe. Nzokande toyebi ete Mwana na Nzambe ayaki mpe apesaki biso bososoli, mpo ete tokoka koyeba Ye oyo azali solo. Mpe tozali kati na ye oyo azali solo, elingi koloba: kati na Mwana na ye Yesu Kristo. Ye azali Nzambe ya solo mpe bomoi ya seko. Bana na ngai, bokeba na bikeko! Ngai Mpaka, natindi mokanda oyo epai ya Mama oyo Nzambe apona mpe epai ya bana na ye, baoyo nalingaka kati na bosolo. Ezali kaka ngai moko te nde nalingaki bino, kasi na baoyo nyonso mpe bayebi bosolo, mpo na bosolo oyo evandi kati na biso mpe oyo ekozala libela elongo na biso. Tika ete ngolu, mawa mpe kimia oyo ewutaka na Nzambe Tata mpe oyo ewutaka na Yesu Kristo, Mwana ya Tata, ezala elongo na biso kati na solo mpe na bolingo. Nazali na esengo mingi penza mpo na komona ete bana na yo bazali kotambola kati na solo ndenge penza Tata atindaki biso. Mpe sikʼoyo, Mama, nazali kokomela yo mobeko ya sika te, kasi oyo tozali na yango banda na ebandeli. Nasengi ete tolingana moko na moko. Mpe bolingo ezali kosenga boye: totambola kati na kotosa Mibeko na ye. Ndenge boyokaki yango banda na ebandeli, mobeko na ye ezali ete botambola kati na bolingo. Bato mingi ya lokuta, baoyo bandimaka te ete Yesu Kristo ayaki na nzoto, basiʼbabimi kati na mokili. Moto ya ndenge wana azali moto ya lokuta mpe monguna ya Kristo. Bomibatela bino moko, mpo ete bobungisa te mbuma ya mosala na bino; kasi bokoka kozwa lifuti ya mobimba. Moto nyonso oyo atelemi te kati na mateya ya Kristo, mpe akeyi mosika koleka mateya yango, azali lisanga na Nzambe te. Moto oyo avandi kati na mateya yango, azali lisanga na Tata mpe na Mwana. Soki moto aye epai na bino mpe aye na mateya oyo te, boyamba ye na ndako na bino te mpe bopesa ye mbote te. Moto oyo akopesa ye mbote, akosangana na misala na ye ya mabe oyo asalaka. Nazali na makambo mingi mpo na kokomela bino, kasi nalingi kokoma yango te na papie mpe na mayi ya biki. Kasi nazali na elikya mpo na koya kotala bino mpe kosolola na bino ngai moko, mpo ete esengo na bisoezala ya kokoka. Bana ya ndeko na yo ya mwasi oyo Nzambe apona batindeli yo mbote. Ngai Mpaka, natindi mokanda oyo epai ya Molingami Gayus, ye oyo nalingaka kati na solo. Molingami, nazali kobondela ete makambo na yo nyonso etambolamalamu mpe ozala na nzoto makasi, ndenge mpe molimo na yo ezali kotambola malamu. Nasepelaki mingi penza tango bandeko bayaki wuta epai na yo, mpe bayebisaki ngai litatoli oyo ete: ozali ya kokangama kati na makambo ya solo mpe ozali kokoba kotambola kati na makambo ya solo. Eloko moto te ezali kopesa ngai esengo monene koleka oyo: koyoka ete bana na ngai bazali kotambola kati na makambo ya solo. Molingami, ozali kosala na bosembo nyonso na nyonso oyo ozali kosala mpo na bandeko, atako bango bazali bapaya epai na yo. Bapesaki litatoli ya bolingo na yo liboso ya Lingomba. Okosala malamu, soki osalisi bango mpo bakoba mobembo na bango, na lolenge oyo esepelisaka Nzambe. Pamba te, bango bazali kokende koteya mpo na kombo ya Nkolompe bazwi lisalisi moko te epai ya bato oyo bazali bandimi te. Yango wana, tosengeli koyamba bato ya ndenge wana mpo ete tokoka kosala lisanga mpo na makambo ya solo. Nakomaki mwa mokanda ya mokuse na Lingomba; kasi Diotrefe, oyoalingaka kozala mokambi na bango, aboyaki kotosa ngai. Yango wana, tango nakoya, nakobimisa makambo nyonso oyo asalaka; makambo ya mabe penza oyo alobaka mpo na biso. Atako azali kosala bongo, kasi asepelaka kaka te, mpe azali koboya koyamba bandeko. Azali mpe kopekisa baoyo balingaka koyamba bango, mpe azali kobengana bango na Lingomba. Molingami, kolanda makambo ya mabe te; kasi landa makambo ya malamu. Moto oyo asalaka makambo ya malamu, azali moto ya Nzambe. Motooyo asalaka makambo ya mabe, naino amoni Nzambe te. Kasi mpo na Demetriyus, bato nyonso balobaka makambo ya malamumpo na ye, mpe ata bosolo yango moko mpe etatolaka malamu mpo na ye. Biso mpe, tolobaka malamu mpo na ye, mpe oyebi ete litatoli na biso ezali ya solo. Nazali na makambo mingi mpo na kokomela yo, kasi nalingi kokomela yo te na biki mpe na mayi ya biki mpe na ekomeli. Nazali na elikya mpo na komona yo noki penza, mpe tokosolola ngai na yo. Tika ete kimia ezala na yo. Baninga ya awa batindeli yo mbote. Pesa baninga ya kuna mbote, moko na moko na kombo na ye. Ngai Yude, mowumbu ya Yesu Kristo mpe ndeko ya Zaki, natindimokanda oyo epai ya baoyo Nzambe abenga, baoyo Nzambe Tata alingaka, mpe baoyo babatelami mpo na Yesu Kristo. Tika ete mawa, kimia, mpe bolingo ezala na bino na mingi penza. Balingami, nazalaki na posa mingi penza mpo na kokomela bino mpo na oyo etali lobiko oyo tozali na yango lisanga. Namoni ete ezali na tina mingi mpo nakomela bino, mpo ete nalendisa bino, mpo bobunda mpo na kondima oyo Nzambe apesaki na basantu mbala moko mpo na libela. Pamba te, bato mosusu basiʼbakoti na ndenge ya mayele na kati na bino, bato oyo etumbu na bango esiʼekomama banda kala. Bazali bato oyo batosaka makambo ya Nzambe te, babongolaka ngolu ya Nzambe na biso mpo bazala na bonsomi ya kosala makambo ya mabe, mpe bawanganaka Yesu Kristo, Mokonzi kaka moko mpe Nkolo na biso. Ata bosiʼboyebi makambo oyo nyonso, kasi nalingi kokanisela bino, ete Nkolo akangolaki bato na ye na Ezipito, mpe na sima abomaki baoyo baboyaki kondima. Mpe baanzelu oyo babatelaki ndelo ya bokonzi na bango te, kasi batikaki esika na bango: Nzambe azali kobomba bango kati na molili, na minyololo ya seko mpo na kosambisama ya Mokolo monene. Ndenge moko mpe mpo na bato ya Sodomo na Gomore mpe bato ya ba-vile pembeni; basalaki ndenge baanzelu basalaki, basalaki kindumba mpe misala ya mabe. Mpe bazali ndakisa epai ya baoyo bakomona pasi ya etumbu ya moto ya seko. Ndenge moko mpe mpo na bato wana: makanisi na bango etindaka bango mpo babebisa banzoto na bango; batiolaka bokonzi ya Nkolo mpe bafingaka bikelamo ya likolo. Kasi ata Misiele, mokonzi ya baanzelu, tango atiaki tembe na zabolo mpo na oyo etali nzoto ya Moyize, amekaki te kobimisa maloba ya kofinga mpo na zabolo; kasi alobaki kaka: Tika Nkolo apamela yo! Kasi bato wana bafingaka biloko oyo bango basosolaka te; mpe biloko oyo basosolaka na lolenge na bango ya bomoto lokola banyama oyo ezangi mayele, yango nde ekoboma bango. Mawa na bango! Pamba te balandaki nzela oyo Kayina alandaki; bamikweyisaki na libunga ya Balami mpo na kozwa litomba, mpe bakufaki mpo batombokaki lokola Kore. Bato yango babebisaka bafeti na bino ya bolingo, baliaka elongo na bino na botosi te, mpe balukaka kaka bango moko batonda. Bazali lokola mapata oyo ezangi mayi, oyo mopepe ememaka-memaka; bazali lokola banzete oyo ebotaka te na tango ya mbuma; bakufa mbala mibale mpe basiʼbapikola bango. Bazali lokola bambonge ya makasi oyo ya ebale, oyo ebwakaka fulu-fulu ya soni na yango; bazali lokola minzoto oyo elekaka-lekaka, Nzambe abombeli bango molili ya makasi mpo na libela. Enoki, moto na sambo wuta na Adam, asakolaki mpo na bato wana: tala, Nkolo azali koya elongo na baanzelu na ye basantu, bankoto na bankoto mpo na kosambisa bato nyonso, mpe kondimisa na kati na bango, bato nyonso oyo batosaka makambo ya Nzambe te, na misala na bango nyonso ya kozanga kotosa makambo ya Nzambe, oyo bazalaki na kati ya Nzela ya kozanga kotosa makambo ya Nzambe, mpe maloba nyonso ya mabe oyo bato na masumu, baoyo batosaka te makambo ya Nzambe, balobaki mpo na ye. Bato yango bazali bato oyo batondi na koyima-yima mpe komilela-lela mpo na bomoi na bango; balandaka baposa na bango ya mabe; minoko na bango etondi na maloba ya lofundu mpe balobaka maloba ya sukali epai ya bato mpo bazwa litomba. Kasi bino, balingami, bokanisa maloba oyo bapostolo ya Nkolo na biso Yesu Kristo balobaki liboso. Balobaki na bino: “Na batango ya suka, batioli bakozala, baoyo bakolanda baposa na bango ya kozanga kotosa makambo ya Nzambe.” Bazali bato oyo bakotisaka bokabwani, balandaka makanisi na bango ya bomoto, mpe bazali na Molimo te. Kasi bino, balingami, bomitonga bino moko likolo ya kondima na bino oyo eleki bosantu, mpe bobondela kati na Molimo Mosantu. Bomibatela kati na bolingo ya Nzambe, lokola bozali kozela mawa ya Nkolo na biso Yesu, mpo na bomoi ya seko. Baoyo bazali na tembe, boyokela bango mawa; bobenda bato mosusu wuta na moto mpe bobikisa bango; boyokela basusu mawa, na kobanga; kasi boyina bilamba na bango oyo ebebi na baposa na bango ya nzoto. Na ye oyo azali na makoki ya kobatela bino mpo bokweya te mpe kolakisa bino liboso ya nkembo na ye, na kozanga mabe mpe na esengo monene, na Nzambe moko kaka, Mobikisi na biso, tika ete nkembo, lokumu, nguya mpe bokonzi ezala na ye, na nzela ya Yesu Kristo Nkolo na biso, liboso ya batango nyonso, sikʼoyo mpe libela na libela! Amen. Emoniseli ya Yesu Kristo, oyo Nzambe apesaki ye mpo alakisa na basalina ye makambo oyo esengeli kosalama noki. Alakisaki makambo yango tango atindaki anzelu na ye epai ya mosali na ye Jean, oyo azali kotatola makambo nyonso oyo amonaki: makambo yango ezali, Lilobaya Nzambe mpe litatoli ya Yesu Kristo. Esengo na moto oyo azali kotanga maloba ya kosakola oyo, mpe esengo na bato oyo bazali koyoka yango mpe bazali kobatela makambo oyo ekomama na kati na yango, pamba te tango ekomi pene-pene. Ngai Jean, natindi mokanda oyo epai ya Mangomba sambo oyo ezali na mokili ya Azia: tika ete ngolu mpe kimia ezala na bino, wuta na Ye oyo azali, azalaki mpe azali koya, mpe wuta na milimo sambo oyo bazali liboso ya Kiti na ye ya Bokonzi, mpe wuta na Yesu Kristo, temwe ya solo, Mwana ya liboso oyo asekwaki wutana bakufi, mpe Mokonzi ya bakonzi ya mokili. Na ye oyo alingaka biso mpe akangolaki biso na masumu na biso na nzela yamakila na ye, mpe akomisaki biso batu ya Bokonzi, mpe banganga-Nzambe mpo na kosalela Nzambe na ye mpe Tata. Tika ete nkembo mpe nguya ezala na ye libela na libela! Amen. Botala! azali koya na mapata, mpe bato nyonso bakomona ye; ata baoyo batubaki ye likonga. Mpe bato nyonso ya mokili bakolela mpo na ye. Ekozala se bongo! Amen. Nkolo Nzambe na nguya nyonso oyo azali, azalaki mpe azali koya, alobi boye: “Ngai nazali Alfa mpe Omega!” Ngai ndeko na bino Jean, oyo azali lisanga moko na bino, na minyoko, na Bokonzi mpe nakokanga motema kati na Yesu, nazalaki na esanga ya Patimos mpo na Liloba ya Nzambe mpe mpo na litatoli ya Yesu. Na mokolo ya Nkolo, Molimo amemaki ngai, bongo nayokaki sima na ngai mongono moko ya makasi penza lokola kelelo; yango elobaki: —Makambo oyo ozali komona, koma yango na buku, mpe tinda yango na Mangomba sambo oyo: Efezo, Simirne, Pergame, Tiyatire, Sarde, Filadelfiya mpe Laodiseya. Bongo nabalukaki mpo na kotala moto oyo azalaki koloba na ngai. Tango nabalukaki, namonaki biloko sambo ya wolo oyo batielaka minda, mpe moto moko lokola Mwana ya moto azalaki na kati-kati na yango. Alataki nzambala oyo ekomaki tii na makolo, mpe akangaki mokaba moko ya wolo na tolo na ye. Motu na ye mpe suki na ye ezalaki pembe makasi lokola bapwale ya pembe, lokola mbula ya mabanga. Miso na ye ezalaki lokola moto ezali kopela. Makolo na ye ezalaki lokola ebende ya talo oyo bapetoli na motomakasi, mpe mongongo na ye ezalaki lokola lokito ya mayi ya ebale monene. Asimbaki minzoto sambo na loboko na ye ya mobali, mpe mopanga moko ya mino mibale ezalaki kobima na monoko na ye. Elongi na ye ezalaki lokola moi oyo ezali kongenga makasi. Tango namonaki ye, nakweyaki na makolo na ye lokola moko akufi. Bongo asimbaki ngai na loboko na ye ya mobali mpe alobaki: —Kobanga te! Ngai nazali moto ya liboso mpe moto ya suka. Nazali na bomoi; nakufaki, mpe tala sikʼoyo nazali na bomoi mpo na libela na libela! Mpe nasimbi bafungola ya liwa, na oyo ya mboka ya bakufi. Yango wana, koma makambo oyo omonaki, oyo ezali sikʼoyo, mpe oyo ekoya sima. Sekele ya minzoto sambo oyo omonaki na loboko na ngai ya mobalimpe ya biloko sambo ya wolo oyo batielaka minda, elakisi boye: biloko sambo ya wolo oyo batielaka minda ezali Mangomba sambo ya Nzambe, mpe minzoto sambo ezali baanzelu ya Mangomba sambo ya Nzambe. —Komela anzelu ya Lingomba oyo ezali na efezo: “Moto oyo asimbi minzoto sambo na loboko na ye ya mobali mpe azali kotambola na kati ya biloko sambo ya wolo oyo batielaka minda, alobi boye: Nayebi misala na yo, pasi oyo omonaka na mosala, mpe kokanga motema na yo. Nayebi ete okokaka te kondima bato ya mabe, mpe osiʼomeka baoyo balobaka ete bazali Bapostolo, nzokande bazali Bapostolo te, mpe osiʼomona ete bazali bato ya lokuta. Okangaka motema mpe oyikaka piko na bapasi mpo na kombona ngai, mpe olembaki te. Kasi mabe moko namonaka epai na yo, yangʼoyo: bolingo na yo ya liboso, osiʼobwaki yango. Yango wana, kanisa malamu esika okweyaki! Bongola motema na yo, mpe zongela kosala misala oyo ozalaki kosala liboso. Soki obongoli motemate, nakoya epai na yo mpe nakolongola eloko batielaka mwinda na yo, na esika na yango. Kasi malamu moko ezali epai na yo, yango oyo: Oyinaka misala ya mabe ya bato ya Lingomba ya Nikola; ngai mpe nayinaka yango. Oyo azali na matoyi, tika ayoka makambo oyo Molimo alobi na Mangomba. Oyo akolonga, nakopesa ye nzela ya kolia mbuma na nzete ya bomoi, oyo ezali na paradizo ya Nzambe.” —Komela anzelu ya lingomba oyo ezali na Simirne: “Moto oyo azali moto ya liboso mpe ya suka, oyo akufaki mpe azalilisusu na bomoi, alobi boye: Nayebi minyoko na yo mpe kokelela na yo—nzokande ozali moto ya bomengo. Nayebi mpe ndenge bato oyo balobaka ete bazali Bayuda bafingaka yo, nzokande bazali Bayuda te kasi bazali ndako ya mayangani ya Satana, Kobanga te mpo na pasi oyo ekoyela yo. Tala, Zabolo akobwaka bato mosusu na kati na bino na boloko mpo na komekabino; mpe bokonyokwama mikolo zomi. Kangama kaka na kondima na yo, kino na liwa, mpe nakopesa yo ekoti ya lokumu oyo ya bomoi. Oyo azali na matoyi, tika ayoka makambo oyo Molimo alobi na Mangomba. Oyo akolonga, akonyokwama te na liwa ya mibale.” —Komela anzelu ya Lingomba oyo ezali na Pergame: “Moto oyo azali na mopanga ya mino mibale, alobi boye: Nayebi esika ovandaka, ezali kuna epai Satana azali na kiti na ye ya bokonzi. Ozali ya kokangama makasi na kombo na ngai, mpe owangana kondima na yo te epai na ngai, ata na mikolo ya Antipas, temwe na ngai ya solo, oyo babomaki epai na bino, epai Satana avandaka. Kasi mabe moko namonaka epai na yo, yango oyo: bato mosusu bazali epai na yo, balandaka mateya ya Balami, oyo ateyaki Balaki mpo akosa bana ya Isayele mpo basala masumu, na nzelaya kolia bilei oyo epesamaki makabo na bikeko, mpe na nzela ya kosala ekobo. Basusu mpe kati na yo balandaka mateya ya bato ya Lingomba ya Nikola. Yango wana, bongola motema na yo! Soki te, etikali moke na ya epai na yo, mpe nakobunda na bango na mopanga ya monoko na ngai. Moto oyo azali na matoyi, tika ayoka makambo Molimo alobi na Mangomba ya Nzambe. Oyo akolonga, nakopesa ye mana oyo ebombama. Nakopesa ye mpe libangamoko ya pembe, mpe likolo ya libanga yango, bakoma kombo moko ya sika, oyo moto ata moko te ayebi, longola kaka moto oyo akozwa yango.” —Komela anzelu ya lingomba oyo ezali na Tiyatire: “Mwana ya Nzambe, oyo azali na miso lokola moto ezali kopela mpe oyo azali na makolo lokola ebende ya talo oyo batumbi na moto makasi, alobi boye: Nayebi makambo oyo asalaka, bolingo na yo, kondima na yo, na misala na yo, mpe kokanga motema na yo, mpe misala oyo ozali kosala sikʼoyo eleki kutu oyo ya liboso. Kasi mabe moko namonaka epai na yo, yango oyo: otikaka mwasi wana Zezabele, oyo alobaka ete azali moprofeta, ateya basali na ngai mpe akosa bango, mpo basala kindumbampe balia bilei oyo epesama makabo na bikeko. Napesaki ye tango mpo abongola motema na kindumba na ye, kasi alingi kobongwana te. Yango wana, nakobwaka ye na mbeto mpo amona pasi, mpe bato oyo basalaki na ye ekobo, nakonyokola bango mingi penza, loba ete babongoli mitema na bizaleli na bango. Nakoboma bana na ye; bongo Mangomba nyonso ya Nzambe ekoyeba etengai nazali moto oyo atalaka mitema mpe makanisi ya bato. Mpe nakofuta moto na moto lifuti oyo ekoki na misala na ye. Kasi mpo na bino bato mosusu ya Lingomba ya Tiyatire, baoyo bondimaka mateya na ye te, mpe bokotaki te na bozindo ya koyeba makambo ya satana oyo ebombama; nalobi na bino boye: nalingi te komemisa bino mokumba mosusu, kaka oyo bozali na yango, bosimba yango makasi kino nakoya. Oyo akolonga mpe akokoba kosala makambo oyo ngai nalingaka kino na suka, nakopesa ye bokonzi likolo ya bikolo. Akokamba yango na lingenda ya libende, mpe akopanza yango ndenge bapanzaka banzungu ya mabele; ndenge nazwaki mpe bokonzi epai ya Tata na ngai. Nakopesa ye mpe monzoto ya tongo. Moto oyo azali na matoyi, tika ayoka makambo Molimo alobi na Mangomba.” —Komela anzelu ya lingomba oyo ezali na Sarde: “ Moto oyo azali na milimo sambo ya Nzambe mpe minzoto sambo, alobi boye: Nayebi misala na yo. Balobaka ete ozali na bomoi, nzokande ozali ya kokufa. Lamuka, mpe lendisa mwa ndambo ya bandimi oyo batikali, oyo bakomi pene ya kokufa. Pamba te, namoni ete misala na yo ezali ya kokoka te liboso ya Nzambe na ngai. Yango wana, kanisa malamu liloba oyo ozwaki mpe oyokaki. Tosa yango mpe bongola motema na yo. Kasi soki olamuki te, nakoya lokola moyibi, mpe okoyeba te soki tango nini nakoya epai na yo. Kasi ozali na mwa bato na Sarde, oyo naino babebisi bilamba na bango te. Bakotambola elongo na ngai, na bilamba ya pembe, pamba te bakoki na yango. Oyo akolonga, akolata bilamba ya pembe. Nakoboma kombo na ye te na Buku ya bomoi, kasi nakondima kombo na ye liboso ya Tata na ngai mpe liboso ya baanzelu na ye. Oyo azali na matoyi, tika ayoka makambo Molimo alobi na Mangomba.” —Komela anzelu ya lingomba oyo ezali na Filadelfiya: “ Mosantu mpe Solo, oyo asimbi fungola ya Davidi, soki afungoli, motomoko te akoki kokanga; mpe soki akangi moto moko te akoki kofungola, alobi boye: Nayebi misala na yo. Tala, natiaki liboso na yo porte moko ya kofungwama oyo moto ata moko te akoki kokanga. Nayebi ete ozali na makasi moke, obatelaki Liloba na ngai, mpe owanganaki kombo na ngai te. Yoka malamu: nakosala ete bato oyo bazali bato ya ndako ya mayangani ya Satana, oyo balobaka ete bazali Bayuda, nzokande bazali Bayuda te, kasi bazali bato ya lokuta, baya kofukama na makolo na yo mpe bayeba ete nalingaka yo. Lokola obatelaka motindo oyo napesaki yo, oyo ya kokanga motema, ngai mpe nakobatela yo tango komekama ekoya na mokili mobimba, mpo na komeka bato ya mokili. Etikali moke naya. Yango wana, batela malamu oyo ozali na yango, mpo ete moto moko te abotola ekoti na yo ya lokumu. Oyo akolonga, nakotia ye likonzi na Ndako ya Nzambe na ngai. Mpe akobima kuna te. Nakokoma likolo na ye, kombo ya Nzambe na ngai, mpe kombo ya vile ya Nzambe na ngai: Yeruzalem ya sika, oyo ezali kokita wuta na Likolo, wuta epai ya Nzambe na ngai. Nakokoma mpe kombo na ngai ya sikalikolo na ye. Oyo azali na matoyi, tika ayoka makambo Molimo alobi na Mangomba.” —Komela anzelu ya lingomba oyo ezali na Lawodiseya: “ Moto oyo azali ‘Amen’, oyo azali temwe ya sembo mpe ya solo, oyo azali mokonzi ya biloko nyonso oyo Nzambe asala, alobi boye: Nayebi misala na yo, ete ozali malili te mpe moto te. Nalingi ozala malili to moto! Kasi lokola ozali molunge: moto te mpe malili te, nakosanza yona monoko na ngai. Olobaka: Nazali moto ya bomengo! Nakomi na mbongo mingi, nazali na posa ya eloko moko te. Kasi oyebi te ete ozali moto ya mawa penza, moto ya pasi, moto ya kokelela, moto akufa miso mpe moto ya bolumbu. Nazali kopesa yo toli oyo: somba epai na ngai wolo oyo bapetoli na moto, mpo okoka kokoma moto ya bomengo, mpe bilamba ya pembe mpo na kolata, bongo okoka kobomba soni ya bolumbu na yo; sombampe kisi ya miso mpo otia na miso na yo, mpo okoka komona. Napamelaka mpe napesaka etumbu na bato oyo nalingaka. Yango wana tia molende mpe bongola motema na yo. Tala, natelemi na porte mpe nazali kobeta. Soki moto ayoki mongongo na ngai mpe afungoli porte, nakokota epai na ye, mpe nakolia na ye elongo, mpe ye elongo na ngai. Oyo akolonga, nakopesa ye nzela ya kovanda elongo na ngai na Kiti na ngai ya Bokonzi, ndenge ngai nalonga mpe navanda elongo na Tala na ngai na Kiti na ye ya Bokonzi. Oyo azali na matoyi, tika ayoka makambo Molimo alobi na Mangomba ya Nzambe.” Sima ya makambo wana, namonaki porte moko efungwamaki na Likolo, bongo mongongo oyo nayokaki liboso, oyo ezalaki koyokana lokola kelelo, elobaki: —Mata awa, mpe nakolakisa yo makambo oyo esengeli koya sima ya oyo. Na mbala moko Molimo amemaki ngai. Bongo namonaki Kiti moko ya Bokonzi ezalaki na Likolo, mpe moto moko avandelaki yango. Mpe oyo avandelaki yango azalaki komonana lokola libanga ya talo oyo babengaka “Yaspe” mpe “Sardwane”. Arkensiel moko ezalaki lokola libanga ye talo oyo babengaka “Emerode”, ezingaki Kiti yango ya bokonzi. Mpe bakiti ntuku mibale na minei ezalaki pembeni-pembeni ya Kiti ya bokonzi. Bampaka ntuku mibale na minei bavandelaki bakiti yango; balataki bilamba ya pembe mpe bikoti ya lokumu ya wolona mitu na bango. Kongenga, lokito mpe bakake ezalaki kobima wuta na Kiti ya Bokonzi. Minda sambo ezalaki kopela liboso ya Kiti ya Bokonzi. Minda yango ezali nde Milimo sambo ya Nzambe. Liboso ya Kiti ya bokonzi, namonaki lokola ebale monene oyo ezalaki polele lokola talatala mpe ekokanaki na libanga ya talo oyo babengaka “Kristale”. Bikelamo minei ya bomoi, ezalaki na miso ebele liboso mpe sima, ezalaki na kati mpe na pembeni-pembeni ya Kitiya bokonzi. Ekelamo ya liboso ezalaki lokola tambwe, ya mibale lokola mwana ngombe ya mobali, ya misato ezalaki na elongi lokola ya moto, mpe ya minei lokola ndeke moko ya monene oyo ezalaki kopumbwa. Mpe bikelamo wana minei ya bomoi, moko na moko ezalaki na mapapu motoba; nzoto na yango ezalaki ya kotonda na miso na kati mpe na pembeni-pembeni. Butu mpe moi, bazalaki kotika te koloba: Nkolo Nzambe na nguya nyonso, azali Mosantu, Mosantu, Mosantu. Oyo azalaki, azali mpe azali koya. Tango nyonso bikelamo ya bomoi bazalaki kopesa nnkembo, lokumu, mpe matondi na Moto oyo avandaki na Kiti ya bokonzi, oyo azali na bomoi seko na seko, bampaka ntuku mibale na minei bazalaki kotia bilongi na nse liboso ya Moto oyo avandaki na Kiti ya bokonzi, mpe bazalaki kokumisa Moto oyo azali na bomoi libela na libela. Bongo bazalaki kobwaka bikoti na bango ya lokumu libosoya Kiti ya Bokonzi, mpe bazalaki koloba: Nkolo na biso mpe Nzambe na biso, okoki mpo na kozwa nkembo, lokumu mpe nguya. Pamba te yo moto osala biloko nyonso. Yango esalamaki mpe ezali na bomoi, na mokano na yo. Bongo namonaki na loboko ya mobali ya Moto oyo avandaki na Kiti ya Bokonzi, Buku moko, bakoma yango na kati mpe na libanda mpe ezalaki ya kokangama na mazita sambo. Mpe namonaki anzelu moko ya nguya penza, azalaki koganga na mongongo makasi: —Nani akoki mpo na kofungola mazita oyo ekangisi Buku mpe kofungola Buku yango? Kasi ezala na Likolo, to awa na mokili, to na nse ya mabele, moto ata moko te akokaki kofungola Buku to kotanga yango. Tango namonaki bongo, nalelaki mingi mpo moto ata moko te amonanaki ya kokoka mpo na kofungola Buku to mpe kotala yango. Bongo moko na kati ya bampaka alobaki na ngai: —Tika kolela! Tala, Tambwe ya ekolo ya Yuda, oyo abotamaki na libota ya Davidi asiʼalonga. Azali ya kokoka mpo na kofungola Buku mpe mazita na yango sambo. Bongo namonaki, Mwana meme moko atelemaki na kati ya kati ya Kiti ya bokonzi, bikelamo minei ya bomoi mpe bampaka bazingaki ye. Mwana meme yango azalaki komonana lokola nde babomaki ye, azalaki na maseke sambo mpe miso sambo, oyo ezali Milimo sambo ya Nzambe, oyo batindama na mokili mobimba. Mwana meme ayaki mpe azwaki Buku wuta na loboko ya mobali ya Moto oyo avandaki na Kiti ya Bokonzi. Tango azwaki Buku, bikelamo minei ya bomoi mpe bampaka ntuku mibale na minei bafukamaki liboso ya Mwana meme. Moko moko na kati na bango azalaki na lindanda moko mpe bakopo ya wolo oyo ezalaki ya kotonda na malasi, yango nde mabondeli ya basantu. Bazalaki koyemba nzembo ya sika: Ozali ya kokoka mpo na kozwa Buku, mpe kofungola mazita na yango, pamba te babomaki yo, mpe na makila na yo, osombaki bato mpo na Nzambe wuta na mabota nyonso, na minoko nyonso, na mikili nyonso, mpe na bikolo nyonso. Osali bango ete bazala batu na Bokonzi, mpe banganga-Nzambe mpo na kosalela Nzambe na biso, mpe bakozala na bokonzi na mokili. Bongo natalaki mpe nayokaki mingongo ya baanzelu ebele pembeni-pembeni ya Kiti ya Bokonzi, ya bikelamo ya bomoi, mpe ya bampaka; bazalaki bankoto na bankoto. Bazalaki koloba na mongongo makasi: Mwana meme oyo babomaki, azali ya kokoka mpo na kozwa nguya, bomengo, bwania, makasi, lokumu, nkembo mpe masanzoli! Bongo nayokaki bikelamo nyonso oyo ezali na likolo, na mokili, na nse ya mabele, na kati ya ebale monene, mpe biloko nyonso oyo ezalikati na yango; ezalaki koloba: Masanzoli mpe lokumu, nkembo mpe nguya ezala na Moto oyo afandi na Kiti ya Bokonzi, mpe na Mwana meme, mpo na libela na libela! Bongo bikelamo minei ya bomoi bazongisaki: “Amen!”, mpe bampaka bafukamaki mpe basambelaki. Bongo namonaki Mwana-meme afungolaki lizita ya libosoya mazita sambo; mpe nayokaki moko na kati ya bikelamo ya bomoi, elobaki na mongongo makasi lokola kake: —Yaka! Tango nazalaki kotala, namonaki mpunda moko ya pembe. Moto oyo afandelaki yango asimbaki fleshe, mpe bapesaki ye ekoti ya lokumu. Bongo abimaki lokola molongi ya etumba mpe mpo na kokendekolonga lisusu. Tango afungolaki lizita ya mibale, nayokaki ekelamo ya mibale elobaki: —Yaka! Bongo mpunda mosusu ebimaki, ezalaki ya motane penza. Moto oyo afandelaki yango bapesaki ye mopanga moko ya monene, mpe nguya ya kolongola kimia na mokili, mpo ete bato babomana bango na bango. Tango afungolaki lizita ya misato, nayokaki ekelamo ya misato elobaki: —Yaka! Tango natalaki, namonaki mpunda ya mwindu. Moto oyo afandelaki yango asimbaki eloko oyo bamekelaka kilo. Bongo nayokaki mongongo moko na kati ya bikelamo minei ya bomoi, elobaki: —Kilo moko ya farine mpo na deni moko, mpe kilo misato ya orjempo na deni moko. Kasi kobebisa mafuta te mpe vino te. Tango afungolaki lizita ya minei, nayokaki mongongo ya ekelamo ya minei, elobaki: —Yaka! Natalaki mpe namonaki mpunda moko ya langi ya mayi ya pondu. Moto oyo afandelaki yango, kombo na ye: “Liwa”. Mpe mboka ya bakufi ezalaki kolanda ye na sima. Bapesaki ye nguya ya koboma bato na eteni moko na kati ya biteni minei ya mokili, na mopanga, na nzala, na maladi, mpe na banyama ya zamba oyo ya kanda penza. Tango afungolaki lizita ya mitano, namonaki na nse ya mesa oyo batumbelaka Nzambe makabo, milimo ya baoyo bakufa mpo na Liloba ya Nzambe mpe mpo na litatoli oyo batatolaki. Bazalaki koganga na mongongo makasi: —Nkolo Mosantu mpe Solo, kino tango nini okozela mpo na kosambisa bato ya mokili mpe kopesa bango etumbu mpo na makila na biso? Bongo bapesaki moko moko na kati na bango nzambala ya pembe, mpe bayebisaki bango bapema moke, kino tango talo ya baninga na bango ya mosala mpe bandeko na bango ekokoka, baoyo bakoboma bango mpe lokola bango. Tango afungolaki lizita ya motoba, namonaki mabele eninganaki makasi penza, moi eyindaki lokola elamba ya mwindu, mpe sanza ekomaki motane lokola makila. Minzoto ekweyaki na nse lokola mbuma ya nzete ya figioyo naino ekomeli te, oyo eningisami na mopepe ya makasi. Likolo elimwaki lokola buku elingami. Bangomba nyonso mpe bisanga nyonso balongolaki yango na bisika na yango. Bakonzi ya mokili, bato minene, bakonzi ya basoda, bato ya nguya, batu ya mbongo, bawumbu nyonso, mpe bato nyonso ya bonsomi, bakendaki kobombama na mabulu mpe na kati ya mabanga ya bangomba. Babandaki koloba na bangomba mpe na mabanga: —Bokweyela biso, mpe bobomba biso liboso ya elongi ya Moto oyo avandi na Kiti ya bokonzi, mpe liboso ya kanda ya Mwana-Meme. Pamba te mokolo monene ya kanda na ye ekomi. Bongo nani akokikobika? Sima ya makambo wana, namonaki baanzelu minei batelemaki na basonge nyonso minei ya mokili; bakangaki mipepe minei ya mokili, mpo ete mopepe ata moke te eleka na mokili, to na ebale monene, to na nzete ata moko. Bongo namonaki anzelu mosusu awutaki na Este asimbaki elembo ya Nzambe na bomoi. Agangaki na mongongo makasi epai ya baanzelu mineioyo Nzambe apesaki nguya ya kosala mabe na mokili mpe na ebale monene; alobaki: —Bosala mabe te na mokili, to na ebale monene, to na banzete, kinotango tokosilisa kotia elembo na bilongi ya basali ya Nzambe na biso. Bongo nayokaki talo ya bato oyo bazwaki elembo: nkoto nkama moko na ntuku minei na minei ya mabota nyonso ya bana Isayele. Na libota ya Yuda: bato nkoto zomi na mibale bazwaki elembo; na libota ya Ruben: bato nkoto zomi na mibale, na libota ya Gadi: bato nkoto zomi na mibale; na libota ya Asere: bato nkoto zomi na mibale, na libota ya Neftali: bato nkoto zomi na mibale, na libota ya Manase: bato nkoto zomi na mibale; na libota ya Simeon: bato nkoto zomi na mibale, na libota ya Levi: bato nkoto zomi na mibale; na libota ya Isakare: bato nkoto zomi na mibale; na libota ya Zabuloni: bato nkoto zomi na mibale; na libota ya Zosefi: bato nkoto zomi na mibale; mpe na libota ya Benzamin: bato nkoto zomi na mibale. Sima ya makambo wana, namonaki bato ebele penza, oyo moto ata moko te akokaki kotanga bango. Bazalaki bato ya bikolo nyonso, ya mabota nyonso, ya mikili nyonso, mpe ya minoko nyonso. Batelemaki liboso ya Kiti ya bokonzi mpe liboso ya Mwana-meme; balataki banzambala ya pembe, mpe basimbaki mandalala na maboko na bango. Bazalaki koganga na mongongo makasi: —Lobiko na Nzambe na biso oyo avandi na kiti ya Bokonzi, mpe na Mwana-Meme! Baanzelu nyonso batelemaki pembeni-pembeni ya Kiti ya bokonzi, ya bampaka, na bikelamo minei ya bomoi. Bongo bafukamaki libosoya Kiti ya Bokonzi elongi na nse mpe bazalaki kokumisa Nzambe. Bazalaki koloba: Amen! Masanzoli, nkembo, bwania, matondi, lokumu, nguya mpe makasi, ezala na Nzambe na biso, mikolo nyonso seko! Amen! Bongo moko ya bampaka atunaki ngai: —Bato oyo balati banzambala ya pembe bazali banani? Mpe bawuti wapi? Nazongiselaki ye: —Nkolo na ngai, yo nde oyebi. Bongo alobaki na ngai: —Ezali baoyo bawuti koniokwama mingi penza. Basukolaki banzambala na bango, mpe bakomisaki yango pembe na makila ya Mwana-meme. Yango wana batelemi liboso ya Kiti ya bokonzi ya Nzambe mpe bazali kosalela ye butu moi na Ndako na ye. Mpe Moto oyo avandi na Kiti ya bokonzi akobomba bango na Ndako na ye ya kapo. Bakoyoka lisusu nzala te mpe bakozala lisusu na posa ya mayi te; bakoyoka lisusu pasi ya moi te, to mpe ya molunge te. Mpo Mwana-meme oyo azali na kati-kati ya Kiti ya bokonzi akobatela bango. Akomema bango na bisika oyo mayi ya bomoi ebimaka. Bongo Nzambe akopangusa mayi nyonso ya miso na bango. Tango afungolaki lizita ya sambo, kimia ekomaki na likolo pene-pene ya ndambo na ngonga moko. Bongo namonaki baanzelu sambo oyo batelemaka liboso ya Nzambe, mpe bapesaki bango bakelelo sambo. Anzelu mosusu ayaki mpe atelemaki liboso ya mesa oyo batumbelakamakabo. Asimbaki sani moko ya wolo oyo batumbelaka matiti ya solo kitoko. Bapesaki ye malasi mingi mpo apesa yango elongo na mabondeli ya basantu nyonso, likolo ya mesa ya wolo oyo batumbelaka makabo, oyo ezalaki liboso ya Kiti ya bokonzi. Molinga ya malasi elongo na mabondeli ya basantu ewutaki na loboko ya anzelu mpe emataki liboso ya Nzambe. Bongo, anzelu azwaki sani wana ya wolo, atondisaki yango na moto oyo ezalaki na mesa batumbelaka makabo, mpe abwakaki yango na mokili. Bakake eningisaki lokito, mingongo eyokanaki, kongenga ya somoemonanaki, mpe mokili eninganaki. Baanzelu sambo oyo bazalaki na bakelelo sambo, bamibongisaki mpo na kobeta yango. Anzelu ya liboso abetaki kelelo: mbula ya mabanga mpe moto oyo esangana na makila ebwakamaki na mokili. Bongo eteni moko ya misato ya mokili ezikaki, mpe eteni moko ya misato ya banzete, mpe matiti nyonsoya mobesu ezikaki. Anzelu ya mibale abetaki kelelo: eloko moko lokola ngomba moneneoyo ezalaki kopela moto ebwakamaki na ebale monene. Eteni moko ya misato ya mayi ekomaki makila. Mpe eteni moko ya misato ya bikelamo ya bomoi oyo ezali na ebaleekufaki. Mpe eteni moko ya misato ya bamasuwa epanzanaki. Anzelu ya misato abetaki kelelo: monzoto moko ya monene oyo ezalaki kopela lokola mwinda ya monene, ewutaki na likolo mpe eyaki kokweya. Ekweyaki likolo ya eteni moko ya misato ya ba-ebale mpe ya bisika mayi ebimelaka. Kombo ya monzoto yango: “Bololo”. Mpe eteni moko ya misatoya mayi ekomaki bololo, mpe bato mingi bakufaki mpo bamelaki mayi, oyo ekomaki bololo. Anzelu ya minei abetaki kelelo: eteni moko ya misato ya moi, eteni moko ya misato ya sanza, mpe eteni moko ya misato ya minzoto ebebaki, mpo ete eteni moko ya misato na yango ekoma molili. Eteni moko ya misato ya mokolo ezangaki moi, mpe ndenge moko mpe mpo na butu. Bongo namonaki ndeke moko ya monene penza ezalaki kopumbwa na likolo penza. Ezalaki koloba na mongongo makasi: —Mawa! Mawa! Mawa na bato bavandaka na mokili, mpo na lokito ya bakelelo oyo ekobetama na baanzelu mosusu misato! Bongo anzelu ya mitano abetaki kelelo; namonaki monzoto ewutaki na likolo mpe eyaki kokweya na mokili. Bapesaki monzoto yango fungola ya libulu ya molayi. Monzoto efungolaki libulu yango, mpe milinga ebimi na kati. Milinga yango ezali lokola oyo ebimaka na fulu ya monene. Bongo moi na mopepe eyindaki na milinga wana. Mankonko ebimaki na milinga wana mpe epanzanaki na mokili. Bapesaki mankonko yango nguya lokola oyo ya bankoto ya mokili. Bapekisaki mankonko ete esala mabe te na matiti ya mokili, to na banzete, to na mwa matiti oyo ya mike-mike; kasi esala mabekaka na bato oyo bazangi elembo ya Nzambe na elongi. Mankonko ezwaki nguya ya koboma bato te, kasi kaka ya konyokolabango sanza mitano. Pasi oyo mankonko emonisaki bato, ezali lokolapasi oyo moto amonaka soki nkoto eswi ye. Na mikolo wana, bato bakoluka liwa, kasi bakozwa yango te; bakolinga kokufa, kasi liwa ekokima bango mosika. Mankonko yango ezalaki lokola bampunda oyo babongisi mpo na etumba; na likolo ya mitu na yango ezalaki na biloko moko lokola bikoti ya bokonzi oyo ya wolo, mpe bilongi na yango, ezalaki lokolabilongi ya bato. Suki na yango ezalaki lokola oyo ya basi. Mpe mino na yango lokola oyo ya tambwe. Ezalaki na biloko moko lokola bibende oyo basoda bazalakikolata mpo na komibatela na makonga. Makelele ya mapapu na yango ezalaki lokola makelele ya bapusu-pusu oyo bampunda ebele ezali kobenda mpo na etumba. Mankonko yango ezalaki na mikila mpe basende lokola oyo ya bankoto. Mpe nguya ya konyokola bato basanza mitano ezalaki na mikila na yango. Anzelu ya libulu molayi ye nde azalaki mokonzi ya mankonko yango. Kombona ye na monoko ya Ba-ebreo: “Abadon”, mpe na monoko ya Bagreki: “Apolion”. Mawa ya liboso elekaki; tala, mawa mibale ezali koya simaya makambo wana. Bongo anzelu ya motoba abetaki kelelo. Mpe nayokaki mongongo moko ebimaki wuta na basonge minei ya mesa ya wolo oyo batumbelaka makabo, oyo ezalaki liboso ya Nzambe, elobaki na anzelu ya motoba oyo azalaki na kelelo: —Fungola baanzelu minei oyo bakangama na minyololo, na ebale monene ya “Efrate”. Bongo afungolaki baanzelu yango minei, baoyo bazalaki ya kobongisama mpo na ngonga wana, mokolo wana, sanza wana, mpe mbula wana, mpo ete baboma eteni moko ya misato ya bato nyonso. Bayebisaki ngai talo ya basoda oyo babutaki likolo ya bampunda mpo na etumba, bazalaki: bankoto nkama mibale. Tala ndenge namonaki na emoniseli bampunda na basoda oyo bamemaka bampunda: balataki bibende oyo basoda bazalaki kolata mpo na komibatela na etumba; bibende yango ezalaki ya motane lokola moto, ya langi ya bule ya pete-pete, mpe ya langi ya mosaka. Mitu ya bampunda yango ezalaki lokola oyo ya bantambwe; mpe moto, molinga, na sufulu ezalaki kobima na minoko na yango. Eteni moko ya misato ya bato nyonso ekufaki mpo na bapasi misato oyo: moto, molinga mpe sufulu oyo ezalaki kobima na minoko na yango. Pamba te, nguya ya bampunda ezalaki na minoko mpe na mikila na yango; mpo mikila na yango ezalaki lokola banyoka. Mikila yango ezalakina mitu, mpe ezalaki konyokola bato na mikili wana. Bato mosusu oyo bakufaki te na batembe wana, babongolaki mitema te na misala ya mabe oyo bazalaki kosala. Batikaki te kosambela milimo mabe, bikeko ya wolo, ya palata, ya bibende, ya mabanga, mpe ya nzete, oyo ekoki komona te, to koyoka te, to mpe kotambola te. Bato yango babongwanaki te mpo batika koboma bato, batika kindoki, batika kindumba mpe moyibi. Bongo namonaki anzelu mosusu ya nguya makasi penza, azalaki kokita wuta na likolo. Lipata moko ezipaki ye lokola elamba, mpe arkansiel moko ezingaki motu na ye. Elongi na ye ezali lokola moi, mpe makolo na ye ezalaki lokola makonzi ya moto. Asimbaki mwa buku efungwama. Atiaki lokolo na ye ya mobali na ebale monene, mpe oyo ya mwasi na mokili. Agangaki na mongongo makasi ndenge tambwe egangaka. Mpe tango asilisaki koganga, bankake sambo ebetaki. Tango bankake sambo esilaki kobeta, nalingaki kokoma, kasi nayokaki mongongo moko ewutaki na Likolo, elobelaki ngai: “Bomba malamu makambo oyo bakake sambo elobi, kokoma yango te!” Bongo anzelu, oyo namonaki atelemaki na ebale monene mpe na mokili, atombolaki loboko na ye ya mobali na likolo mpe alapaki ndayi na kombo ya Moto oyo azali na bomoi libela na libela, Ye oyo asalaki likolo mpe biloko oyo ezali kuna, mabele mpe biloko oyo ezali kuna, na ebale monene mpe biloko oyo ezali kati na yango: —Tango ya kozela ezali lisusu te! Kasi na mokolo yango, tango anzelu ya sambo akobeta kelelo, Nzambe akokokisa mabongisi na ye oyo ezali ya kobombama, ndenge ayebisaki yango na basali na ye baprofeta. Bongo mongongo oyo nayokaki, oyo ewutaki na Likolo, elobelaki ngai lisusu: —Kende, kamata buku ya moke oyo ezali ya kofungwama na loboko ya anzelu, oyo atelemi na ebale monene mpe na mokili. Napusanaki pene-pene ya anzelu, mpe nasengaki ye apesa ngai buku ya moke. Bongo ye alobaki na ngai: — Kamata yango mpe lia yango! Ekozala bololo na libumu na yo, kasi na monoko ekozala sukali lokola mafuta ya nzoyi. Nakamataki mwa buku yango na loboko ya anzelu, mpe namelaki yango. Na monoko na ngai, ezalaki sukali lokola mafuta ya nzoyi, kasi tangonaliaki yango, ekomaki bololo na kati ya libumu. Bongo balobaki na ngai: —Esengeli osakola lisusu na mikili mingi, bikolo mingi, minokomingi, mpe epai ya bakonzi mingi. Sima, bapesaki ngai mwa nzete moko lokola metele oyo bamekelakamolayi, mpe balobaki na ngai: —Telema, kende kotanga molayi ya Ndako ya Nzambe, mpe mesa oyo batumbelaka makabo, bongo otanga mpe bato oyo basambelaka kuna. Kasi kotanga molayi ya libanda ya Ndako ya Nzambe te, mpo basila kopesa yango na bampakano. Bango bakoniata vile ya bosantu basanza ntuku minei na mibale. Nakopesa nguya na batemwe na ngai mibale, oyo bakolata saki, mpe bakosakola na mikolo nkoto moko nkama mibale na ntuku motoba. Bango bazali banzete mibale ya olive mpe biloko mibale oyo batielakaminda, oyo ezali liboso ya Nkolo ya mokili. Soki moto alingi kosala bango mabe, moto ekobima na minoko na bango mpe ekoboma banguna na bango; mpe moto nyonso oyo akoluka kosala bango mabe, asengeli kokufa ndenge wana. Bango bazali na nguya ya kokanga likolo mpo ete mbula enoka te na mikolo oyo bakozala kosakola. Bazali mpe na nguya ya kobongola mayi ekoma makila, mpe ya kotinda minyoko ya lolenge nyonso na mokili, tango nyonso bango bakolinga. Tango bakosilisa litatoli na bango, nyama oyo ekobima na libulu ya molai ekobundisa bango, ekolonga bango, mpe ekoboma bango. Bongo bibembe na bango bakolalisa yango na bala-bala ya vilemonene, epai babakaki Nkolo na bango na ekuruze. Na molimo, babengaka vile yango: Sodome mpe Ezipito. Bato ya mikili nyonso, na ya mabota nyonso, na ya minoko nyonsompe ya bikolo nyonso, bakotala bibembe na bango mikolo misato na ndambo, mpe bakopesa nzela te mpo bakunda yango. Bato oyo bavandaka na mokili bayokaki esengo mpo na liwa na bango. Bakosala feti mpe bakotindana makabo, pamba te baprofetawana mibale batungisaki mingi penza bato oyo bavandaka na mokili. Kasi sima ya mikolo misato na ndambo, pema ya bomoi oyoewutaki na Nzambe ekotelaki bango, bongo batelemaki. Mpe somo moneneezwaki bato oyo bazalaki kotala bango. Bongo baprofeta wana mibale ya Nzambe bayokaki mongongo moko ya makasi ewutaki na Likolo, mpe elobelaki bango: “Bomata awa!” Bamataki na Likolo na kati ya mapata, mpe banguna na bango bazalaki kotala bango. Kaka na tango wana, mokili eninganaki makasi penza. Eteni moko na kati ya biteni zomi ya vile ebukanaki, mpe bato nkoto sambo bakufaki na koningana yango ya mabele. Bato oyo babikaki batondaki na somo mpe bakumisaka Nzambe ya Likolo. Mawa ya mibale eleki; mawa ya misatu etikali moke eya. Bongo anzelu ya sambo abetaki kelelo; mingongo ya makasi eyokanaki na Likolo, mpe ezalaki koloba: —Bokonzi ya mokili ekomi Bokonzi ya Nkolo na biso mpe ya Kristona ye. Ye akozala na bokonzi mikolo nyonso libela na libela. Bongo bampaka ntuku mibale na minei oyo bavandaki na bakiti ya bokonzi liboso ya Nzambe, batiaki bilongi na nse mpe basambelaki Nzambe. Bazalaki koloba: Nkolo Nzambe na nguya nyonso, oyo ozalaki mpe ozali, totondi yo, mpo osaleli nguya na yo ya monene, mpe obandi bokonzi na yo. Bikolo etombokaki; mpe kanda na yo ezali koya. Tango ekoki mpo osambisa bato bakufa, mpe mpo na kopesa lifuti na bawumbu na yo baprofeta, mpe na basantu, mpe na baoyo nyonso batosaka kombo na yo, bato pamba mpe bato minene mpe mpo na koboma bato oyo babebisaka mokili. Bongo Ndako ya Nzambe oyo ezali na Likolo efungwamaki, mpe Sanduku ya Boyokani na ye emonanaki na kati ya Ndako ya Nzambe. Kongenga ya kake emonanaki, mingongo, lokito na bakake eyokanaki, mokili eninganaki mpembula monene ya mabanga enokaki. Bongo elembo moko ya monene emonanaki na likolo: Mwasi moko alataki moi, mpe azalaki na sanza na nse ya makolo na ye, mpe atalaki na motu na ye ekoti ya bokonzi oyo ezalaki na minzoto zomi na mibale. Azalaki na zemi, akomaki pene-pene ya kobota, mpe azalaki kolela mpo na pasi. Mpe elembo mosusu emonanaki na likolo: ezalaki Dragon moko yamonene mpe ya motane. Ezalaki na mitu sambo mpe maseke zomi, mpe bikoti sambo ya bokonzi na mitu na yango. Mokila na ye ezalaki kokomba eteni moko ya misato ya minzotoya likolo, mpe ebwakaki yango na mabele. Dragon yango etelemaki libosoya mwasi oyo alingaki kobota mpo elia mwana na ye tango akobotama. Mpe mwasi yango abotaki mwana mobali oyo akotambwisa bikolo nyonso, na lingenda ya ebende. Bongo mwana amemamaki epai ya Nzambe mpe epai ya Kiti na ye ya bokonzi. Mwasi yango akimaki na esobe, na esika oyo Nzambe abongisaki mpo naye, mpo ete baleyisa ye wana mikolo nkoto moko nkama mibale na ntukumotoba (1.260). Bongo etumba ebimaki na likolo: Misiele na baanzelu na ye babundaki na Dragon, mpe Dragon na baanzelu na ye babundisaki mpe Misiele. Kasi dragon ezalaki na makasi mingi te, mpe babenganaki ye na Likolo. Bongo babwakaki Dragon ya monene, yango nde “Nyoka ya kala”, oyo babengaka Zabolo to Satana; oyo akosaka bato ya mokili mobimba. Babwakaki yango na mabele, elongo na baanzelu na yango. Bongo nayokaki mongongo moko ya makasi ewutaki na Likolo, elobaki: Sikʼoyo lobiko, nguya, Bokonzi ya Nzambe na biso, mpe nguya ya Kristo na ye eye. Pamba te, mofundi ya bandeko na biso, oyo azalaki kofunda bango liboso ya Nzambe na biso, butu mpe moi, basiʼbabwaki ye. Balongi ye mpo na makila ya Mwana Meme, mpe mpo na Liloba ya litatoli na bango; balingaki bomoi na bango te, ata kino na liwa. Yango wana yo Likolo, na bino baoyo bovandaka kuna, bosepela! Kasi mawa na mokili mpe na ebale monene, pamba te zabolo akiti epai na bino mpe atondi na kanda, mpo ayebi ete atikali na tango moke. Tango Dragon emonaki ete babwakaki ye na mabele, ebandaki kolanda mwasi oyo abotaki mwana mobali. Kasi bapesaki mwasi yango mapapu mibale ya ndeke moko ya monene, mpo apumbwa kino na esika oyo ebongisama mpo na ye, na esobe. Kuna baleyisaki ye tango moko, batango, mpe ndambo ya tango, mosika na elongi ya nioka. Bongo nyoka esanzaki mayi ebele penza lokola ebale na simaya mwasi mpo mayi yango emema ye. Kasi mabele eyaki kosalisa mwasi, efungolaki monoko na yango, mpe emelaki ebale oyo Dragon esanzaki. Bongo Dragon etombokaki na mwasi, mpe ekendaki kobundisa bana na ye mosusu, ezali baoyo batosaka Mibeko ya Nzambe mpe basimba makasi litatoli ya Yesu. Bongo Dragon ekendaki kotelema na zelo ya ebale monene. Sima namonaki nyama moko ebimaki na ebale monene, ezalaki na maseke zomi mpe mitu sambo. Elataki bikoti zomi ya bokonzi na maseke na yango; mpe na mitu na yango bakomaki bakombo ya kotiola Nzambe. Nyana oyo namonaki ekokanaki na nkoyi. Makolo na yango ezalaki lokola ya nyama oyo babengaka Uruse, mpe monoko na yango ezalaki lokolamonoko ya tambwe. Bongo Dragon epesaki nyama yango nguya na yango, kiti na yango ya bokonzi, mpe bokonzi monene penza. Namonaki motu moko ya nyama wana ezalaki lokola babetaki yango peneya liwa; mpe pota oyo elingaki koboma yango esilaki. Bongo mokili mobimba ezalaki kokamwa nyama yango mpe elandaki yango. Bato babandaki kosambela Dragon mpo epesaki bokonzi na yango na nyama wana. Basambelaki nyama yango mpe balobaki: “Nani akokani na nyama, mpe nani akoki kobunda na yango?” Mpe nyama ezwaki nzela ya koloba maloba ya lofundu mpe ya kofinga Nzambe. Ezwaki mpe bokonzi ya kosala mosala na yango basanzantuku minei na mibale. Bongo ebandaki koloba maloba ya kotiola Nzambe, kotiola kombo na ye, esika ye avandaka, mpe baoyo bavandaka na Likolo. Ezwaki nzela ya kobunda na basantu mpe ya kolonga bango. Mpe bapesaki yango bokonzi likolo ya mabota nyonso, yamikili nyonso, ya minoko nyonso mpe ya bikolo nyonso. Bongo bato nyonso oyo bavandaka na mokili, baoyo bakombo na bango ekomama te, banda mokili esalama, na Buku ya bomoi ya Mwanameme oyo babomaki, bakosambela ye. Moto oyo azali na matoyi tika ayoka! Soki moto asengeli kokota na boloko, akokota na boloko. Soki moto asengeli kokufa na mopanga, akokufa na mopanga. Yango wana, esengeli ete bato ya Nzambe bazala bato ya kokanga motema mpe kondima. Bongo namonaki nyama mosusu ebimaki na mabele. Nyama yango ezalaki na maseke mibale oyo ezalaki lokola ya mwana-meme, mpe ezalaki koloba lokola Dragon. Esalelaki bokonzi nyonso ya nyama ya liboso na miso na ye. Esalaki ete mabele mpe bato oyo bavandaka na mabele bakumbamela nyama ya liboso oyo ezalaki na pota oyo elingaki koboma ye mpe pota yango esilaki. Esalaki makamwisi minene, na ndenge ete ekitisaki kutu motowuta na likolo kino na mokili, na miso ya bato. Bongo ekosaki baoyo bavandaka na mabele na nzela ya makamwisi oyo bapesaki ye ndingisa ya kosala na miso ya nyama ya liboso. Nyama ya mibale etindaki baoyo bavandaka na mokili ete basala elilingi mpo na lokumu ya nyama oyo bazokisaki na mopanga mpe ezongaki na bomoi. Mpe nyama ya mibale ezwaki nzela ya kopesa pema na elilingi ya nyama ya liboso mpo ete ekoka koloba, mpe eboma baoyo nyonso baboyaki kosambela yango. Etindaki lisusu bato nyonso na makasi, bato minene mpe bato pamba, bato ya bomengo mpe babola, bawumbu mpe bato ya bonsomi, ete bazwa elembo na loboko ya mobali to na elongi, mpo ete moto moko te akoka kosomba to koteka, longola kaka oyo azali na elembo; elembo yango ezali nde kombo ya nyama to talo ya kombona yango. Likambo oyo ezali kosenga bwania. Tika ete moto oyo azali na mayele atanga talo ya nyama. Pamba te talo yango ekokani na kombo ya moko. Talo yango ezali: nkama motoba na ntuku motoba na motoba. Bongo namonaki Mwana-meme atelemaki na ngomba ya Siona, mpe bato nkoto nkama moko na ntuku minei na minei (144.000) bazalaki elongo na ye. Mpe kombo ya Mwana meme, na oyo ya Tata na ye, ezalaki ya kokomama na bilongi na bango. Nayokaki mongongo moko ewutaki na likolo, ezalaki lokolamakelele ya mayi monene, mpe lokola lokito ya kake monene. Mpe makelele oyo nayokaki ezalaki lokola oyo ya babeti mandanda, oyo bazali kobeta mandanda na bango. Bazalaki koyemba nzembo ya sika liboso ya Kiti ya bokonzi, liboso ya bikelamo minei ya bomoi mpe ya bampaka. Mpe moto ata moko te akokaki koyekola nzembo yango, longola kaka bato wana nkoto nkama moko na ntuku minei na minei (144.000) oyo bakangolamaki na mabele. Ezali bato oyo babebisaki nzoto na bango te na basi, pamba te bamibatelaki peto. Ezali baoyo bazalaki kolanda Mwana-meme na bisikanyonso ye azalaki kokende. Bakangolaki bango na kati ya bato, mpo bakaba bango epai ya Nzambe mpe epai ya Mwana-meme lokolamakabo ya liboso. Lokuta emonanaki na monoko na bango te, mpe bazalaki na mabe ata moko te. Bongo namonaki anzelu mosusu azalaki kopumbwa na kati ya likolo, azalaki na Sango Malamu ya seko mpo na kosakola yango na bato oyo bavandaka na mokili: na bato ya bikolo nyonso, ya mabota nyonso, ya minoko nyonso, mpe ya mikili nyonso. Azalaki koloba na mongongo makasi: —Bobanga Nzambe mpe bopesa ye nkembo; pamba te tango ya Nzambe mpo na kosambisa bato ekoki. Bokumisa ye oyo asalaki likolo, mokili, ebalemonene mpe bipai mayi ebimaka! Anzelu ya mibale alandaki mpe alobaki: —Mboka monene ya Babilona, ekweyi, ekweyi; yango moto emelisaki batoya bikolo nyonso vino ya kanda ya kindumba na yango! Bongo anzelu ya misato alandaki bango mpe alobaki na mongongo makasi: —Soki moto asamopanga nyama mpe elilingi na yango, mpe azwi elembo na elongi to na loboko na ye, ye mpe akomela vino ya kanda ya Nzambe, oyo esangana na eloko moko te, oyo batia na kopo ya kanda na ye. Akomona pasi na moto mpe na sufululiboso ya baanzelu basantu mpe liboso ya Mwana-meme. Mpe molinga ya pasi na bango ekomata na likolo libela na libela. Baoyo bakumbamelaka nyama mpe elilingi na ye, mpe moto nyonso oyo akondima kozwa elembo ya kombo na ye, bakopema te butu mpe moi. Yango wana basantu, baoyo babatelaka mibeko ya Nzambe mpe kondima na bango na Yesu, basengeli kokanga mitema. Bongo nayokaki mongongo moko ewutaki na Likolo mpe elobaka: —Koma: Esengo na bato oyo bazali kokufa kati na Nkolo! Mpe Molimo alobi: E e! mpo ete bapema na misala na bango, pamba te misala na bango ezali kolanda bango. Bongo namonaki lipata moko ya pembe. Mpe moto moko akokanaki na Mwana ya moto afandaki na kati ya lipatayango: alataki ekoti ya bokonzi ya wolo mpe asimbaki mopanga moko ya mino penza oyo balongolelaka mbuma na bilanga. Anzelu mosusu abimaki na Ndako ya Nzambe, agangaki na mongongomakasi na moto oyo avandaki likolo ya lipata: —Kamata mopanga na yo mpe kata mbuma, mpo tango ya kolongola mbumaekoki, mpe mbuma ya mokili esiʼekomeli. Bongo moto oyo afandaki likolo ya lipata asalelaki mopanga na yena mokili mpe alongolaki mbuma na yango. Anzelu mosusu abimaki na Ndako ya Nzambe, oyo ezali na Likolo. Ye mpe azalaki na mopanga moko ya mino penza oyo balongolelaka mbuma na bilanga. Sima anzelu mosusu oyo azalaki na bokonzi likolo ya moto, abimaki na esika batumbaka makabo. Mpe agangaki na mongongo makasi epai ya ye oyo asimbaki mopanga ya mino penza; alobaki na ye: —Kamata mopanga na yo, mpe kata bambuma ya nzete ya vino oyo ezali na mokili; pamba te bambuma na yango esiʼeteli. Bongo anzelu wana asalelaki mopanga na ye na mokili. Mpe akataki bambuma ya nzete ya vino oyo ezalaki na mokili, mpe abwakaki yango na nzungu monene ya kanda ya Nzambe. Bongo bakamolaki mbuma yango na libanda ya vile, na kati ya nzungu wana ya monene. Makila mingi ebimaki na nzungu yango, etondaki kino kokoma na monokoya punda, soki punda etelemi, mpe epanzanaki na mokili kino na bakilometele nkama misato. Bongo namonaki na Likolo, elembo mosusu ya monene mpe ya kokamwa: baanzelu sambo bazalaki na bapasi sambo, yango ezali bapasi ya suka; pamba te na yango nde Kanda ya Nzambe ekokokisama. Namonaki mpe ebale monene esangana na moto, ezalaki lokola talatala. Namonaki lisusu baoyo balongaki nyama, mpe elilingi na yango, mpe na talo ya kombo na yango, batelemaki likolo ya ebale monene oyo ezalaki lokola talatala, mpe bazalaki na mandanda ya Nzambe. Bazalaki koyemba nzembo ya Moyize, mosali ya Nzambe, mpe nzemboya Mwana-Meme: Nkolo Nzambe ya nguya nyonso, misala na yo ezali minene mpe ya kokamwa! Nkolo ya biloko nyonso; banzela na yo ezali sembo mpe solo. Nkolo, nani akobanga yo te mpe akoboya kokumisa kombo na yo? Pamba te yo kaka nde ozali Mosantu. Bato ya bikolo nyonso bakoya, mpe bakosambela yo; pamba te misala na yo ya bosembo emonani polele! Sima ya makambo wana, natalaki mpe namonaki Ndakoya Nzambe na Likolo efungwamaki, yango nde Ndako ya kapo ya litatoli. Bongo baanzelu sambo oyo bamema bapasi sambo babimaki na Ndako ya Nzambe. Balataki elamba oyo babengaka lino; ezalaki ya peto mpe ezalaki kongenga makasi penza, mpe bakangaki mikaba ya wolo na tolo na bango. Moko na kati ya bikelamo minei ya bomoi epesaki na baanzelu sambu bakopo sambo ya wolo, oyo ezalaki ya kotonda na kanda ya Nzambe, ye oyo azali na bomoi libela na libela. Bongo Ndako ya Nzambe etondaki na milinga oyo ewutaki na nkembo ya Nzambe mpe na nguya na ye. Mpe moto moko te akokaki kokotana Ndako ya Nzambe, kino tango bapasi sambo ya baanselu sambo ekokisamaki. Bongo nayokaki mongongo moko ya monene ewutaki na ndako ya Nzambe, elobaki na baanzelu sambo: —Bokende mpe bosopa na mabele bakopo sambo ya kanda ya Nzambe. Anzelu ya liboso akendaki mpe asopaki kopo na ye na mabele. Bongo bapota ya somo mpe ya pasi ebimaki na nzoto ya bato oyo bazalaki na elembo ya nyama mpe bakumbamelaki elilingi na yango. Anzelu ya mibale asopaki kopo na ye na ebale monene, mpe ebaleekomaki makila lokola ya moto akufi; mpe biloko nyonso ya bomoi oyo ezalaki na ebale, ekufaki. Anzelu ya misato asopaki kopo na ye na ba-ebale mpe na bisika mayi ebimaka; mpe ekomaki makila. Bongo nayokaki anzelu oyo azalaki na bokonzi likolo ya mayi, alobaki: —Ozali sembo, yo oyo ozali mpe ozalaki; Mosantu, mpo okati bongo! Pamba te basopaki makila ya basantu mpe ya baprofeta; mpe opesi bango makila mpo bamela, yango ekoki na bango. Bongo nayokaki mongongo moko ewutaki na mesa oyo batumbelaka makabo, elobaki: —E e, Nkolo Nzambe ya nguya nyonso, okataka makambo na ndenge yasolo mpe ya sembo! Anzelu ya minei asopaki kopo na ye likolo ya moi. Mpe moi ezwaki nzela ya kozikisa bato na moto. Bato bazikaki na moto ya makasi penza mpe babandaki kofinga kombo ya Nzambe oyo azali na bokonzi likolo ya bapasi wana. Kasi baboyaki kobongola mitema na bango mpe kopesa ye nkembo. Anzelu ya mitano asopaki kopo na ye likolo ya kiti ya bokonzi ya nyama; bokonzi ya nyama yango ekomaki molili, mpe bato babandaki komiswa lolemo mpo na pasi; bafingaki Nzambe ya Likolo, mpo na bapasi na bango mpe mpo na bapota na bango. Kasi baboyaki kobongola mitema na misala na bango. Anzelu ya motoba asopaki kopo na ye na ebale monene ya Efrate; bongo mayi na yango ekawukaki mpo na kobongisa nzela ya bakonzi mineneoyo bakowuta na Este. Bongo namonaki milimo misato ya mbindo lokola magorodo ebimaki na monoko ya Dragon, monoko ya nyama, mpe na monoko ya moprofeta ya lokuta. Yango nde milimo ya mbindo oyo esalaka makamwisi, mpe ekokende epaiya bakonzi minene ya mokili mobimba, mpo na kosangisa bango esika moko mpo na etumba ya mokolo monene ya Nzambe ya nguya nyonso. Tala: nazali koya lokola moyibi. Esengo na moto oyo azalikokengela mpe azali kobatela bilamba na ye, mpo ete atambola bolumbu tempe bamona soni na ye te. Bongo milimo wana esangisaki bakonzi minene na esika oyo babengaka na monoko ya Ki-ebreo: “Armagedoni”. Anzelu ya sambo asopaki kopo na ye likolo ya mopepe, mpe mongongo moko ya monene ewutaki na Kiti ya bokonzi, ebimaki na Ndako ya Nzambe, elobaki: —Ekokisami! Bongo kongenga ya kake emonanaki, kake ebetaki, lokitoeyokanaki, mpe mokili eninganaki makasi penza. Koningana ya ndenge wana naino esalama te banda moto azali na mokili. Vile monene ekabwanaki na biteni misato; mpe bavile ya bikolo nyonso ebukanaki. Bongo Nzambe akanisaki vile monene ya Babilona mpe apesaki yango kopo oyo etonda na vino ya kongala ya kanda na ye. Bisanga nyonso ekimaki, mpe bangomba emonanaki lisusu te. Mbula ya mabanga minene enokaki: libanga moko ezalaki na bakilo pene-pene ntuku minei na mibale na ntuku misato, mpe ezalaki kokweyela bato. Bongo bato bafingaki Nzambe mpo na pasi ya mbula wana ya mabanga, pamba te pasi yango ezalaki monene mingi. Bongo anzelu moko na kati ya banzelu sambo oyo bazalaki na bakoposambo, ayaki mpe alobaki na ngai: —Yaka, nakolakisa yo etumbu ya mwasi ya ndumba monene, oyo avandi likolo ya bamayi mingi. Bakonzi minene ya mokili basalaki ekobo elongo na ye, mpe baoyo bavandaka na mikili balangwa vino ya kindumba na ye! Bongo anzelu amemaki ngai na Molimo kati na esobe. Kuna, namonaki mwasi moko afandaki likolo ya nyama ya motane, nyama yango ezalaki ya kotonda na bakombo ya kofinga Nzambe, mpeezalaki na mitu sambo mpe na maseke zomi. Mwasi yango alataki bilamba ya motane ya pete-pete mpe motane ya makasi, babizu ya wolo, mabanga ya talo, mpe mayaka. Asimbaki na loboko na ye kopo ya wolo etonda na makambo ya sonimpe ya bosoto ya kindumba na ye. Kombo moko ezalaki ya kokomama na elongi na ye: “Sekele, Babilona vile monene, mama ya basi ya ndumba mpe ya makambo ya soni ya mokili.” Mpe namonaki mwasi yango alangwaki makila ya basantu mpe makila ya batemwe ya Yesu. Nakamwaki mingi penza tango namonaki ye. Bongo anzelu alobaki na ngai: —Mpo na nini ozali kokamwa? Nakoyebisa yo sekele ya mwasi wana, mpe ya nyama oyo ezali komema ye, oyo ezali na mitu sambo mpe maseke zomi. Nyama oyo omonaki, oyo ezalaki liboso mpe sikʼoyo ezali te, ekobima na libulu ya molai mpe ekokende na libebi. Bongo bato oyo bavandaka na mokili, baoyo bakombo na bango ekomama te na Buku ya bomoi banda na ebandeli ya mokili, bakokamwa tango bakomona nyama wana. Pamba te, nyama yango ezalaki liboso mpe sikʼoyo ezali te; mpe ekoya lisusu. Mpo na kososola makambo oyo, esengeli ozala na bwania mingi. Mitu wana sambo, ezali bangomba sambo epai mwasi afandi. Yango ezali mpe bakonzi minene sambo. Mitano basiʼbakweya na bokonzi, moko azali sikʼoyo na bokonzi, mpe mosusu ayei naino te. Tango akoya, esengeli awumela mwa tango moke. Bongo nyama oyo ezalaki liboso mpe sikʼoyo ezali lisusu te, yango nde mokonzi ya mwambe. Nyama yango ezali moko na kati ya bakonzi wana sambo, mpe ekokende na libebi. Maseke zomi oyo omonaki, ezali bakonzi zomi oyo bazwi naino bokonzi te. Kasi bokonzi na bango ekozala ya ngonga moko kaka, elongo na nyama wana. Bango nyonso zomi bazali na likanisi kaka moko, mpe bakopesa nguya mpe bokonzi na bango na nyama wana. Bakobunda na Mwana-meme, kasi Mwana-meme akolonga bango, pamba te ye azali Nkolo ya bakolo mpe Mokonzi ya bakonzi. Akolonga bango elongo na bato oyo bazali na ye elongo, baoyo Nzambe abenga mpe apona, mpebazali ya kokangama na ye. Bongo anzelu alobaki na ngai: —Bamayi oyo omonaki epai mwasi ya ndumba afandaki, ezali bato yamokili, bato ebele, bikolo, mpe minoko. Maseke zomi oyo omonaki mpe nyama wana, bakoyina mwasi ya ndumba. Bakobotola ye biloko na ye nyonso mpe bakotika ye bolumbu, bakolia mosuni na ye, mpe bakotumba ye na moto. Pamba te Nzambe atia na mitema na bango posa ya kokokisa makanisina ye; bakoyokana mpo na kopesa nyama wana nguya na bango ya kokamba, kino tango Maloba ya Nzambe ekokokisama. Bongo mwasi oyo omonaki, ezali vile monene oyo ezali na bokonzi likolo ya bakonzi minene ya mokili. Na sima ya makambo wana, namonaki anzelu mosusu awutaki na Likolompe ayaki kokita. Azalaki na nguya monene, mpe nkembo na yeengengisaki mokili. Agangaki na mongongo makasi: Vile monene ya Babilona ekwei, ekwei. Ekomi mboka ya bazabolo, ebombamelo ya milimo nyonso ya mbindo mpe ebombamelo ya bandeke ya mbindo mpe oyo eboyama. Pamba te bikolo nyonso emelaki vino ya kanda ya kindumba na yango. Bakonzi minene ya mabele basalaki ekobo elongo na vile yango, mpe bato ya mombongo ya mabele bakomaki na bomengo mingi wuta na bomengo na yango oyo eleki ndeko. Bongo nayokaki mongongo mosusu ewutaki na Likolo, elobaki: —Bino bato na ngai, bobima na kati ya vile wana, mpo ete bosangana na masumu na yango te, mpe bozwa bapasi na yango te. Pamba te masumu na yango etondi mingi kino na Likolo. Mpe Nzambe akanisi mabe na yango. Bosalela yango ndenge yango esalaki bino. Makambo oyo esalaki, bofuta ye yango mbala mibale. Kopo oyo esangisaki mpo na bino, masanga ya ngai oyo emelisaka, bomelisa ye yango mbala mibale. Boyokisa yango pasi mpe mawa, ndenge yango ezalaki komikumisa mpe emitondisaki na bomengo. Pamba te ezali koloba: “Navandi lokola mokonzi monene ya mwasi; nakufela mobali te, mpe nakosala matanga ata mokolo moko te.” Yango wana, bapasi na yango ekokweyela yango na mokolo moko: liwa, matanga, nzala, mpe bakotumba yango na moto. Pamba te Nkolo Nzambe oyo apesi yango etumbu, azali na nguya mingi. Bongo bakonzi ya mokili, baoyo basalaki na yango ekobo mpe basanganaki na bisengo na yango, bakomona pasi mpe bakolela mpo na vile wana, tango bakomona milinga ya moto oyo ekozikisa yango. Bakotelema mosika mpo na kobanga pasi oyo ekokweyela vile yango. Bongo bakoloba: “Mawa! Mawa! Vile monene, Babilona vile ya nguya! Pamba te kobeba na yango eye kaka na ngonga moko!” Bongo bato ya mombongo ya mokili bakolela mpe bakosala matanga mpo na vile yango, pamba te moto ata moko te akosomba lisusu biloko na bango: wolo, palata, mabanga ya talo, mayaka, bilamba ya lino ya pete-pete, bilamba ya motane ya pete-pete, bilamba ya swa, bilamba ya motanemakasi, banzete nyonso ya solo kitoko, biloko ya ndengena ndenge oyo esalami na pembe ya nzoku, biloko ya ndenge na ndengeoyo esalami na banzete ya talo mpe na bibende lokola “Bronze”, “Fer”, mpe na mabanga ya kitoko oyo babengaka “Marbre”; biloko basangisaka na bilei mpo na koyeisa yango elengi, malasi, mire, banzete ya solo kitoko oyo batumbaka, vino, mafuta, farine, ble, bangombe, bameme, bampunda, shario, bawumbu, mpe milimo ya batu. —Bakoloba: “biloko nyonso oyo ozalaki kolinga mingi etiki yo mosika; bomengo mpe biloko ya kitoko nyonso ebebi, okozwa yango lisusu te!” Bato ya mombongo oyo bazwaki bomengo tango bazalaki kotekisa biloko na bango na vile wana, bakotelema mosika mpo na kobanga pasi oyo ekokweyila vile yango. Bakolela, bakosala matanga mpe bakoloba: —Mawa! Mawa! Vile monene, ezalaki kolata bilamba ya lino ya pete-pete, bilamba ya motane ya makasi, babizu ya wolo, mabanga ya talo, mpe mayaka! Kasi tala, na ngonga moko kaka, bomengo wana nyonso ebebi. Bakapiteni nyonso ya masuwa, bato nyonso oyo basalaka mibembo na masuwa, bato oyo basalaka na masuwa, mpe baoyo basalaka mombongo na nzela ya mayi, batelemaki na mosika. Tango bamonaki milinga ya kozika na yango, bagangaki: —Vile nini ekokani na vile monene? Bongo, bazalaki kobwaka putulu na mitu na bango, bazalaki kolelampe komitungisa, mpe koganga na mongongo makasi: —Mawa! Mawa! Vile monene! Pamba te bato nyonso oyo bazalaki na bamasuwa na ebale bakomaki bato ya bomengo mpo na bomengo ya vile yango. Kasi tala, na ngonga moko kaka, yango nyonso ebebi. Likolo, sepela mpo na vile yango! Bino basantu, Bapostolo mpe baprofeta, bosepela mpe! Pamba te, Nzambe alongisi binoawa akateli vile yango etumbu. Bongo anzelu moko ya nguya akamataki libanga moko ezalaki lokola oyo basalelaka mpo na konika ble, abwakaki yango na ebale monene mpe alobaki: —Vile monene ya Babilona, bakobwaka yango ndenge wana na makasinyonso, mpe ekomonana lisusu te. Miziki ya babeti lindanda mpe ya bayembi, ya babeti piololo mpe kelelo, ekoyokana lisusu te kati na yo. Bato oyo basalaka misala ya maboko ya ndenge na ndenge, bakomonana lisusu te epai na yo; makelele ya mabanga minene oyo banikelaka ble, ekoyokana lisusu te epai na yo. Mwinda ekopela lisusu te epai na yo, mpe mongongo ya mobali mpe mwasi oyo bawuti kobalana ekoyokana lisusu te epai na yo, pamba te bato na yo ya mombongo bazalaki bato minene ya mokili; mpe okosaki bato ya bikolo nyonso na mazi na yo. Kati na yo, bakutaki makila ya baprofeta, ya basantu, mpe ya bato nyonso oyo babomaki na mokili. Sima ya makambo wana, nayokaki na Likolo lokola mongongomoko ya monene ya bato ebele penza, bazalaki koganga: Aleluya! Lobiko, nkembo mpe nguya ezala na Nzambe na biso! Pamba te lolenge na ye akataka makambo ezali ya solo mpe ya bosembo. Asambisi ndumba monene oyo azalaki kobebisa mokili na kindumba na ye; mpe apesi ye etumbu mpo na makila ya basali na ye. Bongo balobaki lisusu: Aleluya! Milinga na yango, ezali komata na likolo libela na libela. Bampaka ntuku mibale na minei na bikelemo minei ya bomoi, bafukamaki bilongi na nse mpe bakumbamelaki Nzambe oyo afandaki na Kiti ya bokonzi; mpe balobaki: —Amen! Aleluya! Bongo mongongo moko ebimaki na Kiti ya bokonzi elobaki: —Bokumisa Nzambe na biso, mikolo mpe bana, bino nyonso oyobosalelaka ye mpe bobangaka ye. Bongo nayokaki lokola mongongo ya bato ebele penza, ezalaki koyokana lokola makelele ya mayi ebele mpe lokola lokito ya kake yamakasi penza, elobaki: Aleluya! Pamba te Nkolo Nzambe na biso, Nzambe ya nguya nyonso azali Mokonzi. Tosepela, totonda na esengo mpe topesa ye nkembo; pamba te tango ekoki mpo ete feti ya libala ya Mwana-meme esalama, mpe mwasi na ye asiʼamibongisi. Bapesi ye ndingisa mpo alata elamba ya lino ya pete-pete, oyo ezali kongenge, mpe ya peto. Pamba te elamba ya lino ya pete-pete, ezali nde misala ya bosembo ya basantu. Bongo anzelu alobaki na ngai: —Koma: Esengo na baoyo babengami na feti ya libala ya Mwana-meme! Mpe alobaki lisusu: —Maloba oyo ezali penza maloba ya Nzambe. Bongo nafukamaki liboso ya makolo ya anzelu mpo na kosambela ye. Kasi alobaki na ngai: Kosala yango te. Nazali moninga na yo ya mosala mpe ya bandeko na yo baoyo bazali na litatoli ya yesu. Sambela Nzambe! Pamba te, litatoli ya Yesu ezali molimo ya maloba oyo baprofeta basakolaka. Bongo namonaki Likolo efungwanaki mpe punda moko ya pembe ezalaki liboso na ngai. Moto oyo afandelaki yango, kombo na ye: “Sembo mpe solo”. Asambisaka mpe abundaka na bosembo nyonso. Miso na ye ezalaki lokola moto ezali kopela; mpe alataki bikoti ebele ya bokonzi na motu na ye. Kombo oyo ezalaki ya kokomama na nzoto na ye, ata moto moko te ayebi yango, kaka ye moko. Alataki nzambala moko badindisa na makila. Kombo na ye: “Liloba ya Nzambe”. Basoda ya likolo bazalaki kolanda ye likolo ya bampunda ya pembe; balataki bilamba ya lino ya pete-pete, oyo ezalaki ya pembe mpe ya peto. Mopanga moko ya mino penza ebimaki na monoko na ye, mpo na kobeta bikolo. Akokamba bango na lingenda ya ebende, mpe akoniata nzungu monene ya vino ya kanda monene ya Nzambe ya nguya nyonso. Kombo moko ezalaki ya kokomama na nzambala na ye mpe na mopende na ye: “Nkolo ya bakolo mpe Mokonzi ya bakonzi.” Bongo namonaki anzelu moko atelemaki na kati ya moi, agangaki na mongongo makasi na bandeke nyonso oyo ezalaki kopumbwa na likolo penza: —Boya, bosangana na feti monene ya Nzambe; mpo bolia misuni ya bakonzi minene, ya bakonzi ya basoda, ya bato ya nguya, ya bampunda, mpe ya bato oyo batambusaka yango, ya bato nyonso, ya bawumbu to ya bato ya bonsomi, ya bato minenempe ya bato mike. Bongo namonaki nyama wana, bakonzi minene ya mokili, na basoda na bango, basanganaki mpo na kobunda etumba na moto oyo avandaki likolo ya mpunda mpe na mapinga na ye. Kasi bakangaki nyama yango mpe moprofeta ya lokuta oyo azalaki na ye elongo, oyo asalaki makamwisi na miso na ye. Mpo na makamwisi wana, nde akosaki bato oyo bazwaki elembo ya nyama, mpe bazalaki kosambela elilingi na yango. Nyama yango na moprofeta ya lokuta, bango mibale, babwakaki bango na laki ya moto mpe ya sufulu. Bongo moto oyo afandaki likolo ya mpunda asalelaki mopanga oyoezalaki kobima na monoko na ye mpo na koboma bato mosusu oyo batikalaki; mpe bandeke nyonso bayaki kolia misuni na bango. Bongo namonaki anzelu moko azalaki kokita wuta likolo, asimbaki fungola ya libulu ya molai mpe monyololo moko ya monene. Akamataki Dragon, nyoka wana ya kala, oyo azali zabolo mpe satana, mpe akangaki ye na monyololo mpo na bambula nkoto moko. Anzelu abwakaki ye na libulu ya molai. Akangisaki yango mpe atiaki elembo likolo na yango, mpo ete akosa lisusu te bikolo, kino tangobambula nkoto moko ekokoka. Bongo na sima, esengeli batika ye mpo na mwa tango moke. Bongo namonaki bakiti ya bokonzi na baoyo bafandelaki yango; bapesaki bangobokonzi ya kosambisa bato. Namonaki milimo ya bato oyo bakataki bango mitu mpo na litatoli ya Yesu mpe mpo na liloba ya Nzambe. Baboyaki kosambela nyama mpe na elilingi na yango, mpe bazwaki te elembo na bilongi na bango mpe na maboko na bango; bazongaki na bomoi, mpe bazalaki na bokonzi bambula nkoto moko elongo na Kristo. Bato mosusu oyo bakufaki, bazongaki na bomoi te kino tango bambula nkoto moko ekokaki. Yango nde Lisekwa ya liboso. Esengo mpe mosantu, bato oyo bakosekwa na lisekwa ya liboso! Liwa ya mibale ezali lisusu na nguya te likolo na bango; kasi bakozala banganga-Nzambe ya Nzambe mpe ya Kristo, mpe bakozala na bokonzi elongo na ye, bambula nkoto moko. Tango bambula wana nkoto moko ekokoka, bakobimisa Satana na boloko, mpe akokende kokosa bikolo oyo ezali na bipai nyonso minei ya mokili mobimba, Gogi mpe Magogi, mpo asangisa bango esika moko mpo na kobunda etumba; bakozala ebele, ebele penza lokola zelo ya ebale monene. Bongo bapanzanaki na mokili mobimba, bazingaki mboka ya basantu, mpe vile oyo Nzambe alingaka mingi. Kasi moto ewutaki na likolo, ekitelaki bato wana mpe ebomaki bango. Bongo zabolo oyo azalaki kokosa bango, babwakaki ye na laki ya moto mpe ya sufulu, esika babwakaki nyama mpe moprofeta ya lokuta. Kuna bakomona pasi seko, butu na moi. Bongo namonaki Kiti monene ya bokonzi ya pembe. Moto moko avandelaki yango. Likolo mpe nse ekimaki liboso ya elongi na ye, mpe esika ezwamaki te mpo na yango. Bongo namonaki bato bakufa: bato minene mpe bato pamba batelemakiliboso ya Kiti ya bokonzi. Babuku efungwamaki; mpe Buku mosusu efungwamaki, yango nde Buku ya bomoi. Bongo bato basambisaki bato bakufa, moto nyonso na makambo oyo ye asalaki, ndenge ekomamaki na babuku wana. Ebale monene ezongisaki bakufi nyonso oyo bazalaki kati na yango; liwa mpe mboka ya bakufi ezongisaki bakufi oyo bazalaki kati na yango; bongo moto nyonso asambaki na makambo oyo ye asalaki. Liwa mpe mboka ya bakufi ebwakamaki na laki ya moto. Laki yango ya moto yango nde: liwa ya mibale. Mpe moto nyonso oyo kombo na ye ekomamaki te na Buku ya bomoi, babwakaki ye na laki ya moto. Bongo namonaki likolo ya sika mpe mabele ya sika; pamba te likolo ya liboso mpe mabele ya liboso elimwaki, mpe ebale monene ezalaki lisusu te. Mpe namonaki vile ya bosantu, Yeruzalem ya sika, ewutaki na likolo epai ya Nzambe mpe eyaki kokita. Babongisaki yango lokola mwasi ya libala oyo bakomisi kitoko penza mpo na mobali na ye. Nayokaki mongongo moko ya monene ebimaki wuta na Kiti ya bokonzi, mpe elobaki: Botala, Ndako ya Nzambe ezali elongo na bato! Nzambe akovanda na bango elongo, bakozala bato na ye, mpe Nzambe ye moko akozala na bango elongo mpe akozala Nzambe na bango. Akopangusa mayi ya miso nyonso ya miso na bango; liwa ekozala lisusute, matanga ekozala te, ata kolela, ata pasi. Pamba te makambo ya liboso esiʼeleki. Bongo Moto oyo afandaki na Kiti ya bokonzi alobaki: —Tala, nasali biloko nyonso ya sika. Sima alobaki: —Koma makambo oyo, pamba te maloba oyo ezali maloba ya solo mpe oyotosengeli kotiela motema. Alobaki na ngai lisusu: —Ekokisami! Ngai nazali Alfa mpe Omega, ebandeli mpe suka. Moto oyo azali na posa ya mayi, nakopesa ye oyo ya ebandeli ya mayiya bomoi, mpe nakopesa ye yango ofele. Moto oyo akolonga akozwa bomengo nyonso wana, mpe, nakozala Nzambe na ye, mpe ye akozala mwana na ngai. Kasi mpo na bato oyo babangaka-bangaka na kondima na bango bato bazangi kondima, baoyo basalaka makambo ya soni ndenge na ndenge, baoyo babomaka bato, baoyo basalaka kindumba, baoyo basalaka kindoki, baoyo basambelaka bikeko, mpe bato nyonso ya lokuta, bakobwakama na laki ya moto mpe ya sufulu; yango nde liwa ya mibale. Bongo anzelu moko na kati ya baanzelu sambo oyo bazalaki na bakopo sambo oyo ezalaki ya kotonda na bapasi sambo ya suka, ayaki mpe alobaki na ngai: —Yaka, nakolakisa yo mwasi oyo azali kobala, mwasi ya Mwana-meme. Amemaki ngai na molimo likolo ya ngomba moko ya monene mpe ya molayi penza. Alakisaki ngai Yeruzalem, vile ya bosantu, oyo ezalaki kokita wuta na Likolo epai ya Nzambe. Ezalaki ya kotonda na nkembo ya Nzambe, mpe ezalaki kongenga lokola libanga ya talo, lokola “Yaspe”, polele lokola tala-tala. Vile yango ezalaki na lopango moko ya molayi mpe ya monene. Ezalaki na baporte zomi na mibale, mpe baanzelu zomi na mibalebazalaki na baporte yango. Bakombo ya mabota zomi na mibale ya bato ya Isayele ezalaki ya kokomama likolo ya baporte yango. Na Este baporte misato, na Norde baporte misato, na Sudebaporte misato mpe na Weste baporte misato. Lopango ya vile yango ezalaki na bafondasio zomi na mibale; mpe bakombo ya Bapostolo zomi na mibale ya Mwana-meme ezalaki ya kokoma na likolo na yango. Mpe anzelu oyo azalaki kolobela ngai, asimbaki mwa nzete ya wolompo na kotanga molayi ya vile wana, baporte na yango, mpe lopango na yango. Bipayi nyonso minei ya vile yango ezalaki molayi moko; molayi na yangompe mokuse na yango ezalaki ndenge moko. Bongo anzelu akamataki molayi ya vile na mwa nzete wana. Yango nyonso ezalaki na bakilometele pene-penenkoto mibale na nkama mibale. Molayi na yango, mokuse na yango, mpemolayi na yango ya kobanda na mabele kino na likolo ezalaki ndenge moko. Bongo atangaki molayi ya lopango; molayi na yango ezalaki na bametele pene-pene ntuku motoba na motoba. Komeka molayi oyo anzelu asalelaki, ezali oyo bato basalelaka. Lopango yango ezalaki ya kotongama na “Yaspe” mpe vile yango esalamaki na wolo ya peto penza, oyo ekokani na talatala ya peto. Bafondasio ya lopango ya vile yango babongisaki yango na mabanga ya talo ya ndenge na ndenge: fondasio ya liboso ezalaki ya “Yaspe”, ya mibale ya “Safire”, ya misato ya “Kalisedwane”, ya minei ya “Emerode”, ya mitano ya “Onikisi”, ya motoba ya “Sardwane”, ya sambo ya “Krizolite”, ya mwambe ya “Beril”, ya libwa ya “Topaze”, ya zomi ya “Krizopase”, ya zomi na moko ya “Yansonte”, mpe ya zomi na mibale ya “Ametiste”. Baporte wana zomi na mibale ezalaki bapalata zomi na mibale. Porte moko na moko ezalaki ya kosalama na palata moko. Bala-bala ya vile yango ezalaki ya wolo ya peto penza lokola tala-tala ya polele penza. Namonaki Ndako ya Nzambe na vile wana te. Pamba te Nkolo Nzambe ya nguya nyonso, mpe Mwana-meme, bazali Ndako ya Nzambe na yango. Vile yango ezali na posa ya moi to sanza te mpo na kongengisa yango; pamba te nkembo ya Nzambe engengisaka yango mpe Mwana-meme azali Mwinda na yango. Bikolo ekotambola na moi na ye. Mpe mikonzi minene ya mokili bakomema nkembo na bango na vile yango. Baporte ya vile yango ekobanda kokangama te mokolo mobimba, pamba te butu ekozala kuna te. Bakomemela vile yango nkembo mpe lokumu ya bikolo. Kasi ata eloko moko te ya bosoto ekokota na vile wana, ata mpe moto moko te oyo asalaka makambo ya soni mpe alobakalokuta; kasi baoyo bakokota kuna, kaka baoyo bakombo na bango ekomama na Buku ya bomoi ya Mwana-meme. Bongo anzelu alakisaki ngai ebale ya mayi ya bomoi; ezalaki kongenga lokola tala-tala, mpe ezalaki kobima na Kiti ya Bokonzi ya Nzambe mpe ya Mwana-meme; ezalaki koleka na kati-kati ya bala-bala ya vile wana. Mpe nzete ya bomoi ezalaki na ngambo na ngambo ya ebale. Yangoezalaki kobota mbuma mbala zomi na mibale na mbula, elingi koloba mbala moko na sanza moko; mpe makasa na yango ebikisaka bikolo. Ata eloko moko te oyo elakelama mabe ekozala kuna. Kiti ya Bokonzi ya Nzambe mpe ya Mwana-Meme ekozala na vile yango, mpe basali na ye bakosalela ye. Bakomona elongi na ye, mpe kombo na ye ekozala na bilongi na bango. Butu ekozala lisusu te; mpe bakozala na posa ya mwinda to ya moi te, pamba te Nkolo Nzambe akongengisela bango mwinda na ye. Mpe bakozala bakonzi libela na libela. Bongo anzelu alobaki na ngai: —Maloba oyo ezali maloba ya solo mpe oyo tosengeli kotiela motema. Mpe Nkolo Nzambe ya milimo ya baprofeta, atindaki anzelu na ye mpo alakisa na basali na ye makambo oyo esengeli koya sima ya mwa tango moke. —Yoka! Etikali moke naya. Esengo na moto oyo azali kobatela maloba ya kosakolama ya buku oyo. Ezali ngai Jean, moto nayokaki mpe namonaki makambo oyo. Tango nayokaki mpe namonaki yango, nafukamaki liboso ya anzelu oyo alakisaki ngai yango mpo na kokumbamela ye. Kasi anzelu alobaki na ngai: —Kosala yango te! Nazali moninga na yo ya mosala mpe yabandeko na yo baprofeta, mpe ya baoyo batosaka maloba ya buku oyo. Esengeli okumbamela Nzambe! Bongo alobaki na ngai: —Maloba ya kosakolama ya buku oyo, kobomba yango te pamba te tango ekomi pene. Tika ete moto azangi bosembo, akoba kaka kosala makambo ezangi bosembo. Tika ete moto oyo azali mbindo, akoba kaka kosala makambo ya mbindo. Tika ete moto oyo azali sembo, akoba kaka kosala makamboya bosembo. Mpe tika ete moto oyo azali mosantu, akoba kaka kozala mosantu. —Yoka etikali moke naya, mpe lifuti ezali na ngai mpo na kopesa namoto na moto na lolenge ya mosala oyo ye asalaki. Ngai nazali Alfa mpe Omega, moto ya liboso mpe moto ya suka, ebandeli mpe suka. Esengo na baoyo bazali kosukola bilamba na bango mpo ete bazwa ndingisaya kolia mbuma ya nzete ya bomoi, mpe bakota na vile na nzela ya baporte na yango. Kasi bambwa, baoyo basalelaka kindoki, baoyo basalaka kindumba, baoyo babomaka bato, baoyo basambelaka bikeko, na baoyo nyonso balingaka mpe basalelaka lokuta, bakozala na libanda ya vile yango. Ngai Yesu, natindaki anzelu na ngai mpo apesa bino litatoli oyo mpo na Mangomba. Ngai nazali mosisa mpe mwana ya libota ya David, Monzoto oyo engengaka na tongo. Molimo mpe Mwasi oyo Mwana-meme akobala, balobi: —Yaka. Moto oyo ayoki makambo oyo, aloba: —Yaka. Moto oyo azali na posa ya mayi aya; mpe moto oyo alingi, mayi ya bomoi, azwa yango ya ofele. Nazali kokebisa bato nyonso oyo bazali koyoka maloba yakosakolama ya buku oyo: Soki moto abakisi eloko likolo na yango, Nzambe akobakisela ye batembe oyo ekomama na buku oyo. Soki moto alongoli eloko na maloba ya kosakolama ya buku oyo, Nzambe mpe akolongola ndambo na ye ya mbuma ya nzete ya bomoi mpe ya vile ya bosantu, oyo ekomama na buku oyo. Moto oyo azali kopesa litatoli ya makambo oyo alobi: —E e, etikali moke naya! Amen. Nkolo Yesu yaka! Tika ete ngolu ya Nkolo Yesu ezala na basantu nyonso! Amen.